Mokapo 37
Kufa na Babilone: mawa mpo na bamoko, esengo mpo na bamosusu
1. Ezalela ya ‘mikonzi na mokili’ ekozala nini na ntango ya kobomama na Babilone Monene?
KUFA ya Babilone ezali nsango moko malamu mpo na libota na Jéhovah, kasi ezali boni mpo na mabota? Yoane alobi na biso: “Bakonzi na mokili oyo basalaki na ye pite mpe basepelaki na mosolo na ye bakolela, bakobeta ntolo mpo na ye, wana ekomona bango molinga na kotumbama na ye. Bakotelema mosika mpo na kobanga mpasi na ye, mpe bakoloba ete: ‘Mawa! Mawa! Mawa! Mboka yango monene! Babilone mboka makasi! mpo ete na ngonga moko osili kosambisama!’”—Emoniseli 18: 9, 10.
2. (a) Lokola ezali maseke zomi ya elilingi ya nyama na yauli motane nde ekoboma Babilone Monene, mpo na nini “mikonzi na mokili” bakolela libebi na ye? (b) Mpo na nini mikonzi, batungisami na mpasi, batelemi mosika na engumba oyo ekweisami?
2 Ezalela oyo mabota bakomonisa ekoki kokamwisa, mpamba te ezali maseke zomi ya nyama na yauli nde ekoboma Babilone Monene. (Emoniseli 17:16) Kasi, sikawa lokola Babilone akozala lisusu te, ntango mosusu “mikonzi na mokili” bakokanisa lolenge oyo azalaki kosalisa bango mpo na kotia kimya mpe botosi katikati na bato. Bakonzi na mangomba bazalaki kopambola bitumba, bazalaki kosala mpo na kokamata bato na mosala na soda, mpe na nzela na mateya na bango, bazalaki kopusa bilenge na kokende kobunda. Mangomba mazalaki kopesa na bakonzi mabe libateli lokola ya bosantu oyo nsima na yango bazalaki konyokola bato ya bikolo na bango. (Tala Yilimia 5:30, 31; Matai 23:27, 28.) Kasi toyeba ete mikonzi yango, ata batungisami na mpasi, batelemi sikawa mosika ya engumba oyo ekweisami. Bazali kopusana pembeni te mpo na kosalisa yango. Bazali na mawa ete abomami, kasi baboyi kosalisa ye.
Bato na mombongo baleli mpe basali matanga
3. Banani mosusu bazali koyoka mawa mpo na kolimwa ya Babilone Monene, mpe mpo na bantina nini, engebene makambo oyo Yoane alobi?
3 Mikonzi ya mokili bazali bango moko te mpo na koyoka mawa na ntina na kolimwa ya Babilone Monene. “Bato na mombongo na mokili bazali kolela ye mpe basali matanga, mpo ete moto na kosomba biloko na bango na mombongo azali lisusu te, biloko na wolo, na palata, na mabanga kitoko, na pauni, na bilamba petepete, na bilamba motane mwindo, na bilamba na swa, na bilamba motane, na nzete nyonso na malasi, na biloko nyonso na mpembe na nzoku, na biloko nyonso bisalami na mabaya na motuya mingi, na biloko na motako, na biloko na ebende, na biloko na mabanga, na kinamono, na amono, na mpaka na malasi, na mola, na olibana, na vinyo, na mafuta, na mfufu kitoko, na masango, na ngombe, na mpate, na mbalata, na mituka, na baombo mpe milimo na bato. Mbuma oyo motema na yo eyokaki mposa na yango esili kolongwa na yo [Babilone Monene], biloko nyonso kitoko, na biloko na kongenga, bibungi na yo, mpe bikozwama lisusu soko moke te.”—Emoniseli 18:11-14.
4. Mpo na nini “bato na mombongo” bazali kolela Babilone mpe bazali kooka mawa mpo na lisanga yango nsima na kobomama na yango?
