Tózwa matomba na mateya mauti na Nzambe
“Ngai, Yehova, nazali Nzambe na yo, Ye oyo akoteya yo mpo na litomba na yo moko.”—YISAYA 48:17, NW.
1. Matomba nini tokozwa soki tosaleli mateya mauti na Nzambe kati na bomoi na biso?
YEHOVA NZAMBE ayebi makambo malamu koleka bato nyonso. Moto moko te aleki ye na makanisi, na maloba, to na misala. Lokola azali Mozalisi na biso, ayebi bamposa na biso mpe azali kokokisa yango mingi. Ayebi mpenza lolenge nini koteya biso. Mpe soki tosaleli mateya mauti na Nzambe, tokozwa matomba biso moko mpe tokozala na bolamu ya solo.
2, 3. (a) Soki na ntango na kala basaleli na Nzambe batosaki mibeko na ye, litomba nini balingaki kozwa? (b) Nini ekosalema soki tosaleli mateya mauti na Nzambe kati na bomoi na biso lelo oyo?
2 Mateya mauti na Nzambe mazali komonisa mposa makasi oyo Nzambe azali na yango, oyo ete basaleli na ye bápengola makámá mpe básepela na bomoi na komiyokanisáká na mibeko mpe na mitinda na ye. Soki libota ya Yehova na ntango na kala eyokelaki ye, mbele bakokaki kozwa mapamboli mingi, mpo alobaki na bango ete: “Ngai, Yehova, nazali Nzambe na yo, Ye oyo akoteya yo mpo na litomba na yo moko. Ye oyo akotambolisa yo na nzela oyo osengeli kotambola. Ɛ soki bobele otyaki likebi mpenza na mitinda na ngai! Boye kimya na yo elingaki kozala lokola ebale, mpe boyengebene na yo lokola mbongé na mai monene.”—Yisaya 48:17, 18, NW.
3 Libota na Nzambe ya ntango na kala balingaki kozwa matomba bango moko soki batyaki likebi na mitinda mpe na malako na ye. Na esika ete bámona mpasi na maboko ya bato ya Babilone, mbele balingaki nde kozala na kimya mpe bozwi mingi, eyikani, mpe ya seko lokola ebale. Lisusu, mbele misala na bango ya boyengebene milingaki koyebana motango te lokola mbongé ya mai monene. Bobele bongo, soki tosaleli mateya mauti na Nzambe kati na bomoi na biso, tokoki kozwa matomba na yango mingi. Wapi bamoko na matomba yango?
Ezali kobongola bomoi ya bato
4. Bopusi nini mateya mauti na Nzambe mazali na yango likoló na bomoi ya bato mingi?
4 Mateya mauti na Nzambe mazali kopesa litomba epai na bato mingi na kobongoláká malamu bomoi na bango. Baoyo bazali kosalela malako na Yehova bazali kotika “misala ya mosuni,” lokola etamboli ya mbindo, losambo ya bikeko, losambo ya bilimu mabe, koswana mpe zúwa. Na esika na yango, bazali nde komonisa mbuma ya elimo oyo ete: bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopolo, mpe komipekisa. (Bagalatia 5:19-23) Bazali lisusu kolanda toli ya Baefese 4:17-24, epai Paulo azali kosenga na baninga na ye bandimi ete batambolaka te lokola ekotambolaka mabota, kati na makanisi na bango ya mpamba mpe na ekaniseli na bango ya molili, mpe batangolami mosika na bomoi na Nzambe. Na esika ya kozala na mitema makasi, bato oyo bazali komekola Klisto ‘bazali kolongola bomoto ya kala oyo eyokani na etamboli na bango ya kala mpe bazali kobongwana bato na sika kati na nguya oyo ekopusaka elimo na bango.’ Bazali ‘kolata bomoto na sika bozalisami na boyokani na mokano na Nzambe kati na boyengebene mpe bosembo ya solo.’
