Batelá Mokolo ya Yehova na makanisi
“Na mikolo na nsuka basɛki bakoya.”—2 PETELO 3:3.
1. Likanisi nini ya kosala na lombangu moklisto moko ya eleko na biso azalaka na yango?
MOSAKOLI moko ya ntango nyonso oyo asili kolekisa mbula 66 na mosala yango akomaki ete: “Nazalaka ntango nyonso na liyoki ete nasengeli kosala na lombangu. Na makanisi na ngai, namonaka ntango nyonso ete Armagedon ekoya nsima ya lobi. (Emoniseli 16:14, 16) Lolenge moko na tata na ngai, mpe nkɔkɔ na ngai, bomoi na ngai nalekisi yango na kolandáká toli ya ntoma [Petelo], ‘kobateláká ntango nyonso na makanisi na ngai koya ya mokolo ya Yehova.’ Natalelaka ntango nyonso mokili ya sika oyo elakami ete ezali ‘likambo ya solo atako ezangi komonana.’”—2 Petelo 3:11, 12; Baebele 11:1; Yisaya 11:6-9; Emoniseli 21:3, 4.
2. Kobatela mokolo ya Yehova na makanisi elimboli nini?
2 Maloba oyo ya Petelo ete ‘kobateláká [yango] ntango nyonso na makanisi’ mpo na kolobela mokolo ya Yehova elimboli ete tozali kozongisa yango mosika te kati na makanisi na biso. Tosengeli kobosana te ete mokolo oyo Yehova akobebisa ebongiseli ya biloko ya ntango oyo liboso ete atya mokili na ye ya sika oyo alakaki ekómi pene. Yango esengeli mpenza kozala likambo ya solo mpo na biso na boye ete tozali komona yango polele, lokola nde ezali mpenza liboso na biso. Ezalaki likambo ya solo mpenza mpo na basakoli ya Nzambe na ntango ya kala, mpe mbala mingi bazalaki kolobela mokolo yango ete ezali pene.—Yisaya 13:6; Yoele 1:15; 2:1; Obadia 15; Sefania 1:7, 14.
3. Makambo nini mapusaki Petelo ete apesa toli na ntina na mokolo ya Yehova?
3 Mpo na nini Petelo ayebisi biso ete tótalela mokolo ya Yehova lokola nde ekoya “nsima ya lobi”? Mpamba te emonani ete bamoko bakómaki kosɛka likanisi ya kozala ya Klisto oyo elakamaki ete, na boumeli na yango basáli na mabe bakozwa etumbu. (2 Petelo 3:3, 4) Na yango, na mokapo 3 ya mokanda na ye ya mibale, oyo tokotalela sikawa, Petelo ayanoli mpo na maloba ya basɛki yango.
Libyangi ya mɔ́tɔ mpo na komikundola
4. Likambo nini Petelo alingi ete tómikundwela yango?
4 Bolingo ya Petelo mpo na bandeko na ye emonisami na lolenge azali mbala mingi kobénga bango na mokapo yango ete “balingami.” Kosɛngáká bango na mɔ́tɔ mpenza ete bábosana te makambo oyo bateyaki bango, Petelo abandi ete: “Balingami, . . . nazali kolamusa mitema na bino pɛto mpo na kokanisela bino ete bókanisa lisusu maloba malobamaki liboso na basakoli na bulɛɛ mpe lilako na Nkolo mpe Mobikisi oyo bantoma na bino bapesi bino.”—2 Petelo 3:1, 2, 8, 14, 17; Yuda 17.
