Motuya ya kondima na yo—emekami sikawa
“Bandeko na ngai, bókanisa ete ezali bobele esengo wana ekokwea bino kati na komekama na mitindo na mitindo. Boyebi ete komekama na kondima na bino ekoyeisa mpiko.”—YAKOBO 1:2, 3.
1. Mpo na nini baklisto basengeli kozela ete kondima na bango ekomekama?
BAKLISTO ya solo bazalaka na mposa ya konyokwama te, mpe ntango bazali kozwa mpasi to bazali kotyolama, bayokaka esengo te. Kasi bayebi malamu maloba ya Yakobo, ndeko ya Yesu, oyo mazali awa na likoló. Klisto amonisaki bayekoli na ye polele ete lokola bakolanda mitinda ya Nzambe basengeli kokutana na minyoko mpe mikakatano mosusu. (Matai 10:34; 24:9-13; Yoane 16:33) Atako bongo, komekama motindo wana ekoki kopesa esengo. Na ndenge nini?
2. (a) Ndenge nini komekama ya kondima na biso ekoki kobota esengo? (b) Lolenge nini mpiko ekokokisa mosala na yango nyɛɛ epai na biso?
2 Ntina ya moboko oyo tozali kozwa esengo uta na minyoko mpe komekama ya kondima ezali ete yango ekoki kobota mbuma malamu. Lokola Yakobo alobi yango, koyika mpiko na komekama to mikakatano “ekoyeisa mpiko.” Tokoki kozwa litomba na kokolisáká bizaleli malamu ya boklisto. Yakobo akomaki ete: “Tiká mpe ete mpiko ekokisa mosala na yango nyɛɛ ete bózala basembwi mpe babongi kozanga eloko te.” (Yakobo 1:4) Mpiko ezali na “mosala” ya kokokisa. Mosala na yango ezali ya kobongisa biso na makambo nyonso, kosalisa biso ete tózala baklisto bakɔmeli. Na yango, na ntango totiki komekama ekoba mosala na yango, kozanga ete tóluka kosilisa yango nokinoki na banzela oyo eyokani te na Makomami, kondima na biso ekomekama mpe ekopɛtolama. Soki tozangi motema molai, mawa, boboto, to bolingo na boyokani na biso na bato mosusu, mpiko ekoki kokolisa bizaleli wana ya boklisto epai na biso. Ɛɛ, makambo malandanaka boye: Komekama ekobota mpiko; mpiko ekobakisa bizaleli na biso ya boklisto; mpe yango ekopesa esengo.—1 Petelo 4:14; 2 Petelo 1:5-8.
3. Mpo na nini tosengeli kozonga nsima te na ntina na kobanga minyoko to komekama ya kondima?
3 Ntoma Petelo mpe amonisaki polele mpo na nini tosengeli kobanga te to kozonga nsima te ntango kondima na biso emekami. Akomaki boye: “Bokosepelaka mpo na yango, ata naino mwa ntango moke ekoki na bino kozala na mawa mpo na komekama na ndenge na ndenge. Boye kondima na bino ekomekama, yango eleki motuya na wolo oyo ekomekama na mɔ́tɔ ata ezali kobeba. Kondima na bino ekomonana mpo na masanzoli na lokumu mpe na [limemya, NW] wana ekomonana Yesu Klisto.” (1 Petelo 1:6, 7) Maloba yango mazali mpenza kolendisa sikawa mpamba te “bolɔzi monene”—ntango ya masanzoli, lokumu, limemya, mpe lobiko—ekómi pene koleka mpenza ndenge bato mosusu bakoki kokanisa mpe ekómi pene koleka ntango oyo tokómaki bandimi.—Matai 24:21; Baloma 13:11, 12.
4. Ndeko moko azalaki na mayoki nini na ntina na komekama oyo ye mpe baklisto bapakolami mosusu bakutanaki na yango?
4 Na lisolo lileki, totalelaki komekama ndenge na ndenge oyo batikali bapakolami bakutanaki na yango kobanda 1914. Yango ezalaki ntina ya esengo? Bambula mingi na nsima, Alexander Macmillan alobaki boye: “Namonaki minyoko mingi ya makasi oyo ekómelaki lisangá mpe komekama ya kondima ya baoyo bazali kati na yango. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, lisangá ebikaki mpe elandaki kokola. Namonaki ete kozela na motema molai ete Yehova angɛngisa bososoli na biso ya Makomami na esika ya kosilika soki likanisi ya sika emonisami ezali likambo ya mayele. . . . Ezala mbongwana nini oyo tosengeli kosala mbala na mbala na bososoli na biso, tokobongola soko moke te likabo ya ngɔlu, elingi koloba lisiko, mpe ekobongola te elaka ya Nzambe na ntina na bomoi ya seko. Na yango, kondima na biso esengelaki kolɛmba te na ntina na bilikya oyo bikokisamaki te to na ntina na mbongwana oyo tosalaki na bososoli na biso.”—Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛ́mbɛ 1967, lokasa 565 (ebimeli ya Lifalanse).
