Tósepela kati na Yehova!
“Bosepelaka ntango yɔnsɔ kati na Nkolo. Najali koloba lisusu ete, Bosepelaka!”—BAFILIPI 4:4.
1. Mpo na nini tokoki kokamwa na likambo oyo Paulo amonisaki wana alobaki ete baklisto basengeli kosepela ntango nyonso?
LELO oyo, emonani lokola ete bantina ya kosepela ezali moke mpe emonanaka mbala mingi te. Bato oyo basalemi na mputulu, ata baklisto ya solo, bazali kokutana na makambo oyo mazali kopesa mawa—kozanga mosala, maladi, kufa ya moto oyo olingaka, mikakatano miuti na bomoto, to botɛmɛli ya basangani ya libota baoyo bazali bandimi te to baninga ya kala. Na bongo, lolenge nini tozali kososola toli oyo ya Paulo, ete “Bosepelaka ntango yɔnsɔ”? Na kotalela kozanga esengo mpe makambo na mpasi oyo biso banso tosengeli kobundisa, yango ekoki mpenza kosalema? Lisoló ya makambo mazali zingazinga na maloba oyo likosalisa mpo na kongɛngisa likambo yango.
Tósepela—Mpo na nini mpe lolenge nini?
2, 3. Ntina ya esengo ezali nini, lokola emonisami mpo na Yesu mpe Bayisraele?
2 “Bosepelaka ntango yɔnsɔ kati na Nkolo. Najali koloba lisusu ete, Bosepelaka!” Yango ekoki kokundwela biso maloba oyo mayebisamaki na Bayisraele eleki soko bikeke 24, ete: “Esengo ya [Yehova] ejali nguya na bino,” to engebene libongoli ya Moffatt: “Kosepela kati na Oyo-na-Seko ezali makasi na bino.” (Nɛhɛmia 8:10) Esengo epesaka makasi mpe ezali lokola esika makasi epai kuna moto akoki kobombama mpo na kobɔndisama mpe kozwa libateli. Esengo ezalaki eloko oyo esalisaki Yesu, atako azalaki moto na kokoka mpo ete áyika mpiko. “Mpɔ na esɛngɔ etiami liboso na ye, ayikeli [nzeté na mpasi, NW] mpiko, atioli nsɔni na yango mpe ajali kofanda na lobɔkɔ na mobali na kiti na bokonji na Njambe.” (Baɛbɛlɛ 12:2) Emonani mpenza ete, kosepela na ntango ya mikakatano ezali na ntina mingi mpo na lobiko.
3 Liboso ya kokɔ́ta na Mabelé ya Ndaka, Bayisraele bazwaki etinda oyo, ete: “Okosepela na ntina na makambo malamu yɔnsɔ oyo [Yehova] Njambe na yɔ apɛsi na yɔ mpe na libota na yɔ, yɔ mpe Molewi, mpe mopaya oyo na kati na yɔ.” Kozanga kosalela Yehova na esengo esengelaki kobimisa makambo na mpasi mingi. “Malakeli mabe oyo yɔnsɔ ikokwela yɔ mpe [makolanda, NW] yɔ mpe ikojua yɔ, kino esili yɔ kokufa . . . [mpo ete] osalelaki [Yehova] Njambe na yɔ na esɛngɔ mpe na kosepela na motema tɛ, na ntina na kotonda na bilɔkɔ yɔnsɔ.”—Dutɛlɔnɔmɛ 26:11; 28:45-47.