5. Basakoli mosusu balobaki nini na ntina na mokolo ya Yehova?
5 “Maloba” nini yango “malobamaki liboso na basakoli na bulɛɛ” oyo Petelo azali koyebisa na batángi ya mokanda na ye ete bámikundola? Ezali bongo maloba kozala ya Klisto kati na nguya ya Bokonzi mpe ya kosambisama ya batyoli ya Nzambe. Petelo asilaki liboso kobenda likebi ya batángi ya mokanda na ye na maloba yango. (2 Petelo 1:16-19; 2:3-10) Yuda alobeli Enoka, mosakoli ya liboso oyo ayebani oyo akebisaki bato na ntina na etumbu oyo Nzambe akopesa basáli na mabe. (Yuda 14, 15) Basakoli mosusu babimaki nsima ya Enoka, mpe Petelo alingi ete tóbosana te makambo oyo bakomaki.—Yisaya 66:15, 16; Sefania 1:15-18; Zekalia 14:6-9.
6. Maloba nini ya Klisto mpe bantoma na ye mazali kongɛngisa biso na ntina na mokolo ya Yehova?
6 Lisusu, Petelo ayebisi batángi ya mokanda na ye ete bámikundola “lilako na Nkolo mpe Mobikisi.” Lilako ya Yesu ezali mpe na elendiseli oyo ete: “Kebá na bino ete mitema na bino míkóma makasi . . . te. Bongo mokolo yango ebimela bino pwasa lokola motambo [te].” “Bókeba mpe bósɛnzɛla, mpo ete boyebi te soko elaka yango ekokoka ntango nini.” (Luka 21:34-36; Malako 13:33) Petelo alobi lisusu ete tóyoka maloba ya bantoma. Na ndakisa, ntoma Paulo akomaki ete: “Mokolo na Nkolo ekoya lokola moyibi kati na butu. Boye tiká te ete tólala mpɔngi pelamoko ekosalaka bamosusu, kasi tólamuka mpe tólanga masanga te.”—1 Batesaloniki 5:2, 6.
Bamposa ya basɛki
7, 8. (a) Baoyo bazali kotyola bansango ya makebisi ya Nzambe bazali bato ya lolenge nini? (b) Basɛki bazali koloba nini?
7 Lokola tolobelaki yango, ntina ya likebisi ya Petelo ezali mpo ete bamoko babandaki kosɛka makebisi wana, lolenge moko Bayisalaele ya ntango ya kala basɛkaki basakoli ya Yehova. (2 Ntango 36:16) Petelo alimboli ete: “Bóyeba mpe oyo liboso ete na mikolo na nsuka basɛki bakoya mpe bakosɛka, bakotambola pelamoko na mposa mabe na bango mpenza.” (2 Petelo 3:3) Yuda alobi ete bamposa ya basɛki yango ezali “mpo na makambo ya kotuka Nzambe.” Abéngi bango ete “bato na makambo na nzoto, bazangi bizaleli ya elimo.”—Yuda 17-19, NW.
8 Emonani lokola ete balakisi ya lokuta oyo Petelo alobi ete “bakobilaka makanisi ya nzoto mpo na mposa na bosoto” bazali kati na basɛki oyo bazangi bizaleli ya elimo. (2 Petelo 2:1, 10, 14) Bazali kotuna baklisto ya sembo na kosɛka nyonso ete: “Wapi elaka na Koya na ye? Zambi longwa na ntango na kufa na bankɔkɔ, makambo nyonso maumeli bobele bongo lokola ezalaki yango na ebandeli na Kozalisama.”—2 Petelo 3:4.
9. (a) Mpo na nini basɛki bazali komeka kobungisa likanisi ya kosala na lombangu oyo ezali komonana kati na Liloba ya Nzambe? (b) Na nini kobatela ntango nyonso mokolo ya Yehova na makanisi ezali libateli mpo na biso?
9 Mpo na nini bazalaki kosɛka? Mpo na nini kopesa likanisi ete kozala ya Klisto ekoya soko moke te, ete Nzambe akɔtá naino ata mbala moko te na makambo ya bato mpe akosala yango soko moke te? Na kolongoláká epai na bato likanisi ya kosala na lombangu oyo lizwami kati na Liloba ya Nzambe, basɛki yango oyo bazali bato ya mosuni bazali koluka kozindisa basusu kati na kozanga kosepela na makambo ya elimo mpe na bongo bákoka kozimbisa bango kozanga nkaká. Oyo nde elendiseli ya nguya mpo na biso ete tólala mpɔngi te na elimo! Tiká ete tóbatela mokolo ya Yehova na makanisi mpe tómikundola ntango nyonso ete miso na ye ezali kotala biso! Na lolenge yango tokopusama na kosalela Yehova na molende mpe na kobatela bopɛto ya bizaleli.—Nzembo 11:4; Yisaya 29:15; Ezekiele 8:12; 12:27; Sefania 1:12.
