Yehova azalaki na ngai elongo
LISOLÓ YA MAX HENNING
Ezalaki na 1933, na ntango Adolf Hitler autaki kozwa bokonzi na Allemagne. Nzokande, Batatoli ya Yehova soko 500 oyo bazalaki na engumba Berlin batengatengaki te. Bilenge mingi bakómaki babongisi-nzela, to baministre ya ntango nyonso ya liloba ya Nzambe, mpe basusu kútu bandimaki kotindama mpo na kosakola na mikili mosusu ya Mpótó. Ngai mpe moninga na ngai Werner Flatten tozalaki na momeseno ya kolendisana ete: “Mpo na nini tozali bobele kotatabana, kolekisáká bongo ntango na biso mpamba? Mpo na nini tokei te kosala mosala ya mobongisi-nzela?”
MIKOLO mwambe nsima ya kobotama na ngai na 1909, nakómaki na mabɔkɔ ya baboti-babɔ́kɔli ya bolingo mingi. Na 1918 libota oyo nabokwamaki kati na yango ebulunganisamaki na mawa ntango mwana moko ya mwasi ya libota yango, oyo ekómaki mpenza libota na ngai, akufaki liwa ya mbalakaka. Mwa moke na nsima, Bayekoli ya Biblia, lolenge bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova na eleko wana, bayaki epai na biso, mpe mitema ya baboti-babɔ́kɔli na ngai efungwanaki mpenza mpo na kondima solo ya Biblia. Bateyaki ngai ete nakóma kosepela mpe na makambo ya elimo.
Namipesaki mingi na kelasi mpe nakómaki mobongisi bampópi. Kasi likambo lileki ntina ezali ete nazwaki etɛlɛmɛlo kati na solo. Ngai mpe Werner tobandaki kosala mosala ya mobongisi-nzela na mokolo mwa 5 Máí 1933. Tozalaki kosala mobémbo na velo mpo na kokende na engumba moko oyo ezalaki mosika na bakilomɛtɛlɛ 100 kolongwa na Berlin, epai kuna tozalaki kolekisa pɔ́sɔ mibale mpo na kosakola. Mpe na nsima tozalaki kozonga na Berlin mpo na kokokisa mikumba mosusu ya ntina. Tozalaki kokende lisusu na teritware na biso ya mosala ya kosakola mpo na kolekisa lisusu pɔ́sɔ mibale.
Tosɛngaki ete tókende kosala na mboka mosusu, mpe na Desɛ́mbɛ 1933 batindaki biso na mboka oyo ebéngamaki kala Yougoslavie. Nzokande, liboso ete tókende, mbongwana esalemaki, batindaki biso sikawa na engumba Utrecht, na Pays-Bas. Mwa moke na nsima nabatisamaki. Na eleko wana batisimo ezalaki kolobelama mpenza mingi te; mosala ya kosakola nde ezalaki na ntina mingi koleka. Kotya elikya epai na Yehova ekómaki likambo oyo ekɔtelaki ngai mpenza na bomoi. Nazwaki libɔndisi monene kati na maloba ya mokomi ya Nzembo na Biblia: “Talá, Nzambe azali mosungi na ngai; [Yehova] azali mosungi na molimo na ngai.”—Nzembo 54:4.
Mosala ya mobongisi-nzela na Pays-Bas
Mwa moke nsima ya kokóma na Pays-Bas, batindaki biso lisusu na engumba Rotterdam. Na libota oyo tozalaki kofanda, tata wana mpe mwana na ye ya mobali bazalaki mpe babongisi-nzela. Mwa basanza na nsima, ndako moko monene esombamaki na Leersum, engumba moko oyo ezali pembeni na Utrecht, mpo ete esalelama lokola ndako ya babongisi-nzela, ngai mpe Werner tokendeki kofanda kuna.
Wana tozalaki kofanda kati na ndako yango ya babongisi-nzela, tozalaki kokende na bateritware ya pembeni na velo mpe na bateritware ya mosika tozalaki kokende na motuka oyo ezalaki komema bato nsambo. Na eleko wana, ezalaki bobele na Batatoli nkámá moko na Pays-Bas mobimba. Lelo oyo, mbula 60 na nsima, teritware epai kuna ndako ya babongisi-nzela ezalaki esili kokóma na basakoli 4 000 na masangá soko 50!
