Mokapo 18
Koningana na mokili na mokolo na Nkolo
1, 2. (a) Eloko nini ezalaka na ntango mabelé eningani? (b) Makambo nini Yoane amonaki na bofungwami na elembo ya motoba?
OSILA komona esika mabelé eninganaki? Ezali suvenire malamu te. Ebandaki mbala mosusu na makelele uta na nse na mabelé mpe kotengatenga epai na epai, oyo ekoki kopasula yo motema. Ntango oluki esika ya kobombama, ndakisa na nse ya mesa, koningana eyei makasi. Koningana mosusu ekoki mpe kobima pwasa mpe na nsomo, nsima na yango biloko, bakiti mpe bamesa ebukanibukani, mpe mbala mosusu bandako ekwei. Biloko mingi bibebaka, mpe mbala mingi koningana mosusu elandaka, kobakisaka bongo mpasi epai ya bato.
2 Elongo na makanisi oyo, totalela makambo Yoane alobi na kofungwama na elembo ya motoba: “Wana efungolaki ye elembo na motoba, namoni mokili eningani mingi.” (Emoniseli 6:12a) Koningana oyo esalemi se na eleko moko elongo na kofungwama na bilembo bisusu. Esalemi bongo na ntango nini mpenzampenza kati na mokolo na Nkolo, mpe koningana wana ya mokili ezali nini mpenza?—Emoniseli 1:10.
3. (a) Makambo nini Yesu ayebisaki kati na esakweli na ntina etali elembo na koya na ye? (b) Na ndimbola nini koningana na mabelé mpenza ekangani na koningana monene na mabelé na elilingi oyo elobelami na Emoniseli 6:12?
3 Mbala mingi Biblia elobeli koningana ya mokili, ezala ya mabelé mpenza oyo tonyataka to koningana na mokili na elilingi. Na esakweli na ye monene na ntina etali elembo na koya na ye lokola Mokonzi, Yesu asakolaki ete “mabelé makoningana esika na esika.” Koningana wana ya mabelé ekozala eteni moko na “ebandeli na mpasi na bolozi.” Uta 1914, wana ete motuya na bafandi na mokili ebakisamaki makasi mpe ekomi kino bamiliare mingi ya bato, koningana ya mabelé ebakisi mpasi mpe motema likoló na ntango na biso. (Matai 24:3, 7, 8) Nzokande, atako ezali kokokisa esakweli ya Yesu, koningana wana ya mabelé ezali makama ya biloko ya mokili; ezali se koyebisa koningana monene na mokili, koningana ya elilingi oyo esakolami na Emoniseli 6:12. Yango ekozala koningana ya nsuka oyo ekosukisa molongo na koningana mosusu oyo esilaki kobanda kokweisa miboko na biloko mabe mpe ya bomoto awa na nse, oyo etambwisami na Satana.a
Koningana kati na lisangá na bato
4. (a) Ntango nini libota ya Jéhovah basosolaki ete makambo oyo ya nsomo malingaki kobanda na 1914? (b) Mobu 1914 elingaki kozala nsuka na eleko nini?
4 Uta katikati ya bambula oyo ebandaki na 1870, libota ya Jéhovah esosolaki ete makambo minene mpe na nsomo makobanda na 1914 mpe makozala bongo elembo mpo na nsuka na ntango na Bapakano. Ezali eleko ya “ntango nsambo” (mibu 2520) kobanda na kokweisama na bokonzi ya libota ya Davidi na Yelusaleme, na mobu 607 liboso na ntango na biso, kino ntango Yesu azwaki bokonzi kati na Yelusaleme ya likoló, na 1914 na ntango na biso.—Danyele 4:24, 25; Luka 21:24.b
5. (a) Maloba nini Charles Russel alobaki yango na le 2 Octobre 1914? (b) Mabongwani nini na kobulungana masili kosalema uta 1914 kati na makambo na politike?
5 Na yango, na ntongo ya le 2 Octobre 1914, ntango Charles Russell akotaki esika efandaki libota mobimba ya Béthel ya Brooklyn (New York) mpo na losambo ya ntongo, alobaki maloba oyo ya ntina mingi: “Ntango ya Bapakano esuki, mikonzi basili kozwa ngala na bango.” Solo , ndenge mokili eningani uta 1914, ebimisi mabongwani minene kino ete bikonzi mingi ya kalakala bilimwaki. Kokweisama ya bokonzi ya ba tsars na mokili ya Russie mpo na botomboki ya bolchevique na 1917 eyaki kosuka na kobimisa mikili ya mitindo mibale oyo miwelanaki mingi: mikili ya koministe mpe mikili ya kapitaliste. Mbongwana ndenge na ndenge na makambo ya politike elandi koningisa lisanga ya bato na mokili mobimba. Na mikolo na biso, biyangeli mingi bizali kokokisa ata mbula moko to mbula mibale te. Kotengatenga kati na politike emonani mingi mpenza na ndakisa na Italie, epai kuna biyangeli 47 bikitanaki bobele na mibu 42 nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Nzokande, koningana yango ezali bobele koyebisa kobulungana monene mpe ya nsuka oyo ekoya kosukisa makambo nyonso ya politike. Ekobimisa nini? Nsima na yango, bobele Bokonzi na Nzambe nde ekoyangela mokili mobimba.—Yisaya 9:6, 7.