4. Mpo na nini tokoki kozanga kosepela?
4 Na yango, ezali na ntina mingi lelo oyo ete batikali bapakolami mpe baninga na bango “bampate mosusu” básepelaka. (Yoane 10:16) Na kozongeláká toli na ye ete “najali koloba lisusu ete,” Paulo amonisaki mpenza ntina ya kosepela mpo na makambo nyonso malamu oyo Yehova asili kosalela biso. Tozali kosala yango? To tomikɔ́tisi nde kati na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo na boye ete mbala mingi tozali kobosana ebele ya bantina oyo tozali na yango mpo na kosepela? Mikakatano mileki mingi mpenza kino milɛmbisi lolenge na biso ya kotalela Bokonzi mpe mapamboli na yango? Tozali nde kopesa nzela na makambo mosusu—lokola kozanga kotosa mibeko ya Nzambe, kozanga kotalela malako mauti na Nzambe, to kotalela mokumba ya boklisto na bopotu—ete elongola esengo na biso?
5. Mpo na nini moto na makambo makasi azali na mokakatano mpo na kosepela?
5 “Tika ete [ezaleli na bino ya bato na makambo makasi te eyebana, NW] na bato yɔnsɔ. Nkolo ajali kobɛlɛma.” (Bafilipi 4:5) Moto na makambo makasi azali na bokatikati te. Akoki kotika kotalela kɔ́lɔngɔnɔ na ye mpenza, na konyokoláká nzoto na ye bobele mpamba na mikakatano mizangi ntina soko na mitungisi. Mbala mosusu, alingi te kondima ndelo na ye mpe kozala na bomoi na kobila ndelo yango. Akotyaka mikano mineneminene mpe bongo, akoluka kokokisa yango kozanga kotalela makambo oyo makoki kouta na yango. To akoluka kosalela ndelo na ye lokola mwango ya komilóngisa mpo na kozala na lomongi to mpo na kozala na boséndé. Lokola azangi bokatikati mpe azali na makambo makasi, azali na mokakatano mpo na kosepela.
6. (a) Nini oyo baninga baklisto basengeli komona epai na biso, mpe yango ekosalema bobele na ntango nini? (b) Lolenge nini maloba ya Paulo mazwami na 2 Bakolinti 1:24 mpe na Baloma 14:4 mazali kosalisa biso na kozala bato na makambo makasi te?
6 Ata soki batɛmɛli bataleli biso lokola bato na bindimelá, baninga na biso baklisto basengeli komona bokatikati na biso. Mpe yango ekosalema soki tozali na bokatikati mpe soki tozali komizela te ete biso moko tósala makambo na lolenge ya kokoka soko mpe bato mosusu. Likoló na makambo nyonso oyo, tosengeli te kobakisela basusu bozito likoló na oyo esɛngami na Liloba ya Nzambe. Ntoma Paulo alobaki ete: “Biso tozali bankolo ya kondima na biso te kasi tozali baninga ya mosala mpo na esengo na bino.” (2 Bakolinti 1:24, NW) Lokola azalaki Mofalisai na kala, Paulo ayebaki malamu ete mitinda makasi oyo mityami mpe misɛngisami na baoyo bazali na bokonzi ekobebisaka esengo, nzokande batoli ya malamu oyo epesami na baninga ya mosala ezali kobakisa esengo. Likambo oyo ete “Nkolo ajali kobɛlɛma” lisengeli kokundwela moto na makambo makasi te ete tosengeli te ‘kofunda mosali na moto mosusu. Ye akotɛlɛma sɔkɔ akokwea bobɛlɛ na miso na mokolo na ye mɔkɔ.’—Baloma 14:4.
7, 8. Mpo na nini baklisto basengeli komizela kokutana na mikakatano, kasi na meko nini bakoki kolanda kosepela?
