Mokapo ya nsambo
Maloba minei oyo mabongolaki mokili
1. Ndenge nini maloba minei mpamba, oyo makomamaki na efelo moko, esali bopusi makasi kino lelo?
MALOBA minei mpamba makomamaki na efelo moko ya mpɛmbɛ! Ɛɛ, maloba yango minei mabangisaki mokonzi moko ya nguya mpe mabulunganisaki mpenza makanisi na ye. Maloba yango elimbolaki ete bakonzi mibale bakolongwa na bokonzi, ete moko na bango akokufa, mpe bokonzi moko oyo elekaki nguya na mokili mobimba ekokweisama. Maloba oyo emonisaki ete lingomba ya mboka wana ezalaki lingomba ya mpamba. Na maloba yango, lokumu ya losambo ya pɛto ya Yehova etombwanaki, mingi mpenza na ntango wana oyo bato mingi bazalaki kotalela losambo mpe nkombo ya Yehova lokola eloko mpamba. Ɛɛ, maloba yango mamonisaki mpe makambo oyo masengelaki kosalema nsima, na ntango na biso! Ndenge nini maloba minei mpamba makokaki kosala makambo nyonso oyo? Tiká tótalela yango.
2. (a) Likambo nini esalemaki na Babilone nsima ya liwa ya Nebukadanesala? (b) Nani akómaki mokonzi?
2 Bambula elekaki kobanda makambo oyo malobelami na mokanda ya Danyele mokapo 4 esalemaki. Nebukadanesala, moto ya lolendo, ayangelaki Babilone na boumeli ya mbula 43 kino liwa na ye na mobu 582 L.T.B. Bakonzi mingi oyo bayangelaki nsima na ye bazalaki bakitani ya libota na ye. Kasi bazalaki koumela mingi na bokonzi na bango te mpo bazalaki kokufa noki to kobomama. Nsukansuka, moto moko oyo nkombo na ye ezalaki Nabonide atombokaki mpe abɔtɔlaki bokonzi. Azalaki mwana ya mobali ya mwasi moko oyo azalaki nganga monene ya nzambe-sanza na nkombo Sin. Na bongo, Nabonide azalaki mwana ya libota ya bokonzi ya Babilone te. Balobaka ete Nabonide abalaki mwana ya Nebukadanesala mpo na kosala ete bato bándima bokonzi na ye. Nabonide akómaki koyangela elongo na mwana na ye Belesasala. Kasi atikaki mwana na ye ayangela engumba ya Babilone. Boye, Belesasala azalaki mwana ya mwana ya Nebukadanesala. Kasi Belesasala azwaki mpenza liteya na makambo oyo ekómelaki nkɔkɔ na ye Nebukadanesala, oyo andimaki ete Yehova azali Nzambe oyo aleki banzambe nyonso mpe azali na nguya ya kokitisa, ezala mokonzi nani? Tondimi te!—Danyele 4:37.
BISENGO YA FƐTI ELEKI NDELO
3. Fɛti oyo Belesasala asalaki, ezalaki ya ndenge nini?
3 Mokapo 5 ya mokanda ya Danyele ebandi na lisolo ya fɛti moko: “Mokonzi Belesasala asalaki elambo monene mpo na bato na [ye ya lokumu, bato nkóto], mpe amelaki vinyo na liboso na bato nkóto yango.” (Danyele 5:1) Kanisá naino! Esengelaki ete mokonzi apona esika moko ya monene koleka mpo na koyamba mibali nyonso wana, elongo na basi mpe bamakango ya mokonzi. Nganga-mayele moko akomaki boye: “Bato ya Babilone bamesanaki kosala bafɛti ya mineneminene oyo ezalaki kosuka mbala mingi na milangwa. Bazalaki kotondisa mesa na biloko kitoko ndenge na ndenge mpe na vinyo oyo ezalaki kouta na mboka ya bapaya. Esika ya fɛti etondaki mpe na nsolo malasi; bayembi mpe babɛti miziki bazalaki kosepelisa babyangami.” Belesasala afandaki na esika oyo bato nyonso bakokaki komona ye. Kasi amelaki masanga mingi koleka.
4. (a) Mpo na nini ezali likambo ya kokamwa ete bato ya Babilone bazalaki kosala fɛti na butu ya 5 mpe 6 Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 539 L.T.B.? (b) Mpo na nini bato ya Babilone babangaki basoda oyo bazalaki kozingela bango te?
