Liteya 3
Biblia—mokanda na biso ya liboso
1, 2. Kokoma Biblia ebandaki ntango nini mpe esukaki ntango nini, lisusu, Biblia ebimisami na motuya boni?
1 Biblia ezali mokanda ya liboso na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, mpe lokola biso tozali baministre ya nsango malamu tosengeli koyeba yango malamu. Tosengeli koyeba ndenge nini ekomamaki, makambo nini mazali kati na yango mpe ndenge nini tokoki kosalela yango.
2 Kokoma Biblia ebandaki na 1513 liboso na ntango na biso; na date wana nde Moïse azwaki etinda ete abanda kokoma. Ntoma Yoane, mokomi ya nsuka ya Biblia, asukisaki kokoma yango na nsuka na ekeke ya liboso ya ntango na biso. Elingi koloba ete eleko mobimba na boumeli na yango Biblia ezalaki kokomama ezali soko bikeke zomi na motoba. Lelo oyo Biblia, mobimba to ndambo, ekoki kozwama na minoko soko 2 000. Mikanda mingi te mizali kokoma na ebimeli na milió moko; nzokande Biblia esili kobima bamiliare. Mokanda mosusu ekokani na yango te. Ya solo, likambo oyo ete mokanda moko ya lingomba ebatelami uta bikeke mingi mpe ekumisami na bamilió na bato ekoki te mpo na koloba ete euti na Nzambe. Esengeli nde kozala na elembo emonisi ete epemami na Nzambe mpe Nzambe nde azali Mobandisi na yango. Nzokande, nsima na koyekola Biblia malamumalamu, bato na motema sembo bayei komona ete ezali na elembo oyo.
3, 4. Biblia ekomamaki motindo nini na ebandeli, mpe na eleko nini ekabolamaki na mikapo mpe na ba versets?
3 Biblia ekomamaki na ebandeli na minoko oyo: hébreu, araméen mpe greke. Lelo oyo Biblia ezali liboke ya mikanda ntuku motoba na motoba. Nzokande, motuya mpenzampenza ya mikanda (mosusu na yango ekangisami esika moko to mpe ekabwami) ezali na ntina monene te; molongo na kolandana na yango ezali mpe na ntina monene te. Bikeke mingi nsima wana Biblia esilaki kokomama, mikanda na yango mizalaki ntango nyonso kati na barulo ekeseni, mpe na bakataloge mingi ya kala molongo na kolandana na yango ekeseni. Likambo ya ntina ezali ya koyeba mikanda nini mizalaki mpenza kati na kataloge. Mpamba te, bobele mikanda oyo mizali kati na kataloge nde mikoki kondimama ete mipemamaki solo. Uta kalakala, batemeli balukaki kokotisa mikanda mosusu ya lokuta kati na yango kasi balongaki te.
4 Na ebandeli, Biblia ekomamaki na makomi malandani, kozanga kokabwana kati na yango. Ezalaki bobele na ekeke ya libwa ya ntango na biso nde ebongiseli moko ya kotya bilembo epesaki nzela na kokabola bafraze to milongo ya maloba. Bilembo oyo tomeseni kosalela lelo mpo na kokabola maloba, bilembo bibengami ponctuation ebimaki na ekeke ya zomi na mitano, mpe imprimerie to enyateli esali mingi mpo na kopanza yango. Kokabola Biblia na mikapo mpe na ba versets (Biblia ebengami Version du roi Jacques ezali na mikapo 1 189 mpe na ba versets 31 102) ezali likambo ya bakomi na ebandeli te. Kokabola yango esalamaki bobele bikeke mingi na nsima. Bayuda na mayele mingi, babengami Massorètes, bakabolaki Makomami ya hébreu na ba versets. Na nsima, na ekeke ya zomi na misato, Biblia ekabolamaki na mikapo.
5, 6. Kopemama ya Biblia elimboli nini, mpe ndenge nini tokoki kolimbola kokesena ya styles to lolenge ya kokoma na mikanda na yango?
5 Liboke ya mikanda mipemami. Jéhovah asalelaki bato ntuku minei lokola basekretere; nzokande Mobandisi to Auteur ya Liloba na ye epemami ezali bobele ye moko. “Makomi nyonso mapemami na Nzambe”, bakisa Makomami ya greke ya boklisto mpe “Makomami mosusu”. (2 Tim. 3:16; 2 Pet. 3:15, 16) Awa, liloba “kopemama” elimboli kozalisa te, lokola soki bakomi yango bazwaki mpema mpo na kopusa bango na kosala makambo maleki nguya ya bomoto, kasi elimboli nde kokoma makomi mazangi libunga oyo bato bakoki kondima yango lokola ete ekomamaki na Nzambe ye moko. Nzambe apesaki elimo na ye na bato ya sembo mpo ete bakoma, wana ezalaki bango kotambwisama na ye moko. Ntina wana ntoma Petelo akokaki koloba ete: “Esakweli moko te ebimaki na mokano na moto, kasi bato [baponami] na Nzambe balobi wana ezalaki bango kopusama na elimo santu.” (2 Pet. 1:21) Na mbala moko, Nzambe ye moko akomaki. Ezali na ntango akomaki Mibeko Zomi oyo apesaki na Moïse likoló na “bitando [mibale] na mabanga bikomami na mosapi na Nzambe”.— Ex. 31:18.
