Mokapo 19
Yisraele na Nzambe basili kozwa bilembo
Emonaneli 4—Emoniseli 7:1-17
Teme: Ba 144 000 bazwi bilembo mpe ebele monene etelemi liboso na kiti na bokonzi na Jéhovah mpe liboso na Mwana na Mpate
Eleko na kokokana na yango: Uta Yesu Klisto afandaki na kiti na bokonzi, na 1914, kino na Boyangeli na ye ya mbula nkoto
1. “Nani akoki kotelema” na mokolo monene na nkanda na Nzambe?
“NANI akoki kotelema?” (Emoniseli 6:17) Ee, nani mpenza akoki kotelema? Mikonzi na mokili mpe bato oyo bango bazali koyangela bakoki solo komituna motuna oyo ntango mokolo monene na nkanda na Nzambe ekosukisa nyee ebongiseli oyo ya Satana. Ekomonana na miso na bango lokola ete bato nyonso bakosila awa na mokili. Kasi ekozala bongo? Na esengo, mosakoli na Nzambe alobi na biso ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo ya Jéhovah akobika.” (Yoele 2:32) Ntoma Petelo mpe ntoma Paulo balobi lisusu se ndenge moko. (Misala 2:19-21; Baloma 10:13) Ya solo, baoyo bazali kobelela nkombo ya Jéhovah bakobika. Ekozala banani? Tokoyeba bango na emonaneli oyo ezali kolanda.
2. Mpo na nini ezali likambo na kokamwa ete babiki bakozala na mokolo na nkanda na Jéhovah?
2 Ekozala solo likambo na kokamwa ete babiki bakozala na mokolo na nkanda na Jéhovah, mpamba te mosakoli mosusu ya Nzambe alobaki boye mpo na mokolo yango: “Tala mopepe makasi na Jéhovah, nkele na ye ebimi; mopepe na etumba ekokwea likoló na motó na bato mabe. Nkanda makasi na Jéhovah ekozonga te, bobele kino akosilisa kosala mpe kosukisa mikano na motema na ye.” (Yilimia 30:23, 24) Tosengeli kokamata bibongiseli nokinoki mpo tokoka kobika na mokolo wana ya mopepe makasi.—Masese 2:22; Yisaya 55:6, 7; Sofoni 2:2, 3.
Mipepe minei
3. (a) Na esika oyo na emonaneli na Yoane, mosala nini baanzelu bazali kokokisa yango? (b) “Mipepe minei” elakisi nini?
3 Liboso ete Jéhovah akweisa mopepe oyo makasi, baanzelu bazali kokokisa mosala moko ya ntina. Tala makambo Yoane amoni sikawa kati na emonaneli: “Na nsima na likambo oyo namonaki baanzelu minei batelemi na nsuka nyonso minei na mokili, kosimba mipepe minei na mokili, na ntina ete mopepe epepa na mokili te, soko na mai te, soko na nzete moko te.” (Emoniseli 7:1) Mosala oyo baanzelu yango bazali kosala etali biso na nini lelo? “Mipepe minei” oyo mizali elilingi makasi ya ekateli ya libebi oyo elingi kokweila ebongiseli mabe ya bato awa na mokili, na ebengeli mosusu “mai monene” na yikiyiki, elingi koloba bato na mobulu, mpe ekokweila mikonzi na yango, baoyo bakokani na banzete minene, oyo bazali kozwa esimbeli mpe lisungi ya mosuni uta epai na bafandi na mokili.—Yisaya 57:20; Nzembo 37:35, 36.
4. (a) Baanzelu minei bazali elilingi na nini? (b) Nini ekokomela lisangá ya Satana na mabelé ntango mipepe minei mikotikama?
