Tosá Nzambe mpo ozwa matomba na bilaka oyo alapeli ndai
“Lokola [Nzambe] akokaki te kolapa ndai na nkombo ya moto mosusu oyo aleki ye, alapaki ndai na nkombo na ye moko.”—EBR. 6:13.
1. Na ndenge nini maloba ya Yehova ekeseni na oyo ya bato?
YEHOVA azali “Nzambe ya solo.” (Nz. 31:5) Bato ya kozanga kokoka balobaka ntango nyonso solo te, nzokande “Nzambe akoki kobuka lokuta ata moke te.” (Ebr. 6:18; tángá Mitángo 23:19.) Makambo oyo akani mpo na bolamu ya bato ezangaka te kokokisama. Na ndakisa, eloko nyonso oyo Nzambe alobaki ete akosala na ebandeli ya eleko mokomoko ya bozalisi “esalemaki bongo.” Na yango, na nsuka ya mokolo ya motoba ya bozalisi, “Nzambe amonaki eloko nyonso oyo asalaki mpe, talá! ezalaki malamu mingi.”—Eba. 1:6, 7, 30, 31.
2. Mokolo ya kopema ya Nzambe ezali nini, mpe mpo na nini ‘asantisaki yango’?
2 Nsima ya kotala biloko nyonso oyo asalaki, Yehova Nzambe abandisaki mokolo ya nsambo; yango ezali mokolo ya ngonga 24 te, kasi nde eleko moko ya molai oyo na boumeli na yango apemaki mpo na misala mosusu ya bozalisi awa na mabele. (Eba. 2:2) Mokolo ya kopema ya Nzambe esili naino te. (Ebr. 4:9, 10) Biblia eyebisi polele te ntango nini mpenza mokolo yango ebandaki. Ebandaki mwa moke nsima ya kozalisama ya Eva, mwasi ya Adama, esili koleka mbula soki 6 000. Tozali kozela Boyangeli ya Yesu Kristo oyo ekoumela mbula nkóto, oyo ekokokisa mokano oyo Nzambe azalaki na yango ntango asalaki mabele, ete ezala paradiso oyo ekoumela libela na libela mpe ekotonda na bato ya kokoka. (Eba. 1:27, 28; Em. 20:6) Okoki mpenza kondima ete okozala na bomoi wana ya esengo? Ɛɛ, okoki kozala na elikya wana! “Nzambe abandaki kopambola mokolo ya nsambo mpe kosantisa yango.” Yango ezalaki ndanga mpo na komonisa ete ata soki mikakatano ya ndenge nini ebimi, mokano ya Nzambe ekozanga te kokokisama na nsuka ya mokolo na ye ya kopema.—Eba. 2:3.
3. (a) Botomboki nini ebimaki mwa moke nsima ya ebandeli ya mokolo ya kopema ya Nzambe? (b) Na maloba nini Yehova amonisaki mokano na ye ya kosilisa botomboki yango?
3 Nzokande, ntango mokolo ya kopema ya Nzambe ebandaki, mwa moke na nsima, makambo ebebaki. Satana, oyo azalaki anzelu ya Nzambe, alukaki kokokana ná Nzambe. Alobaki lokuta ya liboso mpe atindaki Eva azanga botosi epai ya Yehova. (1 Tim. 2:14) Na nsima, Eva mpe atindaki mobali na ye atombokela Nzambe. (Eba. 3:1-6) Botomboki wana ezalaki likambo ya mabe koleka oyo esalemaki naino te liboso, mpamba te Satana alobaki ete Yehova abuki lokuta. Atako bongo, Yehova amonaki ntina te ya kolapa ndai mpo na komonisa ete mokano na ye mpo na mabele ekozanga te kokokisama. Na maloba oyo ndimbola na yango esengelaki koyebana na nsima, Nzambe amonisaki ndenge oyo akosukisa botomboki yango; alobaki boye: “Nakotya bonguna kati na yo [Satana] ná mwasi mpe kati na momboto na yo ná momboto na ye. Ye [Momboto oyo alakamaki] akopanza motó na yo mpe yo okozokisa ye na litindi.”—Eba. 3:15; Em. 12:9.
