Mokapo ya motoba
Tókanga ntina ya libombami ya nzete monene
1. Nini ekómelaki Mokonzi Nebukadanesala, mpe yango ebimisaki mituna nini?
YEHOVA atikaki Mokonzi Nebukadanesala ayangela mokili mobimba. Lokola azalaki mokonzi ya Babilone, azalaki na bozwi mingi, na bilei mingi, azalaki na ndako monene—na biloko nyonso oyo azalaki na yango mposa. Kasi na mbala moko akómaki moto mpamba. Mokonzi Nebukadanesala abɛlaki ligboma, akómaki lokola nyama! Lokola asengelaki kolya lisusu na mesa te mpe kolala na ndako na ye ya bokonzi te, akómaki kofanda na zamba mpe kolya matiti lokola ngɔmbɛ. Nini esalaki ete akóma na mpasi bongo? Mpe ntina nini tosengeli kotalela likambo yango?—Kokanisá na Yobo 12:17-19; Mosakoli 6:1, 2.
MOKONZI AKUMISI OYO-ALEKI-LIKOLÓ
2, 3. Makambo nini mokonzi ya Babilone alingaki ete bato na ye báyeba, mpe ndenge nini atalelaki Nzambe Oyo-Aleki-Likoló?
2 Ntango ligboma na ye esilaki, Nebukadanesala ayebisaki bato nyonso oyo bazalaki na nse ya boyangeli na ye makambo nyonso ya nsɔmɔ oyo akutanaki na yango. Elimo ya Yehova epusaki mosakoli Danyele akoma makambo yango nyonso na bosembo mpenza. Talá maloba na yango ya ebandeli: “Ngai Nebukadanesala epai na mabota mpe mikili mpe nkota nyonso, bafandi na mokili mobimba. Kimya efuluka na bino! Nakanisi malamu komonisa bilembo mpe bikamwiseli oyo Nzambe Aleki-Likoló [amonisi, NW] ngai. Bilembo na ye bizali minene, bikamwiseli na ye na nguya! Bokonzi na ye ezali bokonzi na lobiko na lobiko, mpe bokonzi na ye ezali na libota kino libota.”—Danyele 4:1-3.
3 Nebukadanesala azalaki koyangela bato nyonso oyo bazalaki ‘kofanda na mokili mobimba’ na ntango wana. Mpo na Nzambe ya Danyele, mokonzi alobaki ete: “Bokonzi na ye ezali bokonzi [ya] lobiko na lobiko.” Na maloba wana, Yehova azwaki mpenza lokumu na bokonzi ya Babilone! Mpe ezali mbala ya mibale mpo Nebukadanesala aloba ete bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekoumela seko, mpe ekotikala “lobiko na lobiko.”—Danyele 2:44.
4. Ndenge nini “bilembo mpe bikamwiseli ya nguya” ya Yehova ebandaki epai na Nebukadanesala?
4 “Bilembo” nini “Nzambe Oyo Aleki-Likoló” asalaki? Ezalaki libosoliboso makambo oyo masalemaki na bomoi ya Nebukadanesala ye moko: “Ngai, Nebukadanesala, nazalaki na kimya na ndako na ngai, mpe nazalaki na esengo na ndako na ngai. Nalɔtaki [ndɔtɔ] oyo ebangisaki ngai; mpe makanisi na ngai na mbeto mpe bimonaneli [ya motó, NW] na ngai etungisaki ngai.” (Danyele 4:4, 5) Mokonzi ya Babilone asalaki nini mpo na ndɔtɔ yango ya nsɔmɔ?
5. Ndenge nini Nebukadanesala atalelaki Danyele, mpe mpo na nini?
5 Nebukadanesala abéngaki bato ya mayele ya Babilone mpe ayebisaki bango ndɔtɔ na ye. Oyo nde nsɔni! Bakokaki kolimbolela ye ndɔtɔ yango te. Tókoba na lisolo: “Na nsima Danyele akɔtaki liboso na ngai, ye oyo atángamaki Beletesasala nsima na nkombo na nzambe na ngai, ye oyo [elimo na banzambe na bulɛɛ ezali, NW] na kati na ye, mpe nalobelaki ye [ndɔtɔ] ete.” (Danyele 4:6-8) Nkombo oyo bazalaki kobénga Danyele na esika ya mosala ezalaki Beletesasala, mpe nzambe ya lokuta oyo mokonzi azalaki kobénga ete “nzambe na ngai” ekokaki kozala ntango mosusu Bel to Nebo to Maladuku. Lokola azalaki kosambela banzambe mingi, Nebukadanesala amonaki ete “elimo na banzambe na bulɛɛ” ezalaki likoló na Danyele. Mpe lokola Danyele azalaki mokonzi ya bato nyonso ya mayele na Babilone, mokonzi azalaki kokanisa ete Danyele azalaki “mokóló na banganga-nkisi.” (Danyele 2:48; 4:9; kokanisá na Danyele 1:20.) Ezali solo ete Danyele, moto ya sembo, atikaki losambo ya Yehova te mpo na kosala nkisi to maji.—Levitike 19:26; Deteronome 18:10-12.
