Okoki kolónga bipekiseli wana!
MPEPO monene ekoki komema ebele na bato mpe tone mingi ya biloko. Lolenge nini mpepo oyo ezali na bozito boye ekoki kopumbwa likoló? Ezali mpo na nguya oyo etombolaka mpepo na likoló.
Wana mpepo etumbi mbangu na nzela ebongisami mpo na yango na libándá ya mpepo, mopepe ekolekaka makasi na likoló mpe na nsé ya mapapu oyo esali mwa egudé. Yango ebimisaka nguya ya kotombola oyo ebéngami portance. Ntango nguya wana ekómi monene, mpepo ekoki kotika mabelé mpe kopumbwa na likoló. Ezali polele ete mpepo oyo ezali na bozito mingi koleka ekoki te kobimisa nguya oyo esengeli mpo na kotombola yango likoló.
Biso mpe tokoki kokóma bozito mingi koleka. Esili koleka bikeke mingi, Mokonzi Davidi alobaki ete ‘mabe na ye ezalaki na bozito boleki nguya na ye.’ (Nzembo 38:4) Bobɛlɛ bongo, Yesu apesaki likebisi na ntina ya kolɛmba mpo na mitungisi ya bomoi. (Luka 21:34, NW) Makanisi mpe mayoki ya kozanga elikya makoki kolɛmbisa biso kino ekoki komonana lokola ete tokokoka te “kotombwama.” Okómi na bozito ya lolenge yango? To osili kokutana na bipekiseli mosusu oyo bizali kozongisa bokóli na yo ya elimo nsima? Soki ezali bongo, nini ekoki kosalisa yo?
Olɛmbi makambo ya bomoi?
Kolɛmba makambo—komilelalela oyo epalangani mingi na mikolo na biso—ekoki kokóma epekiseli kati na makanisi, ata epai na basaleli mosusu ya Yehova. Mingimingi bilenge bazalaka na momeseno ya kotalela makambo mosusu lokola ya kolɛmbisa bomoi. Oyokaka mbala mosusu bongo na ntina na makita ya boklisto? Soki ee, okoki kosala nini mpo ete koyangana na yo na makita ezala likambo ya kolendisa?
Kosangana na yango ezali mwango ya kobongisa makambo. Paulo akomelaki elenge mobali Timoté ete: “Omikembisa yo moko mpo na bizaleli na moto na Nzambe. Mpo ete ata kokɛmbisa na nzoto ekopesa litomba mwa moke, nde bizaleli na moto na Nzambe ikopesaka litomba na nzela nyonso, awa ezali yango na elaka na bomoi mpo na sasaipi oyo mpe mpo na ntango ekoya.” (1 Timoté 4:7, 8) Búku na ntina na kokɛmbisa nzoto ekoki kolɛmbisa mpe ekoki kozala na motuya moke soki tolandi bangalasisi oyo eyebisami kati na yango te. Makita ya boklisto makanami mpo na kosala ngalasisi ya makanisi mpe makosala bongo soki tomibongisi mpe tosangani na yango. Bosangani wana ekosala ete makita mápesa litomba mpe másepelisa mingi.
Na likambo yango, elenge mwasi moko moklisto na nkombo Mara alobaki ete: “Soki namibongisi te mpo na makita, nayokaka mpenza elɛngi na yango te. Nzokande, wana namibongisi liboso, makanisi mpe motema na ngai esimbaka makambo nokinoki. Makita makómaka na ntina mingi, mpe nazelaka na esengo libaku ya kopesa biyano.”
Koyekola koyoka ekoki lisusu kosunga. Koyoka miziki moko kitoko ezalaka mpasi te mpe ekoki nokinoki kosepelisa. Kasi bosepeli nyonso te eyaka pwasa. Tokozwa bosepeli kati na makita bobɛlɛ na ntango tozali koyoka na likebi mingi makambo oyo mazali kolobama. Moklisto moko na nkombo Rachel amonisaki ete: “Ntango molobi azali na mɔ́tɔ mingi te, nasengeli kotya likebi mingi mpenza. Mpo na ngai lilako lizali, ‘Wana lisoló lizali na mɔ́tɔ mingi te, nasengeli kotya likebi monene.’ . . . Natyaka likebi monene na mikapo, namekaka kozwa matomba mingi na yango na meko oyo nakoki kosala bongo.” Tosengeli komipekisa mpenza, lokola Rachel, mpo ete tókoka koyoka. Mokanda ya Masese elobi ete: “Mwana na ngai, batelá mayele na ngai, mpe sembolá litoi na yo epai na boyebi na ngai.”—Masese 5:1.