4 Na ntembe te baanzelu oyo minei bazali elilingi na bituluku minei na baanzelu oyo Jéhovah apesi bango mosala ya kosimba naino ekateli na ye kino elaka ekokoka. Ntango baanzelu bakotika mipepe wana ya nkanda ya Nzambe ete mibeta na mokili, longwa na nord, na sud, na est mpe na ouest, lipalangana to libebi ekozala monene mpe nsomo lokola emonanaki naino liboso te. Ekozala lokola ntango Jéhovah asalelaki mipepe minei mpo na kopanza, kobuka mpe kosilisa nyee Baelamite na kala, kasi awa ekozala nde na emekeli eleki monene. (Yilimia 49:36-38) Ekozala mpasi na libebi monene koleka mopepe oyo na nzela na yango Jéhovah abomaki libota ya Baamonite. (Amos 1:13-15) Eteni moko te na lisangá ya Satana na mabelé ekokoka kotelema na mokolo na nkanda na Jéhovah, ntango akolongisa boyangeli na ye mpo na libélá.—Nzembo 83:15, 18; Yisaya 29:5, 6.
5. Ndenge nini esakweli ya Yilimia ezali kosalisa biso na kokanga ntina ete bikateli na Nzambe bikokweila mokili mobimba?
5 Tokoki kondimisama ete kokokisama na bikateli na Nzambe ekopalanganisa mokili mobimba? Toyoka lisusu maloba na mosakoli na ye Yilimia: “Jéhovah na bibele alobi boye ete, Tala mabe ekobima, longwa na libota kino libota; mpe mopepe makasi ekotombwa likoló, longwa na ndelo na nsuka na mokili. Mpe babomamami na Jéhovah na mokolo yango bakozala longwa na molelo moko na mokili kino molello mosusu na mokili.” (Yilimia 25:32, 33) Ezali na boumeli na mopepe oyo makasi nde mokili ya lelo ekokota kati na molili tuu. Biyangeli na yango bikopanzana, bikobwakama mpe moto akokanisa yango lisusu te. (Emoniseli 6:12-14) Nzokande, avenir ekozala molili te mpo na biso. Mipepe minei misimbami bongo mpo na bolamu ya nani?
Baombo na Nzambe bazwi bilembo
6. Nani alobi na baanzelu ete basimba mipepe minei, mpe nini ekoki kosalema na boumeli na ntango yango?
6 Yoane amoni sikawa ete bato mosusu bazwi bilembo mpo na kobika. Alobi: “Namoni mpe anzelu mosusu kobuta uta na ebimelo na ntango, azalaki na elembo na Nzambe na bomoi, mpe angangi na mongongo makasi na baanzelu yango minei, baoyo bazwi nguya na kobebisa mokili, na mai monene, mpe alobi ete, Bebisa mokili te, na mai monene te, na nzete te, kino ekosilisa biso kotya bilembo na bilongi na baombo na Nzambe na biso.”—Emoniseli 7:2, 3.
7. Nani anzelu oyo ya mitano, mpe nini esalisi biso na koyeba ye malamumalamu?
7 Atako nkombo ya anzelu oyo ya mitano epesami te, emonani polele ete ekoki kozala mosusu te bobele Nkolo Yesu akembisami. Na boyokani na etelemelo na Yesu, oyo ya Mokóló na baanzelu to Archange, alakisami awa ete azali na bokonzi likoló na baanzelu mosusu. (1 Batesaloniki 4:16; Yuda 9) Auti na este, motindo moko na “bakonzi bauti epai na ebimelo na ntango,” Jéhovah mpe Klisto, baoyo bayei mpo na kokokisa ekateli, lokola Dariuse mpe Siruse ntango bakweisaki Babilone ya kala. (Emoniseli 16:12; Yisaya 45:1; Yilimia 51:11; Danyele 5:31) Likambo mosusu ekokani kati na anzelu oyo mpe Yesu ezali boye ete azali na mokumba ya kotya bilembo na bilongi na baklisto bapakolami. (Baefese 1:13, 14) Epai mosusu, ntango mipepe mitikami, ezali Yesu nde azali kokamba mampinga ya likoló mpo na koboma mabota. (Emoniseli 19:11-16) Emonani polele ete ezali bongo Yesu nde apesi etinda na baanzelu ete baboma naino te mokili oyo ya Satana, kino baombo na Nzambe bakotyama bilembo.
8. Tosengeli koyoka nini na oyo ete kotya bilembo na bilongi na baombo, mpe ntango nini baombo yango babandaki kozwa bilembo?
