MOKAPO YA LIBWA
Nsuka ya mokili ekómi pene?
1. Nini ekoki kosalisa biso tóyeba makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya?
NSIMA ya kolanda bansango, ekómelá yo omituna: ‘Mokili oyo ezali kokende wapi?’ Lokola makambo ya nsɔmɔ mpe mabe ekómi mingi, bato mosusu bakómi kondima ete nsuka ya mokili ekómi pene. Ezali solo? Tokoki koyeba makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya? Ɛɛ. Bato bakokoka te koyebisa makambo oyo ekoya, kasi Yehova Nzambe akoki kosala yango. Na Biblia, ayebisi biso ndenge bomoi mpe mabele ekozala na mikolo ezali koya.—Yisaya 46:10; Yakobo 4:14.
2, 3. Bayekoli ya Yesu balingaki koyeba nini, mpe Yesu ayebisaki bango nini?
2 Ntango Biblia elobeli nsuka ya mokili, elingi koloba te ete mabele ekobebisama; yango elimboli nde ete mabe ekosila. Yesu ateyaki bato ete Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele. (Luka 4:43) Bayekoli ya Yesu balingaki koyeba ntango oyo Bokonzi ya Nzambe ekoya, yango wana batunaki ye: “Makambo yango ekosalema ntango nini, mpe elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?” (Matai 24:3) Yesu ayebisaki bango mokolo mpe ngonga te; kasi ayebisaki bango makambo oyo ekosalema liboso ete nsuka ya mokili eya. Makambo oyo Yesu alobaki ete ekosalema ezali kosalema lelo oyo.
3 Na mokapo oyo, tokolobela makambo oyo emonisi ete tozali na eleko oyo esengelaki kozala liboso ya nsuka ya mokili. Kasi, tosengeli liboso kolobela etumba moko oyo ebimaki na likoló mpo tóyeba ntina oyo makambo ebebi boye awa na mabele.
ETUMBA MOKO NA LIKOLÓ
4, 5. (a) Nini esalemaki na likoló ntango Yesu akómaki Mokonzi? (b) Ndenge Emoniseli 12:12 elobi, nini esengelaki kosalema awa na mabele ntango babwaki Satana?
4 Na Mokapo 8, toyekolaki ete Yesu akómaki Mokonzi na likoló na 1914. (Danyele 7:13, 14) Mokanda ya Emoniseli eyebisi biso makambo oyo esalemaki: “Etumba ebimaki na likoló: Mikaele [elingi koloba Yesu] ná baanzelu na ye babundaki na dragɔ [Satana], mpe dragɔ ná baanzelu na yango babundaki.”a Satana ná bademo na ye balongaki etumba te mpe babwakamaki na mabele. Kanisá esengo oyo baanzelu bayokaki! Bongo bato awa na mabele? Biblia elobaki ete ekozala eleko moko ya yikiyiki mpo na bato. Mpo na nini? Mpo Zabolo azali na nkanda makasi, “mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.”—Emoniseli 12:7, 9, 12.
5 Zabolo azali kosala nyonso atya mobulu na mabele ndenge alingi. Azali na nkanda makasi mpo atikali na ntango mokuse liboso Nzambe aboma ye. Tótalela sikoyo makambo oyo Yesu alobaki ete ekosalema na mikolo ya nsuka.—Talá Etanda 24.
MIKOLO YA NSUKA
6, 7. Tokoki koloba nini mpo na bitumba mpe nzala lelo oyo?
6 Bitumba. Yesu alobaki: “Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi.” (Matai 24:7) Bitumba ya mikolo na biso ebomi bato mingi koleka bitumba nyonso ya ntango ya kala. Lapolo ya ebongiseli moko oyo elandelaka makambo ya mokili emonisi ete kobanda mobu 1914, bitumba ebomi bato koleka milio 100. Bato oyo babomami na bitumba na boumeli ya mbula 100, kobanda mobu 1900 tii mobu 2000, baleki mbala misato bato oyo babomamaki na boumeli ya mbula 1900, elingi koloba banda na siɛklɛ ya liboso tii na mobu 1899. Kanisá naino mawa mpe mpasi oyo bamilio ya bato bayoká mpo na bitumba!