6 Ezali na makambo matindamaki na bakomi ya Biblia ete bakoma yango ndenge bazalaki koyoka liloba moko na moko to dictée. (Ex. 34:27) Ntango mosusu, basakoli bazwaki nsango ya sikisiki mpo na koyebisa yango. (1 Mikonzi 22:14; Yil. 1:7) Nzokande bilembo mingi bimonisi ete bato oyo Nzambe asalisaki bango mosala ya kokoma Biblia bazwaki ntango nyonso maloba ya sikisiki te mpo na kokoma yango. Na ndakisa, Yoane azwaki Emoniseli “na bilembo” na nsima na anzelu moko ya Nzambe, mpe bobele ntoma oyo moko azwaki etinda ete: “Mpo na yango ezali yo komona, okoma yango kati na buku.” (Emon. 1:1, 2, 10, 11) Emonani ete Nzambe apesaki nzela na bakomi ya Biblia ete bapona bango moko maloba mpo na kokoma bimonaneli oyo bazwaki; nzokande azalaki kolanda bango penepene na nzela na elimo na ye mpo ete mikanda na bango mizala na mabunga te mpe miyokana na mokano na ye. (Mosakoli 12:10) Ntina wana tomonaka ete mikanda ya Biblia ezali na styles to lolenge ya kokoma ekeseni.
7. Mingimingi, banani bakomaki Makomami ya hébreu, mpe masengami nini ya basakoli ya solo bakokisaki yango bango nyonso?
7 Makambo mazali na makomi ya Moïse emonisi kozanga ntembe ete epemamaki na Nzambe. Moïse alukaki te ete azala motambwisi na Bayisraele. Na ebandeli aboyaki. (Ex. 3:10, 11; 4:10-14) Ezali nde Nzambe aponaki Moïse mpe apesaki ye nguya ya kosala bikamwiseli. Ata banganga-nkisi na Ezipito bandimaki ete bikamwiseli oyo Moïse azalaki kosala biutaki na Nzambe. (Ex. 4:1-9; 8:16-19) Kotosaka etinda azwaki na Nzambe mpe na kotambwisama na elimo santu, Moïse apusamaki na koloba ndambo na makambo mazali na Biblia mpe na nsima akomaki yango. (Ex. 17:14) Nsima na kufa na ye, makomi na Yosua, na Samwele, na Gada mpe na Natana (mikanda yango mibengami Yosua, Basambisi, Luta, 1 mpe 2 Samwele) ebakisamaki na mikanda oyo Moïse asilaki kokoma. Mokonzi David mpe mokonzi Salomo bakomaki lisusu mikanda oyo mibakisamaki na Makomami mosantu. Na nsima basakoli, kobanda na Yona kino na Malaki, babakisaki mikanda misusu oyo bango bakomaki. Bango nyonso bakokisaki masengami ya basakoli ya solo ya Jéhovah, oyo ezali boye ete: balobaki na nkombo ya Jéhovah, bisakweli na bango bikokanaki solo mpe bakambaki bato epai na Nzambe.— Deter. 13:1-3; 18:20-22.
8. Wapi elembo ekoki kotyamela ntembe te oyo emonisi ete mikanda na Makomami na hébreu mipemamaki solo na Nzambe?
8 Lokola Jéhovah apesaki elimo na ye na bato ete bakoma, bobele bongo apesaki mpe elimo na ye na bato mosusu ete bayanganisa makomi wana nyonso mapemami. Engebene lisolo ya Bayuda, Esidrase asalaki mosala oyo ya koyanganisa makomi ya bulee nsima wana Bayuda oyo bakendaki boombo bazongaki na mokili na bango. Esidrase akokaki mpo na kosala mosala yango mpamba te ye mpe azalaki moko na bakomi na Biblia bapemami, azalaki lisusu nganga mpe “mokomeli na mayele na mobeko na Moïse”. (Esidrase 7:1-11) Na nsuka na ekeke na mitano liboso na ntango na biso, mikanda nyonso na Makomami na hébreu mikokaki. Ezalaki na makomi ndenge moko na oyo tozali na yango lelo mpe oyo ekabolami sikawa na mikanda ntuku misato na libwa. Nzambe ye moko andimaki uta ebandeli ete euti solo epai na ye; ezalaki likambo ya bato te mpo na kopona wapi bakoki kondima. Elembo ya polele koleka oyo emonisi ete mikanda nyonso oyo mindimami lelo na makomi na hébreu mipemamaki na Nzambe, ezali litatoli ekoki kotyamela ntembe te, ya Yesu Klisto mpe ya bakomi na Makomami na greke ya boklisto. Bakotisaki kati na makomi na bango mikapo mingi ya Makomami ya hébreu mapemami, nzokande mbala moko te bakamataki maloba kati na mikanda mibengami apokrife (elingi koloba mikanda mizangi kopemama, oyo bato babakisaki yango kobakisa).— Luka 24:44, 45.