KOLAPA NDAI ESƐNGAMAKA NA MIBEKO MPO NA KOMONISA ETE LIKAMBO MOKO EZALI SOLO
4, 5. Abrahama azalaki kosala nini mpo na komonisa ete azali koloba solo?
4 Ntango Nzambe asalaki Adama ná Eva, kolapa ndai mpo na komonisa ete likambo moko ezali solo ezalaki mpenza na ntina te. Ezali na ntina te ete bikelamu ya kokoka oyo balingaka Nzambe mpe bamekolaka ye bálapa ndai; balobanaka ntango nyonso solo mpe batyelanaka mpenza motema. Kasi makambo ebongwanaki ntango lisumu mpe kozanga kokoka ekɔtaki kati na bato. Na nsima, ntango lokuta epalanganaki mingi kati na bato, ekómaki na ntina bálapaka ndai mpo na komonisa ete makambo oyo bazali koloba ezali solo.
5 Abrahama alapaki ndai na mabaku soki misato. (Eba. 21:22-24; 24:2-4, 9) Na ndakisa, asalaki yango ntango autaki kolonga mokonzi ya Edome ná bato na ye. Mokonzi ya Saleme mpe mokonzi ya Sodoma bayaki kokutana na Abrahama. Melekisedeke, mokonzi ya Saleme, azalaki mpe “nganga-nzambe ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló.” Na yango, apambolaki Abrahama mpe akumisaki Nzambe ndenge asalisaki Abrahama alonga banguna na ye. (Eba. 14:17-20) Na nsima, ntango mokonzi ya Sodoma alingaki kopesa Abrahama mbano mpo abikisaki bato na ye na mabɔkɔ ya banguna, Abrahama alapaki ndai ete: “Natomboli mpenza lobɔkɔ na ngai mpe nalapi ndai, epai ya Yehova Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, Oyo abimisá likoló ná mabele, ete, nakokamata eloko moko te na biloko na yo, ɛɛ, banda na busi tii na nsinga ya sandale, noki oloba ete: ‘Ngai nde moto nakómisi Abrama mozwi.’”—Eba. 14:21-23.
YEHOVA ALAPAKI NDAI NTANGO APESAKI ABRAHAMA ELAKA
6. (a) Ndakisa nini Abrahama atikelaki biso? (b) Matomba nini tokozwa soki tolandi ndakisa ya botosi ya Abrahama?
6 Mpo na bolamu ya bato ya kozanga kokoka, Yehova Nzambe alapaki mpe ndai, na ndakisa ntango asalelaki maloba “‘Lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.” (Ezk. 17:16) Biblia elobeli mabaku koleka 40 oyo Yehova Nzambe alapaki ndai. Mbala mosusu libaku oyo toyebi malamu ezali ntango alapelaki Abrahama ndai. Na boumeli ya bambula mingi, Yehova asalaki bilaka ndenge na ndenge oyo etalelaki kondimana oyo asalaki na Abrahama. Bilaka yango nyonso emonisi ete Momboto oyo alakamaki akouta na Abrahama, na nzela ya mwana na ye Yisaka. (Eba. 12:1-3, 7; 13:14-17; 15:5, 18; 21:12) Na nsima Yehova atyaki Abrahama na komekama makasi, asɛngaki ye akaba mwana na ye lokola mbeka. Abrahama atosaki mbala moko, mpe ntango kaka alingaki kokaba Yisaka lokola mbeka, anzelu ya Nzambe apekisaki ye. Na nsima Nzambe alapaki ndai ete: “Na nkombo na ngai moko nalapi ndai . . . ete lokola osali likambo oyo mpe oboyi kopesa mwana na yo te, mwana na yo kaka moko, nakopambola yo solo mpe nakokómisa solo momboto na yo mingi lokola minzoto ya likoló mpe lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu; mpe momboto na yo akozwa porte ya banguna na ye. Mpe na nzela ya momboto na yo, bikólo nyonso ya mabele ekomizwela mpenza lipamboli, mpo oyoki mongongo na ngai.”—Eba. 22:1-3, 9-12, 15-18.
