Kimá na esika ya libateli liboso ete “bolɔ́zi monene” eya
“Soko bokomona Yelusaleme kozingama na bibele na basodá, . . . bango kati na Yuda bákima kuna na ngomba.”—LUKA 21:20, 21.
1. Mpo na nini baoyo bazali naino kati na mokili basengeli kokima na lombangu mpenza?
BATO nyonso oyo bazali kati na mokili ya Satana basengeli kokima na lombangu mpenza. Soki balingi kobikisama na ntango ebongiseli ya biloko oyo ekolongolama awa na mabelé, basengeli komonisa elembeteli ya polele ete basilaki kokamata etɛlɛmɛlo na bango ya ngwi na ngambo ya Yehova mpe ete bazali lisusu bato ya mokili te, oyo Satana azali mokonzi na yango.—Yakobo 4:4; 1 Yoane 2:17.
2, 3. Mituna nini mitaleli Maloba ya Yesu oyo mazwami kati na Matai 24:15-22 tokotalela yango?
2 Kati na esakweli na ye monene na ntina na nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo, Yesu alobelaki mingi ntina ya kokima wana. Tolobelaka mingi makambo oyo mazwami kati na Matai 24:4-14; kasi, makambo oyo malobelami nsima na yango mazali mpe na ntina. Tozali kolendisa yo ete ofungola Biblia na yo sikawa mpe otánga Mt 24 molɔngɔ́ 15 kino molɔngɔ́ 22.
3 Esakweli yango elimboli nini? Na ekeke ya liboso, nini ezalaki bongo “Mbindo-na-Libebisi”? “Kotɛlɛma na esika na bulɛɛ” elimbolaki nini? Likambo yango ezali na ndimbola nini mpo na biso?
“Tiká ete motángi ayeba ntina”
4. (a) Likambo nini Danyele 9:27 elobi, oyo esengelaki kosalema nsima wana Bayuda bakoboya Masiya? (b) Na ntango alobelaki yango, mpo na nini Yesu alobaki polele ete: “Tiká ete motángi ayeba ntina”?
4 Tomoni kati na Matai 24:15 ete Yesu alobelaki makambo oyo mazwami na mokanda ya Danyele. Kati na Da mokapo 9 ya mokanda yango, tozali kokuta esakweli oyo elobelaki koya ya Masiya mpe kosambisama oyo esengelaki kokwela ekólo ya Bayuda mpo ete babwakaki ye. Eteni ya nsuka ya Da 9 molɔngɔ́ 27 (NW) elobi ete: “Ye oyo akoyeisaka libebi akozala likoló na mapapu ya biloko ya mbindo.” Bayuda ya kala balobaki ete eteni wana ya esakweli ya Danyele ekokanaki na ntango Antiochos IV abebisaki tempelo ya Yehova na Yelusaleme na ekeke ya mibale L.T.B. Kasi Yesu apesaki likebisi oyo: “Tiká ete motángi ayeba ntina.” Lolenge Antiochos IV atukaki tempelo, atako ezalaki mpenza likambo ya mbindo, kasi ebimisaki libebi te—ezala likoló na Yelusaleme, likoló na tempelo, to likoló na ekólo ya Bayuda. Na yango, emonani polele ete Yesu azalaki kokebisa bayoki na ye ete kokokisama na yango emonanaki na ntango ya kala te kasi esengelaki komonana na mikolo mizalaki koya.
5. (a) Lolenge nini bokokanisi ya masoló ya Baevanzile esalisi biso mpo ete tóyeba “Mbindo” na ekeke ya liboso? (b) Mpo na nini Cestius Gallus atindaki mampinga ya Loma na Yelusaleme na mobu 66 T.B.?
