Kondima esalaka ete tózala na motema molai mpe tóbondelaka mingi
“Bózala na mitema milai, bólendisa mitema na bino, mpo ete Komonana na Nkolo ezali kobɛlɛma.”—YAKOBO 5:8.
1. Mpo na nini tosengeli kokanisa likoló na maloba ya Yakobo 5:7, 8?
“KOZALA” ya Yesu Klisto oyo baklisto bazelaki uta kala ezali sikawa likambo ya solo. (Matai 24:3-14) Na lolenge oyo emonáná naino te, baoyo nyonso bazali koloba ete bazali kondima Nzambe mpe Klisto basengeli kokanisa maloba oyo ya moyekoli Yakobo ete: “Bandeko, bózala na mitema milai kino Komonana na Nkolo. Bótala, motimoli na elanga akotalela mbuma na mabelé, azali na motema molai mpo na yango kino ekozwa ye mbula na liboso mpe mbula na nsima. Bino mpe, bózala na mitema milai, bólendisa mitema na bino, mpo ete Komonana na Nkolo ezali kobɛlɛma.”—Yakobo 5:7, 8.
2. Wapi mwa mikakatano baoyo Yakobo akomelaki mokanda na ye bakutanaki na yango?
2 Baoyo Yakobo akomelaki mokanda na ye mopemami basengelaki komonisa motema molai mpe kosilisa mikakatano ndenge na ndenge. Mingi bazalaki kosala te makambo oyo masɛngami epai na baoyo bamilobi ete bazali na kondima. Na ndakisa, esengelaki kolongola bamposa mosusu oyo ekólaki na mitema ya bato mosusu. Esengelaki kozongisa kimya kati na baklisto yango ya ekeke ya liboso. Basengelaki mpe kopesamela toli mpo na kozala na motema molai mpe momeseno ya kobondela mingi. Wana tozali kotalela makambo oyo Yakobo akomelaki bango, tóluka koyeba lolenge nini tokoki kosalela maloba na ye kati na bomoi na biso.
Mposa mabe ebebisaka
3. Ntina nini kowelana ezalaki kati na lisangá, mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?
3 Kimya ezalaki te kati na basusu oyo bamilobaki ete bazali baklisto, mpe likambo yango eutaki mingi mpenza na mposa mabe. (Yakobo 4:1-3) Kowelana ezalaki kobimisa bokabwani, mpe bamoko bazalaki kosambisa bandeko na bango na kozanga mpenza bolingo. Likambo yango ezalaki kosalema mpamba te mposa ya bisengo ezalaki kobunda kati na binama ya nzoto na bango. Biso mpe tokoki kobondela mpo na kozwa lisungi ete tótɛmɛla mposa ya nzoto ya kozwa lokumu, nguya, mpe bozwi mpo ete tósala eloko moko te oyo ekobebisa kimya ya lisangá. (Baloma 7:21-25; 1 Petelo 2:11) Baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bakolisaki bilulela kino ekómaki elimo ya koyina to ya koboma. Lokola Nzambe ayanolaki te na mabondeli na bango ya bamposa mabe, bakóbaki kobunda mpo na kokokisa mikano na bango. Soki tozali na mposa mabe motindo wana, tokoki kosɛnga kasi tokozwa eloko te, mpamba te Nzambe na biso ya bulɛɛ ayanolaka na mabondeli motindo wana te.—Bileli 3:44; 3 Yoane 9, 10.