NZETE MOKO MONENE
6, 7. Makambo nini Nebukadanesala amonaki na ndɔtɔ?
6 Makambo nini ya nsɔmɔ mokonzi ya Babilone alɔtaki na ndɔtɔ? “Bimononeli [ya motó, NW] na ngai, wana elalaki ngai na mbeto, bizalaki boye: Namonaki, mpe talá, nzete na katikati ya mokili, mpe bosanda na yango ezalaki [likoló mpenza, NW]. Nzete yango ekolaki mpe ekómaki makasi, mpe nsɔngɛ na yango ekómaki na lola, mpe emonanaki kino nsuka na mokili mobimba. Nkasa na yango ezalaki kitoko mpe mbuma na yango ezalaki mingi, mpe kolya ezalaki mpo na bato mpe banyama nyonso. Banyama nyonso na bilanga bazwaki [malili] na nse na yango, mpe bandɛkɛ na likoló bafandaki na bitape na yango, mpe mosuni nyonso mozwaki kolya na yango.” (Danyele 4:10-12) Balobaka ete Nebukadanesala azalaki kolinga nzete minene: bilɛzɛ ya Lebanona (cèdres du Liban). Akendaki kotala yango, mpe amemaki mwa biteni na yango na Babilone. Kasi nzete oyo ye amonaki na ndɔtɔ amoná yango naino te. Nzete yango ezalaki “na katikati ya mokili” mpe ezalaki komonana bipai nyonso na mabelé mobimba. Mpe ezalaki kobota mbuma mingi mpo na koleisa bikelamu nyonso ya bomoi.
7 Nebukadanesala amonaki mpe makambo mosusu ya nsɔmɔ na ndɔtɔ na ye: “Namonaki na bimonaneli [ya motó, NW] na ngai na mbeto na ngai, mpe talá, mokɛngɛli na bulɛɛ akitaki na lola. Angangaki makasi mpe alobaki ete, Katá nzete yango, mpe katá bitape na yango, mpe longolá nkasa na yango, mpe panzá mbuma na yango; tiká banyama bálongwa na nse na yango, mpe bandɛkɛ na bitape na yango. Tiká nde ekumu na ntina na kati na mabelé, ekangama na nkamba na ebende mpe motako, na kati na matiti mobesu na elanga. Tiká apɔla na mamwɛ na likoló, mpe tiká [alya matiti elongo] na banyama na mokili.”—Danyele 4:13-15.
8. “Mokɛngɛli” ezalaki nani?
8 Bato ya Babilone bazalaki na bindimeli na bango mpo na bilimu ya malamu mpe ya mabe. Kasi “mokɛngɛli” yango oyo autaki na likoló ezalaki nani? Lokola babéngaki ye “bulɛɛ,” ezalaki bongo anzelu moko ya sembo, momonisi ya Nzambe. (Kokanisá na Nzembo 103:20, 21.) Kanisá naino mituna oyo Nebukadanesala asengelaki komituna! Mpo na nini bakataki nzete yango? Mpo na nini bakangaki ekumu na yango na nkamba ya bibende mpe ya motako ete ebima lisusu te? Mpe ekumu ya nzete mpamba ezalaki mpenza na ntina nini?
9. Mokɛngɛli alobaki mpenza nini, mpe yango ebimisaki mituna nini?
9 Nebukadanesala akamwaki mingi lisusu ntango mokɛngɛli abakisaki: “Tiká motema na ye ebongwana na motema na moto, mpe tiká motema na nyama epesama na ye. Tiká mpe ete ntango nsambo ileka na likoló na ye. Likambo oyo ezali mpo na lilako na bakɛngɛli, mpe ekateli oyo ezali mpo na monɔkɔ na baoyo na bulɛɛ, na ntina ete bato na bomoi báyeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali mokonzi na bokonzi ya bato, mpe apesi yango na [oyo ye alingi], mpe atii na likoló na yango moto oyo [aleki bato nyonso na komikitisa, NW].” (Danyele 4:16, 17) Ekumu ya nzete ezalaka na motema lokola motema ya moto te. Na bongo, ndenge nini bakoki kopesa yango motema ya nyama? “Ntango nsambo” ezali nini? Mpe boyokani nini ezali kati na makambo nyonso wana mpe likambo ya koyangela “bokonzi ya bato”? Nebukadanesala azalaki mpenza na mposa ya kozwa biyano na mituna nyonso wana.