Misala ya nkó mpe mibongi na kotyolama
10. Lolenge nini Petelo amonisi ete basɛki bazali na libunga?
10 Basɛki motindo wana bazali kobosana likambo moko ya ntina. Bazali kobosana yango na nkó mpe bazali kopusa basusu ete bábosana yango. Mpo na nini? Mpo ete bákoka kolɛngola bato kozanga nkaká. Petelo akomi ete: “Mpo balingi kobosana.” Kobosana likambo nini? “Ete Likoló ezalaki kalakala mpe nsé ebimaki na mai, etɛlɛmi na mai mpo na Liloba na Nzambe. Mpe mpo na mai yango, mokili na ntango yango ezindaki mpe ebomamaki.” (2 Petelo 3:5, 6) Ɛɛ, Yehova alongolaki mabe na mokili na ntango ya Mpela na eleko ya Noa, likambo oyo Yesu mpe alobelaki yango mingi. (Matai 24:37-39; Luka 17:26, 27; 2 Petelo 2:5) Na yango, na bokeseni na oyo basɛki bazali koloba, makambo nyonso malandaki te kozala “lokola ezalaki yango na ebandeli na Kozalisama.”
11. Bilikya nini baklisto ya ekeke ya liboso bakendeki na yango mbangu mpe bipusaki bamosusu ete básɛka bango?
11 Ekoki kozala ete basɛki bazalaki kosɛka baklisto ya sembo mpo ete emonanaki lokola nde bazalaki na bilikya oyo bikokisamaki naino te. Mwa liboso ete Yesu akufa, bayekoli na ye “bazalaki kobanza ete Bokonzi na Nzambe ekomonana nokinoki.” Bongo, nsima ya lisekwa na ye batunaki ye soki Bokonzi esengelaki kotyama bobele na ntango wana. Lisusu, pene na mbula zomi liboso ete Petelo akoma mokanda na ye ya mibale, basusu “bakómaki motema likoló” (NW) mpo na “maloba” to “mokanda,” oyo bakanisaki ete eutaki epai ya ntoma Paulo to baninga na ye, “mpo na kobanza ete Mokolo na Nkolo esili koya.” (Luka 19:11; 2 Batesaloniki 2:2; Misala 1:6) Nzokande, bilikya wana ya bayekoli ya Yesu bizalaki ya lokuta te, ezalaki bobele ete bakendaki mbangumbangu na makanisi. Mokolo ya Yehova ekoya!
Liloba ya Nzambe ebongi kotyelama motema
12. Lolenge nini Liloba ya Nzambe emonanaki solo na bisakweli na yango na ntina na “mokolo ya Yehova”?
12 Lokola tolobelaki yango liboso, basakoli oyo bazalaki liboso ya Klisto mbala mingi bakebisaki ete mokolo ya Yehova mpo na kopesa etumbu ezalaki pene. “Mokolo ya Yehova” na etando moke eyaki na mobu 607 L.T.B. ntango Yehova apesaki libota na ye ya bato ya motó makasi etumbu. (Sefania 1:14-18) Na nsima, mabota mosusu, kati na yango Babilone mpe Ezipito, bazwaki etumbu na “mokolo ya Yehova” na etando moke. (Yisaya 13:6-9; Yilimia 46:1-10; Obadia 15) Nsuka ya ebongiseli ya biloko ya Bayuda na ekeke ya liboso yango mpe esakolamaki, mpe yango ekómaki na ntango mampinga ya Loma mabebisaki Yudea na mobu 70 T.B. (Luka 19:41-44; 1 Petelo 4:7) Kasi Petelo azali kolobela “mokolo ya Yehova” oyo ezali koya, oyo ekoleka ata Mpela ya mokili mobimba na bonene!
