Mokapo ya Zomi na Nsambo
Bapaya bayanganisami na ndako ya mabondeli ya Nzambe
1, 2. Liyebisi nini ya esengo mingi epesamaki na 1935, mpe yango ezalaki kokokisama ya nini?
NA MOKOLO ya mitano mwa 31 Mai 1935, Joseph Rutherford asalaki lisukulu liboso ya bato ebele oyo bazalaki na liyangani moko monene na Washington. Na lisolo na ye amonisaki banani bazali “ebele ya bato,” to “ebele monene” oyo ntoma Yoane amonaki na emonaneli. Ntango akómaki na likambo ya ntina mingi ya lisolo na ye, Ndeko Rutherford asɛngaki boye: “Baoyo nyonso bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé, bátɛlɛma.” Ndeko moko oyo azalaki kuna alobi ete “bato oyo batɛlɛmaki bazalaki ebele koleka baoyo batɛlɛmaki te.” Na nsima molobi alobaki ete: “Bótala! Ebele ya bato!” Ndeko mosusu oyo azalaki mpe kuna akanisi ndenge esalemaki, alobi: “Liboso, bato nyonso bafandaki nyɛɛ; na nsima bagangaki na esengo, mpe babɛtaki mabɔkɔ makasi ntango molai.”—Emoniseli 7:9.
2 Wana ezalaki likambo ya ntina mingi kati na kokokisama ya esakweli moko oyo ekomamá eleki mbula soki 2 700 mpe oyo ezwami lelo na Biblia na biso na Yisaya mokapo 56. Lokola ebele ya bisakweli mosusu ya Yisaya, esakweli yango ezali na bilaka ya kobɔndisa mpe na makebisi ya makasi. Na kokokisama na yango ya liboso, esakweli yango etali bato ya ekólo oyo Nzambe asalaki na bango kondimana, oyo bazalaki na mikolo ya Yisaya; kasi elandi kokokisama na boumeli ya bikeke mingi tii na mikolo na biso.
Makambo oyo esengeli kosala mpo na kobika
3. Soki Bayuda balingi ete Nzambe abikisa bango, basengeli kosala nini?
3 Yisaya mokapo 56 ebandi na toli moko mpo na Bayuda. Atako bongo, bato nyonso oyo basambelaka na solo basengeli kolanda makambo oyo mosakoli akomi. Totángi boye: ‘Yehova alobi boye ete, Bósambisa sembo, bósala mpe boyengebene; zambi lobiko na ngai ebɛlɛmi, kosikola na ngai ekomonana. Esengo na moto oyo asali bongo mpe na mwana na moto oyo asimbi yango makasi; ye oyo akobatelaka sabata mpe akobebisaka yango te, akoboyisaka lobɔkɔ na ye ete esala mabe te.’ (Yisaya 56:1, 2) Bato ya Yuda oyo bazali koluka ete Nzambe abikisa bango basengeli kotosa Mibeko ya Moize, kosala makambo na bosembo mpe kozala na bomoi ya boyengebene. Mpo na nini? Mpamba te Yehova ye mei azali moyengebene. Baoyo bazali koluka boyengebene bazalaka na esengo ya koyeba ete Yehova andimi bango.— Nzembo 144:15b.
4. Mpo na nini kotosa Sabata ezali na ntina mingi na Yisalaele?
4 Esakweli yango ezali kobenda likebi na likambo ya kotosa Sabata mpamba te Sabata ezali likambo ya ntina mingi na Mibeko ya Moize. Kutu, moko ya bantina mpenza oyo bato ya Yuda bakendeki na boombo ezali kozanga kotosa Sabata. (Levitike 26:34, 35; 2 Ntango 36:20, 21) Sabata ezali elembo ya boyokani oyo Yehova asalaki kaka na Bayuda, mpe baoyo bazali kotosa Sabata bazali komonisa ete bazali kozwa boyokani yango na motuya mingi. (Exode 31:13) Lisusu, kotosa Sabata esengelaki kokundolela bato ya ntango ya Yisaya ete Yehova azali Mozalisi. Botosi ya ndenge yango ekokundolela mpe bango motema mawa na ye epai na bango. (Exode 20:8-11; Deteronome 5:12-15) Mpo na kosukisa, kotosa Sabata elingaki kosalisa bango bálanda kosambela Yehova mbala na mbala mpe na ndenge oyo ebongisami malamu. Kotika misala na bango mokolo moko na pɔsɔ elingaki kopesa Bayuda libaku ya kobondela, koyekola mpe komanyola.
