Bonganga-nzambe moko ya bokonzi mpo na bolamu ya bato nyonso
“Bozali ‘libota oyo eponami, bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu, bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza.’”—1 PE. 2:9.
1. Mpo na nini “bilei ya mpokwa ya Nkolo” ebengamaka mpe Ekaniseli, mpe mpo na nini tosalaka yango?
NA MPOKWA ya mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., Yesu Kristo asalaki Elekeli mpo na mbala ya nsuka elongo na bantoma na ye 12. Nsima ya kobimisa Yudasi Mokeriota, oyo na nsima atɛkaki ye, Yesu asalaki molulu ya sika oyo ekómaki kobengama “bilei ya mpokwa ya Nkolo.” (1 Ko. 11:20) Yesu alobaki mbala mibale ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” Molulu yango ebengamaka mpe Ekaniseli; tosalaka yango mpo na kokanisa Kristo, mingimingi liwa na ye. (1 Ko. 11:24, 25) Mbula na mbula, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba basalaka Ekaniseli mpo na kotosa maloba ya Yesu. Na 2012, mokolo ya 14 Nisana na manaka ya Bayuda ekobanda mokolo ya minei, 5 Aprili, soki kaka moi elali.
2. Yesu alobaki nini mpo na limpa mpe vinyo oyo asalelaki?
2 Luka amonisi makambo oyo Yesu alobaki mpe oyo asalaki mokolo yango na maloba oyo: “Akamataki limpa, apesaki matɔndi, abukaki yango, mpe apesaki bango yango, alobaki ete: ‘Oyo elakisi nzoto na ngai oyo ekokabama mpo na bino. Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.’ Lisusu, ndenge moko mpe mpo na kɔpɔ ntango basilisaki bilei ya mpokwa, alobaki ete: ‘Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai, oyo ekosopama mpo na bino.’” (Luka 22:19, 20) Ndenge nini bantoma bakangaki ntina ya maloba yango?
3. Bantoma bakangaki ntina ya likambo nini ntango Yesu asalelaki limpa mpe vinyo?
3 Lokola bantoma bazalaki Bayuda, bayebaki malamu ete banganga-nzambe bazalaki kopesa Nzambe bambeka ya banyama na tempelo ya Yerusaleme. Bato bazalaki kopesa makabo yango mpo Yehova andima bango, mpe mingi na yango ezalaki mpo na kozipa masumu. (Lev. 1:4; 22:17-29) Na yango, ntango Yesu alobaki ete nzoto na ye ‘ekopesama mpo na bango’ mpe makila na ye ‘ekosopama mpo na bango,’ bantoma bakangaki ntina ete akopesa bomoi na ye ya kokoka lokola mbeka. Mbeka yango ekozala na motuya monene koleka bambeka ya banyama.
4. Yesu alingaki koloba nini na maloba oyo: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai”?
4 Kasi, Yesu alingaki koloba nini ntango abakisaki ete “kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai”? Bantoma bayebaki esakweli oyo elobelaki kondimana ya sika, oyo ezali na Yirimia 31:31-33. (Tángá.) Maloba ya Yesu emonisaki ete abandisi kondimana yango ya sika, oyo ekozwa esika ya kondimana ya Mibeko oyo Yehova asalaki na Yisraele na nzela ya Moize. Kondimana ya Mibeko ezalaki nde na boyokani na kondimana ya sika?
5. Kondimana ya Mibeko epesaki ekólo Yisraele bilikya nini?
5 Kondimana yango mibale ezalaki na mikano ndenge moko. Ntango Yehova asalaki kondimana ya Mibeko, alobaki na ekólo Yisraele boye: “Soki bokotosa mpenza mongongo na ngai mpe bokobatela mpenza kondimana na ngai, bokokóma mpenza eloko na ngai moko kati na bato ya bikólo mosusu nyonso, mpo mabele mobimba ezali ya ngai. Mpe bino bokokóma mpo na ngai bokonzi moko ya banganga-nzambe mpe ekólo moko mosantu.” (Kob. 19:5, 6) Ndenge nini Bayisraele bakangaki ntina ya maloba yango?
