“Nzambe azali bolingo”
“Moto oyo alingaka te ayebi Nzambe te, mpamba te Nzambe azali bolingo.”—1 YOANE 4:8.
1-3. (a) Biblia elobi nini mpo na bolingo ya Yehova, mpe na ndenge nini maloba yango ekokani na mosusu te? (b) Mpo na nini Biblia elobi ete “Nzambe azali bolingo”?
BIZALELI nyonso ya Yehova ezali malamu mingi, ekoká mpe esepelisaka. Kasi, ezaleli ya Yehova oyo eleki bizaleli mosusu nyonso ezali nde bolingo. Ezali na ezaleli mosusu te oyo ebendaka biso makasi epai ya Yehova koleka bolingo na ye. Likambo ya esengo ezali ete bolingo ezali mpe ezaleli na ye oyo eleki monene. Ndenge nini toyebi yango?
2 Biblia elobi likambo moko mpo na bolingo oyo elobi te mpo na bizaleli mosusu ya minene ya Yehova. Biblia elobi te ete Nzambe azali nguya to Nzambe azali boyengebene to ete Nzambe azali bwanya. Nzambe azali na bizaleli yango mpe yango misato eutaka epai na ye. Mokapo ya 1 Yoane 4:8 elobi likambo moko ya ntina mpenza mpo na bolingo: “Nzambe azali bolingo.” Ya solo, Yehova atondi mpenza na bolingo. Bolingo ezali mpenza bomoto na ye. Tokoki koloba likambo yango boye: Nguya ya Yehova epesaka ye nzela ya kosala misala na ye. Boyengebene mpe bwanya na ye etambwisaka ndenge oyo asalaka misala yango. Kasi, bolingo ya Yehova etindaka ye na kosala misala na ye. Bolingo na ye emonanaka mpe na ndenge oyo amonisaka bizaleli na ye mosusu.
3 Tolobaka mbala mingi ete Yehova azali mpenza bolingo. Na bongo, soki tolingi koyekola bolingo, tosengeli koyekola makambo ya Yehova. Yango wana, tólobela naino mwa makambo oyo etaleli bolingo monene ya Yehova.
Likambo oyo eleki monene oyo ezali komonisa bolingo
4, 5. (a) Wapi likambo oyo eleki monene oyo ezali komonisa bolingo banda mokili ebandá? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete bolingo oyo ezalaki kati na Yehova ná Mwana na ye ezali bolingo oyo eleki bolingo nyonso?
4 Yehova amonisi bolingo na ye na ndenge ebele, kasi ezali na lolenge moko oyo eleki mosusu nyonso. Lolenge nini? Ndenge atindaki Mwana na ye aya konyokwama mpe kokufa mpo na biso. Tokoki mpenza koloba ete yango ezali likambo oyo ezali komonisa bolingo oyo eleki monene banda mokili ebandá. Mpo na nini?
5 Biblia ezali kobenga Yesu “mwana ya liboso na bozalisi nyonso.” (Bakolose 1:15) Kanisá naino—Mwana ya Yehova azalaki na bomoi liboso kutu Nzambe akela biloko nyonso oyo ezali na kati ya molɔ́ngɔ́. Na bongo, Tata afandaki elongo na Mwana na ye na boumeli ya mbula boni? Bato mosusu ya siansi balobaka ete molɔ́ngɔ́ eumeli mbula miliare 13. Kasi, ata soki ezali solo ete molɔ́ngɔ́ eumeli ebele ya bambula wana, yango ekozala kaka moke liboso ya bambula ya bomoi ya mwana ya liboso ya Yehova! Azalaki kosala nini na boumeli ya ebele ya bambula wana? Mwana yango azalaki na esengo ya kosala pembeni ya Tata na ye lokola “mosali ya mayele.” (Masese 8:30, NW; Yoane 1:3) Yehova asalaki elongo na Mwana na ye mpo na kokela biloko mosusu nyonso. Balekisaki ntango moko ya esengo mpenza! Na bongo, nani kati na biso akoki mpenza kokanga ntina ya boyokani makasi oyo bazalaki na yango na boumeli ya ebele ya ntango wana? Tomoni mpenza ete bolingo ya Yehova Nzambe ná Mwana na ye ezali makasi koleka bolingo mosusu nyonso.
