Osengeli kobosana Yehova te
BAMOSUSU na kati na bango bakatisaki mai liboso kozanga ete bilamba na bango epɔla. Nzokande, mpo na mingi kati na bango, yango ezalaki mbala ya liboso ya komona likambo yango. Yehova akausaki mai ya Ebale Yolodani. Yango epesaki nzela na bamilio ya Bayisalaele bákatisa mpe bákɔta na Mokili ya Ndaka. Ndenge moko na bankɔkɔ na bango oyo bakatisaki Mai Motane mbula 40 liboso, ekoki kozala ete mingi na kati ya Bayisalaele oyo bakatisaki Ebale Yolodani bazalaki koloba na nse ya motema boye: ‘Nakobosana te likambo oyo Yehova asali awa.’—Yos. 3:13-17.
Kasi, Yehova ayebaki ete Bayisalaele mosusu ‘bakobosana misala na ye noki.’ (Nz. 106:13) Yango wana, ayebisaki Yosua, motambwisi ya Bayisalaele ete azwa mabanga 12 na esika oyo mai ezalaki koleka mpe atya yango na esika ya liboso oyo basengelaki kolala. Yosua alobaki boye: “Mabanga oyo ekozala ekaniseli mpo na bato ya Yisalaele libela.” (Yos. 4:1-8) Likonzí yango ya mabanga esengelaki kokundwela ekólo Yisalaele misala ya kokamwa ya Yehova mpe komonisa bango ntina oyo basengelaki ntango nyonso kosalela ye na bosembo.
Lisolo yango ezali na ntina mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo? Ɛɛ. Biso mpe tosengeli kobosana Yehova te; tosengeli kotikala ntango nyonso sembo epai na ye. Makebisi mosusu oyo Yehova apesaki Bayisalaele ekoki mpe kosalisa basaleli na ye lelo oyo. Tótalela maloba ya Moize oyo: “Kebá ete obosana [Yehova] Nzambe na yo te, na kozanga kobatela malako na ye mpe monɔkɔ na ye mpe mibeko na ye.” (Det. 8:11) Yango emonisi ete kobosana Yehova ekoki kotinda moto azanga botosi epai ya Nzambe. Likambo yango ekoki kozala mpe likama mpo na biso lelo oyo. Na mokanda moko oyo ntoma Paulo akomelaki Baklisto, akebisaki bango na “ndakisa yango ya kozanga botosi” oyo Bayisalaele bamonisaki na esobe.—Ebe. 4:8-11.
Tiká tótalela mwa makambo esalemaki epai ya Bayisalaele, oyo ekomonisa biso ntina oyo tosengeli kobosana Nzambe te. Lisusu, mateya oyo tokozwa na likambo oyo mibali mibale ya Yisalaele basalaki ekosalisa biso tósalela Yehova na mpiko mpe na botɔndi.
Ntina oyo tosengeli kobosana Yehova te
Na boumeli ya bambula nyonso oyo Bayisalaele balekisaki na Ezipito, Yehova abosanaki bango te. “Akanisaki kondimana kati na ye na Abalayama mpe na Yisaka mpe na Yakobo.” (Ex. 2:23, 24) Likambo oyo asalaki mpo na kolongola bango na boombo ezalaki likambo oyo basengelaki kokanisaka ntango nyonso.
Yehova atindelaki Baezipito malɔzi libwa. Banganga-nkisi ya Falao bakokaki te kopekisa yango. Atako bongo, Falao atɛmɛlaki Yehova mpe aboyaki kotika Bayisalaele bákende. (Ex. 7:14–10:29) Kasi, bolɔzi ya zomi etindaki mokonzi yango ya lolendo atosa Nzambe. (Ex. 11:1-10; 12:12) Na litambwisi ya Moize, Bayisalaele mpe bato mosusu oyo basanganaki na bango batikaki Ezipito; bazalaki bato soki 3 000 000. (Ex. 12:37, 38) Kaka ntango bakendaki, Falao abongolaki makanisi. Abimisaki makalo na ye ya etumba mpe basoda-batamboli-na-mpunda—mampinga ya basoda oyo elekaki na nguya na ntango wana—bálanda baombo na ye. Na ntango yango, Yehova ayebisaki Moize amema Bayisalaele na esika moko moke kati na Mai Motane ná bangomba, esika oyo ebengami Pi-hahiloto, epai emonanaki ete bakokoka kokima te.—Ex. 14:1-9.