NZAMBE ALAKI BONGANGA-NZAMBE MOKO YA BOKONZI
6. Kondimana ya Mibeko esalemaki mpo na kokokisa elaka nini?
6 Bayisraele bayebaki ete liloba “kondimana” ezali boyokani oyo bato basali, mpamba te Yehova asalaki yango ná bankɔkɔ na bango Noa mpe Abrahama. (Eba. 6:18; 9:8-17; 15:18; 17:1-9) Ntango Yehova asalaki kondimana ná Abrahama, alakaki ye boye: “Na nzela ya momboto na yo, bikólo nyonso ya mabele ekomizwela mpenza lipamboli.” (Eba. 22:18) Kondimana ya Mibeko esalemaki mpo na kokokisa elaka wana. Na nzela ya kondimana yango, Yisraele ekokaki kokóma “eloko [ya Yehova ye] moko kati na bato ya bikólo mosusu nyonso.” Na mokano nini? Mpo ‘bákóma mpo na Yehova bokonzi moko ya banganga-nzambe.’
7. Maloba “bokonzi moko ya banganga-nzambe” elimbolaki nini?
7 Bayisraele bayebaki mokumba ya mokonzi mpe mokumba ya nganga-nzambe, kasi bayebaki mpe ete Yehova andimá kaka mokonzi moko azala mpe nganga-nzambe; nkombo na ye ezalaki Melekisedeke. (Eba. 14:18) Na nzela ya kondimana ya Mibeko, Yehova apesaki Yisraele libaku ya kobimisa “bokonzi moko ya banganga-nzambe.” Ndenge mikanda ya Biblia oyo ekomamaki na nsima emonisaki yango, ekólo yango ezwaki nde libaku ya kobimisa bonganga-nzambe moko ya bokonzi, elingi koloba bakonzi oyo bakozala mpe banganga-nzambe.—1 Pe. 2:9.
8. Makambo nini nganga-nzambe asalaka?
8 Toyebi ete mokonzi ayangelaka. Bongo nganga-nzambe asalaka nini? Baebre 5:1 elobi boye: “Nganga-nzambe monene nyonso oyo bazwi na kati ya bato atyamaka mpo na bolamu ya bato na makambo ya Nzambe, mpo apesa makabo mpe bambeka mpo na masumu.” Na yango, nganga-nzambe oyo Yehova atye azalaka molobeli ya basumuki liboso ya Nzambe; apesaka Yehova bambeka mpo na kosɛnga Ye alimbisa bango. Kasi, nganga-nzambe azalaka mpe molobeli ya Yehova liboso ya bato; ateyaka bango mibeko na Ye. (Lev. 10:8-11; Mal. 2:7) Na yango, Nzambe aponaka nganga-nzambe mpo na kosalisa bato bázongisa boyokani na Nzambe.
9. (a) Bayisraele basengelaki kosala nini mpo bábimisa “bokonzi moko ya banganga-nzambe”? (b) Mpo na nini Yehova atyaki banganga-nzambe na Yisraele? (c) Mpo na nini Yisraele ebimisaki te “bokonzi moko ya banganga-nzambe” na ntango ya kondimana ya Mibeko?
