Esika ya lokumu oyo basi bazalaki na yango kati na Basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala
“[Yehova] Nzambe alobaki ete, Ezali malamu te ete moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi mobongi na ye.”—GENESE 2:18.
1. Lolenge nini diksionere moko ya Biblia elobeli ezalela ya basi na ntango ya kala?
“NA ESIKA moko te kati na etúká oyo ezali zingazinga ya Méditérannée to Proche-Orient basi bazalaki kopesamela bonsomi oyo bazali na yango lelo kati na mikili ya Mpótó. Ndakisa oyo ezalaki komonana mingi ezalaki oyo ya kokitisama ya basi liboso na mibali, mpenza lokola baombo bakitisamaki liboso na bato oyo bazalaki na bonsomi, mpe lokola bilenge bakitisamaki liboso na mikóló. . . . Bana mibali balingamaki mingi koleka bana basi, mpe mbala mosusu bana basi ya mike bazalaki kotikama libándá kino kokufa.” Ezali wana lolenge diksionere moko ya Biblia ezali kolobela ezalela ya basi na ntango ya kala.
2, 3. (a) Engebene lapólo moko, nini ezali ezalela ya basi mingi na mikolo na biso? (b) Mituna nini mizali kotunama?
2 Lelo oyo, kati na bisika mingi ya mokili ezalela yango ebongwani mpenza te. Na mobu 1994, mpo na mbala ya liboso, lapólo ya mbula na mbula na ntina na ntómo ya bato oyo Département d’État ya Etats-Unis epesaka etyaki likebi na lolenge basi bazali kotalelama. Motó ya likambo moko ya moke kati na zulunalo New York Times elobaki ete: “Makambo mazwami na mikili 193 mazali komonisa ete mokolo na mokolo koponapona ezali kosalema.”
3 Lokola ntálo monene ya basi oyo bakólaki kati na bamboka ekeseni bazali koya kati na masangá ya basaleli ya Nzambe na mokili mobimba, mituna misusu mizali kotunama: Lolenge ya kotalela basi oyo emonisami awa ezali oyo Nzambe akanaki mpo na basi? Lolenge nini basi bazalaki kotalelama kati na basaleli ya Yehova ya ntango ya kala? Mpe lolenge nini basi basengeli kotalelama lelo oyo?
“Mosungi mobongi na ye”
4. Yehova alobaki nini nsima wana mobali ya liboso afandaki ye moko kati na elanga ya Edene, bongo Nzambe asalaki nini?
4 Nsima wana Adama azalaki ye moko mpo na mwa ntango kati na elanga ya Edene, Yehova alobaki ete: “Ezali malamu te ete moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi mobongi na ye.” (Genese 2:18) Atako Adama azalaki mobali ya kokoka, azalaki na mposa ya eloko mosusu mpo na kokokisa mokano ya Mozalisi. Mpo na kokokisa mposa yango, Yehova asalaki mwasi mpe abalisaki babalani ya liboso.—Genese 2:21-24.
5. (a) Lolenge nini liloba ya Liebele oyo ebongolami “mosungi” esalelami mbala mingi na bakomi ya Biblia? (b) Nini emonisami na likambo oyo ete Yehova alobelaki mwasi ya liboso ete “abongi na Adama”?
5 Liloba “mosungi mobongi na ye” lizali komonisa ete esika oyo Nzambe apesaki na mwasi ezali ya kokitisa? Ezali bongo te. Bakomi ya Biblia basaleli mbala mingi liloba ya Liebele (ʽeʹzer) oyo ebongolami “mosungi” mpo na kolobela Nzambe. Na ndakisa, Yehova azali “mosungi na biso mpe nguba na biso.” (Nzembo 33:20; Exode 18:4; Deteronome 33:7) Na Hoseya 13:9, Yehova azali komibénga “mosungi” ya Yisraele. Mpo na oyo etali liloba ya Liebele (neʹghedh) oyo ebongolami “mobongi na ye,” nganga-mayele moko ya Biblia alimboli ete: “Lisungi oyo lisɛngami lizali bobele te lisalisi kati na misala ya mokolo na mokolo to kati na kobota bana . . . kasi bosalisani oyo boninga bozali kopesa.”
6. Maloba nini mabimisamaki nsima ya kozalisama ya mwasi, mpe mpo na nini?
6 Na yango, ezali na likambo moko te ya kokitisa wana Yehova azali kolobela mwasi lokola “mosungi mobongi na mobali.” Mwasi asalemaki na makanisi, na maoki mpe na nzoto ekeseni na oyo ya mobali. Ye azalaki ndambo oyo ebongi na mobali. Bakesanaki moko na mosusu, atako bazalaki moko na mposa na mosusu mpo na “kotondisa mokili” na boyokani na mokano ya Mozalisi. Ezalaki mpenza nsima ya kozalisama ya mobali mpe mwasi nde “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe izalaki malamu mingi.”—Genese 1:28, 31.