6. (a) H. G. Wells alobaki nini na ntina na eleko ya sika mpe ya ntina monene oyo tozali kobika na yango? (b) Filozofe moko mpe mokonzi moko bakomaki nini na ntina na eleko oyo ebandaki na 1914?
6 Engebene bakomi na makambo na kala, bafilozofe mpe bato ya politike, 1914 ezalaki ebandeli na eleko moko ya sika mpe ya ntina mingi. Mbula zomi na nsambo nsima na mobu wana, mokomi na makambo na kala H. G. Wells alobaki: “Mosakoli mbele akolinga ete asakola makambo kitoko. Kasi mokumba na ye ezali ya koloba makambo azali komona. Nzokande, azali komona mokili oyo ezali na nse na nguya ya basoda, ya bato balingi se bikolo na bango, ya bato ya mimbongo ya lokoso; mokili oyo etondi na kobanga, kolukana mpe koyinana, epai bonsomi ya moto na moto ezali kotosama lisusu te; mokili oyo ezali lokola moto akufi miso mpe ezali kobimisa matata makasi na kati ya bazwi mpe babola mpe ezali komibongisa mpo na bitumba mosusu.” Na 1953, filozofe Bertrand Russell akomaka: “Uta 1914, bato nyonso oyo bazali kotala ndenge mokili ezali kotambola bazali komibanzabanza mingi mpo bamoni ete mokili ekoki lisusu kozonga nsima te, ezali nde kokende epai na likama moko eleki lisusu monene. . . . Na miso na bango, libota ya bato ezali lokola elombe moko na lisapo ya bagreke, apusami na banzambe bazali na nkanda; ayebi lisusu komitambwisa te.” Na 1980, kokanisaka lisusu mpo na kimya oyo ezalaki na ebandeli ya ekeke ya ntuku mibale, Harold Macmillan, motambwisi wa kala wa Angleterre alobáká: “Makambo nyonso mazalaki malamu. Tala mokili kati na yango ngai nabotamaki. . . . Nde na ntongo ya mokolo moko na 1914, na pwasa mpe na motindo mokanisamaki liboso te, nyonso wana esukaki.”
7-9. (a) Makambo nini mabulunganisi mokili uta 1914? (b) Longola makambo wana oyo ezali kobulunganisa bato banda Yesu azwa bokonzi, wapi ezaleli mosusu oyo bato bakozala na yango?
7 Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebimisaki mibulungano mosusu. Uta ntango yango, bitumba ya mikemike mpe terorisme epai na epai ezali se koningisa mokili, wana ezali biso kobelema na nsuka na ekeke oyo. Kasi biloko na ntango oyo bikoumela kino kuna? Nsomo ya bateroriste to bikólo oyo ezali kosalela bibundeli oyo ekoki koboma bato ebele mbala moko ezali kopusa bato mingi na komituna bongo.
8 Nzokande, longola bitumba, makambo mosusu masili koningisa mokili kino na miboko na yango uta 1914. Moko kati na makambo yango oyo maningisaki mpenza mokili, ezalaki kokwea ya mombongo mpe nkita ya Amerike, oyo esalemaki na le 29 Octobre 1929. Yango ememaki krize kati na mikili nyonso ya kapitaliste. Krize yango ekomaki makasi koleka longwa na 1932 kino 1934, kasi ata kino lelo, bampasi na yango mosusu ezali naino koyokana. Uta 1929, mokili oyo ezali na maladi na makambo na nkita ezali kokanga mpota na yango na kosalelaka miango mizangi kolongobana. Mikili mizali komikotisa kati na nyongo. Krize ya pétrole oyo ebimaki na 1973 mpe kokwea ya mombongo mpe nkita na 1987 eningisi lisusu makasi misolo ya mokili. Bobele na ntango yango, bamilió na bato bazali kosomba biloko na nyongo mingi. Bato mingi mosusu bazimbisami na mayele mabe na bato na misolo mpe mimbongo, bakisa lisusu loteri mpe masano mosusu ya mbongo, oyo mingi kati na yango ebongisami na Leta, nzokande Leta asengeli kobatela bato. Na kati ya boklisto ya mokili oyo, ata bapastere ya misioni oyo bazali koteya na télévision bazali kozwa bamilió ya badolare mpo na lifuta na bango.—Tala Yilimia 5:26-31.
9 Na kala, kokwea ya nkita, yango nde epesaki nzela na Mussolini mpe na Hitler ete bakamata bokonzi. Babilone Monene alukaki nokinoki koyokana na bango; bakonzi ya lingomba ya katolike kuna na Vatican batyaki maboko na mokanda ya boyokani elongo na boyangeli ya Italie na 1929 mpe elongo na boyangeli ya Allemagne na 1933. (Emoniseli 17:5) Mikolo na molili oyo milandaki mikokisaki solo ndambo na esakweli na Yesu oyo elobeli kozala na ye, oyo ekoyebana na makambo lokola ‘motema likoló epai na mabota, bayebi eloko bakosala te, wana ete bato bakosenzwa na nsomo mpe na ntina na makambo malingi kobima na mokili.’ (Luka 21:7-9, 25-31)c Na motindo yango, makambo oyo maningisaki libota ya bato na 1914 malandamaki na koningana mosusu ya makasi.
