Mokapo 30
“Babilone Monene esili kokwea!”
1. Anzelu na mibale asakoli nini, mpe Babilone Monene ezali nini?
NTANGO na kosambisa na Nzambe esili kokoma! Boyoka nsango na Nzambe oyo ezali sikawa kosakolama: “Anzelu mosusu na mibale alandaki, na kolobaka ete: ‘Esili kokwea! Babilone monene esili kokwea, oyo asili komelisa mabota nyonso vinyo na kongala na pite na ye.’” (Emoniseli 14:8) Ezali mbala ya liboso, kasi ya nsuka te, oyo mokanda na Emoniseli ebendi likebi na bato likoló na Babilone Monene. Na mokapo 17, Babilone Monene amonisami lokola mwasi na pite oyo azali kosepela mingi na etamboli na ye ya mabe. Lokola tokomona yango, ezali lisangá moko ya mokili mobimba; ezali losambo ya lokuta oyo Satana azali kosalela mpo na kobundisa libota ya mwasi na Nzambe. (Emoniseli 12:17) Babilone Monene ezali lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba; esangisi mangomba nyonso oyo mazali kobatela misala mpe mateya na mangomba na Babilone ya kala mpe mazali komonisa elimo na yango.
2. (a) Ndenge nini lingomba ya Babilone epalanganaki na mokili mobimba? (b) Lingomba nini na nguya ezali eteni monene ya Babilone Monene, mpe ebandaki ntango nini?
2 Ezali na Babilone nde Jéhovah abulunganisaki minoko na baoyo balingaki kotonga ndako molai na Babele, esili koleka mibu 4 000. Bituluku na minoko mikeseni bipalanganaki bongo kino nsuka na mokili, komemaka elongo na bango bindimeli mpe misala na bango na kopengwa oyo mizali moboko mpo na mangomba mingi ya ntango na biso. (Genese 11:1-9) Na yango, Babilone Monene ezali eteni ya losambo ya lisangá na Satana. (Tala Yoane 8:43-47.) Na mikolo na biso, eteni monene na yango ezali boklisto na mokili oyo esili kopengwa. Lingomba oyo na nguya, oyo ezali kotyola mibeko, ebotamaki na ekeke ya minei, bindimeli mpe mateya na yango euti na Biblia te, kasi, mingimingi, na losambo ya Babilone.—2 Batesalonike 2:3-12.
3. Mpo na nini ebongi mpenza koloba ete Babilone Monene esili kokwea?
3 ‘Nzokande, mbala mosusu okomituna ete, lokola mangomba mazali ntango nyonso na bopusi makasi na mokili, mpo na nini anzelu asakoli ete Babilone Monene esili kokwea?’ Tokanisa naino: Na nsima na mobu 539 liboso na ntango na biso, kokwea na Babilone ya kala ebimisaki litomba nini? Epesaki nzela na kosikolama na libota na Yisraele, baoyo bazongaki na mokili na bango mpe batelemisaki lisusu losambo ya solo. Na yango, kozongisama lisusu na Yisraele na elimo kati na ezalela na bango kitoko ya elimo na 1919, ezalela oyo ntango nyonso ezali bobele kongenga kino lelo oyo, ezali elembeteli ete Babilone Monene ekweaki na mbula yango. Ezali lisusu na likoki ya kokanga misala na libota na Nzambe te mpe, epai mosusu, mikakatano minene mizali komonana kati na ye. Uta 1919, kobeba na yango, kozanga bosembo mpe etamboli na mbindo na ye, emonisamaki polele. Kati na mikili mingi na Mpoto, bato mingi balingi kosambela lisusu te, mpe kati na mikili mosusu ya socialiste lingomba ezali komonana lokola “bangi oyo ezali kobebisa makanisi na bato.” Lokola ebwakami na baoyo nyonso balingi Liloba na Nzambe na solo, Babilone Monene, lokola moto oyo bakateli ye etumbu ya liwa, ezali sikawa kozela mokolo oyo Jéhovah akoboma yango.
Kokwea ya nsoni ya Babilone
4-6. Na ndimbola nini tokoki koloba ete “Babilone Monene . . . asili komelisa mabota nyonso vinyo na kongala na pite na ye”?
4 Totalela malamumalamu makambo oyo mapesaki nzela na kokwea ya nsoni na Babilone Monene. Engebene anzelu, “Babilone Monene . . . asili komelisa mabota nyonso vinyo na kongala na pite na ye.” Elingi koloba nini? Maloba motindo oyo makolobamaka mpo na bolongi. Na ndakisa, Jéhovah ayebisaki Yilimia ete: “Kamata kopo na vinyo na nkele oyo kati na loboko na ngai mpe melisa yango mabota nyonso baoyo nakotinda yo epai na bango. Bakomela yango mpe bakotetema epai na epai mpe bakobongwana lokola bato bazwi ligboma, mpo na mopanga mokotinda ngai kati na bango.” (Yilimia 25:15, 16) Na ekeke ya motoba mpe ya nsambo liboso na ntango na biso, Jéhovah asalelaki Babilone ya kala mpo na komelisa kopo na bolozi na elilingi epai na mabota mingi, elongo na Yuda libota oyo lipengwaki, kino ete ata bato na ye bamemamaki na boombo. Nzokande, na nsima, Babilone ekweaki na ntango na yango, mpamba te mokonzi na yango amitombolaki likolo na Jéhovah, “Nkolo na makolo.”—Danyele 5:23.