NSANGO YA MABE MPO NA MOKONZI
10. (a) Na Biblia, nzete ekoki kozala elilingi ya nini? (b) Nzete monene ezalaki elilingi ya nini?
10 Nsima ya koyoka ndɔtɔ yango, Danyele akamwaki mwa moke mpe ayokaki nsɔmɔ. Lokola Nebukadanesala alingaki kaka koyeba ndimbola ya ndɔtɔ yango, mosakoli Danyele alobaki ete: “Nkolo na ngai, tiká [ndɔtɔ] ezala mpo na bayini na yo mpe ntina na yango mpo na batɛmɛli na yo! Nzete emonaki yo, oyo ekolaki mpe ekómaki makasi . . . , ezali yo, ɛ mokonzi. Okoli mpe okómi monene. Lokumu na yo ekoli mpe ekómi na lola, mpe bokonzi na yo ekómi na nsuka na mokili.” (Danyele 4:18-22) Na Makomami, liloba nzete ekoki kosalelama mpo na kolobela bato, bayangeli mpe bikonzi. (Nzembo 1:3; Yilimia 17:7, 8; Ezekiele, mokapo 31) Bobele lokola nzete monene oyo ye amonaki na ndɔtɔ, Nebukadanesala ‘akolaki mpe akómaki monene’ mpamba te azalaki koyangela mokili mobimba. Kasi nzete monene ezalaki elilingi ya ‘bokonzi na ye oyo ekómaki kino nsuka ya mokili,’ mpe elilingi ya bokonzi nyonso ya bato. Ezalaki bongo elakiseli ya bokonzi ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba, mingi mpenza elakiseli ya bokonzi yango awa na mabelé.—Danyele 4:17.
11. Ndenge nini ndɔtɔ ya Nebukadanesala emonisaki ete bomoi na ye ekobeba?
11 Kasi makambo masengelaki kobongwana na ndenge ya mabe mpenza mpo na Nebukadanesala. Danyele alobaki boye: “Mokonzi amonaki mokɛngɛli na bulɛɛ kokita na lola mpe koloba ete, Katá nzete mpe bebisá yango, nde tiká ekumu na ntina na yango na kati na mabelé, ekangami na nkamba na ebende mpe na motako, na kati na matiti mobesu na elanga; mpe tiká apɔla na mamwɛ na likoló, mpe tiká afanda na banyama na mokili kino ntango nsambo ileki likoló na ye. Ɛ mokonzi, oyo ezali ntina na yango, mpe ezali lilako na Oyo-Aleki-Likoló likweli nkolo na ngai mokonzi.” (Danyele 4:23, 24) Ya solo, esengelaki mpenza kozala na mpiko mpo na koyebisa mokonzi monene nsango motindo wana!
12. Nini esengelaki kokómela Nebukadanesala?
12 Nini elingaki kokómela Nebukadanesala? Kanisá naino ndenge amiyokaki ntango Danyele alandaki koloba: “Okobimisama na kati na bato mpe kofanda na yo ekozala na banyama na mokili; mpe okoleisama matiti lokola ngɔmbɛ, mpe okopɔla na mamwɛ na likoló, mpe ntango nsambo ikoleka likoló na yo, kino ekoyeba yo ete Oyo-Aleki-Likoló azali mokonzi ya bokonzi na bato mpe akopesa yango na [oyo ye alingi].” (Danyele 4:25) Ata bakonzi ya Leta kati na bokonzi ya Nebukadanesala ‘bakobengana ye mosika na bato.’ Bongo bakɛngɛli na mpate ya motema malamu bakobatela ye? Te, mpo Nzambe asilaki koloba ete Nebukadanesala akofanda esika moko na “banyama na mokili” mpe akolya matiti.