6. Ntango Yesu azwaki batisimo, ndenge nini Yehova amonisaki ete asepelaka na Mwana na ye?
6 Atako bongo, Yehova atindaki Mwana na ye abotama awa na mabelé lokola moto. Yango elingi koloba ete na boumeli ya bambula mingi, Yehova asengelaki kokabwana na Mwana na ye ya bolingo. Longwa na likoló, azalaki kotala ndenge Yesu azalaki kokola tii akómaki mobali ya kokoka. Ntango Yesu akómaki na mbula soki 30, azwaki batisimo. Mokolo yango, kuna na likoló, Tata ye moko alobaki ete: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.” (Matai 3:17) Na ntembe te Tata ya Yesu asepelaki mingi ntango amonaki ete akokisaki mpenza makambo nyonso oyo esakolamaki, makambo nyonso oyo basɛngaki ye!—Yoane 5:36; 17:4.
7, 8. (a) Mpasi nini Yesu ayokaki mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., mpe Tata na ye ya likoló ayokaki ndenge nini na motema? (b) Mpo na nini Yehova atikaki ete Mwana na ye anyokwama mpe akufa?
7 Kasi, Yehova ayokaki ndenge nini mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.) ntango batɛkaki Yesu mpe ebele ya bato oyo batondaki na nkanda bakangaki ye? Ntango bazalaki kotyola Yesu, kobwakela ye nsoi, mpe kobɛta ye makɔfi? Ntango bazalaki kobɛta ye fimbo mpe bazokisaki ye na mokɔngɔ? Ntango bazalaki kobaka ye nsɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo likoló ya nzete mpe batikaki ye wana mpe bato bazalaki kosɛka ye? Tata ayokaki ndenge nini ntango Mwana na ye ya bolingo agangaki na mpasi ya liwa? Yehova ayokaki ndenge nini ntango Yesu akataki motema mpe, mpo na mbala ya liboso banda ntango abandaki kokela, Mwana na ye ya bolingo azalaki lisusu te?—Matai 26:14-16, 46, 47, 56, 59, 67; 27:26, 38-44, 46; Yoane 19:1.
8 Lokola Yehova ayokaka mpe mpasi na motema, tokoki te komonisa na maloba mpasi oyo ayokaki na liwa ya Mwana na ye. Tokoki kaka kolimbola ntina oyo Yehova atikaki nzela ete likambo wana ekómela Mwana na ye. Mpo na nini Tata andimaki koyoka mpasi ya ndenge wana? Yehova ayebisi biso likambo moko ya ntina mpenza na Yoane 3:16—vɛrsɛ moko ya ntina mingi na boye ete bato mosusu babengaka yango Evanzile na mokuse. Elobi boye: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” Na bongo, eloko oyo etindaki Nzambe asala bongo ezalaki nde bolingo. Ezali na moto mosusu te oyo amonisá bolingo eleki oyo wana.
Ndenge oyo Yehova azali komonisa biso bolingo na ye
9. Satana alukaka tókanisa ete Yehova atalelaka biso ndenge nini, kasi Yehova azali koyebisa biso nini?
9 Kasi, motuna moko ya ntina mingi ezali kotunama: Nzambe alingaka mpenza mokomoko na biso? Bato mosusu bakoki kondima ete Nzambe alingaka bato nyonso, ndenge Yoane 3:16 elobi yango. Kasi, na kati ya mitema na bango balobaka ete, ‘Nzambe akoki kolinga ngai te.’ Tóyeba ete Satana Zabolo alukaka kondimisa biso ete Yehova alingaka biso te mpe ete amonaka biso mpamba. Nzokande, ata soki tozali mpenza kokanisa ete bakoki kolinga biso te to tozali na ntina te, Yehova azali komonisa biso ete mosaleli na ye mokomoko azali na valɛrɛ na miso na ye.
10, 11. Ndenge nini ndakisa ya bakɛngɛli-mboka oyo Yesu alobelaki ezali komonisa ete tozali na valɛrɛ na miso ya Yehova?
