Balendisi bana-kelasi ya Gileadi ete básakola “makambo minene”
MOKOLO ya 13 Sɛtɛmbɛ 2003, bato 6 635 oyo bautaki na mikili 52 bazalaki na likita ya kopesa badiplome na bana-kelasi ya mbala ya 115 ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia.
Bato yango mpe balandaki masukulu oyo basalelaki bana-kelasi yango 48 mpo na kolendisa bango bákende kosakola “makambo minene ya Nzambe” epai ya bato ya bikólo 17. (Misala 2:11) Bana-kelasi bakokende mosala ya misionɛrɛ na mikili wana.
Prezida ya likita yango, Stephen Lett, ye azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, ayebisaki bana-kelasi boye: “Ntango bokokende, ezala batindi bino na mboka nini to bokutani na makambo nini, bóyeba ete baoyo bazali na bino bazali mingi koleka banguna na bino.” Ndeko Lett asalelaki 2 Mikonzi mokapo 6 mpo na komonisa bana-kelasi ete bakoki kotya motema na lisalisi ya Yehova Nzambe mpe baanzelu na ye ntango bakobanda kosakola “makambo minene ya Nzambe.” (2 Mikonzi 6:15, 16) Bapekisaki baklisto ya ekeke ya liboso kosakola mpe bato mosusu bazalaki koboya koyoka bango; lelo oyo mpe, bamisionɛrɛ bazali kokutana na makambo yango. Kasi, bakoki kotya motema na lisalisi ya Yehova ná baanzelu na ye mpe ya ebongiseli ya Yehova awa na mabelé.—Nzembo 34:7; Matai 24:45.
Bósakola “makambo minene ya Nzambe”
Nsima ya maloba ya ebandeli ya prezida, Harold Corkern, ye azali na komite ya filiale ya États-Unis, asalaki lisolo oyo ezali na motó ya likambo ete “Kotya elikya na makambo oyo ekoki kosalema ezali sɛkɛlɛ ya mosala ya esengo mpe ya malamu.” Ndeko Corkern amonisaki ete, ndenge Masese 13:12 elobi yango, bilikya oyo ekokisami te ekoki kopesa mpasi na motema. Kasi, bato mosusu bayokaka mpasi na motema mpo balikyaka na makambo oyo ekoki kosalema te. Bana-kelasi basengeli kolikya makambo oyo eleki te epai na bango moko to mpe epai ya bato mosusu. Basengeli koyeba ete bakosala mabunga, kasi basengeli komitungisa mingi te mpo na yango wana bazali kosala makasi mpo na kosalisa bato báyeba “makambo minene ya Nzambe.” Ndeko Corken alendisaki bamisionɛrɛ bátya motema epai ya Yehova, “mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.”—Baebele 11:6.
Nsima na ye, Daniel Sydlik, ye azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, azwaki maloba mpe asalaki lisukulu oyo ezali na motó ya likambo “Elikya ya baklisto ezali nini?” Alobaki boye: “Elikya ezali ezaleli malamu oyo moklisto asengeli kozala na yango. Yango esalisaka moto azala na boyokani malamu na Nzambe. Moto oyo azali moklisto te akoki te kozala na elikya oyo biso tozali na yango.” Ndeko Sydlik alobelaki makambo ndenge na ndenge oyo etali elikya ya baklisto oyo esalisaka moto alɛmba nzoto te ntango akutani na mikakatano. “Elikya ekoki kopesa biso lisusu makasi mpe elimo ya kokende liboso.” Elikya ya moklisto esalisaka ye amona ete Yehova azali Nzambe oyo azali na mokano mpe azala na esengo ya kosalela ye.—Baloma 12:12.