5. (a) Matomba nini mazwamaki na komekama oyo batikali bakutanaki na yango? (b) Mpo na nini tosengeli kotalela likambo ya komekama sikawa?
5 Baklisto bapakolami oyo balekaki eleko ya komekama ya 1914-1919 basikolamaki na bopusi oyo etondi na mokili mpe na misala ya mangomba ya Babilone. Batikali bakendaki liboso lokola bato oyo bapɛtolami mpe babongisami, bapesaki mbeka ya masanzoli epai na Nzambe na motema mobimba, kondimisamáká ete bango nyonso lokola etuluku, bandimamaki na ye. (Yisaya 52:11; 2 Bakolinti 6:14-18) Kosambisama esilaki kobanda na ndako ya Nzambe, kasi esengelaki kosila na ntango moko ya sikisiki te. Komekama mpe konyongelama ya basaleli ya Nzambe ezali kokoba. Baoyo bazali na elikya ya kobika na “bolɔzi monene” oyo ekómi pene mpe kozala kati na “ebele monene” bazali mpe kozwa komekama na kondima na bango. (Emoniseli 7:9, 14) Yango ezali kosalema na mitindo oyo esalemaki mpo na bapakolami mpe na mitindo mosusu.
Ndenge nini okoki komekama?
6. Motindo nini ya komekama makasi oyo bandeko mingi basili kokutana na yango?
6 Baklisto mingi bakanisaka lolenge oyo bakoki kolonga komekama oyo ekoki koya na lolenge ya minyoko ya polele. Bamikundolaka lisolo oyo: “Esilaki [bakonzi ya mangomba ya Bayuda] kobyanga bantoma, babɛtisi bango, mpe balaki bango ete báloba na nkombo na Yesu te, mpe bakangoli bango. Na bongo babimi na Koyangana [“Sanedrina,” NW] kosepeláká ete batángami babongi na kozwa nsɔni mpo na Nkombo na ye.” (Misala 5:40, 41) Mpe lisolo ya basaleli ya Nzambe na mikolo na biso, mingimingi na ntango ya bitumba ya mokili mobimba, emonisi polele ete banyokoli babɛtaki Batatoli ya Yehova mingi mpe basalelaki bango makambo mosusu ya mabe koleka.
7. Baklisto mosusu na mikolo na biso bamonisaki kondima kino na ndelo nini?
7 Mpo na oyo etali monyoko oyo baklisto bazali kozwa, mokili ezali kosala bokeseni te kati na batikali bapakolami mpe ebele monene ya “bampate mosusu.” (Yoane 10:16) Na boumeli ya bambula, basangani ya bituluku nyonso mibale bamekamaki makasi na kokɔtisamáká na bolɔkɔ mpe ata kobomama lokola bamartiru na ntina na bolingo na bango epai ya Nzambe mpe kondima na bango epai na ye. Bituluku yango mibale bazalaki na mposa ya elimo ya Nzambe, ata soki bazali na elikya nini. (Kokanisá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yúni 1996, lokasa 31.) Na boumeli ya bambula ya 1930 mpe ya 1940, ntango Allemagne eyangelamaki na Banazi, basaleli mingi ya Yehova, ezala na bana na bango, bamonisaki kondima makasi, mpe mingi bamekamaki kino na nsuka. Na mikolo miuti koleka, basaleli ya Yehova bakutanaki na minyoko na mikili lokola Burundi, Erythrée, Éthiopie, Malawi, Mozambique, Rwanda, Singapour, mpe Zaïre. Mpe komekama mingi ya motindo yango ezali kokoba.
8. Lolenge nini maloba ya ndeko moko ya Afrika mamonisi ete komekama ya kondima na biso esuki bobele na minyoko ya kobɛtama te?