Tozalaki kosala mosala makasi, tozalaki kokóma kino na bangonga 14 mokolo na mokolo, mpe yango esalaki ete tózalaka ntango nyonso na esengo. Mokano na biso ya liboso ezalaki bongo kokabola mikanda mingi engebene makoki na biso. Mingimingi tozalaki kotika mwa babúku koleka monkámá na mokolo moko epai na bato oyo bazalaki kosepela. Na ntango wana, kosala bozongeli mpe kotambwisa Boyekoli ya Biblia etángamaki naino te lokola mosala na biso ya mokolo na mokolo.
Mokolo mosusu, ngai mpe moninga na ngai ya mosala tozalaki kosala na engumba Vreeswijk. Wana azalaki kopesa litatoli epai na mobali moko oyo atɛlɛmaki na ekuke ya lopango moko ya basodá, ngai nazalaki kozela ye na kotángáká Biblia na ngai. Kati na yango nasilaki kotya yango mikɔ́lɔtɔ na ekomeli ya motane mpe ya bulé. Na nsima, mosali moko ya mabaya oyo azalaki kosala na nsamba ya ndako moko pembeni wana akebisaki mobali oyo azalaki na ekuke na koyebisáká ye ete ngai nazali monɔ́ngi. Na yango, bobele na mokolo wana, bakangaki ngai wana nazalaki kopesa litatoli epai na mosali na magazini moko, mpe babɔtɔlaki Biblia na ngai.
Bamemaki ngai na esambiselo. Kuna bafundaki ngai ete mikɔlɔtɔ́ oyo mityami na Biblia na ngai elimboli ete nazalaki komeka koyema lopango wana ya basodá. Nakweisamaki, mpe mosambisi akatelaki ngai etumbu ya mbula mibale ya bolɔ́kɔ. Nzokande, likambo yango ememamaki na esambiselo monene mpe kuna balongolaki ekweli oyo batyelaki ngai. Nazalaki mpenza na esengo ya kozala na bonsɔ́mi, nazalaki na esengo mingi lisusu koleka ntango bazongiselaki ngai Biblia na ngai na mikɔlɔtɔ́ na yango bipai nyonso!
Na boumeli ya eleko ya molungé ya 1936, ngai mpe Richard Brauning, moko ya babongisi-nzela oyo tozalaki kofanda na bango ndako moko, tolekisaki eleko ya molungé na kosakoláká na nɔ́rdi ya mboka. Na sanza ya liboso, tolekisaki bangonga 240 kati na mosala ya kosakola mpe tokabolaki mikanda mingi. Tozalaki kofanda kati na hema moko mpe tozalaki komikokisela bamposa na biso nyonso, tozalaki kosukola bilamba na biso, kolamba, mpe bongo na bongo.
Na nsima, natindamaki na masúwa moko oyo ebéngamaki Lightbearer (Momemi na pole), oyo eyebanaki mingi na nɔ́rdi ya Pays-Bas. Babongisi-nzela mitano bazalaki kofanda kati na masúwa yango, mpe na yango tozalaki na likoki ya kokóma na bateritware mingi oyo ezalaki mosika.
Mikumba mibakisami
Na 1938, naponamaki lokola mosaleli ya zone, lolenge bakɛngɛli ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova bazalaki kobéngama na eleko wana. Na bongo natikaki masúwa Lightbearer mpe nabandaki kotala masangá mpe Batatoli oyo bazalaki mosika kati na bitúká misato na súdi.
Velo ezalaki mwango bobele moko ya kotambola. Mbala mingi, ezalaki kosɛnga kosala mobémbo ya mokolo mobimba longwá na lisangá moko kino na lisangá mosusu to kino na etuluku ya bato oyo bazalaki kosepela na solo. Breda, epai nazali kofanda sikawa, ezalaki mpe moko na bingumba oyo nazalaki kotala mpo na mosala na ngai. Na ntango yango, ata lisangá moko te ezalaki na Breda, kasi bobele babalani mibale ya Batatoli oyo basilaki kokóma mibangé.
Wana nazalaki kosala elongo na bandeko na etúká ya Limburg, nabyangamaki ete nayanola na ebele ya mituna ya motimoli moko ya makɛ́lɛ, nkombo na ye ezalaki Johan Pieper. Azwaki etɛlɛmɛlo makasi mpo na solo ya Biblia mpe akómaki mosakoli ya mpiko. Mbula minei na nsima, atyamaki kati na káa ya bakangami, epai kuna alekisaki mbula misato na ndambo. Nsima ya kobimisama, azongelaki lisusu kosakola na molende nyonso, mpe kino lelo azali kosala na bosembo nyonso lokola nkulutu. Lisangá wana moke ya Batatoli 12 na Limburg lisili sikawa kokóla mpe kokóma na masangá 17 oyo ezali na basakoli 1 550!