7 “Bomitungisa mpɔ na likambo mɔkɔ tɛ nde kati na makambo yɔnsɔ tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Njambe na mabɔndɛli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. (Bafipi 4:6) Lelo oyo, tozali kobika na “ntango na mpasi” oyo Paulo akomaki. (2 Timɔtɛ 3:1-5) Na yango, baklisto basengeli komizela kokutana na mikakatano. Maloba oyo ya Paulo ete “bosepelaka ntango yɔnsɔ” malongoli te likambo oyo ete moklisto ya sembo akoki kokwea to mpe kolɛmba. Mpo na Paulo, moklisto asengeli kondima likambo oyo, ete: “Bakokamolaka biso bipai yɔnsɔ nde tokobukanaka tɛ; bakotungisaka biso nde tokotikaka elikia tɛ; bakonyɔkɔlaka biso nde ye [akosundolaka, NW] biso tɛ; bakokweisaka biso na nse nde tokobebaka tɛ.” (2 Bakɔlinti 4:8, 9) Nzokande, esengo ya moklisto ekokitisaka motema, ezali mpe kolongola bileko ya mitungisi mpe ya mawa. Yango ezali kopesa nguya esengeli mpo na kolanda kokende liboso na ekateli makasi, kozanga kobungisa bantina mingi oyo tozali na yango mpo na kosepela.
8 Wana mikakatano mibimi, ata ezali ya lolenge nini, moklisto oyo azali na esengo akosɛnga lisungi ya Yehova na komikitisa nyonso na nzela ya libondeli. Akomitika te komitungisa na kolekisa ndelo. Nsima na kosala oyo ye moko akoki kosala yango na bososoli nyonso mpo na kosilisa mokakatano, akokitisa yango na lobɔkɔ ya Yehova na kolanda na libyangi oyo, ete: “Kitisa mokumba na yɔ epai na [Yehova] mpe ye akokumba yɔ.” Nzokande, moklisto akolanda kotɔ́ndo Yehova mpo na malamu na Ye nyonso.—Njembo 55:22; talá mpe Matai 6:25-34.
9. Lolenge nini boyebi ya solo ezali kopesa kimya ya elimo, mpe yango ezali na bopusi nini malamu epai na moklisto?
9 “Kimia na Njambe oyo eleki makanisi yɔnsɔ ekosɛnjɛla mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:7) Boyebi ya solo ya Biblia ezali kosikola makanisi ya moklisto na makambo ya lokuta mpe ezali kosalisa ye na kokólisa makanisi malamu. (2 Timoté 1:13) Ezali mpe kosalisa ye na kokima mabe mpe etamboli ezangi mayele oyo ekoki kobebisa boyokani ya kimya elongo na basusu. Na esika ya komitungisa mpo na bokesene mpe misala mabe, moklisto azali kotya elikya na ye epai na Yehova ete akosilisa mikakatano ya bato na nzela ya Bokonzi. Na bongo, kimya ya makanisi ezali kosɛnzɛla motema na ye, ezali kobatela mikano na ye ya pɛto, mpe ezali kokamba bikaniseli na ye na nzela ya boyengebene. Lisusu, mikano ya pɛto mpe bikaniseli ya sembo ezali kopesa bantina mingi mpo na kosepela, atako mikakatano mpe masɛnginya mauti na mokili oyo mosili kobeba.
10. Esengo ya solo ekoki kozwama bobele na kolobela to na kokanisa makambo nini?
10 “Na nsuka, bandeko, mpɔ na makambo yɔnsɔ na sɔlɔ, na makambo yɔnsɔ na lokumu, na makambo yɔnsɔ na sembo, na makambo yɔnsɔ na mpɛtɔ, na makambo yɔnsɔ na boboto, na makambo yɔnsɔ na ngɔlu, sɔkɔ malamu ejali mpe sɔkɔ lisanjoli ejali, bokanisa makambo yango.” (Bafilipi 4:8) Moklisto akosepelaka te na kolobela to na kokanisa makambo ya mabe. Yango elongoli mbala moko masano mingi oyo mokili mozali kobimisa. Moto te akoki kozala ntango nyonso na esengo ya boklisto soki atondisi elimo mpe motema na ye na makambo na lokuta, na makambo ya bɔsɔtɔ, oyo mazangi sembo, na mbindo, na bizaleli bibongi te, na koyina, mpe na makambo oyo maboyami. Mpo na koloba malamu, moto te akoki kozwa esengo ya solo na kotondisáká elimo mpe motema na ye na makambo na bɔsɔtɔ. Kati na mokili ya Satana oyo mosili kobeba, koyeba ete baklisto bazali na makambo mingi ya malamu mpo na kokanisa mpe kosolola likoló na yango, ezali elendiseli monene!
