Lisalisi ya “Nzambe oyo apesaka ezaleli ya koyika mpiko mpe kobɔndisama”
ELEKI mbula soki 2 000, Paulo, moko ya bato oyo bakomaki Biblia alobaki ete Yehova azali “Nzambe oyo apesaka ezaleli ya koyika mpiko mpe kobɔndisama.” (Baloma 15:5) Lokola Biblia emonisaka biso ete Yehova abongwanaka te, tokoki mpenza kondima ete abɔndisaka baoyo bazali kosalela ye kino lelo oyo. (Yakobo 1:17) Kutu, Biblia ezali komonisa ete Yehova abɔndisaka na ndenge mingi baoyo bazali kotungisama. Wapi bandenge yango? Nzambe apesaka makasi na baoyo basɛngaka ye lisalisi. Atindaka mpe baklisto ya solo bábɔndisa bandeko na bango baklisto. Mpe Yehova atyá na kati ya Liloba na ye, Biblia, masolo oyo elendisaka mpenza baoyo bazali na mawa mpo mwana na bango akufi. Tiká tótalela lolenge yango misato ya libɔndisi.
“Yehova ayokaki”
Mokonzi Davidi akomaki na ntina na Mozalisi na biso Yehova boye: “Bino bato bózala na elikya epai na ye ntango nyonso; [bófungola, NW] mitema na bino liboso na ye. Nzambe azali ebombelo mpo na biso.” (Nzembo 62:8) Mpo na nini Davidi atyelaki Yehova motema ndenge wana? Davidi akomaki na ntina na ye moko ete: “Mobola oyo abelelaki mpe [Yehova] ayokaki ye, abikisaki ye na mpasi na ye nyonso.” (Nzembo 34:6) Na ntango nyonso oyo azalaki na mawa, Davidi azalaki kobondela Nzambe asalisa ye mpe Yehova azalaki ntango nyonso kosalisa ye. Davidi ayebaki mpenza ete Nzambe akosunga ye mpe akosalisa ye ayika mpiko.
Baboti oyo bakufeli bana basengeli koyeba ete Yehova akosunga bango na mpasi na bango, ndenge kaka asungaki Davidi. Bakoki kopusana penepene na ‘Moyoki monene ya mabondeli,’ na elikya ete akosalisa bango. (Nzembo 65:2) William, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso alobi ete: “Mbala mingi, mposa ya bomoi esilaka ngai mpenza mpo mwana na ngai azali lisusu te, mpe nasɛngaka Yehova abɔndisa ngai. Apesaka ngai ntango nyonso makasi mpe mpiko ya kokoba kozala na bomoi.” Soki yo mpe obondeli Yehova na kondima, Nzambe monene ya likoló akosunga yo. Kutu, Yehova Nzambe alaki baoyo bazali kosala makasi mpo na kosalela ye ete: “Ngai [Yehova], Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali; ngai nazali koloba na yo ete, Bangá te: ngai nakosunga yo.”—Yisaya 41:13.
Libɔndisi oyo baninga ya solo bapesaka
Mbala mingi, baboti oyo bakufeli mwana bazalaka na mposa ya kotikala bango moko mpo bálela mpe bákitisa mawa na bango. Nzokande, ebongi te báboya kozala esika moko na baninga ntango molai. Masese 18:1 emonisi ete, “Ye oyo akomitangola na bamosusu” akoki komona mpasi. Yango wana, bato oyo bazali kotungisama mpo bakufeli moto basengeli kokeba ete bámitangola na basusu te.
Baninga oyo babangaka Nzambe bakoki kopesa lisungi oyo ebongi mpenza epai ya bato oyo bazali na mpasi. Masese 17:17 (NW) elobi ete: “Moninga ya solo alingaka ntango nyonso mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” Lucy, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, amonaki likambo yango na miso ntango mwana na ye akufaki. Na ntina na baninga na ye ya lisangá, alobaki ete: “Ndenge bazalaki koya kotala biso esalisaki biso mingi, atako ntango mosusu bazalaki koloba mingi te. Moninga na ngai moko azalaki koya kotala ngai ntango nazalaki kotikala ngai moko. Ayebaki ete nakoki kozala na ndako mpe mbala mosusu nazali kolela, azalaki koya mpe kolela na ngai elongo. Ndeko mosusu azalaki kobenga ngai mikolo nyonso na telefone mpo na kolendisa ngai. Basusu kutu bazalaki kobenga biso na bandako na bango mpo na kolya mpe basalaka yango tii lelo.”
Atako ezalaka pɛtɛɛ te mpo mawa makasi ya baboti oyo bakufeli mwana esila, kobondela Nzambe mpe kozala esika moko na baninga ya lisangá ekoki mpenza kobɔndisa baoyo bazali na mawa. Baboti mingi oyo bakufelá bana, bamonaka mpenza ete Yehova azali na bango. Ya solo, Yehova “azali kobɔndisa baoyo ya mawa na mitema; azali kokanga mpota na bango.”—Nzembo 147:3.
