Mokapo ya Libwa
Yehova ateyaka biso mpo na bolamu na biso
1. Bato ya bwanya basalaka nini ntango Yehova azali koloba?
NTANGO Yehova azali koloba, bato ya bwanya bayokaka ye na limemya mingi mpe batosaka maloba na ye. Makambo nyonso oyo Yehova alobaka ezali mpo na litomba na biso, mpe atyaka mpenza likebi na makambo oyo etali bolamu na biso. Na ndakisa, maloba oyo Yehova ayebisaki bato ya ekólo oyo asalaki na yango kondimana esimbaka mpenza motema: “Soko oyokaki malako na ngai!” (Yisaya 48:18) Lokola toyebi malamu ete mateya ya Nzambe ezali na ntina mingi, yango esengeli kotinda biso na koyoka ye mpe kolanda toli na ye. Na kotalela bisakweli oyo esili kokokisama, ntembe ata moko ezali te ete Yehova azali na ekateli makasi ya kokokisa bilaka na ye.
2. Maloba oyo ezali na Yisaya mokapo 48 ekomamaki mpo na banani, mpe banani lisusu bakoki kozwela yango bolamu?
2 Emonani mpenza ete maloba oyo ezali na Yisaya mokapo 48 ekomamaki mpo na Bayuda oyo bakozala na boombo na Babilone. Atako bongo, maloba yango ezali na nsango moko oyo baklisto ya mikolo na biso basengeli mpenza kotyela likebi. Na Yisaya mokapo 47, Biblia esakolaki kokwea ya Babilone. Sikoyo Yehova ayebisi makambo oyo akosalela Bayuda oyo bakozala na boombo na engumba yango. Yehova ayoki mawa mpo na bokosi ya bato ya ekólo oyo ye aponaki mpe mpo bazali kondima bilaka na ye te. Atako bongo, alingi koteya bango mpo na bolamu na bango. Liboso mpenza, amoni eleko moko ya kopɛtolama oyo ekomema tii na kozongisama ya ndambo ya Bayuda oyo batikalaki sembo na mboka na bango.
3. Mpo na nini losambo ya Bayuda ezalaki malamu te?
3 Bato ya ekólo ya Yehova bapɛngwi mpenza mosika na losambo ya pɛto! Maloba ya ebandeli ya Yisaya ezali solo kotinda na kokanisa: ‘Bóyoka likambo oyo, ndako ya Yakobo, bino bobengami na nkombo ya Yisalaele, mpe bino bouti na mai ya Yuda, bino bokokataka ndai na nkombo ya Yehova mpe bokolobaka nkombo ya Nzambe ya Yisalaele nde na sembo te mpe na boyengebene te. Zambi bakomibenga bato ya engumba mosantu, bakomikembisa epai ya Nzambe ya Yisalaele, Yehova na bibele ezali nkombo na ye.’ (Yisaya 48:1, 2) Oyo nde bokosi mpenza! Mpo na bango, ‘kokata ndai na nkombo ya Yehova’ elakisaki kaka kotánga nkombo ya Nzambe kaka mpo na kotánga. (Sefania 1:5) Liboso bákende na boombo na Babilone, Bayuda bazalaki kosambela Yehova na “engumba mosantu,” Yelusaleme. Kasi losambo na bango ezalaki mpenza kouta na motema te. Mitema na bango ezalaki mosika mpenza na Nzambe, mpe bazalaki kosambela ye “na solo mpe na boyengebene te.” Bazalaki na kondima te lokola oyo ya batata ya mabota na bango.—Malaki 3:7.
4. Losambo ya ndenge nini esepelisaka Yehova?
4 Maloba ya Yehova ezali kokebisa biso ete tosengeli kosambela te kaka mpo na kosambela. Losambo na biso esengeli kouta na motema. Kosalela Yehova kaka mpo na kosalela, ntango mosusu mpo na kosepelisa to kokamwisa basusu, yango te eloko babengi “misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (2 Petelo 3:11) Soki moto amibengi moklisto, yango te ekosala ete losambo na ye endimama na Nzambe. (2 Timote 3:5) Ezali na ntina mingi kondima ete Yehova azali, kasi yango ezali kaka ebandeli. Yehova alingaka bato básambela ye na molimo na bango mobimba mpo balingi ye mpe bazali na botɔndi ya solosolo.—Bakolose 3:23.
