Ndenge ekomamá na Marko
6 Alongwaki kuna mpe akendaki na mboka na ye mpenza,+ mpe bayekoli na ye balandaki ye. 2 Ntango Sabata ekómaki, abandaki koteya na sinagoga. Bato mingi oyo bazalaki koyoka ye bakamwaki mpe balobaki: “Moto oyo azwi makambo oyo epai wapi?+ Mpo na nini bwanya ya boye epesami epai na ye, mpe mpo na nini makamwisi* oyo ezali kosalema na mabɔkɔ na ye?+ 3 Oyo mosali-mabaya te,+ mwana ya Maria,+ mpe ndeko ya Yakobo,+ Yozefe, Yudasi, mpe Simo,+ boye te? Mpe bandeko na ye ya basi bazali awa elongo na biso te?” Bongo babɛtaki libaku mpo na ye.* 4 Kasi Yesu alobaki na bango: “Bapesaka mosakoli lokumu bipai nyonso, longola kaka na mboka na ye, na libota na ye mpe na ndako na ye moko.”+ 5 Bongo akokaki te kosala makamwisi kuna, longola kaka kotya mabɔkɔ likoló ya mwa ndambo ya bato oyo bazalaki na maladi mpe kobikisa bango. 6 Ya solo, akamwaki makasi na ndenge bazangaki kondima. Mpe akendaki epai na epai na bamboka ya zingazinga, mpo na koteya.+
7 Nzokande, abengaki bantoma zomi na mibale, mpe abandaki kotinda bango mibalemibale,+ mpe apesaki bango bokonzi ya kobimisa bilimo ya mbindo.+ 8 Apesaki bango mpe mitindo ete bámema eloko te mpo na mobembo, longola kaka lingenda—limpa te, saki ya bilei te, mpe mbongo* te na kati ya mikaba na bango.+ 9 Ayebisaki bango mpe bálata basandale, kasi bámema elamba mosusu te.* 10 Alobaki na bango lisusu boye: “Esika nyonso oyo bokokɔta na ndako moko, bófanda wana tii bokolongwa na esika yango.+ 11 Mpe epai nyonso oyo bakoyamba bino te to bakoyoka bino te, ntango bozali kobima na esika yango, bópupola putulu ya mabele oyo ezali na nse ya makolo na bino mpo yango ezala litatoli mpo na bango.”+ 12 Bongo bakendaki mpe basakwelaki bato ete bábongola mitema,+ 13 babimisaki bademo+ mingi mpe bapakolaki bato mingi ya maladi mafuta mpe babikisaki bango.
14 Nzokande, Mokonzi Erode ayokaki makambo yango, mpo nkombo ya Yesu ekómaki koyebana mingi, mpe bato bazalaki koloba: “Yoane Mobatisi oyo akufaki alamuki na liwa,* yango wana azali kosala makamwisi.”+ 15 Kasi basusu bazalaki koloba: “Ezali Eliya.” Basusu mpe bazalaki koloba: “Azali mosakoli lokola moko ya basakoli ya kala.”+ 16 Kasi ntango Erode ayokaki yango, alobaki: “Yoane oyo nakataki motó, ye wana nde alamuki.” 17 Erode ye moko atindaki bákanga Yoane, atyaki ye minyɔlɔlɔ mpe abwakaki ye na bolɔkɔ mpo na Erodiadi, mwasi ya ndeko na ye Filipe, mpamba te Herode abalaki ye.+ 18 Mpo Yoane azalaki koloba na Erode: “Ozali na ndingisa te ya kozwa mwasi ya ndeko na yo.”+ 19 Na yango Erodiadi akangelaki Yoane nkanda mpe alukaki koboma ye, kasi akokaki te. 20 Mpo Erode azalaki kobanga Yoane; ayebaki ete azali moto ya sembo mpe mosantu,+ mpe azalaki kobatela ye. Mbala nyonso oyo azalaki koyoka Yoane, azalaki koyeba te asala nini, atako bongo, azalaki kaka koyoka ye na esengo.
21 Kasi mokolo moko, libaku emonanaki ntango Erode abongisaki bilei ya mpokwa na mokolo ya mbotama+ na ye mpo na basaleli na ye minene mpe bakomanda ya basoda mpe bato minene ya Galile.+ 22 Mwana mwasi ya Erodiadi akɔtaki mpe abinaki mpe asepelisaki Erode ná baoyo bazalaki kolya* elongo na ye. Mokonzi alobaki na elenge mwasi yango: “Sɛngá ngai eloko nyonso oyo olingi, mpe nakopesa yo yango.” 23 Alapelaki ye ndai ete: “Eloko nyonso oyo okosɛnga ngai, nakopesa yo yango, ata bokonzi na ngai kabolá na mibale.” 24 Bongo abimaki mpe alobaki na mama na ye: “Nasɛnga nini?” Mama na ye ayanolaki: “Motó ya Yoane Mobatisi.” 25 Mbala moko akɔtaki mbangu epai ya mokonzi mpe asɛngaki ye, alobi: “Nalingi opesa ngai sikoyo na saani, motó ya Yoane Mobatisi.”+ 26 Atako mokonzi ayokaki mawa mingi, alingaki te koboya kopesa ye eloko oyo asɛngaki, mpo na bandai oyo alapaki mpe mpo na bapaya na ye.* 27 Bongo mokonzi atindaki nokinoki soda-mokɛngɛli moko mpe apesaki ye mitindo ete amema motó ya Yoane. Akendaki mpe akataki Yoane motó na bolɔkɔ 28 mpe amemaki motó na ye na saani. Apesaki yango elenge mwasi, mpe elenge mwasi apesaki yango mama na ye. 29 Ntango bayekoli na ye bayokaki yango, bayaki kozwa ebembe na ye mpe batyaki yango na lilita* moko.