8 Nzokande, lokola toutaki koloba yango, kondima na biso ezali mpe komekama na mitindo mosusu mizangi komonana polele. Komekama mosusu ezalaka polele te mpe ezalaka mpasi mpo na koyeba yango. Na ndakisa, talá likambo oyo elandi. Na Angola, ndeko moko oyo azalaki na bana zomi azalaki na lisangá oyo ezalaki lisusu na likoki ya kotinda bansango na yango na biro te. Na nsima, likoki emonanaki lisusu mpo ete bandeko bákende kotala lisangá yango. Batunaki ndeko yango ndenge nini azalaki kosala mpo na koleisa libota na ye. Ezalaki mpasi mpo ete ayanola, mpe asukaki bobele na koloba ete ezalaki mpasi. Azalaki nde na likoki ya koleisa libota na ye ata mbala moko na mokolo? Ayanolaki ete: “Ezalaki mpasi. Toyekolaki kobikela na biloko oyo tozali na yango.” Na nsima, na kondimisama nyonso alobaki ete: “Kasi ezali yango nde tosengeli kokutana na yango na mikolo ya nsuka, boye te?” Kondima motindo wana ezali mpenza monene na mokili, kasi emonanaka mingi epai na baklisto ya sembo, oyo bazali kotya motema mobimba ete bilaka ya Bokonzi bikokokisama.
9. Na boyokani na 1 Bakolinti 11:3, tozali kokutana na komekama nini?
9 Basangani ya ebele monene bazali mpe komekama na lolenge lisangá ya Teokrasi ezali kotambwisama. Lisangá ya boklisto na mokili mobimba etambwisami engebene mitinda ya Nzambe mpe bibongiseli ya Teokrasi. Yango elimboli libosoliboso kondima Yesu lokola Motambwisi, ye oyo aponami mpo na kozala Motó ya lisangá. (1 Bakolinti 11:3) Botosi ya motema moko epai na ye mpe epai na Tata na ye ezali komonana na lolenge tozali kondima bato oyo bazali koponama engebene Teokrasi mpe na lolenge oyo tozali kondima bikateli na ndenge oyo tosengeli kokokisa mokano ya Yehova na bomoko. Lisusu, kati na lisangá mokomoko, ezali na mibali baponami mpo na kokamba yango. Bazali bato ya kozanga kokoka mpe tokoki komona mabunga na bango noki; kasi, tosɛngisami ete tómemya bakɛngɛli yango mpe tótosa bango. (Baebele 13:7, 17) Omonaka ntango mosusu ete yango ezali mpasi? Ezali mpenza komekama mpo na yo? Soki ezali bongo, ozali nde kozwa litomba na komekama wana ya kondima na yo?
10. Komekama nini tozali kokutana na yango na oyo etali mosala ya kosakola?
10 Tozali mpe komekama na likambo oyo ezali libaku malamu mpe lisɛngami, elingi koloba kosangana ntango nyonso na mosala ya kosakola. Mpo ete tólonga komekama yango, tosengeli kososola ete kosangana mpenza na mosala ya kosakola esuki te bobele na kosangana mwa moke mpo na kozwa bangonga. Tómikundola maloba ya Yesu ntango amonisaki bosepeli na ye mpo na mobola mwasi-mokufeli-mobali oyo apesaki nyonso oyo azalaki na yango. (Malako 12:41-44) Tokoki komituna ete, ‘Nazali komipesa motindo moko na oyo etali kosakola nsango malamu?’ Biso nyonso tosengeli kozala Batatoli ya Yehova ntango nyonso, kosaleláká malamu mabaku nyonso mpo na kongɛngisa pole na biso.—Matai 5:16.
11. Ndenge nini mbongwana oyo euti na bososoli to toli na ntina na etamboli ekoki kokóma komekama?
11 Komekama mosusu oyo tokoki kokutana na yango etaleli bozindo ya bosepeli na biso mpo na bingɛngiseli oyo bizali kobakisama na solo ya Biblia mpe na toli oyo ezali kouta na kelasi ya moombo ya sembo. (Matai 24:45) Ntango mosusu yango esɛngaka ete tóbongola etamboli na biso, lokola na ntango oyo emonanaki polele ete baoyo bazali komela likaya basengeli kotika yango soki balingi kotikala kati na lisangá.a (2 Bakolinti 7:1) To mpe komekama ekoki kozala na kondima kobongola mimeseno na biso na oyo etali miziki to mitindo mosusu ya kominanola oyo tosepelaka na yango.b Tokobɛta nde ntembe na mayele oyo ezali na toli yango? To tokotika ete elimo ya Nzambe ebongola bomoto na biso mpe esalisa biso ete tólata bomoto ya moklisto?—Baefese 4:20-24; 5:3-5.
