Mombóto ya Nyoka: Lolenge nini etɔndɔlami?
“Nakotya koyinana kati na yo mpe mwasi mpe kati na mombóto na yo mpe mombóto na ye.”—GENESE 3:15, NW.
1. (a) Mpo na nini Yehova azali Nzambe ya esengo? (b) Asili kosala nini mpo na kopesa biso likoki ya kosepela lokola ye?
YEHOVA azali Nzambe ya esengo mpe azali na bantina malamu ya kozala na esengo. Azali Mopesi monene koleka mpe ya libosoliboso ya biloko malamu, mpe ezali na eloko moko te oyo ekoki kopekisa kokokisama ya mikano na ye. (Yisaya 55:10, 11; 1 Timoté 1:11; Yakobo 1:17) Alingi ete basaleli na ye básepela lokola ye, mpe azali kopesa bango bantina malamu ya kozala na esengo. Na yango, na moko ya bileko ya mawa eleki monene kati na lisoló ya bato—botomboki kati na Edene—apesaki biso moboko ya kozala na elikya mpo na mikolo mizali koya.—Baloma 8:19-21.
2. Na ntango asakolaki etumbu likoló na batomboki na Edene, lolenge nini Yehova apesaki bakitani ya Adama mpe Eva moboko ya kozala na elikya?
2 Mpo ete atɛmɛlaki Yehova mpe atɔ́ngaki ye, moko na bana na ye ya elimo asilaki komikómisa Satana Zábolo. Bato ya liboso, Eva mpe na nsima Adama, bakweaki na bopusi ya Satana mpe babukaki mobeko ya sikisiki oyo Yehova apesaki bango. Na kolanda bosembo, bakatelamaki etumbu ya liwa. (Genese 3:1-24) Nzokande, na ntango asakolaki etumbu likoló na batomboki wana mibale, Yehova apesaki bakitani ya Adama mpe Eva moboko ya kozala na elikya. Na lolenge nini? Lokola ekomami na Genese 3:15 (NW), Yehova alobaki ete: “Nakotya koyinana kati na yo mpe mwasi mpe kati na mombóto na yo mpe mombóto na ye. Akonyata yo na motó mpe okoswa ye na litindi.” Esakweli wana ezali na ntina mingi mpo na kososola Biblia na mobimba na yango, mpe kososola makambo ya kala mpe makambo oyo mazali kokokisama lelo likoló na bato ya mokili mpe likoló na basaleli ya Yehova.
Esakweli yango elimboli nini
3. Lokola elobelami kati na Genese 3:15, nani azali (a) Nyoka, (b) “mwasi,” (c) “mombóto” ya Nyoka, (d) “mombóto” ya mwasi.
3 Mpo na kososola ndimbola na yango, tótalela makambo makeseni oyo mazwami kati na esakweli yango mpenza. Ye oyo alobelami na Genese 3:15 ezali bongo Nyoka—ezali mpenza nyoka lokola nyama te, kasi ye oyo asalelaki yango. (Emoniseli 12:9) “Mwasi” wana ezali bongo Eva te kasi lisangá na Yehova na likoló, mama ya basaleli na ye bapakolami oyo bazali awa na mabelé. (Bagalatia 4:26) “Mombóto” ya Nyoka, ezali bongo mombóto ya Satana, bana na ye—bademó, bato, bakisá mpe bibongiseli ya bato oyo emonisaka bizaleli ya Satana mpe eyinaka “mombóto” ya mwasi. (Yoane 15:19; 17:15) “Mombóto” ya mwasi ezali liboso mpenza Yesu Klisto, ye oyo apakolamaki na elimo santu na mobu 29 T.B. Ba 144 000 oyo “babotami lisusu . . . na mai mpe na [“elimo,” NW]” mpe bazali basangoli ya libula ya Bokonzi ya likoló elongo na Klisto, bazali bongo eteni mosusu ya mombóto wana oyo elakamaki. Babandaki kotángama kati na mombóto ya mwasi uta na Pantekoti na mobu 33 T.B.—Yoane 3:3, 5; Bagalatia 3:16, 29.
4. Lolenge nini Genese 3:15 ezali komonisa ete mabelé makokóma Paladiso etondi na bato bazangi lisumu mpe bazangi kokufa?