8 Kotya bilembo na bilongi na baombo elimboli nini, mpe banani bazali baombo na Nzambe? Ezali na Pantekote ya mobu 33 nde baklisto ya liboso Bayuda babandaki kozwa bilembo, wana epakolamaki bango na elimo santu. Na nsima, Nzambe abandaki kobenga “bato ya mabota” mpe kopakola bango na elimo santu. (Baloma 3:29; Misala 2:1-4, 14, 32, 33; 15:14) Ntoma Paulo akomaki ete baklisto bapakolami na elimo santu bazali na ndanga to garantie ete ‘bazali bato na Klisto,’ mpe abakisaki ete Nzambe “atii elembo na ye epai na biso mpe apesi elimo na mitema na biso lokola ndanga.” (2 Bakolinti 1:21, 22; tala Emoniseli 14:1.) Na yango, ntango baombo oyo bayambami lokola bana na Nzambe na elimo, bazali kozwa libela ndanga ya libula na bango na likolo, elembo to garantie. (2 Bakolinti 5:1, 5; Baefese 1:10, 11) Bakoki bongo koloba: “Elimo ekotatolaka elongo na elimo na biso ete tozali bana na Nzambe. Soko tozali bana, tozali mpe basangoli na libula. Tozali basangoli na libula na Nzambe, kasi basangani na Klisto mpo na kosangola libula na ye elongo, soko tokoyokaka mpasi na ye elongo ete tozwa nkembo esika moko na ye.”—Baloma 8:15-17.
9. (a) Kino wapi bana na nsuka na Nzambe babotami na elimo basengeli koyika mpiko? (b) Na boumeli ya ntango boni komekama ya baklisto bapakolami ekolandana?
9 “Soko tokoyokaka mpasi na ye elongo.” Maloba oyo malimboli nini? Mpo na kozwa motole na bomoi, baklisto bapakolami basengeli koyika mpiko, kobatela bosembo na bango, ata kino na kufa. (Emoniseli 2:10) Bakoki kozala na likanisi oyo te ete: ‘Soki obiki, obiki mpo na libela.’ (Matai 10:22; Luka 13:24) Bazwi nde toli oyo ete: ‘Bozala na etingya mpo na kolendisa ebyangeli mpe eponeli na bino.’ Lokola ntoma Paulo, ekosengela na bango koloba: “Nasili kobunda etumba malamu, nasilisi nzela na kotambola, nasili kobatela kondima.” (2 Petelo 1:10, 11; 2 Timote 4:7, 8) Na yango, komekama mpe koyúngolama na bana na nsuka na Nzambe babotami na elimo esengeli kolandana awa, na mabelé, kino ntango Yesu, elongo na baanzelu oyo bazali kosala na ye bakosilisa mpo na libela kotya elembo na “bilongi” na bapakolami nyonso, komonisaka bango na motindo na seko ete bazali “baombo na Nzambe na biso” bamekami mpe bazali sembo. Elembo yango ekomi bongo elembo ya seko. Ntango mipepe minei mikotikama mpo na kokweisa bolozi, emonani lokola ete Bayisraele nyonso ya elimo bakosila kozwa elembo na bango libela ata soki mwa ndambo moke kati na bango bakozala naino na bomoi kati na nzoto ya mosuni. (Matai 24:13; Emoniseli 19:7) Motuya mobimba na Yisraele na Nzambe ekozala ya kokoka.—Baloma 11:25, 26.
Baklisto boni bazwi bilembo?
10. (a) Mikapo nini na Biblia mimonisi ete motuya na baklisto batyami bilembo ezali na ndelo? (b) Motuya mobimba na baklisto batyami bilembo ezali boni, mpe na maloba nini molongo na bango epesameli biso?