Ekoki kozala ete makambo mosusu oyo mayebisami na makita mazali mwa moke kozongelama ya makambo toyebi. Esengeli kozala bongo! Basaleli nyonso ya Nzambe bazali na mposa ya bokundoli. Nzoto ya kozanga kokoka, na bamposa na yango ya mabe mpe bɔɔngɔ́ oyo ebosanaka makambo, ezali na mposa ya lisalisi nyonso ekoki yango kozwa. Ntoma Petelo ‘azalaki kotika te kokanisela baninga na ye bandimi makambo mosusu, ata basilaki koyeba yango mpe basilaki kolendisama na makambo na solo.’ (2 Petelo 1:12) Yesu alimbolaki lisusu ete “mokomeli na mokomeli . . . azali lokola mokolo na ndako oyo akobimisa longwa na ebombelo na ye yango ezali na sika mpe yango ezali na kala.” (Matai 13:52) Na yango, atako makita na biso mazali kobimisa makanisi ya Makomami oyo toyebi malamu, to ‘bozwi ya kala,’ ezali ntango nyonso na mwa ‘bozwi ya sika’ mpo na kosepelisa biso.
Kozala na ekateli makasi ya kozwa litomba na makita ekoki mpenza kopesa biso nguya ya kotombwana na elimo. Yesu alobaki ete: “Esengo na baoyo bazali kososola bamposa na bango ya elimo [baoyo bazali basɛngi mpo na elimo].” (Matai 5:3, NW, maloba na nsé ya lokasa) Ezaleli lolenge oyo liboso na bilei kitoko ya elimo oyo epesami na makita ya boklisto ekosilisa ezaleli ya kolɛmba makambo ya bomoi.—Matai 24:45-47.
Olɛmbi na ntina na ndakisa moko mabe?
Osilá komitungisa na ntina na etamboli mabe ya moto moko kati na lisangá ya boklisto? Ekoki kozala ete omitunaki, ‘Lolenge nini ndeko akoki komitambwisa boye mpe kozala lisusu na lokumu malamu?’ Makanisi ya lolenge yango makoki kozala lokola epekiseli kati na makanisi, oyo ekoki kokanga miso na biso likoló na motuya monene ya boninga kitoko oyo tokoki kozwa kati na basaleli ya Nzambe.—Nzembo 133:1.
Ekoki kozala ete basangani mosusu ya lisangá ya Kolose bakutanaki na mokakatano motindo yango. Paulo alendisaki bango ete: “Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, boyikanaka mpiko.” (Bakolose 3:13) Paulo ayebaki ete mbala mosusu baklisto mosusu ya Kolose bamitambwisaki mabe mpe na yango bakokaki solo kozala ntina ya komilela mpo na basusu. Bongo tosengeli te kokamwa mingi soki moko kati na bandeko na biso mibali to bandeko basi azangaka na bantango mosusu komonisa bizaleli mosusu ya elimo. Yesu apesaki batoli kitoko na ntina na lolenge ya kosilisa mikakatano minene. (Matai 5:23, 24; 18:15-17) Kasi mbala mingi, tosengeli bobɛlɛ koyika mpiko na bolɛmbu ya bandeko na biso bandimi mpe kolimbisa bango. (1 Petelo 4:8) Ya solo, lolenge wana ya kosala ekoki kozala malamu mpo na biso mpe mpo na basusu. Mpo na nini ezali bongo?
Masese 19:11 elobi ete: “Bososoli na moto na mayele ekozikisa nkanda na ye; nkembo na ye ezali ete akolimbisa masumu.” Oyo nde likambo lileki malamu, kolimbisa na esika ya kotika ete kosilika mpe nkanda ekóla! Salvador, nkulutu moko oyo ayebani malamu mpo na elimo na ye oyo etondi na bolingo, alobaki ete: “Ntango ndeko moko asaleli ngai mabe to alobi likambo moko ya kopesa mpasi, namitunaka ‘Lolenge nini nakoki kosalisa ndeko na ngai? Lolenge nini nakoki kopɛngola ete nabungisa te boyokani ya motuya mingi oyo nazali na yango elongo na ye?’ Nabatelaka ntango nyonso kati na makanisi ete ezalaka mpasi te koloba makambo mabe. Soki moto alobi likambo kozanga kokanisa, lolenge malamu ya kobongisa ezali ete alongola makambo oyo ye alobaki mpe abandela makambo nyonso. Kasi yango ekoki kosalema te, mpo na yango naponaka nzela mosusu ya malamu mpe natyaka likebi te na oyo bato bakoki koloba. Natalelaka yango lokola elembo ya nzoto ezangi kokoka kasi te lokola likambo oyo ndeko akanisaki kosala bongo.”