5 Babilone Monene ye mpe alongaki mbala mingi, kasi mingimingi na lolenge ya mayele mabe koleka. Asili ‘komelisa mabota nyonso’ na kosalelaka masenginya lokola mwasi na pite, na kosalaka pite ya elimo elongo na mabota. Abendaki bakonzi na politike ete basala boyokani elongo na ye mpe bakoma baninga na ye. Asalelaki mayele mabe na nzela na losambo, mpo na konyokola bato na makambo matali politike, mombongo mpe makambo ya mosolo. Na bantina oyo etali mpenza politike mpe mombongo, abimisaki minyoko, bitumba ndenge nyonso, bakisa mpe bitumba oyo bisalamaki mpo na kobengana bamusulmans na Yelusaleme (croisades), mpe matata kati na mabota, nyonso oyo Babilone Monene abulisaki yango na kolobaka ete ezali mokano na Nzambe.
6 Emonani polele ete mangomba bamikotisaki na bitumba mpe na makambo ya politike na mabota na boumeli na ekeke ya ntuku mibale. Esalamaki bongo na Japon na bashintoïste, Inde na bahindoue, Viêt-Nam na ba bouddhiste, Irlande du Nord mpe Amerike latine na “baklisto” ya nkombo mpamba, mpe na mikili mosusu lokola. Na boumeli na bitumba mibale ya mokili mobimba, ba aumôniers ya basoda na bacamp mibale batindaki bilenge mibali kobomana bango na bango. Ndakisa moko oyo eyebani malamu emonisi ndenge Babilone Monene asalelaki masenginya: ezali mokumba na ye kati na bitumba oyo ebebisaki Espagne na 1936 kino 1939, bitumba ya Baespaniole bango na bango, oyo ebomaki bato soko 600 000. Bitumba oyo esopaki makila mingi ebimisamaki na bakonzi na mangomba mpe bakonzi na politike, elingi koloba ezalaki mpo ete Leta ya Espagne elingaki kobotola bozwi mpe kokitisa lokumu ya Lingomba.
7. Mingimingi Babilone Monene azali mpenza kobundisa nani, mpe myango nini azali kosalela?
7 Mpo ete Babilone Monene ezali eteni na losambo ya libota na Satana, ntango nyonso azali kobundisa mingimingi “mwasi” na Jéhovah, “Yelusaleme na makoló.” Nzokande, na ekeke ya liboso, lisangá na baklisto bapakolami eyebanaki polele lokola libota ya mwasi. (Genese 3:15; Bagalatia 3:29; 4:26) Na bongo, Babilone Monene esalaki milende nyonso mpo na kolonga lisangá oyo na peto na kopusaka yango na kosala pite ya elimo. Ntoma Paulo mpe ntoma Petelo bakebisaki baninga na bango ete mingi bakokwea na bopusi yango mpe ekobimisa lipengwi monene. (Misala 20:29, 30; 2 Petelo 2:1-3) Penepene na liwa ya ntoma Yoane, Babilone Monene elongaki mwa moke na kobebisa masangá nsambo; ezali yango nde emonisami na bansango oyo Yesu atindelaki masangá wana. (Emoniseli 2:6, 14, 15, 20-23) Kasi Yesu alakisaki liboso na meko nini Babilone Monene ekopesamela nzela na kosala likambo yango.
Lisese na blé mpe matiti mabe
8, 9. (a) Lisese na blé mpe na matiti mabe oyo Yesu apesaki elobi nini? (b) Eloko nini esalamaki “ntango bato bazalaki naino kolala”?
8 Kati na lisese na ye etali blé mpe matiti mabe, Yesu alobi mpo na moto oyo akonaki nkona malamu na elanga. Kasi, “wana ezalaki bato kolala,” monguna ayaki mpe akonaki matiti mabe lisusu, na nsuka blé ezipamaki na matiti mabe. Yesu alimboli lisese na ye na maloba oyo ete: “Mokoni na nkona malamu azali Mwana na moto; elanga, ezali mokili; nkona malamu ezali bana na bokonzi; kasi matiti mabe, ezali bana na oyo mabe; monguna oyo akoni yango azali Diable.” Nsima alakisi ete bakotika nkona malamu kokola elongo na matiti mabe kino “nsuka na ntango na biloko mabe,” eleko oyo baanzelu ‘bakolokota’ matiti mabe na elilingi.—Matai 13:24-30, 36-43.
9 Makambo masalamaki mpenzampenza lokola ntoma Paulo na Petelo basakolaki yango. “Ntango ezalaki bato kolala,” elingi koloba nsima na kokufa na bantoma, to ntango bakengeli baklisto batikaki kosenzela likoló na etonga na Nzambe, lipengwi ebimaki na kati ya lisangá. (Misala 20:31) Nsima mwa moke, matiti mabe makolaki mingi koleka blé na motuya, na kozipaka bongo nkona malamu. Na boumeli na bikeke, emonanaki lokola ete libota na mwasi ezipamaki mpenza na Babilone Monene.