4 Ye oyo na bokosi na ye amemaki bato na kobungisa Paladiso akamataki nyoka kati na Edene lokola esaleli mpo na koloba. Genese 3:15 elobelaki ntango oyo moto wana asalelaki nyoka akobomama. Na nsima nzela ekofungwana lisusu mpo basaleli ya Nzambe ete báfanda na Paladiso, kozanga lisumu mpe kozanga kokufa. Oyo nde ntango ya esengo!—Emoniseli 20:1-3; 21:1-5.
5. Bizaleli nini bizali komonisa bakitani ya Zábolo na elimo?
5 Na nsima ya botomboki oyo esalemaki na Edene, bato mpe bibongiseli ya bato ebandaki kobima mpe komonisa bizaleli bikokani na oyo ya Satana Zábolo—botomboki, bokosi, matɔ́ngi, mpe koboma, bakisá mpe botɛmɛli mokano ya Nzambe mpe botɛmɛli baoyo basambelaka Yehova. Bizaleli yango bimonisaki polele bakitani, bana ya Zábolo na elimo. Kati na bango tokoki kotánga Kaina, oyo abomaki Abele wana Yehova andimaki losambo ya Abele mpe aboyaki oyo ya Kaina. (1 Yoane 3:10-12) Nkombo mpenza ya Nimilodi emonisaki ye lokola motomboki mpe akómaki mobomi monene ya banyama mpe mokonzi na botɛmɛli liboso na Nzambe. (Genese 10:9) Na nsima bikonzi ya mokili bilandaki kobima, kati na yango Babilone, elongo na mangomba na yango masimbamaki na Letá mpe matongamaki kati na bokosi, mpe bikonzi yango binyokolaki makasi basaleli ya Yehova.—Yilimia 50:29.
“Koyinana kati na yo mpe mwasi”
6. Ndenge nini Satana asili komonisa koyina epai na mwasi ya Yehova?
6 Na boumeli ya ntango wana nyonso, koyinana ezalaki kati na Nyoka mpe mwasi na Yehova, kati na Satana Zábolo mpe lisangá ya Yehova na likoló, oyo esangisi bikelamu ya sembo ya elimo. Koyina ya Satana emonanaki na ntango atumolaki Yehova mpe alukaki kobebisa lisangá ya Yehova na likoló, kolɛngoláká baanzelu ete básundola efandelo oyo ebongi na bango. (Masese 27:11; Yuda 6) Emonanaki bongo na ntango Satana asalelaki bademó na ye mpo na komeka kopekisa mosala ya baanzelu bamemi-nsango oyo Yehova atindaki. (Danyele 10:13, 14, 20, 21) Eyaki koyebana lisusu polele mpenza na ekeke oyo ya 20 na ntango Satana alukaki kolimwisa Bokonzi ya Masiya na ntango ebotamaki.—Emoniseli 12:1-4.
7. Mpo na nini baanzelu ya sembo ya Yehova bayinaki Nyoka ya elilingi, kasi basili komipekisa kosala nini?
7 Mwasi ya Yehova, lisangani ya baanzelu ya sembo, ye mpe ayinaki Nyoka oyo ya elilingi. Satana atukaki nkombo ya Nzambe; abɛtaki mpe ntembe likoló na bosembo ya bikelamu nyonso ya mayele bisalemi na Nzambe, sangisá mpe baanzelu nyonso, mpe azalaki komeka na molende nyonso kobebisa bosembo na bango epai na Nzambe. (Emoniseli 12:4a) Baanzelu ya sembo, bakeluba, mpe baselafa, na ntembe te, bayinaki ye oyo amikómisaki Zábolo mpe Satana. Nzokande, bazali kozela ete Yehova asilisa makambo yango na ntango oyo ye moko asilá kokana mpe na lolenge na ye moko.—Kokanisá na Yuda 9.
Koyinama ya mombóto ya mwasi ya Nzambe
8. Satana azalaki kozela nani na likebi nyonso?
8 Bobele na ntango yango, Satana azalaki kozela na likebi mpenza mombóto ya mwasi oyo alakamaki, oyo Yehova alobaki na ntina na ye ete akonyata Nyoka na motó. Na ntango anzelu moko oyo autaki na likoló asakolaki ete Yesu, oyo abotamaki na Beteleme, azalaki “Mobikisi, ye Klisto Nkolo,” yango ezalaki endimiseli makasi ete asengelaki kokóma Mombóto ya mwasi, oyo alakamaki.—Luka 2:10, 11.