Bantina mingi mpo na kosepela
11. (a) Likambo nini tosengeli te kotalela yango na bopotu, mpe mpo na nini? (b) Liyangani moko ya mokili mobimba lizalaki na bopusi nini epai na ndeko mobali moko oyo autaki mokili mosusu mpe mwasi na ye?
11 Tóbosana te bondeko na biso ya mokili mobimba wana tozali kolobela bantina ya kosepela. (1 Petelo 2:17) Awa bikólo mpe bitúlúká ya bato na mokili bizali koyinana, libota ya Nzambe likangami esika moko kati na bolingo. Bomoko na bango bomonanaka mingi mpenza na mayangani ya mokili mobimba. Mpo na moko na yango oyo esalemaki na 1993 na mboka Kiev, na mokili ya Ukraine, ndeko mobali moko oyo autaki Etats-Unis, akomaki ete: “Mpisoli ya esengo, miso oyo mazalaki kongɛnga, boyambani ya bondeko mbala na mbala, mpe mbote epesamaki epai na bituluku ya bato oyo bazalaki koningisa mangebu mpe matambála ya langilangi, emonisaki mpenza bomoko ya teokrasi. Mitema na biso mitondaki na esengo na makambo oyo Yehova akokisaki na lolenge ya kokamwa kati na bondeko ya mokili mobimba. Yango ezalaki na bopusi makasi epai na ngai mpe mwasi na ngai, mpe elendisaki lisusu kondima na biso.”
12. Lolenge nini Yisaya 60:22 ezali kokokisama na miso na biso mpenza?
12 Kondima ya baklisto elendisami mpenza awa bazali komona kokokana ya bisakweli ya Biblia na miso na bango. Na ndakisa, tózwa maloba ya Yisaya 60:22: “Oyo mokɛ akokoma nkoto mpenja, oyo eleki mokɛ akokoma libota na makasi. Ngai najali [Yehova]; na ntango na yango, nakoyeisa yango mbango.” Na kobotama ya Bokonzi na 1914, bobele bato 5 100—oyo moke—nde bazalaki kosakola na molende. Kasi na boumeli ya mibu mitano oyo miuti koleka, etando ya bondeko ya mokili mobimba esili kobakisama na mwayene ya Batatoli 5 628 oyo bazali kozwa batisimo poso na poso! Na 1993, ezalaki na motuya ya basakoli 4 709 889 ya molende. Kanisá naino! Yango emonisi ete “oyo mokɛ” ya mobu 1914 esili solo kokóma “nkoto mpenja”!
13. (a) Likambo nini lizali kosalema kobanda 1914? (b) Lolenge nini Batatoli ya Yehova bazali kolanda lilako ya maloba ya Paulo oyo mazwami na 2 Bakolinti 9:7?
13 Kobanda 1914, Mokonzi Masiya azali koyangela kati na banguna na ye. Boyangeli na ye bosimbami na bayekoli ya bolingo malamu baoyo bazali kopesa ntango, makasi, mpe mosolo mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba mpe mosala ya botongi na mokili mobimba. (Nzembo 110:2, 3) Batatoli ya Yehova bazali kosepela lokola makabo ya misolo mazali kopesama mpo na kokokisa misala kino nsuka na yango, atako mosolo yango mokolɔmbamaka te kati na makita na bango.a (Kokanisá na 1 Ntango 29:9.) Baklisto ya solo bapusami na makasi te mpo na kopesa makabo; bazali kotalela yango lokola libaku malamu ya kosunga Mokonzi na ndelo oyo epesameli bango, moto na moto “pelamɔkɔ na motema na ye, na mposa mokɛ tɛ mpe na kopusama tɛ.”—2 Bakɔlinti 9:7.