10 Yesu alobaki epai na baklisto oyo babyangamaki mpo na kozwa elembo ete: “Banga te, etonga moke, mpo ete Tata na bino asepeli kopesa bino bokonzi.” (Luka 12:32) Mikapo misusu ya Biblia, lokola Emoniseli 6:11 mpe Baloma 11:25, mimonisi ete motuya na bato oyo basali etonga moke wana ezali na ndelo, mpe esilaki kokatama. Ezali yango emonisami na maloba malandi ya Yoane: “Nayokaki motuya na bango basili kotyama elembo; ezalaki nkoto mokama na ntuku minei na minei, batyami elembo kati na mabota nyonso na bato na Yisraele. Bato na libota na Yuda nkoto zomi na mibale; bato na libota na Lubene nkoto zomi na mibale; bato na libota na Gada nkoto zomi na mibale; bato na libota na Asele nkoto zomi na mibale; bato na libota na Nafatali nkoto zomi na mibale; bato na libota na Manase nkoto zomi na mibale; bato na libota na Simeona nkoto zomi na mibale; bato na libota na Levi nkoto zomi na mibale; bato na libota na Yisakala nkoto zomi na mibale, bato na libota na Zebuluna nkoto zomi na mibale; bato na libota na Yozefe nkoto zomi na mibale; bato na libota na Benyamina nkoto zomi na mibale.”—Emoniseli 7:4-8.
11. (a) Mpo na nini mabota 12 oyo matangami, ezali oyo ya Yisraele ya mosuni te? (b) Mpo na nini Emoniseli epesi molongo ya mabota 12? (c) Mpo na nini ezala bokonzi ezala bonganga epesami na libota moko te kati na Yisraele ya Nzambe?
11 Maloba oyo mazali mpo na Yisraele ya mosuni te? Te, mpamba te liste ya mabota matangami na Emoniseli 7:4-8 ekeseni na oyo bameseni kotanga. (Mituya 1:17, 47) Ezali bongo polele ete liste oyo epesami te mpo na komonisa Bayuda ya mosuni engebene mabota na bango, kasi epesami nde mpo na komonisa ete, lokola Yisraele ya kala, Yisraele ya elimo ebongisami malamumalamu, eloko moko ezangi te. Motuya na basangani na libota wana ya sika ezali 144 000, elingi koloba ete 12 000 uta na libota mokomoko oyo mazali mabota 12. Bokonzi epesameli na libota moko te, bonganga mpe na libota moko te kati na Yisraele oyo na Nzambe. Basangani nyonso na libota yango basengeli kozala mikonzi mpe banganga.—Bagalatia 6:16; Emoniseli 20:4, 6.
12. Mpo na nini ekoki ete mikóló 24 bayemba liboso na Mwana na Mpate maloba mazwami na Emoniseli 5:9, 10?
12 Libaku ya koponama mpo na kosangana na Yisraele ya elimo epesamaki liboso epai ya Bayuda na mosuni mpe epai na bato basilaki kobongwana na losambo ya Bayuda, kasi bobele mwa ndambo moke na bato na libota yango nde bayambaki libaku wana. Mpo na yango, Jéhovah abandaki kobenga Bapakano. (Yoane 1:10-13; Misala 2:4, 7-11; Baloma 11:7) Lokola ezalaki bongo mpo na Baefese, baoyo kala bazalaki “mosika na Yisraele,” bato ya mabota mosusu, oyo bazalaki Bayuda te bakokaki uta ntango yango kotyama elembo na elimo na Nzambe mpe kotangama kati na lisangá ya baklisto bapakolami. (Baefese 2:11-13; 3:5, 6; Misala 15:14) Na yango, ebongi ete mikóló 24 bayemba liboso na Mwana na Mpate na maloba oyo ete: “Na makila na yo osikoli mpo na Nzambe bato na mikili nyonso, na minoko nyonso, na bikolo nyonso, na mabota nyonso, mpe ozalisi bango bokonzi na banganga mpo na Nzambe na biso, mpe bakozala bakonzi na mokili.”—Emoniseli 5:9, 10.
13. Mpo na nini ekokaki ete Yakobo, ndeko na Yesu, akoma mokanda na ye epai na “mabota zomi na mibale kati na lipalangana”?
13 Lisangá ya boklisto ezali “libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulee.” (1 Petelo 2:9) Lokola ezwi esika ya Yisraele ya mosuni mpo na kozala libota na Nzambe, ekomi bongo Yisrale ya sika, oyo ezali “solo ‘Yisraele.’” (Baloma 9:6-8; Matai 21:43)a Ezali bongo na ntina malamu ete Yakobo, ndeko na Yesu, akomaki mokanda na ye mpo na “mabota zomi na mibale na lipalangana,” elingi koloba lisangá ya mokili mobimba ya baklisto bapakolami oyo motuya na bango nyonso ekozala 144 000.—Yakobo 1:1.