12. Nini esengeli mpo na kolendisa kondima ya moto nsima ya kozwa batisimo?
12 Uta bambula mingi, motángo ya basangani ya ebele monene ezali se kobakisama, mpe nsima ya kozwa batisimo bazali kokoba kolendisa boyokani na bango elongo na Yehova. Yango esuki te bobele na kokendáká na mayangani ya boklisto, kokende na makita mosusu na Ndako ya Bokonzi, to kosangana na mwa mabaku na mosala ya kosakola. Tópesa ndakisa: Ekoki kozala ete moto moko azali kati na Babilone te, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba; kasi, asili solo kotika yango? Azali naino kokangama na makambo oyo mazali komonisa elimo ya Babilone Monene—elimo oyo ezali kotyola mitinda ya sembo ya Nzambe? Azali nde kopesa motuya na etamboli malamu mpe kokangama na mobalani na ye? Azali kotya likebi mingi na ntomo na ye mpe matomba ya mosuni koleka matomba ya elimo? Ɛɛ, amibateli nde kozanga litɔnɔ na mokili?—Yakobo 1:27.
Litomba ya kondima oyo emekami
13, 14. Bato mosusu basalaki nini nsima ya kobanda kotambola na nzela ya solo?
13 Soki tosilaki mpenza kobima na Babilone Monene mpe lisusu tosilaki kokabwana na mokili, tótala lisusu biloko oyo totiki na nsima te. Na boyokani na etinda ya Luka 9:62, soki moto moko kati na biso atali nsima, yango ekoki kolimbola mpo na ye kobungisa libaku ya kokɔta na Bokonzi ya Nzambe. Yesu alobaki ete: “Moto oyo atye lobɔkɔ na etim[w]eli mpe azali kotala na nsima abongi na Bokonzi na Nzambe te.”
14 Kasi, basusu oyo basilaki kokóma baklisto na mikolo mileki, basili kotika ete ebongiseli ya biloko oyo etambwisa makanisi na bango. Batɛmɛli elimo ya mokili te. (2 Petelo 2:20-22) Makambo ya mokili ebendi likebi na bango mpe ezwi ntango na bango, na boye ete ezali kopekisa bango ete bákola. Na esika ete bábatela makanisi mpe mitema na bango ngwi na Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye, kotyáká makambo yango na esika ya liboso, bapesi yango mokɔngɔ mpo na kolanda mikano ya kozwa biloko mingi ya mosuni. Basengeli koyeba ete kondima na bango ezali makasi te mpe ete bazali mpiɔ na elimo mpe basengeli kobongola etamboli na bango na kolukáká toli euti na Nzambe; soki boye te, bazali na likama ya kobungisa boyokani na bango ya motuya elongo na Yehova mpe lisangá na ye.—Emoniseli 3:15-19.
15. Nini esɛngami mpo na kondimama ntango nyonso na Nzambe?
15 Komibatela pɛto, ‘koyeisáká bilamba na biso mpɛmbɛ na makila ya Mwana na Mpate’ ekosala ete tóndimama mpe tózala na etɛlɛmɛlo ya bato babongi kobikisama na bolɔzi monene oyo ezali koya na lombangu mpenza. (Emoniseli 7:9-14; 1 Bakolinti 6:11) Soki tobateli te etɛlɛmɛlo ya pɛto mpe ya sembo na miso ya Nzambe, mosala na biso ya bulɛɛ ekondimama te. Na ntembe te, mokomoko na biso asengeli kososola ete motuya ya kondima oyo emekami ekosalisa biso ete tóyika mpiko mpe tóboyama te na Nzambe.
16. Na makambo nini lokuta ekoki kozala komekama ya kondima na biso?
16 Ntango mosusu, bipanzeli-nsango mpe bakonzi ya mokili balobaka makambo ya lokuta na ntina na basaleli ya Nzambe, komonisáká na lolenge mabe bindimeli na biso ya boklisto mpe lolenge ya bomoi na biso. Yango esengeli kokamwisa biso te, mpamba te Yesu amonisaki polele ete ‘mokili ekoyina biso mpamba te tozali bato ya mokili te.’ (Yoane 17:14) Tokotika ete baoyo Satana azipi bango miso bábangisa biso mpe bálɛmbisa biso mpe bápusa biso na koyoka nsɔni mpo na nsango malamu? Tokotika nzela ete maloba ya lokuta likoló na solo ebebisa momeseno na biso ya koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita mpe ya kobima na mosala ya kosakola? To tokotikala ngwi, na mpiko mpe na ekateli makasi koleka ya kokoba kosakola solo na ntina na Yehova mpe Bokonzi na ye?