13. Ndenge nini ndɔtɔ ya nzete emonisaki makambo oyo Nebukadanesala akokutana na yango na boyangeli na ye?
13 Bobele lokola nzete ekatamaki, Nebukadanesala mpe asengelaki kolongwa na bokonzi. Asengelaki kotika koyangela mokili, kasi bobele mpo na mwa ntango moke. Danyele alimbolaki ete: “Lokola elakelami ete ekumu na ntina na nzete etikala, boye bokonzi na yo ekotikala mpo na yo longwa na ntango eyebi yo ete [makoló ezali koyangela, NW].” (Danyele 4:26) Na ndɔtɔ ya Nebukadanesala, ekumu ya nzete etikalaki, atako bakangaki yango na nkamba mpo nzete ebima lisusu te. Ndenge moko, “ekumu” esengelaki kotikala mpo na kolakisa ete bokonzi ya Nebukadanesala ezalaki naino, atako esengelaki kokanga yango na nkamba mpo ekola te na boumeli ya “ntango nsambo.” Boyangeli na ye na mokili mobimba ekozala lokola ekumu ya nzete oyo bakangi na nkamba. Ekotikala bongo kino ntango nsambo ekoleka. Yehova asalaki nyonso ete moto moko te akitana Nebukadanesala na bokonzi ya Babilone; atako mwana na ye ya mobali, Ewili-maladuku, azalaki kotambwisa mboka na ntango yango.
14. Danyele alendisaki Nebukadanesala ete asala nini?
14 Nsima ya koyebisa Nebukadanesala makambo oyo masengelaki kokómela ye, Danyele alobaki na mpiko nyonso ete: “Yango wana, tiká toli na ngai ebonga na miso na yo. Longolá masumu na yo na nzela na [kosaláká, NW] boyengebene, mpe mabe na yo na [koyokeláká, NW] babola mawa, soko kimya na yo ekoumela naino.” (Danyele 4:27) Soki Nebukadanesala atiki masumu na ye, atiki konyokola bato mpe lolendo, ntango mosusu makambo na ye makobonga. Soko mbula nkama mibale liboso, Yehova akanaki kobebisa bato ya Ninive, mboka-mokonzi ya Asulia, kasi asalaki yango te mpo mokonzi ya engumba yango mpe bato na ye babongolaki motema. (Yona 3:4, 10; Luka 11:32) Ekozala boni mpo na Nebukadanesala, mokonzi ya lolendo? Akobongola bizaleli na ye?
KOKOKISAMA YA LIBOSO YA NDƆTƆ YANGO
15. (a) Ezaleli nini Nebukadanesala atikaki te? (b) Mikanda mosusu emonisaki nini mpo na misala ya Nebukadanesala?
15 Nebukadanesala atikaki ezaleli na ye ya lolendo te. Mbula moko nsima ya kolɔta ndɔtɔ ya nzete, ntango azalaki kotambola likoló ya ndako na ye, amikumisaki ete: “Oyo ezali [Babilone] monene te, oyo esili ngai kotonga mpo na esika na kofanda na mokonzi, na makasi na nguya na ngai mpe mpo na nkembo na lokumu na ngai?” (Danyele 4:28-30) Nimilode azalaki moto ya liboso oyo abandaki kotonga engumba ya Babilone (Babele), kasi Nebukadanesala akómisaki yango mboka kitoko mpenza. (Genese 10:8-10) Kati na moko na mikanda oyo milobeli ye, oyo ekomamaki na ekomeli ya cunéiforme, Nebukadanesala amikumisaki ete: “Ngai Nebukadanesala, Mokonzi ya Babilone, mobongisi ya Esagila mpe Ezida, mwana ya Nabopolosala. . . . Nakembisi bifelo ya Esagila mpe ya Babilone mpe nafandisi bokonzi na ngai libela na libela.” (Buku Archaelogy and the Bible, ekomami na George A. Barton, 1949, nkasa 478 mpe 479) Makomi mosusu elobeli tempelo 20 oyo ye abongisaki to atongaki lisusu. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete: “Na boyangeli ya Nebukadanesala, Babilone ekómaki moko na bingumba ya kitoko mpenza na mokili na ntango ya kala. Na mikanda na ye moko, Nebukadanesala azalaki kolobela mingi mpenza mayele na ye ya bitumba te kasi nde myango na ye mpo na kotonga mboka mpe limemya oyo ye azalaki kopesa banzambe ya Babilone. Na ntembe te, Nebukadanesala asalaki bilanga ya fololo, banzete mpe bazamba kitoko (Les jardins suspendus de Babylone), oyo ezalaki moko na makambo nsambo ya kitoko mpe ya kokamwa na ntango ya kala.”