7 Nzala. Yesu alobaki: “Nzala ekozala.” (Matai 24:7) Lelo oyo, biloko ya kolya ekómi mingi mpenza, kasi bato mingi balyaka kaka malamu te. Mpo na nini? Mpo bazangi mbongo ya kosomba bilei to mabele ya kosala bilanga. Mbongo oyo bato koleka miliare moko bazalaka na yango mpo na kobikela mokolo mobimba ekoki ata dolare moko te. Ebongiseli ya ONU oyo etalaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) elobi ete bamilio ya bana bakufaka mbula na mbula, mingimingi mpo balyaka malamu te.
8, 9. Nini emonisi ete bisakweli ya Yesu oyo elobeli koningana ya mabele mpe maladi ekokisami?
8 Koningana ya mabele. Yesu asakolaki ete: “Mabele ekoningana makasi na bisika ndenge na ndenge.” (Luka 21:11) Lelo oyo, mbula nyonso mabele eninganaka makasi mpenza. Kobanda mobu 1900, koningana ya mabele esili koboma bato koleka milio mibale. Mpe atako ezali lelo na bamasini, oyo kala ezalaki te, oyo ezali kosalisa bato báyeba ete mabele ekoningana liboso kutu esalema, bato mingi bazali kaka kokufa.
9 Maladi. Yesu asakolaki ete “bamaladi mabe” ekozala. Bamaladi ya mabe esengelaki kopalangana nokinoki mpe koboma bato mingi. (Luka 21:11) Atako minganga bayekoli ndenge ya kosalisa bamaladi ebele, bamaladi mingi ezwi naino nkisi te. Kutu, lapolo moko emonisi ete mbula na mbula, maladi ya ntolo, malaria, kolera ezali koboma ebele mpenza ya bato. Esuki kaka wana te; minganga bamoni bamaladi ya sika 30, mpe mosusu kati na yango ezali na nkisi te.
BIZALELI YA BATO NA MIKOLO YA NSUKA
10. Ndenge nini 2 Timote 3:1-5 ezali kokokisama lelo?
10 Na 2 Timote 3:1-5, Biblia elobi: “Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” Ntoma Paulo amonisaki bizaleli oyo bato mingi bakozala na yango na mikolo ya nsuka. Alobaki ete bakozala
bato oyo bamilingaka
bato balingá mbongo
bato oyo batosaka baboti te
bato oyo bazangi bosembo
bato oyo balinganaka te na kati ya libota
bato oyo bazangi komipekisa
bato ya nkanda mpe ya mobulu
bato oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe
bato oyo balobaka ete balingaka Nzambe kasi baboyaka kotosa ye
11. Ndenge Nzembo 92:7 elobi, nini ekokómela bato mabe?
11 Omonaka bato na bizaleli ya ndenge wana na esika ofandi? Bato mingi na mokili mobimba bamonaka yango. Kasi etikali moke Nzambe asilisa likambo yango. Alaki ete: “Ntango bato mabe bazali kobima lokola matiti mpe bato nyonso oyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi bazali kokola, ezali mpo básila nyɛɛ [to bábomama] libela.”—Nzembo 92:7.
NSANGO MALAMU NA MIKOLO YA NSUKA
12, 13. Makambo nini Yehova ateyi biso na mikolo oyo ya nsuka?
12 Biblia esakolaki ete na mikolo ya nsuka, mokili ekotonda na bampasi mpe minyoko. Kasi, Biblia elobi lisusu ete makambo ya malamu mpe ekosalema.
13 Koyeba Biblia. Mosakoli Danyele mpe alobelaki mikolo ya nsuka. Akomaki boye: “Boyebi ya sikisiki ekokóma mingi.” (Danyele 12:4) Nzambe asengelaki kopesa basaleli na ye mayele ya koyeba Biblia malamu koleka liboso. Yehova azali kosala bongo, mingimingi banda 1914. Na ndakisa, ateyi biso ntina ya nkombo na ye mpe mokano na ye mpo na mabele, solo na oyo etali lisiko, bakufi mpe lisekwa. Toyekoli ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kosilisa mikakatano nyonso ya bato. Toyekoli mpe ndenge ya kozala na esengo mpe ya kozala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe. Kasi, basaleli ya Nzambe basalaka nini na makambo oyo bayekoli? Esakweli mosusu epesi eyano.—Talá Etanda 21 mpe 25.
14. Nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama wapi, mpe banani bazali kosakola yango?
14 Mosala ya kosakola na mokili mobimba. Ntango Yesu azalaki kolobela mikolo ya nsuka, alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi.” (Matai 24:3, 14) Nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama na mikili koleka 230 mpe na minɔkɔ koleka 700. Ya solo, na mabele mobimba, Batatoli ya Yehova ya ‘bikólo nyonso mpe ya mabota nyonso’ bazali kosalisa bato báyeba Bokonzi ya Nzambe mpe makambo oyo Bokonzi yango ekosalela bato. (Emoniseli 7:9) Mpe basalaka yango ofele. Ata soki bato mingi bayinaka bango mpe banyokolaka bango ndenge Yesu asakolaki, eloko moko te ekoki kopekisa mosala ya kosakola.—Luka 21:17.
OKOSALA NINI?
15. (a) Ondimi ete tozali na mikolo ya nsuka? Mpo na nini? (b) Nini ekokómela bato oyo batosaka Yehova mpe baoyo batosaka ye te?
15 Ondimi ete tozali na mikolo ya nsuka? Bisakweli mingi ya Biblia oyo elobeli mikolo ya nsuka ezali kokokisama. Etikali moke Yehova asukisa mosala ya kosakola nsango malamu, mpe “nsuka” eya. (Matai 24:14) Nsuka ezali nini? Ezali Armagedone, ntango Nzambe akolongola mabe nyonso. Yehova akosalela Yesu mpe baanzelu na ye ya nguya mpo na koboma moto nyonso oyo aboyi kotosa Ye mpe Mwana na ye. (2 Batesaloniki 1:6-9) Nsima na yango, Satana ná bademo na ye bakokosa lisusu bato te. Mpe baoyo nyonso balingi kotosa Nzambe mpe kondima Bokonzi na ye bakomona ndenge bilaka nyonso ya Nzambe ekokokisama.—Emoniseli 20:1-3; 21:3-5.
16. Lokola nsuka ekómi pene, osengeli kosala nini?
16 Etikali moke mokili oyo ya Satana esuka. Yango wana, ezali na ntina mingi tómituna: ‘Nasengeli kosala nini?’ Yehova alingi osala nyonso mpo oyeba makambo mingi ya Biblia. Osengeli kozwa boyekoli na yo na lisɛki te. (Yoane 17:3) Batatoli ya Yehova basalaka makita pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kosalisa bato báyeba Biblia. Salá makasi okendaka na makita yango pɔsɔ nyonso. (Tángá Baebre 10:24, 25.) Soki omoni ete osengeli kobongisa makambo na bomoi na yo, salá yango. Soki osali bongo, yo ná Yehova bokokóma baninga makasi mpenza.—Yakobo 4:8.
17. Mpo na nini bato mingi bakosutuka ntango nsuka ekoya?
17 Ntoma Paulo alobaki ete bato mabe bakobomama na ntango oyo bato mingi bazali kokanisa te, kobomama yango ekoya “lokola moyibi na butu.” (1 Batesaloniki 5:2) Yesu asakolaki ete bato mingi bakoboya kondima ete tozali na mikolo ya nsuka. Alobaki: “Ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, kozala ya Mwana ya moto [to mikolo ya nsuka] ekozala mpe bongo. Mpo ndenge bazalaki na mikolo oyo ezalaki liboso ya mpela: bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.”—Matai 24:37-39.
18. Likebisi nini Yesu apesaki biso?
18 Yesu akebisaki biso ete tólekisa ndelo te “na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi.” Alobaki ete nsuka ekoya mbalakaka, “lokola motambo.” Alobaki mpe ete “ekoyela bato nyonso oyo bafandi na mabele mobimba.” Na nsima abakisaki: “Yango wana, bólala mpɔngi te, bópesa malɔmbɔ [to bóbondela na motema mobimba] ntango nyonso mpo bókoka kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kosalema, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.” (Luka 21:34-36) Mpo na nini ezali na ntina mingi kotosa likebisi ya Yesu? Mpo etikali moke mokili mabe ya Satana ebomama. Kaka bato oyo Yehova ná Yesu bandimi nde bakobika mpe bakozala na bomoi libela na libela na mokili ya sika.—Yoane 3:16; 2 Petro 3:13.