4 Ezali likambo ya kokamwa ete na butu wana ya 5 mpe 6 Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 539 L.T.B., bato ya Babilone bazalaki kosala fɛti moko monene. Ezali kokamwisa mpamba te ekólo na bango ezalaki na etumba, mpe makambo mazalaki kotambola malamu te na etumba yango. Basoda ya Mede mpe Perse bautaki kolonga basoda ya Nabonide mpe ye moko Mokonzi Nabonide abombanaki na engumba Borsippée na sudi-wɛsti ya Babilone. Mpe talá sikawa basoda ya Sirise bazingi Babilone. Kasi Belesasala na bato na ye ya lokumu bazali kobanga te. Bandimaki ata moke te ete engumba na bango ekoki kokweya! Bifelo minene ya engumba yango bipikamaki makasi na terase minene oyo ezalaki kolekisa mai ya ebale monene Pelata na engumba mobimba. Bato ya Babilone bayebaki mpe ete na boumeli ya bambula nkóto oyo elekaki, monguna moko te abɔtɔlaki Babilone. Yango wana, bazalaki kobanga eloko moko te. Ntango mosusu Belesasala azalaki kokanisa ete makɛlɛlɛ oyo bazalaki kosala na fɛti ekokaki komonisa na banguna oyo bazingaki engumba ete bazali kobanga bango te. Kutu makɛlɛlɛ yango ekokaki kolɛmbisa to kobangisa banguna yango.
5, 6. Belesasala asalaki nini ntango alangwaki masanga, mpe mpo na nini tokoloba ete, afingaki mpenza Yehova?
5 Lokola amelaki masanga mingi, Belesasala alangwaki. Masese 20:1 (NW) elobi ete “vinyo ekosaka.” Molangwa ya vinyo epusaki mokonzi asala likambo moko ya bozoba mpenza. Asɛngaki ete bámemela ye bisaleli ya bulɛɛ oyo biutaki na tempelo ya Yehova. Nzokande, bisaleli yango ya bulɛɛ oyo Nebukadanesala amemaki ntango abɔtɔlaki Yelusaleme, bizalaki kosalelama bobele na losambo ya pɛto ya Yehova. Atako banganga Bayuda bazalaki na lotomo ya kosalela bisaleli yango ya bulɛɛ na tempelo ya Yelusaleme na ntango ya kala, kasi Nzambe akebisaki bango ete basengelaki kozala pɛto ntango bazali kosalela bisaleli yango.—Danyele 5:2; kokanisá na Yisaya 52:11.
6 Kasi Belesasala asalaki likambo mosusu ya nko mpenza. “Mokonzi mpe bato [na ye ya lokumu] mpe basi na ye mpe [bamakango] na ye . . . bamelaki vinyo mpe basanzolaki banzambe ya wolo mpe ya palata mpe ya motako mpe ya ebende mpe ya nzete mpe ya libanga.” (Danyele 5:3, 4) Na bongo, Belesasala akumisaki banzambe na ye ya lokuta mpe asambwisaki Yehova! Balobaka ete yango ezalaki ezaleli ya bato ya Babilone. Na ndakisa, bazalaki komona Bayuda oyo bazwaki bango baombo lokola bato mpamba. Bazalaki kotyola losambo na bango mpe kopesa bango ata elikya moke te ete bakosikolama mpo na kozonga mokolo mosusu na mboka na bango. (Nzembo 137:1-3; Yisaya 14:16, 17) Ntango mosusu, mokonzi yango, na molangwa na ye, amonaki ete soki asambwisi baombo yango mpe Nzambe na bango; akozwa lokumu na miso ya basi na ye, ya bakonzi ya Leta, mpe akomimonisa mpenza mokonzi ya nguya.a Atako Belesasala amimonaki mpenza moto monene koleka, kasi esengo na ye eumelaki te.
MALOBA OYO MAKOMAMAKI NA EFELO
7, 8. Ndenge nini fɛti oyo Belesasala asalaki esukaki, mpe ndenge nini mokonzi amiyokaki?
7 Lisolo epemami elobi ete: “Misapi ya lobɔkɔ ya moto mibimaki pwasa mpe mikomaki likoló na mpɛmbɛ ya [efelo, NW] ya ndako ya mokonzi, kotalana na etɛmɛlo na mwinda; mpe mokonzi amonaki lobɔkɔ [ntango ezalaki kokoma, NW].” (Danyele 5:5) Oyo nde nsɔmɔ! Lobɔkɔ oyo bayebaki epai yango eutaki te, bobele yango moko etɛlɛmi na mopɛpɛ pene na efelo, esika oyo mwinda ezalaki kopela makasi. Babyangami babalukaki mpo na kotala lobɔkɔ yango oyo ezalaki kokoma maloba oyo moto moko akokaki kolimbola yango te mpe na mbala moko batikalaki kimya.b Likamwisi yango ebangisaki mpenza bato mpe etiká nsango na boye ete lelo, bakómá kosalela yango lokola lisese. Koloba na moto lelo ete ‘bakomeli ye maloba na efelo’ elimboli kokebisa ye na likama moko oyo ezali koyela ye.