Falao akanisaki ete Bayisalaele bazwami na motambo, mpe ete basoda na ye bakokanga bango. Kasi, Yehova asalaki ete Baezipito bápusana te; atyaki likonzí moko ya lipata mpe likonzí moko ya mɔtɔ kati na bango ná Bayisalaele. Na nsima, Nzambe akabolaki Mai Motane; mai etɛlɛmaki ngámbo na ngámbo na bolai ya mɛtrɛ 15. Bayisalaele bakatisaki na mabelé ya kokauka. Mosika te, Baezipito bakómaki na libongo mpe bamonaki ndenge Bayisalaele bazalaki kokatisa na ngámbo mosusu.—Ex. 13:21; 14:10-22.
Mokonzi ya mayele alingaki kotika kolanda; kasi, Falao asalaki bongo te. Na lolendo nyonso atindaki makalo na ye mpe basoda-batamboli-na-mpunda bálanda Bayisalaele. Baezipito bakobaki kolanda. Kasi, liboso bákanga Bayisalaele, bakokaki lisusu te. Makalo na bango ezalaki lisusu kotambola te! Yehova alongolaki bapinɛ na yango.—Ex. 14:23-25; 15:9.
Ntango Baezipito bazalaki kobundana na makalo na bango oyo elongwaki bapinɛ, Bayisalaele nyonso bakómaki na ngámbo mosusu. Moize asembolaki lobɔkɔ na ye na Mai Motane. Na yango, Yehova azongisaki mai oyo etɛlɛmaki epai na epai. Ebele ya mai wana ezongelaki Falao ná basoda na ye mpe ezindisaki bango. Ata moko te ya banguna yango abikaki. Bayisalaele basikwamaki!—Ex. 14:26-28; Nz. 136:13-15.
Nsango ya likambo yango epanzanaki na bikólo ya zingazinga mpe bakómaki kobanga makasi. (Ex. 15:14-16) Mbula ntuku minei na nsima, Laaba, mwasi moko ya Yeliko, ayebisaki mibali mibale ya Yisalaele boye: “Nsɔmɔ na bino ekweli biso, . . . Mpo ete biso toyoki motindo [Yehova] akaukisaki mai ya Mai Motane liboso na bino wana ebimaki bino na Ezipito.” (Yos. 2:9, 10) Ata bato ya bikólo wana ya bapakano babosanaki te ndenge Yehova asikolaki bato na ye. Na ntembe te, Bayisalaele bazalaki na bantina ya kobosana Yehova te.
‘Abatelaki bango lokola mbuma ya liso na ye’
Ntango Bayisalaele bakatisaki Mai Motane, bakɔtaki na esobe ya Sinai, “esobe monene mpe ya nsɔmɔ.” Ntango bazalaki kotambola na mokili yango oyo ezalaki na mai mpe bilei te mpo na ebele ya bato wana, lobɔkɔ ya Yehova ezalaki mokuse te. Moize alobaki boye: “[Yehova] ayaki kokuta [Yisalaele] na mokili ya esobe. Mpe na mokili ekauká oyo ezali mpamba, oyo ezali koganga na kolela. Abandaki kozinga ye, kobatela ye, Kobatela ye lokola mbuma ya liso na ye.” (Det. 8:15; 32:10, NW) Ndenge nini Nzambe abatelaki bango?
Yehova apesaki bango “[mampa, NW] longwa na likoló,” babengaki yango mana; ezalaki kobima na ndenge ya likamwisi “kati na esobe.” (Ex. 16:4, 14, 15, 35) Yehova abimisaki mpe mai “na libanga makasi.” Na lipamboli ya Nzambe, bilamba na bango ebebaki te, makolo na bango evimbaki te na boumeli ya mbula 40 oyo batambolaki na esobe. (Det. 8:4) Yehova azalaki kozela nini epai na bango? Moize ayebisaki Bayisalaele boye: “Kebá bobele kokeba, mpe sɛnzɛlá [molimo] na yo malamu ete obosana makambo emoni miso na yo te, mpe ete elongwa na motema na yo te mikolo nyonso ya bomoi na yo.” (Det. 4:9) Soki Bayisalaele bazalaki kokanisa na botɔndi nyonso makamwisi oyo Yehova asalelaki bango, yango elingaki kotinda bango básalelaka ye ntango nyonso mpe bátosaka mibeko na ye. Bayisalaele basalaki bongo?