5 “Mbindo” oyo basengelaki kosɛnzɛla na ntina na yango ezalaki nini? Likambo oyo Yesu alobaki kati na Matai esengeli mpenza kobenda likebi na biso, ete: “Wana ekomona bino Mbindo-na-Libebisi . . . kotɛlɛma na esika na bulɛɛ.” Nzokande, lisoló likokani na yango oyo lizwami kati na Luka 21:20 elobi ete: “Soko bokomona Yelusaleme kozingama na bibele na basodá, bóyeba na ntango yango ete libebisi na yango esili kobɛlɛma.” Na mobu 66 T.B., baklisto oyo bazalaki kofanda na Yelusaleme bamonaki makambo oyo Yesu asakolaki. Kolandana ya makambo oyo mabimaki na ntina na kowelana kati na Bayuda mpe bakonzi ya Baloma esalaki ete Yelusaleme ekóma esika oyo botomboki mpo na Loma ezalaki kosalema mingi. Na yango, mobulu mobimaki na Yuda, na Samalia, na Galilai, na Dekapoli, mpe na Foenikia, na nɔ́rdi ya Sulia, mpe na súdi ya Ezipito. Mpo na kozongisa mwa kimya na eteni wana ya Boyangeli ya Loma, Cestius Gallus atindaki basodá uta na Sulia kino na Yelusaleme, oyo Bayuda bazalaki kotalela lokola “[engumba ya bulɛɛ, NW].”—Nehemia 11:1; Yisaya 52:1.
6. Na ndimbola nini ezalaki solo ete “mbindo” eyaki ‘kotɛlɛma na esika na bulɛɛ’?
6 Mampinga ya Loma bazalaki na momeseno ya komema bendɛ́lɛ, to dalapó, oyo bango moko bazalaki kotalela ete ezalaki bulɛɛ kasi Bayuda batalelaki yango ete ezalaki losambo ya bikeko. Likambo ya kobenda likebi ezali ete, liloba ya Liebele oyo ebongolami ete “mbindo” kati na mokanda ya Danyele esalelami liboso mpenza mpo na bikeko mpe losambo ya bikeko.a (Deteronome 29:17) Atako Bayuda batɛmɛlaki bango, kasi mampinga ya Baloma elongo na badalapó na bango bakɔtaki kati na Yelusaleme na Novɛ́mbɛ ya mobu 66 T.B. mpe na nsima babandaki kobebisa bifelo ya tempelo na nɔ́rdi. Ntembe ezali soko moke te na ntina na yango—“mbindo” oyo ekokaki koyeisa libebi na Yelusaleme ‘etɛlɛmaki na esika na bulɛɛ’! Kasi lolenge nini moto akokaki kokima?
Basengelaki kokima na lombangu mpenza!
7. Limpinga ya Baloma esalaki nini na pwasa?
7 Na pwasa, mpe na ntina oyo bato bakokaki koyeba yango te, wana emonanaki ete Yelusaleme ekokaki kokamatama kozanga nkaká, mampinga ya Baloma balongwaki. Batomboki Bayuda babenganaki mampinga ya Baloma, kasi bobele kino na Antipatali, soko na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 50 longwá na Yelusaleme. Na nsima bazongaki. Na ntango bakómaki na Yelusaleme, bayanganaki kati na tempelo mpo na kolɛngɛla myango mosusu ya kobunda. Bazwaki bilenge mpo na kobongisa lisusu bisika makasi mpe kosala mosala ya sodá. Baklisto basanganaki kati na yango? Atako bapɛngolaki yango, kasi bakóbaki kofanda na esika wana ya likámá kino ntango mampinga ya Baloma mazongaki?
8. Likambo nini baklisto basalaki yango na lombangu mpenza mpo na kotosa esakweli ya Yesu?
8 Nokinoki, baklisto oyo bazalaki na Yelusaleme mpe na Yuda batosaki likebisi oyo elobelamaki kati na esakweli Yesu apesaki mpe bakimaki esika wana ya likámá. Basengelaki kokima na lombangu mpenza! Na nsima, bakendeki na bitúká bizwami likoló ya bangomba, ekoki kozala ete ndambo na bango bafandaki na Pella, na etúká ya Pérée. Baoyo balandaki likebisi ya Yesu bazongaki te lokola bazoba mpo na koluka kobatela bozwi na bango ya mosuni. (Kokanisá na Luka 14:33.) Na ntembe te, kosala mobembo kati na ezalela ya makambo motindo wana, mpo na basi oyo bazalaki na zemi mpe bamama oyo bazalaki konungisa bana, kotambola nzela molai na makolo ezalaki likambo ya mpasi. Mibeko ya Sabata mipekisaki kokima na bango te, mpe atako eleko ya mpiɔ ezalaki kobɛlɛma, kasi eyaki naino mpenza te. Baoyo balandaki likebisi ya Yesu ya kokima na lombangu mpenza bakómaki nokinoki na libándá ya Yelusaleme mpe ya Yuda na libateli nyonso. Yango etalelaki bomoi na bango.—Kokanisá na Yakobo 3:17.