Okoki kokanisa ete koloba yango ezali pɛtɛɛ kasi kosala yango nde ezali mpasi. Kasi nyonso etali lolenge na biso ya kokanisa. Paulo apesaki toli oyo: “Makambo nyonso na boboto, . . . bókanisa makambo yango.” (Bafilipi 4:8) “Na boboto” elimboli mpenza “ya kobimisa bolingo ya motema.” Yehova alingi ete tótalela makambo malamu oyo mazali kati na bato, tótya likebi na oyo ekoki kobimisa bolingo ya motema kasi te oyo ekoki kopesa nkanda. Ye moko azali kopesa biso ndakisa eleki monene kati na likambo yango. Mokomi ya Nzembo akundweli biso likambo yango, ete: “Ɛ [Yehova], soko yo okotalaka bokesene, ɛ Nkolo, nani akotɛlɛma?”—Nzembo 103:12; 130:3.
Ezali solo ete, mbala mosusu etamboli ya ndeko moko ekoki mpenza kopesa mawa, kasi ntálo monene ya bandeko na biso bandimi bazali bandakisa kitoko mpo na oyo etali bomoi ya boklisto. Soki tomikundoli yango, lokola Davidi tokozala na esengo ya ‘kosanzola [Yehova] na monɔkɔ na biso bɛ, ee kati na bato mingi tokosanzola ye.’—Nzembo 109:30.
Emonani lokola ete kozala Motatoli ezali mpasi mingi?
Likambo ya mawa, na ntina na epekiseli mosusu ya makanisi, bato mosusu babandi naino kosanzola Yehova te. Mibali mingi oyo bazali Batatoli ya Yehova te bazali mpenza kokokisa malamu bamposa ya mabota na bango mpe bazali nkutu kosalisa basi na bango kati na mosala ya boklisto. Bazali na boboto mingi mpe bakoki kosepela na lisangá, kasi bazali kokakatana mpo na kokóma basaleli bamipesi ya Nzambe. Nini ezali kopekisa bango?
Mokakatano moko mokoki kozala ete mibali wana basili komona mosala mingi ya teokrasi oyo basi na bango bazali na yango mpe bazali kokanisa ete kozala Motatoli esɛngaka makambo mingi. To ekoki kozala ete bazali kobanga ete bakokoka soko moke te komipesa na mosala ya kosakola ndako na ndako. Na likanisi na bango, emonani lokola ete mikumba mizali mingi koleka mapamboli. Mpo na nini epekiseli ya makanisi motindo yango? Ntálo monene ya bayekoli ya Biblia bayekolaka mpe basalelaka solo moke na moke. Kasi mibali wana oyo bazali bandimi te mbala mingi bayebi malamu mikumba nyonso ya boklisto liboso ete bákólisa mokano ya kondima yango.
Manuel, oyo azalaki kati na ezalela yango ayebisi ete: “Na boumeli ya mibu soko zomi, nazalaki kokende elongo na mwasi na ngai na mayangani mpe na makita. Mpo na koloba solo, nazalaki kosepela mingi kozala elongo na Batatoli koleka boninga ya bato ya mokili, mpe nazalaki kosepela mingi kosalisa bango wana libaku lizalaki komonana. Nazalaki kokamwa mingi na bolingo oyo ezalaki komonana mingi kati na bango. Kasi likanisi ya kokende ndako na ndako ezalaki epekiseli monene mpo na ngai, mpe nazalaki kobanga ete baninga na ngai ya mosala bakotyola ngai.
“Mwasi na ngai azalaki mpenza na motema pɛtɛɛ epai na ngai mpe azalaki soko moke te komeka kopusa ngai na makasi mpo na koyekola Biblia. Ezala ye to bana, banso bazalaki ‘koteya’ ngai mingi mpenza na ndakisa na bango kitoko. José, nkulutu moko ya lisangá, atyaki likebi mingi likoló na ngai. Nakanisi ete ezalaki bilendiseli na ye nde bisalaki ete nabanda koyekola malamu. Nsima ya kozwa batisimo, nasosolaki ete bipekiseli wana bizalaki bobɛlɛ kati na makanisi na ngai moko kasi epai mosusu te. Ntango nazwaki ekateli ya kosalela Yehova, namonaki mpenza lisungi na ye mpo na oyo etali kolónga kobanga oyo nazalaki na yango.”