10. Eloko nini esalamaki na bambula ya 1870, mpe ezalela na Babilone Monene ezalaki nini?
10 Nzokande, na bambula ya 1870, baklisto bapakolami babandaki kotia milende makasi mpo na kokabwana na bizaleli na mbindo na Babilone Monene. Babwakaki mateya na lokuta ya boklisto na mokili oyo, mateya oyo eutaki na bopakano mpe basakolaki na molende na lisalisi ya Biblia ete ntango na Mabota ekosuka na 1914. Esaleli monene ya Babilone Monene, bakonzi na mangomba na boklisto na mokili oyo, batemelaki etuluku oyo ezalaki kosala mpo na kotelemisa losambo na solo. Na boumeli na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bakonzi na mangomba yango basalelaki yikiyiki oyo ebimisamaki na bitumba mpo na komeka kolimwisa etuluku moke oyo na baklisto na sembo. Na 1918, emonanaki lokola Babilone Monene akokisaki mokano na ye, mpamba te mosala na baklisto oyo ekufaki. Emonanaki lokola ete Babilone Monene alongaki bango.
11. Kokwea na Babilone ya kala epesaki nzela na likambo nini?
11 Lokola toutaki koloba yango, engumba na lolendo Babilone ekweaki na nsomo nyonso na 539 liboso na ntango na biso, mpe mongongo na konganga oyo eyokamaki: “Babilone esili kokwea! Babilone esili kokwea!” Na mbula wana, mboka monene na nguya na mokili mobimba na eleko wana ekweaki mpenza na maboko na mampinga ya ba médo-perses baoyo batambwisamaki na Cyrus le Grand. Atako engumba yango moko ebomamaki te, kokwea na yango esalamaki solo, mpe epesaki nzela na kosikola bakangami Bayuda, baoyo bazongaki na Yelusaleme mpo na kotelemisa lisusu losambo na peto.—Yisaya 21:9; 2 Ntango 36:22, 23; Yilimia 51:7, 8.
12. (a) Mpo na nini ebongi mpenza koloba ete Babilone Monene esili kokwea na ntango na biso? (b) Nini elakisi ete Jéhovah abwakaki libela boklisto na mokili oyo?
12 Mongongo na konganga oyo mosakolaki ete Babilone Monene ekwei moyokanaki lisusu na ntango na biso. Bolongi na ntango moke oyo boklisto na lokuta ezwaki na 1918, elimwaki mbala moko na 1919 ntango batikali na baklisto bapakolami, kelasi na Yoane, batelemaki lisusu na nzela na lisekwa ya elimo. Babilone Monene ekweaki mpo na likambo litali kokanga basaleli na Nzambe lokola baombo. Lokola mayoyo oyo motuya ekoki kotangama te, bandeko bapakolami na Klisto babimaki kati na libulu mozindo, bamilengelaki mpo na mosala mpenza. (Emoniseli 9:1-3; 11:11, 12) Etuluku yango ezali nde “moombo na sembo mpe na mayele” na ntango na biso, mpe Nkolo atyaki bango likoló na biloko na ye nyonso awa na mabelé. (Matai 24:45-47) Lokola Jéhovah asalelaki bango na lolenge yango, ezali elembeteli ete Jéhovah abwakaki mpenzampenza boklisto ya mokili oyo, atako bazali komiloba ete bazali bamonisi na Nzambe awa na mabelé. Losambo na solo ezongisamaki, mpe makoki mazalaki mpo na kosilisa mosala na kotya bilembo na batikali ya ba 144 000, basangani ya nsuka ya libota na mwasi, moyinami na Babilone Monene. Makambo oyo nyonso mamonisaki kokwea monene ya lingomba oyo na Satana.
Mpiko na basantu
13. (a) Nsango nini esakolami na anzelu ya misato? (b) Ekateli nini Jéhovah akamati likoló na baoyo bazwi elembo na nyama na yauli?
13 Anzelu ya misato azwi sikawa maloba: “Anzelu mosusu, anzelu na misato, alandaki bango, koloba na mongongo makasi ete: ‘Soko moto moko akosambela Nyama na yauli na ekeko na ye, mpe akozwa elembo na elongi na ye soko na loboko na ye, ye mpe akomela vinyo na kongala na Nzambe, oyo etyami bobele yango, na mai te, kati na kopo na nkele na ye.’” (Emoniseli 14:9, 10a) Na Emoniseli 13:16, 17, emonisamaki polele ete, na boumeli na mokolo na Nkolo, baoyo bazali kosambela ekeko na nyama na yauli te bakomona mpasi mpe ata kobomama. Sikawa toyoki ete Jéhovah akani kosambisa baoyo ‘bazali na elembo, na nkombo na nyama na yauli to na motuya na nkombo na ye.’ Bakomelisa bango na makasi kopo na bololo, ‘kopo na kongala,’ na nkanda ya Jéhovah. Yango ekolimbola nini mpo na bango? Na 607 liboso na ntango na biso, ntango Jéhovah amelisaki Yelusaleme “kopo na nkanda na ye,” engumba yango “eyeisamaki mpamba mpe ebebisamaki, na nzala mpe na mopanga” na bato na Babilone. (Yisaya 51:17, 19) Bobele bongo, ntango baoyo bazali kopesa losambo na biyangeli na politike na mabelé mpe na ekeko na yango, O.N.U., bakomela kopo na nkanda na Jéhovah, ekozala bwale mpo na bango. (Yilimia 25:17, 32, 33) Bakobomama nyee.