10 Na ndakisa, tótalela maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 10:29-31. Mpo na komonisa valɛrɛ oyo bayekoli na ye bazali na yango na miso ya Yehova, Yesu alobaki boye: “Batɛkaka te bakɛngɛli-mboka mibale na mbongo moko ya ebende ya motuya moke? Nzokande moko te na yango ekokwea na nse kozanga ete Tata na bino ayeba. Kasi nsuki mpenza ya motó na bino etángami yango nyonso. Na yango bóbanga te: Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.” Tótalela naino soki maloba wana ya Yesu elimbolaki nini mpo na bato ya ekeke ya liboso oyo bayokaki ye.
11 Na ntango ya Yesu, ndɛkɛ oyo babengi mokɛngɛli-mboka ezalaki ndɛkɛ oyo eleki mobobe oyo moto akokaki kosomba mpo na kolya. Na mwa mbongo moko ya ebende ya motuya moke mpenza, moto akokaki kosomba bakɛngɛli-mboka mibale. Kasi, na nsima Yesu alobaki, ndenge ekomami na Luka 12:6, 7, ete soki moto apesi mbongo mibale ya ebende, na esika bápesa ye bakɛngɛli-mboka minei, bakopesa ye mitano. Ndɛkɛ moko oyo bazalaki kobakisa matabisi ezalaki lokola eloko oyo ezali ata na motuya moko te. Mbala mosusu bandɛkɛ yango ezalaki na motuya te na miso ya bato, kasi ndenge nini Mozalisi azalaki kotalela yango? Yesu alobaki ete: “Nzambe abosanaka ata moko na yango te [ata oyo ya matabisi].” Sikoyo, tokoki kokanga ntina ya maloba ya Yesu. Lokola mwa ndɛkɛ moko moke ezali na valɛrɛ na miso ya Yehova, tokanisi mpenza ete moto azali na valɛrɛ mingi koleka! Ndenge Yesu alobaki yango, Yehova ayebi likambo na biso mokomoko. Kutu, ayebi nsuki boni ezali na motó na biso!
12. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu abakisaki mungwa te ntango alobaki ete Nzambe ayebi nsuki boni ezali na motó na biso?
12 Moto mosusu akoki koloba ete Yesu abakisaki nde mwa mungwa na maloba na ye. Kasi, tókanisa naino likambo lokola elikya ya lisekwa. Mpo Yehova azongisa biso ndenge oyo tozalaki, ezali kosɛnga ete ayeba biso malamumalamu! Tozali na valɛrɛ mingi na miso na ye, yango wana abosanaka ata eloko moko te kati na biso, ezala oyo babengi code génétique na biso mpe makambo nyonso oyo toyekolá mpe tobombá na motó. Soki totaleli nyonso wana, tokomona ete koyeba nsuki boni ezali na motó na biso, oyo epai ya bato mingi ezalaka soki 100 000, ezali likambo monene te na miso na ye. Yesu asaleli maloba kitoko mpenza mpo na komonisa biso ete Yehova amibanzabanzaka mpo na mokomoko na biso!
13. Ndenge nini likambo ya Mokonzi Yosafata emonisi ete Yehova alukaka makambo malamu epai na biso atako tozali bato ya kozanga kokoka?
13 Biblia elobeli likambo mosusu oyo ezali kondimisa biso ete Yehova alingaka biso. Alukaka makambo ya malamu epai na biso mpe atalelaka yango na motuya. Na ndakisa, tólobela naino mokonzi malamu Yosafata. Mokonzi yango asalaki likambo moko ya mabe, mpe mosakoli ya Yehova alobaki na ye boye: “Yango wana, nkanda euti na [Yehova] ekweli yo.” Likambo yango ezali kotinda biso na kokanisa mpenza! Kasi, nsango ya Yehova esukaki wana te. Abakisaki boye: “Kasi makambo malamu mamonani epai na yo.” (2 Ntango 19:1-3) Na bongo, atako Yehova ayokelaki Yosafata nkanda, akangaki miso te na “makambo malamu” na ye. Ezali mpenza likambo ya kolendisa na koyeba ete Nzambe na biso alukaka makambo malamu epai na biso atako tozali bato ya kozanga kokoka!