Na nsé ya boyangeli ya Nazi
Na Máí 1940 ba Nazi babotolaki Pays-Bas. Nabyangisamaki mpo na kosala na filiale ya Watch Tower na Amsterdam. Tosengelaki kosala mosala na biso na bokɛngi mingi mpenza, yango esungaki biso ete tósosola malamu ntina ya maloba ya lisese oyo ya Biblia: “Moninga ya solosolo . . . azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17, NW) Ekanganeli kitoko ya bomoko oyo ebebaki te ata kati na ntango wana ya mpasi ezalaki na bopusi mingi likoló na bokóli na ngai na elimo, mpe ebongisaki elimo na ngai mpo na koyika mpiko ata na mikolo ya mpasi oyo mizalaki liboso.
Mokumba na ngai ezalaki ya kosɛnzɛla mosala ya kokabola mikanda na masangá, oyo mbala mingi ezalaki kosalema na bandeko oyo babéngamaki bamemi-nsango. Gestapo ezalaki ntango nyonso koluka bilenge mibali ete bákende kosala misala makasi na Allemagne, na bongo tozalaki kosalela bandeko basi baklisto lokola bamemi-nsango. Na nsima, ndeko mwasi Wilhelmina Bakker, oyo ayebanaki mingi na nkombo ya Nonnie, atindamaki epai na biso uta na Hague, mpe namemaki ye epai kuna mokɛngɛli ya filiale na biso, Arthur Winkler, azalaki kobombama. Mpo na kosala nyonso ete bato báyeba ngai te, nazalaki komilatisa lokola moko na basáli bilanga ya Pays-Bas, sapato esalemi na mabaya mpe molato mosusu nyonso oyo basáli na bilanga balataka, mpe nakendaki na Nonnie elongo kati na motuka. Na nsima nayaki koyeba ete azalaki kokoka te komipekisa kosɛka, mpamba te, engebene ye, lolenge yango ezalaki mpenza kobomba ngai te.
Na mokolo mwa 21 Ɔkɔtɔ́bɛ 1941, ebombelo na biso ya mikanda mpe bapapié ekabamaki na mabɔkɔ ya banguna. Na ntango bapolísi ya Gestapo bayaki, bakangaki Winkler mpe Nonnie. Na ntango batindamaki na bolɔ́kɔ, bayokaki na mosika bapolísi mibale ya Gestapo koloba ete bazalaki kolanda “elenge mobali moko ya nsuki moindo” kasi abulunganisaki bango kati na ebele ya bato na balabála. Ezalaki polele ete bazalaki koloba na ntina na ngai, na yango Winkler atindaki nsango epai na bandeko oyo bazalaki libándá. Nokinoki, natindamaki na Hague.
Na ntango yango babimisaki Nonnie na bolɔ́kɔ́, mpe azongaki na Hague mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela. Nakutanaki na ye lisusu kuna. Kasi na ntango mosaleli ya lisangá ya Rotterdam akangamaki, natindamaki mpo na kosala na esika na ye. Na nsima mosaleli ya lisangá ya Gouda akangamaki, natindamaki mpe kuna mpo na kokitana ye. Na nsuka, na mokolo mwa 29 Mársi 1943 bakangaki ngai. Bapolísi ya Gestapo bakutaki ngai wana nazalaki kotánga motuya ya mikanda mikolimbolaka Biblia kati na ebɔ́mbelo na biso.
Kolongola mikanda mikolimbolaka Biblia oyo epanzanaki likoló na mesa, ezalaki mpe na lokasa oyo kati na yango bankombo ya bandeko baklisto basi mpe mibali ekomamaki, atako ekomamaki na lolenge oyo bobele biso moko nde tokokaki koyeba yango. Na mpasi mingi na motema, nabondelaki Yehova ete apesa ngai likoki ya kobatela baoyo bazalaki naino na bonsomi ya koteya. Kozanga ete bámona, nasalaki makasi ete nazipa lobɔkɔ na ngai likoló na lokasa oyo bankombo yango ekomamaki mpe nafinaki yango kati na lobɔkɔ na ngai. Na nsima nasɛngaki nzela ya kokende na kabiné, epai kuna napasolaki lokasa yango mpe nabwakaki yango na libulu ya kabiné.
Na bantango wana ya mpasi, nayekolaki kozwa nguya na kokanisáká lolenge oyo Yehova asalelaki bato na ye na ntango ya kala mpe na kokanisáká bilaka na ye ya kobikisa. Ezali elikya epemami oyo nabosanaka yango soko moke te: “Soko ezalaki [Yehova] te, oyo azalaki epai na biso wana bato batɛlɛmi kobunana na biso, mbɛ balyaki biso noki.”—Nzembo 124:2, 3.