4 Ya solo, Babilone Monene azalaki moninga ya motema mpe mosombi malamu ya biloko na bato na mombongo ya lokoso. Na ndakisa bandako ya basángo, mpe bandako-nzambe ya boklisto na mokili oyo ezwaki ebele na wolo, na palata, na mabanga mpe na mabaya ya motuya, mpe bisaleli mosusu ya motuya monene na boumeli na bikeke. Lisusu, mangomba mazali kopusa bato basombaka biloko mingi mpe bamipesa na molangwa na feti ya Noël, feti oyo ezali kofingisa Klisto, bakisa mikolo misusu mibengami ete ya basantu. Bamisionere na boklisto ya mokili oyo bakotaki kati na mikili ya mosika, kofungolaka bongo nzela na “bato na mombongo ya mokili ete bakende koteka biloko na bango kuna.” Na Japon, lingomba ya katolike, oyo ekotaki nzela moko na bato ya mombongo, emikotisaki nkutu na bitumba ya kowela mabelé na ekeke ya 17. Tala oyo Encyclopédie britannique ezali koloba na ntina na etumba moko makasi oyo esalamaki na nse ya ndako monene ya Osaka: “Mampinga na Tokugawa ekutanaki na banguna oyo bendele na bango ezalaki na elembo ya ekulusu mpe na bilembo ya Mobikisi mpe ya santu Yakobo, nkolo ya Espanye.” Etuluku oyo elongaki esukaki na konyokola kino kolimwisa lingomba ya katolike kati na mboka wana. Motindo moko mpe na mikolo na biso, Mangomba makozwa ata bolamu moko te mpo na komikotisa na bango kati na makambo na mokili.
5. (a) Engebene mongongo na mouti likoló, motindo nini “bato na mombongo” bazali kooka mawa? (b) Mpo na nini bato na mombongo bazali mpe ‘kotelema mosika’?
5 Mongongo mouti na likoló molobi lisusu boye: “Bato na mombongo na biloko oyo, baoyo basili kozwa mosolo mpo na ye, bakotelema mosika mpo na kobanga mpasi na ye, mpe bakolela na mawa mingi, mpe bakoloba ete: ‘Mawa! Mawa! mpo na mboka yango monene! oyo elati bilamba petepete, na bilamba motane mwindo, na bilamba motane, oyo mpe akembisi nzoto na wolo na mabanga kitoko, na pauni; mpo ete na ngonga moko biloko oyo mingi boye bisili kobebisama!’” (Emoniseli 18:15-17a) Lokola Babilone Monene asili kobomama, “bato na mombongo” bazali kolela moninga na bango ya mombongo. Ee, “Mawa, mawa!” mpo na bango na ntina na kolimwa na ye! Kasi toyeba ete bazali koyoka mawa mpo na bantina na bango ya moimi mpe, lokola bakonzi na mokili, bango mpe ‘batelemi mosika.’ Bazali kopusana mpenza penepene na Babilone Monene te mpo na kosalisa ye.
6. Engebene mongongo mouti na likoló, ndenge nini bakapitene na masuwa nyonso bazali kooka mawa, mpe bazali kolela mpo na nini?
6 Elobami lisusu boye ete: “Bakapitene na masuwa nyonso, na bango nyonso na mibembo na mai na esika na esika, na bato na masuwa, na bango nyonso bakosalaka misala na mai monene, batelemi mosika, mpe wana etali bango molinga na kotumbama na mboka, bangangi ete: ‘Mboka nini ekokani na mboka oyo monene?’ Babwaki mputulu na mitó na bango, mpe bangangi na mawa na kolela ete: ‘Mawa! Mawa! mpo na mboka yango monene! Mpo na yango bango nyonso bazali na masuwa kati na mai monene basili kozwa mosolo mingi mpo na biloko mingi na yango, mpo ete na ngonga moko esili kobebisama!’” (Emoniseli 18:17b-19) Babilone ya kala ezalaki engumba ya mombongo oyo ezalaki na masuwa mingi. Bobele bongo, Babilone Monene azali kosala mimbongo mingi mpo na “mai mingi” oyo ezali bongo basambeli na ye, likambo oyo ezali kopesa mosala epai na basambeli na ye mingi. Oyo kokwea nini mpo na mosolo kobomama ya Babilone Monene ekozala mpo na bango! Bakozwa lisusu liziba ya mosolo lokola Babilone Monene te.