9, 10. Nini endimisi biso ete mikanda na Makomami na greke ya boklisto ezali solo kati na mikanda oyo mipemamaki na Nzambe?
9 Kokomama mpe koyanganisama na mikanda ntuku mibale na nsambo na Makomami na greke ya boklisto esalemaki lokola na Makomami na hébreu. Klisto “apesaki makabo epai na mibali”, ee, “asili kopesa makabo ete bamosusu bazala bantoma, bamosusu basakoli, bamosusu bapalanganisi na nsango malamu, bamosusu babateli mpe balakisi”. (Baef. 4:8, 11-13) Etambwisamaki bango na elimo santu na Nzambe, bakomaki mateya nyonso ya sembo mpo na lisangá ya boklisto. Yesu alakaki bantoma na ye ete elimo na Nzambe ekosalisa bango, ekolakisa bango, ekotambwisa bango, ekokundola na boongó na bango makambo oyo bayokaki epai na ye, mpe koyebisa bango makambo mosusu mazali koya. (Yoane 14:26; 16:13) Na yango, ntembe ezali te ete ba Evanzile na bango ezali solo.
10 Bosolo ya mokanda moko etali te ntalo ya mbala oyo etangami na mikanda misusu, etali mpe te mpo ete mokomi boye to mokomi mosusu boye oyo azalaki ntoma te azwaki makambo kati na yango. Makambo makomami kati na mokanda masengeli komonisa ete epemamaki na elimo santu. Mokanda oyo epemami solo, ekoki kotinda bato na biyambayamba te, soki mpe na losambo ya bilimu mabe, soki lisusu na losambo ya moto. Epai mosusu, esengeli kozala na boyokani na makambo nyonso na Biblia mobimba. Mokanda moko na moko esengeli kolanda “lolenge na maloba na sembo” mauti na Nzambe mpe kozala na boyokani na mateya na Yesu. (2 Tim. 1:13) Bantoma balobaki wana ezalaki bango kopusama na Nzambe. Na nzela na elimo santu, bazalaki na “bososoli na maloba mapemami”, oyo ezalaki kosalisa bango na koyeba soki maloba yango mauti na Nzambe to te. (1 Bakol. 12:4, 10) Kufa na Yoane, ntoma ya nsuka, ezalaki mpe nsuka ya molongo ya bato wana bapemami na Nzambe. Emoniseli, Evanzile ya Yoane mpe mikanda ya Yoane, ezali makomi ya nsuka ya Biblia. Boyokani kati na mikanda ntuku motoba na motoba na Biblia na biso emonisi bomoko na yango mpe elakisi ete ezali liloba na solosolo epemami na Jéhovah.
11. Makambo nini tokoki kozwa yango epai mosusu te bobele kati na Biblia?
11 Makambo mazali kati na Biblia. Biblia ezali na makambo oyo tokoki kokuta yango na mikanda misusu te. Na ndakisa, Genese elobeli biso na ntina na kozalisa oyo Nzambe azalisaki mokili mpe eyebisi makambo masalemaki liboso ete moto azalisama. (Gen. 1:1-31) Biblia eyebisi mpe masolo masalemaki kuna na makoló mpe mbele moto ata moko akokaki koyeba yango te soki Nzambe ye moko alobelaki biso yango te.— Yobo 1:6-12; 1 Mikonzi 22:19-23.
12, 13. Makomami mazali koteya biso nini na ntina na Jéhovah mpe na Yesu Klisto?
12 Likambo eleki ntina ezali oyo ete Biblia ezali kosalisa biso na koyeba Jéhovah. Ezali koyebisa bimonaneli mingi ya kokamwa oyo basaleli mingi ya Jéhovah bazwaki na ntina na ye. (Dan. 7:9, 10) Epai mosusu, Biblia eyebisi biso nkombo ya Nzambe, “Jéhovah”, oyo emonani koleka mbala 6 800 kati na Makomami na hébreu oyo ba Massorètes, Bayuda na mayele mingi babongisaki yango. Lisusu Biblia ezali koteya biso mpo na bizaleli kitoko ya Jéhovah, lokola bolingo, mayele, boyengebene, koyokela bato mawa, motema molai, kokaba, boyebi ya kokoka mpe kozanga kobongwana. (Ex. 34:6, 7) Tozali mpe koyekola kati na yango makambo mingi na ntina na Mwana na Nzambe mpe na ntina na esika monene oyo azali na yango kati na mikano na Nzambe. (Bakolose 1:17, 18; 2:3; 2 Bakol. 1:20) Koleka moto nyonso, Mwana na Nzambe, na boumeli ya bomoi na ye na mabelé, abakisaki boyebi na biso mpo na Jéhovah, mpamba te akokaki koloba ete: “Ye oyo amoni ngai asili komona Tata.”— Yoane 14:9.
