Mpasi ya makasi mpe oyo esilaka te
EUMELI te, moto moko ya mayele alukaki koyeba ndenge bato oyo bakufeli ndeko to moninga bayokaka wana mikolo ezali koleka. Atindelaki baboti mingi oyo bana na bango bakufá esili koleka bambula mituna mpo bayanola. Kaka ndambo na bango nde bayanolaki. Tata moko na nkombo Vladimir, oyo akufelá mwana eleki mbula mitano, alobaki ete tii lelo akokaka te kobɛta masolo ya mwana na ye.a
Baboti oyo bayokaka mawa mpo na bana na bango oyo bakufá bazali mingi. Esili koleka mbula zomi, mwana ya William ya mobali akufaki na mai. William akomaki boye: “Natikalá na mpasi na motema, mpe nakobosana yango te na bomoi na ngai mobimba.” Mbula mitano nsima ya kokufela mwana na ye na maladi moko ya mbalakaka, Lucy akomaki boye: “Na ebandeli, nazalaki kondima te. Nazalaki komona lokola ndɔtɔ oyo ekosila soki nalamuki. Nsima ya mikolo, nabandaki komona ete ezali likambo ya solo, mwana azali kozonga na ndako te. Mwana na ngai akufá eleki mbula mitano, kasi ntango nazalaka ngai moko, nalelaka ye kaka.”
Mpo na nini baboti lokola Vladimir, William, mpe Lucy bayokaka mpasi ya ndenge wana? Tiká tótalela mwa bantina oyo esalaka ete báyoka mpasi ya ndenge wana.
Mpo na nini mawa ezali mingi?
Soki mwana abotami, baboti bazalaka na esengo mingi koleka oyo bazalaka na yango mpo na bato nyonso. Kosimba bebe yango, kotala ye ndenge alali mpe mwa kosɛka na ye esepelisaka bango mingi. Baboti ya bolingo balɛngɛlaka mpenza bana na bango. Bateyaka bango bizaleli ya malamu mpe bonkonde. (1 Batesaloniki 2:7, 11) Ntango bana bazali kokola na ndenge mpenza oyo baboti balingaki, baboti yango basepelaka mpe bakómaka kotyela bango motema.
Baboti ya malamu basalaka nyonso mpo na kokokisa bamposa ya bana bango. Bakoki kobanda kobombela bango mbongo to biloko mosusu oyo ekosalisa bango ntango bakolongwa na ndako ya baboti. (2 Bakolinti 12:14) Ntina oyo baboti bapesaka bolingo, ntango, makasi mpe mbongo na bango mpo na kobɔkɔla bana na bango, ezali mpo balingaka ete bázala na bomoi kasi bákufa te. Soki mwana akufi, mosala nyonso oyo baboti basalaki ya kobɔkɔla ye esuki na nzela, mpe bilikya nyonso oyo bazalaki na yango mpo na ye ekei na mai. Liwa ekataka bolingo makasi oyo baboti bazalaka na yango mpo na bana na bango. Esika oyo mwana azalaki na yango na kati ya motema na bango etikalaka mpamba. Baboti bakómaka na mawa makasi oyo esilaka te.
Biblia emonisi ete baboti oyo bakufeli bana bayokaka mpasi makasi mpe oyo esilaka te. Mpo na komonisa mpasi oyo Yakobo azalaki na yango ntango ayokaki ete babomi mwana na ye Yozefe, Biblia elobi ete: “Bongo Yakobo apasolaki bilamba na ye mpe alataki [saki, NW] na loketo na ye mpe alelaki mwana na ye mikolo mingi. Bana na ye babali mpe bana na ye basi balongwaki mpo na kobɔndisa ye. Nde ye aboyaki kobɔndisama mpe alobaki ete, Te, nakokita na esika ya bakufi [nkunda, NW] epai ya mwana na ngai bobele na kolela.” Bambula na nsima, Yakobo azalaki kaka kolela mwana na ye, oyo akanisaki ete akufi. (Genese 37:34, 35; 42:36-38) Biblia elobeli mpe Naomi, mwasi moko ya sembo oyo bana na ye mibale ya mibali bakufaki. Lokola azalaki na mawa makasi, alingaki bábenga ye lisusu Naomi te, oyo elimboli “Esengo na ngai,” kasi bábenga ye nde Mala, oyo elimboli “bololo.”—Luta 1:3-5, 20, 21.
Nzokande, Biblia elobelaka te kaka mpasi oyo baboti bayokaka soki mwana akufi. Kasi, ezali mpe komonisa ndenge Yehova apesaka nguya na baoyo bazali na mpasi. Na lisolo oyo elandi, tokotalela mwa bandenge oyo Nzambe abɔndisaka baoyo bazali na mpasi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.