Kosakola makambo ya sika
5. Wapi mwa “makambo ya liboso” oyo Yehova asakolaki?
5 Mbala mosusu esengeli kozongisa na makanisi ya Bayuda oyo bazali na Babilone mwa makambo mosusu. Yango wana Yehova akundoleli bango ete ye azali Nzambe ya bisakweli ya solo: “Makambo ya liboso, nasakoli yango kala, mabimaki na monɔkɔ na ngai mpe nayebisaki yango. Pwasa nasalaki yango mpe makómaki bongo.” (Yisaya 48:3) “Makambo ya liboso” ezali makambo oyo Nzambe akokisá, lokola kobikisa Bayisalaele na Ezipito mpe kopesa bango libula ya Mokili ya Ndaka. (Genese13:14, 15; 15:13, 14) Bisakweli yango ebimaki na monɔkɔ ya Nzambe; eutaki na Nzambe. Nzambe ayebisaka bato bikateli na ye, mpe makambo oyo bayoki esengeli kotinda bango bátosa. (Deteronome 28:15) Akokisaka pwasa makambo oyo asakolaki. Lokola Yehova azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, likambo yango endimisi solo ete mokano na ye ekokokisama.—Yosua 21:45; 23:14.
6. Bayuda bakómi kino wapi na ezaleli na bango ya ‘motó makasi mpe botomboki’?
6 Bato ya ekólo ya Yehova bakómi “motó makasi mpe batomboki.” (Nzembo 78:8, NW) Ayebisi bango polele ete: ‘Ozali makasi mpe . . . nkingo na yo ezali lokola mosisa ya ebende mpe elongi na yo lokola kwivre.’ (Yisaya 48:4) Bayuda bazali makasi lokola bibende, ezali mpasi mpo na kogumba bango; balingi kobongwana te. Yango wana Yehova azali koyebisa makambo liboso esalema. Soki bongo te, bato ya ekólo ya Yehova bakoloba mpo na makambo oyo asali ete: “Ekeko na ngai esalaki yango, ekeko na ngai mpe ekeko na ngai enangwi elakisaki yango.” (Yisaya 48:5) Makambo oyo Yehova azali koloba sikoyo ekobongola makanisi ya Bayuda oyo bazali sembo te? Nzambe alobi na bango ete: ‘Oyoki boye, sikoyo talá yango nyonso; bino bokosakola yango te? Longwa na ntango oyo namonisi yo makambo ya sika, makambo mabombami mayebi yo te. Masili kobongisama sikoyo, bobele mwa ntango moke eleki, liboso na lelo oyokaki mpo na yango te, ete oloba te ete, Talá, nayebaki yango.’—Yisaya 48:6, 7.
7. Likambo nini Bayuda oyo bakangami na boombo basengeli kondima, mpe bakoki kozela nini?
7 Bambula ebele liboso, Yisaya akomaki esakweli etali kokwea ya Babilone. Lokola Bayuda bazali sikoyo bakangami na Babilone, bazwi etinda ya kotya likebi na kokokisama ya esakweli yango. Bakoboya nde kondima ete Yehova azali Nzambe oyo apesaki bisakweli oyo esili kokokisama? Mpe lokola bato ya Yuda basili komona mpe koyoka ete Yehova azali Nzambe oyo alobaka solo, bongo basengeli te kosakola solo yango? Liloba oyo Yehova amonisi ezali kosakola makambo ya sika oyo esalemi naino te, lokola kokwea ya Babilone na mabɔkɔ ya Sirise mpe kosikolama ya Bayuda. (Yisaya 48:14-16) Ezali lokola nde makambo yango ya kokamwa ebimi pwasa. Moto moko te akokaki kosakola yango bobele na kotala ndenge makambo ya mokili ezalaki koleka. Esalemi lokola nde euti esika moko te. Nani asalaki ete makambo yango ebima? Lokola Yehova asakolaki makambo yango mbula soki 200 liboso, eyano na motuna yango ezali polele.