13. Ndakisa nini ya ntango ya kala emonisi ete ebongiseli ya biloko ya ntango oyo ekozwa mpenza nsuka?
13 Petelo abandi kolobela kobebisama oyo ekoya na maloba oyo: “Mpo na Liloba na ye.” Liboso auti kolobela “mpo na Liloba na Nzambe,” mabelé na liboso ya mpela “ebimaki na mai, etɛlɛmi na mai.” Likambo yango, oyo eyebisami na lisoló ya Biblia na ntina na bozalisi, epesaki nzela ete Mpela esalema ntango mai matondaki na etindá ya Nzambe, to liloba na ye. Petelo akóbi ete: “Mpo na liloba [ya Nzambe] Likoló mpe nsé na ntango oyo ibombami ete izika; izali kobatelama kino mokolo na kosambisa mpe na koboma bato bakotyolaka Nzambe.” (2 Petelo 3:5-7; Genese 1:6-8) Mpo na yango tozali na liloba ya Yehova oyo ekoki kotyelama motema! Akotya nsuka na “Likoló mpe nsé”—ebongiseli ya biloko oyo—na nkɛlɛ ya mokolo na ye monene! (Sefania 3:8) Kasi ntango nini?
Mposa makasi ya komona nsuka koya
14. Mpo na nini tokoki kondimisama ete tozali sikawa kobika na “mikolo ya nsuka”?
14 Bayekoli ya Yesu balingaki koyeba ntango oyo nsuka ekoya, na yango batunaki ye ete: “Nini ekozala elembo na koya na yo mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo?” Na ntembe te bazalaki kotuna ntango oyo ebongiseli ya Bayuda esengelaki kosuka, kasi eyano ya Yesu etalelaki libosoliboso ntango ‘likoló mpe nsé’ ya lelo ekobomama. Yesu asakolaki makambo lokola bitumba minene, nzala, koningana ya mabelé, maladi, mpe mobulu. (Matai 24:3-14, NW; Luka 21:5-36) Kobanda 1914, tozali komona kokokisama ya elembo oyo Yesu apesaki mpo na “nsuka ya ebongiseli ya biloko,” mpe lisusu makambo oyo Paulo alobelaki ete makomonisa “mikolo ya nsuka.” (2 Timoté 3:1-5) Ya solo, elembo ezali polele ete tozali kobika na ntango ya nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo!
15. Baklisto bamekaki kosala nini atako Yesu akebisaki bango na ntina yango?
15 Batatoli ya Yehova bazalaki na mposa makasi ya koyeba ntango oyo mokolo ya Yehova ekoya. Na mposa makasi na bango ntango mosusu bamekaki kotya ntango oyo mokolo yango ekoki koya. Kasi na kosaláká bongo, balandaki te—lokola ezalaki mpo na bayekoli ya liboso ya Yesu—likebisi ya Nkolo ete ‘toyebi te soko elaka yango ekokoka ntango nini.’ (Malako 13:32, 33) Basɛki basɛkaki baklisto ya sembo mpo na bilikya na bango oyo bakendaki na yango mbangumbangu na makanisi. (2 Petelo 3:3, 4) Atako bongo, mokolo ya Yehova ekoya, Petelo alobi ete, engebene manáka na Ye.
Ntina ya kozala na likanisi ya Yehova
16. Toli nini esengeli na biso kolanda na mayele nyonso?
16 Tosengeli kotalela ntango na lolenge oyo Yehova atalelaka yango, lokola Petelo akundweli biso sikawa ete: “Balingami, likambo oyo moko likima bino te, ete epai na Nkolo, mokolo moko ezali lokola [mbula, NW] nkóto mpe [mbula] nkóto lokola mokolo moko.” Soki tokokanisi yango na bomoi na biso oyo ezali na mbula soko 70 to 80, tokomona ete bomoi na biso ezali mokuse mpenza! (2 Petelo 3:8; Nzembo 90:4, 10) Na yango soki kokokisama ya bilaka ya Nzambe ezali komonana lokola ete ezali koumela, tosengeli kondima toli ya mosakoli ya Nzambe ete: “Ata [elaka] ezali koumela, lambelá yango; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.”—Habakuku 2:3.