7, 8. (a) Mpo na nini Yehova alapelaki Abrahama ndai? (b) Matomba nini “bampate mosusu” bakozwa na ndai oyo Nzambe alapaki?
7 Mpo na nini Nzambe alapelaki Abrahama ndai ete bilaka na Ye ekokokisama? Ezalaki mpo na kolendisa baoyo bakokóma bazwi-ya-libula elongo na Kristo, mpe bakosala eteni ya mibale ya “momboto” oyo alakamaki, mpe mpo na kosalisa bango bákóma na kondima makasi. (Tángá Baebre 6:13-18; Gal. 3:29) Ndenge ntoma Paulo amonisaki yango, Yehova “asalaki yango na ndai, mpo, na makambo mibale oyo ebongwanaka te [elaka na ye mpe ndai na ye] oyo mpo na yango Nzambe akoki kobuka lokuta ata moke te, . . . tólendisama makasi mpo tósimba elikya oyo etyami liboso na biso.”
8 Ezali kaka te bakristo oyo batyami mafuta na elimo nde bazali kozwa matomba na ndai oyo Nzambe alapelaki Abrahama. Na nzela ya “momboto” ya Abrahama, Yehova alapaki ndai ete bato ya “bikólo nyonso ya mabele ekomizwela lipamboli.” (Eba. 22:18) Kati na bato yango oyo bapambolami ezali mpe na “bampate mosusu” oyo batosaka Kristo, oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. (Yoa. 10:16) Ozala na elikya ya bomoi na likoló to awa na mabele, ‘simbá’ elikya yango na ndenge ozali kokoba kotosa Nzambe na bomoi na yo.—Tángá Baebre 6:11, 12.
BANDAI MOSUSU OYO NZAMBE ALAPAKI, OYO EYOKANI NA ELAKA OYO APESAKI ABRAHAMA
9. Ndai nini Nzambe alapaki ntango bakitani ya Abrahama bazalaki na boombo na Ezipito?
9 Bankama ya bambula na nsima, Yehova alapaki lisusu ndai ete akokokisa bilaka oyo asalaki ntango atindaki Moize akende koloba na bakitani ya Abrahama, oyo na ntango wana bazalaki baombo na Ezipito. (Kob. 6:6-8) Mpo na kolobela ndai oyo alapaki na ntango wana, Nzambe alobaki boye: “Na mokolo oyo naponaki Yisraele, . . . natombolaki lobɔkɔ na ngai mpe nalapelaki bango ndai ete nakobimisa bango na mokili ya Ezipito mpo na komema bango na mokili oyo nanɔngelaki bango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.”—Ezk. 20:5, 6.
10. Elaka nini Nzambe apesaki Bayisraele nsima ya kobimisa bango na Ezipito?
10 Nsima ya kobimisa bana ya Yisraele na Ezipito, Yehova alapaki ndai mosusu; alobaki na bango ete: “Soki bokotosa mpenza mongongo na ngai mpe bokobatela mpenza kondimana na ngai, bokokóma mpenza eloko na ngai moko kati na bato ya bikólo mosusu nyonso, mpo mabele mobimba ezali ya ngai. Mpe bino bokokóma mpo na ngai bokonzi moko ya banganga-nzambe mpe ekólo moko mosantu.” (Kob. 19:5, 6) Ezalaki mpenza libaku monene oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele! Yango elingaki koloba ete soki bato ya ekólo yango batosi Nzambe, bakozala na likoki ya kokóma bokonzi moko ya banganga-nzambe mpo na komemela bato mosusu mapamboli. Na nsima, mpo na komonisa likambo oyo asalelaki ekólo Yisraele na ntango wana, Yehova alobaki boye: “Nalapelaki yo ndai mpe nasalaki kondimana ná yo.”—Ezk. 16:8.