14. Liboso ete babomama, baoyo bazali kosambela nyama na yauli mpe ekeko na yango basengeli koyoka nini, mpe Yoane alobeli yango ndenge nini?
14 Liboso ete libebi yango ekwea likoló na bango, baoyo bazali na elembo na nyama basengeli kotungisama mpo na kozanga kondimama epai na Jéhovah. Mpo na moto nyonso oyo azali kosambela nyama na yauli mpe ekeko na yango, anzelu alobi na Yoane ete: “Mpe akoyokisama mpasi na móto mpe na sufulu na miso na baanzelu basantu mpe na miso na Mwana na Mpate. Mpe milinga na mpasi na bango ekobuta libela na libela, mpe butu na moi basambeli na nyama na yauli mpe na ekeko na ye bakozala na epemeli te, bobele bongo mpo na oyo akozwa elembo na nkombo na ye.”—Emoniseli 14:10b, 11.
15, 16. Na Emoniseli 14:10, maloba oyo ete “mɔ́to” mpe “sufulu” malakisi nini?
15 Bamosusu bakokanisa ete lokola maloba oyo mpasi na mɔ́to mpe na sulufu masalelami awa ezali elembeteli ete mɔ́to na lifelo ezali. Kasi botaleli mokuse na esakweli moko oyo ekokani na yango ekomonisa ndimbola ya sikisiki ya maloba oyo. Na mikolo na Yisaya, Jéhovah akebisaki libota na Edome ete bakozwa etumbu mpo na ezaleli na bango na koyina Yisraele. Alobaki ete: “Bitima na ye ekobongolama lokola gudro, mpe mabelé na ye lokola sufulu, mpe mokili na ye ekobongwana gudro oyo ezali kotoka. Na butu mpe na moi ekozimama te, milinga na yango ekobuta seko; longwa libota moko kino libota mosusu ekotikala mpamba; moto te akoleka kati na yango libela.”—Yisaya 34:9, 10.
16 Libota na Edome ebwakamaki na lifelo ya mɔ́to mpo na kozika libela na libela? Te. Nzokande, elimwaki mpenza libela na makambo na mokili, lokola ete ezikisamaki mpenzampenza na mɔ́to mpe na sufulu. Etumbu na ye ya nsuka ezalaki minyoko na mɔ́to na seko te, kasi kotikala ‘mpamba,’ ‘yango moko’ mpe ‘ezangi moto na kati.’ (Yisaya 34:11, 12) Ezali yango nde emonisami na lolenge na kokamwisa na milinga oyo ‘ekobuta seko.’ Soko ndako moko eziki, putulu na yango ekolanda kobimisa milinga mpo na ntango moke, ata mololi na mɔ́to esili kokufa, yango ezali elembeteli ete mɔ́to makasi epelaki na esika yango. Bobele bongo, lelo lisusu libota na Nzambe ezali komikundola liteya oyo lizwami na kobebisama ya Edome. Ezali nde na lolenge yango, na elilingi, ‘milinga na kozikisama na yango’ ezali kobuta mikolo na mikolo.
17, 18. (a) Nini ekokomela baoyo bazali kozwa elembo na nyama na yauli? (b) Na lolenge nini basambeli ya nyama na yauli bazali komona mpasi? (c) Na ndimbola nini ‘milinga na mpasi na bango ekobuta libela na libela’?
17 Baoyo bazali na elembo na nyama bango mpe bakobomama libela mpenza, lokola na mɔ́to. Lokola emonisami na esakweli mosusu elandi, bibembe na bango bikokundama te, mpo ete bandeke bakolya misuni na bango. (Emoniseli 19:17, 18) Na yango emonani polele ete bakonyokwama libela kati na móto te. Kasi sikawa, na ndimbola nini bazali komona ‘mpasi na mɔ́to mpe na sufulu’? Na boye ete kosakolama na solo ezali komonisa mabe na bango polele mpe ezali kokebisa bango mpo na kokokisama na ekateli na Nzambe na ntango ekoya. Ezali mpo na yango bazali kotuka basaleli na Nzambe, ba Témoins de Jéhovah, mpe, ntango likoki epesameli bango, bazali kokosa na mayele mabe nyama na yauli na politike mpo ete anyokola Batemwe, to aboma bango. Kasi na nsuka batemeli yango bakobomama lokola na mɔ́to mpe na sufulu. Na ntango yango, ‘milinga na mpasi na bango ekobuta libela na libela’ na boye ete etumbu oyo Nzambe akopesa bango ekozala liteya soki mokolo mosusu boyangeli ya Jéhovah na molongo mobimba etyameli ntembe. Likambo yango ekosila kokatama mpo na libela.
