“Yehova kaka moko” azali koyanganisa libota na ye
‘Nazali kobondela bino ete bóbatela bomoko ya elimo.’—EF. 4:1, 3.
OKOPESA BIYANO NINI?
Mokano ya mosala ya kotambwisa makambo ezali nini?
Ndenge nini ‘tobatelaka bomoko ya elimo’?
Nini ekosalisa biso ‘tózala na boboto na kati na biso’?
1, 2. Mokano ya Yehova mpo na mabele mpe bato ezali nini?
OKANISAKA nini ntango oyokaka liloba “libota”? Okanisaka bolingo mpe esengo? Okanisaka bato oyo bazali kosala elongo mpo na kokokisa mokano moko? Esika oyo moto akolaka na kimya, ayekola makambo, mpe asololaka na basusu? Na ntembe te, okokanisa makambo ya ndenge wana soki ozali na libota ya malamu. Yehova nde azali Mobandisi ya libota. (Ef. 3:14, 15) Mokano na ye ezalaki ete bikelamu na ye nyonso, ezala na likoló to awa na mabele, bázala na kimya, bátyelanaka motema mpe bázala na bomoko.
2 Nsima ya lisumu ya Adama ná Eva, bato bazalaki lisusu na kati ya libota ya Nzambe te; kasi mokano ya Yehova ebongwanaki te. Nsukansuka, Paradiso ekotonda na bakitani ya Adama ná Eva. (Eba. 1:28; Yis. 45:18) Abongisi makambo nyonso mpo mokano yango ekokisama. Mokanda ya Baefese, oyo elobeli mingimingi bomoko, elobeli mpe bibongiseli yango mosusu. Tótalela naino mwa mikapo ya mokanda yango; yango ekosalisa biso tóyeba makambo tokoki kosala mpo na kokokisama ya mokano ya Yehova ya koyanganisa bikelamu na ye nyonso.
MOSALA YA KOTAMBWISA MAKAMBO MPE MOKANO NA YANGO
3. Mosala ya kotambwisa makambo oyo balobeli na Baefese 1:10 ezali nini, mpe ebandaki ntango nini?
3 Moize ayebisaki Bayisraele ete: “Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.” (Mib. 6:4) Makambo nyonso oyo Yehova asalaka eyokani na mokano na ye. Yango wana, “na nsuka mpenza ya bantango oyo etyamá,” Nzambe abandisaki “mosala ya kotambwisa makambo,” elingi koloba azwaki bibongiseli mpo na koyanganisa bikelamu na ye nyonso ya mayele. (Tángá Baefese 1:8-10.) Mosala yango ya kotambwisa makambo ezali na biteni mibale. Ya liboso, Nzambe azali kobongisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpo na bomoi na likoló, epai bakokoba kosala na nse ya bokonzi ya Kristo. Yango ebandaki na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango Yehova abandaki koyanganisa baoyo bakoyangela elongo na Yesu na likoló. (Mis. 2:1-4) Lokola bakristo oyo batyami mafuta na elimo batángami bayengebene mpo na bomoi na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu, bayebi ete Nzambe akómisi bango “bana” na ye.—Rom. 3:23, 24; 5:1; 8:15-17.
4, 5. Nini ezali kosalema na eteni ya mibale ya mosala ya kotambwisa makambo?
4 Ya mibale, Nzambe azali kobongisa baoyo bakofanda awa na mabele, na Paradiso oyo Bokonzi ya Masiya ekoyangela. Bato ya liboso oyo bakofanda na mokili yango ya sika ezali “ebele mpenza ya bato.” (Em. 7:9, 13-17; 21:1-5) Na nsima, bamiliare ya bato mosusu bakosekwa na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo mpo na kofanda mpe mokili yango. (Em. 20:12, 13) Bomoko na biso ekomonana lisusu malamumalamu na lisekwa! Na nsuka ya mbula nkóto, ekozala na komekama ya nsuka mpo na “biloko oyo ezali na mabele,” elingi koloba bato nyonso oyo bakozala na Paradiso. Baoyo bakotikala sembo bakokóma “bana ya Nzambe” awa na mabele.—Rom. 8:21; Em. 20:7, 8.