14. Ezalela nini esili komonana kati na libota ya Nzambe kobanda 1919, oyo ezali kopesa bango ntina ya kosepela?
14 Kozongisama ya losambo ya solo kati na libota ya Nzambe ebimisaki bozalisi ya paladiso ya elimo. Kobanda 1919, ndelo na yango ezali ntango nyonso kokóla. (Nzembo 14:7; Yisaya 52:9, 10) Ebimisi matomba nini? Baklisto ya solo bazali na “esengo mpe na bosepeli.” (Yisaya 51:11, NW) Mbuma malamu oyo ebimi emonisi mosala oyo elimo santu ya Nzambe ekoki kosala na nzela na bato oyo bazangi kokoka. Nkembo mpe lokumu nyonso epesami na Yehova, nzokande ezali libaku lileki kitoko na kokóma basalani elongo na Nzambe, boye te? (1 Bakolinti 3:9) Yehova azali na nguya mingi mpenza mpo na kobimisa mabangá, soki yango esengeli, ete máyebisa nsango ya solo. Atako bongo, aponaki mwango wana te, kasi aponaki bikelamu bisalemi na mputulu oyo bipusami na bolingo malamu ete báyebisa mokano na ye.—Luka 19:40.
15. (a) Makambo nini tozali kolanda na likebi nyonso na mikolo na biso? (b) Likambo nini oyo tozali kozela na esengo nyonso?
15 Na bobangi nyonso, basaleli ya Yehova bazali lelo kotalela makambo ya mokili na lolenge yango ezali na boyokani na bisakweli minene ya Biblia. Mabota mazali komeka na molende nyonso—kasi bobele mpamba—kotya kimya ya solo. Makambo mazali koleka mapusi bango na kosɛnga na Ebongiseli ya Mabota Masangani ete ezwa bikateli na ntina na bisika ya mokili epai mobulu mozali. (Emoniseli 13:15-17) Nzokande, na motema likoló, libota ya Nzambe bazali kozela moko na makambo ya esengo oyo makosalema, oyo mokolo na yango mosili kobɛlɛma. “Tosepela, tojala na esɛngo; tokokumisa ye mpɔ ete libala na Mwana na Mpate esili koya. Mwasi na ye asili komibɔngisa njoto.”—Emɔnisɛli 19:7.
Mosala ya kosakola—Bozito to esengo?
16. Monisá lolenge oyo moklisto akoki kobungisa esengo na ye mpo ete atiki kosalela makambo oyo ayekolaki?
16 “Yango eyekoli bino mpe eyambi bino mpe eyoki bino mpe emɔni bino epai na ngai, bosalaka yango; mpe Njambe na kimia akojala na bino elɔngɔ.” (Bafilipi 4:9) Na kosaleláká makambo oyo basili koyekola, baklisto bakoki komizela kozwa mapamboli ya Nzambe. Moko na makambo maleki ntina oyo tosili koyekola, ezali bongo motuya ya mosala ya kosakola nsango malamu epai na basusu. Na yango, nani akoki kozwa kimya ya elimo to kozala na esengo soki aboyi koyebisa nsango epai na bato ya motema sembo, nsango oyo bomoi na bango etalelami na koyoka yango?—Ezekiele 3:17-21; 1 Bakolinti 9:16; 1 Timoté 4:16.
17. Mpo na nini mosala na biso ya kosakola mosengeli kozala ntango nyonso liziba ya esengo?
17 Kokutana na bato oyo bakokani na bampate baoyo bazali na bolingo malamu ya koyekola koyeba Yehova, ezali esengo mingi. Ya solo, baoyo bazali kosala na mokano ya sembo, ntango nyonso bakotalela mosala ya Bokonzi lokola liziba ya esengo. Yango ezali bongo mpo ete ntina ya liboso ya kozala Motatoli ya Yehova ezali mpo na kokumisa nkombo na Ye mpe kolóngisa etɛlɛmɛlo na Ye lokola Nkolo Moyangeli. (1 Ntango 16:31) Moto oyo andimi likambo oyo akosepela ata soki bato baboyi na lolenge mabe mpenza nsango malamu oyo azali komema. Ayebi ete mosala ya kosakwela bato bazangi kondima ekosila mokolo mosusu; nzokande mosala ya kokumisa nkombo ya Yehova mokoumela seko.