Masolo ya Biblia oyo ebɔndisaka
Longola mabondeli mpe baninga ya lisangá, Liloba ya Nzambe mpe ebɔndisaka baoyo bazali na mawa. Masolo ya Biblia emonisi ete Yesu azali na mposa makasi mpe na likoki ya kosilisa mpasi ya baboti oyo bakufeli bana na nzela ya lisekwa. Masolo motindo yango ebɔndisaka baoyo bazali na mawa. Tiká tótalela masolo mibale ya ndenge yango.
Luka mokapo ya 7 ezali kolobela likambo oyo esalemaki ntango Yesu akutanaki na bato oyo bazalaki kokende kokunda mwana ya mwasi moko oyo akufelá mobali na engumba ya Naina. Vɛrsɛ 13 elobi ete: “Ntango Nkolo amonaki ye, ayokelaki ye mawa, mpe alobaki na ye ete: ‘Tiká kolela.’”
Bato mingi te bakokaki kopekisa mama ya mwana wana kolela ntango bazali kokende kokunda mwana na ye. Mpo na nini Yesu alobaki bongo? Mpo ayebaki ete mawa ya mama wana elingi kosila. Lisolo yango ekobi boye: “[Yesu] apusanaki mpe asimbaki mbeto ya ebembe, mpe bato oyo bazalaki komema batɛlɛmaki, mpe alobaki ete: ‘Elenge mobali, nalobi na yo, Tɛlɛmá!’ Mpe mokufi afandaki mpe abandaki koloba, mpe apesaki ye epai ya mama na ye.” (Luka 7:14, 15) Na ntango wana, ekoki kozala ete mama yango alelaki lisusu, kasi alelaki nde na esengo.
Mokolo mosusu, mobali moko na nkombo Yailusi ayaki epai ye Yesu mpo na kosɛnga ye abikisa mwana na ye ya mwasi ya mbula 12 oyo azalaki kobɛla makasi. Mwa moke na nsima, Yailusi ayokaki ete mwana yango akufi. Nsango wana elɛmbisaki ye, kasi Yesu alobaki na ye ete: “Kobanga te, monisá kaka kondima.” Yesu akómaki na libota yango mpe akendaki epai ebembe yango ezalaki. Asimbaki ye na lobɔkɔ mpe alobaki ete: “Elenge mwasi, nalobi na yo ete, tɛlɛmá!” Nini esalemaki? “Na mbala moko elenge mwasi yango atɛlɛmaki mpe abandaki kotambola.” Baboti na ye basalaki nini? “Bazalaki bango lisusu te, bazalaki na esengo makasi.” Ntango Yailusi ná mwasi na ye bayambaki mwana na bango, bazalaki na esengo makasi. Bamonaki yango lokola ndɔtɔ.—Malako 5:22-24, 35-43.
Masolo ya Biblia ya ndenge wana, oyo elobeli bana oyo basekwaki ezali komonisa baboti oyo bazali kokufela bana lelo oyo elikya oyo basengeli kozala na yango. Yesu alobaki ete: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Yehova alaki ete Mwana na ye akosekwisa bakufi. Bamilio ya bana oyo bakufá “bakoyoka mongongo na ye” ntango akoloba na bango ete: ‘Nalobi na bino, bótɛlɛma!’ Bilenge yango bakobanda lisusu kotambola mpe koloba. Mpe lokola Yailusi ná mwasi na ye, baboti ya bana wana ‘bakozala na esengo makasi.’
Soki okufelá mwana, yebá ete Yehova akoki kobongola mawa na yo esengo na nzela ya lisekwa. Mpo na kozwa esengo wana, osengeli kolanda toli ya mokomi na nzembo oyo: “Bóluka [Yehova] mpe nguya na ye; bólukaka elongi na ye ntango nyonso. Bóbanza misala ya nkembo misalaki ye; makambo na ye ya kokamwa.” (Nzembo 105:4, 5) Ɛɛ, salelá Yehova, Nzambe ya solo, mpe sambelá ye na ndenge oyo andimaka.
Okozwa matomba nini soki ‘oluki Yehova’? Kobondela Nzambe ekopesa yo makasi, bandeko baklisto bakobɔndisa yo mpe koyekola Liloba ya Nzambe ekolendisa yo. Longola yango, mosika te okomona ‘misala ya nkembo mpe makambo ya kokamwa’ oyo Yehova akosala mpo na bolamu na yo ya seko mpe mpo na mwana na yo oyo akufá.