4. Mpo na nini Yakobo abéngi baklisto mosusu ete “basi na ekobo,” mpe lolenge nini maloba na ye masengeli kotalela biso?
4 Kolinga mokili, bilulela, mpe lofundo ezalaki epai ya baklisto mosusu ya ekeke ya liboso. (Yakobo 4:4-6) Yakobo abéngi basusu ete “basi na ekobo” mpamba te bazalaki baninga ya mokili mpe na bongo bakweaki na ekobo ya elimo. (Ezekiele 16:15-19, 25-45) Na ntembe te, tokolinga te kokóma bato ya mokili na makanisi, na maloba, mpe na misala, mpamba te yango ekokómisa biso banguna ya Nzambe. Liloba na ye limonisi biso ete “mposa ya bilulela” ezali moko na matindiki mabe, to “elimo,” epai ya bato ya masumu. (Genese 8:21; Mituya 16:1-3; Nzembo 106:16, 17; Mosakoli 4:4) Yango wana, soki tomoni ete tosengeli kobundisa bilulela, lolendo, to mposa mosusu ya mabe, tóluka lisalisi ya Nzambe na nzela ya elimo santu. Nguya yango, oyo Nzambe azali kopesa na ngɔlu na ye, eleki “mposa ya bilulela.” Mpe lokola Yehova aboyi bato ya lofundo, akopesa biso ngɔlu soki tobundisi mposa ya masumu.
5. Mpo na kozwa ngɔlu ya Nzambe, masɛngami nini tosengeli kokokisa?
5 Ndenge nini tokoki kozwa ngɔlu ya Nzambe? (Yakobo 4:7-10) Mpo na kozwa ngɔlu ya Yehova, tosengeli kotosa ye, kondima bibongiseli na ye, mpe komisɔkisa na makambo nyonso oyo alingi. (Baloma 8:28) Tosengeli mpe ‘kotɛmɛla’ Zábolo. ‘Akokima mosika na biso’ soki totikali ngwi na kosimbáká bokonzi oyo Yehova azali na yango likoló ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Yesu azali kosunga biso, azali kopekisa myango mabe ya mokili ete míkoka kokóba kosala biso mabe ntango nyonso te. Mpe tóbosana soko moke te likambo oyo: Na nzela ya libondeli, botosi, mpe kondima, tozali kobɛlɛma na Nzambe, mpe ye azali komimonisa ete azali pene na biso.—2 Ntango 15:2.
6. Mpo na nini Yakobo abéngi baklisto mosusu ete “basumuki”?
6 Mpo na nini Yakobo abéngi basusu kati na baoyo bamilobaki ete bazali na kondima Nzambe ete “bato na masumu”? Mpamba te bazalaki na ngambo na ntina na “bitumba” mpe koyina oyo ekoki komema na koboma—bizaleli oyo bisengeli komonana te epai na baklisto. (Tito 3:3) “Mabɔkɔ” na bango, oyo matondaki na misala mabe, masengelaki kopɛtolama. Basengelaki mpe kopɛtola “mitema” na bango, epai matindiki ezali kouta. (Matai 15:18, 19) ‘Bato yango ya mitema mibale’ bazalaki lokolo moko na boninga na Nzambe mpe lokolo mosusu na boninga na mokili. Lokola tozwi likebisi na ndakisa mabe na bango, tiká ete tómonisa bokɛngi koleka mpo ete makambo motindo yango mázindisa kondima na biso te.—Baloma 7:18-20.
7. Mpo na nini Yakobo alobi na basusu ete ‘báyoka mawa mpe bábimisa mpisoli’?
7 Yakobo ayebisi batángi ya mokanda na ye ete ‘báyoka mawa, bábimisa mpisoli.’ Soki bamonisaki mawa ya solo, yango ezalaki elembeteli ya kobongola motema. (2 Bakolinti 7:10, 11) Lelo oyo, bamoko kati na baoyo bazali koloba ete bazali na kondima, bazali koluka boninga na mokili. Soki bamoko kati na biso bazali kolanda nzela yango, tosengeli kolela na ntina na bolɛmbu na biso ya elimo mpe kosala na lombangu mpo na kosembola makambo, boye te? Kosala mbongwana oyo esengeli mpe kozwa bolimbisi ya Nzambe ekopesa biso esengo mpo na lisosoli ya pɛto mpe elikya malamu ya bomoi ya seko.—Nzembo 51:10-17; 1 Yoane 2:15-17.
Tósambisana te bamoko na bamosusu
8, 9. Mpo na nini tosengeli te koloba mabe to kosambisana bamoko na bamosusu?