8. Makambo nini ya sika baklisto ya mikolo na biso bazali kozela, mpe mpo na nini bazali kotyela bisakweli ya Yehova motema na bango mobimba?
8 Lisusu, Yehova akokisaka maloba na ye na ntango oyo atyá na manaka na ye. Bisakweli oyo ekokisami ezali komonisa ete ye azali Nzambe, kaka mpo na Bayuda ya kala te kasi mpe mpo na baklisto na mikolo na biso. Ebele ya bisakweli oyo ekokisamaki kala, to “makambo ya liboso,” ezali kondimisa biso ete makambo ya sika oyo Yehova alaki, elingi koloba “bolɔzi monene” oyo ezali koya, kobikisama ya “ebele ya bato” na bolɔzi yango, “mabelé ya sika” mpe makambo mosusu mingi, ekosalema solo. (Emoniseli 7:9, 14, 15; 21:4, 5; 2 Petelo 3:13) Lelo oyo, bato ya mitema sembo bazali kosakola makambo ya Yehova na molende mpo bandimi mpenza ete makambo yango ekokokisama. Bazali na makanisi ndenge moko na mokomi ya nzembo, oyo alobaki ete: “Nasakoli boyengebene kati na koyangana monene; talá nakokanga bibɛbu na ngai te.”—Nzembo 40:9.
Yehova azali komipekisa
9. Ndenge nini ekólo ya Yisalaele ezali “mobuki mibeko banda na libumu”?
9 Lokola Bayuda baboyi kondima bisakweli ya Yehova, bazali mpe kolanda makebisi na ye te. Yango wana alandi koloba na bango boye: “Kutu, oyoki te, mpe oyebi te, mpe litoi na yo efungwami te banda ntango wana. Mpamba te nayebi malamu ete ozalaki ntango nyonso kokosa, mpe babengi yo ‘mobuki mibeko banda na libumu.’” (Yisaya 48:8, NW) Yuda akangi matoi mpo ayoka nsango malamu ya Yehova te. (Yisaya 29:10) Bato ya ekólo oyo esalaki kondimana elongo na Nzambe bamonisi na misala na bango ete ekólo na bango ezali “mobuki mibeko banda na libumu.” Banda kobotama ya ekólo ya Yisalaele mpe na boumeli ya lisolo na ye mobimba, eyebani ete ekólo yango ezali mpenza motomboki. Bato yango babukaka mibeko mpe bakosaka mingi, kasi basalaka masumu yango kaka mbala mokomoko te.—Nzembo 95:10; Malaki 2:11.
10. Mpo na nini Yehova akomipekisa?
10 Elikya ezali lisusu te? Te, elikya ezali. Atako Yuda azali motomboki mpe mokosi, Yehova ye azali ntango nyonso sembo mpe alobaka solo. Mpo na lokumu ya nkombo monene na ye, akosopa nkanda na ye na ndelo. Alobi: “Mpo na nkombo na ngai, nakokanga nkanda na ngai, mpo na kosanzola na ngai, [nakomipekisa] liboso na yo, ete nakatakata yo te.” (Yisaya 48:9) Talá bokeseni! Bato ya Yehova, ezala Yisalaele to Yuda, bango nyonso bazali sembo te epai na ye. Kasi Yehova akosantisa nkombo na ye, akosala makambo na ndenge oyo ekomemela nkombo na ye nkembo mpe lokumu. Mpo na ntina wana akokatakata te ekólo oyo ye aponaki.—Yoele 2:13, 14.