9. Mampinga ya Loma mazongaki nokinoki, mpe yango ebimisaki likambo nini?
9 Bobele na mobu oyo molandaki, na 67 T.B., Baloma bazongaki lisusu kobundisa Bayuda. Ya liboso, Galilai ekamatamaki. Na mobu molandaki, Yuda ebebisamaki. Na mobu 70 T.B., mampinga ya Baloma mazingaki Yelusaleme mpenza. (Luka 19:43) Nzala ekómaki makasi mingi. Baoyo bakangamaki kati na engumba babandaki kobunda bango na bango. Bato nyonso oyo balukaki kokima babomamaki. Makambo oyo bamonaki, lokola Yesu alobaki yango, ezalaki bongo “bolɔ́zi monene.”—Matai 24:21.
10. Soki totángi na bososoli nyonso, tokotya likebi likoló na likambo nini mosusu?
10 Yango ekokisaki na mobimba mpenza makambo oyo Yesu asakolaki? Te, makambo mosusu masengelaki kosalema. Soki, lokola Yesu alobaki yango, totángi Makomami na bososoli nyonso, tokozanga te kotya likebi na biso likoló na makambo oyo mazali liboso. Tokokanisa mpe na mozindo mpenza ndimbola na yango kati na bomoi na biso.
“Mbindo” ya mikolo na biso
11. Na mikapo mibale mosusu nini Danyele alobeli “mbindo,” mpe mikapo yango mizali kolobela eleko nini?
11 Yebá ete, kolongola makambo oyo touti komona kati na Danyele 9:27, ezali mpe na bisika mosusu epai kuna balobeli “Mbindo-na-Libebisi,” na ndakisa Danyele 11:31 mpe 12:11. Kati na bisika wana, ata epai moko te balobeli kobebisama ya Yelusaleme. Ya solo, makambo oyo malobelami kati na Danyele 12:11 mayei milɔngɔ́ mibale nsima ya kolobelama ya “ntango na nsuka.” (Danyele 12:9) Tozali kobika na eleko yango uta 1914. Na yango, tosengeli kosɛnzɛla mpo na koyeba “Mbindo-na-Libebisi” ya mikolo na biso mpe kondimisama solo ete tosili kokima esika ya likámá.
12, 13. Mpo na nini elongobani kobénga Lisangá ya Mabota ete ezali “mbindo” ya ntango na biso?
12 Nini ezali “mbindo” wana na mikolo na biso? Bilembeteli bimonisi ete ezali bongo Lisangá ya Mabota, oyo ebandaki mosala na yango na 1920, mwa moke nsima wana mokili mokɔtaki na ntango na yango ya nsuka. Kasi na ndimbola nini yango ezalaki “Mbindo-na-Libebisi”?
13 Tóbosana te ete, liloba ya Liebele oyo ebongolami na “mbindo” esalelami kati na Biblia mpo na kolobela liboso mpenza bikeko ya losambo mpe misala ya losambo ya bikeko. Lisangá wana epesamelaki losambo? Ee, ezalaki bongo mpenza! Bakonzi ya mangomba batyaki yango na “esika na bulɛɛ,” mpe balandi na bango basambelaki yango na molende nyonso. Lisangani ya Mangomba ya Klisto na Amerika elobaki ete Lisangá wana esengelaki kozala “komonisama ya Bokonzi ya Nzambe awa na mabelé na nzela ya politiki.” Sénat ya États-Unis ezwaki ebele ya nkomá eutaki na mangomba oyo mazalaki kosɛnga ete etya mabɔkɔ mpo na kondima Boyokani ya Lisangá ya Mabota. Lisangani ya mangomba ya Baptiste, ya Congrégationaliste, mpe ya ba Presbytérien na Grande-Bretagne esanzolaki yango ete ezali “esaleli bobele moko oyo tozali na yango mpo na kozwa [kimya awa na mabelé].”—Talá Emoniseli 13:14, 15.