Kobosana etindaka moto azanga botɔndi
Moize alobaki boye: “Obosanaki Libanga oyo ebotaki yo, mpe obandaki kolongola Nzambe na makanisi na yo.” (Det. 32:18, NW) Bayisalaele babosanaki makamwisi oyo Yehova asalaki na Mai Motane, makambo oyo asalaki mpo na kobatela bango na esobe, mpe makambo mosusu nyonso ya malamu oyo asalelaki bango. Bakómaki batomboki.
Mokolo moko, Bayisalaele basilikelaki Moize mpo mai ezalaki te. (Mit. 20:2-5) Na ntina na mana oyo ebatelaki bomoi na bango, bamilelaki boye: “Molimo na biso ekómi koyoka mampa ya mpamba oyo mpii.” (Mit. 21:5, NW) Batɛmɛlaki Nzambe mpe baboyaki Moize atambwisa bango; balobaki boye: “Soki tókufaka ata na mokili ya Ezipito, to soki tókufaka ata na esobe oyo! . . . Tópona mokambi, mpe tózonga na Ezipito.”—Mit. 14:2-4, NW.
Yehova ayokaki ndenge nini mpo na kozanga botosi ya Bayisalaele? Mpo na likambo yango, mokomi moko ya nzembo akomaki boye: “Mbala boni batombokelaki ye kati na esobe mpe batungisaki ye na esika ya zɛlɔ! Ɛ babongwaki mpe bamekaki Nzambe lisusu; bayokisaki Oyo ya bulɛɛ ya Yisalaele nkanda. Bakanisaki lobɔkɔ na ye te soko mokolo [asikolaki, NW] bango epai ya bayini, wana esalaki ye misala ya kokamwa kuna na Ezipito.” (Nz. 78:40-43) Ya solo, Yehova ayokaki mpasi na motema ndenge Bayisalaele babosanaki ye.
Mibali mibale oyo babosanaki te
Nzokande, Bayisalaele mosusu babosanaki Yehova te. Kati na bango, tokoki kotánga Yosua ná Kalebe. Bazalaki kati na bato 12 oyo Moize atindaki mpo na kotala Mokili ya Ndaka. Zomi kati na bango bapesaki nsango ya malamu te, kasi Yosua ná Kalebe bayebisaki bato boye: “Mokili elekaki biso na kati na yango mpo na konɔnga ezali mokili malamu mingi. Soki [Yehova] asepeli [na] biso, . . . akokɔtisa biso na mokili yango mpe akopesa yango na biso. Yango mokili eleki na mabɛlɛ mpe na mafuta ya nzoi. Nde bótomboka epai ya [Yehova] te.” Ntango Bayisalaele bayokaki maloba yango, balukaki kobamba Yosua ná Kalebe mabanga. Kasi, bango mibale batikalaki sembo mpe bazalaki na elikya makasi epai ya Yehova.—Mit. 14:6-10.
Bambula mingi na nsima, Kalebe ayebisaki Yosua boye: “Moize mosaleli ya Yehova atindaki ngai uta na Kadeshe-barnea mpo na konɔnga mokili, mpe nayaki koyebisa ye makambo ndenge ezalaki na motema na ngai. Nde bandeko na ngai oyo bamataki na ngai elongo balɛmbisaki motema ya bato; kasi ngai, nalandaki Yehova Nzambe na ngai na makambo nyonso.” (Yos. 14:6-8, NW) Na kondima oyo bazalaki na yango, Kalebe ná Yosua bayikaki mpiko na makambo ndenge na ndenge. Bazalaki na ekateli ya kobosana Yehova te mikolo nyonso ya bomoi na bango.
Kalebe ná Yosua, bamonisaki mpe botɔndi, bayebaki ete Yehova akokisaki elaka na ye ya kopesa bato na ye mabelé kitoko. Ya solo, Yehova abatelaki bomoi ya Bayisalaele. Yosua akomaki boye: “[Yehova] apesaki Yisalaele mokili mobimba oyo esimbaki ye ndai ete akopesa yango na batata na bango. . . . Moko na ndaka malamu nyonso, oyo [Yehova] atyaki na ndako ya Yisalaele, ezangaki te. Yango ebimaki nyonso.” (Yos. 21:43, 45) Ndenge nini biso mpe tokoki komonisa botɔndi lokola Kalebe ná Yosua?