8 Ndenge nini mokonzi yango ya lolendo, ye moto amitombolaki mpe akumisaki banzambe na ye koleka Yehova, atalelaki maloba wana oyo ekomamaki na efelo? “Bongo elongi ya mokonzi ebongwanaki, mpe makanisi na ye [ebulunganaki, NW]; makolo na ye malɛmbaki mpe mabɔlɔngɔ na ye mabɛtanaki.” (Danyele 5:6) Belesasala azalaki na mposa ya kokóma mokonzi monene koleka na miso ya bato na ye. Kasi nsɔmɔ ekómisaki ye lokola ekeko—elongi na ye ekómaki mawamawa, abandaki kolɛnga kobanda na makolo kino na loketo. Nzoto na ye mobimba ebandaki kolɛnga makasi kino mabɔlɔngɔ na ye makómaki kotutana. Maloba oyo Davidi ayembelaki Yehova na nzembo makokisamaki mpenza epai na ye: “Miso na yo [makotɛmɛla bato ya lolendo, NW] ete okitisa bango.”—2 Samwele 22:1, 28; kokanisá na Masese 18:12.
9. (a) Mpo na nini nsɔmɔ oyo Belesasala ayokaki elimbolaki te ete abangaki Nzambe? (b) Elaka nini mokonzi apesaki na bato ya mayele ya Babilone?
9 Nde tosengeli koyeba ete Belesasala abangaki Nzambe te. Mpamba te kobanga Nzambe elimboli kopesa ye limemya mpe yango ezali ebandeli ya mayele. (Masese 9:10) Ɛɛ, yango ezalaki nsɔmɔ ya liwa, mpe yango ebimisaki eloko moko ya mayele te epai na mokonzi yango oyo azalaki kolɛnga.c Na ndakisa, na esika ete asɛnga Nzambe oyo ye autaki kofinga bolimbisi, Belesasala asɛngaki na mongongo makasi ete bábéngela ye “banganga-na-soloka mpe Bakaladi mpe [banganga-na-minzoto].” Alobaki lisusu ete: “Soko nani akotánga likomi oyo mpe akomonisa ngai ntina na yango, akolatisama [bilamba ya, NW] motane mwindo, mpe akozala na monyɔlɔlɔ ya wolo na nkingo na ye, mpe akozala mokonzi ya misato kati na bokonzi.” (Danyele 5:7) Moto oyo akozwa esika ya misato na bokonzi akozala mpe mokonzi monene mpo bobele Mokonzi Nabonide na mwana na ye Belesasala, nde bakoleka ye. Nzokande, mwana ya mobali ya liboso ya Belesasala nde asengelaki kozala na esika yango. Ya solo, mokonzi ayebaki lisusu eloko ya kosala te. Nyonso oyo ye azalaki koluka ezalaki bobele ndimbola ya nsango yango ya likamwisi!
10. Bato ya mayele ya Babilone basalaki nini mpo na kolimbola maloba oyo makomamaki na efelo?
10 Bato ya mayele bayaki mingi na esika ya fɛti. Bazalaki mingi mpenza na Babilone mpo engumba yango ezalaki na batempelo mingi epai kuna losambo ya lokuta ezalaki kosalema. Na ntembe te, bato oyo bazalaki komikumisa ete bayebisaka makambo oyo mazali koya mpe balimbolaka mabombami bazalaki mingi mpenza. Bakokaki kosepela na libaku malamu oyo epesamelaki bango. Bazwaki bongo libaku malamu ya kolakisa mayele na bango liboso na bato ya lokumu ya motindo wana. Ezalaki mpe mpo mokonzi andima bango mpe apesa bango lokumu mingi koleka. Kasi bayokaki mpenza nsɔni! “Bakokaki kotánga likomi te mpe bakokaki koyebisa mokonzi ntina na yango te.”d—Danyele 5:8.