17. Elikya nini ekoki kolendisa biso ete tólanda komonisa kondima?
17 Na kotalela bisakweli ya Biblia oyo bisili kokokisama, tosili koumela na mikolo yango ya nsuka. Bilikya na biso oyo bitongami na Biblia na ntina na mokili ya sika ya boyengebene bikokokisama solo mpe na esengo. Liboso ete mokolo yango eya, tiká ete biso nyonso tómonisa kondima makasi kati na Liloba ya Nzambe mpe tómeka kondima na biso na kosakoláká nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba kozanga kolɛmba. Kanisá bamilio ya bayekoli ya sika oyo bazali kozwa batisimo pɔsɔ na pɔsɔ. Ebongi mpenza ete tósepela na komona ete motema molai ya Yehova na likambo ya kopesa etumbu na ye ekoki komema bato mingi koleka na lobiko, boye te? Tozali kosepela te ete Nzambe atiki ntango mpo ete mosala ya kosakola Bokonzi, oyo ezali nzela ya lobiko, ekoba? Tozali kosepela te ete bamilio ya bato basili kondima solo mpe bazali komonisa kondima na bango?
18. Ozali na ekateli nini na oyo etali kosalela Yehova?
18 Toyebi te soki komekama ya kondima oyo tozali kozwa sikawa ekoumela lisusu ntango boni. Kasi tondimisami na likambo oyo: Yehova asilá kotya mokolo ya kokata likambo ya makoló mpe mabele esili kobeba oyo ezali sikawa. Liboso ete mokolo yango eya, tiká ete tózala na ekateli makasi ya komekola motuya ya solosolo ya kondima oyo emekami, oyo Yesu, Mokokisi ya kondima na biso, amonisaki. Mpe tiká ete tólanda ndakisa ya batikali bapakolami oyo basili kokóma mibange mpe ya bandeko mosusu oyo bazali kosala na mpiko elongo na biso.
19. Eloko nini ondimi ete ekolonga mokili oyo?
19 Tosengeli kozala na ekateli ya kosakola nsango malamu na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso, na bibolo nyonso kozanga kolɛmba, kosaláká elongo na anzelu oyo azali kopumbwa katikati na likoló. Tiká báyoka maloba ya anzelu oyo alobi ete: “Bómemya Nzambe mpe pesá ye nkembo, mpo ete ntango na kosambisa na ye eyei.” (Emoniseli 14:6, 7) Ntango Nzambe akopesa etumbu, ekozala boni mpo na kondima na biso oyo emekami? Ekozala elonga ya nkembo—kosikwama na ebongiseli ya biloko oyo mabe mpo na kokɔta na mokili ya sika mpe ya boyengebene ya Nzambe? Na koyikáká mpiko na komekama ya kondima na biso, tokozala na likoki ya koloba lokola ntoma Yoane ete: “Elonga oyo eleki mokili ezali kondima na biso.”—1 Yoane 5:4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1973, nkasa 528-535, mpe 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1973, nkasa 601-603 (bibimeli ya Lifalanse).
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1983, nkasa 27-31 (ebimeli ya Lifalanse).
Ozali komikundola?
◻ Ndenge nini komekama ya kondima na biso ekoki kozala ntina ya esengo?
◻ Tángá mwa mitindo ya komekama ya kondima na biso oyo ekoki kozala pɛtɛɛ te mpo na koyeba yango?
◻ Lolenge nini tokoki kozwa litomba oyo ekoumela na kolongáká komekama ya kondima na biso?
[Bililingi na lokasa 17]
Alexander Macmillan (liboso na lobɔkɔ ya mwasi) pene na ntango oyo ye mpe bakambi mosusu ya Société Watch Tower bakɔtaki bolɔkɔ na ntina na bifundeli ya lokuta
Azalaki na liyangani esalemaki na Detroit, na etúká ya Michigan, na 1928
Na nsuka ya bomoi na ye, Ndeko Macmillan akobaki komonisa kondima
[Elilingi na lokasa 18]
Motindo moko na libota oyo, baklisto mingi na Afrika basili komonisa motuya ya kondima oyo emekami