5. Atako Sabata etali mpenzampenza baklisto te, ndenge nini bakoki kolanda toli ya kotosa yango?
5 Bongo ezali boni mpo na baklisto? Elendiseli ya kotosa Sabata etali mpe bango? Etali mpenzampenza bango te, mpamba te baklisto bazali na nse ya Mibeko ya Moize te mpe na yango basɛngisami te kotosa Sabata. (Bakolose 2:16, 17) Atako bongo, ntoma Paulo alobaki ete “etikali na kopema moko ya sabata” mpo na baklisto ya sembo. ‘Kopema ya sabata’ yango esɛngi kondima mbeka ya Yesu mpo na kobika mpe kotika kotyela misala na biso moko motema. (Baebele 4:6-10) Na yango, maloba ya esakweli ya Yisaya oyo etali Sabata ezali kozongisa na makanisi ya basaleli ya Yehova ya mikolo na biso ntina monene ya kondima ebongiseli oyo Nzambe akamati mpo na kobikisa biso. Ezali mpe kokundolela bango ntina ya kozala na boyokani moko ya malamu elongo na Yehova mpe ya kosambelaka ye mbala na mbala kozanga kotika.
Libɔndisi mpo na mopaya mpe mokube
6. Wapi bituluku mibale oyo batyeli sikoyo likebi?
6 Sikoyo Yehova azali koloba na bituluku mibale ya baoyo balingi kosalela ye kasi na nse ya Mibeko ya Moize bakokisaki masɛngami te mpo na kokɔta na lisangá ya Bayuda. Totángi boye: ‘Tiká ete mopaya oyo amipesi ye moko epai ya Yehova aloba te ete, Yehova akolongola ngai na bato na ye solo! Tiká ete mokube aloba te ete, Talá ngai nazali nzete ekauki!’ (Yisaya 56:3) Mopaya azalaki kobanga ete bakolongola ye na Yisalaele. Mokube azali komitungisa ete nkombo na ye ekolimwa mpo aboti bana te. Bango nyonso basengeli kolɛmba nzoto te. Liboso tóyeba mpo na nini basengeli kolɛmba nzoto te, tótala naino boyokani nini bazalaki na yango na ekólo ya Yisalaele na nse ya Mibeko.
7. Bipekiseli nini Mibeko etyelaki bapaya na Yisalaele?
7 Bapaya oyo bakatamaki ngenga te basengelaki te kokɔta na losambo ya Yisalaele. Na ndakisa, bapesami nzela te ya kolya Elekeli. (Exode 12:43) Bapaya oyo bazali kobuka na nko te mibeko ya mboka bazalaki kosalela bango makambo na bosembo mpe koyamba bango, kasi bazalaki na boyokani ya libela te na ekólo yango. Ezali solo ete basusu bandimaki mpenza kotosa Mibeko, mpe mpo na komonisa yango, mibali bazalaki kokatama ngenga. Bazalaki kokóma baprozelite, baoyo bazalaki kozwa mabaku ya kosambela na lopango ya ndako ya Yehova mpe bazalaki kotalela bango lokola bato ya lisangá ya Yisalaele. (Levitike 17:10-14; 20:2; 24:22) Atako bongo baprozelite bazalaki mpenza na kati ya kondimana ya Yehova na Yisalaele te, mpe bazalaki ata na libula ya mabelé te na Mokili ya Ndaka. Bapaya mosusu bakokaki kotala epai ya tempelo wana bazali kobondela, mpe bakokaki kopesa mbeka na nzela ya banganga-nzambe soki mbeka na bango eyokani na oyo Mibeko esɛngi. (Levitike 22:25; 1 Mikonzi 8:41-43) Kasi Bayisalaele basengelaki te kozala na boyokani ya makasi elongo na bango.