11. Mpo na nini bato ya mayele ya Babilone bakokaki kotánga maloba yango te?
11 Toyebi te soki bato ya mayele ya Babilone bayebaki balɛtɛlɛ ya maloba yango. Soki ezali ete bayebaki te, boye bakanisaki ndimbola moko ya lokuta mpo na kokosa mokonzi. Ntango mosusu bakokaki koyeba balɛtɛlɛ yango mpo motángi nyonso akokaki kotánga yango. Lokola maloba ya Liebele mpe ya Araméen mazalaki kokomama na milelisi (voyelles) te, liloba mokomoko ekokaki kolimbolama na lolenge mingi. Na bongo, bato ya mayele ya Babilone bakokaki koyeba te maloba ya sikisiki oyo balɛtɛlɛ yango etalelaki mpenza. Atako bakokaki koyeba maloba yango kasi bazalaki na likoki te ya koyeba sikisiki ndimbola na yango. Ezala eloko nini oyo bakokaki kosala, likambo ya ntina ezali ete bato ya mayele ya Babilone balongaki te. Ezalaki mpenza nsɔni monene!
12. Lokola bakokaki te, yango emonisaki nini?
12 Na bongo, bato ya mayele bamonanaki bakosi mpe losambo na bango ezalaki ya lokuta. Bayokisaki mpenza bato nsɔni! Ntango Belesasala amonaki ete atyaki elikya na ye epai na banganga se mpamba, abangaki lisusu mingi koleka. Akómaki mpenza mawamawa mpe bato na ye ya lokumu ‘bamitungisaki.’e—Danyele 5:9, NW.
MOKONZI ABÉNGISI DANYELE
13. (a) Mokonzi abéngisaki nani nokinoki na fɛti, mpe alakaki ye nini? (b) Danyele azalaki na bomoi ya lolenge nini?
13 Lokola makambo makómaki ndongo, mama ya mokonzi ayaki na fɛti. Ayokaki makɛlɛlɛ makasi kasi ayebaki moto moko oyo akokaki kolimbola maloba yango oyo makomamaki na efelo. Bambula mingi elekaki kobanda ntango tata na ye Nebukadanesala atyaki Danyele mokonzi ya bato na ye nyonso ya mayele. Mama ya mokonzi akanisaki Danyele mpo banda kala ayebaki ete ye azali moto ya “mayele koleka mpe ya boyebi, mpe [ya bososoli].” Emonanaki lokola ete Belesasala ayebaki Danyele te. Ekoki kozala ete nsima ya liwa ya Nebukadanesala, mosakoli Danyele azalaki lisusu kosala mosala ya lokumu na guvernema te. Kasi lokumu ezalaki na ntina te mpo na Danyele. Azalaki kosalela Yehova na bosembo nyonso kino na ntango wana, atako akómaki na mibu koleka 90. Bazalaki kobénga ye se na nkombo na ye ya Liebele, Danyele, atako alekisaki mbula 80 na boombo na Babilone. Mama ya mokonzi abéngaki ye Danyele kasi na nkombo oyo bapesaki ye na Babilone te. Alendisaki bongo mokonzi ete: “Tiká Danyele abyangama mpe akolimbola ntina.”—Danyele 1:7; 5:10-12.
14. Mokakatano nini Danyele azalaki na yango ntango amonaki maloba oyo makomamaki na efelo?
14 Babéngaki Danyele noki mpe atɛlɛmaki liboso na Belesasala. Ezalaki mpenza nsɔni mpo na mokonzi yango ete asɛnga lisungi epai na Moyuda oyo ye autaki kofinga Nzambe na ye. Ata bongo, Belesasala alakaki Danyele ete akotya ye na esika ya misato na bokonzi na ye soki akokoka kotánga mpe kolimbola maloba yango oyo moto moko te ayebaki ndimbola na yango. (Danyele 5:13-16) Danyele atalaki maloba yango oyo mazalaki na efelo mpe elimo santu esungaki ye mpo alimbola yango. Maloba yango mazalaki nsango ya kosambisama oyo eutaki na Yehova Nzambe! Ndenge nini Danyele akokaki koyebisa mokonzi yango ya lolendo kosambisama makasi bongo? Mpe ndenge nini akokoka koloba na mokonzi liboso ya basi na ye mpe bato na ye ya lokumu? Kanisá naino mokakatano oyo Danyele azalaki na yango! Akokosama na maloba kitoko ya mokonzi; to na elaka ya mokonzi ya kopesa ye bozwi mpe lokumu mingi koleka? Mosakoli Danyele akolɛmbisa nde nguya ya esakweli ya Yehova?
15, 16. Liteya nini ya ntina Belesasala azwaki te na makambo malekaki liboso, mpe ndenge nini bato mingi lelo bazali kosala libunga yango moko?