14, 15. Na lolenge nini Lisangá yango mpe na nsima Mabota Masangani eyaki kotɛlɛma “na esika na bulɛɛ”?
14 Bokonzi ya Masiya ya Nzambe esilaki kotyama na makoló na 1914, kasi mabota mabandaki kobunda mpo na kowela bokonzi na bango moko. (Nzembo 2:1-6) Na ntango likanisi lipesamaki ete Lisangá ya Mabota ekoka kosalema, mabota oyo mautaki kobunda na boumeli ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, bakisá mpe bakonzi ya mangomba oyo bapambolaki mampinga na bango, basilaki komonisa ete basundolaki mibeko ya Nzambe. Bazalaki kotalela Klisto lokola Mokonzi te. Na yango batyaki likoló na ebongiseli ya bato mikumba oyo mizali ya Bokonzi ya Nzambe; batyaki Lisangá ya Mabota na ‘esika na bulɛɛ,’ esika oyo ezalaki mpo na yango te.
15 Lokola mokitani ya Lisangá wana, Mabota Masangani ebimisamaki na mokolo mwa 24 Ɔkɔtɔ́bɛ 1945. Na nsima, bapápa ya Loma bakumisaki Mabota Masangani lokola “elikya ya nsuka mpo na boyokani mpe kimya” mpe “esika eleki monene mpo na kolobela kimya mpe bosembo.” Ee, Lisangá ya Mabota, elongo na mokitani na yango, Mabota Masangani, bakómaki solo bikeko ya losambo, “Mbindo” na miso ya Nzambe mpe na miso ya basaleli na ye.
Tosengeli kokima nini?
16. Bato oyo balingaka boyengebene basengeli kokima nini?
16 Nsima ya ‘komona’ yango, nsima ya koyeba soki ebongiseli wana oyo esangisi mikili mingi ezali nini mpe koyeba lolenge oyo ezali kosambelama, bato oyo balingaka boyengebene basengeli kokima na esika ya libateli. Kokima nini? Kokima esika oyo na mikolo na biso ekokisi elilingi ya Yelusaleme oyo ezangaki sembo, ezali bongo boklisto ya nkombo mpamba, mpe kokima Babilone monene, ebongiseli ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta.—Emoniseli 18:4.
17, 18. Libebi nini “mbindo” ya mikolo na biso ekoyeisa?
17 Tóbosana mpe te ete, na ekeke ya liboso, na ntango mampinga ya Baloma elongo na babendɛ́lɛ na bango ya losambo ya bikeko bakɔtaki kati na engumba ya bulɛɛ ya Bayuda, ezalaki mpo na kobebisa Yelusaleme mpe ebongiseli ya losambo na yango. Na mikolo na biso, libebi ekoya bobele likoló na engumba moko te, soko mpe bobele likoló na boklisto ya nkombo mpamba te, kasi likoló na ebongiseli ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta.—Emoniseli 18:5-8
18 Kati na Emoniseli 17:16, esakolami ete nyama na yauli ya motane ngwaa ya elilingi, oyo emonani mpenza ete ezali bongo Mabota Masangani, ekobalukela Babilone monene mpe ekobebisa yango na lolenge ya nsɔ́mɔ. Na kosaleláká maloba ya elilingi, esakweli elobi ete: “Maseke zomi mamonaki yo, bango mpe nyama bakoyina mwasi na pite, bakobebisa ye, mpe bakozalisa ye bolumbu; bakolya mosuni na ye, mpe bakotumba ye na mɔ́tɔ.” Ndimbola ya makambo yango ezali nsɔ́mɔ. Nsuka na yango ekozala bongo kobomama ya mangomba nyonso ya lokuta na mokili mobimba. Yango ekomonisa mpenza ete bolɔ́zi monene esili kobanda.
19. Bikólo ya lolenge nini bizwami kati na Mabota Masangani uta na ebandeli na yango, mpe mpo na nini likambo yango ezali na ndimbola monene?