5. Bopusi nini mateya mauti na Nzambe mazali na yango likoló na lolenge oyo bato bazali kotambola?
5 Litomba kitoko ya kosalela mateya mauti na Nzambe ezali ete ezali komonisa biso lolenge ya kotambola elongo na Nzambe. Soki tokotambola elongo na Yehova, lokola Noa asalaki yango, tozali kolanda nzela oyo ezali komema na bomoi, nzela oyo ebongisami na Molakisi na biso Monene. (Genese 6:9; Yisaya 30:20, 21) Lokola ntoma Paulo ayebisaki yango, bato na mabota “bazali kotambola kati na makanisi mpamba na bango.” Mpe makomi mosusu mabimisami na makanisi wana mazali mpenza mpamba! Nsima na kotanga makomi oyo mazalaki na efelo na engumba Pompéi, moto moko akomaki ete: “Ezali likambo ya kokamwa, Ɛ efelo, ete okwei naino te mpo na kilo ya bozóba mingi boye.” Na kokesena, ezali na eloko moko ya bozóba te kati na “mateya ya Yehova” mpe mosala ya kosakola Bokonzi oyo yango ezali kopesa nzela. (Misala 13:12) Na nzela ya mosala wana, bato oyo bazali kosepela na solo basalisami mpo na kozala na makanisi mabongi. Bateyami lolenge ya kotika kotambola kati na banzela na bango ya masumu, kati na kozanga koyeba mikano na Nzambe. Kati na makanisi na bango bazali lisusu kati na molili te, bapusami te na mitema makasi mpo na kolanda mikano mizangi litomba.
6. Boyokani nini bozali kati na botosi na biso ya mateya ya Yehova mpe bolamu na biso?
6 Mateya mauti na Nzambe mazali lisusu kopesa biso litomba ndenge ezali kosalisa biso na koyeba Yehova mpe makambo oyo ye alingaka. Boyebi motindo wana ezali kobelemisa biso elongo na Nzambe, ezali kokólisa bolingo na biso mpo na ye, mpe ezali kobakisa mposa na biso ya kotosa ye. 1 Yoane 5:3: elobi ete: “Bolingo na Njambe ejali boye ete tokokisa malako na ye. Malako na ye mpe majali na bojito tɛ.” Tozali lisusu kolanda mitinda na Yesu mpamba te toyebi ete mateya na ye mauti na Nzambe. (Yoane 7:16-18) Botosi motindo wana ezali kobatela biso na makámá ya elimo mpe ezali kokólisa bolamu na biso.
Mokano ya solo kati na bomoi
7, 8. (a) Lolenge nini tozali kokanga ntina ya Nzembo 90:12? (b) Lolenge nini tokoki kozwa motema ya mayele?
7 Mateya ya Yehova mazali kopesa litomba na kolakisáká biso lolenge ya kosalela malamu bomoi na biso. Ya solo, mateya mauti na Nzambe mazali komonisa biso lolenge ya kotanga mikolo na biso na lolenge moko ya malamu. Elikya ya bomoi ya mibu 70 ezali kopesa elikya ya kofanda soko mikolo 25 550. Moto oyo azali na mbula 50 afandi mikolo 18 250, mpe mikolo 7 300 oyo akoki naino kolikya na yango emonani ete ezali moke mpenza. Yango wana akoki kososola malamumalamu mpenza mpo na nini mosakoli Mose abondelaki Nzambe kati na Nzembo 90:12 ete: “Teya biso ete totanga mikɔlɔ na biso malamu ete tojua mitema na mayɛlɛ.” Kasi Mose alingaki mpenza koloba nini?
8 Mose alingaki koloba te ete Nzambe asengelaki komonisa na sikisiki motuya ya mikolo oyo ekokaki kozala na bomoi ya Moyisraele moko na moko. Engebene Nzembo 90, milɔngɔ́ 9 mpe 10, mosakoli Moebele ayebaki malamu ete bomoi ya moto ekoki koumela soko mibu 70 to 80—ya solo, yango ezali mpenza mokuse. Na bongo, maloba ya Nzembo 90:12 emonisi polele mposa ya solo ya Mose ya komona ete Yehova amonisa, to ateya, ye mpe libota na Ye lolenge nini kozala na mayele na kotaleláká ‘mikolo ya bambula na bango’ mpe na kosaleláká yango na lolenge oyo endimami na Nzambe. Ezali boni mpo na biso? Tosepelaka na mokolo nyonso kitoko oyo ezali koleka? Tozwaka motema ya mayele na kolukáká ete tósalela mikolo nyonso na lolenge losengeli mpo na nkembo ya Molakisi na biso Monene, Yehova Nzambe? Mateya mauti na Nzambe mazali kosalisa biso na kosala yango.
