“Makabo na motindo na mibali” mpo na kobatela bampate ya Yehova
“Ntango abutaki likoló, amemaki bakangami; apesaki makabo na motindo na mibali.”—BAEFESE 4:8, NW.
1. Ndeko mwasi moko akomaki nini mpo na bankulutu ya lisangá na ye?
NDEKO mwasi moko akomelaki bankulutu ya lisangá na bango mokanda oyo ezalaki na maloba oyo: “Melesi mingi na ndenge bokanisaka biso mingi. Kosɛka na bino, esengo na bino, mpe komibanzabanza na bino mpo na biso eutaka mpenza na motema. Bozalaka ntango nyonso wana mpo na koyoka biso mpe kotánga na biso elongo mikapo ya Biblia oyo elendisaka elimo na biso. Libondeli na ngai ezali ete namonaka ntango nyonso ete bozali na ntina mingi.” Tomoni mpenza ete motema ya ndeko yango esimbamaki na bolingo ya babateli baklisto oyo bamibanzabanzaka mpo na bandeko na bango.—1 Petelo 5:2, 3.
2, 3. (a) Na kolanda Yisaya 32:1, 2, ndenge nini bankulutu oyo bazali na boboto babatelaka bampate ya Yehova? (b) Ntango nini tokoki koloba ete nkulutu boye azali likabo?
2 Yehova atii bankulutu na lisangá mpo bábatelaka bampate na ye. (Luka 12:32; Yoane 10:16) Yehova alingaka bampate na ye mingi; kutu, asombaki bango na motuya moko monene: na makila ya Yesu. Yango wana Yehova asepelaka mpenza ntango bankulutu bazali na boboto epai ya etonga na ye. (Misala 20:28, 29) Yoká maloba ya esakweli moko etali bankulutu yango, to “bana ya mikonzi”: “Moto na moto akozala lokola [ebombamelo] mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekaoki.” (Yisaya 32:1, 2) Bankulutu bazali wana mpo na kobatela, kolendisa, mpe kobɔndisa bampate. Bankulutu oyo bazali kobatela etonga na boboto nyonso bazali nde kosala nyonso mpo bákokisa mokumba na bango na miso ya Nzambe.
3 Biblia ebéngi bankulutu ya ndenge wana “makabo na motindo na mibali.” (Baefese 4:8, NW) Ntango ozali kokanisa likabo, omonaka eloko moko oyo bakabeli moto mpo na kokokisa mposa moko to kosepelisa ye. Bakoki koloba ete nkulutu boye azali likabo soki azali kosalela makoki na ye mpo na kosunga etonga mpe koluka bolamu na yango. Ndenge nini akoki kosala yango? Eyano ezali na maloba ya Paulo na Baefese 4:7-16, maloba yango ezali kokumisa bolingo mpe lobanzo oyo Yehova azali na yango mpo na bampate na ye.
“Makabo na motindo na mibali” bauti wapi?
4. Mpo na kokokisa maloba ya Nzembo 68:18, na ndimbola nini Yehova ‘abutaki likoló,’ mpe banani bazalaki “makabo na motindo na mibali”?
4 Ntango Paulo asalelaki maloba “makabo na motindo na mibali,” azongelaki nde maloba ya Mokonzi Davidi oyo alobaki boye mpo na Yehova, “Obutaki likoló, omemaki bakangami; ozwaki makabo na motindo na mibali.” (Nzembo 68:18, NW) Mwa bambula nsima wana Bayisalaele bakómaki kofanda na Mokili ya Ndaka, na maloba ya elilingi tokoki koloba ete Yehova “abutaki” na Ngomba Siona mpe akómisaki Yelusaleme mboka-mokonzi ya Yisalaele mpe atyaki Davidi mokonzi na yango. Kasi banani bazalaki “makabo na motindo na mibali”? Ezalaki mibali oyo bakangaki na etumba ntango bazalaki kobɔtɔla mokili yango. Bakangami mosusu bapesaki bango na mabɔkɔ ya Balevi mpo básalisaka bango na misala ya mongombo.—Ezela 8:20.