11. Mpo na nini Nzambe akopesa nzela te ete bato ya ekólo na ye bábomama bango nyonso?
11 Mpamela ya Nzambe elamusi Bayuda mosusu ya sembo oyo bazali na boombo mpe elendisi ekateli na bango ya kolanda mateya na ye. Mpo na bango, maloba oyo elandi ezali kokitisa mpenza motema: ‘Talá napɛtoli yo nde lokola palata te, nameki yo na mɔtɔ ya minyoko. Mpo na ngai moko, mpo na ngai moko, nazali kosala yango, zambi ndenge nini nakotika ete nkombo na ngai esambwisama? Nakopesa nkembo na ngai na mosusu te.’ (Yisaya 48:10, 11) Mpasi ya makasi, lokola “mɔtɔ ya minyoko,” oyo Yehova apesi nzela ekwela bato ya ekólo na ye emeki mpe epɛtoli bango, emonisi makambo oyo ezali na mitema na bango. Likambo ya ndenge wana esalemaki bankama ya bambula liboso, ntango Moize alobaki na bankɔkɔ na bango ete: “[Yehova] Nzambe na yo akambi yo mbula ntuku minei oyo na esobe, ete akitisa lolendo na yo, mpe ameka yo mpo na koyeba makambo ya motema na yo.” (Deteronome 8:2) Atako bamonisaki elimo ya botomboki, Yehova abomaki ekólo yango te na ntango wana, mpe akoboma ekólo yango mobimba te sikoyo. Na lolenge yango, akolongisa nkombo mpe lokumu na ye. Soki bato ya Babilone babomi bato ya ekólo na ye nyonso, yango ekomonisa te ete akokisi kondimana na ye mpe nkombo na ye ekosambwisama. Ekomonana lokola nde Nzambe ya Yisalaele azali na nguya te ya kobikisa bato na ye.—Ezekiele 20:9.
12. Ndenge nini baklisto ya solo bapɛtolamaki na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?
12 Na mikolo na biso, esengelaki mpe basaleli ya Yehova bápɛtolama. Na ebandeli ya ekeke ya 20, mingi kati na etuluku moke ya Bayekoli ya Biblia bazalaki kosalela Nzambe na mposa mpenza ya kosepelisa ye; nzokande basusu bazalaki na makanisi ya sembo te, na ndakisa bazalaki na mposa ya komitombola. Etuluku moke yango esengelaki kopɛtolama liboso ekoka kokamba mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba, mosala oyo esakolamaki ete ekosalema na mikolo ya nsuka. (Matai 24:14) Mosakoli Malaki asakolaki ete kopɛtolama yango ekosalema mpenza ntango Yehova akoya na tempelo na ye. (Malaki 3:1-4) Maloba na ye ekokisamaki na 1918. Baklisto ya solo bakutanaki na komekama makasi ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ezalaki kongala. Komekama yango ekómaki makasi koleka ntango bakangaki Joseph Rutherford, oyo azalaki prezida ya la Société, elongo na bandeko mosusu oyo bazalaki kotambwisa mosala elongo na ye. Kopɛtolama wana epesaki baklisto yango ya sembo litomba. Ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esilaki, bazalaki na ekateli makasi ya kosalela Nzambe na bango monene na lolenge nyonso oyo akolakisa bango.
13. Basaleli ya Yehova basalaki nini na minyoko oyo bakutanaki na yango kobanda na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?
13 Kobanda mikolo wana, Batatoli ya Yehova bakutaná mbala na mbala na minyoko ya nsɔmɔ. Yango etindaki bango ata moke te na kobɛta ntembe na liloba ya Mozalisi na bango. Basimbaki nde na motema maloba oyo Petelo akomelaki baklisto ya mikolo na ye oyo banyokwamaki, ete: “Bozali koyokisama mawa na komekama ndenge na ndenge, mpo motindo ya kondima na bino oyo emekami . . . emonana ntina ya lisanzoli mpe ya nkembo mpe ya lokumu na emoniseli ya Yesu Klisto.” (1 Petelo 1:6, 7) Minyoko ya makasi ebebisaka bosembo ya baklisto ya solo te. Kasi emonisaka nde ete mikano ya mitema na bango ezali sembo. Ebakisaka na kondima na bango motindo ya kondima oyo emekami mpe emonisaka soki mpenza bakangami na Nzambe mpe balingi ye.—Masese 17:3.