11. Bayisraele balobaki nini ntango Nzambe asɛngaki bango básala kondimana ná ye mpo bákóma ekólo oyo aponi?
11 Na ntango wana, Yehova atindaki bana ya Yisraele na makasi te bálapa ndai ete bakotosa ye; atindaki mpe bango na makasi te ete bándima kosala ná ye boyokani wana. Bango moko nde bandimaki; balobaki boye: “Nyonso oyo Yehova alobi tondimi kosala yango.” (Kob. 19:8) Mikolo misato na nsima, Yehova Nzambe ayebisaki Bayisraele makambo oyo alingaki ete básala lokola bakómaki ekólo oyo aponi. Ya liboso, apesaki bango Mibeko Zomi, mpe na nsima Moize ayebisaki bango mibeko mosusu oyo ezali na Kobima 20:22 tii na Kobima 23:33. Bayisraele balobaki nini nsima ya koyoka mibeko wana? “Bato nyonso bazongisaki maloba na mongongo moko mpe balobaki ete: ‘Maloba nyonso oyo Yehova alobi, tokosalela yango.’” (Kob. 24:3) Na nsima Moize akomaki mibeko yango na “buku ya kondimana” mpe atángaki yango na mongongo makasi mpo bato nyonso ya ekólo bákoka koyoka yango lisusu. Na nsima, mpo na mbala ya misato, bato basalaki elako ete: “Nyonso oyo Yehova alobi tondimi kosala mpe kotosa yango.”—Kob. 24:4, 7, 8.
12. (a) Yehova asalaki nini nsima ya kosala kondimana ná Bayisraele? (b) Bayisraele basalaki nini nsima ya kosala kondimana ná Nzambe?
12 Yehova abandaki mbala moko kokokisa makambo oyo alakaki na kondimana oyo asalaki ná Bayisraele. Atindaki básala hema ya losambo mpe aponaki banganga-nzambe mpo na kopesa bato ya kozanga kokoka likoki ya kokóma na boyokani malamu ná ye. Kasi, eumelaki te, Bayisraele babosanaki ete bamipesaki na Nzambe mpe “bayokisaki Mosantu ya Yisraele motema mpasi.” (Nz. 78:41) Na ndakisa, ntango Moize azalaki kozwa malako mosusu na Ngomba Sinai, Bayisraele bakómaki motema mokuse mpe bakómaki kobungisa kondima epai ya Nzambe; bakanisaki ete Moize asundoli bango. Yango wana basalaki ekeko moko ya mwana-ngɔmbɛ oyo ezalaki ya wolo, mpe balobaki na bato ete: “Talá Nzambe na yo, Ee Yisraele, oyo akambaki yo mpe abimisaki yo na mokili ya Ezipito.” (Kob. 32:1, 4) Na nsima basalaki oyo babengaki “fɛti mpo na Yehova” mpe bagumbamelaki ekeko oyo basalaki mpe bapesaki yango bambeka. Ntango Yehova amonaki bongo, ayebisaki Moize boye: “Balongwe nokinoki na nzela oyo napesaki bango mitindo ete bátambola na yango.” (Kob. 32:5, 6, 8) Likambo ya mawa, kobanda na ntango wana, Bayisraele basalaki bilako epai ya Nzambe kasi bazalaki kokokisa yango te.—Mit. 30:2.
BANDAI MOSUSU MIBALE
13. Ndai nini Nzambe alapelaki Mokonzi Davidi, mpe na ndenge nini yango etaleli Momboto oyo alakamaki?
13 Na boyangeli ya Mokonzi Davidi, Yehova alapaki lisusu ndai mibale mpo na bolamu ya bato nyonso oyo batosaka Ye. Ya liboso, alapelaki Davidi ndai ete kiti na ye ya bokonzi ekoumela libela na libela. (Nz. 89:35, 36; 132:11, 12) Yango elingaki koloba ete Momboto oyo alakamaki akobengama “mwana ya Davidi.” (Mat. 1:1; 21:9) Na komikitisa nyonso, Davidi abengaki Momboto yango oyo akozala mokitani na ye “Nkolo,” mpamba te Kristo akozala na bokonzi koleka ye.—Mat. 22:42-44.
