“Nakozala na nsɔmɔ ya nani?”
“Ata etumba ebimeli ngai, ata bongo nakotya motema.”—NZ. 27:3.
NDENGE NINI BAVƐRSƐ OYO ELANDI EKOKI KOSALISA YO OZALA NA MPIKO?
1. Nzembo 27 ekosalisa biso tózwa biyano na mituna nini?
MPO na nini mosala ya kosakola ezali kokende liboso atako makambo ya mokili ezali se kobeba? Mpo na nini tosepelaka kopesa ntango mpe makasi n biso na mosala yango atako bato mingi bazali na mikakatano ya nkita? Mpo na nini tozali na mpiko na ntango oyo bato mosusu bazali kobanga mikolo ezali koya? Nzembo 27, oyo Mokonzi Davidi akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, epesi biso biyano na mituna yango.
2. Moto oyo azali na nsɔmɔ azalaka ndenge nini, kasi elikya nini tozali na yango?
2 Davidi abandaki nzembo yango na maloba oyo: “Yehova azali pole na ngai mpe lobiko na ngai. Nakobanga nani? Yehova azali esika makasi ya libateli ya bomoi na ngai. Nakozala na nsɔmɔ ya nani?” (Nz. 27:1) Moto oyo azali kobanga alɛmbaka nzoto; nzokande moto oyo azali na nsɔmɔ, akokaka kosala ata eloko moko te. Kasi, moto oyo atyelaka Yehova motema asengeli kobulungana na nsɔmɔ te. (1 Pe. 3:14) Soki tokómisi Yehova esika makasi ya libateli na biso, ‘tokofanda na kimya mpe tokotungisama te mpo na nsɔmɔ ya mpasi.’ (Mas. 1:33; 3:25) Mpo na nini?
“YEHOVA AZALI POLE NA NGAI MPE LOBIKO NA NGAI”
3. Na ndimbola nini Yehova azali pole na biso, kasi tosengeli kosala nini?
3 Maloba “Yehova azali pole na ngai” elimboli ete Yehova nde ateyaka biso solo oyo elongolaka biso na molili ya elimo. (Nz. 27:1) Pole ekoki kolakisa biso likama to eloko oyo ekoki kozala libaku na nzela oyo tozali kotambola, kasi ekolongala yango te. Biso moko tosengeli kokima yango. Ndenge moko mpe, Yehova amonisaka biso ndimbola ya makambo oyo ezali koleka na mokili. Akebisaka biso na makama oyo ezali na mokili oyo mabe. Apesi biso Biblia oyo ezali na mitinda oyo esalisaka ntango nyonso, kasi tosengeli kosalela makambo oyo tozali koyekola. Soki tosali bongo, tokozala na bwanya lokola mokomi ya nzembo oyo akómaki na “bwanya koleka banguna” na ye mpe akómaki “na mayele ya kososola mingi koleka bateyi” na ye.—Nz. 119:98, 99, 130.
4. (a) Mpo na nini Davidi alobaki na kondima nyonso ete “Yehova azali . . . lobiko na ngai”? (b) Ntango nini Yehova akobikisa biso?
4 Maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 27:1 emonisi ete abosanaki te ndenge Yehova abikisaki ye na mabaku mingi liboso. Na ndakisa, Yehova abikisaki ye liboso ya ‘nkɔsi mpe ya urse.’ Yehova asalisaki ye mpe alonga elombe Goliate. Na nsima, Mokonzi Saulo alukaki kotɔbɔla Davidi na likɔnga, kasi mbala nyonso, Yehova abikisaki Davidi. (1 Sa. 17:37, 49, 50; 18:11, 12; 19:10) Yango wana Davidi alobaki na kondima nyonso ete: “Yehova azali . . . lobiko na ngai”! Yehova akobikisa mpe basaleli na ye ndenge abikisaki Davidi. Ntango nini? Na “bolɔzi monene” oyo ezali koya.—Em. 7:14; 2 Pe. 2:9.
KANISÁKÁ LIBAKU NYONSO OYO YEHOVA ASALISAKI YO
5, 6. (a) Ndenge nini kokanisa makambo oyo Yehova asalelá biso kala ekoki kopesa biso mpiko? (b) Ndenge nini masolo oyo emonisi ndenge Yehova asalisaki basaleli na ye na ntango ya kala elendisaka biso?