8 Koloba mabe na ntina na moninga na biso mondimi ezali lisumu. (Yakobo 4:11, 12) Nzokande basusu batɔ́ngaka baninga na bango baklisto, mbala mosusu mpo ete bazali kokanisa ete bango nde bazali sembo to mpo ete balingi komitombola na kokitisáká basusu. (Nzembo 50:20; Masese 3:29) Liloba ya Greke oyo ebongolami na ‘kotɔ́nga’ ezali kopesa likanisi ya koyina mpe emonisi efundeli ya kolekisa ndelo to ya lokuta. Yango ekokani na kokweisa ndeko ntango ozali kosambisa ye. Lolenge nini yango ekokani na ‘kosambisa mpe koloba mabe na mibeko ya Nzambe’? Na ndakisa, Bakomeli mpe Bafalisai ‘bazalaki koboya malako na Nzambe’ mpe bazalaki kosambisa engebene mitindá na bango moko. (Malako 7:1-13) Lolenge moko, soki tokweisi ndeko moko oyo Yehova akweisi te, ‘tokosambisa mibeko ya Nzambe’ mpe tokosala lisumu na kopesáká likanisi ete mibeko yango mibongi te, boye te? Mpe soki tozali kotɔ́nga ndeko na biso kozanga boyengebene, tozali kokokisa mobeko ya bolingo te.—Baloma 13:8-10.
9 Tómikundola likambo oyo: “Mopesi na Mibeko mpe Mosambisi azali bobele moko”—Yehova. ‘Mobeko na ye ezali na kokoka,’ ezali na libunga te. (Nzembo 19:7; Yisaya 33:22) Bobele Nzambe nde azali na lotómo ya kotya mitindá mpe malako mpo na lobiko. (Luka 12:5) Na yango Yakobo atuni ete: “Yo nde nani kosambisa mozalani na yo?” Kosambisa mpe kokweisa basusu ezali mokumba na biso te. (Matai 7:1-5; Baloma 14:4, 10) Kokanisa bokonzi ya Nzambe mpe ezaleli na ye ya kozanga koponapona, mpe ezalela na biso moko ya bato ya masumu, yango ekopekisa biso ete tósambisa basusu na kokanisáká ete biso nde tozali sembo.
Tómityela motema te na lolendo nyonso
10. Mpo na nini tosengeli kotalela Yehova kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo?
10 Tosengeli ntango nyonso kotalela Yehova mpe mibeko na ye. (Yakobo 4:13-17) Kozanga kotalela Nzambe, moto oyo azali komityela motema alobaka ete: ‘Lelo soko lobi tokokenda na mboka oyo, tokolekisa mbula moko wana, tokosala mombongo, tokozwa litomba.’ Soki ‘tokobomba biloko mpo na biso mpenza nde tozali bazwi epai na Nzambe te,’ lobi tokoki kokufa mpe tokozanga libaku ya kosalela Yehova. (Luka 12:16-21) Lokola Yakobo alobi yango, tozali lokola londende ya ntɔ́ngɔ́ “komonana mwa ntango moke na nsima kolimwa.” (1 Ntango 29:15) Ezali bobele na komonisáká kondima epai na Yehova nde tokoki kolikya kozwa esengo mpe bomoi ya seko.
11. Koloba “soko ezali mokano na Nkolo” elimboli nini?
11 Na esika ya kozanga kotyela Nzambe likebi na lolendo nyonso, tosengeli nde koloba boye: “Soko ezali mokano na Nkolo, tokozala na bomoi, mpe tokosala boye na bongo.” Koloba, “Soko ezali mokano na Nkolo” emonisi ete tozali komeka kosala na boyokani na mokano na ye. Kosala mombongo ekoki kozala na ntina mpo na kosunga libota na biso, kosala mobembo na mosala ya Bokonzi, mpe bongo na bongo. Kasi tózala na lolendo te. “Komikumisa nyonso na motindo yango ezali mabe” mpamba te ezali koboya kondima ete tosengeli kotalela Nzambe.—Nzembo 37:5; Masese 21:4; Yilimia 9:23, 24.
12. Maloba ya Yakobo 4:17 malimboli nini?
12 Mbala mosusu mpo na kosukisa maloba na ye na ntina na komityela motema mpe lolendo, Yakobo alobi ete: “Ye oyo ayebi kosala malamu nde akosalaka boye te, ezali na ye lisumu.” Na komikitisa nyonso, moklisto nyonso asengeli kondima ete asengeli kotalela Nzambe. Soki asali yango te, “ezali na ye lisumu.” Ya solo, tosengeli mpe kosalela etindá yango mpo na bolɛmbu nyonso etali kokokisa makambo oyo kondima epai ya Nzambe esɛngi biso.—Luka 12:47, 48.