9. Nini tokoki kolikya kozwa soki toyekoli kotanga mikolo na biso mpo na nkembo ya Yehova?
9 Soki toyekoli kotanga mikolo na biso mpo na nkembo ya Yehova, mbala mosusu tokotika te kotanga yango, mpamba te mateya mauti na Nzambe mazali kopesa boyebi ya bomoi ya seko. Yesu alobaki ete: “Oyo elimboli bomoi ya seko, bázwa boyebi na ntina na yo, Nzambe bobele moko ya solo, mpe na ntina na ye oyo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW) Ya solo, tokoki na biso kozwa boyebi nyonso ya mokili, kasi yango ekoki kopesa biso bomoi ya seko te. Kasi tokoki kozwa bomoi ya seko bobele soki tozwi mpe tosaleli boyebi ya bato mibale oyo baleki ntina kati na mɔlɔ́ngɔ́ mpe soki tomonisi mpenza kondima.
10. Búku moko elobaki nini na ntina na kolakisama, mpe lolenge nini yango ekokani na matomba ya mateya mauti na Nzambe?
10 Na ntembe te, ezala ete tosili kolekisa mbula boni na bomoi, tiká ete tomikundola litomba oyo monene ya mateya mauti na Nzambe: Ezali kopesa epai na baoyo bazali kosalela yango ntina ya solo kati na bomoi. Búku monene The World Book Encyclopedia elobi ete: “Kolakisama esengeli kosalisa bato na kokóma basangani oyo bazali na ntina kati na libota ya bato. Esengeli mpe kosalisa bango na kosepela na libula ya makambo oyo babokwamaki kati na yango mpe kozala na bomoi moko ya kitoko koleka.” Mateya mauti na Nzambe mazali kosunga biso na kozala na bomoi moko ya kitoko. Ezali kokólisa kati na biso botɔ́ndi mozindo mpo na libula na biso ya elimo lokola bato na Nzambe. Mpe na ntembe te ezali kokómisa biso basangani ya ntina mingi kati na libota ya bato, mpamba te ezali kopesa biso nzela na kosala likambo moko ya ntina na kokokisáká bamposa ya bato mosusu kati na mokili mobimba. Mpo na nini tokoki koloba bongo?
Ebongiseli ya koteya kati na mokili mobimba
11. Lolenge nini Thomas Jefferson amonisaki mposa mpenza ya kolakisama moko malamu?
11 Na bokeseni na bibongiseli nyonso ya kolakisama, mateya mauti na Nzambe mazali kokokisa bamposa ya bato mpo na oyo etali kolakisama. Ntina ya koteya bato emonisamaki na Thomas Jefferson, oyo akómaki prezidá ya misato ya Etats-Unis. Kati na mokanda oyo akomaki na Augústo 13, 1786, oyo atindelaki George Wythe, moninga na ye mpe moko na baoyo batyaki loboko kati na búku ebéngami Eyambweli mpo na lipandá (na Lingelesi), Jefferson akomaki ete: “Nakanisi ete mobeko oyo moleki ntina kati na mibeko na biso nyonso ezali oyo ezali kokana kopalanganisa kolakisama kati na bato. Moboko mosusu ya malamu ezali te oyo mokoki kokabolama, mpo na kobatela bonsomi mpe bolamu. . . . Moninga na ngai, sakolá, ebongiseli moko makasi mpo na kotemela kozanga boyebi, salá mpe bongisá mobeko motali koteya bato nyonso. Tiká ete bazalani na biso báyeba . . . ete mpako oyo ekofutama kati na mokano [ya koteya] ezali moke soki tokokanisi yango na oyo ekosengama na mikonzi, na basángó, mpe na bato minene oyo bakobima katikati na biso soki totiki bato kati na kozanga boyebi.”