9. Nsima ya kobotama ya Yesu, lolenge nini Satana amonisaki koyina na ye makasi?
9 Koyina makasi oyo Satana azali na yango eyaki komonana nokinoki na ntango apusaki banganga-minzoto ete bákokisela ye mokumba moko oyo ememaki bango liboso epai na Mokonzi Elode na Yelusaleme mpe na nsima basengelaki kokende na Beteleme kati na ndako epai kuna bakutaki mwana mobali Yesu mpe mama na ye, Malia. Mwa moke na nsima Mokonzi Elode apesaki etindá ete bana mibali nyonso kobanda na mbula mibale kino na nsé bábomama, kati na Beteleme mpe na zingazinga. Na yango, Elode ayinaki Mombóto na kolandáká mpenza ezaleli ya Satana. Na ntembe te, Elode ayebaki malamu ete azalaki nde koluka koboma ye oyo asengelaki kozala Masiya. (Matai 2:1-6, 16) Lisoló ya bato lindimisi ete Mokonzi Elode azalaki na bizaleli ya mbindo, azalaki na mayele mabe, mpe azalaki mobomi—azalaki mpenza moko kati na mombóto ya Nyoka.
10. (a) Na nsima ya batisimo ya Yesu, lolenge nini Satana ye moko alukaki kopekisa mokano ya Yehova oyo etalaki Mombóto oyo molakamaki? (b) Lolenge nini Satana asalelaki bakonzi ya lingomba ya Bayuda mpo na kokokisa myango na ye?
10 Nsima wana Yesu asilaki kopakolama na elimo santu na mobu 29 T.B. mpe Yehova alobaki uta na likoló ete andimi Yesu ete azali mwana na ye, Satana amekaki mbala na mbala kopusa Yesu ete akwea na komekama, kolukáká bongo kobebisa mokano ya Yehova oyo etalelaki Mwana na ye. (Matai 4:1-10) Lokola alóngaki te, na nsima, asalelaki lisusu bato mpo na kokokisa myango na ye. Kati na bato oyo asalelaki mpo na kokweisa Yesu, ezalaki mpe na bakonzi ya mangomba oyo batondaki na bokosi. Basalelaki lokuta mpe matɔ́ngi, lolenge ya myango oyo Satana ye moko asalelaki. Na ntango Yesu ayebisaki mokatatali moko ete: “Yiká mpiko . . . masumu na yo malimbisami,” bakomeli, kozanga kozela mpo na komona soki moto yango akobika solo mpenza, bakweisaki Yesu ete azali motuki. (Matai 9:2-7) Na ntango Yesu abikisaki bato na mokolo ya Sabata, Bafalisai bafundaki ye ete azali mobuki na mobeko ya Sabata mpe bayangaki mwango mpo na koboma ye. (Matai 12:9-14; Yoane 5:1-18) Na ntango Yesu abimisaki bademó, Bafalisai bafundaki ye ete azalaki na boyokani na “Belezebula, mokóló na [“bademó,” NW].” (Matai 12:22-24) Nsima wana Lasalo asekwisamaki kati na bakufi, bato mingi bandimelaki Yesu, kasi banganga minene mpe Bafalisai bayangaki lisusu mwango mpo na koboma ye.—Yoane 11:47-53.
11. Mikolo misato liboso ya kufa na ye, Yesu amonisaki ete nani azalaki eteni ya mombóto ya Nyoka mpe mpo na nini?
11 Na mokolo mwa 11 Nisan 33 T.B., Yesu, atako ayebaki malamu makambo oyo bazalaki kokana kosala epai na ye, akendaki kati na Tempelo na Yelusaleme kozanga kobanga mpe kuna asakolaki ekweli likoló na bango liboso na bato banso. Lokola etuluku, bakomeli mpe bafalisai basilaki komonisa lolenge ya bomoto oyo ezalaki kati na bango; na yango Yesu alobaki ete: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! Zambi [bokokanga] Bokonzi na Likoló liboso na bato. Bino mpenza bokoingela wana te nde bokotika te ete baoyo balingi báingela.” Na lolenge lobongi mpenza, Yesu alobaki ete bazalaki eteni ya mombóto ya Nyoka, kolobáká ete: “Banyoka, bana na bitupa! Bokokima nde ekweli na Geena boni?” (Matai 23:13, 33) Elobeli na ye ekundweli biso esakweli oyo ezwami na Genese 3:15.
