Libula nini okotikela bana na yo?
PAVLOS, tata moko ya libota, oyo afandaka na Mpoto ya sudi, azalaka mpenza te na ntango ya kofanda na ndako elongo na mwasi mpe bana na ye mibale ya basi, oyo bazali na mbula 13 mpe 11, ná moko ya mobali oyo azali na mbula 7. Pavlos akendaka mosala mikolo nyonso mpe alekisaka ngonga mingi na mosala, mpo na koluka mbongo mpo na kokokisa bamposa na ye nyonso. Mposa na ye ezali ya kosombela bana na ye ya basi, moto na moto ndako na ye, mpe kobanda mwa mombongo mpo na mwana na ye ya mobali. Mwasi na ye Sofia, asalaka mosala makasi mpo na kozwela bana na bango bilamba, banzungu, basaani, balutu ná bakanya oyo bakokende na yango na bandako na bango. Ntango batunaki bango ntina oyo basalaka mosala makasi ndenge wana, bayanolaki ete, “Ezali mpo na bolamu ya bana na biso!”
Na mokili mobimba, baboti mingi bakanisaka lokola Pavlos ná Sofia; basalaka nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa bana na bango bábanda bomoi na ndenge ya malamu. Bato mosusu babombelaka bana na bango mbongo oyo bakosalela ntango bakokola. Basusu basalaka nyonso mpo bana na bango bátánga bakelasi ya malamu mpe báyekola misala oyo ekosalisa bango na bomoi. Atako baboti mingi basalelaka bana na bango makambo nyonso wana mpo balingaka bango, mbala mingi, yango ebendelaka bango mindɔndɔ mpamba te bandeko, baninga mpe bato mosusu bakómaka kotyela bango miso mpo básalisaka mpe bango. Yango wana, baboti oyo balingaka mpenza bana na bango bamitunaka boye: ‘Makambo nini ebongi tósalela bana na biso?’
Bongisá avenire ya bana na yo
Baklisto basengeli kobongisa avenire ya bana na bango, kaka te mpo balingaka bango, kasi lisusu mpo Biblia esɛngi bongo. Ntoma Paulo ayebisaki baklisto ya ntango na ye boye: “Baboti basengeli kobomba mpo na bana na bango, kasi bana te nde basengeli kobomba mpo na baboti na bango.” (2 Bakolinti 12:14, The New English Bible) Lisusu, Paulo amonisaki ete baboti basengeli kozwa na lisɛki te mokumba oyo bazali na yango ya kokokisa bamposa ya bana na bango. Akomaki boye: “Ya solo mpenza soki moto azali kokokisa bamposa ya bato na ye te, mpe mingimingi mpenza ya bato ya ndako na ye, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azangi kondima.” (1 Timote 5:8) Masolo mingi ya Biblia emonisi ete basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala bazalaki kopesa motuya mingi na libula.—Luta 2:19, 20; 3:9-13; 4:1-22; Yobo 42:15.
Kasi, ntango mosusu baboti bámitungisaka koleka ndelo mpo bazali na mposa ya kotikela bana na bango biloko mingi. Mpo na nini? Manolis, tata moko ya libota oyo autaki na Mpoto mpe akendeki kofanda na États-Unis, alobelaki likambo moko oyo etindaka baboti básala bongo, alobaki boye: “Baboti oyo banyokwamaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, na nzala mpe na bobola, basalaka nyonso mpo bana na bango bányokwama te ndenge bango banyokwamaki.” Alobi lisusu boye: “Ntango mosusu, baboti bazalaka na mposa eleki ndelo ya kokokisa mokumba na bango mpe kosalisa bana na bango bábanda bomoi na ndenge ya malamu, mpe yango ekómaka kotungisa bango mingi.” Kutu, baboti mosusu bamipimelaka biloko mosusu ya ntina to bandimaka kozala na bomoi ya mpasi kaka mpo na koluka kotikela bana na bango biloko mingi. Kasi, ezali mpenza likambo ya mayele baboti babomaka nzoto ndenge wana?
“Bisalasala mpe likambo mabe mingi”
Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, apesaki likebisi moko na likambo etali libula. Akomaki boye: “Nayinaki mosala nyonso na ngai mosalaki ngai na nse ya moi, zambi nakotika yango epai ya moto oyo akoya nsima na ngai. Nani mpe ayebi soki akozala moto ya mayele soki ya zoba? Nde akozala na lokumu likoló ya misala nyonso oyo ngai nasalaki yango mpe oyo ngai namekaki na mayele na nse ya moi. Yango mpe ezali bisalasala. . . . Zambi moto azali oyo akosalaka na mayele mpe na boyebi mpe na boyengebene; nde akotika yango libula epai ya moto oyo asali eloko kati na yango te. Yango mpe ezali bisalasala mpe likambo mabe mingi.”—Mosakoli 2:18-21.
Ndenge Salomo amonisi yango, ntango mosusu bato oyo bazwaka libula, bapesaka yango mpenza motuya te mpo bamonelaki yango mpasi te. Na bongo, bana bakoki kosalela na ndenge ya mabe biloko oyo baboti na bango banyokwamaki mpo na kolukela bango. Bakoki ata kobebisa biloko yango oyo baboti na bango bazwaki na mpasi. (Luka 15:11-16) Oyo nde “bisalasala mpe likambo mabe mingi”!