‘Ngai nazali moto ya liboso mpe moto ya nsuka’
14. (a) Na ndimbola nini Yehova azali “moto ya liboso” mpe “moto ya nsuka”? (b) Misala nini ya nguya Yehova asalaki yango na “lobɔkɔ” na ye?
14 Na esengo nyonso Yehova ayebisi sikoyo bato ya ekólo oyo asalaki na bango kondimana maloba oyo: ‘Yokamelá ngai, ee Yakobo mpe Yisalaele oyo nabengi yo; ngai nazali kaka ndenge nazalaka. Nazali moto ya liboso. Nazali mpe moto ya nsuka. Lobɔkɔ na ngai etyaki miboko ya mokili, mpe lobɔkɔ na ngai ya mobali etandisaki likoló; nakobenga yango, mpe bakotɛlɛma elongo moko.’ (Yisaya 48:12, 13) Nzambe azali lokola bato te, ye azali seko na seko mpe abongwanaka te. (Malaki 3:6) Na mokanda ya Emoniseli, Yehova alobi ete: “Ngai nazali Alfa mpe Omega, moto ya liboso mpe moto ya nsuka, ebandeli mpe nsuka.” (Emoniseli 22:13) Liboso na Yehova, Nzambe mosusu mozwi-ya-nguya-nyonso azalaki te mpe nsima na ye moko te akozala. Ye Aleki-Nyonso, azali Seko mpe Mozalisi. “Lobɔkɔ” na ye, elingi koloba nguya na ye ntango azali kosalela yango, etyaki mabelé mpe etandaki likoló oyo etondi na minzoto. (Yobo 38:4; Nzembo 102:25) Ntango abengi biloko oyo ye azalisi, yango ezali kotɛlɛma mpe ezali kozela kosalela ye.—Nzembo 147:4.
15. Ndenge nini mpe na mokano nini Yehova ‘alingaki’ Sirise?
15 Libyangi moko ya polele epesami epai ya Bayuda mpe baoyo bazali Bayuda te: ‘Bóyangana bino nyonso mpe bóyoka! Nani kati na bango ayebisi makambo oyo? Yehova asili kolinga ye, akosukisa mokano na ye epai ya Babilone, mpe lobɔkɔ na ye ekotɛmɛla Bakaladi. Ngai, ɛɛ ngai mpenza, nasili koloba mpe nabengi ye, nayeisi ye mpe ye akolonga na nzela na ye.’ (Yisaya 48:14, 15) Kaka Yehova nde aleki na nguya mpe akoki kosakola makambo na bosikisiki mpenza. Moko te kati na “bango,” banzambe ya mpambampamba, akoki koyebisa makambo wana. Ezali banzambe ya bikeko te, kasi Yehova nde ‘alingaki ye,’ Sirise, elingi koloba Yehova nde aponaki ye mpo akokisa likambo moko ya sikisiki. (Yisaya 41:2; 44:28; 45:1, 13; 46:11) Ntango atalaki makambo ya mokili, amonaki banda kala ete Sirise akobima na mokili mpe aponaki ye mpo na kokweisa Babilone.
16, 17. (a) Mpo na nini tokoki koloba te ete Nzambe apesaki bisakweli na ye na nkuku? (b) Lelo oyo na ndenge nini Yehova ayebisi mikano na ye polele?
16 Na mongongo ya boboto, Yehova abakisi maloba oyo: ‘Bóbɛlɛma na ngai, bóyoka likambo oyo; longwa na ebandeli nalobi na nkuku te; longwa na ntango wana ebandaki kozala, ngai nazali na esika yango.’ (Yisaya 48:16a) Yehova apesaki bisakweli na nkuku te to ayebisaki yango te kaka epai ya mwa ndambo ya bato oyo bateyami. Basakoli ya Yehova bazalaki koloba polelepolele na nkombo na ye. (Yisaya 61:1) Basakolaki mokano ya Nzambe liboso na bato mingi. Na ndakisa, makambo etali Sirise ezalaki makambo ya sika te mpo na Nzambe, mpe azangaki koyeba yango te. Mbula 200 liboso, Nzambe ayebisaki yango polele na monɔkɔ ya Yisaya.