12, 13. (a) Lolenge nini banganga minene mpe bakomeli bamonisaki elembeteli oyo ezalaki kolakisa nani azali tata na bango na elimo? (b) Nani asanganaki elongo na bango? (c) Na kokokisama ya Genese 3:15, lolenge nini Mombóto ya mwasi eswamaki na litindi?
12 Nsima ya koyoka maloba ya Yesu, batungisamaki nde na mitema na bango, na boye ete basɛngaki bolimbisi epai na Nzambe? Babongolaki motema na mabe na bango? Soko moke te! Malako 14:1 eyebisi ete bobele na mokolo oyo molandaki, kati na liyangani moko na lopango ya nganga monene, “banganga minene mpe bakomeli bazalaki koluka nzela na mayele mpo na kokanga [Yesu] mpe koboma ye.” Bakóbaki komonisa elimo ya koboma oyo Satana azali na yango, ye oyo Yesu asilaki komonisa liboso ete azali mobomi. (Yoane 8:44) Nokinoki, Yuda Mokeliota asanganaki na bango, ye oyo Satana apusaki ete akóma mopɛngwi. Yuda asundolaki Mombóto mozangi ekweli, oyo ya mwasi ya Nzambe, mpe asanganaki na mombóto ya Nyoka.
13 Na ntɔ́ngɔ́ mpenza ya mokolo mwa 14 Nisan, basangani ya esambiselo ya lingomba ya Bayuda bakangaki Yesu lokola moto na bolɔ́kɔ mpe bamemaki ye epai na moyangeli Moloma. Sikawa, ezalaki bongo banganga minene nde bakambaki bato na konganga mpo na kosɛnga ete abakisama likoló na nzeté. Na ntango Pilata atunaki ete: “Nabakisa mokonzi na bino [“likoló na nzeté,” NW]?” ezalaki banganga minene nde bayanolaki ete: “Tozali na mokonzi te bobele Kaisala.” (Yoane 19:6, 15) Ya solo, bamimonisaki mpenza ete bazalaki eteni ya mombóto ya Nyoka. Kasi bazalaki bobele bango moko te. Lisoló lipemami oyo ezwami kati na Matai 27:24, 25 eyebisi ete: “[Pilata] akamati mai mpe asukoli mabɔkɔ na ye liboso na bato.” Na bongo, bato nyonso balobaki ete: “Makila na ye mazala likoló na biso mpe likoló na bana na biso!” Na yango, Bayuda mingi ya eleko wana bamimonisaki ete bazalaki eteni ya mombóto ya Nyoka. Yesu akufaki bobele na mokolo yango. Na kosaleláká mombóto na ye oyo ezali komonana, Satana aswaki Mombóto ya mwasi ya Nzambe na litindi.
14. Mpo na nini koswama ya Mombóto ya mwasi na litindi elimbolaki te bolóngi mpo na Satana?
14 Satana alóngaki? Soko moke te! Yesu Klisto asilaki kolónga mokili mpe mokonzi na yango. (Yoane 14:30, 31; 16:33) Abatelaki bosembo na ye epai na Yehova kino kufa. Kufa na ye lokola moto ya kokoka epesaki lisiko oyo esengelaki kosomba lotómo ya bomoi oyo Adama abebisaki. Na yango, afungolaki nzela ya bomoi ya seko mpo na baoyo bakomonisa kondima kati na ebongiseli wana mpe bakotosa mitindá ya Nzambe. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Yehova asekwisaki Yesu kati na bakufi mpo na kozwa bomoi bozangi nsuka na likoló. Na ntango oyo Yehova asilá kobongisa, Yesu akoboma Satana. Kati na Genese 22:16-18, esakolami ete Yehova akopesa ngɔlu epai na mabota nyonso na mabelé oyo bazali kosala nyonso ekoki mpo na komipambola na nzela ya Mombóto wana ya sembo.