Libula mpe lokoso
Ezali na likambo mosusu oyo baboti basengeli kobosana te. Na bisika oyo, na bonkɔkɔ na bango bamesaná kotikela bana biloko mpe kobalela bango basi mpe kobalisa bango, bana bakoki kokóma na lokoso mpe kosɛnga baboti biloko to mbongo ya libala oyo eleki makoki na bango. Loukas, tata moko ya libota oyo afandaka na Grèce, alobi boye: “Mawa na tata oyo azali na bana basi mibale to misato.” Alobi lisusu boye: “Bana basi bakoki koluka ete biloko oyo tata na bango akopesa bango ezala ebele lokola oyo baboti mosusu bazali kobombela bana na bango. Bakoki kokanisa ete mbala mosusu bakobala te mpo bazali na biloko mingi te ya kopesa mpo na libala.”
Manolis, mobali oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Ntango mosusu elenge mobali akoki koumela mpo na kobala mwasi oyo alingi, kaka mpo azali kozela tata ya mwasi alaka ye eloko moko, ekoki kozala biloko ya ndako to mbongo mingi. Yango ekoki kokóma ndenge moko ya kolyela bokilo.”
Biblia ezali kokebisa biso na lokoso ya ndenge nyonso. Salomo akomaki boye: “Libula ezwamaka liboso na lokoso, kasi nsuka na yango ekopambolama te.” (Masese 20:21, NW) Ntoma Paulo amonisaki ete: “Bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso.”—1 Timote 6:10; Baefese 5:5.
‘Bwanya elongo na libula’
Ya solo, libula ezali na ntina, kasi bwanya ezali na ntina koleka biloko nyonso mosusu. Mokonzi Salomo akomaki boye: “[Bwanya] ezali malamu elongo na libula, na yango ezali na litomba . . . Zambi [bwanya] ekobatelaka lokola ekobatelaka mosolo. Malamu ya mayele ezali ete [bwanya] ekobikisa bomoi na ye oyo azwi yango.” (Mosakoli 7:11, 12; Masese 2:7; 3:21) Atako mbongo ekoki kobatela moto mwa moke mpe kosalisa ye na kozwa biloko oyo asengeli na yango, akoki mpe kobungisa yango. Epai mosusu, soki moto azali na bwanya, elingi koloba azali na likoki ya kosalela boyebi mpo na kobongisa makambo to mpo na kokokisa mokano moko boye, akokoka kokima makama ya bozoba. Soki moto azali na bwanya oyo euti na kobanga Nzambe, akoki kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika oyo etikali moke eya—likabo ya malamu koleka!—2 Petelo 3:13.
Baboti baklisto bamonisaka bwanya yango ntango batyaka makambo ya ntina koleka na esika ya liboso, mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango. (Bafilipi 1:10) Konduka biloko mpo na kobongisa avenire ya bana na biso esengeli te kozwa esika ya makambo ya elimo. Yesu alendisaki bayekoli na ye ete: “Bókoba koluka liboso bokonzi ya [Nzambe] mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.” (Matai 6:33) Baboti oyo batyelaka bana na bango mikano ya elimo, bakozwa matomba mingi. Salomo Mokonzi ya bwanya akomaki boye: “Tata ya moyengebene akosepela mingi; ye oyo aboti mwana ya mayele akomona esengo mpo na ye. Tata na yo mpe mama na yo bakosepela mpe mama oyo aboti yo akoyoka esengo.”—Masese 23:24, 25.
Libula oyo ekoumela seko
Mpo na Bayisalaele ya kala, libula ezalaki na ntina mingi mpenza. (1 Mikonzi 21:2-6) Kasi, Yehova apesaki bango toli oyo: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingia na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛma yo.” (Deteronome 6:6, 7) Ndenge moko mpe, bayebisi baboti baklisto boye: “Bókoba kobɔkɔla [bana na bino] na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.”—Baefese 6:4.
Baboti oyo batalelaka makambo na liso ya elimo bayebi ete kobongisa avenire ya libota na bango esɛngaka mpe koteya bango Biblia. Andreas, tata moko ya bana misato alobi boye: “Soki bana bayekoli kosalela mitinda ya Nzambe, bakozala malamu na bomoi na bango.” Kotikela bana libula ya ndenge wana esɛngaka kosalisa bango báluka kozala ntango nyonso na boyokani malamu na Mozalisi.—1 Timote 6:19.
Okanisaka makambo oyo okoki kosala mpo na avenire ya elimo ya mwana na yo? Na ndakisa, baboti bakoki kosala nini soki mwana na bango amipesi na mosala ya ntango nyonso? Atako moto oyo azali na mosala ya ntango nyonso asengeli te kosɛngaka básalisa ye to bápesaka ye mbongo, baboti oyo balingaka mwana na bango bakoki ‘kokabela ye engebene bamposa na ye’ mpo na kosalisa ye atikala na mosala ya ntango nyonso. (Baloma 12:13; 1 Samwele 2:18, 19; Bafilipi 4:14-18) Na ntembe te, Yehova akosepela mingi soki bozali kosalisa mwana yango ndenge wana.
Na bongo, mokumba nini baboti bazali na yango mpo na bana na bango? Longola kobombela bana biloko ya mosuni, baboti baklisto basengeli kosala nyonso mpo na kotikela bana na bango libula monene ya elimo oyo ekopesa bango matomba ya libela na libela. Na ndenge yango, maloba ya Nzembo 37:18 ekokokisama: “[Yehova] ayebi mikolo ya bato malamu mpe libula na bango ekoumela seko.”
[Bililingi na lokasa 26]
Okanisaka nini mpo na avenire ya bana na yo?