Jéhovah aningisi mabota
10. (a) Mpo na nini mibulungano mingi ezali koningisa makambo na mokili? (b) Jéhovah azali kosala nini sikawa, mpe kati na mokano nini?
10 Makambo oyo mazali koningisa mokili ezali mpo ete moto akoki komitambwisa ye moko te. (Yilimia 10:23) Epai mosusu, Satana, nyoka ya kalakala, “ye oyo azali kozimbisa bato na mokili mobimba,” azali kotumola mpasi mpo na bato nyonso, kotyaka molende ete apengwisa bato nyonso longwa na losambo ya Jéhovah. Lokola mayele to teknoloji ekoli mingi, mokili ekomi bobele lokola quartier moko epai kuna koyinana na bikolo mpe na mposo ezali koninganisa lisangá ya bato kino na miboko na yango, mpe epai Mabota oyo balobi ete basangani esika moko bazali koyeba te nini bakosala mpo na kosilisa mpenza mikakatano ya bato. Koleka liboso, lelo moto azali koyangela moninga na ye moto mpo na kotalisa ye mpasi. (Emoniseli 12:9, 12; Mosakoli 8:9) Nzokande, uta mibu 70 Nkolo Moyangeli Jéhovah, Mozalisi na likoló mpe na mabelé azali koningisa mabota na ndenge na ye kati na mokano ya kosilisa mpo na libela bampasi nyonso oyo ezali na mokili. Azali kosala ndenge nini?
11. (a) Koningana nini esakolamaki na Agai 2:6, 7? (b) Motindo nini esakweli ya Agai ezali kokokana?
11 Kati na Agai 2:6, 7 totangi: “Jéhovah na bibele alobi boye ete, Mbala moko lisusu, na mwa ntango moke, nakoningisa likoló mpe mabota nyonso mpe mabonza kitoko na mabota makoingela mpe makotondisa ndako oyo na nkembo. Jéhovah na bibele alobi bongo.” Mingimingi uta 1919, Jéhovah azali kotinda batemwe na ye ete basakola bikateli na ye epai na bato nyonso na mokili. Lisangá ya Satana na mabelé ezali koyoka yango.d Wana likebisi yango ezali koya makasi, bato oyo bazali kobanga Nzambe, “mabonza kitoko,” bazali kobima longwa na kati na mabota. Ezali te ete babwakami libanda mpo na koningana oyo ezali kosalema kati na lisangá ya Satana. Te, ezali nde boye ete lokola bazali komona makambo ndenge mazali koleka, bango moko bazwi ekateli ya kosangana na kelasi ya Yoane, kelasi ya bapakolami mpo na kotondisa ndako ya Jéhovah na nkembo. Ndenge nini bazali kosala yango? Na kosanganaka na molende na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo esili kosalema. (Matai 24:14) Bokonzi yango, esalemi na Yesu mpe na bayekoli na ye bapakolami, ekotikala libela “bokonzi bokoki kokweisama te,” mpo na nkembo na Jéhovah.—Baebele 12:26-29.
12. Soki osili kobanda koyokamela nsango malamu oyo esakolami engebene Matai 24:14, eloko nini osengeli kosala liboso na koningana makasi na mokili oyo elobelami na Emoniseli 6:12?
12 Ozali moko na baoyo babandi kotia likebi na kosakola oyo? Ozalaki moko kati na bamilio na bato oyo bayanganaki na ekaniseli ya liwa ya Yesu na bambula oyo eleki? Soki ee, landa kokola kati na boyekoli na solo ezwami na Biblia. (2 Timote 2:15; 3:16, 17) Tika libela lolenge na bomoi na mbindo ndenge ezali komonana na mokili oyo etambwisami na Satana, mokili oyo ezali kokende na libebi na yango. Kota kati na lisangá ya boklisto ya mokili ya sika mpe sangana na molende nyonso na mosala na yango liboso ete “koningana ya mabelé” oyo ya nsuka, ekoka koboma mokili oyo etambwisami na Satana. Kasi koningana oyo monene ya mokili ezali nini? Ezali yango tokomona sikawa.
Koningana monene na mokili
13. Na nini koningana oyo makasi na mokili ekozala likambo ya sika mpenza mpo na bato?
13 Lokola touti komona yango, na mikolo na nsuka mpe na mpasi oyo tozali kobika na yango, mokili eningani mingi, ezala koningana ya mabelé mpenza to koningana na elilingi. (2 Timote 3:1) Kasi koningana monene mpe ya nsuka oyo Yoane amonaki nsima na kofungwama na elembo na motoba ezali naino koya. Ntango na koningana mikemike esili. Ekomi sikawa ntango na koningana monene na mokili, likambo na sika mpenza mpo na bato. Yango eluti monene mpe likoki ezali te ya komeka nguya na koningana yango na emekeli ya Richter soki mpe na emekeli mosusu nyonso oyo esalami na moto. Ezali koningana ya mabelé na mboka moko mpamba te, kasi koningana makasi oyo ekopalanganisa “mokili” mobimba, elingi koloba lisangá mobimba ya bato oyo esili kobeba.
