Tiká Ɛɛ na yo ezala Ɛɛ
“Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te.”—MAT. 5:37.
1. Yesu alobaki nini na oyo etali kolapa ndai, mpe mpo na nini?
MBALA mingi, esɛngaka te ete bakristo ya solo bálapa ndai. Ezalaka bongo mpamba te batosaka Yesu oyo alobaki ete: “Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ.” Alingaki koloba ete moto asengeli kotosa maloba na ye. Liboso Yesu apesa etinda wana, alobaki ete: “Bólapa ndai te.” Alobaki yango mpamba te na ntango wana bato mingi bazalaki na momeseno ya kolapa ndai ata soki bayebi ete bakokokisa maloba na bango te. Kasi soki moto alapaka ndai ete akosala likambo moko boye kasi akokisaka yango te, azali komonisa ete bakoki kotyela ye motema te, mpe na ndenge yango azali kotambwisama na “moto mabe.”—Tángá Matai 5:33-37.
2. Limbolá mpo na nini kolapa ndai ezalaka ntango nyonso mabe te.
2 Maloba ya Yesu elimboli nde ete kolapa ndai ezalaka ntango nyonso mabe? Ezali bongo te. Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, Yehova Nzambe mpe mosaleli na ye ya sembo Abrahama balapaki ndai mpo na makambo ya ntina mingi. Longola yango, Mobeko ya Nzambe esɛngaki ete moto alapa ndai mpo na kosilisa matata. (Kob. 22:10, 11; Mit. 5:21, 22) Na yango, ekoki kosɛnga ete mokristo alapa ndai liboso ya tribinale mpo na komonisa ete azali koloba solo. Kasi na mabaku mosusu, mokristo akoki komona malamu ete alapa ndai mpo na komonisa basusu ete alingi mpenza kosala likambo moko to mpo na komonisa ete makambo oyo azali koloba ezali mpenza solo. Kutu, ntango nganga-nzambe monene alapisaki Yesu ndai, Yesu aboyaki te, mpe alobaki solo liboso ya Sanedrina ya Bayuda. (Mat. 26:63, 64) Kasi, ezalaki na ntina te ete Yesu alapa ndai liboso ya bato. Ata bongo, mpo na komonisa ete mateya na ye ezali solo, mbala mingi azalaki kobanda na maloba oyo: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino.” (Yoa. 1:51; 13:16, 20, 21, 38) Tótala sikoyo mateya mosusu oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu, Paulo, mpe bato mosusu oyo batikaki ete Ɛɛ na bango ezala Ɛɛ.
YESU AZALI NDAKISA OYO ELEKI MALAMU
3. Yesu alakaki Nzambe nini na libondeli oyo asalaki, mpe Tata na ye alobaki nini?
3 “Talá! Nayei . . . kosala mokano na yo, Ee Nzambe.” (Ebr. 10:7) Na maloba wana ya ntina mingi, Yesu amonisaki ete ayei epai ya Nzambe mpo na kokokisa makambo nyonso oyo esakolamaki mpo na Momboto oyo alakamaki, ata mpe ndenge oyo Satana ‘akozokisa ye na litindi.’ (Eba. 3:15) Moto mosusu te awa na mabele akokaki kondima kokokisa mokumba wana monene. Uta na likoló, Yehova alobaki ete azali mpenza kotyela Mwana na ye motema, atako asɛngaki te ete Yesu alapa ndai ete akokokisa mpenza makambo oyo alakaki.—Luka 3:21, 22.
4. Makambo nini Yesu andimaki kosala mpo Ɛɛ na ye ezala Ɛɛ?
4 Yesu azalaki ntango nyonso kosalela makambo oyo azalaki koteya, azalaki kotika ete Ɛɛ na ye ezala Ɛɛ. Atikaki te ete eloko moko elongola likebi na ye na mokumba oyo Tata na ye apesaki ye ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe kokómisa bato nyonso oyo Nzambe abendaki epai ya Yesu bayekoli. (Yoa. 6:44) Biblia emonisi ete Yesu akokisaki elaka na ye ya kosala mokano ya Nzambe na maloba oyo: “Ata soki bilaka ya Nzambe ezali ebele boni, ekómi Ɛɛ na nzela na ye.” (2 Ko. 1:20) Ya solo, Yesu atikaki mpenza ndakisa ya malamu koleka na ndenge akokisaki makambo nyonso oyo alakaki Tata na ye. Tólobela sikoyo moto moko oyo asalaki makasi amekola Yesu.