12. Mpo na nini ekoki kolobama ete mateya mauti na Nzambe ezali ebongiseli eleki kolónga mpe ya matomba mingi mpo na kolakisama ya bato kati na mokili mobimba?
12 Na esika ya kotika bato oyo bazali na mposa ya boyengebene kati na kozanga boyebi, mateya ya Yehova mazali kopesa ebongiseli kitoko ya kolakisa kati na mokili mobimba mpo na litomba na bango. Wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kondongwana, ekokisi sikawa mibu 50, Bakambi ya ebongiseli oyo etalaka Kobongisama ya makambo matali kolakisama na Etats-Unis, bamonaki mposa ya nokinoki ya “kolakisama kati na mokili mobimba.” Mposa yango ezali kino lelo oyo, kasi mateya mauti na Nzambe nde ezali ebongiseli bobele moko oyo ekoki kolónga mpo na koteya bato kati na mokili mobimba. Yango mpe ezali na litomba monene mpamba te ezali kolongola bato kati na kozanga elikya, ezali kobokola bango kati na bizaleli malamu mpe kati na elimo, ezali kosikola bango na lolendo mpe na makanisi mabe ya mokili, mpe ezali kopesa boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Oyo eleki mpenza, ebongiseli wana ezali kopesa litomba na bato banso bipai binso bafandi na koteyáká bango lolenge ya kosalela Yehova Nzambe.
13. Lolenge nini Yisaya 2:2-4 ezali kokokisama lelo oyo?
13 Matomba ya mateya mauti na Nzambe mazali kozwama na ebele na bato oyo bazali kokóma sikawa basaleli na Nzambe. Bazali komibanzabanza na bamposa na bango ya elimo mpe bayebi malamu ete mokolo na Yehova mosili kobelema. (Matai 5:3; 1 Batesaloniki 5:1-6) Uta sikawa, “kati na mikolo ya nsuka,” bato wana ya mabota nyonso bazali koya epai na ngomba na Yehova, losambo na ye ya peto. Losambo yango epikami makasi mpenza mpe etombwami likoló na losambo nyonso mosusu oyo eyokani te na mokano ya Nzambe. (Yisaya 2:2-4) Soki ozali moko kati na Batatoli ya Yehova oyo basili komipesa, ozali te kosepela na kozala kati na bibele oyo bazali kobakisama sé kobakisama oyo bazali kosambela ye mpe kozwa litomba longwa na mateya mauti na Nzambe? Oyo nde likambo ya esengo kozala kati na baoyo bazali konganga ete: “Kumisá Yah, bino bato!”—Nzembo 150:6, NW.
Matomba malamu likoló na elimo na biso
14. Litomba nini likozwama na kolanda toli ya Paulo oyo ezali na 1 Bakolinti 14:20?
14 Kati na matomba mingi ya mateya mauti na Nzambe tozali kokuta bopusi kitoko na yango likoló na makanisi mpe na elimo na biso. Ezali kotinda biso na kokanisa likoló na makambo oyo mazali sembo, peto, mabongi, mpe ya lokumu. (Bafilipi 4:8) Mateya ya Yehova mazali kosalisa biso na kolanda toli oyo ya Paulo: “Bojala bana mikɛ kati na makambo mabe nde bokoma mibange kati na makanisi.” (1 Bakolinti 14:20) Soki tosaleli toli oyo, tokoluka boyebi te kati na makambo mabe. Paulo akomaki lisusu ete: “Tika ete makambo yɔnsɔ na bololo mpe [nkanda, mpe nkele, NW] mpe kongala mpe kotɔnga malongwa na bino mpe makambo yɔnsɔ na mabe lokola.” (Baefese 4:31) Kolanda toli oyo ekosalisa biso na kobwaka makambo na mbindo mpe masumu mosusu ya minene. Atako yango ezali kopesa litomba na nzoto mpe na makanisi, ezali mingimingi kopesa biso esengo na koyeba ete tozali kosepelisa Nzambe.