16. Ndenge nini Nebukadanesala akitisamaki?
16 Atako Nebukadanesala amikumisaki kasi eumelaki te mpo akóma moto mpamba. Lisolo oyo lipemami elobi boye: “Wana [ezalaki] maloba yango naino na monɔkɔ na mokonzi, mongongo ebimaki na likoló ete, Ɛ mokonzi Nebukadanesala, elobami na yo ete, Bokonzi esili kolongwa na yo. Okobimisama na kati na bato, mpe efandelo na yo ekozala esika moko na banyama na mokili; okoleisama matiti lokola ngɔmbɛ, mpe ntango nsambo ikoleka na likoló na yo, kino ekoyeba yo ete Oyo-Aleki-Likoló azali mokonzi na bokonzi na bato mpe akopesa yango na [oyo ye alingi].”—Danyele 4:31, 32.
17. Nini ekómelaki Nebukadanesala, moto na lolendo, mpe amikɔtisaki na mikakatano nini?
17 Na mbala moko Nebukadanesala abɛlaki ligboma. Lokola babenganaki ye mosika na bato, abandaki kolya matiti “lokola ngɔmbɛ.” Awa akómaki kofanda esika moko na banyama ya zamba, na ntembe te Nebukadanesala azalaki na bomoi moko ya mpasi mpenza. Lelo, na mboka Irak, na esika oyo engumba ya Babilone ezalaki, molunge ekómaka kino na degre Celsius 50 (50°C) na ntango ya moi makasi. Mpe na ntango ya mpio, malili ekómisaka mai mabanga. Lokola azalaki kofanda na esika ya molunge makasi na ntango ya moi mpe ya malili makasi na ntango ya mpio, nsuki na ye ekómaki milai lokola nsala ya mpongo mpe manzaka na ye ya mabɔkɔ mpe ya makolo ekómaki milai lokola manzaka ya ndɛkɛ. (Danyele 4:33) Oyo nde nsɔni mpo na mokonzi yango oyo azalaki na lolendo!
18. Na boumeli ya ntango nsambo, nini ekómelaki bokonzi ya Babilone?
18 Na ndɔtɔ oyo Nebukadanesala alɔtaki, bakataki nzete monene mpe bakangisaki ekumu na yango na nkamba mpo nzete yango ebima te na boumeli ya ntango nsambo. Ndenge moko, Nebukadanesala “akitisamaki na kiti ya bokonzi na ye” ntango Yehova akómisaki ye moto ya ligboma. (Danyele 5:20) Yango esalaki ete motema ya mokonzi elongwa motema ya moto mpe ekóma motema ya ngɔmbɛ. Kasi Nzambe abombelaki Nebukadanesala kiti na ye ya bokonzi kino nsuka ya ntango nsambo. Elongo na Ewili-maladuku oyo azalaki kotambwisa boyangeli na ntango mokuse wana, Danyele atyamaki “mokóló na mokili mobimba na [Babilone], mpe mokonzi [ya bato nyonso ya mayele na Babilone].” Baninga na ye Baebele misato bazalaki kosala misala mosusu ya Leta na engumba yango. (Danyele 1:11-19; 2:48, 49; 3:30) Bilenge yango minei bakangami bazalaki kozela ete Nebukadanesala azongela nzoto kolɔngɔnɔ na kiti na ye ya bokonzi. Mpe ntango azongaki, Nebukadanesala ayebaki ete “Oyo-Aleki-Likoló azali mokonzi na bokonzi ya bato mpe akopesa yango na [oyo ye alingi].”
NEBUKADANESALA AZONGI NA BOKONZI
19. Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone, asosolaki nini nsima wana Yehova azongisaki nzoto na ye kolɔngɔnɔ?
19 Na nsuka ya ntango nsambo, Yehova azongisaki Nebukadanesala na nzoto kolɔngɔnɔ. Mpo na kokumisa Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, mokonzi alobaki boye: “Na nsuka ya mikolo yango ngai, Nebukadanesala, [natombolaki] miso na ngai na lola, mpe lisosoli na ngai [lizongelaki] ngai, mpe nasanzolaki Oyo-Aleki-Likoló, mpe nasanzolaki mpe nakumisaki oyo aumeli lobiko na lobiko; mpo ete bokonzi na ye ezali bokonzi na lobiko na lobiko, mpe bokonzi na ye eumeli na libota kino libota; bafandi nyonso ya mokili batángami mpamba; akosalaka lokola elingi ye kati na ebele na likoló mpe na kati na bafandi na mokili; mpe moto moko akoki kopekisa lobɔkɔ na ye te, to kolobela ye ete, Ozali kosala nini?” (Danyele 4:34, 35) Ɛɛ, Nebukadanesala asosolaki ete Oyo-Aleki-Likoló azali mpenza Mokonzi Moyangeli na bokonzi ya bato.