PAULO—MOTO OYO AZALAKI KOTOSA MALOBA NA YE
5. Ndakisa nini ntoma Paulo atikeli biso?
5 “Nasengeli kosala nini, Nkolo?” (Mis. 22:10) Na maloba wana oyo eutaki mpenza na motema, Paulo, oyo na ntango wana azalaki kobengama Saulo, amonisaki ete andimi kotosa Nkolo Yesu oyo asekwaki, mpe abimelaki ye na emonaneli moko mpo na koyebisa ye atika konyokola bayekoli ya Kristo. Nsima ya emonaneli yango, Saulo abongolaki motema, azwaki batisimo, mpe andimaki mokumba ya ntina mingi oyo azwaki ya kopesa litatoli mpo na Yesu epai ya bato ya bikóló. Kobanda ntango wana, Paulo akobaki kobenga Yesu “Nkolo,” mpe akobaki kotosa ye tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. (Mis. 22:6-16; 2 Ko. 4:5; 2 Tim. 4:8) Paulo azalaki te lokola bato mosusu oyo Yesu alobaki mpo na bango ete: “Mpo na nini bozali kobenga ngai ‘Nkolo! Nkolo!’ kasi bozali te kosala makambo oyo ngai nazali koloba?” (Luka 6:46) Ya solo, Yesu alingaka ete baoyo nyonso babengaka ye Nkolo bátosaka maloba na bango, kaka ndenge ntoma Paulo asalaki.
6, 7. (a) Mpo na nini Paulo abongolaki programɛ na ye ya kokende lisusu na Korinti? (b) Mpo na nini ebongaki te ete basusu bákanisa ete abongi te kotyelama motema? (c) Ndenge nini tosengeli kotalela baoyo baponami mpo na kokamba biso?
6 Na molende nyonso, Paulo apalanganisaki nsango ya Bokonzi na Azia Moke mpe na Mpoto; afungolaki masangá mingi mpe azalaki kokende kotala masangá yango. Na bantango mosusu, amonaki malamu ete alapa ndai mpo na komonisa ete makambo oyo akomaki ezali solo. (Gal. 1:20) Ntango bato mosusu na Korinti balobaki ete Paulo abongi te kotyelama motema, akomelaki bango ete: “Nzambe akoki solo kotyelama motema, maloba oyo toyebisaki bino ezali te Ɛɛ nzokande Te.” (2 Ko. 1:18) Ntango Paulo akomaki maloba wana, atikaki Efese mpe akatisaki na Masedonia mpo na kokende na Korinti. Na ebandeli, akanaki kokende kotala lisusu bandeko na Korinti liboso akende na Masedonia. (2 Ko. 1:15, 16) Kasi mbala mosusu esɛngaka kobongola ndenge oyo tokanaki kosala makambo. Na ndakisa, lelo oyo na bantango mosusu bakɛngɛli-batamboli babongolaka badati oyo batyaki mpo na kokende kotala masangá. Nzokande, basalaka yango te mpo na makambo ezangá ntina to mpo na kokokisa bamposa na bango moko, kasi soki likambo moko ya mbalakaka ebimi. Soki Paulo apusaki mosika dati oyo asengelaki kokende kotala bandeko ya Korinti, ezalaki nde mpo na bolamu na bango. Na ndenge nini?