17. Atako mikolo ya nsuka miumeli mingi koleka lolenge oyo bato mingi bakanisaki, tosengeli kondimisama na nini?
17 Mpo na nini mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo miumeli koleka lolenge oyo bato mingi bakanisaki? Mpo na ntina moko ya malamu, lokola Petelo alimboli na nsima ete: “Nkolo akoumela nsima na elaka na ye te, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela. Kasi azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9) Yehova azali kotalela matomba maleki malamu ya libota mobimba ya bato. Lobanzo na ye ezali bomoi ya bato, lokola alobi yango ete: “Nazwi esengo na liwa na moto mabe te, bobele ete moto mabe abongwa na nzela na ye mpe abika.” (Ezekiele 33:11) Na yango tokoki komindimisa ete nsuka ekoya na ntango oyo ebongi mpo na kokokisa mokano ya Mozalisi na biso ya bolingo mpe atondi na mayele!
Nini ekolimwa?
18, 19. (a) Mpo na nini Yehova azali na ekateli ya kobebisa ebongiseli ya biloko oyo? (b) Lolenge nini Petelo alobeli nsuka ya ebongiseli oyo, mpe nini mpenza ekobomama?
18 Lokola Yehova alingaka solo mpenza baoyo bazali kosalela ye, akolongola baoyo nyonso bazali konyokola bango. (Nzembo 37:9-11, 29) Komonisáká ete libebi ekoya na ntango oyo eyebani te, lokola Paulo mpe asalaki yango liboso, Petelo akomi ete: “Mokolo na Nkolo ekoya lokola moyibi. Na yango, Likoló ekolimwa na makɛlɛlɛ monene mpe biloko bikonangwa na mɔ́tɔ makasi; nsé mpe misala nyonso kati na yango ikotumbama.” (2 Petelo 3:10; 1 Batesaloniki 5:2) Likoló mpe mabelé ya solosolo ekufaki te na Mpela, bobele bongo, ekokufa mpe te na mokolo ya Yehova. Kasi, nini “ekolimwa,” to ekobomama?
19 Baguvernemá ya mokili oyo ezali koyangela bato lokola “makoló” ekolongwa lolenge moko mpe mpo na “mabelé,” to libota ya bato bazangi bobangi Nzambe. “Makɛlɛlɛ monene” mbala mosusu emonisi lolenge makoló makoleka noki. “Biloko” oyo bisali libota ya bato oyo lizali lelo pene na kokwea “bikonangwa,” to kobomama. Mpe “mabelé,” mpe “misala nyonso kati na yango,” “ikotumbama.” Yehova akotɔndɔla misala mabe ya bato wana akoyeisa nsuka oyo ebongi mpenza na ebongiseli ya mokili.
Landá kotya likebi na elikya na yo
20. Lolenge nini bomoi na biso esengeli kopusama na boyebi ya makambo mazali liboso?
20 Lokola makambo yango ya minene makosalema mosika te, Petelo alobi ete tosengeli ‘kozala bato na bizaleli na bulɛɛ mpe na kosambela Nzambe, kotalela mpe koyeisa noki emonaneli na mokolo na Nkolo.’ Ntembe ekoki kozala soko moke te na likambo yango! “Likoló ekozika mɔ́tɔ, ekonangwa mpe biloko na Likoló bikonangwa mpo na mɔ́tɔ makasi!” (2 Petelo 3:11, 12) Na kotalela ete makambo yango minene makoki kobanda kosalema lobi yango esengeli kozala na bopusi likoló na makambo nyonso oyo tozali kosala to tozali kokana kosala.