18 Nani azali kosakola nsango oyo ya mɔ́to na mikolo na biso? Tomikundola ete mayoyo na elilingi mazwaki nguya na kotungisa bato baoyo bazangi elembo na Nzambe na bilongi na bango. (Emoniseli 9:5) Emonani lokola ete mayoyo yango ya elilingi oyo matambwisami na baanzelu nde mazali kotungisa bango. Mpo na molende na bango, “butu na moi, basambeli na nyama mpe na ekeko na ye bazali na epemeli te.” Na nsuka, nsima na kobomama na basambeli wana na bikeko, kobomama oyo ekomonisa na lolenge ya kokamwisa ete boyangeli monene na Jéhovah elongisami, “milinga na mpasi na bango” ekobuta libela na libela. Tika ete kelasi na Yoane ekoka koyika mpiko kino lelo! Anzelu asukisi na maloba oyo: “Ezali awa nde mpiko na basantu esengeli komonana, baoyo bakotosaka malako na Nzambe mpe kondima na Yesu.”—Emoniseli 14:12.
19. Mpo na nini basantu basengeli koyika mpiko, mpe maloba nini makomami na Yoane mazali kolendisa bango?
19 “Mpiko na basantu” elimboli mpo na bango kosambela Jéhovah bobele ye moko na nsima na Yesu Klisto. Nsango na bango endimami na bato mingi te; ezali nde ntina na botemeli, minyoko, ata kino kobomama mpo na losambo. Kasi bazali kolendisama na maloba oyo Yoane ayebisi nsima ete: “Nayokaki mpe mongongo kobima na likoló koloba ete: ‘Koma ete: Esengo na bakufi kati na Nkolo baoyo bakokufa longwa sasaipi. Elimo elobi ete, ee, tika bapema na bwale na bango, mpo ete misala na bango mikolanda bango.’”—Emoniseli 14:13.
20. (a) Na nini elaka ekomami na Yoane ekokani na esakweli na ntoma Paulo mpo na kozonga na Yesu? (b) Libaku nini ya sipesiale elakami epai na baklisto bapakolami baoyo bazali kokufa nsima wana babenganaki Satana na likoló?
20 Elaka yango ekokani mpenza na esakweli oyo ya ntoma Paulo mpo na kozonga na Yesu: “Mpe bakufi kati na Klisto bakosekwa liboso. Na nsima biso bato na bomoi baoyo totikali [baklisto bapakolami baoyo bakozala na bomoi na boumeli na mokolo na Nkolo], tokotombwama kati na mapata mpo na kozwana na Nkolo kati na mopepe esika moko na bango.” (1 Batesaloniki 4:15-17) Nsima wana Satana alongolamaki na likoló, baoyo bakufaki kati na Nkolo basekwaki liboso. (Tala Emoniseli 6:9-11.) Mpo na bapakolami baoyo bazali kokufa nsima, na boumeli na mokolo na Nkolo, libaku moko sipesiale elakelami bango: bazali kosekwa mpo na bomoi ya elimo na likoló na mbala moko, “na ntango na kobweta liso.” (1 Bakolinti 15:52) Oyo nde elaka kitoko! Mpe lisusu, misala na bango na sembo mizali kolanda bango na likoló.
Kobuka mbuma na mokili
21. Yoane alobi nini mpo na “kobuka mbuma na mokili”?
21 Bato mosusu mpe basengeli kozwa matomba malamu na mokolo oyo na kosambisama. Mpamba te, ntoma Yoane abakisi: “Natalaki, mpe namoni lipata mpembe, mpe na likolo na lipata moto afandi na motindo na mwana na moto. Na motó na ye motole na wolo, mpe na loboko na ye likwangola epeli mingi. Anzelu mosusu [ya minei] abimaki na tempelo mpe angangi na oyo afandi na lipata na mongongo makasi ete: ‘Tinda likwangola na yo mpe buka, mpamba te ntango na kobuka ekomi, mpo ete biloko na kobuka na mokili biteli.’ Mpe oyo afandi na lipata atindi likwangola na ye na mokili, mpe biloko na mokili bibukami.”—Emoniseli 14:14-16.
22. (a) Nani moto oyo alati motolé na wolo na motó na ye mpe afandi likoló na lipata mpembe? (b) Ntango nini kobuka mbuma ekomi na nsuka na yango, mpe na lolenge nini?
22 Moto oyo afandi likoló na lipata mpembe azali koyebana polele. Lokola afandi likoló na lipata mpembe, mpe azali na motindo na mwana na moto mpe alati motole na wolo na motó na ye, ezali komonana polele ete ezali Yesu, Mokonzi Masiya oyo mpe Danyele amonaki ye lisusu na emononeli. (Danyele 7:13, 14; Malako 14:61, 62) Kasi kobuka mbuma oyo esakolami awa ezali nini? Ntango azalaki na mabelé, Yesu akokanisaki mosala na kozalisa bayekoli lokola kobuka mbuma na elanga, yango mokili na bato. (Matai 9:37, 38; Yoane 4:35, 36) Kobuka mbuma oyo ekomi na nsuka na yango na boumeli na mokolo na Nkolo, ntango Yesu atyami lokola Mokonzi mpe azali kokokisa bikateli na Tata na ye. Na yango, ntango na koyangela na ye, oyo ebandaki na 1914, ezali mpe eleko na esengo, eleko na kobuka mbuma.—Tala Deteronome 16:13-15.