14. (a) Esakweli nini eyebisi koya ya koningana makasi ya mokili mpe na makama oyo yango ekobimisa? (b) Esakweli na Yoele mpe oyo ya Emoniseli 6:12, 13 ezali kolobela nini?
14 Basakoli mosusu ya Jéhovah basilaki kosakola mpo na koningana oyo ya mokili mpe bampasi na yango. Na ndakisa, penepene na mobu 820 liboso na ntango na biso, Yoele alobaki mpo na ‘koya na mokolo na Jéhovah, mokolo monene mpe na nsomo.’ Alobaki ete na mokolo yango ‘moi ekobongwana molili, mpe sanza ekobongwana makila.’ Na nsima, abakisaki: “Bibele, bibele na lobwaku na kokata likambo; mpo ete mokolo na Jéhovah ebelemi, na lobwaku na kokata likambo. Moi mpe sanza izimisami mpe myoto na lola ekozanga kongenga na yango. Jéhovah akongala longwa na Siona, akobimisa mongongo na ye longwa na Yelusaleme; lola mpe mokili ekotetema. Kasi Jéhovah akozala ekimelo mpo na bato na ye, esika makasi mpo na bato na Yisraele.” (Yoele 2:31; 3:14-16) Koningana ya boye ekoki kozala eloko mosusu te bobele mokolo na nkanda na Jéhovah na boumeli ya bolozi monene. (Matai 24:21) Ezali se ndimbola moko na makambo makomami na Emoniseli 6:12, 13.—Tala mpe Yilimia 10:10; Sofoni 1:14, 15.
15. Mosakoli Habakuku asakolaki mpo na koningana ya motindo nini?
15 Bikeke soko mibale nsima na Yoele, mosakoli Habakuku asambelaki Nzambe na ye na maloba oyo: “O Jéhovah, nayoki nsango na yo mpe nazali kobanga mosala na yo, o Jéhovah. Na kati na bambula obimisa yango lisusu, na kati na bambula omonisa yango; kati na nkanda, okanisa mawa.” Ezali “nkanda” nini? Habakuku abakisi maloba mosusu, komonisaka mpenza ndenge bolozi monene ekozala. Alobi na ntina na Jéhovah ete: “Atelemi mpe aningisi mokili, atali mpe abulunganisi mabota. . . . Olekaki kati na mokili na nkanda, otutaki mabota na nkele. Ata bongo, nakosepela na Jéhovah, nakoyoka esengo na Nzambe na lobiko na ngai.” (Habakuku 3:1, 2, 6, 12, 18) Oyo nde koningisa monene Jéhovah akoningisa mokili ntango akonyata mabota!
16. (a) Engebene esakweli ya Ezekiele, eloko nini ekosalema ntango Satana akobundisa libota ya Nzambe mpo na mbala ya nsuka? (b) Nini ekobimisama na koningana makasi na mokili oyo elobelami na Emoniseli 6:12?
16 Ezekiele mpe asakolaki ete ntango Gog de Magog (Satana oyo asili kobwakama na nse) akobundisa libota ya Nzambe mpo na mbala ya nsuka, Jéhovah akobimisa “koningana monene na mokili na Yisraele.” (Ezekiele 38:18, 19) Mbala mosusu koningana ya mabelé mpenza ekosalama na ntango yango, kasi tobosana te ete Emoniseli elakisami na bilembo. Esakweli oyo mpe mosusu oyo touti kolobela ezali mingimingi nde bililingi. Na yango, kofungwama na elembo na motoba ezali lokola ete eyebisi esika ya nsuka ya koningana nyonso oyo ezali kotetemisa biloko mabe ya ntango oyo, mama na koningana nyonso na mokili, na boumeli na yango bato nyonso oyo bazali kotelemela bokonzi ya Jéhovah Nzambe bakobomama.
Eleko na molili
17. Koningana makasi na mokili ekosala nini mpo na moi, sanza mpe myoto?
17 Lokola Yoane akomonisa yango sikawa, koningana monene na mokili esangani na makambo mosusu ya nsomo oyo masimbi ata makóló. Alobi: “Moi eyindi tûû lokola elamba ya moindo, sanza mobimba eyei lokola makila, mpe myoto na likoló mikwei na nse, lokola mosuke ebwaki mbuma na yango mobesu wana ezali yango koningana na mopepe makasi.” (Emoniseli 6:12b, 13) Oyo nde nsomo! Kanisa naino molili ya nsomo oyo mbele ekozala awa na mokili soki esakweli oyo ekokani bobele ndenge ekomami. Wana mbele tokomona lisusu kongenga na moi te oyo ezali kopesa biso móto mpe ezali kolendisa biso! Tokomona lisusu mpe te kongenga kitoko na sanza na butu! Mpe bamiliare ya myoto ekongenga lisusu te kuna na likoló. Mbele tokozala na molili moko ya nsomo esangani na mpio.—Kokanisa na Matai 24:29.