5 Lelo oyo, Yehova azali kobongisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpo na bomoi na likoló mpe bampate mosusu mpo na bomoi na Paradiso awa na mabele. Kasi, mokomoko na biso asengeli kosala nini mpo apesa mabɔkɔ na mosala ya kotambwisa makambo oyo Nzambe azali kosala lelo oyo?
‘TÓBATELA BOMOKO YA ELIMO’
6. Bavɛrsɛ nini emonisi ete bakristo basengeli koyanganaka na makita?
6 Biblia emonisi ete bakristo basengeli koyanganaka na makita. (1 Ko. 14:23; Ebr. 10:24, 25) Kasi, mpo tózala na bomoko ya solosolo, tosengeli te kosuka kaka na kolekisa ntango elongo esika moko lokola bato oyo bakutanaka na wenze to oyo bakutanaka na stade mpo na kotala masano. Tosengeli kosalela makambo oyo Yehova azali koteya biso mpe kotika ete elimo santu na ye ebongisa biso.
7. “Kobatela bomoko ya elimo” elimboli nini?
7 Yehova amonaka ete tozali bayengebene na miso na ye mpo tondimaka mbeka ya lisiko ya Kristo. Kutu, abengaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo, bana na ye mpe bampate mosusu, baninga na ye. Atako bongo, lokola tozali naino na mokili oyo mabe, matata ebimaka ntango mosusu kati na biso. (Rom. 5:9; Yak. 2:23) Soki ezalaki bongo te, Biblia elingaki te kopesa biso toli ete tókoba ‘kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu.’ Ndenge nini tokoki kozala na bomoko na lisangá ya bokristo? Tosengeli kolona ‘elimo ya komikitisa mpe ya boboto.’ Lisusu, Paulo alendisi biso tósala makasi mpo ‘tóbatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.’ (Tángá Baefese 4:1-3.) Tokosalela toli yango soki totiki elimo santu etambwisa biso mpe ebota mbuma na yango na kati na biso. Mbuma ya elimo santu esangisaka bato; kasi, misala ya nzoto ekabolaka ntango nyonso.
8. Ndenge nini misala ya nzoto ekabolaka bato?
8 Ndenge nini “misala ya nzoto” ekabolaka bato? (Tángá Bagalatia 5:19-21.) Pite ekabolaka moto ná Yehova mpe ná lisangá, mpe ekobo ekoki kokabola bana ná baboti mpe moto ná molongani na ye. Mbindo ebebisaka boyokani ya moto na Nzambe mpe boyokani na ye ná bandeko mpe baninga na ye. Moto nyonso oyo ameká kokangisa biloko mibale na kole ayebi ete mpo biloko yango ekangama makasi, bisika oyo akotya kole esengeli kozala pɛto. Moto oyo azali na etamboli ya nsɔni amonisaka ete azali kotyola mpenza mibeko ya sembo ya Nzambe. Misala mosusu ya nzoto mpe ekabolaka bato, mpe ekabolaka moto ná Nzambe. Bizaleli yango esepelisaka Yehova ata moke te.
9. Mituna nini tokoki komituna mpo na koyeba soki ‘tosalaka makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo’?
9 Yango wana mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Nasalaka mpenza milende oyo esengeli mpo na “kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka”? Nasalaka nini soki nayokani te na ndeko moko? Nayebisaka yango bato mosusu mpo bákɔtela ngai? Nalukaka ete bankulutu bákatela biso likambo, na esika ngai moko naluka kosolola na ndeko yango mpo na kozongisa kimya? Mpe soki nasalaki ndeko moko mabe, nakómaka kokima kokutana na ye mpo tósolola likambo yango te?’ Soki tozali kosala makambo ya ndenge wana, tokomonisa ete tozali kopesa mabɔkɔ te na mosala oyo Yehova azali kosala ya koyanganisa lisusu biloko nyonso na nse ya bokonzi ya Kristo.
10, 11. (a) Mpo na nini ezali na ntina kozala na kimya na bandeko na biso? (b) Tokoki kosala nini mpo tózala na kimya mpe tókola na elimo?
10 Yesu alobaki boye: “Soki omemi likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na likambo ná yo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo na ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo. Salá noki obongisa makambo.” (Mat. 5:23-25) Yakobo akomaki ete “bato oyo batyaka kimya balonaka mbuma ya boyengebene na kimya mpe babukaka yango.” (Yak. 3:17, 18) Na yango, soki tozali na kimya te na basusu, tokolonga te komonisa bizaleli ya malamu.