23. (a) Nani apesi etinda na kobanda kobuka mbuma? (b) Kobuka mbuma nini ebandaki uta 1919?
23 Atako akomi Mokonzi mpe Mosambisi, Yesu azali kozela etinda na Jéhovah, Nzambe na ye, mpo na kobanda kobuka. Etinda oyo ezali kouta na “tempelo,” na nzela na anzelu moko, mpe Yesu atosi yango nokinoki. Ya yambo, uta 1919, akambaki mpe akokisaki mosala na kobuka ba 144 000 na kosalelaka baanzelu na ye. (Matai 13:39, 43; Yoane 15:1, 5, 16) Na nsima mosala na kobuka to koyanganisa ebele monene na bampate mosusu ebandaki. (Yoane 10:16; Emoniseli 7:9) Makambo mazali komonisa ete mwa motuya na bampate mosusu babandaki komonana na bambula 1931 mpe 1935, mbula oyo Jéhovah afungolaki miso na kelasi na Yoane mpo basosola malamumalamu ebele monene oyo elobelami na Emoniseli 7:9-17. Kobanda wana, balobelaki mingi mpo na koyanganisama na etuluku yango. Na 2005, motuya na basangani na ebele monene elekaki motango ya milio motoba, mpe ezali bobele kokola. Emonani polele ete, ye oyo azali na motindo na mwana na moto azali kobuka mbuma mingi mpe na esengo na boumeli na mikolo oyo ya nsuka.—Tala Exode 23:16; 34:22.
Konyatama na mowiti na mokili
24. Eloko nini anzelu na mitano asimbi na loboko, mpe anzelu na motoba alobi na ye nini?
24 Wana kobuka mbuma na lobiko esili, ntango ekomi mpo na kobanda kobuka mbuma ya lolenge mosusu. Yoane alobi: “Anzelu mosusu [ya mitano] abimaki na tempelo na likoló, ye mpe azalaki na likwangola epeli mingi. Mpe anzelu mosusu [ya motoba] abimaki na etumbelo mpe azalaki na bokonzi likoló na mɔ́to. Mpe abyangi na mongongo makasi na oyo azalaki na likwangola epeli mingi, mpe alobi na ye ete: ‘Tinda likwangola na yo oyo epeli mingi, mpe buka mitɔ́ na mbuma na mowiti na mokili, mpo ete mbuma na yango eteli.’” (Emoniseli 14:17, 18) Mampinga na baanzelu bazali na mokumba ya kobuka mbuma mingi na boumeli na mokolo na Nkolo, na kokabolaka bato malamu na bato mabe.
25. (a) Kobima na anzelu na mitano kati na temple [esika na bulee] elimboli nini? (b) Mpo na nini ebongi ete etinda na kobanda kobuka mbuma epesama na anzelu oyo “abimi na etumbelo”?
25 Anzelu na mitano auti liboso na Jéhovah mpenza, kati na tempelo; na yango kobuka mbuma ya nsuka ezali mpe kosalama engebene mokano na Jéhovah. Anzelu yango azwi etinda ya kobanda mosala na ye na kolandaka maloba oyo anzelu mosusu, oyo “abimi na etumbelo” azali koyebisa ye. Likambo yango lizali na ndimbola monene, mpamba te na liboso milimo na bato oyo bazali sembo oyo mizalaki na nse na etumbelo misengaki ete: “Kino ntango nini, ee Nkolo Moyangeli mosantu mpe na solo, okosambisa te mpo na kobukanisa bango bafandi na mokili na ntina na makila na biso?” (Emoniseli 6:9, 10) Mongongo oyo na kosenga kobukanisa ekozwa eyano ntango kobuka mbuma na mokili ekosalama.
26. “Mowiti (to nzete na vinyo) na mokili” elimboli nini?
26 Kasi “mowiti na mokili” ezali nini? Kati na Makomami na Liebele, elobelami mpo na libota na Bayuda lokola elanga na miwiti to na vinyo na Jéhovah. (Yisaya 5:7; Yilimia 2:21) Yesu Klisto elongo na baoyo bakofanda na ye kati na Bokonzi na Nzambe bakokisami mpe na mowiti to nzete na vinyo. (Yoane 15:1-8) Na maloba oyo na elilingi, mowiti ezali na ntina mpenza bobele soko ekobota mbuma. Mowiti ya solo ya boklisto ezali kobota mbuma mingi mpo na kokumisa Jéhovah. (Matai 21:43) Na bongo, na kokanisa malamu, “mowiti na mokili” esengeli kokokana na mowiti ya solo te, kasi na mowiti na lokuta oyo Satana asili kolona, elingi koloba boyangeli na ye likoló na bato, boyangeli oyo ezali komonana mpe esili kobeba, elongo na “mitó na mbuma” na bizaleli na bilimu mabe oyo abimisaki na boumeli na bikeke. Babilone Monene, kati na yango boklisto na mokili oyo esili kopengwa ezwi esika ya liboso, ezali na bopusi makasi likoló na mowiti oyo ezali na pwazó to ngenge.—Tala Deteronome 32:32-35.