18. Na ndimbola nini tokoki koloba ete ‘likoló eyindaki’ mpo na Yelusaleme na mobu 607 liboso na ntango na biso?
18 Yisraele ya kala ekebisamaki ete ekozwa molili motindo oyo na elimo. Yilimia alobaki boye epai na bango: “Mokili ekotikala mpamba, nde nakosilisa biloko binso te. Mpo na yango mokili ekolela, mpe likoló ekoyinda.” (Yilimia 4:27, 28) Ntango esakweli yango ekokanaki, na mobu 607 liboso na ntango na biso, ezalela eyindaki solo mpo na libota na Jéhovah. Mboka na bango monene, Yelusaleme, ekweaki na maboko na bato na Babilone. Temple na bango ebomamaki mpe mokili etikalaki mpamba. Kongenga moko te eutaki na makoló mpo na kolendisa yango. Makambo manso masalemaki se lokola Yilimia alobaki yango na mawa nyonso epai na Jéhovah ete: “Obomi mpe oyoki mawa te. Omizipi na lipata kino malombo makoleka te.” (Bileli 3:43, 44) Mpo na Yelusaleme, koyinda na makoló elimbolaki kufa mpe libebi.
19. (a) Na maloba nini Yisaya, mosakoli na Nzambe, alobelaki molili oyo eyindaki na makolo na bokonzi na Babilone ya kala? (b) Ntango nini mpe ndenge nini esakweli ya Yisaya ekokanaki?
19 Na nsima, molili ya motindo oyo moko kati na makoló esakolaki libebi mpo na Babilone ya kala. Na ntina yango, Nzambe apemisaki mosakoli na ye mpo ete akoma maloba maye: “Tala mokolo na Jéhovah ezali koya na motema makasi na nkanda mpe na nkele; kokomisa mokili mpamba mpe kobebisa kati na yango bato na masumu na yango. Mpo ete myoto na likoló mpe biyanganelo na yango bikobimisa pole na yango te; moi ekozala molili na ntango na kobima; sanza ekongenga na pole na yango te. Nakopesa mokili etumbu mpo na mabe na yango, mpe bato mabe mpo na masumu na bango.” (Yisaya 13:9-11) Esakweli oyo ekokanaki na mobu 539 liboso na ntango na biso, ntango Babilone ekweaki na maboko na ba Medese mpe ba Pelese. Eyebisi malamu molili, kozanga elikya, kozanga ata mwa kongenga moke ya kolendisama, nyonso oyo mpasi ekwelaki Babilone ntango mboka yango elongolamaki mpo na libela na esika ya bokonzi eleki makasi na mokili mobimba.
20. Motindo nini biloko mabe ya lelo bikosuka ntango koningana makasi ya mabelé ekosalema?
20 Bobele bongo, ntango koningana makasi ya mokili ekosalema, biloko mabe ya ntango oyo bikozwama nyonso kati na molili makasi kozanga elikya. Bingengiseli ya lisangá ya Satana na mabelé bikongenga lisusu ata moke te mpo na kopesa bato mwa elikya. Esili koyebana na bato ete mingi kati na mikonzi ya mokili mpe bato mosusu minene kati na politike bakozwaka kanyaka, bazali babuki na lokuta mpe bazali basali pite, mingimingi kati na mikili mibengami ete ya boklisto. (Yisaya 28:14-19) Bato bazali kotyela bango lisusu motema te. Kongenga na bango oyo ezali kolengalenga ekokufa nyonso ntango Jéhovah akokokisa ekateli na ye. Ekomonana polele ete bopusi na bango kati na makambo na mokili, bopusi oyo ekokani na kongenga na sanza, ezali nde kopusa bato na bitumba mpe na liwa. “Myoto” na mokili ekongenga lisusu te, ekozala lokola bingengiseli mosusu ya likoló oyo bikweaka na nse. Ekopalangana lokola mbuma na mosuke oyo ezali naino mobesu kasi elongolami na mopepe makasi. Mabelé mobimba ekoningana mpo na “bolozi monene, lokola emonani naino te longwa na ebandeli na mokili kino lelo, mpe mosusu na motindo yango ekozala te.” (Matai 24:21) Oyo nde makambo na nsomo mazali koya!
“Likoló” elimwe
21. Yoane amonaki nini kati na emonaneli na ye mpo na oyo etali “makoló” mpe “ngomba nyonso mpe bisanga nyonso”?
21 Yoane alandi koyebisa biso makambo amonaki: “Mpe likoló elimwaki lokola mokanda elingami. Ngomba nyonso na bisanga nyonso bilongwi na bisika na yango.” (Emoniseli 6:14) Makoló, ngomba mpe bisanga elobelami awa ezali oyo ya solosolo te. Kasi elimboli nini?
22. Na mokili na Edome, “makoló” ya motindo nini malíngamaki lokola “bakolíngaka rulo”?
22 Ekozala na biso mpasi mingi te na koyeba “likoló” oyo elimboli nini soki totaleli esakweli mosusu ekokani na oyo, mpo ete etali mpe nkanda ya Jéhovah epai na mabota nyonso. Esakweli yango elobi boye: “Limpinga mobimba na likoló ekopola mpe likoló ekongumbama lokola mokanda.” (Yisaya 34:4) Mingimingi mokili na Edome esengelaki kozwa etumbu makasi. Yango ekokanaki ndenge nini? Mokili yango ebebisamaki na bato na Babilone mwa ntango moke nsima na kobomama na Yelusaleme na mobu 607 liboso na ntango na biso. Nzokande, elobami epai moko te ete makambo ya kokamwa mabimaki kati na makoló mpenzampenza na eleko wana. Kasi makambo na nsomo mabimaki nde kati na “makoló” na Edome.e Bakonzi na yango bato balongolamaki na bitelemelo na bango ya kotombwama, bikokanaki na likoló. (Yisaya 34:5) Bazalaki lokola ete “bangumbami” na motindo bakolingaka elamba mpe batyamaki pembeni, lokola litɔ́kɔ́ ya kala, oyo ezali na mosala lisusu te.