19 Ebongi tósimba likambo oyo ete uta Lisangá ya Mabota ebandaki misala na yango na 1945, kati na yango bikólo oyo bindimaka Nzambe te, oyo bitɛmɛlaka mangomba bisili komonisa bopusi monene katikati na basangani na yango. Na bileko bikeseni, kati na mokili mobimba, bikólo lolenge yango ya makambo makasi bisili kokokisa mosala monene ya kotya bipekiseli mingi likoló na mangomba to bobele kopekisa yango mpenza. Nzokande, na mwa bambula oyo euti koleka, biyangeli mingi bisili kotika konyokola mangomba. Bamoko bakoki kokanisa ete makambo ya mpasi makokwela lisusu mangomba te.
20. Mangomba ya mokili masili koyebana mpo na makambo nini na yango?
20 Nzokande, mangomba ya Babilone monene makóbi kozala nguya monene oyo ebimisaka mobulu kati na mokili. Mbala mingi bansango eyebisaka nkombo ya mangomba oyo babundi mpe bituluku ya banganga-mobulu bazali kati na yango. Bapolísi mpe basodá basengelaki kokenda na batempelo mpo na kopekisa mobulu kati na bituluku mibale bikeseni ya bato ya mangomba. Mangomba mazali kobimisa mosolo mpo na kopesa mabɔkɔ na mbongwana ya politiki. Koyinana kati na mangomba esili kokweisa milende oyo Mabota Masangani ezali kosala mpo na kobatela boyokani malamu kati na bato ya bikólo bikeseni. Mpo na kolanda mokano na bango ya kotya kimya mpe libateli, basangani mosusu ya Mabota Masangani balingi kosukisa bopusi nyonso ya mangomba, oyo ezali kopekisa kokokisama ya mikano na bango.
21. (a) Nani akopona ntango oyo Babilone Monene esengeli kobomama? (b) Eloko nini tosengeli kosala na lombangu mpenza liboso na yango?
21 Ezali mpe na likambo mosusu ya ntina oyo tosengeli kotalela. Atako maseke elongo na mampinga na yango oyo ezali kati na Mabota Masangani makosalelama mpo na koboma Babilone monene, nzokande kobomama yango ekozala solo kokokisama ya lisambisi ya Nzambe. Lisambisi yango ekokokisama na ntango ebongisami na Nzambe. (Emoniseli 17:17) Tosengeli kosala nini sikawa? Biblia eyanoli ete: “Bóbima na ye”—kobima longwá na Babilone monene.—Emoniseli 18:4.
22, 23. Kokima yango elimboli nini?
22 Kokima wana mpo na kokende na esika ya libateli elimboli te kolongwa na mboka moko mpe kokende na mboka mosusu, lokola baklisto Bayuda basalaki yango na ntango bakimaki Yelusaleme. Ezali bongo kokima mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba, ee, kolongwa na eteni nyonso ya Babilone monene. Yango elimboli te bobele kokabwana na mangomba ya lokuta, kasi kokabwana mpe na mimeseno mpe na elimo oyo yango ezali kobimisa. Elimboli kokima na esika ya libateli kati na lisangá oyo etambwisami na teokrasi ya Yehova.—Baefese 5:7-11.
23 Na nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, ntango bapakolami ya Yehova basosolaki mpo na mbala ya liboso ete Mbindo-na-Libebisi ya mikolo na biso ezali bongo Lisangá ya Mabota, lolenge nini Batatoli batalelaki yango? Basilaki komilongola na mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba. Kasi mokemoke, bayaki kososola ete bazalaki naino kondima mimeseno mpe misala mosusu ya boklisto ya nkombo mpamba, lokola kosalela ekulusu mpe kokumisa eyenga ya Mbótama mpe bilambo mosusu ya bapakano. Na ntango bayekolaki solo na ntina na makambo oyo, basalaki nokinoki. Balandaki toli oyo ezwami na Yisaya 52:11: “Bólongwa! Bólongwa! Bókima na esika yango, bómama eloko na mbindo te; bóbima kati na ye, bómibulisa bino mpenza, bino bokokumba biloko na [Yehova].”