27. (a) Eloko nini esalami ntango anzelu oyo asimbi likwangola abuki mbuma na mowiti na mokili? (b) Bisakweli nini na Makomami na liebele bizali komonisa bonene na kobuka mbuma?
27 Ekateli esengeli kokokisama. “Anzelu atindi likwangola na ye na mokili, mpe abuki mbuma na mowiti na mokili, mpe abwaki yango na ekamelo monene na nkanda na Nzambe. Mpe ekamelo enyatami na libanda na mboka, mpe makila mabimi na ekamelo, bozindo na yango kino minoko na bampunda, mosika na yango kino setada nkoto na nkama motoba.” (Emoniseli 14:19, 20) Banda kala Jéhovah asakolaki ete akolakisa nkanda na ye na mowiti yango. (Sofoni 3:8) Esakweli moko ezwami na mokanda na Yisaya esakoli polele ete mabota nyonso makobomama ntango ekamelo ekonyatama. (Yisaya 63:3-6) Yoele mpe asakolaki ete ‘mabota ebele,’ mabota nyonso, makonyatama kino kobomama na yango kati na “ekamelo,” kati na “lobwaku na kokata likambo.” (Yoele 3:12-14) Ekozala kobuka mbuka na kokamwisa oyo ekosalema lisusu te! Engebene emonaneli na Yoane, ezali bobele mitó na mbuma na mowiti te nde ekobukama, kasi mowiti mobimba na elilingi ekokatama mpe ekobwakama na ekamelo mpo na konyatama. Na kosalaka bongo, mowiti, nzete na vinyo na mokili, ekonyatama mpe ekoki kobima lisusu te.
28. Nani azali kokamola mowiti to vinyo na mokili, mpe na ndimbola nini ekamelo “enyatami libanda na mboka”?
28 Kati na Emononeli, bampunda nde bazali konyata miwiti yango mpamba te makila oyo mazali kobima na ekamelo na mbuma na mowiti, mabuti “kino minoko na mpunda.” Lokola “mpunda” ezalaka nyama mpo na bitumba, konyatama oyo esengeli kokokana na ntango na etumba. Elobami ete na etumba na nsuka oyo ekozala mpo na kotemela biloko mabe na Satana, mampinga ya likoló oyo makotambwisama na Yesu makonyata “ekamelo na vinyo na nkanda ya Nzambe Mozwi na Nguya Nyonso.” (Emoniseli 19:11-16) Emonani polele ete ezali bobele mampinga yango nde mazali kokamola mbuma na mowiti to vinyo na mokili. Ekamelo “enyatami libanda na mboka,” elingi koloba libanda na Siona na likoló. Ebongi mpenza ete mbuma na mowiti na mokili ekamolama na mabelé. Kasi yango ‘ekonyatama mpe libanda na mboka,’ na ndimbola oyo ete likama moko te ekozwa batikali na libota ya mwasi, baoyo bazali bamonisi ya Siona ya likoló awa na mabelé. Bango, elongo na na ebele monene, bakobatelama mpe bakobombama kati na lisangá na Jéhovah na mabelé.—Yisaya 26:20, 21.
29. Makila masopami oyo mazali kobima na ekamelo, mazali na bozindo nini mpe molai nini, mpe makambo nyonso wana mazali kolakisa nini?
29 Kokokana ezali kati na emononeli oyo na kokamwisa mpe kobukama na mikonzi na mabelé na nzela na libanga oyo ezali elilingi na Bokonzi, kobukama oyo elobelami na Danyele 2:34, 44. Libebi ekozala monene. Ebele na makila oyo makobima na ekamelo makozala mozindo; makokoma kino na minoko na bampunda mpe makosopana kino setada 1 600.a Motuya monene yango ezali motango minei kobakisa yango mbala minei mpe koyikanisa yango na motuya zomi mbala zomi (4 x 4 x 10 x 10), elakisi mpenza ete koboma yango ekozala na mokili mobimba. (Yisaya 66:15, 16) Ekoboma biloko mabe nyonso mpo na libela. Nzete na mowiti na mabelé oyo Satana alonaki ekobima lisusu te, soko moke te.—Nzembo 83:17, 18.