7 Mokolo mosusu, nsima ya kobongisa programɛ na ye, Paulo azwaki nsango ete bandeko ya lisangá ya Korinti bazali na bomoko te mpe bazali kokanga miso na pite. (1 Ko. 1:11; 5:1) Mpo na kosembola makambo, apesaki Bakorinti toli moko ya makasi na mokanda ya liboso oyo akomelaki bango. Na nsima, na esika ete akende mbala moko na Korinti, Paulo amonaki malamu atikela naino bandeko mwa ntango mpo básalela toli oyo apesaki bango. Na ndenge yango, akokaki kolendisa bango malamu ntango akokende kotala bango. Mpo na komonisa bango ete abongolaki programɛ na ye mpo na ntina oyo ebongi mpenza, Paulo akomelaki bango na mokanda na ye ya mibale ete: “Nazali kobelela Nzambe azala motatoli mpo na molimo na ngai moko ete ezali mpo na kobatela bino nde nayei naino te na Korinti.” (2 Ko. 1:23) Tosengeli te kozala lokola bato wana oyo bazalaki koloba mabe mpo na Paulo; tosengeli nde kozala na limemya makasi mpo na baoyo baponami mpo na kokamba biso. Ya solo, ekozala malamu tómekola Paulo, kaka ndenge ye amekolaki Kristo.—1 Ko. 11:1; Ebr. 13:7.
BANDAKISA MOSUSU YA MALAMU
8. Ndakisa nini Rebeka atikeli biso?
8 “Nandimi.” (Eba. 24:58) Rebeka alobaki bongo mpo na komonisa mama na ye ná ndeko na ye ya mobali ete andimi kolongwa epai na bango kaka na mokolo wana mpe kosala mobembo ya kilomɛtrɛ soki 800 elongo na mopaya moko mpo na kokóma mwasi ya Yisaka, mwana ya Abrahama. (Eba. 24:50-58) Rebeka atikaki Ɛɛ na ye ezala Ɛɛ, mpe azalaki mpo na Yisaka mwasi moko ya sembo, oyo azalaki kobanga Nzambe. Kobanda na ntango wana, akómaki kofanda lokola mopaya na bahema na Mokili ya Ndaka. Azwaki mbano mpo na bosembo na ye na ndenge akómaki moko ya bankɔkɔ ya Yesu Kristo, Momboto oyo alakamaki.—Ebr. 11:9, 13.
9. Ndenge nini Ruta atosaki maloba na ye?
9 “Te, kasi tokozonga elongo na yo epai ya bato na yo.” (Ruta 1:10) Ruta ná Orpa, basi Bamoabe oyo mibali na bango bakufaki, bakobaki koyebisa maloba wana na bokilo na bango Naomi, oyo mobali na ye mpe akufaki, ntango azalaki kolongwa na Moabe mpo na kozonga na Beteleme. Nsukansuka, Orpa azongaki na mboka na ye mpo Naomi atyaki ye mbamba. Kasi Ruta atikaki Te na ye ezala Te. (Tángá Ruta 1:16, 17.) Akangamaki kaka na Naomi, mpe atikaki mpo na libela libota na ye mpe lingomba ya lokuta ya Moabe. Ayikaki mpiko lokola mosambeli ya sembo ya Yehova mpe azwaki mbano mpo na bosembo na ye na ndenge akómaki moko na basi mitano oyo Matai alobeli, oyo bazalaki bankɔkɔ ya Yesu.—Mat. 1:1, 3, 5, 6, 16.
10. Mpo na nini Yisaya azali ndakisa malamu mpo na biso?
10 “Ngai oyo! Tindá ngai.” (Yis. 6:8) Liboso Yisaya aloba maloba wana, azwaki emonaneli moko ya nkembo epai amonaki Yehova afandi na kiti na ye ya bokonzi likoló ya tempelo ya Yisraele. Ntango azalaki kotalatala emonaneli yango ya nkembo, Yisaya ayokaki Yehova azali koloba boye: “Nakotinda nani, mpe nani akokende mpo na biso?” Yehova azalaki kosɛnga ete moto moko azala molobeli na ye mpo na koyebisa maloba na Ye epai ya bato na ye oyo batikaki nzela ya malamu. Yisaya atosaki maloba na ye—atikaki Ɛɛ na ye ezala Ɛɛ. Azalaki mosakoli ya sembo na boumeli ya mbula koleka 46, mpe azalaki koyebisa bato polele ete Nzambe akopesa etumbu na bato oyo bazangi botosi, mpe na nsima akozongisa bango na esika oyo alingaki ete básambela Ye.