21. Nini ekokitana makoló mpe nsé ya lelo?
21 Petelo ayebisi sikawa oyo ekokitana ebongiseli ya kala, alobi ete: “Nde tozali kotalela Likoló na sika mpe nsé na sika, pelamoko elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.” (2 Petelo 3:13; Yisaya 65:17) Ah, oyo nde kosikwama monene! Klisto mpe ba 144 000 oyo bakoyangela na ye elongo bakozala “makoló” oyo ezali boyangeli “ya sika,” mpe bato oyo bakobika na nsuka ya mokili oyo bakozala “mabelé ya sika.”—1 Yoane 2:17; Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 3.
Tóbatela likanisi ya kosala na lombangu mpe bopɛto ya bizaleli
22. (a) Nini ekosalisa biso na kopɛngola litɔnɔ mpe mpota na elimo? (b) Petelo akebisi na ntina na likámá nini?
22 Petelo alobi lisusu ete: “Bongo, balingami, awa ezali bino kotala makambo oyo, bótya etingya ete bózwana na ye na kozanga litɔnɔ mpe na likambo te kati na kimya. Bókanisa ete motema molai na Nkolo na biso ezali lokola lobiko.” Kozeláká na motema likoló mpe kotaleláká oyo emonani lokola koumela ete ezali elembo ya motema molai ya Yehova ekosalisa biso na kopɛngola litɔnɔ to mpota nyonso na elimo. Kasi, likámá lizali! Petelo akebisi ete kati na mikanda ya “ndeko na biso molingami Paulo . . . makambo mosusu mazali makasi koyeba ntina, mpe bato bayekoli te mpe baoyo bazangi mpiko, bakobongola yango na kilikili mpe makomi mosusu lokola, kino libebi na bango.”—2 Petelo 3:14-16.
23. Wapi likebisi ya nsuka Petelo apesi?
23 Na ntembe te balakisi ya lokuta babongolaki makomi ya Paulo na ntina na ngɔlu ya Nzambe, kosaleláká yango lokola nzela mpo na kolóngisa etamboli ya mbindo. Ekoki kozala ete Petelo azalaki kokanisa likambo yango na ntango akomaki toli na ye ya nsuka ete: “Na bongo balingami, awa eyebi bino liboso, bókeba ete bólongwa na mpiko na bino mpenza te mpo na kopɛngwa na libunga na bato na lofundo.” Mpe na nsima asukisi mokanda na ye na kolobáká ete: “Bókóla nde na ngɔlu mpe na boyebi na Nkolo na biso mpe Mobikisi, ye Yesu Klisto.”—2 Petelo 3:17, 18.
24. Ezalela nini basaleli nyonso ya Yehova basengeli komekola?
24 Ya solo, Petelo alingaki kolendisa bandeko na ye. Alingaki ete banso bázala na likanisi oyo limonisamaki na Motatoli ya sembo oyo azali sikawa na mbula 82, oyo totángaki maloba na ye na ebandeli ete: “Bomoi na ngai nalekisi yango lokola ntoma apesaki toli, ‘kobateláká na makanisi na ngai koya ya mokolo ya Yehova.’ Natalelaka ntango nyonso mokili ya sika oyo elakami ete ezali ‘likambo ya solo atako ezangi komonana.’” Tiká ete biso nyonso tólekisa bomoi na biso na lolenge yango.
Okoyanola ndenge nini?
◻ “Kobatela ntango nyonso mokolo ya Yehova na makanisi” elimboli nini?
◻ Likambo nini basɛki bazali kobosana na nkó, mpe mpo na nini?
◻ Mpo na ntina nini basɛki basɛkaki baklisto ya sembo?
◻ Makanisi nini tosengeli kobatela?
[Elilingi na lokasa 23]
Bátela mokolo ya Yehova na makanisi . . .
[Elilingi na lokasa 24]
. . . mpe mokili ya sika oyo ekoya na nsima na yango