11 Tópesa ndakisa moko: Na bikólo mosusu oyo ezalaki na bitumba, bato babangaka kosala bilanga na bisika mosusu mpo bamine ekundamá kuna. Ntango mine epanzani na esika moko boye, basali-bilanga basundolaka bilanga na bango oyo ezali zingazinga, bato ya mboka bazangaka biloko ya kolya mpe ya kotɛka na bingumba ya minene. Ndenge moko mpe, tokokola malamu te na elimo soki tozali na bizaleli mabe oyo ekoki kopekisa biso tófanda na kimya na bandeko na biso. Na maloba mosusu, tokozala lokola mabele oyo ezali na bamine. Nzokande, soki tolimbisaka noki mpe tosalelaka basusu makambo ya malamu, yango ekosalisa biso tókola na elimo.
12. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa biso tózala na bomoko?
12 Longola yango, Yehova apesi biso “makabo oyo ezali bato,” oyo bakoki kosalisa biso ‘tókóma na bomoko na kondima.’ (Ef. 4:8, 13) Bankulutu basalisaka biso tólata bomoto ya sika na ndenge basalaka na biso elongo na mosala ya Nzambe mpe bapesaka biso batoli ya malamu oyo euti na Liloba ya Nzambe. (Ef. 4:22-24) Kobosana te ete ntango bankulutu bapesaka yo toli, Yehova nde asalelaka bango mpo na kobongisa yo mpo na bomoi na mokili ya sika oyo Mwana na ye akoyangela. Bankulutu, ntango bozali kosembola moto, bosalaka yango na mokano ya kobongisa ye mpo na bomoi na mokili ya sika?—Gal. 6:1.
“BÓZALA NA BOBOTO NA KATI NA BINO”
13. Nini ekosalema soki tolandi te toli oyo ezali na Baefese 4:25-32?
13 Baefese 4:25-29 elobeli bizaleli oyo tosengeli mpenza koboya. Tosengeli koboya lokuta, nkanda makasimakasi, gɔigɔi, kobimisa maloba mabe; tosengeli nde kobimisa maloba ya malamu mpe oyo elendisaka. Soki moto atosi toli yango te, akoyokisa elimo santu ya Nzambe mawa, mpo elimo yango nde esalisaka biso tózala na bomoko. (Ef. 4:30) Mpo tózala na kimya mpe na bomoko, tosengeli mpe kosalela toli oyo Paulo apesi na bavɛrsɛ oyo elandi: “Makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongwa mosika na bino, ná mabe nyonso. Kasi bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko ndenge Nzambe mpe, na nzela ya Kristo, alimbisaki bino na motema moko.”—Ef. 4:31, 32.
14. (a) Mpo na nini Paulo apesaki toli ete ‘tózala na boboto’? (b) Nini ekosalisa biso tózala na boboto?
14 Paulo apesaki biso toli ete ‘tózala na boboto’ mpo mbala mosusu tozalaka na boboto te mpe ekoki kosɛnga tósala milende mpo tómonisa ezaleli yango mingi koleka. Tosengeli koyekola koluka bolamu ya basusu liboso ya koluka bolamu na biso moko. (Flp. 2:4) Ntango mosusu tolingi koloba likambo moko mpo na kosɛkisa to mpo na kolakisa ete toyebi makambo mingi, kasi soki likambo yango ezali ya boboto te, malamu tóloba yango te. Kokanisa liboso ya koloba ekosalisa biso ‘tózala na boboto.’
TÓZALA NA BOLINGO MPE LIMEMYA NA LIBOTA
15. Likambo nini oyo Kristo asalelaka lisangá Paulo alobelaki na Baefese 5:28?
15 Biblia ekokanisi boyokani oyo Kristo azali na yango ná lisangá na boyokani ya mobali ná mwasi na ye. Yango emonisi ete mobali asengeli kotambwisa, kolinga mpe kobatela mwasi na ye mpe ete mwasi asengeli komikitisa liboso ya mobali na ye. (Ef. 5:22-33) Ntango Paulo akomaki ete: “Na ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko,” “ndenge” yango ezali nini? (Ef. 5:28) Na bavɛrsɛ oyo ezali liboso, alobelaki ndenge oyo “Kristo mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango, mpo akoka . . . kopɛtola yango mpe kosukola yango na mai na nzela ya liloba.” Na yango, mobali asengeli kokokisa bamposa ya elimo ya libota na ye mpo amonisa ete azali kosala makambo na ndenge oyo eyokani na mokano ya Yehova ya koyanganisa lisusu biloko nyonso na nse ya bokonzi ya Kristo.