5. (a) Ndenge nini Paulo amonisi ete Nzembo 68:18 esengeli kokokisama na lisangá ya boklisto? (b) Na ndimbola nini Yesu ‘abutaki likoló’?
5 Na mokanda na ye epai ya Baefese, Paulo amonisi ete maloba ya mokomi ya nzembo esengeli kokokisama na ndenge oyo eleki monene na lisangá ya boklisto. Paulo azongelaki nde maloba ya Nzembo 68:18 ntango akomaki ete: “Nzokande, mokomoko na biso azwaki likabo ya motema malamu na ndenge oyo Klisto apesaki ye likabo ya ofele. Yango wana alobi: ‘Ntango abutaki likoló, akendaki na bakangami; apesaki makabo na motindo na mibali.’” (Baefese 4:7, 8, NW) Na bavɛrsɛ oyo, Paulo asaleli maloba ya nzembo yango mpo na Yesu, moto oyo ayaki na nkombo ya Nzambe. Na etamboli na ye ya sembo, Yesu “alongaki mokili.” (Yoane 16:33, NW) Lisusu, alongaki liwa mpe Satana na ndenge Nzambe asekwisaki ye na kati ya bakufi. (Misala 2:24; Baebele 2:14) Na mobu 33 T.B., Yesu wana asekwi abutaki “likoló koleka bipai nyonso na Likoló”—elingi koloba koleka bikelamu nyonso mosusu ya likoló. (Baefese 4:9, 10; Bafilipi 2:9-11) Lokola moto oyo alongi etumba, Yesu azwaki “bakangami” epai ya monguna. Na ndenge nini?
6. Banda na Pantekote ya mobu 33 T.B., ndenge nini Yesu oyo abutaki na likoló abandaki kobɔtɔla biloko na ndako ya Satana, mpe asalaki nini na “bakangami”?
6 Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu alakisaki ete nguya na ye eleki nguya ya Satana na ndenge abikisaki bato oyo bademo bakangaki. Ezali lokola nde Yesu abukaki ndako ya Satana, akangaki ye na nsinga, mpe abɔtɔlaki biloko na ye. (Matai 12:22-29) Kanisá naino, ntango asekwaki mpe azwaki ‘bokonzi nyonso na likoló mpe na nse,’ makasi oyo akómaki na yango mpo na kobɔtɔla! (Matai 28:18) Banda na Pantekote ya mobu 33 T.B., na nkombo ya Nzambe, Yesu wana abutaki na likoló abandaki kobɔtɔla biloko na ndako ya Satana mpe ‘kokende na bakangami,’ elingi koloba mibali oyo, na boumeli ya ntango molai, Satana azalaki koyangela bango mpe bazalaki baombo ya lisumu mpe ya liwa. “Bakangami” yango bandimaki kokóma “baombo ya Klisto, kosalaka mokano ya Nzambe uta na motema.” (Baefese 6:6) Tokoloba mpenza ete Yesu asikolaki bango na bokonzi ya Satana mpe, apesaki bango na lisangá lokola “makabo na motindo na mibali” mpo na Yehova. Kanisá nkanda makasi oyo Satana azalaki na yango wana bazalaki kokamata bango ye azali kotala!
7. (a) “Makabo na motindo na mibali” bakokisaka mikumba nini na lisangá? (b) Yehova apesi libaku nini na nkulutu mokomoko?
7 Lelo oyo tomonaka “makabo na motindo na mibali” yango na kati ya lisangá? Ɛɛ, tomonaka bango! Tomonaka bango bazali kosala lokola bankulutu, bazali kosala mosala monene lokola ‘bapalanganisi ya nsango malamu, babateli ya mpate, mpe balakisi’ na masangá koleka 87 000 ya basaleli ya Nzambe na mokili mobimba. (Baefese 4:11) Satana akosepela mpenza soki babateli ya mpate bazali konyokola etonga. Kasi Nzambe, na nzela ya Klisto, apesi bango na lisangá mpo bányokola etonga te. Kasi, Yehova apesi mibali yango mpo na bolamu ya lisangá, mpe akotuna bango makambo nini basalelaki bampate oyo bapesi bango bábatelaka. (Baebele 13:17) Soki ozali nkulutu, Yehova apesi yo libaku monene ya komonisa ete ozali likabo, to lipamboli mpo na bandeko na yo. Okoki kosala yango soki okokokisa mikumba minei ya ntina.