Bamosusu bazali kosepela mpo na kufa na ye
7, 8. Na maloba nini mongongo mouti na likoló mozali koyebisa mpo na mbala ya nsuka nsango na yango oyo etali Babilone Monene, mpe banani basengeli kolanda toli oyo?
7 Mpo na kokwea ya Babilone ya kala na maboko ya ba Medesi mpe Perse, Yilimia asakolaki ete: “Lola mpe mokili mpe nyonso kati na yango, bakoyemba nzembo na esengo likoló na Babilone.” (Yilimia 51:48) Na ntango ya kobomama na Babilone Monene, mongongo mouti na likoló mosukisi nsango yango na maloba oyo: “Sepela mpo na mboka yango, yo likoló, na bino basantu, na bantoma, na basakoli, mpo ete Nzambe asili kokatela yango ekateli na ntina na bino.” (Emoniseli 18:20) Jéhovah mpe baanzelu bakosepela na komona kobomama ya monguna na kalakala na Nzambe, motindo moko na bantoma mpe basakoli baklisto ya yambo, oyo sikawa basili kosekwa mpe bazwi esika na bango ya mosala kati na mikoló 24.—Tala Nzembo 97:8-12.
8 Na ntembe te, “basantu” nyonso—ezala ete basili kosekwa na likoló to bazali naino na bomoi awa na mabelé—bakonganga na esengo, ebele monene ya bampate mosusu oyo basangani na bango bakonganga mpe lokola. Na ntango ekoki, basembwi nyonso ya kala bakosekwisama kati na ebongiseli ya biloko na sika, bango mpe bakosepela lokola. Basaleli na Nzambe bamekaki ata mokolo moko te kozongisa mabe epai na basangani ya mangomba na lokuta oyo bazali konyokola bango. Bazali komikundola maloba oyo na Jéhovah: “Jéhovah alobi ete, kobukanisa ezali likambo na ngai, ngai nakofuta.” (Baloma 12:19; Deteronome 32:35, 41-43) Sikawa Jéhovah azongisi lifuta. Makila nyonso oyo Babilone Monene asopaki esengami na loboko na ye.
Etuteli monene ebwakami kati na ebale
9, 10. (a) Anzelu moko makasi azali koloba mpe kosala nini sikawa? (b) Likambo nini ya motindo moko na oyo anzelu na nguya akokisi engebene Emoniseli 18:21 esalamaki na ntango na Yilimia, mpe ndanga nini yango ezalaki kopesa? (c) Ndanga nini likambo oyo anzelu na nguya asali na miso na Yoane ezali kopesa?
9 Likambo oyo Yoane amoni na nsima endimisi ete ekateli na Jéhovah likoló na Babilone Monene ezali ya seko: “Anzelu moko makasi akamati libanga lokola etuteli monene, mpe abwaki yango na mai monene, mpe alobi ete: ‘Bongo Babilone, mboka monene, ekobwakama makasi, mpe ekozwama lisusu soko moke te.’” (Emoniseli 18:21) Likambo ya motindo moko, ya ntina mingi na esakweli, esalamaki na eleko ya Yilimia. Ye apemamaki na Nzambe mpo ete akoka kokoma kati na mokanda “makambo mabe nyonso makokwela Babilone.” Apesaki mokanda yango na Selaya mpe alobaki na ye ete akenda na Babilone. Kuna, engebene etinda na Yilimia, Selaya atangaki maloba matalaki kokwea ya engumba yango: “E Jéhovah, osili koloba mpo na esika oyo, mpo na kobuka yango ete moko afanda lisusu kati na yango te, soko nyama te, kasi ete ezala mpamba libela.” Na nsima Selaya akangisaki libanga moko na mokanda mpe abwakaki yango na Efrata na kolobaka ete: “Babilone akozinda boye, mpe akobima lisusu te mpo na mabe makoyeisa ngai likoló na ye.”—Yilimia 51:59-64.
