Engebene Biblia
Komonisa mawa ezali mabe?
“NAZALI SOLO NA KONDIMA ETE LISEKWA EZALI, MPE NAKANISAKI ETE EKOKAKI KOZALA MABE MPO NA KOMONISA MAWA NA NGAI LIBOSO YA BATO, ETE NAKOKAKI KOPESA BANGO ELÓNGA NA KOBETA NTEMBE ETE NAZALAKI NA ELIKYA MAKASI. NAKANISAKI ETE SOKI YA SOLO NAZALAKI NA ELIKYA YA LISEKWA, NAKOKAKI MPENZA KOOKA MAWA TE MPO NA MOTO OYO NASILI KOBUNGISA.”—CHARLENE, MOKLISTO ABATISAMI ESILI KOLEKA MIBU 21.
NTANGO moto oyo olingaka akufi, mayoki mpe bizaleli mosusu oyo omizelaki na yango te ekoki koya: kobanga, nkanda, mayoki ya komema ngambo mpe kotungisama na mayoki. Elikya ya kolendisa oyo euti na Biblia mpo na yango, bakufi bakozonga na bomoi na mabelé oyo ekobongwana paladiso mpe etambwisami na Bokonzi ya Nzambe, ekoki kokitisa mpasi ya moklisto. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15; Emoniseli 21:1-4) Kasi, lokola maloba ya Charlene emonisi yango, ntango molingami moko akufi, baklisto mosusu bamimemisaka ngambo ya mpamba: bakanisaka ete ezali mabe koyoka mawa, ete komonisa mawa ekomonisa kozanga kondima na elaka ya Biblia oyo etali lisekwa.
Kasi Biblia elobi nini mpo na komonisa mawa? Ezali mabe mpo na koyoka mawa na ntango molingami akufi?
Bayokaki mawa
Kondima ya Abalayama eyebani malamu. Ntango atyamaki na komekama, “atombolaki [mwana na ye] Yisaka lokola mbeka.” (Baɛbɛlɛ 11:17; Genese 22:9-13) Na ntembe te, moto moko asekwisamaki naino te liboso ya ntango wana, kasi Abalayama azalaki kondima ete, soki yango esɛngisami, “Nzambe azali na likoki ya kosekwisa mwana na ye longwa na bakufi.” (Baebele 11:19) Mbula zomi na mibale nsima wana Abalayama atyamaki na komekama, mwasi na ye Sala akufaki. Lolenge nini moto oyo na kondima amonisaki mayoki na ye? Engebene Biblia, “ayaki mpɔ na koyoka mawa mpɔ na Sala mpe mpɔ na kolela ye.”a (Genese 23:2) Ya solo, moto oyo azalaki kondima ete Nzambe akokaki kosekwisa bakufi alelaki polele. Atako bongo, Abalayama atángami kati na bandakisa ya kondima oyo eyebani.—Baebele 11:8-10.
Ndakisa eleki monene ya komonisa mawa mpo na liwa ya molingami ezali ya Yesu Klisto. Na liwa ya Lasalo, moninga na ye molingami, tozali kotánga boye: “Ekomi Malia na esika ejalaki Yesu, amɔni ye mpe akwei na makolo na ye mpe alobi ete: ‘Moteyi, soki ojalaki awa mbɛlɛ ndeko na ngai akufi tɛ.’ Emoni Yesu ete ajalaki kolela, ayoki mawa na motema mpe amitungisi; alobi mpe ete: ‘Botiyi ye wapi.’ Balobi na ye ete: ‘Yaka kotala, Moteyi.’ Yesu atangisi mpisoli.”—Yoane 11:32-35.
Ezali mpenza likambo ya kolendisa motema ete Mwana ya kokoka ya Nzambe ayokaki nsɔ́ni te mpo na komonisa mawa na ye polele. Liloba ya ebandeli oyo ebongolami na “komitika kokende na mpisoli” (dakruô) elimboli “kotangisa mpisoli na nse ya motema.” Likambo ya ntina mpenza ezali ete Yesu asilaki kosekwisa bato mibale liboso—mwana mobali ya mwasi akufelá mobali, ya mboka Naina mpe mwana mwasi ya Yailo—mpe azalaki na mokano ya kosekwisa Lasalo. (Luka 7:11-15; 8:41, 42, 49-55; talá Yoane 11:11.) Mwa liboso, alobaki na Malata: “Ngai najali lisekwa mpe bomɔi. Ye oyo ajali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika.” (Yoane 11:25) Nzokande, Yesu aokaki mpenza mpasi na motema na lolenge ete miso na ye matondaki na mpisoli.
Ezali lisusu na likambo moko ya ntina. Yesu azali “elilingi na motindo na [Yehova].” (Baɛbɛlɛ 1:3) Na bongo, bolingo ya Yesu mpe mayoki na ye ya mozindo na ntango ya liwa ya moto oyo azalaki kolinga ezali komonisa lolenge ya Tata na biso ya likoló, Yehova. Ezali komonisa Nzambe oyo motema na ye eyokaka mpasi mpo na mawa ya basaleli na ye.—Talá Nzembo 56:8.