Yisraele na Nzambe na mikolo na biso
14. Nini emonisi ete ba Témoins de Jéhovah bateyaki ntango nyonso ete motuya na basangani na Yisraele ya elimo, 144 000, ezali ya elilingi te?
14 Charles Russell asosolaki ete motuya na bato basali Yisraele ya elimo, 144 000, ezali elilingi te kasi ezali se bongo mpenza. Kati na mokanda La Nouvelle Création (ezalaki mokanda ya motoba kati na liboke ya mikanda mibengamaki ete Etudes des Ecritures) oyo ebimisamaki na 1904 na Lingelesi, akomaki boye: “Tondimi mpenza ete motuya na baponami, oyo esili kokatama, ezali oyo etangami mbala mingi kati na Emoniseli (7:4; 14:1), elingi koloba 144 000 ‘basombami kati na bato.’” Bobele bongo, na eteni ya liboso ya mokanda Lumière, oyo ebimisamaki na Lingelesi na 1930, mokanda mokomamaki na Bayekoli ya Biblia, maloba malandi mazwamaki na kati: “Ba 144 000 oyo basali nzoto na Klisto bazali etuluku eponami, ebulisami mpe etyami elembo.” Ba Témoins de Jéhovah balimbolaki ntango nyonso ete baklisto bapakolami oyo basali Yisraele ya elimo, motuya na bango ezali 144 000.
15. Mwa moke liboso na ebandeli na mokolo na Nkolo, eloko nini bayekoli na sembo na Biblia bazalaki kozela komona yango ete esalema mpo na bolamu ya Bayuda?
15 Kasi Yisraele ya mosuni bazali lelo ata na mwa lotomo ya kotalelama ete bazali libota liponami? Mwa moke liboso ete mokolo na Nkolo ebanda, wana ezalaki bango kokundola mateya mingi ya solo ya moboko ya Liloba na Nzambe, bayekoli na sembo na Biblia bazalaki kokanisa ete Bayuda bakozonga lisusu kozala libota na Nzambe liponami, na nsuka na ntango na Bapakano. Yango wana, kati na mokanda na ye Le temps est proche (buku ya mibale na molongo Etudes des Ecritures), oyo ebimisamaki na 1889 na Lingelesi, Russell alimbolaki eteni ya Yilimia 31:29-34 na kokokisaka yango na Bayuda na mosuni mpe alobaki: “Mokili ezali komona ete etumbu ya Yisraele elandanaki na nse na bokonzi na mabota uta mobu [607] liboso na Yesu Klisto, etumbu yango ezali naino kolandana mpe elikya ezali te ete ekolo na bango ekozongisama liboso na mobu 1914, esika ekosuka ntango nsambo, to mibu 2 520.” Bazalaki kokanisa ete na ntango wana nde Bayuda bakosangisama lisusu lokola libota moko kuna na mokili na bango. Likanisi oyo emonanaki ete ekozala se bongo, mingimingi na 1917, ntango mokano moko ya Leta ya Angleterre, ebengamaki Déclaration Balfour ezwamaki mpo na kolendisa mokano ya kozongisa Bayuda na ekolo na bango na Palestine.
16. Molende nini ba Témoins de Jéhovah basalaki mpo na kosakola nsango ya boklisto epai ya Bayuda na mosuni, mpe litomba nini bazwaki?