10 Lokola mokanda ekangisamaki na libanga mpe ebwakamaki kati na ebale ezalaki ndanga ete Babilone ekolimwa libela, mpo ete ekoka kotelema lisusu te. Likambo ya lolenge moko oyo anzelu na nguya azali kosala na miso na Yoane endimisi ete mokano na Jéhovah epai na Babilone Monene ekokokisama. Ezalela ya kobeba mpenza oyo Babilone na kala ezali na yango kino na mikolo na biso emonisi polele eloko nini ekokomela mangomba na lokuta nsima na mwa ntango moke.
11, 12. (a) Maloba nini anzelu makasi azali sikawa koloba epai na Babilone Monene? (b) Yilimia asakolaki nini na ntina na Yelusaleme ya lipengwi, mpe kokokisama nini esakweli yango ekozwa na mikolo na biso?
11 Sikawa anzelu makasi ayebisi maloba oyo na Babilone Monene: “Mingongo na bato na nzenze, na bato na miziki, na bato na pololo, na bato na kelelo, ekoyokana kati na yo lisusu soko moke te. Bato na misala na mitindo nyonso bakozwama kati na yo lisusu soko moke te. Lokito na motute ekoyokana kati na yo lisusu soko moke te. Epeleli ya mwinda ekopela kati na yo lisusu soko moke te. Mongongo ya mwasi mpe ya mobali na libala, ekoyokana kati na yo lisusu soko moke te. Mpo ete bato na yo ya mombongo bazalaki bato minene na mokili, mpe na ndoki na yo, bato ya mabota nyonso bazimbisami.”—Emoniseli 18:22, 23.
12 Na maloba ya motindo moko, Yilimia asakolaki na ntina na Yelusaleme ya lipengwi: “Nakolongwela bango mongongo na koseka mpe mongongo na esengo, mongongo na mobali mpe mongongo na mwasi mobalani, mongongo na mabanga na etutelo mpe pole na mwinda. Mokili ekozala esika na mpamba mpe na kokamwa.” (Yilimia 25:10, 11) Lokola ezali eteni ya ntina ya Babilone Monene, boklisto ya lokuta esengeli kokitisama kino libebi, libebi oyo emonisamaki kati na lolenge ya kokamwa na libebi oyo Yelusaleme ezwaki nsima na mobu 607 liboso ya ntango na biso. Boklisto ya lokuta, oyo kala ezalaki kosepela mpenza mpe etondaki na bato mingi, ekokwea mpe ekotikala mpamba.
13. Mbongwana nini ya pwasa ekoyela Babilone Monene, mpe yango ekobimisa makambo nini mpo na “bato na mombongo”?
13 Ya solo, lokola anzelu alobi yango awa epai na Yoane, Babilone Monene mobimba ekotika kozala lisangá ya nguya kati na mokili mobimba mpo na kokoma esika oyo ezangi bato, ekokani na esobe. “Bato na mombongo,” baoyo bazali kati na bato ya liboso na mosolo mingi na mokili, basalelaki losambo na ye mpo na matomba na bango moko to lokola ezipeli mpo na kobomba mabe na bango. Mpo na bakonzi na mangomba, bango mpe bazwi matomba mingi mpo ete bamikotisaki na molongo yango. Kasi etikali moke bato na mombongo yango bakozala lisusu na boyokani moko te elongo na Babilone Monene. Babilone akozipa lisusu miso na mabota na mokili te na misala na ye ya ndoki.
Asopaki makila mingi
14. Engebene anzelu makasi, mpo na ntina nini lisambisi na Jéhovah ezali ya makasi, mpe maloba nini ya motindo moko Yesu alobaki ntango azalaki awa na mabelé?
14 Mpo na kosukisa, anzelu makasi alimboli ntina oyo Jéhovah asambisi Babilone Monene makasi boye. Alobi: “Kati na ye makila na basakoli, na basantu mazwami, na makila na bango nyonso babomamaki na mokili.” (Emoniseli 18:24) Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu alobaki epai na bakonzi na mangomba na Yelusaleme ete basengelaki kosambisama mpo na “makila nyonso na sembo oyo masopamaki na mokili longwa na makila na Abele oyo moyengebeni.” Na boyokani na maloba yango, libota mabe wana ebomamaki na mobu 70. (Matai 23:35-38) Na mikolo na biso, libota mosusu ya bakonzi na mangomba ezali na ngambo mpo ete basopaki makila na konyokolaka basaleli na Nzambe.