Emonani polele ete ezali mabe te komonisa mawa na ntango moto olingaka akufi. Abalayama alelaki mpo na liwa ya Sala. Yesu amonisaki mawa na ye polele ntango Lasalo akufaki. Yehova azali koyeba mpasi na biso mpamba te “azali komibanzabanza mpo na biso.”—1 Petelo 5:7, NW.
Kasi ezali boni mpo na elikya ya baklisto? Yango ezali nde kobongola mwá likambo moko?
‘Tóyoka mawa te lokola ekosalaka basusu’
Na ekeke ya liboso, ntango baklisto ya lisangá ya Tesaloniki bazalaki na mawa na liwa ya balingami na bango kati na kondima, ntoma Paulo alukaki kobɔndisa bango. Akomaki: “Bandeko, tolingi tɛ ete bojanga koyeba makambo na bango basili kolala ete boyoka mawa tɛ pelamɔkɔ bamosusu baoyo bajali na elikia tɛ.” (1 Batɛsalɔniki 4:13) Ya solo, baoyo bazali na elikya kati na elaká ya Nzambe mpo na kosekwisa bakufi bazali kati na ezalela malamu koleka baoyo bazangi elikya.b Ndenge nini?
Soki bakutani na mokakatano ya liwa, baoyo bazangi elikya ya lisekwa babulunganaka. Ata soki bandimaka ete ezali na lolenge moko to mosusu ya bomoi nsima ya liwa, bato moke mpamba nde bazwaka kobɔndisama mpo na yango. Mpo na basusu, mawa na bango ezali bobele te ete liwa ekaboli bango na molingami na bango, kasi mpo ete, mpo na bango, kokabwana wana ezali ya seko. Mpo ete bazali na bososoli ya polele te na ntina etali lisekwa, kokundama ya bakufi na bango ezali kobeta ngonga ya bilikya na bango, bakanisaka ete bakomona bango lisusu soko moke te.—1 Bakolinti 15:12-19, 32.
Nzokande, bokeseni ezali mpo na baklisto ya solo. Paulo alimbolaki ete liwa ezali lokola mpɔngi, mpamba te ezali eleko ya kozanga koyeba oyo ekokani na mpɔngi mozindo, mpe lisusu mpo ete ekoki kosalema ete kolamuka ezala na nzela ya lisekwa. (Nzembo 13:3; Mosakoli 9:5, 10) Elikya yango ezwi moboko likoló ya Biblia ezali solo kopesa bokeseni.
Ntango moklisto abungisi moto oyo alingaka kati na liwa, aokaka mpe mpasi lolenge moko na baoyo bazangi kondima, kobunga ya boninga, ya elongi oyo omeseneki na yango, kozanga koyokana ya mongóngó oyo ozalaki kosepela na yango. Elikya ya lisekwa ekómisaka motema te ete ezanga maoki. Nzokande, etyaka ndelo na liláká. Kasi elikya yango elongolaka mawa te, nde ezali kopesa lolenge malamu ya kozala na bompikiliki na ntina etali mpasi yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ntina na liloba ya liebele “koyoka mawa,” Theological Wordbook of the Old Testament (Diksionere ya teoloji ya kondimana ya sika) elobi ete: “Baoyo nyonso bazalaki kooka mpasi mpo na mowei bazalaki koya kokabola mawa elongo na basangani ya libota. . . . Liláká ezalaki kosalema mbala mingi na konganga makasi mpe na kokimela oyo ezalaki koyokana.” Na ntina na liloba na Liebele oyo ebongolami na “kolela,” búku wana elobi lisusu ete: “Ntango mpisoli esangisami na miso, nzokande kolela esangisami na mongóngó; Ba sémites bazalaki kolela na nsé ya motema te kasi bazalaki kolela makasi. . . . Kati na Kondimana ya kala, kolela ezali kati na bomoto mpe eyaka mbala moko na ntango ya mayoki makasi.”
b Baklisto ya ekeke ya liboso oyo Paulo akomelaki bango bazalaki na elikya ya lisekwa mpo na kokende na likoló epai kuna basengelaki kozala bayangeli elongo na Klisto. (1 Batesaloniki 4:14-17; talá mpe Luka 22:29, 30.) Na yango, Paulo alendisaki bango bábɔndisanaka na elikya ete na ntango ya kozala ya Klisto basembwi oyo bazalaki kati na bango kasi basilaki kokufa bakosekwisama mpe bakosangana elongo na Klisto mpe kati na bango. Nzokande, mpo na ebele monene baoyo bazali kokufa, Biblia ezali kolobela elikya ya lisekwa kati na mabelé oyo ekozonga Paladiso.—Yoane 5:28, 29; Emoniseli 21:1-4.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Jean-Baptiste Greuze, elimbolami na Fils puni, Louvre; © Fɔtɔ́ R.M.N.