Mikube bazwi nkombo mpo na libela
8. (a) Na nse ya Mibeko, ndenge nini bazalaki kotalela mikube? (b) Ndenge nini bazalaki kosalela mikube na bikólo ya bapakano, mpe mbala mosusu liloba “mokube” ezalaki kosalelama mpo na banani?
8 Mikube, ata soki babotami na baboti oyo bazali Bayuda, bandimamaki te lokola bato mpenza ya ekólo ya Yisalaele.a (Deteronome 23:1) Na bikólo mosusu ya bapakano na ntango ya kala, bazalaki kopesa mikube misala oyo bazalaki kopesa bato mosusu te mpe na ntango wana bazalaki na momeseno ya kolongola bana mibali oyo bakangi na etumba mbuma ya mibali. Bazalaki kotya mikube basali minene na bandako ya bakonzi. Mokube akokaki kozala “mobateli ya basi,” to ‘mobateli ya bamakango,’ to mosali ya mwasi ya mokonzi. (Esetele 2:3, 12-15; 4:4-6, 9) Eloko moko te emonisi ete Bayisalaele bazalaki kolanda momeseno yango to bazalaki mpenza koluka mikube mpo na kosalela bakonzi ya Yisalaele.b
9. Maloba nini ya kobɔndisa Yehova ayebisi mikube oyo bakufá nzoto ya mibali?
9 Na Yisalaele, longola likambo oyo ete mikube oyo bakufá nzoto ya mibali bazalaki kosangana te na makambo mingi ya losambo ya Nzambe ya solo, basambwaki lisusu makasi mpo bazalaki na makoki te ya kobota bana oyo bakokaki kobatela nkombo ya libota na bango mpo elimwa te. Na yango, esakweli oyo elandi ezali solo libɔndisi monene mpo na bango! Totángi boye: “Zambi [Yehova] alobi boye ete, Epai ya mikube baoyo bakotosa sabata na ngai, baoyo bakopona makambo makosepelisa ngai, mpe bakosimba kondimana na ngai makasi, nakopesa kati na ndako na ngai mpe kati na mapango na ngai ekaniseli mpe nkombo koleka bana babali mpe bana basi na malamu; nakopesa bango nkombo ya seko oyo ekokatama te.”—Yisaya 56:4, 5.
10. Ntango nini ezaleli ya mikube ebongwanaki, mpe libaku malamu nini bapesá bango kobanda wana?
10 Ya solo, ntango ekoya wana kozala mokube oyo akufá nzoto ya mibali ekozala lisusu epekiseli te mpo na kozala mosaleli ya Yehova. Soki bamonisi botosi, mikube bakozala na “ekaniseli,” to esika, na kati ya ndako ya Yehova mpe nkombo, oyo eleki bana mibali mpe bana basi na malamu. Yango ekosalema ntango nini? Ekosalema kaka nsima ya liwa ya Yesu Klisto. Na ntango wana, kondimana ya sika ekozwa esika ya kondimana ya kala ya Mibeko, mpe “Yisalaele ya Nzambe” ekozwa esika ya Yisalaele ya mosuni. (Bagalatia 6:16) Kobanda ntango yango, baoyo nyonso bazali komonisa kondima bazali na makoki ya kopesa Nzambe losambo oyo ekosepelisa ye. Kozala moto ya Yisalaele to te, ná makambo nyonso ya nzoto ezali lisusu na ntina te. Baoyo bazali koyika mpiko na bosembo nyonso, ata soki nzoto na bango ezali ndenge nini, bakozwa “nkombo ya seko oyo ekokatama te.” Yehova akobosana bango te. Akokoma nkombo na bango na “mokanda [na ye] ya kokanisa,” mpe na ntango oyo Nzambe atye, bakozwa bomoi ya seko.—Malaki 3:16; Masese 22:1; 1 Yoane 2:17.