Na ntango esɛngi “kobongisa”
8. Na makambo nini biso nyonso tozalaka na mposa bábongisa biso ntango mosusu?
8 Ya liboso, Paulo alobi ete “makabo na motindo na mibali” bapesami “mpo na kobongisa Babulami.” (Baefese 4:12) Liloba ya Greke oyo ebongolami na “kobongisa” ezali kopesa likanisi ya kotya eloko moko “na molɔngɔ.” Lokola tozali bato ya masumu, biso nyonso tozalaka na mposa bábongisa biso mbala na mbala; ete makanisi na biso, elimo na biso, mpe etamboli na biso ezonga “na molɔngɔ” mpo eyokana na makanisi mpe mokano ya Nzambe. Na bolingo na ye, Yehova apesi “makabo na motindo na mibali” mpo básalisa biso tóbongisa na bisika oyo ezali kosɛnga kobongisa. Ndenge nini basalaka mosala yango?
9. Ndenge nini nkulutu akoki kobongisa mpate oyo abungi?
9 Ntango mosusu, bakoki kosɛnga nkulutu moko asalisa mpate oyo ‘abungi nzela liboso ete ye moko ayeba yango.’ Ndenge nini nkulutu akoki kosalisa mpate yango? Bagalatia 6:1 (NW) elobi boye, “Bóluka kobongisa moto ya ndenge wana na elimo ya bopɔlɔ.” Yango wana, ntango nkulutu azali kopesa toli, asengeli te kogangela moto oyo asali libunga, to koloba na ye maloba oyo ekozokisa ye. Toli esengeli kolendisa, kasi esengeli “koyokisa nsɔni” te. (2 Bakolinti 10:9; talá Yobo 33:7.) Ekoki kozala ete moto yango azali koyoka nsɔni, yango wana, mobateli ya mpate oyo azali na bolingo akokeba ete alɛmbisa elimo na ye te. Soki ezali bolingo nde ezali kopusa na kopesa toli, ata kopesa mpamela makasi, mpe soki epesami na bolingo, na ntembe te ekosala ete makanisi to etamboli ya moto oyo abungi nzela ezonga na molɔngɔ, mpe na ndenge yango, ekobongisa ye.—2 Timote 4:2.
10. Kobongisa basusu esɛngi makambo nini?
10 Na ndenge Yehova apesaki “makabo na motindo na mibali” mpo na kobongisa biso, alingaki ete bankulutu bázala bato oyo balendisaka na elimo mpe bázala ndakisa oyo basaleli na ye bakoki kolanda. (1 Bakolinti 16:17, 18; Bafilipi 3:17) Kobongisa basusu esɛngi kaka kosembola baoyo babungi nzela te, kasi esɛngi mpe kosalisa bato oyo bazali sembo mpo bátikala na nzela malamu.a Lelo oyo, lokola makambo oyo ezali kolɛmbisa bato ezali mingi, bandeko mingi bazali na mposa bálendisa bango mpo bákangama na nzela ya solo. Basusu bakoki kozala na mposa básalisa bango na boboto nyonso mpo báyokanisa makanisi na bango na makanisi ya Nzambe. Na ndakisa, baklisto mosusu ya sembo bamimonaka kaka ete babongi te to bazali na ntina moko te. Bato ya ndenge wana oyo tokoki kobénga bango “milimo oyo ezali konyokwama na makanisi” bakoki kokanisa ete Yehova akoki kolinga bango te mpe ete ata soki basali makasi nini na mosala na ye, Nzambe akosepela na yango kaka te. (1 Batesaloniki 5:14, NW) Kasi makanisi ya ndenge wana eyokani te na ndenge oyo Nzambe atalelaka basaleli na ye.