Nzambe oyo azalaka “pene na kolimbisa”
14. Ntango tosali lisumu, tokoki koyoka ndenge nini na motema na biso, kasi ndenge nini Yehova akoki kolimbisa biso?
14 Ntango tosali lisumu, mawa, nsɔni mpe motema mpasi oyo toyokaka ekoki kotinda biso tókanisa ete tobongi lisusu te mpo na kosalela Yehova. Kasi, tóbosana te ete Yehova azalaka “pene na kolimbisa.” (Nzembo 86:5, NW) Soki tobongoli motema mpe tosali makasi mpo tózongela lisusu lisumu yango te, Yehova akoki kolimbisa biso. Tótalela ndenge oyo Biblia ezali komonisa lolenge wana oyo Yehova amonisaka bolingo.
15. Yehova abwakaka masumu na biso na ntaka ya ndenge nini?
15 Davidi, mokomi ya nzembo, asalelaki maloba kitoko mpo na komonisa motema mawa ya Yehova: ‘Ndenge epai moi ebimaka ezali mosika na epai elalaka, se ndenge wana pe ye abwaki masumu na biso mosika.’ (Nzembo 103:12, Bible na Lingala ya lelo oyo) Ntaka ya ndenge nini ekaboli epai moi ebimaka ná epai elalaka? Na maloba mosusu, epai moi ebimaka ná epai elalaka ekabwani na ntaka oyo eleki molai; bipai yango mibale ekoki kokutana ata mokolo moko te. Moto moko ya mayele na maloba ya Biblia alobi ete maloba yango elimboli “mosika mpenza; ntaka eleki molai oyo tokoki kokanisa.” Maloba ya Davidi ezali komonisa biso ete soki Yehova alimbisi, abwakaka masumu na biso mosika na ntaka oyo eleki nyonso oyo tokoki kokanisa.
16. Ntango Yehova alimbisi masumu na biso, mpo na nini tosengeli kondima mpenza ete tokómaka pɛto na miso na ye?
16 Osí omeká kolongola litɔnɔ moko na elamba ya mpɛmbɛ? Mbala mosusu, atako osalaki nyonso, litɔnɔ yango elimwaki te. Yoká ndenge Yehova alobeli ndenge oyo ye alimbisaka: “Ata soki masumu na bino ezali lokola ngola, ekokóma mpɛmbɛ lokola mbula mpɛmbɛ, ata soki ezali motane lokola elamba motane, ekokóma lokola nsuki ya meme.” (Yisaya 1:18, NW) Liloba “ngola” ezali kopesa likanisi ya langi ya motane ngwaa.a Na makasi na biso moko tokoki te kolongola lisumu oyo ekangami biso lokola litɔnɔ. Kasi, masumu oyo ezali lokola ngola to mpe lokola elamba ya motane, Yehova akoki kokómisa yango lokola mbula mpɛmbɛ to nsuki ya meme. Na bongo, ntango Yehova alimbisi masumu na biso, ezali na ntina te tómonaka lokola nde tozali kaka na litɔnɔ ya masumu yango bomoi na biso mobimba.
17. Na ndimbola nini Yehova abwakaka masumu na biso na mokɔngɔ na ye?
17 Na nzembo moko oyo ezali kosimba motema oyo Yizikiya asalaki mpo na kozongisa matɔndi nsima ya kobika na maladi oyo elingaki koboma ye, alobaki na Yehova ete: ‘Obwaki masumu na ngai nyonso na mokɔngɔ na yo.’ (Yisaya 38:17) Maloba yango ezali komonisa Yehova lokola nde azali kozwa masumu ya moto oyo abongoli motema mpe kobwaka yango na nsima na Ye epai akomona yango lisusu te to akotalela yango lisusu te. Buku moko elobi ete likanisi yango ekoki kolobelama boye: “Okómisi [masumu na ngai] lokola nde nasalaki yango te.” Likambo yango ezali kokitisa motema te?