Bapaya bazali kosambela esika moko na bato ya ekólo ya Nzambe
11. Mpo bapaya bázwa mapamboli, balendisi bango básala nini?
11 Bongo ezali boni mpo na bapaya? Sikoyo esakweli ezongeli bango, mpe Yehova azali na maloba mpenza ya kobɔndisa bango. Yisaya akomi boye: ‘Mpe bapaya oyo bakomipesa bango moko na Yehova ete básalela ye mpe bálinga nkombo ya Yehova mpe ete bázala baombo na ye, moko na moko oyo akotosa sabata mpe akobebisa yango te mpe oyo akosimba kondimana na ngai na makasi, nakoyeisa bango oyo kino ngomba na ngai mosantu, nakosepelisa mpe bango kati na ndako na ngai ya kobondela; mbeka na bango etumbami mpe makabo na bango, ekoyambama na etumbelo na ngai; zambi ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli mpo na bikólo nyonso.’—Yisaya 56:6, 7.
12. Ndenge nini kala bazalaki kolimbola esakweli ya Yesu oyo etali “bampate mosusu”?
12 Na mikolo na biso “bapaya” babandaki komonana mokemoke. Liboso ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, eyebanaki ete bato oyo bakobika bakozala mingi koleka baoyo bazali na elikya ya koyangela elongo na Yesu na likoló, oyo bayebani lelo lokola Yisalaele ya Nzambe. Bayekoli ya Biblia bayebaki malamu maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 10:16: “Nazali na bampate mosusu, oyo bazali ya lopango oyo te; bango mpe nasengeli komema bango, mpe bakoyoka mongongo na ngai, mpe bakokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.” Eyebanaki ete “bampate mosusu” wana ezali etuluku ya bato oyo bakofanda awa na mabelé. Kasi bayekoli ya Biblia mingi bazalaki kokanisa ete bampate mosusu bakomonana na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu Klisto.
13. Mpo na nini bakanisaki ete bampate ya Matai mokapo 25 bakomonana na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?
13 Na nsima, bayebaki malamu mpenza kolimbola mokapo mosusu oyo ezali kolobela bampate. Na Matai mokapo 25, tozali kokuta lisese ya Yesu oyo etali bampate mpe bantaba. Lisese yango elobi ete bampate bazwi bomoi ya seko mpamba te bazalaki kosalisa bandeko ya Yesu. Yango emonisi ete bakeseni na bandeko ya Klisto, oyo bapakolami na elimo. Na 1923, na liyangani moko oyo esalemaki na Los Angeles, na Californie, na États-Unis, bamonisaki ete bampate yango bakomonana na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, kasi te na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto. Mpo na nini? Mpamba te lisese ya Yesu ezali kati na eyano oyo apesaki na motuna oyo batunaki ye ete: “Ntango nini makambo wana ekosalema, mpe nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?”—Matai 24:3.
14, 15. Ndenge nini bayaki lisusu koyeba malamu esika ya bampate mosusu na mikolo ya nsuka?
14 Na bambula ya 1920, bato mosusu oyo bazalaki koyangana elongo na Bayekoli ya Biblia bamonaki ete elimo ya Yehova ezali kotatola epai na bango te ete babengami mpo na bomoi na likoló. Atako bongo, bazalaki basaleli ya molende mpenza ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló. Na 1931 basosolaki malamu esika ya bato yango ntango mokanda Justification ebimaki. Lokola mokanda Justification ezalaki kolimbola vɛrsɛ mokomoko ya mokanda ya Ezekiele oyo ezali na Biblia, elimbolaki mpe emonaneli ya “mobali” oyo azali na molangi ya mai ya mokanda ya mokomi. (Ezekiele 9:1-11) Bamoni “mobali” yango azali kolekaleka na Yelusaleme mobimba mpe kotya elembo na bilongi ya bato oyo bazalaki komitungisa mpe kolela mpo na makambo ya mbindo oyo ezalaki kosalema na mboka yango. “Mobali” yango ezali komonisa bandeko ya Yesu, batikali ya baklisto bapakolami oyo bazali na bomoi na ntango ya kosambisama ya mangomba ya boklisto, oyo ekokani na Yelusaleme ya kala. Bato oyo bazwi elembo ezali bampate mosusu oyo bazali na bomoi na ntango yango. Kati na emonaneli, bato yango babikaki ntango Yehova atindaki bapesi-etumbu na ye bábebisa mboka wana ya lipɛngwi.