15 Danyele alobaki na mpiko nyonso ete: “Tiká makabo na yo mazala na yo mpenza, mpe pesá mabonza na yo na moto mosusu; nde nakotángela mokonzi likomi yango mpe nakoyebisa ye ntina.” (Danyele 5:17) Na nsima, Danyele alobaki ete Nebukadanesala azalaki mokonzi monene mpenza. Azalaki na nguya mingi na boye ete akokaki koboma, kopesa etumbu, kopesa lokumu to kokitisa, ezala moto nani. Kasi Danyele azalaki se kokundwela Belesasala makambo oyo ye ayebaki, ete Yehova, “Nzambe [Oyo]-Aleki-Likoló” nde akómisaki Nebukadanesala mokonzi monene. Mpe bobele Yehova nde akitisaki mokonzi yango ntango akómaki na lolendo. Ɛɛ, Nebukadanesala andimisamaki ete “Nzambe [Oyo]-Aleki-Likoló azali mokonzi na bokonzi ya bato, mpe [azali kotya moto oyo ye alingi na bokonzi, NW].”—Danyele 5:18-21.
16 Belesasala ‘ayebaki makambo oyo nyonso.’ Kasi azwaki liteya te. Ɛɛ, lisumu na ye elekaki lolendo ya Nebukadanesala. Belesasala azangaki mpenza limemya epai na Yehova mpe asalelaki ye makambo na nko. Danyele atɔndɔlaki lisumu ya mokonzi. Na koleka, alobaki na Belesasala na mpiko nyonso liboso na babyangami na ye bapakano ete, banzambe ya lokuta ‘bamonaka te, bayokaka te mpe basalaka eloko moko te.’ Mosakoli ya Nzambe, oyo azalaki moto ya mpiko, alobaki lisusu ete na bokeseni na banzambe yango oyo bazangi ntina, Yehova azali Nzambe oyo “[mpema] na yo ezali na lobɔkɔ na ye.” Kino lelo, bato bakómisi biloko oyo bizangi bomoi lokola mosolo, misala, lokumu na mokili mpe ata bisengo ya mokili, banzambe na bango. Kasi eloko moko te kati na biloko yango ekoki kopesa moto bomoi. Bomoi na biso nyonso euti na Yehova, oyo apesaka biso mpema oyo tozali kopema.—Danyele 5:22, 23; Misala 17:24, 25.
LIBOMBAMI ELIMBOLAMI!
17, 18. Wapi maloba minei oyo makomamaki na efelo, mpe ndimbola na yango mpenza ezalaki nini?
17 Mobange Danyele abandaki sikawa kolimbola likambo oyo bato ya mayele ya Babilone bakokaki kosala yango te. Atángaki maloba oyo makomamaki na efelo mpe alimbolaki yango. Ezalaki maloba oyo: “MENE, MENE, TEKELE mpe PALASI.” (Danyele 5:24, 25) Maloba yango malimbolaki mpenza nini?
18 Maloba yango malingaki mpenza koloba “mina moko, mina moko, sekele moko, mpe ndambo na sekele.” Liloba mokomoko ezalaki motángo ya mbongo ya ebende, kobanda ebende ya mbongo ya motuya monene kino ya motuya moke. Oyo nde likambo makasi mpo na kolimbola! Atako bato ya mayele ya Babilone bazalaki na likoki ya koyeba maloba yango kasi bakokaki kolimbola yango te.
19. Liloba “MENE” elimbolaki nini?
19 Na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, Danyele alimbolaki: “Oyo ezali [ndimbola, NW] ya likambo yango ete, MENE, Nzambe atángi motuya na mikolo na bokonzi na yo mpe asukisi yango.” (Danyele 5:26) Balɛtɛlɛ ya liloba ya liboso esangisi maloba mibale: “mina” mpe liloba moko ya lokota ya Araméen oyo elimboli “oyo batángi” to “oyo motángo eyebani.” Ndimbola nyonso wana euti na milelisi oyo motángi asengelaki kobakisa. Danyele ayebaki ete boombo ya Bayuda ekómaki pene na nsuka na yango. Kati na mbula 70 oyo esakweli elobaki ete boombo yango ekoumela, mbula 68 esilaki koleka. (Yilimia 29:10) Yehova, ye moko moto akatelaka bato ntango mpe bikeke, akataki mikolo oyo Babilone ekoyangela mokili mobimba. Kasi moto moko te na ndako ya Belesasala ayebaki ete nsuka ya boyangeli ya Babilone ekómi pene. Ɛɛ, nsuka ekómaki, bobele mpo na Belesasala te, kasi mpe mpo na tata na ye Nabonide. Ekoki kozala mpo na ntina yango nde liloba “MENE” ekomamaki mbala mibale mpo na konyata likambo yango ete boyangeli ya tata na mwana na ye ekómi na nsuka.