Wallace Liverance, sɛkrɛtɛrɛ ya Eteyelo ya Gileadi, alendisaki bana-kelasi na lisukulu elobi ete “Bókoba kotambola na elimo.” (Bagalatia 5:16) Amonisaki ete Baluku, sekretɛrɛ ya Yilimia, akómaki mokemoke kotika kotambola na elimo. Na ntango moko boye, Baluku alɛmbaki mpe akómaki koluka makambo minene. (Yilimia 45:3, 5) Na nsima, Ndeko Liverance amonisaki ete bato mosusu batikaki kolanda Yesu mpe baboyaki mateya ya solo oyo ezali na ntina mpo na lobiko. Ezali mpo bakangaki ntina ya mateya na ye te, mpe balɛmbaki lokola bamonaki ete bilikya na bango ekokisamaki na ntango wana te. (Yoane 6:26, 27, 51, 66) Bamisionɛrɛ, oyo mosala na bango ezali koteya bato makambo ya Mozalisi mpe mokano na ye, bakoki kozwa liteya nini na masolo yango? Balendisaki bana-kelasi ete báluka te kokóma na bokonzi, koyebana, to kosalela mikumba na bango na lisangá mpo na matomba na bango moko.
Mark Noumair, molakisi na Gileadi, asalaki lisukulu oyo moto na likambo na yango elobaki ete, “Bokozala bapesi to bazwi?” Lisukulu na ye esimbamaki na vɛrsɛ ya Basambisi 5:2, oyo ekumisi Bayisalaele oyo bandimaki kolanda Balaka na etumba. Apesaki bana-kelasi ya Gileadi longonya mpo na elimo na bango oyo etindi bango bándima kolanda Balaka Monene, Yesu Klisto, mpo na komipesa lisusu mpo na etumba ya elimo. Basoda ya Klisto basengeli koluka kosepelisa moto oyo azwi bango na mosala ya soda. Ndeko Noumair ayebisaki bana-kelasi boye: “Soki kaka tobandi koluka komisepelisa, tokobosana kobunda na monguna. . . . Ondimi mosala ya misionɛrɛ mpo na yo te. Ezali mpo na Yehova, mpo na bokonzi na ye, mpe mpo mokano na ye ekokisama. Soki tondimi mosala ya misionɛrɛ ezali te mpo Yehova asepelisa biso, kasi nde mpo tolingaka ye.”—2 Timote 2:4.
Na nsima, Lawrence Bowen, molakisi mosusu ya Gileadi, atambwisaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete, “Santisá bango na lisalisi ya solo.” (Yoane 17:17) Alobaki ete bana-kelasi ya mbala ya 115 bazali baministre ya Nzambe oyo basantisami. Ntango bazalaki na kelasi, bazalaki mpe kobima na mosala ya kosakola, kokende koluka bato ya sembo oyo balingaka solo. Lokola Yesu ná bayekoli na ye ya liboso, bana-kelasi bazalaki koloba na ‘ndenge na bango moko te.’ (Yoane 12:49, 50) Bazalaki kosakola liloba ya solo oyo epemami na Nzambe mpe epesaka bomoi. Bilakiseli mpe masolo ya bana-kelasi emonisaki ndenge oyo Biblia esimbaki mitema ya bato oyo basololaki na bango.
Toli mpe masolo ya bandeko elendisaka
Anthony Pérez ná Anthony Griffin, bango basalaka na Departema ya mosala ya kosakola ya filiale ya États-Unis, basololaki na bandeko oyo bazali na bakomite ya filiale ndenge na ndenge. Bandeko yango balobelaki mikakatano oyo bamisionɛrɛ ya sika bakutanaka na yango mpe bapesaki batoli ya malamu na kotalela makambo oyo bango moko bakutaná na yango. Mikakatano mosusu ezalaka mpo na mimeseno ya mboka, mpo na mboka oyo bakei ezalaka kaka na eleko ya molunge, to losambo na bango mpe makambo ya politiki ekeseni na oyo ya mboka oyo bana-kelasi bauti. Nini ekosalisa bamisionɛrɛ bámesana na makambo wana ya sika? Kolinga Yehova, kolinga bato, kotala nsima te, mpe kokanisa malamu liboso ya kosala likambo. Ndeko moko oyo azali na komite ya filiale alobaki boye: “Bato oyo tokutaki na ekólo oyo batindaki biso babandá kofanda kuna banda bankama ya bambula liboso na biso. Emonisi ete biso mpe tokokaki kofanda kuna mpe komesana. Mbala nyonso oyo tozalaki kokutana na mikakatano, tozalaki kotalela yango lokola mabaku malamu ya kobongisa bomoto na biso. Bótya motema na mabondeli mpe na elimo ya Yehova, mpe bokomona kokokisama ya maloba ya Yesu ete, ‘Nazali elongo na bino.’ ”—Matai 28:20.