23. “Likoló” nini esengeli ‘kolíngama lokola litɔkɔ́,’ mpe na maloba nini Petelo amonisi ete ezali bongo?
23 Na bongo, “likoló” oyo esengeli ‘kolongwa lokola litɔ́kɔ́ elingami’ elakisi biyangeli na mokili oyo bizali kotelemela Nzambe. Bikolongolama libela na Mofandi na mpunda mpembe oyo akoki kokwea te. (Emoniseli 19:11-16, 19-21) Ezali yango emonisami lisusu na maloba oyo ya ntoma Petelo, oyo azalaki kozela na motema móto makambo mabimaki nsima na kofungwama na elembo ya motoba: “Likoló mpe nse na ntango oyo ebombami ete ezika; ezali kobatelama kino mokolo na kosambisa mpe na koboma bato bakotiolaka Nzambe.” (2 Petelo 3:7) Kasi elimboli nini ete “ngomba nyonso na bisanga nyonso bilongwi na bisika na yango”?
24. (a) Mpo na makambo nini bisakweli ya Biblia bilobi ete ngomba mpe bisanga ezali kolenga to ezali kotengatenga? (b) Na ndimbola nini tokoki koloba ete “ngomba eninganaki” na ntango ya Ninive ekweaki?
24 Bisakweli na Biblia bilobi ete ngomba mpe bisanga bizali kolenga to bizali kotengatenga na motindo moko to na motindo mosusu ntango mobulungano monene ekoti na makambo na politike. Na ndakisa, ntango asakolaki bikateli ya Jéhovah mpo na kotelemela Ninive, mosakoli Nahumu akomaki: “Ngomba minene ekolenga mpo na ye, mpe ngomba mike ekopaswama. Mabelé makotombwama liboso na ye.” (Nahumu 1:5) Esika moko te totangaka ete ngomba mpenza epanzanaki ntango mboka Ninive ekweaki, na mobu 632 liboso na ntango na biso. Nzokande, bokonzi moko elekaki makasi na mokili mobimba, oyo emonanaki ete epikami makasi lokola ngomba, ekweaki pwasa.—Tala Yilimia 4:24.
25. Na nsuka ya bioko mabe ya ntango oyo esili kobelema, ndenge nini “ngomba nyonso mpe bisanga nyonso” ekolongolama na bisika na yango?
25 Na yango, maloba oyo ete “ngomba nyonso mpe bisanga nyonso” oyo masalelami na bofungwami na elembo na motoba, mazali kolakisa biyangeli ya mokili oyo mpe masanga oyo mazali kosala nsima na yango, oyo nyonso ezali komonana na miso na bato mingi ete epikami makasi. Ekopanzana, ekolongolama na bisika na yango, mpe ekozala mawa mingi mpo na baoyo nyonso batyelaki yango motema. Lokola esakweli ekomonisa yango sikawa, ntembe ezali te ete mokolo monene na nkanda na Jéhovah mpe na Mwana na ye—koningana ya nsuka na mokili oyo ekoboma ebongiseli nyonso ya Satana—ekokoka na ntango wana.
“Kwea na likoló na biso mpe bomba biso”
26. Bato oyo bazali kotelemela boyangeli na Nzambe, bakosala nini mpe bakoloba nini na nsomo nyonso?
26 Yoane alobi lisusu ete: “Bakonzi na mokili, na bato minene, na mikolo na bakapitene, na bazwi, na bato makasi, na bato nyonso, baombo mpe bansomi, bamibombi na kati na madusu, na mabanga na ngomba, koloba na ngomba mpe na mabanga ete, Kwea na likoló na biso, mpe bomba biso na miso na Mofandi na kiti na bokonzi, mpe na nkanda na Mwana na Mpate, mpo ete Mokolo Monene na nkanda na bango eyei, mpe nani akoki kotelema?”—Emoniseli 6:15-17.
27. Motindo nini Bayisraele bazangi sembo oyo bafandaki na Samaria bangangaki, mpe ndenge nini maloba yango makokanaki?
27 Ntango Hosea asakolaki ekateli ya Jéhovah likoló na Samaria, mboka-mokonzi ya Yisraele kuna na Nord, alobaki boye: “Bisika na likoló na Bet-Avena, yango lisumu na Yisraele, ekobomama nyee; nzube mpe matiti mabe ekokola na bitumbelo na yango. Bato bakoloba na ngomba minene ete, Zipa biso! Mpe na ngomba mike ete, Kwea likoló na biso.” (Hosea 10:8) Ndenge nini maloba yango makokanaki? Ntango Samaria ekweaki na maboko na Baasulia bazangi mawa, na mobu 740 liboso na ntango na biso, Bayisraele bakokaki kokima epai moko te. Maloba na Hosea mamonisi mayoki oyo mazalaki epai ya bato: bazalaki na elikya te, bazalaki na mawa makasi mpe na nsomo, bayebaki epai bakokenda te. Ezala ngomba ya solo, ezala bibongiseli ya Samaria oyo kala bikokanaki na ngomba epikami makasi, eloko moko te ekokaki kobatela bango.