13 Bandimbola mingi na ntina etali kokokisama na mikano na Nzambe eyebisami kati na Biblia. Mapamboli nyonso masakolamaki mpo na bato ya botosi malakamaki na nsima na Mobikisi moko oyo Jéhovah asengelaki kobimisa. Na elanga ya Edene, Nzambe alobaki mpo na Mobikisi wana, kobengaka ye “libota” ya mwasi na ye. (Gen. 3:15) Na nsima, Nzambe alakaki ete Libota yango ekobima na molongo na bakitani ya Abrahame. (Gen. 22:18) Amonisaki ete Mobikisi oyo alakamaki akozala mokonzi mpe nganga ya seko “na motindo na Melekisedeke”. (Nz. 110:4; Baeb. 7:1-28) Nzambe asalaki elongo na Bayisraele kondimana ya Mibeko oyo ezalaki na bonganga mpe na mabonza, nyonso wana ezalaki “elilingi na makambo malingi koya”. (Baeb. 10:1; Bakolose 2:17) Alakaki David ete bokonzi ekotikala seko kati na libota na ye. (2 Sam. 7:11-16) Nzokande, Mozui na libula na elaka yango mpe Mobikisi asakolamaki na bisakweli mosusu nyonso ezali Yesu Klisto, engebene Biblia. Boyekoli na Biblia emonisi biso motó na likambo na makomi mapemami, Bokonzi na Jéhovah oyo ye apesaki yango na Yesu Klisto mpo na kokokisa mikano na ye na nzela na yango.
14-17. Mpo na nini bisakweli ya Biblia mpe toli na yango likoló na bizaleli malamu ezali na motuya monene mpo na biso banso?
14 Mpo na bisakweli, Biblia ezali mokanda ekokani na mokanda mosusu te. Ezali kopesa ndimbola na makambo maleka kati na Lisolo ya bato mpe emonisi mpo na nini makambo yango masalemaki. (Luka 19:41-44) Eyebisi nini ekobimela biyangeli nyonso ya lelo. (Dan. 2:44) Ezali kolimbola ntina na makambo mazali kobima na mikolo na biso, emonisi ete tozali kobika na mikolo ya nsuka ya biloko mabe oyo mpe esakoli ete mosika te Nzambe akoboma bato mabe nyonso. — 2 Tim. 3:1-5; Nz. 37:9, 10.
15 Soki Biblia te, mbele toyebi ntina na bomoi na biso te. (Mosakoli 12:13) Elimboli polele ete moto abimaki mbalakaka te, kasi azalisamaki na Nzambe, ye oyo azali na mokano ya boboto mpo na bikelamu na ye bato. Biblia elakisi biso nini Nzambe azali kosenga na biso mpe ndenge nini tokoki kozwa esengo ya solo. —Emon. 4:11; 1 Tim. 2:3, 4; Nz. 16:11.
16 Lisolo ya makambo ya bato emonisi ete soki batiki Nzambe pembeni, bato bakoki komitambwisa bango moko te mpe kolonga na yango. Bobele Biblia nde epesi na moto etambwiseli oyo azali na yango mposa. Ezali kotambwisaka ye na makambo na bizaleli, komonisaka ye makambo nini Nzambe aboyaka mpe makambo nini andimaka. (Bagal. 5:19-23) Biblia ezali kosalisa moto ete ayeba kotambola kati na mokili oyo esili kobwaka bizaleli nyonso ya malamu. Ezali kopesa biso nzela na koyeba makanisi na Nzambe mpe kosepelisa ye. Mpo na kosukisa, ezali kolakisa biso nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko kati na mokili ya sika elakami na Nzambe.— Yoane 17:3.
17 Na yango, ekoki ete Mokanda oyo eleki mikanda nyonso ezala mokanda na biso ya liboso. Koleka bato mosusu, baklisto balingi kolukaluka kati na Mokanda yango oyo Mobandisi na yango ezali Ye oyo na ntina na ye Mwana na Nzambe alobaki: “Liloba na yo ezali solo”. (Yoane 17:17) Ntina wana Biblia ezali na esika ya liboso kati na mateya mapesami na Eteyelo ya mosala ya Nzambe.