15. Kati na Allemagne nazie, ndenge nini Lingomba ya katolike ezwaki nyongo ya makila na mitindo mibale?
15 Kati na mokanda na ye Lingomba na katolike mpe Allemagne nazie, Guenter Lewy akomi: “Na ntango bapekisaki ba Témoins de Jéhovah na Bavière na le 13 Avril [1933], Lingomba na katolike endimaki ete Ministère de l’Education mpe des Cultes epesa bango mokumba ya kofunda mosangani nyonso ya lisangá yango oyo akosalela lisusu losambo oyo epekisami.” Lingomba na katolike ekumbi mpe ngambo na kokangama ya bankoto na Batemwe kati na ba camps de concentration; maboko na yango mabebisami na makila ya bankoto na Batemwe oyo babomamaki. Nsima wana bilenge Batemwe, lokola Wilhelm Kusserow, bamonisaki ete bazalaki na molende mingi mpo na kondima liwa na masasi, Hitler akamataki mokano ete wana ezalaki liwa ya lokumu mingi mpo na bato balingaka bobele kotosa lisosoli na bango; yango wana Wolfgang, ye oyo azalaki na mibu 20, ndeko mobali ya Wilhelm, akatamaki motó. Na eleko se moko wana, Lingomba na katolike ezalaki kolendisa bilenge ba allemands na lingomba ya katolike na kokufa kati na etumba mpo na ekolo na bango. Emonani polele ete, Lingomba ezali na ngambo monene ya makila.
16, 17. (a) Na ntina na bosopi nini ya makila Babilone Monene asengeli kozongisa monoko, mpe mpo na nini Vatican azali na ngambo monene kati na kobomama ya Bayuda oyo esalamaki na boumeli na bokonzi mabe ya banazis? (b) Tanga ntina moko ya yambo mpo na yango mangomba na lokuta mazali na ngambo na liwa na bamilió na bato kati na na ebele mingi ya bitumba oyo bisalamaki na ntango na biso.
16 Kasi, esakweli elobi ete Babilone Monene nde azali na nyongo na makila ya “bango nyonso babomamaki na mokili.” Yango ezali mpenza solo na mikolo na biso. Na ndakisa, na nzela na mayele mabe, Lingomba ya katolike esalisaki Hitler na kozwa bokonzi na Alemanye; Vatican ezali bongo na ngambo monene na kobomama ya milió 6 na Bayuda baoyo bakufaki na boumeli na bokonzi mabe ya banazi. Lisusu, na ntango na biso, bato koleka milió 100 bakufaki na boumeli ya ebele na bitumba. Mangomba masengeli kopamelama mpo na likambo yango? Ee, ezali mpo na bantina mibale.
17 Ya liboso ezali ete ebele na bitumba ebimi mpo na bokabwani kati na mangomba. Na ndakisa bitumba oyo ebimaki kati na bamizilma mpe bahindu kobanda na 1946 kino na 1948, na Inde. Ebomisaki nkoto mingi na bato. Na bambula ya 1980, matata oyo ebimaki kati na Irak mpe Iran ezalaki mpo na kozanga boyokani na mangomba, ebomisaki nkoto mingi na bato. Mobulu makasi kati na bakatolike mpe baprotestá na Irlande ya Nord ebomisaki bato mingi. Kotalelaka likambo yango, mokomi na makambo na bato C. Sulzberger alobaki boye na 1976: “Na mawa nyonso ezali mpenza solo ete na bitumba nyonso oyo bisalami lelo kati na mokili katikati na yango to koleka ezali mpenza matata matali mangomba to oyo esangisi koswana kati na mangomba.” Ya solo, ezalaki bobele bongo kati na boumeli mobimba ya lisolo na yikiyiki ya Babilone Monene.