20. Liloba “TEKELE” elimbolaki nini, mpe ndenge nini ndimbola na yango ekokisamaki na bomoi ya Belesasala?
20 “TEKELE” ekomamaki bobele mbala moko na bomoko (singulier). Yango ekoki komonisa ete liloba yango etalelaki mpenzampenza Belesasala. Esengelaki kotalela ye mpo azangaki mpenza limemya epai na Yehova. Na ndimbola na yango mpenza, liloba yango elimboli “sekele” kasi balɛtɛlɛ na yango epesi mpe ndimbola oyo, “omekami na kilo.” Yango wana, Danyele alobaki na Belesasala ete: “TEKELE, yo omekami na emekeli na bozito, mpe [omonani ete ozali na kilo te, NW].” (Danyele 5:27) Na miso ya Yehova, mabota nyonso mazali lokola mwa mputulu na emekeli ya kilo. (Yisaya 40:15) Mabota mazali na nguya te ya kobebisa mikano na ye. Na bongo, mokonzi oyo ya lolendo akokaki kosala ye nini? Belesasala amikumisaki koleka Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Abangaki kofinga Yehova te mpe atyolaki losambo na ye ya pɛto. Kasi ‘amonanaki ete azalaki na kilo te.’ Ɛɛ, Belesasala abongaki mpenza na kosambisama oyo ezalaki lisusu mosika te!
21. Ndenge nini liloba “PALASI” ezalaki kozongelama ya liloba moko mbala misato, mpe liloba yango elimbolaki nini na ntina na boyangeli ya Babilone na mikolo mizalaki koya?
21 Liloba ya nsuka oyo ekomamaki na efelo ezalaki “PALASI.” Danyele atángaki yango na bomoko “PELESI.” Ekoki kozala ete azalaki koloba mpo na moko na mikonzi yango mpo mokonzi mosusu azalaki wana te. Liloba yango ezalaki liloba ya nsuka ya libombami monene ya Yehova. Libombami yango ezalaki na maloba misato oyo moko na yango ezongelamaki mbala mibale. Liloba “palasi” elimboli mpenzampenza “ndambo ya sekele.” Kasi balɛtɛlɛ yango mpe ekokaki kozala na ndimbola mibale: “bokabwani” to “bato ya Perse.” Danyele asakolaki ete: “PALASI, bokonzi na yo ekabwani mpe epesami na [Bamede na Baperse, NW].”—Danyele 5:28.
22. Belesasala asalaki nini nsima ya koyeba ndimbola ya maloba yango, mpe ntango mosusu azalaki kokanisa nini?
22 Na yango, libombami elimbolamaki. Etikalaki moke engumba makasi ya Babilone ekwea na mabɔkɔ ya mampinga ya Bamede na Baperse. Atako liyebisi yango ya kosambisama elɛmbisaki ye nzoto mpenza, Belesasala akokisaki elaka na ye. Alobaki na basaleli na ye bálatisa Danyele elamba ya motane mwindo, monyololo ya wolo na nkingo, mpe básakola ete Danyele azwi esika ya misato na bokonzi na ye. (Danyele 5:29) Danyele aboyaki lokumu oyo mokonzi apesaki ye te mpo ayebaki ete ezalaki bobele lolenge mokonzi alingaki kozongisela Yehova lokumu oyo esengelaki na ye. Ntango mosusu, Belesasala azalaki kokanisa ete akolɛmbisa mwa moke kosambisa ya Yehova soki akumisi mosakoli na Ye. Soki azalaki na makanisi ya ndenge wana, yango ezalaki se mpamba.
KOKWEYA YA BABILONE
23. Esakweli nini ya kala ebandaki kokokisama na ntango Belesasala azalaki kosala fɛti?
23 Ntango Belesasala azalaki komela masanga elongo na bato na ye ya lokumu, kokumisa banzambe na bango mpe kotyola Yehova, likama monene ezalaki kobongisama na molili zingazinga na ndako na ye. Bisakweli ya Yisaya oyo bikomamaki soko bikeke mibale liboso, bibandaki kokokisama. Yehova asakolaki na ntina na Babilone ete: “Kokimela nyonso [mpo] na ye, nasukisi yango.” Ɛɛ, monyokoli nyonso oyo engumba yango enyokolaki basaleli ya Nzambe ekómaki na nsuka na yango. Ndenge nini? Bobele esakweli yango elobaki: “[Matá] likoló, ɛ Elama, zingelá na etumba, ɛ [Mede].” Elama ekómaki etúká ya bokonzi ya Perse nsima ya liwa ya mosakoli Yisaya. Ntango Belesasala azalaki kosala fɛti na ye, oyo eyebisamaki mpe na esakweli ya Yisaya, Bamede na Baperse basangisaki mampinga na bango mpo na ‘komata’ mpe ‘kozingela’ Babilone.—Yisaya 21:1, 2, 5, 6.