9 Na yango, kondimana ya Mibeko epesaki Yisraele libaku ya kobimisa bonganga-nzambe moko ya bokonzi mpo na bolamu ya “bato ya bikólo mosusu nyonso.” Kasi, mpo bázwa libaku malamu wana, Nzambe asɛngaki bango likambo moko. Alobaki boye: “Soki bokotosa mpenza mongongo na ngai mpe bokobatela mpenza kondimana na ngai.” Bayisraele bakokaki nde ‘kotosa mpenza mongongo ya Yehova’? Ɛɛ, kasi na ndenge ya kokoka te. (Rom. 3:19, 20) Yango wana, Yehova atyaki banganga-nzambe mpo bápesaka bambeka ya banyama mpo na masumu ya Bayisraele bango moko; banganga-nzambe yango bazalaki bakonzi te. (Lev. 4:1–6:7) Bambeka yango ezalaki mpe mpo na masumu ya banganga-nzambe bango moko. (Ebr. 5:1-3; 8:3) Yehova azalaki kondima bambeka yango, kasi ekokaki te kolongola mpo na libela masumu ya Bayisraele. Bonganga-nzambe oyo etyamaki na ntango ya kondimana ya Mibeko ekokaki te kosalisa ata Bayisraele ya mitema sembo bázongisa mpenza boyokani na Nzambe. Ntoma Paulo amonisaki yango na maloba oyo: “Makila ya bangɔmbɛ-mibali mpe ya bantaba ekoki kolongola masumu te.” (Ebr. 10:1-4) Lokola Bayisraele bazalaki kotosa te makambo oyo Mibeko esɛngaki, balakelamaki mabe. (Gal. 3:10) Mpo na yango, ezalaki mpasi bákóma bonganga-nzambe moko ya bokonzi mpo na bolamu ya bato nyonso.
10. Kondimana ya Mibeko ekokisaki likambo nini?
10 Kasi, yango elingi koloba te ete elaka ya Yehova oyo elobaki ete Yisraele ekobimisa “bokonzi moko ya banganga-nzambe” ekokaki kokokisama te. Soki basalaki mpenza makasi bátosa Nzambe, bakokaki kozwa libaku yango, kasi na nse ya Mibeko te. Mpo na nini tolobi bongo? (Tángá Bagalatia 3:19-25.) Mibeko ezalaki kosalisa baoyo bazalaki kotosa yango bátikala na losambo ya pɛto. Ezalaki kosalisa Bayuda báyeba ete bazali basumuki mpe ete bazali na mposa ya mbeka moko monene koleka oyo nganga-nzambe monene akokaki kopesa. Mibeko ezalaki molakisi oyo asengelaki kokamba bango epai ya Kristo to Masiya, batitre oyo elimboli “Moto oyo atyami mafuta.” Kasi, ntango Masiya ayaki, abandisaki kondimana ya sika oyo Yirimia asakolaki. Baoyo bandimaki Kristo bazwaki libaku ya kokóma bato oyo Nzambe akosala na bango kondimana ya sika mpe na bongo kokóma “bokonzi moko ya banganga-nzambe.” Tótala ndenge esalemaki.
KONDIMANA YA SIKA EBIMISI BONGANGA-NZAMBE MOKO YA BOKONZI
11. Ndenge nini Yesu afungolaki nzela ya bonganga-nzambe moko ya bokonzi?
11 Na mobu 29 T.B., Masiya amonanaki; ezalaki Yesu moto ya Nazarete. Azwaki batisimo ntango akómaki na mbula soki 30 mpo na kosala mokano ya ntina mingi oyo Yehova abongisaki mpo na ye. Yehova alobaki ete: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo” mpe atyaki ye mafuta na elimo santu. (Mat. 3:13-17; Mis. 10:38) Lokola Yesu atyamaki mafuta na elimo santu, azwaki mokumba ya Nganga-nzambe Monene mpo na bato nyonso oyo bakondimela ye mpe na nsima asengelaki kokóma Mokonzi na bango. (Ebr. 1:8, 9; 5:5, 6) Na bongo, afungolaki nzela ya bonganga-nzambe ya bokonzi ya solosolo.