15. (a) Na nsima ya liwa ya Yesu, lolenge nini bantoma na ye bakóbaki kotɔndɔla mombóto ya Nyoka? (b) Na lolenge nini mosusu mombóto ya Nyoka akóbi komonisa koyina na ye kino na mikolo na biso?
15 Na nsima ya liwa ya Yesu, baklisto bapakolami na elimo bakóbaki kotɔndɔla mombóto ya Nyoka, lokola Nkolo na bango asalaki yango. Na kopusama na elimo santu, ntoma Paulo apesaki likebisi na ntina na “[motyoli na mibeko, NW]” oyo kozala na ye ekoya “mpo na mosala na Satana.” (2 Batesaloniki 2:3-10) Esili komonana ete kelasi ya bato oyo basali “motyoli” yango ezali bongo etuluku ya bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba. Na nsima, mombóto ya Nyoka enyokolaki makasi mpenza bayekoli ya Yesu Klisto. Kati na esakweli oyo ekomami na Emoniseli 12:17, ntoma Yoane asakolaki ete Satana asengelaki kokóba kobundisa batikali ya mombóto ya mwasi ya Nzambe kino na mikolo na biso. Yango esalemaki bobele bongo. Na mikili mingi, Batatoli ya Yehova bapekisami, babundisami na bibele ya bato, batyami na bolɔ́kɔ, to babwakami kati na káa ya bakangami mpo na etɛlɛmɛlo na bango ya ngwi na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe banzela na ye ya sembo.
Kotɔndɔlama ya mombóto ya Nyoka na mikolo na biso
16. Na mikolo na biso, banani basili kotɔndɔlama ete bazali eteni ya mombóto ya Nyoka, mpe lolenge nini?
16 Na ndakisa ya Yesu Klisto, baklisto ya solo balɛmbi te kati na mosala na bango oyo bazali kosala na kozanga kobanga, ya kotɔndɔla Nyoka mpe mombóto na ye. Na 1917 Bayekoli ya Biblia, lolenge bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova na ntango wana, babimisaki búku Le mystère accompli, oyo kati na yango bamonisaki polele bokosi ya bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba. Na 1924, elandanaki na ekateli moko oyo enyatamaki na lolenge ya trakte, oyo ezalaki na motó ya likambo Acte d’accusation contre le clergé. Milió ntuku mitano ya batrakte yango ekabolamaki na mikili mingi. Na 1937, J. F. Rutherford, oyo azalaki prezidá ya la Société Watch Tower na ntango wana, atɔndɔlaki mombóto ya Satana na nguya nyonso kati na masoló oyo mazalaki na mitó ya makambo: “Batɔndɔlami,” mpe “Mangomba mpe boklisto.” Na mobu molandaki, bato bayanganaki na mayangani 50 oyo esalemaki na mikili mikeseni balandaki na nzela ya telefone ekangisami na radio lisoló “Bosolo ya makambo” oyo asalaki uta na engumba Londres, na Angleterre. Sanza moko na nsima, ebongiseli moko monene oyo esangisaki baradio mingi na États-Unis elekisaki lisoló “Bokonzi mabe to bonsɔ́mi.” Masoló ya nguya mpo na kotɔndɔla oyo ezwamaki kati na babúku Enemies (Banguna) mpe Religion (Mangomba) mpe lisusu kati na mwa búku Uncovered (Batɔndɔlami) ebakisamaki likoló na yango. Na boyokani na mikanda oyo mibimisamaki na bambula 1920, mokanda Emoniseli—kokokana na yango monene ebelemi!,a oyo esili kobima sikawa na nkótá 65, ezali komonisa ete bakonzi ya politiki ya libebi mpe ya lokoso, bato na mombongo ya nsɔ́ni, banso bazali bato ya liboso kati na basangani ya mombóto ya Nyoka oyo ezali komonana. Na ntango bakonzi ya politiki bakómisi lokuta lokola momeseno mpo na kozimbisa bato na bango, na kozanga kotalela makila na lolenge ya bulɛɛ, mpe na konyokola basaleli ya Yehova (komonisáká bongo koyina epai na mombóto ya mwasi ya Nzambe), bazali komimonisa ete bazali eteni ya mombóto ya Nyoka. Ezali mpe bongo mpo na basáli na mombongo oyo, na kozanga kotungisama na lisosoli, bazali kobuka lokuta mpo na kozwa mosolo mingi mpe baoyo bazali kosala mpe kotekisa biloko oyo biyebani ete bipesaka maladi.