24. Makambo nini ya sikisiki Yisaya asakolaki na ntina na kokweya ya Babilone?
24 Kutu esakweli yango eyebisaki nkombo ya motambwisi ya mampinga yango mpe mayele na ye ya bitumba. Soko mbula 200 liboso, Yisaya asakolaki ete Yehova akopakola Sirise na elimo na ye mpo abundisa Babilone. Na etumba yango, Nzambe akolongola mikakatano nyonso liboso na ye. Mai ya ebale ya Babilone ‘ekokauka’ mpe bikuke minene ya engumba yango bikotikala polele. (Yisaya 44:27–45:3) Mpe esalemaki mpenza bongo. Basoda ya Sirise balekisaki mai ya Ebale Pelata na nzela mosusu. Na bongo, mai ekaukaki mpenza na ebale kino basoda bakatisaki ebale mozindo na makolo. Bakɛngɛli ya bikuke ya Babilone babosanaki kokanga bikuke yango; bitikalaki polele. Banganga-mayele ya masolo ya kala balobaka ete banguna bazingaki engumba yango ntango bato bazalaki kosepela makasi na fɛti moko. Banguna babɔtɔlaki bongo Babilone na etumba makasi te. (Yilimia 51:30) Kasi moto moko ya lokumu koleka akufaki na etumba yango. Danyele alobaki boye: “Na butu yango mpenza Belesasala, mokonzi ya Bakaladi abomamaki. Mpe Dalio, [moto ya Mede], azwaki bokonzi. Azalaki na mbula ntuku motoba na mibale.”—Danyele 5:30, 31.
LITEYA OYO TOKOKI KOZWA NA MALOBA OYO MAKOMAMAKI NA EFELO
25. (a) Mpo na nini engumba ya kala ya Babilone ezali mpenza esika oyo mangomba nyonso ya lokuta ebandaki mpe epanzanaki na mokili mobimba? (b) Na lolenge nini basaleli ya Nzambe na ntango na biso bakangamaki baombo na Babilone?
25 Lisolo lipemami oyo lizwami na Danyele mokapo 5 ezali na ntina mingi mpo na biso. Lokola losambo ya lokuta etondaki na engumba ya Babilone na ntango ya kala, engumba yango ebongi mpenza kobéngama esika oyo losambo ya lokuta ebandaki mpe epanzanaki na mokili mobimba. Na mokanda ya Emoniseli, Babilone ezali elilingi ya mwasi ya pite oyo mosala na ye ezali bobele kosopa makila ya bato. Mangomba nyonso ya lokuta na mokili mobimba ebéngami “BABILONE MONENE.” (Emoniseli 17:5) Lokola Babilone monene eyokaka makebisi te na ntina na mateya mpe misala na yango ya lokuta oyo ezali kobebisa nkombo ya Nzambe, mangomba yango mazali konyokola basakoli ya Liloba ya Nzambe oyo ezali solo. Ndenge moko na bato ya Yelusaleme mpe ya Yuda na ntango ya kala, batikali baklisto ya sembo, bapakolami na elimo, bakangamaki mpenza na boombo ya “Babilone Monene” na 1918. Na ntango yango, mosala na bango ya kosakola Bokonzi ya Nzambe ezalaki mpenza kosalema lisusu te mpo na minyoko oyo bakonzi ya mangomba babimiselaki bango.
26. (a) Ndenge nini “Babilone Monene” ekweaki na 1919? (b) Likebisi nini tosengeli koyoka biso moko liboso mpe koyebisa yango na bato mosusu?