16 Nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mokili na Palestine epesamaki na maboko na Leta ya Angleterre mpe ebele na Bayuda bakokaki bongo kozonga na mokili yango. Na nsima, na 1948, Yisraele ezwaki boyangeli na yango moko. Makambo oyo mamonisaki te ete Bayuda bakozwa bolamu uta na Nzambe? Na boumeli ya bambula mingi, ba Témoins de Jéhovah bandimaki ete ekozala bongo. Yango wana, na 1925, babimisaki na Lingelesi mokanda moko ya nkasa 128 oyo ezalaki na motó na likambo Consolation pour les Juifs, mpe na nsima, na 1929, babimisaki mokanda Vie, mokanda kitoko ya bankasa 360 oyo ekomamaki mpo na Bayuda mpenza mpe ezalaki kolimbola mokanda ya Yobo. Bandeko batyaki molende mingi, mpenzampenza na New York, mpo na kokabola epai na Bayuda nsango yango na ntina na Masiya. Mwa moke kati na bango bandimaki, mpe ezali esengo mingi, nzokande ntalo eleki monene na bango, motindo moko na bankoko na bango na ekeke ya liboso, baboyaki kondima bilembeteli na ntina na koya na Masiya.
17, 18. Eloko nini baombo na Nzambe na mabelé bakangaki ntina na yango mpo na oyo etali kondimana ya sika mpe na bisakweli ya Biblia oyo bilobelaki kozongisama ya Bayuda?
17 Ezalaki polele ete Bayuda, lokola libota mpe ekolo, ezali bango te Yisraele oyo etangami na Emoniseli 7:4-8 mpe na bisakweli mosusu ya Biblia na ntina etali mokolo na Nkolo. Kolandaka bonkoko na bango, Bayuda bazali ntango nyonso koboya kosalela nkombo ya Nzambe. (Matai 15:1-3, 7-9) Kolimbolaka Yilimia 31:31-34, mokanda Jéhovah oyo ebimisamaki na Lingelesi na 1934 na Batatoli ya Yehova, elobaki polelepolele ete: “Kondimana ya sika etali bakitani ya mosuni ya Yisraele te, etali mpe bato nyonso ya mokili te, kasi . . . etali bobele Yisraele ya elimo.” Bisakweli ya Biblia na ntina etali kozongisama ya Bayuda etali Bayuda ya mosuni te, etali mpe Ekolo ya Yisraele te, oyo esangani kati na O.N.U. mpe esangani bongo na mokili oyo Yesu alobelaki na Yoane 14:19, 30 mpe na Yoane 18:36.
18 Esengo monene ezalaki na 1931, mpamba te baombo na Nzambe na mabelé bazwaki nkombo Témoins de Jéhovah. Bakokaki kondima na motema mobimba maloba oyo ya Nzembo 97:11: “Pole ekonami mpo na moto na boyengebene, mpe esengo mpo na baoyo bazali na mitema sembo.” Basosolaki polele ete bobele Yisraele ya elimo nde bakotaki kati na kondimana ya sika. (Baebele 9:15; 12:22, 24) Yisraele na mosuni, oyo bazangaki kondima, bakotaki kati na kondimana yango te; ezalaki mpe mpo na bato nyonso ya mokili te. Bososoli oyo ebongisaki nzela mpo na kongenga makasi uta na Nzambe, mpe elingaki kotika elembo kati na lisolo ya lisangá ya Nzambe mpe komonisa kino wapi Jéhovah azali kolakisa mawa na ye, boboto na ye mpe solo na ye na bato nyonso oyo bazali kobelema epai na ye. (Exode 34:6; Yakobo 4:8) Ee, longola Yisraele ya Nzambe, bato mosusu bazwi litomba na mosala oyo baanzelu basali na kosimba mipepe minei ete miboma naino mokili te. Bato yango banani? Okoki kozala moko na bango? Ezali yango tokomona sikawa.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkombo Yisraele elimboli “Nzambe azali kobunda; Ye oyo azali kobunda (kolendendela) elongo na Nzambe.”—Genese 32:28, Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelesi oyo ezali na mitindani, liloba na nse na lokasa.
[Elilingi na lokasa mobimba 114]
[Bililingi na lokasa 116, 117]
Koponama ya mingi kati na basangani na Yisraele na solo na Nzambe, esalamaki kobanda mokolo na Pantekote na mobu 33 kino 1935, mbula oyo likebi ebendamaki mingimingi likoló na koyanganisama na ebele monene oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabelé, ndimbola oyo epesamaki na Assemblée monene oyo ba Témoins de Jéhovah basalaki na Washington na mbula wana (Emoniseli 7:9)