15 Na 1932, balimbolaki malamu ndakisa ya esakweli oyo etali Yehu, mokonzi ya Yisalaele mpe Yehonadaba, moto oyo azalaki Moyisalaele te, kasi apesaki ye mabɔkɔ. Ndakisa yango emonisi ndenge oyo bampate mosusu bakopesa mabɔkɔ na bandeko ya Klisto oyo bapakolami na elimo, ndenge kaka Yehonadaba akendeki nzela moko na Yehu mpe apesaki ye mabɔkɔ mpo na kosilisa losambo ya Baala. Nsukansuka, na 1935 bampate mosusu oyo bazali na bomoi na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo bayebanaki ete bazali ebele ya bato oyo ntoma Yoane amonaki na emonaneli. Balimbolaki likambo yango libosoliboso na liyangani ya Washington, oyo tolobeli na paragrafe ya liboso, ntango Joseph Rutherford abengaki baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé ete “ebele monene.”
16. Wapi mabaku malamu mpe mikumba oyo “bapaya” bazali na yango?
16 Na ndenge yango, mokemoke, ekómaki komonana polele ete “bapaya” yango bakokokisa mikumba mingi na kati ya mikano ya Yehova na mikolo ya nsuka. Bazali koya epai ya Yisalaele ya Nzambe mpo na kosambela Yehova. (Zekalia 8:23) Elongo na ekólo yango ya elimo, bazali kopesa Nzambe mbeka oyo andimi mpe bazali kokɔta na bopemi ya Sabata. (Baebele 13:15, 16) Lisusu, bazali kosambela na tempelo ya elimo ya Nzambe, oyo ezali “ndako ya mabondeli mpo na bikólo nyonso,” ndenge tempelo ya kala na Yelusaleme ezalaki. (Malako 11:17) Bazali komonisa kondima kati na mbeka ya Yesu Klisto, ‘basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na kati ya makila ya Mwana-Mpate.’ Mpe bazali kosalela Yehova ntango nyonso, “bazali kosalela ye mosala mosantu butu moi.”—Emoniseli 7:14, 15.
17. Ndenge nini bapaya ya mikolo na biso bazali kosimba kondimana ya sika?
17 Bapaya wana ya ntango na biso bazali kosimba kondimana ya sika mpamba te, lokola bazali kosangana elongo na Yisalaele ya Nzambe, bazali kozwa bolamu mpe mapamboli oyo ezali kouta na kondimana yango. Atako bazali basangani ya kondimana yango te, bazali kotosa na motema moko mibeko ya kondimana yango. Na ndenge yango mibeko ya Yehova ekomami kati na mitema na bango, mpe bazali kotalela Yehova ete azali Tata na bango ya likoló mpe Mokonzi monene.—Yilimia 31:33, 34; Matai 6:9; Yoane 17:3.
18. Mosala nini ya koyanganisama ezali kosalema na mikolo ya nsuka?
18 Esakweli ya Yisaya elandi boye: “Nkolo Mokonzi Yehova alobi boye, ye oyo akoyanganisa bato ya Yisalaele oyo bapalangani: ‘Nakoyanganisa mpe bato mosusu epai na ye, longola bato na ye oyo basili koyanganisama.’” (Yisaya 56:8, NW) Na mikolo ya nsuka, Yehova ayanganisi “bato ya Yisalaele oyo bapalangani,” batikali bapakolami. Longola bango, azali koyanganisa mpe bamosusu, ebele ya bato. Bango nyonso elongo bazali kosambela na kimya mpe na bomoko, na litambwisi ya Yehova mpe Yesu Klisto, Mokonzi oyo atye. Lokola bazali kotosa boyangeli ya Yehova, oyo Klisto azali kokamba, Mobateli Aleki-Malamu akómisi bango etonga moko ya esengo, oyo ezali na bomoko.