17 Ndenge moko lelo, Yehova abombaka mikano na ye te. Bamilio ya bato kati na bankama ya mikili mpe bisanga bazali kosakola ndako na ndako, na babalabala, mpe na bisika nyonso oyo bakoki kosakola. Bazali kokebisa ete nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekómi pene mpe bazali kosakola nsango malamu ya mapamboli oyo ekozala na Bokonzi ya Nzambe. Ya solo, Yehova azali Nzambe oyo ayebisaka mikano na ye.
‘Yoká malako na ngai!’
18. Mposa ya Yehova ezali nini mpo na bato ya ekólo na ye?
18 Na nguya oyo azwi na elimo ya Yehova, mosakoli Yisaya alobi boye: ‘Nkolo Yehova atindi ngai mpe elimo na ye elongo. Yehova alobi boye, ye mosikoli na yo, Mosantu ya Yisalaele, ete, Ngai nazali Yehova, Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.’ (Yisaya 48:16b, 17) Maloba yango ya bolingo, oyo emonisi likebi ya Yehova mpo na ekólo ya Yisalaele esengeli kondimisa bango ete Nzambe akosikola bango na mabɔkɔ ya Babilone. Ye azali Mosikoli na bango. (Yisaya 54:5) Mposa mpenza ya motema ya Yehova ezali ete Bayisalaele bázongela boyokani na bango elongo na ye mpe báyoka malako na ye. Likambo ya liboso oyo esɛngami mpo na losambo ya solo ezali kotosa malako ya Nzambe. Bayisalaele bakokoka te kotambola na nzela ya sembo soki bateyami te ‘nzela ekoki na bango kotambola.’
19. Libyangi nini oyo ezali kosimba motema Yehova apesi?
19 Yehova amonisi mposa na ye ete bato ya ekólo na ye bázwa mpasi te mpe bázala na bomoi ya malamu na maloba oyo: ‘Soko oyokaki malako na ngai! mbɛlɛ kimya na yo ezalaki lokola ebale mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mai-na-monana.’ (Yisaya 48:18) Libyangi yango oyo ezali mpenza kosimba motema euti na Mozalisi, mozwi-ya-nguya-nyonso! (Deteronome 5:29; Nzembo 81:13) Na esika ya kokende na boombo, Bayisalaele bakoki kozala na kimya mingi lokola mai oyo ezali kotiyola na ebale. (Nzembo 119:165) Misala na bango ya boyengebene ekoki kozala ebele lokola mbonge ya mai monene. (Amosa 5:24) Lokola Yehova azali mpenza kotyela Bayisalaele likebi, abondeli bango mpe na bolingo nyonso, alakisi bango nzela oyo basengeli kotambola. Ah, soki báyokaka!
20. (a) Mposa ya Nzambe ezali nini mpo na Yisalaele atako bazali batomboki? (b) Makambo oyo Yehova asalelaki bato na ye ezali koteya biso nini? (Talá etanda na lokasa 133.)
20 Soki Bayisalaele bábongolaka motema, mbɛlɛ bazwi mapamboli nini? Yehova alobi: ‘Mbɛlɛ bana na yo bazali lokola zɛlɔ, mpe bakitani na yo lokola mpumbulu na yango; nkombo na bango ekokatama libela te, to ekobebisama liboso na ngai te.’ (Yisaya 48:19) Yehova akundoleli bato na ye elaka na ye ete bakitani ya Abalayama bakokóma ebele, “lokola minzoto ya likoló mpe lokola zɛlɔ na libongo ya mai.” (Genese 22:17; 32:12) Nzokande, bakitani yango ya Abalayama bazali batomboki, mpe bazali na lotomo te ya komona kokokisama ya elaka yango. Ya solo, misala na bango ezali mpenza mabe; kutu na kotalela mibeko mpenza ya Yehova, nkombo ya ekólo na bango esengeli kolimwa. (Deteronome 28:45) Nzokande, Yehova alingi te ete ekólo na ye elimwa, mpe alingi kosundola bango libela te.