14. Ndai nini Yehova alapaki mpo na Momboto oyo alakamaki, mpe ndenge nini tozali kozwela yango matomba?
14 Ya mibale, Yehova ayebisaki Davidi asakola ete Mokonzi yango akozala mpe Nganga-nzambe Monene mpo na bato nyonso. Na Yisraele, moto moko te akokaki kozala mokonzi mpe nganga-nzambe na mbala moko. Banganga-nzambe bazalaki kouta na libota ya Levi, mpe bakonzi bazalaki kouta na libota ya Yuda. Kasi mpo na mokonzi yango oyo akozala mokitani na ye, Davidi asakolaki boye: “Liloba oyo Yehova alobi na Nkolo na ngai yango oyo: ‘Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo.’ Yehova alapi ndai (mpe akoyoka mawa te): ‘Ozali nganga-nzambe mpo na ntango oyo etyami ndelo te lokola Melekisedeke!’” (Nz. 110:1, 4) Ndenge esakweli yango elobaki, Yesu Kristo, Momboto oyo alakamaki, azali sikoyo koyangela. Azali mpe kosala lokola Nganga-nzambe Monene na ndenge azali kosalisa bato oyo babongoli mitema bákóma na boyokani malamu ná Nzambe.—Tángá Baebre 7:21, 25, 26.
YISRAELE YA NZAMBE
15, 16. (a) Wapi Yisraele mibale oyo Biblia elobeli, mpe Yisraele nini Nzambe azali kopambola lelo oyo? (b) Mobeko nini Yesu apesaki bayekoli na ye na oyo etali kolapa ndai?
15 Lokola Bayisraele baboyaki Yesu Kristo, babungisaki lokumu oyo bazalaki na yango na miso ya Nzambe, mpe libaku ya kokóma “bokonzi moko ya banganga-nzambe.” Yango wana, Yesu ayebisaki bakonzi ya Bayuda ete: “Bakolongola bokonzi ya Nzambe epai na bino mpe bakopesa yango ekólo moko oyo ekobota mbuma na yango.” (Mat. 21:43) Ekólo yango ya sika ebotamaki na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango Nzambe asopaki elimo santu na ye likoló ya bayekoli ya Yesu 120 oyo bayanganaki na Yerusaleme. Bakómaki “Yisraele ya Nzambe” mpe mosika te bankóto ya bato oyo bautaki bikólo ndenge na ndenge ya mokili bakómaki mpe na kati ya Yisraele ya Nzambe.—Gal. 6:16.
16 Yisraele ya Nzambe ekeseni na Yisraele ya kala mpamba te ezali kokoba kobota mbuma malamu mpe kotosa Nzambe. Moko ya mibeko oyo bato oyo bazali na Yisraele ya Nzambe batosaka etaleli kolapa ndai. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, bato bazalaki kolapa ndai mpo na makambo ya lokuta to mpo na makambo ezangá ntina. (Mat. 23:16-22) Yesu ateyaki bayekoli na ye boye: “Bólapa ndai te . . . Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te; mpo maloba oyo ebakisami likoló na oyo wana euti na moto mabe.”—Mat. 5:34, 37.
Bilaka ya Yehova ezangaka te kokokisama
17. Mituna nini tokotalela na lisolo ya boyekoli oyo elandi?
17 Yango elimboli nde ete kolapa ndai ezalaka ntango nyonso mabe? Oyo eleki ntina, kotika Ɛɛ na biso ezala Ɛɛ elimboli nini? Tokotalela mituna yango na lisolo ya boyekoli oyo elandi. Wana tozali kokoba komanyola na Liloba ya Nzambe, tiká ete tózala na ekateli ya kokoba kotosa Yehova. Soki tosali bongo, akopambola biso libela na libela, kaka ndenge alapaki ndai.