20, 21. (a) Ndenge nini kolongolama ya nkamba ya bibende oyo etyamaki na ekumu ya nzete oyo Nebukadanesala alɔtaki na ndɔtɔ ekokanaki na makambo oyo makómelaki ye? (b) Likambo nini Nebukadanesala andimaki, kasi atako bongo akómaki kosambela Yehova?
20 Ntango Nebukadanesala azongelaki kiti na ye ya bokonzi, ezalaki lokola balongoli nkamba ya bibende oyo bakangaki na yango ekumu ya nzete oyo ye amonaki na ndɔtɔ. Nebukadanesala alobaki mpo na kozongisama na ye na bokonzi ete: “Na ntango yango lisosoli na ngai [ezongelaki] ngai, mpe nkembo na bokonzi na ngai, mpe lokumu na ngai na nkembo na ngai [ezongelaki] ngai. [Bankumu ya bokonzi na ngai mpe bato ya lokumu, NW] balukaki ngai, mpe nalendisamaki na kati na bokonzi na ngai, mpe [babakiselaki ngai lokumu mosusu, NW].” (Danyele 4:36) Soki bakonzi batyolaki Nebukadanesala ntango abɛlaki ligboma, kasi sikawa bazalaki ‘kolukaluka’ ye mpo na kosalela ye.
21 Nzambe Oyo-Aleki-Likoló asalaki mpenza “bilembo mpe bikamwiseli”! Tokoki kokamwa te na maloba oyo mokonzi ya Babilone alobaki ntango azongisamaki na kiti ya bokonzi ete: “Sikawa ngai, Nebukadanesala, nasanzoli mpe [natomboli] mpe nakumisi Mokonzi na lola; mpo ete misala na ye nyonso mizali na boyengebene mpe nzela na ye izali sembo; mpe ye ayebi kokitisa baoyo [bazali kotambola] na lolendo.” (Danyele 4:2, 37) Ata akumisaki Nzambe ndenge wana, kasi Nebukadanesala akómaki kosambela Yehova te.
LONGOLA BIBLIA, BILEMBETELI MOSUSU BIZALI?
22. Bato mosusu bakokanisaki maladi ya ligboma oyo Nebukadanesala abɛlaki na maladi nini ya motó, kasi tosengeli mpenza kosimba likambo nini na oyo etali esika maladi na ye ya ligboma eutaki?
22 Bato mosusu balobaka ete maladi ya ligboma oyo Nebukadanesala abɛlaki ezali oyo babéngaka lycanthropie. Dikisionere moko ya minganga elobi boye: “LYCANTHROPIE . . . euti na nkombo [lukos], lupus, oyo elimboli mbwa ya zamba (loup); mpe nkombo [anthropos], homo, elimboli moto. Bapesaki nkombo yango na maladi oyo ekómisaka bato lokola banyama, na koloba mpe koganga. Mingimingi, bato yango bakanisaka ete bakómi mbwa to nyau; ntango mosusu ngɔmbɛ, lokola ezalaki Nebukadanesala.” (Dictionnaire des sciences médicales, par une société de médecins et de chirurgiens, Paris, 1818, Volimi 29, lokasa 246) Makambo oyo mamonanaka epai na moto oyo abɛli lycanthropie ekokani na makambo oyo mamonanaki epai ya Nebukadanesala. Nzokande, maladi ya ligboma oyo Nebukadanesala azalaki na yango ekoki koyebana mpenzampenza te to kokokanisama te na maladi moko ya ligboma oyo eyebani na ntango na biso, mpamba te maladi na ye ezalaki etumbu oyo eutaki na Nzambe.
23. Elembeteli mosusu nini tozali na yango mpo na kondima ete Nebukadanesala abɛlaki ligboma?
23 Nganga-mayele, John E. Goldingay, alobeli makambo mosusu na ntina na ligboma ya Nebukadanesala mpe ndenge azongisamaki na bokonzi na ye: “Mikanda mosusu oyo ezali ndambondambo, oyo ekomamaki na ekomeli ya cunéiforme elobeli ntango mosusu maladi ya bɔɔngɔ oyo Nebukadanesala abɛlaki, mpe ndenge basundolaki ye mpe babenganaki ye na Babilone.” Goldingay atángi mokanda moko oyo babéngaki “Yobo ya Babilone,” oyo “ezalaki kolobela etumbu ya Nzambe, maladi, kokitisama, koluka kolimbola ndɔtɔ moko ya nsɔmɔ, kokatama lokola nzete, kobwakama, kolya matiti, kozanga boyebi, kokóma lokola ngɔmbɛ, kosundolama na nzambe Maladuku, manzaka milaimilai, nsuki bosɔtɔ milaimilai, mpe moto oyo azongisami na bokonzi mpo na kokumisa nzambe.”