5 Likambo moko oyo ekoki kosalisa biso tózala na mpiko ezali na Nzembo 27:2, 3. (Tángá.) Davidi alobelaki mabaku oyo abikaki na lisalisi ya Yehova. (1 Sa. 17:34-37) Makambo yango epesaki ye makasi ya koyika mpiko ata soki akutani na mikakatano oyo eleki makasi. Yo mpe ozwaka makasi soki okanisi ndenge oyo Yehova asalisaki yo? Na ndakisa, osilá kokutana na mokakatano moko oyo etindaki yo obondela mingi mpe na nsima omonaki ndenge Yehova apesaki yo bwanya to makasi ya kolonga yango? To okoki koyeba lisusu ndenge Yehova asalisaki yo osilisa mikakatano oyo ezalaki kopekisa yo osalela ye na esengo to ndenge apesaki yo libaku ya kosalela lisusu mingi? (1 Ko. 16:9) Oyokaka ndenge nini soki okanisi makambo yango? Makambo yango elendisaka kondima na yo ete Yehova akosalisa yo olonga mikakatano ya makasi koleka oyo okoki kokutana na yango to oyikela yango mpiko, boye te?—Rom. 5:3-5.
6 Ekozala boni soki guvɛrnema moko ya makasi ezwi mokano ya kosukisa mosala ya Batatoli ya Yehova? Na ntango na biso, bato mingi balukaki kosala bongo, kasi mbala nyonso balongaki te. Kokanisa ndenge Yehova asalisaki basaleli na ye na ntango ya kala ekopesa biso elikya mpo na mikolo ezali koya.—Dan. 3:28.
TÓLINGA LOSAMBO YA SOLO
7, 8. (a) Na kolanda Nzembo 27:4, Davidi asɛngaki Yehova nini? (b) Tempelo monene ya elimo ezali nini, mpe ndenge nini tosambelaka kuna?
7 Kolinga losambo ya solo ezali likambo mosusu ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa biso tózala na mpiko. (Tángá Nzembo 27:4.) Na ntango ya Davidi, “ndako ya Yehova” ezalaki tabernakle. Davidi ye moko abongisaki makambo nyonso mpo mwana na ye Salomo atonga tempelo kitoko mpo na Yehova. Bankama ya bambula na nsima, Yesu amonisaki ete mpo bato básambela Yehova, ekosɛnga lisusu te ete bákendaka na tempelo. (Yoa. 4:21-23) Na Baebre mokapo 8 tii 10, ntoma Paulo amonisaki ete tempelo moko monene ya elimo esalemaki ntango Yesu azwaki batisimo na mobu 29 T.B., ntango amimonisaki mpo na kosala mokano ya Yehova. (Ebr. 10:10) Tempelo yango ezali ebongiseli oyo Yehova asali mpo tópusana penepene na ye na nzela ya kondima na biso na mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo. Ndenge nini tosambelaka na tempelo yango? Na ndenge tobondelaka Yehova “na mitema ya solosolo” mpe “na kondima makasi mpenza”; na ndenge tolobelaka elikya na biso polelepolele, kozanga kotengatenga; mpe na ndenge totyelanaka likebi mpe tolendisanaka na bandeko na biso ntango toyangani na makita ya lisangá to na Losambo na kati ya libota na biso. (Ebr. 10:22-25) Kolinga losambo ya solo epesaka biso makasi na mikolo oyo ya nsuka mpe ya mpasi.
8 Na mokili mobimba, basaleli ya sembo ya Yehova bazali komipesa mingi lisusu na mosala ya kosakola, bazali koyekola minɔkɔ mosusu, mpe bazali kokende na bisika oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te. Yango ezali komonisa ete, ndenge moko na mokomi ya nzembo, bazali kosɛnga Yehova kaka likambo moko. Mposa na bango ezali ete básepela na bizaleli malamu ya Yehova mpe bámipesa na mosala mosantu, ata ndenge nini.—Tángá Nzembo 27:6.
TÓTYA MOTEMA ETE NZAMBE AKOSALISA BISO
9, 10. Maloba ya Nzembo 27:10 elimboli nini?
9 Davidi amonisaki ete azalaki mpenza na elikya ete Yehova akosalisa ye; akomaki boye: “Soki tata na ngai ná mama na ngai basundoli ngai, Yehova ye moko akolɔkɔta ngai.” (Nz. 27:10) Makambo oyo ekomami na 1 Samwele mokapo 22 emonisi ete baboti ya Davidi basundolaki ye te. Kasi, lelo oyo ezali na bato mingi oyo mabota na bango esundolá bango mpenza. Nzokande, bato mingi oyo basundolamá ndenge wana bazali sikoyo kobatelama mpe kozwa lisalisi na kati ya lisangá ya bokristo.