24. Mingi mpenza uta 1935, banani basangani mpe kati na kokima yango?
24 Mingi mpenza kobanda na 1935, ebele mosusu ya bato oyo ezali sé kokóla, bato oyo bandimaki elikya ya kofanda libela na paladiso na mabelé, babandaki kosala motindo moko. Bango mpe basili ‘komona eloko na mbindo kotɛlɛma na esika na bulɛɛ,’ mpe bayebi ndimbola na yango. Nsima ya kokamata ekateli ya kokima, bamilongolaki na mangomba ya Babilone monene.—2 Bakolinti 6:14-17.
25. Longolá kokata boyokani nyonso oyo moto akoki kosala yango na mangomba ya lokuta, makambo nini mosusu asengeli kosala?
25 Nzokande, kokima Babilone monene esuki te bobele na kotika mangomba ya lokuta. Esuki te bobele na koyangana na mwa makita kati na Ndako ya Bokonzi to kobima kati na mosala ya kosakola nsango malamu mbala moko to mibale na sanza. Moto akoki kozala na libándá ya Babilone na nzoto, kasi atiki yango solo mpenza? Asili kokabwana na mokili oyo Babilone monene ezali eteni ya ntina mingi kati na yango? Azali naino kokangama na makambo oyo mazali komonisa elimo na yango—elimo oyo ezali kotyola mitindá ya sembo ya Nzambe? Azali kotalela pite mpe bosembo kati na libala na motuya te? Alekisaka matomba na ye moko mpe matomba ya mosuni liboso ya matomba ya elimo? Asengeli komitika te ete ebongiseli ya biloko oyo ezala na bopusi likoló na ye.—Matai 6:24; 1 Petelo 4:3, 4.
Tiká ete eloko moko te epekisa kokima na yo!
26. Eloko nini ekosalisa biso ete tósuka te bobele na kokima, kasi lisusu na kokima kino nsuka mpe kolónga?
26 Kati na kokima na biso na esika ya libateli, tosengeli soko moke te kotala na mposa nyonso makambo oyo totikaki na nsima. (Luka 9:62) Tosengeli kobatela elimo na biso mpe mitema na biso ete mitikala sembo epai na Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye. Tozali na ekateli makasi ya komonisa kondima na biso na kolukáká yango liboso, na elikya ete Yehova akopambola biso na nzela wana ya sembo? (Matai 6:31-33) Bindimeli na biso makasi oyo bizwi moboko na yango kati na Makomami esengeli kopusa biso na kokokisa mokano yango awa ezali biso kozela na motema likoló mpo na komona kobima ya makambo minene na mokili.
27. Mpo na nini ezali likambo ya ntina ete tókanisa na mozindo likoló na mituna oyo mitunami awa?
27 Kokokisama ya lisambisi ya Yehova ekobanda na ntango ya kobebisama ya Babilone monene. Lisangani wana ya mangomba ya lokuta oyo ekokani na mwasi na pite ekobomama mpo na libela. Ntango yango ebɛlɛmi mpenza! Etɛlɛmɛlo ya mokomoko na biso ekozala nini na ntango eleko wana ya ntina mingi ekobanda? Mpe na nsuka ya bolɔ́zi monene, na ntango eteni mosusu ya ebongiseli mabe ya Satana ekobomama, tokozala na ngambo nini? Soki tosali oyo ebongi mpenza uta sikawa, tokobatelama solo. Yehova ayebisi biso ete: “Nde ye oyo akoyokamela ngai akofanda na kimya.” (Masese 1:33) Soki tokóbi kosalela Yehova na bosembo nyonso mpe na esengo nyonso na boumeli ya eleko ya nsuka ya ebongiseli oyo, tokomimonisa bato oyo babongi kosalela Yehova mpo na libela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá búku Insight on the Scriptures, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., Volimi 1, nkasa 634-635.
Ozali komikundola?
◻ Nini ezali “mbindo” ya mikolo na biso?
◻ Na ndimbola nini “mbindo etɛlɛmi na esika na bulɛɛ”?
◻ Lelo oyo, kokima na esika ya libateli elimboli nini?
◻ Mpo na nini likambo yango esengeli kosalema na lombangu mpenza?
[Elilingi na lokasa 16]
Mpo na kobika, bayekoli ya Yesu basengelaki kokima nokinoki