21. Mapamboli nini tokoki kozwa lelo oyo soki toluki ete Yehova ateyaka biso?
21 Mitinda oyo ezali na maloba yango ya nguya etali mpe basambeli ya Yehova lelo oyo. Yehova azali Mopesi bomoi, mpe ayebi lolenge eleki malamu ya kosalela bomoi na biso koleka bato nyonso. (Nzembo 36:9) Apesi biso malako mpo na bolamu na biso, kasi te mpo na kopekisa biso kosepela. Baklisto ya solo bamonisaka ete bandimi malako yango ntango balukaka ete Yehova ateya bango. (Mika 4:2) Malako na ye ebatelaka elimo na biso mpe boyokani na biso elongo na ye, mpe ebombaka biso liboso na makambo ya mbindo ya Satana. Soki tokangi ntina ya mitinda oyo ezali na mibeko ya Nzambe, tokomona ete Yehova azali koteya biso mpo na bolamu na biso. Tokomona ete “bakomandema na ye ezali kilo te.” Na yango, tokobomama te.—1 Yoane 2:17; 5:3.
‘Bóbima na Babilone!’
22. Likambo nini Yehova alendisi Bayuda ya sembo básala nokinoki, mpe makambo nini ya kokitisa motema ayebisi bango?
22 Ntango Babilone ekokwea, Bayuda mosusu bakomonisa ete bazali na motema malamu? Ntango Nzambe akosikola bango, bakosimba nde libaku malamu yango mpo na kozonga na mboka na bango, mpe kozongisa losambo ya pɛto? Ɛɛ. Maloba ya Yehova oyo elandi emonisi ete andimi solo ete likambo yango ekosalema. ‘Bóbima na Babilone! Bókima Kaladi! Bósakola yango na koganga na esengo! Bóyebisa yango! Bótinda yango kino nsuka na mokili; bóloba ete, Yehova asikoli moombo na ye Yakobo. Bayokaki mposa na mai te wana ye akambaki bango kati na esobe; apunzwiselaki bango mai na libanga; apasolaki libanga mpe mai ebimaki.’ (Yisaya 48:20, 21) Na nzela ya esakweli Yehova alendisi basaleli na ye ete bákima Babilone nokinoki. (Yilimia 50:8) Kosikolama na bango esengeli koyebana kino nsuka ya mabelé. (Yilimia 31:10) Nsima ya kobimisa bato na ye na Ezipito, Yehova akokisaki bamposa na bango ntango bazali kosala mobembo na esobe. Ndenge moko mpe, akokokisa mposa ya bato ya ekólo na ye ntango bakosala mobembo longwa na Babilone tii na mboka na bango.—Deteronome 8:15, 16.
23. Banani bakozwa kimya ya Nzambe te?
23 Ezali mpe na liteya mosusu ya ntina mingi oyo Bayuda basengeli kobosana te mpo na oyo etali misala ya kobikisa ya Yehova. Baoyo balingi boyengebene bakoki komona mpasi mpo na masumu na bango, kasi bakobomama te. Nzokande ezali bongo te mpo na bato oyo bazangi boyengebene. “[Yehova] alobi ete, Kimya ezali te mpo na basali na mabe.” (Yisaya 48:22) Bato oyo basalaka masumu kasi babongolaka motema te bakozwa te kimya oyo Nzambe abombeli baoyo balingaka ye. Misala ya kobikisa ezali mpo na bato mabe te oyo baboyi kobongwana to bato oyo bazangi kondima. Misala ya ndenge yango ezali kaka mpo na baoyo bazali komonisa kondima. Kimya ya Nzambe ezali mpo na bato mabe te. (Tito 1:15, 16; Emoniseli 22:14, 15)