11. (a) Mpo na nini ezali na ntina tótosaka maloba na biso? (b) Wapi bandakisa ya bato oyo batosaki maloba na bango te?
11 Mpo na nini Yehova akomisaki bandakisa wana mpo na biso na Liloba na ye? Mpo na nini kotika Ɛɛ na biso ezala Ɛɛ ezali likambo ya kozwa na lisɛki te? Biblia elobi polele ete moto oyo ‘akokisaka bilaka na ye te’ azali kati na bato oyo “babongi na liwa.” (Rom. 1:31, 32) Farao ya Ezipito, Zidikiya Mokonzi ya Yuda, Ananiasi ná Safira bazali bandakisa mabe oyo Biblia elobeli, oyo batikaki te Ɛɛ na bango ezala Ɛɛ. Bango nyonso basukaki mabe mpe bazali bandakisa oyo ezali makebisi mpo na biso.—Kob. 9:27, 28, 34, 35; Ezk. 17:13-15, 19, 20; Mis. 5:1-10.
12. Nini ekosalisa biso tótosaka maloba na biso?
12 Lokola tozali na “mikolo ya nsuka,” tozali kokutana na bato oyo “bazangi bosembo,” bato oyo “bazali komonisa ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango.” (2 Tim. 3:1-5) Tosengeli kosala nyonso mpo tózala te baninga ya bato ya ndenge wana. Tosengeli nde koyangana mbala na mbala elongo na bato oyo basalaka ntango nyonso makasi ete Ɛɛ na bango ezala Ɛɛ.—Ebr. 10:24, 25.
ƐƐ OYO ELEKI NTINA
13. Ɛɛ eleki ntina oyo moyekoli ya Yesu Kristo alobaka ezali nini?
13 Elaka eleki ntina oyo moto akoki kosala etaleli komipesa na ye epai ya Nzambe. Na mabaku misato, bato oyo balingi kokóma bayekoli ya Yesu bazali na likoki ya koyanola Ɛɛ ntango batunaka bango soki bandimi mpenza kosala makambo oyo esɛngami epai na bango. (Mat. 16:24) Ntango bankulutu mibale basololaka na moto oyo alingi kokóma mosakoli oyo azwá naino batisimo te, batunaka ye boye: “Olingi mpenza kokóma Motatoli ya Yehova?” Na nsima, soki moto yango azali kokola malamu na elimo mpe alingi kozwa batisimo, bankulutu bakokutana na ye mpe bakotuna boye: “Osili kosala libondeli mpo na koyebisa Yehova ete omipesi na ye?” Nsukansuka, na mokolo ya batisimo, batunaka kandida mokomoko ya batisimo boye: “Na lisalisi ya mbeka ya Yesu Kristo, obongoli motema na masumu na yo mpe omipesi na Yehova mpo na kosala mokano na ye?” Na yango, liboso ya bato nyonso, bakandida yango balobaka Ɛɛ mpo na komonisa ete bandimi kosalela Nzambe mpo na libela.
14. Mituna nini mokomoko na biso asengeli komitunaka mbala na mbala?
14 Ata soki ozwi batisimo sika to ozali kosalela Nzambe banda bambula mingi, osengeli komitalelaka mbala na mbala mpe komituna mituna lokola oyo: ‘Na ndakisa ya Yesu Kristo, nazali kokoba kokokisa elaka oyo nasalaki ntango nalobaki Ɛɛ? Nazali kokoba kotosa Yesu na ndenge nazali kotya mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli na esika ya liboso na bomoi na ngai?’—Tángá 2 Bakorinti 13:5.