Likebisi mpo na bazwi
13. Yakobo alobi nini na ntina na baoyo bazali kosalela bozwi na bango na lolenge ya mabe?
13 Yakobo akomi maloba ya nguya na ntina na bazwi mosusu mpamba te bamoko kati na baklisto ya ekeke ya liboso bakómaki kolinga biloko mingi ya mosuni to bazalaki kolula bazwi. (Yakobo 5:1-6) Bato ya mokili oyo bazali kosalela bozwi na bango na lolenge ya mabe ‘bakolela mpe bakonganga mpo na bolɔ́zi bokoyela bango’ ntango Nzambe akopesa bango lifuti engebene misala na bango. Na ntango wana, bozwi ya bato mingi ezalaki mingimingi na biloko lokola bilamba, mbuma ya bilanga, mpe vinyo. (Yoele 2:19; Matai 11:8) Biloko yango mosusu bikoki ‘kolyama na mpɛsɛ,’ kasi Yakobo azali kobenda likebi na likambo oyo ete bozwi ezali na ntina te, kasi na kobeba na yango te. Atako wolo mpe palata ebebaka te, soki tobombi yango, ekozala na motuya te lolenge moko na biloko oyo bisili koguga. “Koguga” emonisi ete bozwi ya mosuni esalelamaki na lolenge ya malamu te. Na yango, biso nyonso tosengeli komikundola ete baoyo bazali kotya motema na biloko ya mosuni ‘basili kobomba na mikolo milingi kosuka’ eloko “lokola mɔ́tɔ” ntango nkanda ya Nzambe ekokitela bango. Lokola tozali kobika na “elaka na nsuka,” maloba yango mazali na ndimbola monene mpo na biso.—Danyele 12:4; Baloma 2:5.
14. Mbala mingi bazwi basalaka makambo nini, mpe biso tosengeli kosala nini mpo na yango?
14 Mbala mingi bazwi bayibaka babuki-mbuma na bango, baoyo lifuti na bango ‘ezali konganga’ ete epesama. (Kokanisá na Genese 4:9, 10.) Bazwi na mokili ‘basili kofanda na biloko kitoko mpe bamisepelisi.’ Lokola bamipesaka mobimba na bisengo ya nzoto, bayeisaka mitema na bango kilo, bakómisaka yango makasi mpe bakokóba kosala bongo na “mokolo” etyami mpo na kobomama na bango. ‘Bazali kokweisa mpe bazali koboma moyengebene.’ Yakobo atuni ete: ‘Atɛmɛli bino, boye te?’ Kasi lolenge mosusu ya kobongola maloba yango ezali ete, “Moyengebene, . . . azali kotɛmɛla bino te.” Ata ndenge nini, tokomonisa koponapona te liboso ya mozwi. Tosengeli kotya matomba ya elimo na esika ya liboso kati na bomoi na biso.—Matai 6:25-33.
Kondima esalisaka biso ete tómonisa motema molai
15, 16. Mpo na nini komonisa motema molai ezali na ntina mingi?
15 Nsima ya koloba na ntina na bazwi ya mokili oyo bazali konyokola bato, Yakobo alendisi baklisto oyo banyokwami ete bámonisa motema molai. (Yakobo 5:7, 8) Soki bandimi bayikeli bampasi na bango mpiko na kozaláká na motema molai, bakozwa mbano mpo na bosembo na bango na komonana ya Klisto, ntango kosambisama ekokwela banyokoli na bango. (Matai 24:37-41) Baklisto wana ya ekeke ya liboso basengelaki kozala lokola mosáli na bilanga oyo azelaka na motema molai mbula ya liboso ya eleko ya mbula mpo na kolóna, mpe mbula ya nsuka ya eleko ya molungé mpo na kobuka mbuma. (Yoele 2:23) Biso mpe tosengeli komonisa motema molai mpe kokómisa mitema na biso ngwi, mingi mpenza lokola “kozala ya Nkolo” Yesu Klisto esili kokóma!