24. Na mikolo na biso, nini epesaki basaleli ya Nzambe esengo?
24 Na mobu 537 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), libaku ya kobima na Babilone epesaki Bayisalaele ya sembo esengo monene. Na 1919, kosikolama ya basaleli ya Nzambe na boombo ya Babilone epesaki bango esengo. (Emoniseli 11:11, 12) Batondaki na elikya, mpe basalelaki libaku yango mpo na kokolisa mosala na bango. Ya solo, esengelaki etuluku moke wana ya baklisto bázala na mpiko mpo na kosalela mabaku ya sika oyo bazwaki ya kosakola na mokili oyo ezali koyina bango. Kasi na lisalisi ya Yehova, batyaki likebi na bango na kosakola nsango malamu. Makambo oyo maleká ezali komonisa ete Yehova apambolaki bango.
25. Mpo na nini ezali na ntina mingi kotya mpenza likebi na mibeko ya boyengebene ya Nzambe?
25 Eteni oyo ya esakweli ya Yisaya emonisi polele ete Yehova ateyaka biso mpo na bolamu na biso. Ezali na ntina mingi kotya mpenza likebi na mibeko ya boyengebene ya Nzambe. (Emoniseli 15:2-4) Soki tobosani te bwanya mpe bolingo ya Yehova, yango ekosalisa biso tólanda kosala oyo ye alobi ete ezali sembo. Mibeko na ye nyonso ezali mpo na bolamu na biso.—Yisaya 48:17, 18.
[Etanda/Bililingi na lokasa 133]
Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso amipekisaka
Yehova ayebisaki Bayisalaele oyo bapɛngwaki ete: ‘Nakokanga nkanda na ngai . . . Nakomipekisa.’ (Yisaya 48:9) Maloba lokola oyo ezali kosalisa biso tómona ete Nzambe azali ndakisa mpenza na oyo etali koboya kosalela nguya na ndenge ya mabe. Ya solo, moto moko te aleki Nzambe na nguya. Yango wana tobengaka ye Oyo-aleki-na-nguya, Oyo-aleki-na-makasi. Abongi solo mpenza komipesa nkombo ya lokumu ‘Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.’ (Genese 17:1) Azali kaka te na makasi oyo ezangi nsuka, kasi azali mpe na bokonzi nyonso, mpamba te azali Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, oyo ye asalaki. Yango wana moto moko te akoki kotuta ntolo ete akoki kopekisa lobɔkɔ na ye to koloba na ye ete, “Ozali kosala nini?”—Danyele 4:35.
Nzokande, Nzambe asilikaka noki te, ata soki asengeli komonisa banguna na ye nguya na ye. (Nahumu 1:3) Yehova azali na makoki ya ‘kokanga nkanda na ye’ mpe abongi solo kobengama ete ye oyo ‘ayokaka nkanda noki te,’ mpamba te ezaleli na ye ya liboso ezali nkanda te kasi bolingo. Amonisaka nkanda na ye ntango nyonso na boyengebene, na ntina, mpe ayebaka ntango nyonso kopekisa yango.—Exode 34:6; 1 Yoane 4:8.
Mpo na nini Yehova asalaka bongo? Mpamba te ayebi malamu mpenza kosalela nguya na ye monene na boyokani na bizaleli na ye mosusu misato ya minene: bwanya, boyengebene, mpe bolingo. Asalelaka ntango nyonso nguya na ye na boyokani na bizaleli wana mosusu.
[Elilingi na lokasa 122]
Nsango ya Yisaya oyo etali kozongisama epesi Bayuda ya sembo oyo bazali na boombo mwa elikya
[Bililingi na lokasa 124]
Bayuda bamesanaki kotalela misala ya Yehova lokola nde euti na banzambe ya bikeko
1. Ishtar 2. Mayemi likoló ya biliki ya Nzela ya Losambo ya Babilone 3. Dalagona, elembo ya Marduku
[Elilingi na lokasa 127]
“Mɔtɔ ya minyoko” ekoki komonisa soki tozali kosalela Yehova na mikano ya sembo to te
[Bililingi na lokasa 128]
Baklisto ya solo bakutanaki na minyoko ya nsɔmɔ koleka