15. Na makambo nini ya bomoi tosengeli kotika ete Ɛɛ na biso ezala Ɛɛ?
15 Mpo na komonisa ete tozali kotosa elako oyo tosalaki epai ya Nzambe ntango tomipesaki epai na ye, tosengeli mpe kozala sembo na makambo mosusu ya ntina. Na ndakisa, soki obalá, kobá kotikala sembo na elako ya ntina mingi oyo osalaki ya kolinga molongani na yo mpe kokangama kaka na ye. Soki osali kɔntra mpo na mosala na kompanyi moko to otondisi formilɛrɛ moko mpo na kokɔta na motindo moko ya mosala ya Nzambe, tosá maloba na yo mpe makambo oyo olakaki kosala. Soki ondimaki kokende epai ya ndeko moko oyo azali na mbongo mingi te, oyo abengisi yo epai na ye, koboya te ata soki moto mosusu oyo azali na mbongo mingi ayei kobenga yo epai na ye. To mpe soki olakaki moto moko oyo okutanaki na ye ntango ozali kosakola ndako na ndako ete okozongela ye mpo na koteya ye makambo mosusu ya Biblia, salá nyonso ete Ɛɛ na yo ezala Ɛɛ. Soki osali bongo, Yehova akopambola mosala na yo ya kosakola.—Tángá Luka 16:10.
NGANGA-NZAMBE MONENE MPE MOKONZI NA BISO AZALI KOSALISA BISO
16. Tosengeli kosala nini soki tokokisaki maloba na biso te?
16 Biblia elobi ete lokola tozali bato ya kozanga kokoka, “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi,” mingimingi ntango tosalelaka lolemo na biso. (Yak. 3:2) Tosengeli kosala nini soki tomoni ete tokokisaki maloba na biso te? Na Yisraele, Mobeko ya Nzambe ezalaki na ebongiseli moko mpo ete moto oyo ‘abimisi maloba na mbɛbu na ye kozanga kokanisa’ akoka kolimbisama. (Lev. 5:4-7, 11) Lelo oyo, ebongiseli yango ezali mpe mpo na mokristo oyo asali lisumu ya ndenge wana. Soki toyamboli lisumu yango epai ya Yehova, akolimbisa biso na motema mawa na ye, mpe na nzela ya Nganga-nzambe Monene Yesu Kristo. (1 Yoa. 2:1, 2) Mpo Nzambe akoba kosepela na biso, tosengeli komonisa mpenza ete tobongoli motema, kozongela lisumu yango mbala na mbala te, mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo na kobongisa mabe oyo tosalaki ntango tobimisaki maloba kozanga kokanisa. (Mas. 6:2, 3) Ya solo, ezali na ntina mingi tókanisaka malamumalamu liboso ya kolaka likambo oyo mbala mosusu tokokokisa te.—Tángá Mosakoli 5:2.
17, 18. Bato nyonso oyo bazali kosala makasi ete Ɛɛ na bango ezala Ɛɛ bazali na elikya nini?
17 Basambeli nyonso ya Yehova oyo bazali kosala makasi bátika Ɛɛ na bango ezala Ɛɛ bazali na elikya kitoko! Bakristo 144 000 oyo batyami mafuta na elimo bakozala na bomoi ezangi kufa kuna na likoló, epai bakoyangela elongo na Yesu na Bokonzi na ye “mpe bakoyangela elongo na ye mbula nkóto moko (1 000).” (Em. 20:6) Bamilio ya bato mosusu bakozala na paradiso awa na mabele oyo Kristo akoyangela. Bakosalisa bango mokemoke mpo bákóma bato ya kokoka na nzoto mpe na makanisi.—Em. 21:3-5.
18 Soki totikali sembo na komekama ya nsuka, oyo ekosalema na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu, tokotya lisusu ntembe te na maloba ya moto. (Em. 20:7-10) Ɛɛ ya moto nyonso ekozala Ɛɛ mpe Te ya moto nyonso ekozala “Te.” Na ntango wana, bato nyonso bakokóma bato ya kokoka mpe bakomekola malamumalamu Tata na biso ya likoló, Yehova, “Nzambe ya solo.”—Nz. 31:5.