28. (a) Likebisi nini Yesu apesaki na basi na Yelusaleme? (b) Ndenge nini likebisi na Yesu emonanaki ete ezalaki solo?
28 Bobele bongo, ntango basoda baromé bazalaki komema ye na esika babomaki ye, Yesu alobaki epai na basi na Yelusaleme ete: “Mpo ete mikolo mikoya wana ekoloba bato ete, Esengo na bikomba, na bango bazwi zemi te, na bango bamelisi bana mabèle te! Na nsima bakobanda koloba na ngomba minene ete, Kwea likoló na biso! mpe na ngomba mike ete, Zipa biso!” (Luka 23:29, 30) Mikanda mingi milobeli lisolo ya kokwea ya Yelusaleme na maboko ya Baromé na mobu 70, mpe ezali polele ete maloba na Yesu mazalaki na ndimbola se moko na oyo ya Hosea. Bayuda oyo batikalaki na mokili na Yuda bakokaki komibomba ata epai moko te. Epai nyonso balukaki komibomba kati na Yelusaleme, mpe ata ntango bakimaki komibomba na Massada, mboka makasi oyo etongamaki na likoló na ngomba, bakokaki te kokima etumbu oyo Jéhovah akatelaki bango.
29. (a) Ntango mokolo na nkanda na Jéhovah ekoya, kati na ezalela nini ekozwama baoyo bazali kopesa maboko na biloko mabe ya lelo? (b) Esakweli nini ya Yesu ekokokana ntango Jéhovah akomonisa nkanda na Ye?
29 Kofungwama na elembo na motoba emonisi ete makambo makozala se ndenge moko na mokolo na nkanda na Jéhovah oyo ezali kobelema. Ntango biloko mabe ya lelo na mabelé bikoningana mpo na mbala ya nsuka, baoyo bazali kopesa yango maboko bakolukaluka esika ya komibomba nde bakozwa yango te. Bakokoka lisusu te kotya motema epai na mangomba ya lokuta, Babilone Monene. Ezala madusu kati na bangomba mpenza soki mpe bangomba ya elilingi, elingi koloba masangá ya politike mpe ya mombongo, ekokoka te kobatela bango na nzela na mosolo to na nzela mosusu. Eloko moko te ekobatela bango na nkanda na Jéhovah. Yesu amonisaki malamu nsomo ekozwa bango wana elobaki ye ete: “Bongo elembo na Mwana na moto ekomonana na Likoló mpe mabota nyonso na mokili bakolela mpe bakomona Mwana na moto azali koya na mapata na Likoló na nguya mpe na nkembo mingi elongo.”—Matai 24:30.
30. (a) Motuna oyo ete: “Nani akoki kotelema?” ezali koyokisa likanisi nini? (b) Moto ata moko akokoka kotelema te na mokolo Jéhovah akosambisa mokili?
30 Ee, baoyo baboyi kotosa bokonzi na Mofandi na mpunda mpembe oyo azali kokende na kolonga, baoyo wana bakomona na ntango yango ete babungaki nzela. Bato oyo baponi bango moko kozala ndambo na libota na nyoka bakobomama ntango mokili oyo ya Satana ekoleka. (Genese 3:15; 1 Yoane 2:17) Ndenge makambo makozala ntango yango na mokili ekopusa bato mingi na kotuna ete: “Nani akoki kotelema?” Bakomona lokola ete moto moko te akoki kotelema liboso na Jéhovah mpe akoka kondimama, na mokolo wana ya kokokisa bikateli. Nzokande, likanisi na bango wana ekozala libunga, lokola tokomona yango na kolandana na mokanda na Emoniseli.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mbala mingi, liboso ete mabelé maningana, mwa mbongwana esalemaka kati na yango. Soko bambwa bamoni bongo, bakonganga to bakokoma nkandankanda mpe banyama mosusu ya mokili to ya mai bakozala lisusu kimya te. Mbala mingi, bato bakoyebaka eloko te kino ntango oyo mabelé makoningana mpenza.—Tala Réveillez-vous ! ya le 8 Octobre 1982, page 14.
b Mpo na ndimbola mozindo, tala pages 22 mpe 24.
c Na boumeli na bambula 35, (longwa na 1895 kino 1931) maloba mazwami na Luka 21:25, 28, 31 makomamaki likoló na ezipeli na ebimeli na Lingelesi na zulunalo La Tour de Garde. Na mwa nsima, ezalaki na elilingi na mwinda oyo ezalaki kongengisa makoló maindi tuu likoló na mai monene matomboki.
d Na ndakisa, na kampanye sipesiale oyo basalaki na 1931, ba Témoins de Jéhovah batikaki na maboko na bato, nkoto mingi na ya brochure Le Royaume, espérance du monde epai na bakonzi na mangomba, bakonzi na politike mpe bato na mimbongo kati na mokili mobimba.
e Liloba “makoló” na ndimbola motindo moko na oyo, esalelami lisusu na esakweli na Yisaya 65:17, 18 oyo ezali kolobela “makoló na sika.” Esakweli yango ekokanaki mpo na mbala ya yambo nsima na kozonga na Bayuda na boombo na Babilone, ntango boyangeli na sika ebongisamaki kati na Mabelé na ndaka na moyangeli Zorobabele mpe nganga nzambe monene Yeschua.—2 Ntango 36:23; Esdras 5:1, 2; Yisaya 44:28.