12. Mbeka ya Yesu efungolaki nzela na makambo nini?
12 Na mokumba na ye ya Nganga-nzambe Monene, mbeka nini Yesu akokaki kopesa, oyo elingaki kolongola mpenza masumu ya bato oyo bandimeli ye? Ndenge amonisaki yango ntango abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye, mbeka yango ezalaki nde bomoi na ye ya moto ya kokoka. (Tángá Baebre 9:11, 12.) Kobanda batisimo na ye na mobu 29 T.B., Yesu, Nganga-nzambe Monene, amekamaki na makambo ndenge na ndenge mpe andimaki kozwa formasyo tii liwa na ye. (Ebr. 4:15; 5:7-10) Nsima ya kosekwa, amataki na likoló mpe alakisaki Yehova motuya ya mbeka na ye. (Ebr. 9:24) Yesu akokaki sikoyo kolobela baoyo bazali kondimela mbeka na ye mpe kosalisa bango básalela Nzambe na elikya ya kozwa bomoi ya seko. (Ebr. 7:25) Mbeka na ye esalaki mpe ete kondimana ya sika ebanda kosala.—Ebr. 8:6; 9:15.
13. Bato oyo bakɔti na kondimana ya sika bakozwa bolamu nini?
13 Bato oyo Nzambe asalaki na bango kondimana ya sika basengelaki mpe kotyama mafuta na elimo santu. (2 Ko. 1:21) Kati na bango ezalaki Bayuda ya sembo mpe na nsima bato ya bikólo mosusu. (Ef. 3:5, 6) Bato oyo bakɔti na kondimana ya sika bakozwa bolamu nini? Masumu na bango ekolimbisama. Yehova alakaki boye: “Nakolimbisa libunga na bango, mpe nakokanisa lisumu na bango lisusu te.” (Yir. 31:34) Na ntango masumu na bango elimbisami, bakokóma “bokonzi moko ya banganga-nzambe.” Petro akomelaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete: “Bino bozali ‘libota oyo eponami, bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu, bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza, mpo bósakola bizaleli malamu’ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na pole na ye ya kokamwa.” (1 Pe. 2:9) Petro azongelaki nde maloba oyo Yehova ayebisaki Bayisraele ntango apesaki bango Mibeko, kasi Petro asalelaki yango mpo na bakristo oyo bazali na kondimana ya sika.—Kob. 19:5, 6.
BONGANGA-NZAMBE YA BOKONZI EMEMELI BATO NYONSO BOLAMU
14. Bato oyo bazali bonganga-nzambe ya bokonzi bazali kosala mosala na bango wapi?
14 Bato oyo bakɔti na kondimana ya sika bazali kosala mosala na bango wapi? Awa na mabele, epai bazali kosala lokola banganga-nzambe mpo na kozala balobeli ya Yehova epai ya bato na ndenge bazali ‘kosakola bizaleli na ye malamu’ mpe kopesa bilei ya elimo. (Mat. 24:45; 1 Pe. 2:4, 5) Soki bakufi mpe basekwi, bazali kokende na likoló epai bakozala elongo na Kristo lokola bakonzi mpe banganga-nzambe mpe bakokokisa malamumalamu mikumba yango mibale. (Luka 22:29; 1 Pe. 1:3-5; Em. 1:6) Kutu, ntoma Yoane amonaki na emonaneli ebele ya bikelamu ya elimo pene ya kiti ya bokonzi ya Yehova na likoló. Na “loyembo ya sika” oyo bazalaki koyembela “Mwana-Mpate,” bazalaki koloba boye: “Na makila na yo osombelaki Nzambe bato na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso, mpe okómisi bango bokonzi mpe banganga-nzambe mpo na Nzambe na biso, mpe bakoyangela mabele.” (Em. 5:8-10) Na emonaneli mosusu, Yoane alobaki mpo na bakonzi yango ete: “Bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakoyangela elongo na ye mbula nkóto moko (1 000).” (Em. 20:6) Bato yango elongo na Kristo basali bonganga-nzambe moko ya bokonzi mpo na bolamu ya bato nyonso.
15, 16. Mapamboli nini bonganga-nzambe ya bokonzi ekomemela bato?