NTANGO NSAMBO ETALELI MPE BISO
24. (a) Nzete monene oyo Nebukadanesala alɔtaki na ndɔtɔ ezalaki elilingi ya nini? (b) Nini ekangisamaki na boumeli ya ntango nsambo, mpe ndenge nini yango esalemaki?
24 Bokonzi ya Nebukadanesala na mokili mobimba emonisamaki na nzete monene oyo ye alɔtaki na ndɔtɔ. Kasi tóbosana te ete nzete yango ezalaki mpenza elakiseli ya bokonzi oyo eleki bokonzi ya Babilone na monene. Ezalaki komonisa bokonzi ya Yehova, “Mokonzi na makóló,” na molɔ́ngɔ́ mobimba, kasi ezalaki mpenzampenza komonisa bokonzi ya Yehova awa na mabelé. Liboso ete basoda ya Babilone bákweisa engumba ya Yelusaleme, bokonzi oyo ezalaki na engumba yango ezalaki elakiseli ya bokonzi ya Yehova awa na mabelé. Bokonzi yango epesamaki epai na Davidi mpe bakitani na ye oyo bazalaki kofanda na “kiti ya [Yehova].” (1 Ntango 29:23) Ntango atikaki Nebukadanesala akweisa Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., Nzambe amonisaki lokola ete apesi nzela bákata bokonzi na ye awa na mabelé mpe bápekisa yango kokola na kokangáká yango na nkamba ya ebende. Bokonzi ya Nzambe awa na mabelé, oyo emonisamaki na bokonzi ya bakitani ya Davidi, ezalaki koyangela lisusu te na eleko yango ya ntango nsambo. Ntango nsambo yango eumelaki ntango boni? Ebandaki ntango nini, mpe likambo nini esalemaki mpenzampenza na nsuka na yango?
25, 26. (a) Mpo na Nebukadanesala, “ntango nsambo” eumelaki mbula boni, mpe mpo na nini olobi bongo? (b) Na kokokisama na yango ya monene, “ntango nsambo” ebandaki ntango nini mpe ndenge nini?
25 Ntango Nebukadanesala abɛlaki ligboma, “nsuki na ye ekolaki [milai] lokola nsala ya mpongo, mpe [manzaka] na ye ezalaki lokola [manzaka ya] ndɛkɛ.” (Danyele 4:33) Yango eumelaki mikolo nsambo to pɔsɔ nsambo te. Mabongoli mingi ya Biblia ebongoli yango “ntango nsambo” to “ntango (ya sikisiki) oyo ekanamaki” to “bileko ya ntango” (Danyele 4:16, 23, 25, 32) Libongoli moko (Septante) na lokota ya Greke ya kala ebongoli yango “mbula nsambo.” Josèphe, nganga-mayele na masolo ya kala ya Bayuda, azalaki kobénga “ntango nsambo” ete “mbula nsambo.” [Antiquities of the Jews (Masolo ya Bayuda ya kala), buku ya 10, mokapo 10, paragrafe 6] Mpe banganga-mayele mosusu Baebele babéngaki liloba “ntango” na liloba “mbula.” Libongoli mosusu (An American Translation, Today’s English Version) mpe libongoli ya James Moffatt ebongoli yango na maloba “mbula nsambo.”
26 Na miso ya Nebukadanesala, “ntango nsambo” ezalaki mpenza “mbula nsambo.” Na lolenge ya esakweli, mbula moko ezalaki na mikolo 360 to sanza 12 oyo mokomoko ezalaki na mikolo 30. (Kokanisá na Emoniseli 12:6, 14.) Bongo, mpo na mokonzi, “ntango nsambo” to mbula nsambo ezalaki mikolo 2 520, oyo ezwami na kotángáká mikolo 360 mbala nsambo. Kasi ezali boni mpo na kokokisama ya ndɔtɔ na ye na mobimba na yango? “Ntango nsambo” ya esakweli eumelaki koleka mikolo 2 520. Yango emonanaki na maloba ya Yesu: “Yelusaleme ekonyatama na mabota kino ekokoka bilaka [“ntango,” NW] na mabota.” (Luka 21:24) ‘Konyatama’ yango ebandaki na mobu 607 L.T.B. ntango Yelusaleme ebebisamaki mpe bokonzi ya Nzambe awa na mabelé ezalaki lisusu na mokili ya Yuda te. Ntango nini konyatama yango esengelaki kosila? Na “ntango ya kokokisama ya makambo nyonso,” ntango Bokonzi ya Nzambe ekozongisama lisusu na mabelé na nzela ya Yelusaleme ya elilingi.—Misala 3:21.