Lolenge nini basi mpe bankulutu baklisto bakoki kosalisa mibali lokola Manuel na kolónga bipekiseli oyo bizali kati na makanisi na bango? Boyekoli ya Biblia ekoki kolóna botɔ́ndi mpe mposa ya kosala mokano na Nzambe. Ya solo, boyebi ya mozindo ya Makomami ezali moboko mpo na komonisa kondima mpe kozala na endimiseli makasi kati na elikya oyo ekokokana nsima.—Baloma 15:13.
Nini ekoki kolendisa mibali ya lolenge yango na kondima boyekoli ya Biblia? Mbala mingi, boninga elongo na ndeko mobali moko ya bososoli kati na lisangá ekoki kozala na ntina mingi. Mbala mosusu nkulutu moko to ndeko mobali mosusu ya makoki mingi akoki koluka koyeba mobali yango. Wana boyokani ya malamu esili kosalema, nyonso oyo akozala na yango mposa ezali ete moto moko amonisa ye libyangi mpo na kobanda boyekoli elongo na ye. (1 Bakolinti 9:19-23) Na ntango yango, mwasi moklisto oyo azali na mayele akoki kokabola bilei mike ya elimo elongo na mobali na ye oyo azali mondimi te, koyebáká malamu ete akoyanola mpenza te soki bazali kopusa ye na makasi.—Masese 19:14.
Lokola Manuel ayebaki yango na makambo na ye moko, wana moto abandi kozwa nguya ya elimo, mikakatano oyo mikokani na ngomba mikokóma lokola mwa libɔ́ndɔ ya mabelé oyo ebimisami na mpóko. Yehova akopesaka nguya na baoyo balingi kosalela ye. (Yisaya 40:29-31) Kati na nguya ya Nzambe mpe na lisungi ya Batatoli oyo bakɔmɛli, bipekiseli ya mibali yango oyo bazali bandimi te ekoki kolongolama. Bongo mosala ya kosakola ndako na ndako ekotungisa lisusu mingi te mpe bakobanga lisusu baninga ya mosala te, wana mosala oyo esalemi na molimo mobimba ekómi na ntina mingi mpo na bango.—Yisaya 51:12; Baloma 10:10.
Kobatela molende
Ezali na makoki ya kolónga bipekiseli lokola oyo misato touti kolobela awa. Ntango mpepo ezali kotika mabelé, esɛngaka nguya mingi ya bamotɛ́lɛ mpe likebi monene ya basáli oyo bazali kokumba yango. Na ntango ya kotombwana, bamotɛ́lɛ etumbaka esánsi mingi koleka na ntango mosusu nyonso ya mobémbo. Bobɛlɛ bongo, kolongola makanisi mpe mayoki ya kozanga elikya esɛngaka molende mpe likebi mingi mpenza. Kobanda ekoki mbala mosusu kozala litambe oyo lizali mpasi mingi, nzokande bokóli ekómaka pɛtɛɛ wana molende mosili kozwa mosisa.—Kokanisá na 2 Petelo 1:10.
Kotosa nokinoki bilendiseli ya Makomami ekobatela molende ete molandana. (Nzembo 119:60) Tokoki mpenza kondimisama ete lisangá likozala na mposa ya kopesa lisalisi. (Bagalatia 6:2) Nzokande, likambo oyo lileki ntina, lizali lisungi ya Yehova Nzambe. Lokola Davidi alobaki yango, “[Yehova] akumisama, ye oyo akomema mikumba na biso mokolo na mokolo.” (Nzembo 68:19) Soki tokolongola bozito likoló na biso na nzela ya libondeli, mokumba na biso mokokóma pɛ́pɛ́lɛ.
Na bantango mosusu, mpepo emataka wana mapata minene matondi na mbula, ekatisaka yango, mpe ekendaka na likoló oyo ezali kongɛnga na pole ya moi. Biso mpe tokoki kotika nsima makanisi ya kozanga kolónga. Mpo na lisungi ya Nzambe, tokoki kolónga epekiseli ya lipata ya elilingi, mpe kosepela na mopepe ya polele, ya esengo kati na libota ya basaleli ya Yehova na mokili mobimba.
[Bililingi na lokasa 23]
Na lisalisi ya Yehova, tokoki kolóngabipekiseli oyo bizali kati na makanisi