Bakɛngɛli oyo bakufi miso, bambwa oyo bagangaka te
19. Libyangi nini epesami epai ya banyama ya esobe mpe ya zamba?
19 Nsima ya maloba wana ya esengo mpe ya kolendisa, maloba yango ekómi nde ya makasi mpenza. Yehova alingi komonisela bapaya mpe mikube motema mawa. Nzokande bato mosusu mingi oyo bazali koloba ete bazali na lisangá ya Nzambe bandimami te mpe basengeli kosambisama. Kaka kosambisama te, kasi lisusu babongi ata te kokundama na ndenge ya malamu; kutu babongi nde kolyama na banyama. Mpo na yango, totángi boye: “Bino banyama nyonso ya elanga, yaká mpe lyá! Bino banyama nyonso ya zamba.” (Yisaya 56:9) Banyama yango ya zamba esengeli kolya nini? Esakweli ekomonisa yango. Likambo yango ezali kokundolela biso oyo ezali kozela batɛmɛli ya Nzambe na etumba ya Armagedona oyo ekómi pene, wana bibembe na bango ekotikala libándá mpo bandɛkɛ ya likoló elya yango.—Emoniseli 19:17, 18.
20, 21. Mabunga nini esali ete bakonzi ya mangomba bázala batambwisi ya elimo oyo bazangi ntina?
20 Esakweli elandi koloba boye: ‘Bakɛngɛli na ye bakufi miso. Moko te kati na bango atye likebi. Bazali bango nyonso bambwa bimimi, eyebi koganga te. Bakolɔta ndɔtɔ, bakolala na nse, balingi mpɔngi mingi mpenza. Bambwa bazali na lokoso, batondaka te; bazali babateli ya mpate oyo bayebi kokanga ntina te. Bango nyonso bapɛngwi moto na moto na nzela na ye moko; moto na moto na litomba na ye mpenza, bobele na esika na ye. Bango ete, Yaká, nakoluka vinyo, tótonda na masanga; mpe lobi ekozala lokola mokolo oyo, to monene koleka yango.’—Yisaya 56:10-12.
21 Bakonzi ya lingomba ya Yuda bazali koloba ete basambelaka Yehova. Bazali koloba ete bazali “bakɛngɛli na ye.” Kasi na elimo bazali bakufi-miso, bimimi to babába, mpe bato balingá mpɔngi. Soki bazali na makoki te ya kokɛngɛla, ya koganga mpo na kokebisa na ntango ya makama, bongo ntina na bango ezali nini? Bakɛngɛli ya lingomba ya ndenge wana bazali kokanga ntina te, bazali na makoki te ya kopesa litambwisi ya elimo epai ya bato oyo bakokani na bampate. Longola yango, basilá kobeba. Bamposa na bango esilaka te. Na esika ya kolanda litambwisi ya Yehova, bazali koluka nzela na bango moko, kolanda litomba ezangi sembo, komipesa na kolangwa masanga mpe kolendisa bato mosusu mpo básala lokola bango. Bazali mpenza kokanisa te ete Nzambe akosambisa bato, mpe bazali koyebisa bato ete makambo mazali malamu.
22. Na ndenge nini bakonzi ya lingomba na ntango ya Yesu bakeseni te na baoyo ya Yuda ya kala?
22 Mwa liboso, Yisaya asalelaki ndakisa ya ndenge yango mpo na komonisa ete batambwisi ya lingomba na Yuda oyo bazangaki bosembo bazali balangwi-masanga na elimo, bato balalá mpɔngi, mpe bazangi mayele. Bazalaki kokumbisa bato ebele ya makambo ya bonkɔkɔ, kosakola mateya ya lokuta mpe kotya motema epai ya Asiria mpo na kozwa lisalisi na esika ya kotalela Nzambe. (2 Mikonzi 16:5-9; Yisaya 29:1, 9-14) Ezali polele ete bazwi mpenza liteya te. Likambo ya mawa, bakonzi na ekeke ya liboso bazalaki se bongo. Na esika ya kondima nsango malamu oyo Mwana mpenza ya Nzambe amemelaki bango, baboyaki Yesu mpe bayokanaki mpo na koboma ye. Na maloba ya polele Yesu abengaki bato yango “batambwisi oyo bakufá miso,” mpe abakisaki ete “soki moto oyo akufá miso azali kotambwisa moto oyo akufá miso, bango mibale bakokwea na libulu.”—Matai 15:14.