[Etanda/Elilingi na lokasa 105]
1914: Mbula oyo esakolamaki liboso
“Bokonzi na Nzambe esukaki na 606 liboso na ntango na biso mpe na ntango yango ekoti na bokonzi elongolamaki mpe mabelé mobimba mapesamaki epai na Bapakano. Eleko na mibu 2 520 oyo ebandaki na 606 liboso na ntango na biso esukaki na 1914 na ntango na biso.”f—Les trois mondes, ebimisamaki na Lingelesi na 1877, page 83.
“Tozali na elembeteli na polele mpe na nguya ezwami kati na Biblia ete ‘Ntango na Mabota’ ekoumela mibu 2 520, kobanda na 606 liboso na Yesu Klisto kino 1914 nsima na Yesu Klisto.”—Etudes des Ecritures, volume II, ekomami na Charles Russell mpe ebimisami na Anglais na 1889, page 76 na ebimeli na Lifalansé.
Charles Russell mpe Bayekoli mosusu ya Biblia bakangaki ntina bambula mingi liboso ete 1914 ekozala nsuka na ntango na Bapakano, to nsuka na ntango etyami mpo na mabota. (Luka 21:24) Na eleko yango, bazalaki mpenza koyeba malamu te ndimbola ya nsuka yango, kasi bandimaki makasi ete 1914 ekozala date monene kati na lisolo na mokili, mpe bamikosaki te. Mwa maloba ezwami na zulunalo elandi etatoli yango:
“Etumba ya nsomo oyo euti kobanda na Mpoto ekokisi esakweli monene. Eleki mibu 25, ‘Bayekoli na Biblia kati na mokili mobimba,’ oyo bayebani malamu na nkombo ya ‘Auroristes du millénium’, babandaki kosakola, na nzela na basakoli mpe na mikanda, ete Mokolo na Nkanda esakolamaki na Biblia ekokoka na 1914. ‘Keba na 1914!,’ yango ezalaki maloba na ebele na basakoli ya nsango malamu.”—The World, zulunalo ya New York, 30 Août 1914.
[Maloba na nse ya lokasa]
f Na lisalisi na elimo na Nzambe, Bayekoli na Biblia bayebaki te ete mobu zéro ezali te kolongwa na eleko na “liboso na ntango na biso” mpo na kokota “na ntango na biso.” Na nsima, ntango bolukiluki emonisaki ntina ya kotya ebandeli na bambula 2520 ete ebandaki na 606 te liboso na ntango na biso kasi na 607 liboso na ntango na biso, balongolaki mpe mobu zéro, na boye ete esakweli elobelaki mobu “1914 na ntango na biso” ezalaki ntango nyonso na solo.—Tala mokanda “La vérité vous affranchira,” ebimisami na Lingelesi na 1943 na Batatoli ya Yehova, page 220 na ebimeli na Lifalansé.
[Etanda na lokasa 106]
1914: mbongwana monene na Lisolo na bato
Na mokanda Politikens Verdenshistorie—Historiens Magt og Mening (Politikens, lisolo na mokili mobimba—Nguya mpe ndimbola na lisolo na bato), oyo ebimisamaki na Copenhague na 1987, totangi boye na page 40:
“Kondima kati na bokoli oyo emonanaki na ekeke na 19 ekweaki nyee na 1914. Na mbula oyo ezalaki liboso na etumba, Peter Munch, mokomi na lisolo na bato mpe moto na politike na mboka Danemark, akomaki na elikya nyonso: ‘Makambo manso mamonisi ete matata ekobima te kati na banguya minene na Mpoto. “Likama na etumba,” yango mpe ekolimwa, ndenge ezali kolimwa mbala na mbala uta 1871.’
“Nzokande, tala makambo moto yango akomaki na nsima na mikanda na ye ya nsuka: ‘Etumba oyo ebimaki na 1914 ezali mbongwana monene na lisolo na bato. Tobimaki na eleko malamu na bokoli, epai tokokaki kosala misala na biso na mwa kimya, mpe tokotaki na eleko na makama, na nsomo mpe na koyinana, epai kozanga kimya ekotaki bipai binso. Moko te akokaki koloba, mpe kino lelo oyo moko te ayebi soko molili oyo ekwelaki biso na mbula wana ekomema na libebi na seko na makambo oyo moto asili kosala uta bambula mingi.’”
[Elilingi na lokasa 110]
‘Ngomba nyonso elongwi na esika na yango’
[Elilingi na lokasa 111]
Bamibombi na kati na madusu na mabanga