30 Bantoma bayanganaki zingazinga ya Yesu mpe bayebisaki ye makambo nyonso oyo basalaki mpe bateyaki.+ 31 Alobaki na bango: “Bóya, kaka bino moko, na esika oyo bato bazalaka te mpe bópema mwa moke.”+ Mpo bato mingi bazalaki koya mpe kokende, mpe bazwaki ata ntango ya kolya te. 32 Bongo bakendaki na masuwa na esika oyo bato bazalaka te, mpo bázala kaka bango moko.+ 33 Kasi bato bamonaki bango bazali kokende mpe mingi bayaki koyeba yango, mpe longwa na bingumba nyonso bakendaki mbangu kuna na makolo mpe bakómaki liboso na bango. 34 Ntango abimaki na masuwa, amonaki ebele mpenza ya bato, mpe ayokelaki bango mawa,+ mpo bazalaki lokola bampate oyo ezangi mobateli.+ Bongo abandaki koteya bango makambo mingi.+
35 Lokola ngonga epusanaki, bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe balobaki: “Na esika oyo bato bazalaka te, mpe ngonga esili kopusana.+ 36 Yebisá bango bázonga, mpo bákende na bisika oyo bato basalaka bilanga mpe na bamboka ya zingazinga mpe básomba eloko ya kolya.”+ 37 Azongiselaki bango: “Bino moko bópesa bango eloko ya kolya.” Kasi bango balobaki na ye: “Tosengeli nde kokende kosomba mampa ya denari* 200 mpe kopesa yango bato mpo bálya?”+ 38 Alobaki na bango: “Bozali na mampa boni? Bókende naino kotala!” Nsima ya kotala, balobaki na ye: “Mampa mitano, ná mbisi mibale.”+ 39 Na nsima, asɛngaki bato nyonso báfanda bituluku bituluku na matiti ya mobesu.+ 40 Mpe bafandaki na bituluku ya bato 100 mpe ya bato 50. 41 Bongo azwaki mampa yango mitano ná mbisi yango mibale, atalaki na likoló mpe abondelaki mpo na kosɛnga lipamboli.+ Na nsima abukaki mampa yango mpe abandaki kopesa yango bayekoli, mpo bákabolela yango bato; akabolaki mpe mbisi yango mibale mpo na bato nyonso. 42 Bongo bango nyonso balyaki mpe batondaki, 43 mpe basangisaki biteni ya mampa, etondisaki kitunga 12, kozanga kotánga mbisi.+ 44 Baoyo balyaki mampa yango bazalaki mibali 5 000.
45 Na nsima, kozanga koumela, asɛngaki bayekoli na ye bámata na masuwa mpe bákatisa na ngámbo mosusu ya Betesaida liboso na ye, wana ye moko azalaki kozongisa ebele yango ya bato.+ 46 Kasi nsima ya kokabwana na bango, akendaki na ngomba moko mpo na kobondela.+ 47 Ntango mpokwa ekómaki, masuwa ezalaki na katikati ya mbu, kasi azalaki kaka ye moko na mokili.+ 48 Ntango amonaki bango bazali kobundabunda mpo na kolúka, mpo mopɛpɛ ezalaki kobɛta bango, pene na eleko ya minei ya kokɛngɛla na butu* ayaki epai na bango, azali kotambola likoló ya mai ya mbu; kasi asalaki lokola alingi* koleka bango. 49 Ntango bamonaki ye azali kotambola likoló ya mai ya mbu, bakanisaki: “Ezali emonamona!” Mpe bagangaki makasi. 50 Mpo bango nyonso bamonaki ye mpe babulunganaki. Kasi na mbala moko alobaki na bango: “Bózala na mpiko! Ezali ngai; bóbanga te.”+ 51 Bongo amataki na masuwa elongo na bango, mpe mopɛpɛ ekitaki. Na yango, bakamwaki mingi mpenza, 52 mpo lokola bakangaki ntina ya likamwisi ya mampa te, mitema na bango ezalaki mpenza kososola te.
53 Ntango bakatisaki mai mpe bakómaki na mokili, bakómaki na Genezarete mpe batɛlɛmisaki masuwa pene na esika yango.+ 54 Kasi ntango kaka babimaki na masuwa, bato bayebaki Yesu. 55 Bongo bakimaki mbangu koyebisa bato ya etúká wana mobimba. Mpe babandaki komema na matɔkɔ baoyo nyonso bazalaki kobɛla mpe kokende na bango epai bayokaki ete azali. 56 Epai nyonso azalaki kokɔta, na bamboka, na bingumba to na bamboka ya bilanga, bazalaki kotya bato ya maladi na bazando, mpe bazalaki kobondela ye atika bango básimba ata nsɔngɛ ya elamba na ye ya likoló.+ Mpe baoyo nyonso basimbaki yango babikaki.