17. Libaku nini ezali naino liboso na bato minene oyo bakoki mbala mosusu kobima longwá na ebongiseli ya mokili oyo?
17 Ezali Bato nyonso te oyo babebisami na mbindo ya mangomba, ya politiki, to ya mombongo ya mokili nde bakotángama na nsuka lokola eteni ya mombóto ya Nyoka. Bamoko kati na mibali mpe basi yango bazali kokóma na bosepeli epai na Batatoli ya Yehova. Bazali kosalela nguya na bango mpo na kosunga bango, mpe na nsima bazali koyamba losambo ya solo. (Kokanisá na Misala 13:7, 12; 17:32-34.) Epai na bato nyonso ya motindo wana, libyangi oyo esili kopesama: “Boye sasaipi, bino mikonzi, zalá na mayele; yoká toli, bino basambisi na mokili. Salelá [Yehova] mosala na botosi, sepelá nde na kolɛngalɛnga. Pwepwá makolo na ye ete asilika te, ete mpe bóbeba kati na nzela te; zambi akopelisa nkanda na ye noki. Bango nyonso baoyo bakomibomba epai na ye bakopambolama.” (Nzembo 2:10-12) Ya solo, ezali na ntina mingi mpo na baoyo balingaka kozwa ngɔlu ya Yehova ete básala eloko uta sikawa, liboso ete Mosambisi na likoló akanga ekuke!
18. Atako batángami kati na mombóto ya mwasi te, banani babéngami basambeli ya Yehova?
18 Bobele baoyo bakozala kati na Bokonzi na likoló nde bazali eteni ya mombóto ya mwasi. Motángo na bango ezali moke. (Emoniseli 7:4, 9) Nzokande, ezali na ebele monene ya basusu, ee, ebele ya bamilió oyo, lokola bazali basambeli ya Yehova, bazali kozela na esengo nyonso bomoi ya seko na Paladiso na mabelé. Na maloba mpe na misala, bazali koyebisa bapakolami ya Yehova ete: “Tokokenda na [bino] elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.”—Zekalia 8:23.
19. (a) Liponi nini bato nyonso basengeli kosala yango? (b) Wana ekuke ezali naino polele, epai na banani mpenzampenza libyangi ya kosala na mayele nyonso epesami na etingya nyonso?
19 Sikawa ezali ntango oyo bato nyonso basengeli kosala liponi. Balingi kosalela Yehova mpe kosimba boyangeli na ye, to balingi kotikela Satana nzela ete azala mokonzi na bango na kosaláká makambo oyo mazali kosepelisa ye? Bato soko milió mitano bauti na bikólo nyonso basili kokamata etɛlɛmɛlo na bango na ngámbo ya Yehova elongo moko na batikali ya mombóto ya mwasi, basangoli ya libula ya Bokonzi. Milió mwambe mosusu bamonisi mposa ya koyekola Biblia elongo na bango to ya koyangana na makita na bango. Batatoli ya Yehova bazali koloba epai na bato yango nyonso ete: Ekuke ezali naino polele. Kamatá etɛlɛmɛlo na yo na ngámbo ya Yehova kozanga kokakatana. Ndimá Yesu Klisto lokola Mombóto oyo molakamaki. Sanganá na esengo nyonso elongo na lisangá ya Yehova oyo ezali komonana. Tiká ete ozwa mpe mapamboli nyonso oyo akopesa na nzela ya Mokonzi, Yesu Klisto.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Ozali komikundola?
◻ Nyoka oyo elobelami kati na Genese 3:15 ezali nde nani? Mpe mwasi ezali nde nani?
◻ Bizaleli nini bimonisi mombóto ya Nyoka?
◻ Lolenge nini Yesu atɔndɔlaki mombóto ya Nyoka?
◻ Banani bamonisami ete bazali eteni ya mombóto ya Nyoka na mikolo na biso?
◻ Likambo nini tosengeli kosala yango na lombangu soki toboyi kotángama kati na mombóto ya Nyoka?
[Elilingi na lokasa 10]
Yesu atɔndɔlaki bakonzi ya mangomba ete bazali eteni ya mombóto ya Nyoka