11. Bankulutu bakoki kosala nini mpo básalisa bato oyo bamimonaka ete bazali na ntina moko te?
11 Bino bankulutu, bokoki kosala nini mpo bósalisa bato ya ndenge wana? Na boboto nyonso, bómonisa bango na kati ya Biblia ete Yehova abatelaka mosaleli na ye mokomoko mpe bóndimisa bango ete bavɛrsɛ yango etaleli mpenza bango. (Luka 12:6, 7, 24) Bósalisa bango bámona ete Yehova ‘abendi’ bango mpo básalela ye; yango wana bazali mpenza na ntina mingi na miso na ye. (Yoane 6:44) Bómonisa bango ete bazali kaka bango moko te, basaleli mingi ya Yehova oyo bazalaki sembo bazalaki koyoka ndenge yango. Na eleko moko, mosakoli Eliya amitungisaki mingi mpe amonaki malamu akufa. (1 Mikonzi 19:1-4) Na ekeke ya liboso, baklisto bapakolami mosusu bazalaki koyoka ete mitema na bango ‘ekweisi’ bango. (1 Yoane 3:20) Ntango moto ayebi ete bato ya sembo na ntango ya kala bazalaki na ‘mayoki lokola oyo ya biso,’ ekobɔndisa ye. (Yakobo 5:17, NW) Bokoki mpe kozongela elongo na bato oyo balɛmbi masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká oyo ezali kolendisa. Nzambe oyo apesi bino lokola “makabo na motindo na mibali” akomona mpenza milende oyo bozali kosala na bolingo nyonso mpo bópesa lisusu bato ya ndenge wana elikya.—Baebele 6:10.
“Kotonga” etonga
12. ‘Kotonga nzoto ya Klisto’ elimboli nini, mpe sɛkɛlɛ ya kotonga etonga ezali nini?
12 Ya mibale, “makabo na motindo na mibali” bapesami mpo na ‘kotonga nzoto ya Klisto.’ (Baefese 4:12) Na esika oyo, Paulo asaleli maloba ya elilingi. Ntango bazali koloba “kotonga,” na makanisi na biso tozali komona ndako, mpe “nzoto ya Klisto” elimboli bato, elingi koloba lisangá ya baklisto bapakolami. (1 Bakolinti 12:27; Baefese 5:23, 29, 30) Bankulutu basengeli kosalisa bandeko na bango bákóma makasi na elimo. Mokano na bango ezali ya ‘kotonga kasi kobebisa’ etonga te. (2 Bakolinti 10:8) Mpo na kotonga etonga, sɛkɛlɛ ezali bolingo mpamba te “bolingo etongaka.”—1 Bakolinti 8:1, NW.
13. Kozala na motema mawa elimboli nini, mpe mpo na nini ezali na ntina mingi ete bankulutu bázala na motema mawa?
13 Motema mawa ezali motindo moko ya komonisa bolingo oyo esalisaka bankulutu bátonga etonga mobimba. Kozala na motema mawa elimboli kokabola na basusu mpasi oyo bazali koyoka, kososola makanisi mpe mayoki na bango, kotalela mpe esika oyo makoki na bango esuki. (1 Petelo 3:8) Mpo na nini ezali likambo ya ntina mingi ete bankulutu bázala na motema mawa? Libosoliboso mpo Yehova, oyo epesaka “makabo na motindo na mibali,” azali Nzambe ya mawa. Ntango basaleli na ye bazali konyokwama to bazali na mpasi, ye mpe ayokaka mawa. (Exode 3:7; Yisaya 63:9) Atalaka esika oyo makoki na bango esuki. (Nzembo 103:14) Boye, ndenge nini bankulutu bakoki komonisa motema mawa?
14. Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa motema mawa epai ya bandeko mosusu?