26 Kasi na mbala moko, “Babilone Monene” ekweyaki! Likambo ya kokamwa, kokweya na yango ebimisaki makɛlɛlɛ te; lokola mpe kokweya ya engumba ya Babilone na ntango ya kala na mobu 539 L.T.B. Ata bongo, kokweya yango ya elilingi ezalaki monene. Na 1919, Yehova asikolaki basaleli na ye na boombo ya Babilone mpe apambolaki bango na ngolu na ye. Yango esukisaki nguya oyo “Babilone Monene” ezalaki na yango likoló na basaleli ya Yehova mpe ntango ekómaki mpo na kotɔndɔla polele bokosi na yango. Babilone ekotɛlɛma lisusu te; kutu ekobebisama libela mosika te. Basaleli ya Yehova bazali kolanda kokebisa bato ete: “Bino bato na ngai bóbima na ye, ete bósangana na masumu na ye te.” (Emoniseli 18:4) Osili koyoka likebisi yango? Oyebisaka yango na bato mosusu?f
27, 28. (a) Likambo nini ya ntina Danyele abosanaki te? (b) Elembeteli nini ya polele tozali na yango ete etikali moke Yehova aboma mokili ya mabe oyo?
27 Na bongo, makomi mazali na efelo lelo, kasi makomi yango mataleli bobele “Babilone Monene” te. Kanisá liteya ya ntina ya mokanda mobimba ya Danyele: Yehova azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Ezali bobele ye nde azali na lotomo ya kotya moto oyo ye alingi ete ayangela bato. (Danyele 4:17, 25; 5:21) Eloko nyonso oyo ekotɛmɛla mikano ya Yehova ekolongolama. Ekoumela te mpo Yehova akokisa mikano na ye. (Habakuku 2:3) Na mikolo ya Danyele, ntango yango eyaki wana akómaki na mbula 100. Amonaki bongo ndenge Yehova akweisaki boyangeli moko oyo elekaki nguya na mokili mobimba, boyangeli oyo enyokolaki mpe basaleli ya Nzambe longwa bomwana na ye.
28 Bilembeteli mpo na komonisa ete Yehova Nzambe asili kotya moyangeli moko mpo na koyangela bato longwa na kiti ya bokonzi na likoló, bizali mingi. Kasi lokola bato ya mokili bazali koboya mokonzi yango mpe bazali kotɛmɛla bokonzi na ye, yango ezali komonisa ete etikali moke, Yehova alongola batɛmɛli nyonso ya Bokonzi na ye. (Nzembo 2:1-11; 2 Petelo 3:3-7) Omoni ete ntango na biso ezali ntango ya koumela te mpo na kotya elikya na yo na Bokonzi ya Nzambe! Soki osili kosala yango, osili bongo kozwa liteya na maloba oyo makomamaki na efelo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na makomi moko ya kala, Mokonzi Sirise alobaki na ntina na Belesasala ete: “Batii moto ya bizaleli mabe [mokonzi] ya mboka na ye.”
b Ata mwa likambo moke oyo ya lisolo ya Danyele ezali likambo ya solo. Ntango bakundolaki ndako ya mokonzi ya Babilone, banganga-mayele ya arkeoloji bamonaki ete batongaki bifelo ya ndako yango na biliki ya sima oyo bapakolá langi.
c Lokola bato ya Babilone bazalaki bato ya biyambayamba, na ntembe te, babangaki mpenza makasi likamwisi yango. Buku Bomoi mpe masolo ya kala ya Babilone (na Lingelesi), elobi boye: “Longola banzambe mingi oyo bazalaki kosambela, bato ya Babilone bazalaki mpe kondima makasi ete bilimu bizali. Mikanda na bango ya losambo mitondaki na maloba ndenge na ndenge mpo na kobengana bilimu mabe.”
d Zulunalo moko (Biblical Archaeology Review) elobi boye: “Banganga-mayele ya Babilone bazalaki na mikanda oyo mizalaki na bilembo mingi mpo na koyeba makambo oyo mazalaki koya. . . . Ntango Belesasala asɛngaki bango báyebisa ye ndimbola ya maloba yango, bato ya mayele ya Babilone basengelaki kolukaluka yango na mikanda mineneminene oyo bazalaki na yango. Kasi ezalaki mosala ya mpamba.”
e Banganga-mayele oyo bayekolaka eutelo ya maloba balobaka ete liloba oyo ebongolami na ‘komitungisa’ elobelamaka mpenza mpo na makɛlɛlɛ makasi, lokola nde bato bazali kosala mobulu na liyangani moko.
f Talá buku Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi! na lokasa 205 kino 271, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Ndenge nini fɛti oyo Belesasala asalaki na butu ya 5 mpe 6 Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 539 L.T.B. esukaki?
• Maloba oyo makomamaki na efelo malimbolaki nini?
• Na ntango Belesasala azalaki kosala fɛti, esakweli nini ebandaki kokokisama na ntina na kokweya ya Babilone?
• Liteya nini tosengeli kozwa lelo na maloba oyo makomamaki na efelo?
[Elilingi na lokasa mobimba 98]
[Elilingi na lokasa mobimba 103]