Samuel Herd, ye azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisukulu ya monene ya likita yango; motó ya likambo na yango ezalaki, “Bókoba koloba makambo minene ya Nzambe.” Ntango Yehova asopelaki bayekoli ya Yesu elimo santu mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., bazwaki nguya ya koloba “makambo minene ya Nzambe.” Lelo oyo, nini ekoki kosalisa bamisionɛrɛ ya sika básakola Bokonzi ya Nzambe na molende ya ndenge wana? Kaka elimo santu yango. Ndeko Herd alendisaki bana-kelasi oyo bazwi badiplome ete ‘bápela na elimo,’ básepela na bisika oyo batindi bango, bábosana te formasyo oyo bazwi. (Baloma 12:11) Ndeko Herd alobaki ete “Biblia ezali moko na makambo minene ya Nzambe. Bómona yango mpamba te. Nsango na yango ezali na bomoi. Ekɔtaka mpenza na bozindo ya makambo. Bósalela yango mpo na kosembola makambo na bomoi na bino. Bótika yango ebongola makanisi na bino. Bóbatela likoki na bino ya kokanisa na nzela ya koyekola, kotánga, mpe komanyola Biblia . . . Bózwa mokano ya kosalela formasyo oyo bozwi na Gileadi mpo na kokoba koloba ‘makambo minene ya Nzambe.’ ”
Nsima ya kotánga bambote ya bandeko ya mikili ndenge na ndenge mpe kopesa bana-kelasi badiplome, moko na bango atángaki, na nkombo ya baninga na ye nyonso, mokanda ya kozongisa matɔndi mpo na formasyo oyo bazwi. Ndeko Lett asukisaki likita yango ya esengo na makanisi oyo ezali na 2 Ntango 32:7 mpe Deteronome 20:1, 4. Ayokanisaki maloba na ye ya nsuka na maloba na ye ya ebandeli, mpe alobaki boye: “Bandeko ya bolingo, bana-kelasi, awa bozali kokende, wana bozali kobunda etumba ya elimo na mosala na bino ya sika, bóbosana te ete Yehova akozala na bino. Bóbosana te ete baoyo bazali na bino bazali mingi koleka banguna na bino.”
[Etanda na lokasa 25]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na mikili: 7
Batindami na mikili: 17
Bazalaki bana-kelasi: 48
Mwayene ya mbula ya kobotama: 33,7
Mwayene ya mbula baumeli na lisangá: 17,8
Mwayene ya mbula oyo basali na mosala ya ntango nyonso: 13,5
[Elilingi na lokasa 26]
Kelasi ya mbala ya 115 ya Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ; banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Brown, T.; Goller, C.; Hoffman, A.; Bruzzese, J.; Trahan, S. (2) Smart, N.; Cashman, F.; Garcia, K.; Lojan, M.; Seyfert, S.; Gray, K. (3) Beckett, M.; Nichols, S.; Smith, K.; Gugliara, A.; Rappenecker, A. (4) Gray, S.; Vacek, K.; Fleming, M.; Bethel, L.; Hermansson, T.; Hermansson, P. (5) Rappenecker, G.; Lojan, D.; Dickey, S.; Kim, C.; Trahan, A.; Washington, A.; Smart, S. (6) Goller, L.; Burghoffer, T.; Gugliara, D.; Nichols, R.; Washington, S.; Kim, J. (7) Beckett, M.; Dickey, J.; Smith, R.; Garcia, R.; Hoffman, A.; Seyfert, R.; Brown, H. (8) Fleming, S.; Bruzzese, P.; Burghoffer, W.; Bethel, T.; Cashman, J.; Vacek, K.