14 Ntango moto moko alɛmbi ayei epai na bango, bakoyoka ye mpo báyeba mayoki ya moto yango. Bakotalela bomoi ya kala, bomoto, mpe makambo oyo bandeko na bango bazali kokutana na yango. Na nsima, ntango bankulutu bakopesa lisalisi oyo ekolendisa mpe euti na Biblia, bampate bakokakatana te kondima yango, mpamba te bakomona ete ezali toli oyo euti epai ya babateli oyo bayebi komitya na esika na bango mpe bamibanzabanzaka mpo na bango. (Masese 16:23) Motema mawa epusaka mpe bankulutu báyeba esika oyo makoki ya bato mosusu esuki mpe mayoki oyo likambo yango ekoki kopesa bango. Na ndakisa, baklisto mosusu oyo bazalaka na mposa mpenza ete bákokisa mikumba na bango bakoki komona lokola nde bazali na ngambo mpo bazali kokoka kosala mingi te na mosala ya Nzambe. Ekoki kozala mpo bakómi mibange to bazali na mikakatano na kolɔngɔnɔ ya nzoto. Nzokande, bato mosusu bakoki kozala na mposa bálendisa bango mpo bábongisa lisusu mosala na bango. (Baebele 5:12; 6:1) Motema mawa ekopusa bankulutu na koluka “maloba ya kitoko” oyo ekotonga basusu. (Mosakoli 12:10) Ntango bampate ya Yehova balendisami, bolingo na bango mpo na Nzambe ekopusa bango básala nyonso oyo bakoki na mosala na ye!
Mibali oyo bazali kolendisa bomoko
15. “Bomoko ya kondima” elimboli nini?
15 Ya misato, “makabo na motindo na mibali” bapesami mpo ‘tókóma biso nyonso na bomoko na kondima mpe na boyebi ya Mwana ya Nzambe.’ (Baefese 4:13) Maloba “bomoko na kondima” elimboli kaka bomoko ya bindimeli te, kasi lisusu bomoko ya bandimi. Yango nde ntina mosusu oyo Nzambe apesi biso “makabo na motindo na mibali,” elingi koloba mpo na kolendisa bomoko na kati ya basaleli na ye. Basalaka yango ndenge nini?
16. Mpo na nini ezali likambo ya ntina mingi ete bankulutu bábatela bomoko na kati na bango?
16 Libosoliboso, basengeli kobatela bomoko na kati na bango. Soki babateli bakabwani, bakobosana bampate. Ntango oyo bakokaki kosalela mpo na kobatela etonga, bakolekisa yango mpamba na makita milaimilai mpe na kowelana na makambo mikemike. (1 Timote 2:8) Ekoki kokóma ete bankulutu bayokani te na makambo mosusu oyo bazali kotalela, mpamba te mokomoko azali na bomoto na ye oyo mbala mosusu ekeseni mpenza na bomoto ya baninga na ye. Kozala na bomoko elingi koloba te ete bakoki kozala na makanisi ekeseni te to kobimisa yango te, kasi nde báwelana te ntango bazali na likita. Bankulutu bakobatela bomoko na bango soki bazali koyoka makanisi ya baninga mosusu na limemya mpe soki balongoli na makanisi na bango ete oyo moto mosusu akoloba ekoki kozala malamu te. Soki babuki mobeko moko ya Biblia te, mokomoko asengeli kondima mpe kotosa ekateli ya nsuka oyo lisangani ya bankulutu ezwi. Ntango bazali koyokela baninga bakolakisa ete batambwisami na “mayele mauti na likoló,” mayele oyo ezali na “kimya na boboto.”—Yakobo 3:17, 18.
17. Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kobatela bomoko ya lisangá?
17 Lisusu, bankulutu batyaka likebi mingi mpo bomoko ezala na kati ya lisangá. Na ntango makambo oyo ekabolaka bato lokola matɔngi, kokanisela basusu mabe, to elimo ya koswana, ebandi kolongola kimya, basalaka nokinoki mpo na kopesa toli oyo ekoki kosunga. (Bafilipi 2:2, 3) Na ndakisa, bankulutu bakoki koyeba ete ezali na bato mosusu oyo balingi kotɔnga baninga to kokɔta na makambo ya bato. (1 Timote 5:13; 1 Petelo 4:15) Bankulutu bakomeka kosalisa bato yango báyeba ete etamboli wana eyokani te na makambo oyo Nzambe azali koteya biso mpe, moto na moto “akomema bozito na ye moko.” (Bagalatia 6:5, 7; 1 Batesaloniki 4:9-12) Bakosalela Biblia mpo na kolimbola ete Yehova atikaka makambo mosusu ete moto na moto azwela yango ekateli na kolanda lisosoli na ye, mpe na makambo wana, moto moko te kati na biso asengeli kosambisa baninga. (Matai 7:1, 2; Yakobo 4:10-12) Mpo tósala na bomoko na kati ya lisangá, tosengeli kotyelanaka motema mpe kopesana limemya. Ntango bazali kopesa toli euti na Biblia soki esɛngi bongo, “makabo na motindo na mibali” bazali kosalisa biso tóbatela kimya mpe bomoko.—Baloma 14:19.