30. Mbuma nini mowiti na Satana ezali kobimisa, mpe tosengeli kozwa likatami nini?
30 Lokola ntango na nsuka epusani, emononeli oyo na kobuka mbuma na lolenge mibale ezali na ntina mingi mpo na biso. Totala bobele pembeni na biso mpe tokomona mbuma oyo ebotami na mowiti na Satana: makambo lokola kosopa zemi mpe koboma ya ndenge na ndenge; kosangana mibali na mibali, ekobo mpe bizaleli mosusu na mbindo; kozanga bosembo mpe kozanga bolingo. Makambo oyo nyonso makomisi mokili eloko na mbindo na miso na Nzambe. Mowiti na Satana ezali kobota “mbuma na nzete na pwazó mpe na bololo.” Etamboli na yango na kobeba mpe na kosambela bikeko ezali kopesa nsoni epai na Mozalisi monene na moto. (Deteronome 29:18; 32:5; Yisaya 42:5, 8) Oyo nde libaku malamu tozali na yango na kosala elongo na kelasi na Yoane kati na mosala na kobuka mbuma malamu oyo Yesu azali koyanganisa mpo na lokumu na Jéhovah! (Luka 10:2) Na yango, tika ete biso banso tozwa likatami ete tobebisama na mbuma na mowiti na mokili oyo te. Likatami yango ekosalisa biso mpo ete tonyatama te elongo na mbuma na mowiti na mokili ntango ekateli na Jéhovah ekokokisama.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Setada 1 600 ekokani na bakilometre soko 300.—Emoniseli 14:20, Traduction du monde nouveau, ebimeli ya lingelesi na mitindani, note na nse na lokasa.
[Etanda na lokasa 208]
‘Vinyo na pite na ye’
Lingomba ya katolike ezali eteni eleki ntina ya Babilone Monene. Etambwisami na pape, oyo azali koyangela uta Rome, mpe ezali koloba ete pape mokomoko azali mokitani na ntoma Pierre. Tala mwa makambo mayebani oyo matali baoyo bazali komibenga bakitani na ntoma Pierre:
Formose (891—896): “Sanza libwa nsima na liwa na Formose, nzoto na ye ekundolamaki na nkunda na bapape mpe ekumbamaki liboso na likita ‘ya kosambisa bawei’ oyo etambwisamaki na Etienne [pape ya sika]. Pape oyo akufaki afundamaki ete awelaki lokumu ya bapape mpe misala na ye nyonso mibomamaki. . . . Balongolaki ye bilamba ya bapape mpe misapi na ye ya loboko na mobali ekatamaki.”—New Catholic Encyclopedia.
Etienne VI (896-897): “Mwa basanza nsima na [kosambisa nzoto ya Formose], botomboki makasi etyaki nsuka na boyangeli ya pape Etienne; babotolaki ye bilembo ya basango, atyamaki na boloko mpe abomamaki.”—New Catholic Encyclopedia.
Sergius III (904—911): “Bapape mibale oyo bazalaki liboso na ye . . . babomamaki na boloko. . . . Na Rome, asimbamaki na libota ya Théophylacte. Bato bakanisi ete mwana moko ya Téophylacte ya mwasi na nkombo Marozia, abotaki mwana ya mobali na pape (mwana oyo na nsima akomaki pape Jean XI).”—Nouvelle Encyclopédie catholique.
Etienne VII (928—931): “Na bambula ya nsuka ya boyangeli na ye, pape Jean X . . . amibendelaki nkanda ya Marozia, Donna Senatrix ya Rome, atyamaki na boloko mpe abomamaki. Na bongo, Marozia apesaki ekoti ya pape epai na pape Léon VI, oyo akufaki nsima na sanza motoba na ndambo ya boyangeli. Ekoki kozala ete Etienne VII akitanaki ye, na bopusi ya Marozia. . . . Na boumeli na mbula mibale na boyangeli na ye, atambwisamaki na Marozia”—Nouvelle Encyclopédie catholique.
Jean XI. (931—935): “Na liwa ya Etienne VII, . . . Marozia, Mwana na Théophylacte, azwelaki mwana na ye Jean, elenge mobali na mbula koleka 20, lotomo ya koyangela lokola Pape . . . Na boumeli ya boyangeli na ye, atambwisamaki na Marozia.”—Nouvelle Encyclopédie catholique.
Jean XII (955—964): “Aponamaki wana ezalaki naino ye na mibu 18; mikanda na kala mimonisi ete azalaki kosepela na biloko ya elimo te, amipesaki na bisengo na ndenge mabe mpenza mpe amipesaki na etamboli mabe.”—The Oxford Dictionary of Popes.
Benoît IX (1032—1044; 1045; 1047-1048): “Lokumu na ye ebebaki mingi na ndenge atekisaki bokonzi na ye ya pape epai na parrain na ye mpe na nsima asengaki yango lisusu mbala mibale.”—La Nouvelle Encyclopédie britannique.
Na yango, na esika ya kolanda ndakisa ya mosembwi Pierre, bapape yango, mpe bamosusu, bazalaki nde na bopusi mabe. Bandimaki koboma mpe pite ya elimo mpe ya nzoto, mpe bopusi ekokani na oyo ya Jézabel, yango epesaki nzela ete Lingomba likoló na yango bazalaki koyangela, ebeba. (Yakobo 4:4) Mokanda Le mystère accompli, oyo Bayekoli na Biblia babimisaki na Anglais na 1917, emonisaki likambo mokomoko na bizaleli yango. Ezali moko na mwango na nzela na yango Bayekoli na Biblia na eleko wana ‘babeta mabelé na bolozi ndenge na ndenge.’—Emoniseli 11:6; 14:8; 17:1, 2, 5.
[Elilingi na lokasa 206]
Klisto afandi na kiti na bokonzi azali kotinda baanzelu kokokisa bikateli na Nzambe
[Elilingi na lokasa 207]
Nsima wana Babilone ekweaki na 539 liboso na ntango na biso, bakangami na ye babimisamaki