16 Mpo na nini tosengeli kozala na motema molai? (Yakobo 5:9-12) Motema molai esalisaka biso ete tómilelalela te to tókimela te ntango baninga na biso bandimi basilikisi biso. Soki tozali ‘kofundana’ na makanisi ya mabe, tokokweisama na Mosambisi Yesu Klisto. (Yoane 5:22) Lokola “kozala” na ye esilaki kobanda mpe lokola “atɛlɛmi liboso na bikuke,” tiká ete tólendisa kimya na kozaláká na motema molai epai na bandeko na biso, oyo bazali kokutana na komekama mingi kati na kondima. Kondima na biso moko ezali kolendisama ntango tozali komikundola ete Yehova apesaki Yobo mbano mpamba te ayikaki mpiko na komonisáká motema molai kati na minyoko na ye. (Yobo 42:10-17) Soki tomonisi kondima mpe motema molai, tokomona ete “Nkolo atondi na mawa mpe na boboto.”—Mika 7:18, 19.
17. Mpo na nini Yakobo alobi ete, “Bósimba ndai te”?
17 Soki tozangi motema molai, tokoki kosalela lolemo na biso na lolenge mabe ntango tosiliki. Na ndakisa, tokoki kolapa ndai kozanga kokanisa liboso na bozindo. Mpo na kokebisa biso na ntina na kolapa ndai kozanga kokanisa liboso na bozindo, Yakobo alobi ete “bósimba ndai te.” Kolapa ndai ntango nyonso mpo na kondimisa maloba na biso ezali mpe lokola kosala na bokosi. Na yango, tosengeli bobele koloba solo, kosaláká ete ɛɛ na biso elimbola mpenza ɛɛ, mpe te na biso, te. (Matai 5:33-37) Ezali solo ete awa Yakobo alobi te ete ezali mabe kolapa ndai liboso ya esambiselo mpo na kondimisa ete tokoloba solo.
Kondima mpe mabondeli na biso
18. Na ntango nini tosengeli ‘kokóba kobondela’ mpe ‘koyemba nzembo’?
18 Libondeli esengeli kozala na esika monene kati na bomoi na biso soki tolingi kobatela maloba na biso, komonisa motema molai, mpe kobatela kondima makasi epai na Nzambe. (Yakobo 5:13-20) Mingi mpenza na ntango tozali konyokwama, tosengeli ‘kobondelaka na kotika te.’ Soki tozali na esengo, tiká ete ‘tóyemba nzembo,’ lolenge moko Yesu mpe bantoma na ye basalaki ntango abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye. (Malako 14:26, NW, maloba na nsé ya lokasa) Ntango mosusu tokoki mpenza kozala na botɔ́ndi mingi epai na Nzambe na boye ete tokoyemba masanzoli ata na nsé ya motema. (1 Bakolinti 14:15; Baefese 5:19) Mpe esengo ekozala mingi lisusu soki tokosanzola Yehova na nzembo na makita ya boklisto!
19. Tosengeli kosala nini soki tokómi na maladi na elimo, mpe mpo na nini tokosala bongo?
19 Tokoki koyoka ete tozali na mposa ya koyemba te soki tozali na maladi na elimo, mbala mosusu na ntina na etamboli mabe to tozali komileisa ntango nyonso te na mesa ya Yehova. Soki tozali kati na ezalela wana, na komikitisa nyonso, tóbyanga bankulutu mpo ete ‘bábondela mpo na biso.’ (Masese 15:29) Lisusu ‘bakopakola biso mafuta na nkombo ya Yehova.’ Lokola mafuta oyo makoki kosilisa koswa na mpota, maloba na bango ya kobɔndisa mpe toli na bango euti na Makomami ekosalisa mpo na kokitisa konyokwama na makanisi, ntembe, to bobangi. ‘Libondeli na kondima ekobikisa biso’ soki esimbami na kondima na biso. Soki bankulutu bamoni ete maladi na biso na elimo euti na lisumu monene, na boboto nyonso, bakoyebisa biso lisumu na biso mpe bakosalisa biso. (Nzembo 141:5) Soki tobongoli motema, tokoki komindimisa ete Nzambe akoyoka mabondeli na bango mpe akolimbisa biso.