Bazali kobatela etonga
18, 19. (a) “Makabo na motindo na mibali” babatelaka biso liboso ya banani? (b) Esengeli kobatela bampate na likama nini mosusu, mpe bankulutu basalaka ndenge nini mpo na kobatela bampate?
18 Ya minei, Yehova apesi “makabo na motindo na mibali” mpo na kobatela biso mpo ete “mipɛpɛ nyonso ya mateya mpe na mayele [mabe] na bato, na bozimbisi na bango na nzela na mikano na mabe” emema biso te. (Baefese 4:14) Liloba ya Greke oyo ebongolami na “mayele mabe” elimboli “kokosa na lisano ya zeke” to “kozala na mayele ya kobɛta zeke.” Yango ezali kopusa biso tókanisa lisusu mayele mabe oyo bapɛngwi basalelaka. Na maloba oyo elambami malamu, babalolaka mikapo ya Biblia mpo na koluka kokosa baklisto ya solo bátika lingomba ya solo. Bankulutu basengeli kofungola miso liboso ya “bankoi ya yauli” motindo wana!—Misala 20:29, 30.
19 Bampate ya Yehova basengeli mpe kobatelama na makama mosusu. Davidi, oyo azalaki mobateli ya mpate, abatelaki na mpiko nyonso etonga ya tata na ye na banyama mabe oyo elyaka bibwele. (1 Samwele 17:34-36) Lelo oyo mpe, makambo mosusu ekoki kobima oyo ezali kosɛnga ete babateli baklisto oyo bamibanzabanzaka mpo na etonga bázala mpiko mpo bábatela etonga liboso ya moto nyonso oyo akoki konyokola bampate ya Yehova, mingimingi bampate oyo bazali makasi te. Bankulutu bakosala nokinoki ete bábengana na lisangá bato oyo bazali kosala masumu na nko mpe bazali kokosa, kozimbisa, to kokanisa liboso ndenge oyo bakoki kosala mabe.b—1 Bakolinti 5:9-13; talá Nzembo 101:7.
20. Mpo na nini tokoki koyoka ete “makabo na motindo na mibali” babatelaka biso?
20 Tozali mpenza na botɔndi mpo na “makabo na motindo na mibali”! Mpo na bolingo mpe komibanzabanza na bango mpo na biso, tokoki komona ete tobatelami, mpamba te bazali kobongisa biso na boboto, bazali kotonga biso na bolingo, mpe bazali kobatela bomoko na biso, mpe na mpiko nyonso bazali kobatela biso. Kasi, ndenge nini “makabo na motindo na mibali” basengeli kotalela mokumba na bango na kati ya lisangá? Mpe ndenge nini tokoki kolakisa ete tosepelaka na bango? Tokoyanola na mituna oyo na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Biblia Septante, verbe ya Greke oyo babongoli na “kobongisa” esalelami na Nzembo 17[16]:5, epai Davidi, moto ya sembo, abondelaki ete matambe na ye elanda ntango nyonso nzela ya Yehova.
b Na ndakisa, talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1980, nkasa 31-32 (ebimeli ya Lifalanse), mpe lisolo “Tóyina oyo ezali mabe” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1997, nkasa 26-29.
Ozali koyeba lisusu?
◻ “Makabo na motindo na mibali” ezali banani mpe mpo na nini Nzambe, na nzela ya Klisto, apesi bango na lisangá?
◻ Ndenge nini bankulutu bakokisaka mokumba na bango ya kobongisa etonga?
◻ Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kotonga baninga na bango bandimi?
◻ Ndenge nini bankulutu bakoki kobatela bomoko ya lisangá?
[Elilingi na lokasa 10]
Motema mawa esalisaka bankulutu bálendisa baoyo balɛmbi
[Elilingi na lokasa 10]
Bomoko kati na bankulutu elendisaka bomoko na kati ya lisangá