Bolɔ́kɔ mpe bakáa ya bakangami
Namemamaki na bolɔ́kɔ ya Rotterdam, epai kuna nazalaki na botɔ́ndi mpo ete nazalaki na Biblia na ngai. Nazalaki mpe na búku Salvation (Lobiko), mpe biteni ya búku Children (Bana), mpe nazalaki na ntango mingi ya kotánga mikanda nyonso wana. Na nsima ya sanza motoba nazwaki maladi makasi mpe nasengelaki kokenda na lopitálo. Liboso ya kobima na bolɔ́kɔ, nabombaki mikanda yango na nsé ya mbeto na ngai. Na nsima nayokaki ete, Motatoli mosusu, Piet Broertjes, atindamaki kati na mwa ndako ya bolɔ́kɔ esika nazalaki mpe amonaki mikanda yango. Na bongo, mikanda yango mizalaki kosalelama mpo na kopesa basusu makasi kati na kondima.
Nsima wana nazongelaki kolɔngɔ́nɔ́ na ngai malamu, natindamaki na bolɔ́kɔ na Hague. Na ntango nakómaki kuna nakutanaki na Leo C. van der Tas, moyekoli na eteyelo monene ya makambo matali mibeko, ye oyo akɔtaki bolɔ́kɔ mpo ete atɛmɛlaki bokɔti ya ba Nazi kati na mboka na bango. Asilaki naino koyoka likambo moko te na ntina na Batatoli ya Yehova, mpe nazwaki libaku ya kopesa ye litatoli. Na bantango mosusu azalaki kolamwisa ngai na katikati ya butu mpe azalaki kotuna ngai mituna. Azalaki komipekisa te mpo na kolobela bosepeli oyo azalaki na yango na ntina na Batatoli ya Yehova, mingi mpenza nsima ya koyoka ete biso tokokaki kobimisama na bolɔ́kɔ bobele soki totye lobɔkɔ na mokanda mpo na kowangana kondima na biso. Mpe na nsima ya etumba, Leo akómaki avoká mpe asambaki makambo mingi mpo na la Société Watch Tower na ntina na bonsɔ́mi ya losambo.
Na mokolo mwa 29 Apríli 1944, nakɔtisamaki kati na engbunduka mpo na kokende mobémbo moko ya mpasi na Allemagne na boumeli ya mikolo 18. Na mokolo mwa 18 Máí nakɔtisamaki kati na káa ya bakangami ya Buchenwald. Kino na ntango mampinga oyo mayanganaki mpo na kotɛmɛla nguya ya Allemagne bayaki kobimisa biso, bomoi ezalaki ya mpasi makasi mpenza. Bankóto ya bato bakufaki, mingi bakufaki na miso na biso. Lokola naboyaki kosala kati na kompanyi moko ya pembeni oyo ezalaki kosala bibundeli, bapesaki ngai mosala ya kotimola telásé.
Mokolo mosusu bɔ́mbi ebwakamaki likoló na kompanyi yango. Bato mingi babombamaki kati na bakáa ya basodá, mpe basusu bakimaki na zámba. Babɔ́mbi oyo epanzanaka ekendeki kokwea na bakáa ya basodá, mpe babɔ́mbi oyo ebimisaka mɔ́tɔ ezikisaki zamba. Ezalaki likambo ya nsɔ́mɔ na komona! Bato mingi bazikaki na mɔ́tɔ! Nazwaki esika ya libateli mpo na komibomba, na ntango mɔ́tɔ esilaki, namonaki bibembe mingi na nzela oyo nalekaki mpo na kozonga na káa.
Bato mingi lelo oyo babosani te makambo ya nsɔ́mɔ oyo ba Nazi basalaki na kobomáká ebele ya bato. Nazali na botɔ́ndi epai na Yehova ete alendisaki nguya na ngai ya kokanisa, na boye ete makambo ya nsɔ́mɔ oyo namonaki eyangeli makanisi na ngai te na boumeli ya bambula. Soki nakanisi eleko oyo nalekisaki na bolɔ́kɔ, liyoki na ngai ya liboso mpenza ezalaka bongo esengo mpo ete nabatelaki bosembo na ngai epai na Yehova mpo na lokumu ya nkombo na ye.—Nzembo 124:6-8.