27. Mpo na nini ebongi koloba ete “ntango nsambo” oyo ebandaki na mobu 607 L.T.B. eumelaki mikolo 2 520 te?
27 Soki tobandi kotánga mikolo 2 520, banda kokweya ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., tokosuka na mobu 600 L.T.B., mbula oyo ezalaki na ndimbola mpenza te engebene Makomami. Ezala ata na mobu 537 L.T.B., mbula oyo Bayuda basikolamaki na boombo mpe bazongaki na mokili ya Yuda, bokonzi ya Yehova oyo ezalaki na mabelé ezongisamaki na mbula yango te. Ezalaki mpenza bongo mpamba te Yelubabele, mokitani ya bokonzi ya Davidi, atyamaki mokonzi ya ekólo te kasi guvernere ya etúká ya Yuda oyo ezalaki na nse ya bokonzi ya Perse.
28. (a) Ndenge nini mikolo 2 520 ya esakweli ya “ntango nsambo” esengeli kotángama? (b) “Ntango nsambo” yango ya esakweli eumelaki mbula boni, ebandaki ntango nini mpe esukaki ntango nini?
28 Lokola “ntango nsambo” yango ezalaki ya esakweli, tosengeli kotalela mikolo 2 520 yango na ndenge batalelaka mikolo ya bisakweli na Biblia: “Mokolo moko mpo na mbula moko.” Etinda yango esalelamaki na esakweli moko oyo elobelaki kozingelama ya Yelusaleme na basoda ya Babilone. (Ezekiele 4:6, 7; kokanisá na Mituya 14:34.) “Ntango nsambo” oyo mikili ya nguya eyangelaki mokili kozanga kotungisama na Bokonzi ya Nzambe, eumelaki mbula 2 520. Yango ebandaki ntango mokili ya Yuda mpe engumba ya Yelusaleme ebebisamaki na sanza ya nsambo (15 Tisri) ya mobu 607 L.T.B. (2 Mikonzi 25:8, 9, 25, 26) Soki totángi banda mobu wana kino mobu ya yambo liboso ya ntango na biso, ekosala mbula 606. Mbula 1 914 oyo etikali ememi biso na mobu 1914 T.B. Na yango, “ntango nsambo” to mbula 2 520 esukaki na 15 Tisri to na mikolo 4 to 5 ya Ɔkɔtɔbɛ 1914 T.B.
29. Nani azali ‘oyo aleki bato nyonso na komikitisa,’ mpe Yehova asalaki nini mpo na kopesa ye bokonzi?
29 Na mbula yango, “ntango ya mabota” ekómaki na nsuka, mpe Nzambe apesaki bokonzi na “moto oyo aleki bato nyonso na komikitisa”—elingi koloba Yesu Klisto—oyo banguna na ye bamonaki ye moto mpamba mpe babomaki ye na nzete ya mpasi. (Danyele 4:17) Mpo na kotya Masiya na bokonzi, Yehova afungolaki nkamba ya elilingi, oyo ezalaki ya ebende mpe ya motako, oyo ezingaki “ekumu” ya bokonzi na ye. Na bongo, Nzambe Oyo-Aleki-Likoló apesaki nzela na “mombóto” ya bokonzi ete ebima na ekumu yango. Ezalaki elakiseli ete bokonzi ya Nzambe awa na mabelé epesamaki na mabɔkɔ ya Yesu Klisto, Mokitani ya Davidi oyo alekaki bakitani nyonso. (Yisaya 11:1, 2; Yobo 14:7-9; Ezekiele 21:27) Topesi mpenza Yehova matɔndi na ndenge asukisi makambo yango malamu mpe alimboleli biso libombami litali nzete yango monene!
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Nzete monene ya ndɔtɔ ya Nebukadanesala ezalaki elilingi ya nini?
• Nini ekómelaki Nebukadanesala ntango ndɔtɔ ya nzete oyo ye alɔtaki ekokisamaki mpo na mbala ya liboso?
• Nsima ya kokokisama ya ndɔtɔ na ye, Nebukadanesala andimaki nini?
• Na kokokisama ya monene ya ndɔtɔ yango oyo ezalaki esakweli, “ntango nsambo” eumelaki mbula boni, mpe ntango nini yango ebandaki mpe esukaki?
[Elilingi na lokasa mobimba 83]
[Elilingi na lokasa mobimba 91]