Bakɛngɛli ya mikolo na biso
23. Esakweli nini ya Petelo oyo etali bakonzi ya mangomba ekokisami?
23 Ntoma Petelo akebisaki ete bateyi ya lokuta bakotɛlɛma mpe bakobungisa baklisto nzela. Akomaki boye: “Ezalaki mpe na basakoli ya lokuta na kati ya bato ya ekólo, ndenge moko mpe ekozala na bateyi ya lokuta na kati na bino. Bato wana bakokɔtisa na ndenge ya mayele mwa mangomba ya libebi mpe bakowangana ata nkolo oyo asombaki bango, koyeisáká nokinoki libebi likoló na bango moko.” (2 Petelo 2:1) Mateya ya lokuta mpe ya kokabola lingomba oyo bateyi wana ya lokuta bateyaki ebimisi nini? Ebimisi mangomba ya boklisto, oyo bakonzi na yango bazali lelo oyo kobondela ete Nzambe apambola baninga na bango ya politiki mpe bazali kopesa bango elaka ya makambo malamu mpo na mikolo ezali koya. Bakonzi ya mangomba ya boklisto bamonisi ete bakufi miso, bazali bimimi to babába, mpe balalá mpɔngi na elimo.
24. Bomoko nini ezali kati na Yisalaele ya elimo mpe bapaya?
24 Nzokande, Yehova azali komema bamilio ya bapaya mpo básambela ye na ndako monene na ye ya mabondeli, elongo na bato ya nsuka oyo bazali na kati ya Yisalaele ya Nzambe. Bapaya yango, atako bauti na bikólo, mposo mpe minɔkɔ ndenge na ndenge, bazali na bomoko kati na bango mpe elongo na Yisalaele ya Nzambe. Bandimi mpenzampenza ete lobiko ekouta bobele na Yehova Nzambe na nzela ya Yesu Klisto. Bolingo mpo na Yehova ezali kotinda bango básangana elongo na bandeko ya Klisto oyo bapakolami na elimo mpo na kosakola kondima na bango. Mpe bazali mpenza kobɔndisama makasi na maloba oyo ntoma moko akomaki na nguya ya elimo ya Nzambe, ete: “Soki ozali kosakola polele ‘liloba wana na monɔkɔ na yo mpenza,’ ete Yesu azali Nkolo, mpe ozali komonisa kondima na kati ya motema na yo ete Nzambe alamwisaki ye na bakufi, okobikisama.”—Baloma 10:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba “mokube” ekómaki lisusu komonisa mosali na ndako ya mokonzi, ata soki balongoli ye mbuma ya mibali te. Ezali na ndenge oyo nde Moetiopia oyo Filipo abatisaki abengami mokube, mpamba te azalaki prozelite mpe azwaki batisimo liboso nzela efungwama mpo na bato ya bikólo mosusu oyo bakatamaki ngenga te.—Misala 8:27-39.
b Ebede-Meleke, oyo asalisaki Yilimia mpe oyo azalaki na makoki ya kokɔta liboso ya Mokonzi Sidikiya, abengami mpe mokube. Yango ekoki komonisa ete azalaki mosali monene na ndako ya mokonzi, kasi emonisi te ete balongolaki ye mbuma ya mobali.—Yilimia 38:7-13.
[Elilingi na lokasa 250]
Sabata ezalaki kopesa libaku ya kobondela, koyekola mpe komanyola
[Bililingi na lokasa 256]
Esika ya bampate mosusu eyebanaki polele na liyangani ya Washington, na 1935 (na nse batisimo, na lobɔkɔ ya mobali manaka)
[Elilingi na lokasa 259]
Babengi banyama ya zamba ná bandɛkɛ báya kolya
[Bililingi na lokasa 261]
Bapaya mpe Yisalaele ya Nzambe bazali na bomoko kati na bango