20. Mpo na nini tosengeli koyambola masumu na biso mpe kobondela bamoko mpo na bamosusu?
20 ‘Koyambola masumu na biso bamoko na bamosusu’ esengeli kozala lokola epekiseli mpo ete tózongela lisusu masumu yango te. Esengeli kolendisa koyokelana mawa kati na biso, ezaleli oyo ekopusa biso ete ‘tóbondela bamoko mpo na basusu.’ Tokoki komindimisa ete likambo yango ekozala na litomba mpamba te libondeli ya ‘moyengebene’—elingi koloba moto oyo azali na kondima mpe oyo Nzambe azali kotalela lokola mosembwi—ezali na nguya mingi na miso ya Yehova. (1 Petelo 3:12) Mosakoli Eliya azalaki na bolɛmbu lolenge moko na biso, kasi mabondeli na ye mazalaki na nguya. Abondelaki, mpe mbula enokaki te na boumeli ya mibu misato na ndambo. Ntango abondelaki lisusu, mbula enokaki.—1 Mikonzi 17:1; 18:1, 42-45; Luka 4:25.
21. Tokoki kosala nini soki moninga moko moklisto ‘apɛngwi na makambo na solo’?
21 Ezali boni soki moto moko kati na lisangá “akopɛngwa na makambo na solo,” kotikáká bongo mateya ya solo mpe etamboli malamu? Tokoki kozongisa ye na nzela malamu na lisalisi ya toli ya Biblia, na libondeli, mpe na nzela ya lisungi mosusu. Soki tolóngi, yango ekotika ye na kati ya mbeka ya Klisto mpe ekobikisa ye na liwa ya elimo mpe ekweli ya kobomama. Na kosalisáká moto oyo abungi nzela, tozali kozipa ebele na masumu na ye. Soki mosumuki oyo apamelami atiki etamboli mabe na ye, abongoli motema, mpe aluki bolimbisi, tokosepela ete tosanganaki na kozipa masumu na ye.—Nzembo 32:1, 2; Yuda 22, 23.
Litomba mpo na biso nyonso
22, 23. Maloba ya Yakobo masengeli kozala na bopusi nini likoló na biso?
22 Ɛɛ, mokanda ya Yakobo ezali na eloko oyo ezali na litomba mpo na biso nyonso. Ezali komonisa biso lolenge ya kolónga minyoko, ezali kopesa biso toli ete tóboya ezaleli ya koponapona, mpe ezali kolendisa biso ete tósala misala malamu. Yakobo alendisi biso ete tóbatela lolemo na biso, tótɛmɛla bopusi ya mokili, mpe tókólisa kimya. Maloba na ye masengeli kosala ete tózala na motema molai mpe tóbondelaka mingi.
23 Ya solo, mokanda ya Yakobo etindamaki libosoliboso epai na baklisto bapakolami na ekeke ya liboso. Kasi, biso nyonso tosengeli kosala ete toli na yango esalisa biso na kokangama na kondima na biso. Maloba ya Yakobo makoki kopesa biso kondima oyo ekopusa biso na kosala mingi kati na mosala ya Nzambe. Mpe mokanda yango mopemami na Nzambe mozali kotonga kondima oyo ekoumela mpe ekokómisa biso Batatoli ya Yehova oyo bazali na motema molai mpe na momeseno ya kobondela mingi lelo oyo, na boumeli ya “kozala ya Nkolo” Yesu Klisto.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Mpo na nini baklisto mosusu na ekeke ya liboso basengelaki kobongola makanisi mpe etamboli na bango?
◻ Likebisi nini Yakobo apesi na bazwi?
◻ Mpo na nini tosengeli komonisa motema molai?
◻ Mpo na nini tosengeli kobondela ntango nyonso?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 19]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 23]
Baklisto mosusu na ekeke ya liboso basengelaki komonisa mingi motema molai epai na bandeko na bango bandimi
[Elilingi na lokasa 24]
Baklisto basengeli kozala na motema molai, na bolingo, mpe na momeseno ya kobondela mingi