18. Ndenge nini mosakoli Mika amonisi ete soki Yehova alimbisi masumu na biso, abosanaka yango mpo na libela?
18 Na elaka moko ya kozongisama, mosakoli Mika amonisaki elikya oyo azalaki na yango ete Yehova akolimbisa bato na ye oyo babongoli motema na maloba oyo: ‘Nani azali Nzambe lokola yo, . . . atiki lipɛngwi ya litika ya libula na ye? . . . Okobwaka mapɛngwi nyonso na bango kino bozindo ya mai.’ (Mika 7:18, 19) Kanisá ndenge bato ya ntango ya kala oyo bayokaki maloba yango bayokaki. Eloko oyo babwaki “na bozindo ya mai [ya mbu]” bakokaki lisusu kozwa yango? Na bongo, maloba ya Mika ezali komonisa ete soki Yehova alimbisi masumu, abosanaka yango mpo na libela.
“Motema mawa ya Nzambe na biso”
19, 20. (a) Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “koyokela mawa” ezali na ndimbola nini? (b) Ndenge nini Biblia elobeli ndenge mama ayokaka mpo na mwana na ye mpo na koteya biso motema mawa ya Yehova?
19 Likambo mosusu oyo ezali komonisa bolingo ya Yehova ezali motema mawa na ye. Motema mawa ezali nini? Na Biblia, motema mawa ekendaka nzela moko na bolimbisi. Maloba mingi ya Liebele mpe ya Grɛki ezali kopesa likanisi ya motema mawa. Na ndakisa, mbala mingi verbe ya Liebele raḥam ebongolamaka “koyokela mawa.” Liloba yango ya Liebele, oyo Yehova asalelaka mpo na ye moko, eyokani na liloba oyo ebongolamaka “libumu” mpe ekoki kolimbola “motema mawa oyo mama azalaka na yango.”
20 Biblia elobeli ndenge oyo mama ayokaka mpo na mwana na ye mpo na koteya biso motema mawa ya Yehova. Yisaya 49:15 elobi boye: “Mwasi akoki nde kobosana mwana oyo anungi ye naino? Ayoka mawa [raḥam] lisusu te mpo na mwana mobali ya libumu na ye? Ata baoyo bakobosana nde ngai nakobosana yo te.” Ezali mwa mpasi ete mama abosana koleisa mpe kobatela mwana oyo azali komɛlisa mabɛlɛ. Mwana oyo azali naino moke akoki kosala makambo ye moko te; butu ná moi mama na ye asengeli kaka kosalisa ye. Kasi, ezali mawa mingi koyoka ete bamama mosusu bazali kosundola bana na bango, mingimingi na “bantango ya ndenge mosusu” oyo tozali. (2 Timote 3:1, 3) Kasi, Yehova alobi ete “nde ngai nakobosana yo te.” Motema mawa oyo Yehova azali na yango mpo na basaleli na ye ezali monene mingi koleka kutu motema mawa oyo mama azalaka na yango mpo na mwana na ye.
21, 22. Makambo nini Bayisalaele bakutanaki na yango na Ezipito ya kala, mpe eyano nini Yehova apesaki na kolela na bango?
21 Ndenge nini Yehova amonisaka motema mawa lokola moboti ya bolingo? Ezaleli yango ezali komonana polele na makambo oyo asalelaki Yisalaele ya kala. Na nsuka ya ekeke ya 16 liboso ya ntango na biso, Bayisalaele bazalaki baombo na Ezipito epai bazalaki konyokwama makasi. (Exode 1:11, 14) Na kati ya mpasi na bango, Bayisalaele balelaki epai ya Yehova. Nzambe ya motema mawa asalaki nini?
22 Yehova ayokaki mpasi na motema. Alobaki boye: “Ngai nasili komona monyoko ya bato na ngai na Ezipito mpe nayoki kolela na bango . . . Nayebi bolɔzi na bango.” (Exode 3:7) Yehova akokaki te komona mpasi ya bato na ye to koyoka kolela na bango kozanga ete esala ye mpasi na motema. Yehova azali Nzambe oyo amityaka na esika ya bato oyo bazali konyokwama. Nzokande, koyeba komitya na esika ya bato oyo bazali konyokwama ekendaka nzela moko na motema mawa. Kasi, Yehova asukaki kaka te na koyoka mpasi mpo na bato na ye; asalaki likambo moko mpo na bango. Yisaya 63:9 elobi boye: “Na bolingo na ye mpe na mawa na ye asikolaki bango.” Abimisaki Bayisalaele na Ezipito na “lobɔkɔ ya nguya.” (Deteronome 4:34) Na nsima, apesaki bango bilei na ndenge ya likamwisi mpe amemaki bango na mokili na bango moko oyo etondi na mbuma.