15 Mapamboli nini ba 144 000 bakomemela bato awa na mabele? Emoniseli mokapo 21 emonisi bango lokola engumba moko ya likoló, Yerusaleme ya Sika, oyo ebengami “mwasi ya Mwana-Mpate.” (Em. 21:9) Emoniseli 21:2-4 elobi boye: “Namonaki mpe engumba mosantu, Yerusaleme ya Sika, euti na likoló epai ya Nzambe ezali kokita mpe ebongisami lokola mwasi ya libala oyo abongisi nzoto mpo na mobali na ye. Bongo nayokaki mongongo moko ya makasi euti na kiti ya bokonzi elobi ete: ‘Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.’” Oyo nde mapamboli kitoko! Lokola liwa ekolongwa, mpisoli, lilaka, koganga, ná mpasi mpe ekolongwa. Bato ya sembo bakokóma bato ya kokoka; bakokóma na boyokani malamu na Nzambe.
16 Emoniseli 22:1, 2 etángi mapamboli mosusu oyo bonganga-nzambe yango ya bokonzi ekomema; elobi boye: “Alakisaki ngai ebale moko ya mai ya bomoi, pɛɛ lokola kristale, ezali kouta na kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe ya Mwana-Mpate, ekei tii na katikati ya balabala . . . monene [ya Yerusaleme ya Sika]. Mpe na ngámbo oyo ya ebale mpe na ngámbo mosusu ezalaki na banzete ya bomoi oyo ezalaki kobota mbuma mbala zomi na mibale, ezali kopesa mbuma na yango sanza na sanza. Mpe nkasa ya banzete wana ezalaki mpo na kobikisa bikólo.” Maloba wana ya elilingi emonisi bibongiseli oyo Nzambe akosalela mpo “bikólo,” to bato ya mabota nyonso, bábikisama na kozanga kokoka oyo Adama atikelá biso. Ya solo, tokomona mpenza ete ‘makambo ya kala eleki.’
BONGANGA-NZAMBE YA BOKONZI ESILISI MOSALA NA YANGO
17. Bonganga-nzambe ya bokonzi ekokokisa likambo nini?
17 Na nsuka ya mbula nkóto, mosala ya bonganga-nzambe ya bokonzi ekosila mpe bato nyonso awa na mabele bákóma bato ya kokoka. Na ntango yango, Yesu Kristo, Nganga-nzambe Monene mpe Mokonzi, akolakisa bato yango ya kokoka epai ya Yehova. (Tángá 1 Bakorinti 15:22-26.) Bonganga-nzambe ya bokonzi ekokokisa mokano na yango.
18. Ntango bonganga-nzambe ya bokonzi ekosilisa mosala na yango, mosala nini Yehova akopesa bato oyo basalaki elongo na Kristo?
18 Nsima na yango, mosala nini Yehova akopesa bato yango oyo bazwaki libaku monene ya kosala elongo na Kristo? Emoniseli 22:5 elobi ete “bakoyangela libela na libela.” Bakoyangela banani? Biblia epesi eyano te. Kasi, lokola bakozala na bomoi oyo ekoki kokufa te mpe lokola basalisaki bato bákóma na ezaleli ya kokoka, yango ekomonisa ete babongi kobengama bakonzi mpe Yehova akosalela bango libela na libela mpo na kokokisa mikano na ye.
19. Ekaniseli ekokundwela bayangani nyonso makambo nini?
19 Ntango tokoyangana mpo na kosala Ekaniseli ya liwa ya Yesu na mokolo ya minei, 5 Aprili 2012, makambo oyo toyekoli na lisolo oyo ekozala na makanisi na biso. Ndambo moke ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele bakolya limpa ezangá levire mpe bakomɛla vinyo ya motane mpo na komonisa ete bazali na kati ya kondimana ya sika. Biloko yango oyo ezali komonisa nzoto mpe makila ya Kristo ekokundwela bango mikumba minene oyo bazali na yango na kokokisama ya mokano ya seko ya Nzambe. Tiká ete biso nyonso oyo tokoyangana tómonisa botɔndi mingi mpo na bonganga-nzambe ya bokonzi oyo Yehova Nzambe asali mpo na bolamu ya bato nyonso.
[Elilingi na lokasa 29]
Bonganga-nzambe ya bokonzi ekomemela bato mapamboli ya seko