10 Lokola Yehova akakatanaka te kosunga basaleli na ye ntango bato mosusu basundoli bango, akozanga te kosalisa bango soki bakutani na mikakatano ya ndenge mosusu. Na ndakisa, soki tozali komibanzabanza mpo na koleisa libota na biso, tosengeli kobosana te ete Yehova akosalisa biso. (Ebr. 13:5, 6) Ayebi bomoi mpe bamposa ya basaleli na ye nyonso ya sembo.
11. Soki tozali mpenza kotyela Yehova motema, yango ekoki kotinda bato mosusu báloba nini? Pesá ndakisa.
11 Tózwa ndakisa ya Victoria, mwasi moko oyo azalaki koyekola Biblia na ekólo Libéria. Liboso azwa batisimo, mobali oyo azalaki kofanda na ye asundolaki ye ná bana misato. Atako Victoria azalaki na esika ya kofanda te mpe azalaki na mosala te, akobaki koyekola mpe azwaki batisimo. Na nsima, mwana na ye ya mwasi ya mbula 13 alɔkɔtaki sakosi oyo ezalaki na mbongo ebele. Mpo bákóma te na makanisi ya kosalela mbongo yango, balobaki ete malamu bátánga ata te soki ezali mbongo boni. Balukaki nokinoki soda oyo abungisaki mbongo yango. Soda yango ayebisaki bango ete soki bato nyonso bazalaki sembo lokola Batatoli ya Yehova, mokili elingaki kozala malamu koleka mpe na kimya mingi. Victoria alakisaki soda yango elaka ya mokili ya sika oyo Yehova apesi na Biblia. Soda yango asepelaki na Victoria mpo na bosembo na ye mpe apesaki ye mwa ndambo ya mbongo. Ya solo, lokola Batatoli ya Yehova bandimaka mpenza ete Yehova akokokisa bamposa na bango, bayebani na bisika nyonso ete bazalaka sembo.
12. Tomonisaka nini soki tozali kokoba kosalela Yehova atako tobungisi biloko ya kobikela? Pesá ndakisa.
12 Tótalela mpe likambo oyo ekómelaki Thomas, mosakoli moko oyo azwá naino batisimo te na ekólo Sierra Leone. Azwaki mosala ya molakisi na eteyelo moko, kasi bazalaki kofuta ye te pene na mbula mobimba tii ntango asengelaki kozwa mikanda nyonso oyo emonisi ete bandimi ye lokola molakisi. Likambo nini ya nsuka Thomas asengelaki kosala mpo bábanda kofuta ye mpe báfuta ye mbongo ya basanza oyo asalaki? Asengelaki kosolola na sango oyo azalaki mokambi ya eteyelo yango. Sango yango ayebisaki Thomas ete bakonzi ya eteyelo bakoki te kondima makambo ya Batatoli ya Yehova. Alobaki na ye apona likambo moko: kotikala na mosala to kolanda mateya ya Batatoli ya Yehova. Thomas alongwaki mosala yango mpe atikaki lifuti na ye ya mbula mobimba mpe azwaki mosala ya kobongisa baradio ná batelefone ya mabɔkɔ. Ndenge ndakisa oyo mpe bandakisa mosusu ebele emonisi yango, bato mosusu babangaka ete bázanga biloko ya kobikela; nzokande ezali bongo te mpo na biso oyo totyelaka Yehova motema mpo toyebi ete azali Mozalisi ya biloko nyonso mpe abatelaka basaleli na ye.
13. Mpo na nini mosala ya kosakola Bokonzi ezali kokola mingi na mikili ya bobola?
13 Na mikili mingi oyo bomoi ezali mpasi, mbala mingi basakoli ya Bokonzi bazalaka molende mpenza. Mpo na nini? Filiale moko ekomi boye: “Bato mingi oyo bandimaka koyekola Biblia bazali basomɛlɛ, yango wana bazalaka na ntango mingi mpo na koyekola Biblia. Bandeko mpe bazalaka na ntango mingi mpo na kosakola. Bato ebele, mingimingi baoyo bafandaka na bisika oyo bomoi ezali mpenza mpasi, bandimaka mbala moko ete tozali na mikolo ya nsuka; bamonaka ndenge makambo ezali zingazinga na bango.” Misionɛrɛ moko oyo asali mbula koleka 12 na ekólo moko oyo mosakoli mokomoko ayekolaka Biblia na bato ata misato akomi boye: “Lokola basakoli mingi bazali na bomoi ya mindɔndɔ te to mpe biloko oyo ekoki kolya bango ntango, bazalaka na ntango mingi mpo na kobima mosala ya kosakola mpe koyekola na bato Biblia.”