23. (a) Ndenge nini maloba ya mokomi ya nzembo ezali kondimisa biso ete Yehova amibanzabanzaka mpo na mokomoko na biso? (b) Yehova asalisaka biso na ndenge nini?
23 Yehova asukaka kaka te na kolakisa motema mawa na ye na lisangá mobimba ya basaleli na ye. Tata na biso ya bolingo amibanzabanzaka mpo na mokomoko na biso. Ayebi malamu mpasi nyonso oyo tozali na yango. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Miso na [Yehova] ekotalaka bato ya boyengebene mpe matoi na ye ekoyokaka koganga na bango. [Yehova] azali penepene na bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na milimo minyatami.” (Nzembo 34:15, 18) Ndenge nini Yehova asalisaka mokomoko na biso? Ntango mosusu alongolaka te likambo oyo ezali kotungisa biso. Kasi, azwi bibongiseli mingi mpo na kosalisa baoyo bazali kolelela ye. Liloba na ye ezali na toli malamu oyo ekoki kosalisa. Na kati ya lisangá, atye bakɛngɛli oyo bazali na makoki ya elimo, oyo basalaka makasi mpo na komonisa motema mawa na ye mpo na kosalisa basusu. (Yakobo 5:14, 15) Yehova, ‘Ye oyo ayokaka mabondeli,’ apesaka “elimo santu . . . epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango.” (Nzembo 65:2, NW; Luka 11:13) Bibongiseli nyonso wana ezali komonisa “mawa monene ya Nzambe na biso.”—Luka 1:78.
24. Ndenge nini okoki komonisa botɔndi na yo mpo na bolingo ya Yehova?
24 Kokanisa likoló ya bolingo ya Tata na biso ya likoló ezali mpenza kopesa esengo! Na lisolo eleki totalelaki ndenge oyo, na bolingo nyonso, Yehova amonisaka nguya, boyengebene mpe bwanya na ye mpo na bolamu na biso. Na lisolo oyo tomoni ete Yehova amonisaki bolingo na ye na bato nyonso—mpe na mokomoko na biso—na ndenge ya kokamwa mpenza. Sikoyo, ebongi ete mokomoko na biso amituna boye, ‘Ndenge nini nasengeli komonisa botɔndi mpo na bolingo ya Yehova?’ Okoki komonisa botɔndi na yo mpo na bolingo ya Yehova soki olingi ye na motema na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso, na molimo na yo mobimba, mpe na makasi na yo nyonso. (Malako 12:29, 30) Tiká ete bomoi na biso ya mokolo na mokolo emonisa mposa na biso ya kopusana lisusu mpe lisusu penepene na Yehova. Mpe tiká ete Yehova, Nzambe oyo azali bolingo, apusana lisusu penepene na yo libela na libela!—Yakobo 4:8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi ete langi yango ya motane “ezalaki kokangama libela, ezalaki kolongwa te. Eloko moko te, ezala mamwɛ, to mbula, to kosukola elamba, to kosalela yango ntango molai, ekokaki kolongola yango.”
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini toyebi ete bolingo ezali ezaleli ya Yehova oyo eleki monene?
• Mpo na nini tokoki koloba ete lokola Yehova atindaki Mwana na ye aya konyokwama mpe kokufa mpo na biso, yango emonisi ete alingaki biso na ndenge oyo moto mosusu alingá biso te?
• Ndenge nini Yehova amonisaka ete alingaka mokomoko na biso?
• Biblia esaleli maloba nini ya kitoko mpo na kolobela ndenge Yehova alimbisaka?
[Elilingi na lokasa 15]
“Nzambe . . . apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko”
[Elilingi na nkasa 16. 17]
“Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© J. Heidecker/VIREO
[Elilingi na lokasa 18]
Bolingo ya mama mpo na mwana na ye ekoki koteya biso motema mawa ya Yehova