15. Nini ekoki kosalisa biso na kozala na bizaleli bibongi kati na makanisi?
15 Soki tolingi kozala na bizaleli bibongi kati na makanisi, tosengeli bongo koboya ‘boninga mabe oyo ebebisaka bizaleli malamu.’ (1 Bakolinti 15:33) Lokola tozali baklisto, tokoki te kosala boninga elongo na bato na pite, bato na ekobo, mpe basáli mosusu ya mabe. Ya solo mpenza, tosengeli te kosangana na bato motindo wana na kotangáká makambo oyo mazali kolobela bango mpo na bisengo ya nzoto to na kotaláká bango na televizyó to kati na bililingi. Motema ezali mokosi, kozanga nkaká ekoki kosepela na makambo ya mabe, mpe ekoki kolengolama na kosala yango. (Yilimia 17:9) Na bongo, tiká ete tópengola masenginya motindo wana na komipesáká na mateya mauti na Nzambe. Ekoki kozala na bopusi likoló na makanisi ya “baoyo bakolingaka Yehova” na meko oyo bazali kosala makasi mpo na “koyina oyo ezali mabe.”—Nzembo 97:10, NW.
16. Bopusi nini mateya ya Nzambe ekoki kozala na yango likoló na elimo oyo tozali komonisa?
16 Paulo ayebisaki Timoté, moninga na ye ya mosala ete: “Nkolo azala na elimo oyo ozali komonisa. Ngolu na ye ezala na bino bato.” (2 Timoté 4:22, NW) Ntoma alingaki ete Nzambe, na nzela na Nkolo Yesu Klisto, andima nguya oyo ezalaki kopusa Timoté mpe baklisto mosusu. Mateya na Nzambe masalisi biso na komonisa elimo ya bolingo, ya boboto, ya bopolo. (Bakolose 3:9-14) Yango ekesenisi mpenza biso na bato mingi kati na mikolo oyo ya nsuka! Bazali bato na lolendo, bazangi botɔ́ndi, bazangi boboto, bazangi bolingo, bayini na malamu, bato na nkó, balingi na bisengo, mpe bato bazangi bobangi ya solo ya Nzambe. (2 Timoté 3:1-5) Nzokande, lokola tozali kolanda kosalela matomba ya mateya mauti na Nzambe kati na bomoi na biso, tozali komonisa elimo oyo ezali koyokanisa biso elongo na Nzambe mpe na baninga na biso bato.
Matomba kati na boyokani ya bato
17. Mpo na nini kosala na boyokani malamu na elimo ya komikitisa ezali na ntina mingi?
17 Mateya ya Yehova mazali kosalisa biso na komona matomba ya boyokani malamu elongo na baninga na biso kati na kondima. (Nzembo 138:6) Na bokeseni na bato mingi lelo oyo, tozali kobuka te mitinda na sembo kasi tozali nde kondima yango. Na ndakisa, matomba malamu mazali kozwama mpo ete bakɛngɛli oyo batyami bazali koyokana na ntango ya makita na bango ya bankulutu. Mibali yango bazali koloba na kimya nyonso mpo na matomba ya solo, na kopesáká nzela te na mayoki ete mabebisa makanisi oyo mabongi to mabebisa bomoko. Basangani nyonso ya lisangá bakozwa litomba na elimo ya bomoko oyo tozali na yango soki moko na moko kati na biso alandi kosalela mateya mauti na Nzambe.—Nzembo 133:1-3.
18. Mateya mauti na Nzambe mazali kosalisa biso na kozala na likanisi nini epai na baninga na biso bandimi?
18 Mateya mauti na Nzambe mazali lisusu na litomba na kosalisáká biso na kozala na makanisi malamu mpo na baninga na biso bandimi. Yesu alobaki ete: “Moto akoki koya epai na ngai tɛ bobɛlɛ sɔkɔ Tata, Motindi na ngai, akobenda ye.” (Yoane 6:44) Mingimingi kobanda mobu 1919, Yehova azali kotinda basaleli na ye mpo na kosakola bikateli na ye mpe ebongiseli ya mokili ya Satana ezali kotetema mpe koningana na nzela ya likebisi wana ya mokili mobimba. Bobele na ntango yango, bato oyo bazali kobanga Nzambe—“biloko malamu”—babendamaki na Nzambe mpo na komikabola bango moko longwa na mabota mpe kosangana elongo na baklisto bapakolami mpo na kotondisa nkembo na ndako ya losambo ya Yehova. (Hagai 2:7) Ya solo, tosengeli kotalela bato malamu oyo babendami na Nzambe lokola baninga balingami.