Mosala na nsima ya etumba
Nsima ya kobimisama na ngai na bolɔ́kɔ mpe kozonga na ngai na Amsterdam, nakendaki na biro ya filiale mpo ete bápesa ngai mokumba. Nazalaki na motema likoló mpo na koyeba makambo oyo matikalaki kosalema na ntango ngai nazalaki te. Nonnie asilaki kobanda kosala kuna. Na boumeli ya mbula ya nsuka ya etumba, azalaki kosala lokola momemi-nsango mpo na kokabola mikanda mikolimbolaka Biblia na masangá. Akangamaki lisusu te, atako bongo abikaki mpe na mabaku mingi ya mabe.
Nasalaki mwa moke mosala ya mobongisi-nzela na Haarlem, kasi na 1946 basɛngaki ngai ete nakende kosala na departemá ya kotinda mikanda, na filiale na Amsterdam. Pene na nsuka ya 1948, ngai mpe Nonnie tobalanaki, mpe totikaki filiale mpo ete tókende kosala lokola babongisi-nzela. Totindamaki na Assen. Mbula zomi na mibale liboso, ngai mpe Richard Brauning tolekisaki eleko ya molungé kuna, tozalaki kofanda kati na hema mpe tozalaki kosakola. Nayokaki ete Richard abɛtamaki masasi mpe akufaki wana bazalaki komema ye na káa ya bakangami.
Na ntembe te, ntango oyo nalekisaki na bolɔ́kɔ ebebisaki kolɔngɔ́nɔ́ na ngai. Mbula motoba nsima ya kobima na bolɔ́kɔ na Buchenwald, nabɛlaki makasi na boumeli ya sanza minei. Bambula mingi na nsima, na 1957, nabɛlaki maladi ya tuberculose na boumeli ya mbula mobimba. Nzoto na ngai esilaki makasi, kasi elimo na ngai ya mobongisi-nzela ezalaki naino makasi. Na boumeli ya ntango oyo nazalaki kobɛla, nalekisaki te mabaku nyonso ya koteya. Nabanzi ete elimo wana ya mobongisi-nzela ezalaki likambo ya ntina mpamba te esungaki ngai ete makɔnɔ na ngai makómisa ngai te lokola moto ya maladi oyo akoki kosala lisusu eloko moko te. Ngai mpe Nonnie tozali na ekateli makasi ya kokangama na mosala ya ntango nyonso na meko oyo kolɔngɔ́nɔ́ na biso ya nzoto ekopesa biso nzela.
Na nsima ya kobikisama na ngai, totindamaki na engumba Breda. Ezalaki bongo mbula 21 nsima wana nayaki na engumba yango lokola mosaleli ya zone. Na ntango tokómaki na 1959, ezalaki na lisangá moko ya Batatoli 34. Lelo oyo, mbula 37 na nsima, esili kokóma na masangá motoba oyo mazali na Batatoli koleka 500, oyo bayanganaka kati na Bandako ya Bokonzi misato! Na makita mpe na mayangani na biso, tomonaka bato mingi oyo bazali kokóma na boyebi ya Biblia mpo na mwa milende oyo tozali kosala. Mbala mingi tozalaka na mayoki motindo moko na ntoma Yoane, wana akomaki ete: “Nazali na esengo eleki oyo te ete nayoka ete bana na ngai bazali kotambolaka kati na makambo na solo.”—3 Yoane 4.
Sikawa tosili konuna. Ngai nazali na mibu 86 mpe Nonnie azali na mibu 78, kasi nasengeli koloba ete mosala ya mobongisi-nzela epesaka kolɔngɔ́nɔ́ na nzoto. Uta ntango nabandaki kofanda na Breda, nasili kolónga mikakatano mingi ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto oyo nazwaki na ntango nazalaki na bolɔ́kɔ. Nalekisi bambula ya mosala oyo ebimisi mbuma mingi kati na mosala ya Yehova.
Soki tokanisi bambula mingi oyo tolekisi kati na mosala ya sembo, epesaka biso esengo. Losambo na biso ya mokolo na mokolo ezali ete Nzambe apesa biso elimo mpe makasi ya kokóba kati na mosala na ye na boumeli ya ntango nyonso oyo tokozala na bomoi. Na elikya nyonso, tomiyokanisi na maloba oyo ya mokomi na Nzembo: “Talá, Nzambe azali mosungi na ngai; [Yehova] azali mosungi na molimo na ngai.”—Nzembo 54:4.
[Elilingi na lokasa 23]
Biso wana pembeni na hema oyo tozalaki kosalela wana tozalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela na 1930
[Elilingi na lokasa 23]
Masúwa oyo na lisalisi na yango tozalaki kokenda na bateritware ya mosika
[Elilingi na lokasa 23]
Kotunama mituna na liyangani na 1957
[Elilingi na lokasa 24]
Elongo na mwasi na ngai lelo oyo