14. Ndenge nini Nzambe akobatela ebele mpenza ya bato?
14 Yehova alaki ete akosalisa basaleli na ye, akobatela bango, mpe akobikisa bango; akobatela bango mpe na elimo, mpe tondimaka ete akokokisa maloba na ye. (Nz. 37:28; 91:1-3) “Ebele mpenza ya bato” bakobika “na bolɔzi monene.” (Em. 7:9, 14) Na yango, Nzambe akobatela ebele ya bato yango; akotika nzela te ete moto moko asilisa bango na mikolo oyo ya nsuka. Yehova akopesa bango nyonso oyo basengeli na yango mpo na koyika mpiko na komekama mpe mpo bábatela boyokani na bango na ye. Na Armagedone mpe, Yehova akobatela basaleli na ye.
“EE YEHOVA, LAKISÁ NGAI NZELA NA YO”
15, 16. Matomba nini tozwaka ntango tozali kosalela makambo oyo Nzambe ateyaka biso? Pesá ndakisa.
15 Mpo tózala ntango nyonso na mpiko, tosengeli kokoba kolanda mateya ya Nzambe. Davidi amonisaki yango ntango alobaki boye: “Ee Yehova, lakisá ngai nzela na yo, mpe mpo na banguna na ngai, kambá ngai na nzela ya bosembo.” (Nz. 27:11) Kotika Yehova alakisa biso nzela na ye elimboli kotya likebi na malako nyonso oyo euti na Biblia, oyo tozwaka na ebongiseli ya Yehova mpe kosalela yango nokinoki. Bato mingi balandaki toli ya kotika bomoi ya mindɔndɔ, bafutaki banyongo nyonso oyo bazalaki na yango mpe batɛkaki biloko oyo bazalaki na mposa na yango te. Yango wana, ntango nkita ya mokili ebebaki, bamitungisaki mingi te mpo na mbongo. Sikoyo, bazali na ntango mingi mpo na komipesa na mosala ya kosakola. Ebongi mokomoko amituna boye: ‘Nasalelaka mbala moko toli nyonso oyo natángi na Biblia mpe na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele, ata soki esɛngi namipimela makambo mosusu?’—Mat. 24:45.
16 Soki tozali kotika Yehova alakisa biso mpe atambwisa biso na nzela ya boyengebene, tokobanga eloko te. Na États-Unis, mobongisi-nzela moko atondisaki formilɛrɛ mpo azwa mosala moko oyo elingaki kosalisa ye ná libota na ye bákoba na mosala ya mobongisi-nzela. Kasi, mokonzi na ye ayebisaki ye ete bakopesa ye mosala yango kaka soki azali na diplome ya iniversite. Soki ezalaki yo, olingaki koyoka mawa ndenge oponaki mosala ya mobongisi-nzela na esika okɔta iniversite? Pɔsɔ mibale na nsima, mokonzi yango alongwaki mosala, mpe mokonzi mosusu atunaki ndeko yango soki azali na mikano nini. Ndeko yango ayebisaki ye ete ye ná mwasi na ye bazali Batatoli ya Yehova, basalaka mosala ya mobongisi-nzela, mpe balingi kotika mosala yango te. Liboso kutu ndeko yango abakisa maloba mosusu, mokonzi yango alobaki boye: “Nazalaki komona ete ozali lokola bato mosusu te! Liboso tata na ngai akufa, bandeko na bino mibale bazalaki koya kotángela ye Biblia mokolo na mokolo. Nazwaki ekateli ete soki nazwi libaku ya kosalisa Motatoli ya Yehova, nakosala yango.” Mokolo oyo elandaki, ndeko yango azwaki mosala oyo mokonzi ya liboso aboyaki kopesa ye. Ya solo, soki tozali kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso, Yehova akozanga te kokokisa elaka na ye ya kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango.—Mat. 6:33.
TOSENGELI KOZALA NA KONDIMA MPE ELIKYA
17. Nini ekosalisa biso tóbanga te mpo na mikolo oyo ezali koya?
17 Na nsima, Davidi amonisaki ntina ya kozala na kondima mpe elikya; alobaki ete alingaki kozala na elikya te ‘soki azalaki na kondima te ete akomona bolamu ya Yehova.’ (Nz. 27:13) Kanisá ndenge bomoi na biso elingaki kozala soki Nzambe apesaki biso elikya te mpe soki toyebaki te makambo oyo ezali na Nzembo 27! Yango wana, tókoba kobondela Yehova apesa biso makasi mpe abatela biso na Armagedone.—Tángá Nzembo 27:14.
[Elilingi na lokasa 23]
Kokanisa ndenge Yehova abikisaki ye liboso epesaki Davidi makasi
[Elilingi na lokasa 25]
Omonaka ete kobeba ya nkita ya mokili ezali kopesa biso libaku ya komipesa mingi na mosala ya kosakola?