19. Mateya ya Nzambe mamonisi nini mpo na lolenge ya kosilisa mikakatano elongo na baninga na biso baklisto?
19 Mpo ete biso banso tozali bato bazangi kokoka, ezali solo ete mikakatano mikozanga te. Mwa liboso ete Paulo asala mobembo na ye ya mibale ya mosala ya misionere, Balanaba azwaki ekateli ya kokamata Malako elongo na ye. Paulo andimaki te mpamba te Malako “atikaki bango na Pamfulia mpe akendaki na bango nzela moko kuna na mosala te.” Mpo na yango, “ntembe makasi” ebimaki. Balanaba akamataki Malako elongo na ye mpo na kokende na Kupulu, nzokande Paulo akamataki Sila elongo na ye mpo na kokende na Sulia mpe na Kilikia. (Misala 15:36-41) Na nsima, mokakatano wana mobongisamaki, mpamba te Malako azalaki elongo na Paulo na Loma, mpe ntoma Paulo alobaki malamu na ntina na ye. (Bakolose 4:10) Moko na matomba kitoko ya mateya mauti na Nzambe ezali ete ezali komonisa biso lolenge ya kosilisa mikakatano oyo mizali kobima kati na baklisto na kolandáká batoli lokola oyo Yesu apesaki kati na Matai 5:23, 24 mpe na Matai 18:15-17.
Ezali ntango nyonso kopesa matomba mpe kolónga
20, 21. Limemya na biso mpo na mateya mauti na Nzambe esengeli kopusa biso na kosala nini?
20 Atako totaleli bobele na mokuse mwa matomba mpe bolóngi ya mateya mauti na Nzambe, ntembe ezali te ete biso banso tokoki komona ntina ya kolendendela mpo na kosalela yango kati na bomoi na biso. Na bongo, na nzela ya mabondeli, tiká ete tólanda koyekola longwa na Molakisi na biso Monene. Mosika te mateya mauti na Nzambe makolónga na motindo oyo emonaná naino te. Ekolónga ntango bato na mayele ya mokili oyo bakokufa. (Kokanisá na 1 Bakolinti 1:19.) Lisusu, lokola bato mingi bazali koyekola mpe kosala mokano na Nzambe, boyebi na Yehova ekotonda na mabelé lokola mai makozipaka mai-monene. (Yisaya 11:9) Oyo nde litomba monene ekozala mpo na bato na botosi mpe mpo na kolóngisa Yehova lokola Moyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba!
21 Mateya ya Yehova makozala ntango nyonso na litomba mpe na bolóngi. Okolanda kozwa litomba na yango lokola moyekoli na molende ya búku monene na Nzambe? Bomoi na yo ezali na boyokani na makambo mazali na Biblia mpe ozali kokabola basolo na yango elongo na bato mosusu? Soki ezali bongo, okoki kolikya komona kolónga monene ya mateya mauti na Nzambe, mpo na nkembo ya Molakisi na biso Monene, Nkolo Moyangeli Yehova.
Oyekolaki nini?
◻ Bopusi nini mateya mauti na Nzambe ekoki kozala na yango likoló na bomoi na biso?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete mateya ya Yehova mazali kokokisa mposa ya bato mpo na oyo etali kolakisama?
◻ Matomba nini mateya mauti na Nzambe makoki kozala na yango likoló na makanisi mpe bizaleli na biso?
◻ Na makambo nini mateya ya Nzambe mazali na matomba kati na boyokani ya bato?
[Elilingi na lokasa 15]
Mateya mauti na Nzambe mazali komonisa biso lolenge ya kotambola elongo na Nzambe, lokola Noa asalaki yango
[Elilingi na lokasa 17]
Bato ya mabota nyonso bazali kokende na ngomba na Yehova