Monisá botɔndi
Moto moko oyo azalaki kobanga Nzambe atunaki boye: “Nakofuta Yehova eloko nini mpo na bolamu na ye nyonso oyo asalelá ngai?” (Nz. 116:12, NW) Tozali na nyongo monene epai ya Yehova mpo na nyonso oyo asaleli biso, ezala na mosuni to na elimo, mpe mpo na bibongiseli oyo azwi mpo na lobiko na biso na mikolo ezali koya; ata soki topesi ye mersi seko na seko, yango ekokoka te mpo na kofuta nyongo yango. Ya solo, ezali na eloko te oyo tokoki kopesa mpo na kofuta Yehova. Kasi, mokomoko na biso akoki komonisa botɔndi.
Toli ya Yehova esilá kosalisa yo okima mikakatano? Bolimbisi na ye esalisá yo okóma na lisosoli ya pɛto? Lokola matomba ya makambo yango esilaka te, botɔndi na yo mpe esengeli kosila te. Sandra, elenge mwasi moko ya mbula 14 akutanaki na mikakatano makasi, kasi alongaki yango na lisalisi ya Yehova. Alobi boye: “Nabondelaki Yehova asalisa ngai, mpe ndenge asalisaki ngai ekamwisaki ngai. Sikoyo nayebi mpo na nini tata azalaki kokundwela ngai maloba ya Masese 3:5, 6 mbala na mbala: ‘Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.’ Nandimi mpenza ete kaka ndenge Yehova asalisaki ngai liboso, akokoba kosalisa ngai ntango nyonso.”
Yiká mpiko mpo na komonisa ete obosani Yehova te
Biblia emonisi ezaleli mosusu oyo etambolaka nzela moko na kokanisa Yehova; elobi boye: “Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba, mpo bino bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, kozangáká eloko te.” (Yak. 1:4) ‘Kokoka mpe kobonga na makambo nyonso’ elimboli nini? Esɛngaka kokolisa bizaleli oyo ekosalisa biso tózala na elikya epai ya Yehova ata soki tokutani na mikakatano, mpe tózala na ekateli ya kozonga nsima te. Koyika mpiko ndenge wana epesaka esengo mpenza ntango komekama ekómi na nsuka. Mpe komekama eumelaka libela te.—1 Kol. 10:13.
Mosaleli moko ya Yehova oyo abɛlaki mingi ayebisi nini esalisaki ye ayika mpiko: “Nakanisaka makambo oyo Yehova azali kosala, kasi te oyo ngai nalingi kosala. Kozala sembo elimboli kotya miso na mikano ya Nzambe, kasi na bamposa na ngai moko te. Ntango nakutani na mikakatano, nalobaka te ete, ‘Yehova mpo na nini kaka ngai?’ Nakobaka kosalela ye mpe nakangamaka na ye ata soki nakutani na likambo oyo nakanaki te.”
Lelo oyo, Baklisto ya solo basambelaka Yehova “na elimo mpe na solo.” (Yoa. 4:23, 24) Baklisto bakobosana Nzambe ata mokolo moko te ndenge oyo ekólo ya Yisalaele esalaki. Kasi, kozala na kati ya lisangá ezali ndanga te ete tokotikala kaka sembo. Lokola Kalebe ná Yosua, mokomoko na biso asengeli komonisa botɔndi mpe koyika mpiko na mosala ya Yehova. Tozali mpenza na ntina ya kosala bongo, mpo Yehova azali kokoba kotambwisa mpe kobatela mokomoko na biso na ntango oyo ya nsuka mpe ya mpasi.
Lokola likonzí ya mabanga oyo Yosua atɛlɛmisaki, misala ya kokamwa ya Nzambe ezali kopesa biso elikya ete akosundola basaleli na ye te. Na yango, tiká tózala na likanisi ndenge moko na mokomi ya nzembo oyo akomaki boye: “Nakokanisa misala ya Yah; mpo nakokanisa misala na yo ya kokamwa ya ntango ya kala. Mpe nakomanyola likoló ya mosala na yo nyonso, mpe nakotya likebi na misala na yo.”—Nz. 77:11, 12, NW.
[Elilingi na lokasa 7]
Ekólo mobimba ya Yisalaele ekatisaki na “mabelé ekauká”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 8]
Ntango Bayisalaele batɛlɛmaki na Kadeshe-barnea, banɔngi bakendaki kotala Mokili ya Ndaka
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 9]
Nsima ya bambula mingi oyo balekisaki na esobe, Bayisalaele basengelaki kozala na botɔndi mpo na Mokili kitoko ya Ndaka
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 10]
Kotya miso na mikano ya Yehova esalisaka biso tóyika mpiko ata liboso ya mikakatano ya ndenge nini