[Etanda na lokasa 5]
“Memelá ngai mwasi wana oyo akufelá bana mibale”
Kehinde ná mwasi na ye Bintu, oyo bazali Batatoli ya Yehova na Nigeria, bakufelaki bana mibale na likama moko ya motuka. Banda wana, batungisamaka mingi. Atako bongo, elikya na bango epai na Yehova esungaka bango, mpe bazali kokoba koyebisa bazalani na bango elikya oyo Biblia epesi.
Bato bamonaki kimya mpe mpiko ya Kehinde ná Bintu. Mokolo moko, mwasi moko na nkombo Ukoli alobaki na moninga moko ya Bintu boye: “Memelá ngai mwasi wana oyo akufelá bana mibale na mbala moko, kasi azali kaka kosakola nsango ya Biblia. Nalingi nayeba nini ezali kosalisa ye ayika mpiko.” Ntango Bintu akómaki epai ya Ukoli, Ukoli alobaki na ye boye: “Nalingi nayeba ntina oyo yo ozali kaka kosakola nsango ya Nzambe oyo abomeli yo bana. Nzambe azwá mwana kaka moko oyo nazalaki na ye. Banda wana, nakipaka lisusu makambo na ye te.” Bintu asalelaki Biblia mpo na kolimbwela ye ntina oyo bato bakufaka mpe ntina oyo tokoki mpenza kozala na elikya ete bandeko to baninga na biso oyo bakufá bakosekwa.—Misala 24:15; Baloma 5:12.
Na nsima, Ukoli alobaki ete: “Ngai nazalaki kokanisa ete Nzambe nde azwaka bato oyo bakufaka. Sikoyo nayebi solo.” Azwaki ekateli ya koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpo ayeba bilaka ya Nzambe malamumalamu.
[Etanda na lokasa 6]
‘Nalingi kosalisa, kasi nayebi te nini nasala’
Ntango baboti ná bandeko ya mwana oyo akufi bazali na mawa makasi, baninga na bango oyo bazali na mposa ya kosalisa bango bakoki kobanda kobanga ete mbala mosusu bakoloba to bakosala likambo moko ya mabe oyo ekobakisela bango lisusu mpasi. Mwa makanisi oyo elandi ekoki kosalisa moto nyonso oyo akoki koloba ete, ‘Nalingi kosalisa, kasi nayebi te nini nasala.’
❖ Kokima te moto oyo akufeli moto kaka mpo oyebi mpenza te nini okoloba to okosala. Kokende kaka kotala bango ekolendisa bango mingi. Ozangi nde likambo ya koloba? Koyamba bango mpe kobimisa maloba lokola “esali ngai mpasi,” ekomonisa bango ete ozali komibanzabanza mpo na bango. Ozali kobanga ete soki obandi kolela, okobakisela bango lisusu mawa? Biblia elobi ete: “Bólela elongo na bato oyo bazali kolela.” (Baloma 12:15) Mpisoli na yo ekomonisa ete ozali kokabola na bango mawa, mpe yango ekoki kobɔndisa.
❖ Luká makambo ya kosalela bango. Okoki kolambela bango mwa bilei? Okoki kosukolela bango basani ya bosɔtɔ oyo etondani wana? Okoki kokende kosalela bango makambo mosusu? Koloba na bango te, “Soki bosengeli na likambo moko, bóyebisa ngai.” Ata soki makanisi na yo ezali mabe te, baboti oyo bakufeli mwana bakoki komona lokola ozali na ntango te mpo na kosalisa bango. Na esika ya koloba bongo, okoki kotuna boye: “Nakoki kosalisa bino na mosala nini?” mpe kokokisa likambo oyo bakosɛnga. Kasi, kokɔtakɔta te na bisika mosusu ya ndako na bango oyo opesami nzela te to na makambo na bango.
❖ Koloba te, “Nayebi mpasi oyo ozali koyoka.” Bato nyonso bayokaka ndenge moko te soki bakufeli moto. Ata soki yo mpe okufelá mwana, oyebi mpenzampenza te ndenge bango bazali koyoka.
❖ Esɛngaka ntango mpo bato oyo bakufeli mwana bábosana ata moke mawa na bango. Kobá kosalisa bango na ndenge okokoka. Soki bato bakufeli moto, na ebandeli wana moto nyonso alukaka kosalisa bango. Kasi, ata nsima mpe bazalaka na mposa ya lisalisi. Kobá kotalela bamposa na bango na bapɔsɔ mpe basanza oyo ekolanda.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ndenge ya kosalisa baoyo bazali kotungisama mpo na liwa ya mwana na bango, talá na mokapo “Lolenge nini basusu bakoki kopesa lisungi?” na nkasa 20-24 ya mwa buku Ntango moto oyo olingaka akufi, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Bililingi na lokasa 7]
Masolo ya Biblia emonisi ete Yesu azali na nguya mpe na mposa makasi ya kosekwisa bana oyo bakufá