18. Nini ezali ntina ya mibale oyo mpo na yango mangomba na mokili mazali na makila kati na maboko?
18 Ntina ya mibale ezali nini? Na miso na Jéhovah, mangomba ya mokili mazali na makila na maboko na bango mpamba te bateyaki na lolenge ya malamu te epai na bato na bango solo likoló na makambo oyo Jéhovah asengi epai na basaleli na ye. Bateyaki na lolenge malamu te epai na bato ete basambeli na solo ya Nzambe basengeli komekola Yesu Klisto mpe komonisa bolingo epai na baninga na bango, ata bazali bato ya ekólo nini. (Mika 4:3, 5; Yoane 13:34, 35; Misala 10:34, 35; 1 Yoane 3:10-12) Ezali mpo ete mangomba ya Babilone Monene mateyaki makambo yango te, ntina wana bato na bango bamikotisaki kati na mobulu ya bitumba ya mokili mobimba. Likambo yango emonanaki mpenza makasi na boumeli ya bitumba mibale ya mokili mobimba oyo ebimaki na eteni ya liboso ya ekeke ya 20, nyonso mibale esalamaki kati na mikili oyo emibengaka ete ya boklisto, mpe bitumba yango bipusaki bato ya lingomba moko na kobomana bango na bango. Soki baoyo nyonso bazalaki koloba ete bazali baklisto batosaki mitinda na Biblia, mbele bitumba wana bikokaki kosalama te.
19. Mpo na nini tokoki koloba ete Babilone Monene asopaki makila mingi?
19 Na miso na Jéhovah, Babilone Monene azali na nyongo na makila wana nyonso. Soki bakonzi na mangomba, mingi mpenza baoyo ya boklisto na mokili oyo, bateyaki solo ya Biblia epai na bato na bango, mbele kobomana motindo wana esengelaki kobima te. Mpo na oyo nyonso, Babilone Monene,—ndumba monene, lisanga ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta—asengeli kosambisama liboso na Jéhovah bobele mpo na “makila na basakoli mpe basantu” te oyo ye anyokolaki mpe abomaki, kasi lisusu mpo na makila “na [bato] nyonso babomamaki na mokili.” Na ntembe te Babilone monene asopi ebele na makila. Oyo nde kosikwama ntango akobomama mpo na libela!
[Etanda na lokasa 270]
Mbuma mabe likoló na boyokani na Lingomba mpe politike
Na mokanda na ye L’Eglise catholique et l’Allemagne nazie, Guenter Lewy akomi boye: “Soko uta ebandeli lingomba na katolike na Alemanye etemelaki makasi Hitler, lisolo na bato elingaki mbala mosusu kotambola ndenge mosusu. Ata soko botemeli yango elingaki kolonga te, mpe ata elingaki kopekisa te makambo mabe oyo banazi basalaki, elingaki mpenza kokolisa lokumu ya etamboli malamu ya Lingomba. Ya solo, botemeli yango mbele elingaki kobomisa bato mingi, kasi mabonza yango elingaki kopesama mpo na ntina ya lokumu mpenza. Yango elingaki kobangisa mwa moke Hitler, mbele alingaki komipesa na bitumba te, mpe mbele bamilió na bato balingaki kobatela bomoi na bango. . . . Lokola ba Allemands ebele oyo baboyaki kokota na boyangeli ya banazi banyokwamaki makasi na ba camps ya concentration, lokola Bapoloné babomamaki mingi, lokola Barusses mingi bakufaki mpo bazalaki se ba Untermenschen [bato mpamba] slaves, lokola bato 6 milió babomamaki mpo bazalaki ba ‘aryens’ te, bakonzi na mangomba na Alemanye basungaki na lolenge na bango boyangeli oyo esalaki makambo wana ya mabe. Pape, mokonzi na elimo ya Lingomba mpe mobandisi monene ya mateya matali etamboli malamu ya bakatolike, alobaki ata eloko te.”—Nkasa 275 mpe 292.
[Elilingi na lokasa 268]
Bakonzi na mokili bakonganga ete: “Mawa, mawa!”
[Elilingi na lokasa 268]
Bato na mombongo bakonganga ete: “Mawa, mawa!”