16. Matomba nini ekomonana soki baboti bazali kokokisa mikumba oyo Yehova apesi bango?
16 Baboti basengeli kobosana te ete Yehova nde apesi bango mokumba ya kobɔkɔla bana na bango. Ezali mawa ete lelo oyo na mokili, bato mingi “balinganaka te na kati ya libota.” (2 Tim. 3:1, 3) Batata mingi bazali kokima mikumba na bango, mpe yango ezali kobebisa bana. Nzokande Paulo apesaki batata toli oyo: “Bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Ef. 6:4) Ezali libosoliboso na kati ya libota nde bana bayekolaka bolingo mpe kotosa bokonzi. Baboti oyo balongaki koteya bana na bango bizaleli yango bakokisaki mokano ya Yehova na mosala ya kotambwisa makambo. Soki tozali kolingana na kati ya libota, tolongoli nkanda makasimakasi mpe maloba ya kofinga, bana bakoyekola ndenge ya komonisela basusu bolingo mpe kotosa bokonzi. Yango ekobongisa bango mpo na kofanda na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.
17. Tosengeli kosala nini mpo tótɛmɛla Zabolo?
17 Tosengeli koyeba ete Zabolo, oyo abebisaki kimya ya mokili, akosala nyonso oyo akoki mpo na kolɛmbisa milende na biso ya kosala mokano ya Nzambe. Na ntembe te, Satana azali kosepela ndenge mabala mingi ezali kokufa, bato mingi balingi se libala ya “yaká tófanda,” mpe bazali kondima kobalana mibali na mibali to basi na basi. Nzokande, biso tomekolaka etamboli ya bato ya mokili oyo te. Kristo nde ndakisa na biso. (Ef. 4:17-21) Yango wana Biblia elendisi biso ‘tólata molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe’ mpo tólonga kotɛmɛla Zabolo ná bademo na ye.—Tángá Baefese 6:10-13.
“BÓKOBA KOTAMBOLA NA KATI YA BOLINGO”
18. Ezaleli nini esalisaka bakristo bázala na bomoko?
18 Ezaleli oyo esalisaka biso bakristo tózala na bomoko ezali bolingo. Lokola tolingaka mpenza Yesu Kristo, “Nkolo kaka moko,” mpe Yehova, “Nzambe kaka moko,” mpe tolinganaka biso na biso, tozali na ekateli ya “kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.” (Ef. 4:3-6) Yesu abondelaki mpo na bolingo yango; alobaki boye: “Nazali kosɛngɛla kaka bango te, kasi mpe baoyo bazali kondimela ngai na nzela ya liloba na bango; mpo bango nyonso bázala moko, ndenge yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na yo, mpo bango mpe bázala na bomoko elongo na biso . . . Mpe nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango, mpo bolingo oyo olingaki ngai na yango ezala na kati na bango mpe ngai na bomoko elongo na bango.”—Yoa. 17:20, 21, 26.
19. Ozali na ekateli ya kosala nini?
19 Soki ezaleli moko ya mabe elingi kozwa misisa na motema na biso mpo na bomoto na biso ya kozanga kokoka, bolingo esengeli kotinda biso tóbondela lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Pesá ngai motema moko mpo nabanga nkombo na yo.” (Nz. 86:11) Tózala na ekateli ya kotɛmɛla milende oyo Satana azali kosala mpo na kokabola biso na Tata na biso ya bolingo mpe na bandeko na biso. Tósala makasi mpo ‘tókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo, mpe tókoba kotambola na kati ya bolingo’ na libota, na mosala ya kosakola, mpe na lisangá.—Ef. 5:1, 2.
[Elilingi na lokasa 29]
Atiki likabo na ye na etumbelo, mpe akei koyokana na ndeko na ye
[Elilingi na lokasa 31]
Baboti, bóteya bana na bino limemya