18. Nini ezali kopusa moklisto na kosala mokano ya Yehova?
18 Lingomba ya solo lizali kopusa baoyo bazali kati na yango na kosala makambo oyo masɛngami na Yehova, mpo ete basɛngisami te, kasi mpo ete balingi yango. (Nzembo 40:8; Yoane 4:34) Bato mingi bazali na mokakatano mpo na kokanga ntina na yango. Mwasi moko na libala alobaki na Motatoli moko ya mwasi oyo akendaki kotala ye, ete: “Oyebi, nasengeli kopesa bino longonya. Nakoki soko moke te kokende ndako na ndako mpo na kosakola lingomba na ngai na lolenge oyo bozali kosala.” Na mwa kosɛka moke, Motatoli azongisaki ete: “Nakoki komitya na esika na yo. Liboso ete nákóma Motatoli ya Yehova, okokaki komona ngai te kokende epai na bato mosusu mpo na kolobela lingomba na ngai. Kasi, nalingi yango sikawa.” Mwasi wana ya libala akanisaki mwa moke mpe ayaki kosukisa ete: “Na kotala malamu, lingomba na yo lizali na eloko mpo na kopesa, nzokande lingomba na ngai lizali na eloko te. Mbala mosusu esengeli na ngai kotalela malamu.”
19. Mpo na nini lelo ezali mpenza ntango ya kosepela?
19 Mokapo ya mobu 1994 oyo momonisami na makomi minene kati na Ndako na biso ya Bokonzi, ezali kokundwela biso mbala na mbala, ete: “Tyá elikya epai na Yehova na motema na yo mobimba.” (Masese 3:5, NW) Likambo oyo ete tozali na likoki ya kotya motema epai na Yehova, esika makasi na biso epai tozali kobombama, ezali ntina monene ya kosepela, boye te? Njembo 64:10 elimboli ete: “Bayɛngɛbɛnɛ bakosepela mpɔ na [Yehova]; bakomibomba epai na ye.” Oyo ezali ntango ya kolɛmba te soko ya kotika te. Sanza moko na moko oyo ezali koleka, ezali kobɛlɛmisa biso penepene na bosolo ya makambo oyo basaleli ya Yehova balukaki komona yango uta na mikolo ya Abele. Lelo ezali ntango ya kotya elikya epai na Yehova na motema na biso mobimba, koyebáká ete tozali na bantina mingi ya kosepela!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na mayangani mpe mbala moko na sanza kati na masangá, maloba mokuse mazali koyebisama mpo na komonisa motuya ya makabo ya bolingo malamu oyo mazwamaki mpe mosolo oyo mobimisamaki. Na mabaku mosusu, nkomá etindamaka mpo na kopesa toli na lolenge ya kosalela makabo motindo yango. Na bongo, moto na moto akoyeba malamu lolenge mosolo oyo mopesami mozali kosalelama mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba.
Lolenge nini okoyanola?
◻ Engebene Nehemia 8:10, mpo na nini tosengeli kosepela?
◻ Lolenge nini Deteronome 26:11 mpe 28:45-47 emonisi ntina ya kosepela?
◻ Lolenge nini Bafilipi 4:4-9 ezali kosalisa biso na kosepela ntango nyonso?
◻ Mokapo ya mobu 1994 epesi biso ntina nini mpo na kosepela?
[Elilingi na lokasa 16]
Batatoli ya Russie mpe ya Allemagne bazali kosepela na lolenge basangani kati na bondeko ya mokili mobimba
[Elilingi na lokasa 17]
Kokabola solo elongo na bato mosusu ezali ntina ya kosepela