7, 8. (a) Wana lisumu likɔtaki na Edene, lolenge nini ezalela ya mwasi esimbamaki? (b) Mituna nini mizali kotunama na ntina na kokokisama ya Genese 3:16 kati na basaleli ya Yehova?
7 Na ntango lisumu likɔtaki, makambo mabongwanaki mpo na mobali mpe mwasi. Yehova apesaki etumbu na bango nyonso mibale lokola basumuki. Yehova ayebisaki Eva, kolobeláká likambo oyo ye apesaki yango nzela lokola nde ye moko asalaki yango, ete: “Nakobakisa mpasi na yo na kobota.” Abakisaki ete: “Okobota bana na mpasi, nde okozala na mposa na mobali na yo, mpe ye akozala na bokonzi likoló na yo.” (Genese 3:16) Kobanda ntango wana, mibali mingi basalelaki bokonzi likoló na basi na bango, mbala mingi na lolenge ya mabe. Na esika ete bápesamela motuya lokola basungi babongi, mbala mingi basi batalelamaka lokola bana ya misala mpe baombo.
8 Bongo, kokokisama ya Genese 3:16 ezali na ndimbola nini mpo na basaleli ya Yehova oyo bazali basi? Batikamaki na etɛlɛmɛlo moko ya nsima mpe ya kokitisama? Soko moke te! Kasi ezali boni mpo na masoló ya Biblia oyo mazali kolobela mimeseno mpe makambo matali basi oyo ekoki kondimama te na bamboka mosusu ya ntango na biso?
Tósosola mimeseno milobelami na Biblia
9. Wana tozali kotalela mimeseno mitali basi na ntango ya kala, makambo nini misato tosengeli te kobosana yango?
9 Na ntango ya kala basi batalelamaki malamu kati na basaleli ya Nzambe. Ya solo, wana ezali biso kotalela mimeseno misusu mitali basi na ntango wana, ebongi ete tóbatela makambo mingi kati na makanisi na biso. Ya liboso, atako Biblia ezali kolobela makambo mabe oyo mabimaki mpo na bokonzi epusami na ezaleli ya moimi ya mibali mabe, yango elingi koloba te ete Nzambe andimaki lolenge wana ya kotalela basi. Ya mibale, atako Yehova atikaki nzela na mimeseno misusu kati na basaleli na ye ya ntango ya kala, apesaki mibeko na ntina na yango mpo na kobatela basi. Ya misato, tosengeli kozala na bokɛngi ete tótalela te mimeseno ya kala engebene mitindá ya ntango na biso. Mimeseno misusu oyo mikoki komonana mabe epai na bato oyo bazali na bomoi na ntango na biso mitalelamaki te lokola likambo ya kokitisa basi ya ntango yango. Tótalela mwa bandakisa na yango.
10. Lolenge nini Yehova azalaki kotalela likambo ya kobala basi mingi, mpe nini ezali komonisa ete atikaki soko moke te mobeko na ye na ntina na kozala na mwasi moko?
10 Kobala basi mingi:a Engebene mokano ya Yehova ya ebandeli, mwasi asengelaki te kokabolana mobali na ye elongo na mwasi mosusu. Nzambe asalaki bobele mwasi moko mpo na Adama. (Genese 2:21, 22) Nsima na botomboki kati na Edene, likambo ya kobala basi mingi ebandaki libosoliboso epai na bakitani ya Kaina. Na nsima, ekómaki momeseno mpe endimamaki na basaleli mosusu ya Yehova. (Genese 4:19; 16:1-3; 29:21-28) Atako Yehova apesaki nzela na kobala basi mingi mpe yango esalelamaki mpo na kokólisa motángo ya bato na Yisraele, amonisaki boboto mpo na basi na kopesáká mibeko na ntina na momeseno yango mpo ete basi mpe bana na bango bábatelama. (Exode 21:10, 11; Deteronome 21:15-17) Lisusu, Yehova atikaki soko moke te mobeko na ye ya ebandeli na ntina na kozala na mwasi bobele moko. Noa mpe bana na ye ya mibali, baoyo etindá ya ‘koyikana mpe kotondisa mokili,’ epesamaki lisusu epai na bango bazalaki moto na moto na mwasi bobele moko. (Genese 7:7; 9:1; 2 Petelo 2:5) Nzambe ye moko amimonisaki lokola mobali ya mwasi moko ntango apesaki elilingi ya boyokani na ye elongo na Yisraele. (Yisaya 54:1, 5) Lisusu, na nsima, mobeko ya Nzambe oyo ezalaki na ebandeli na ntina na kozala na mwasi moko ezongisamaki na Yesu Klisto mpe esalelamaki kati na lisangá ya boklisto ya ebandeli.—Matai 19:4-8; 1 Timoté 3:2, 12.
11. Mpo na nini na ntango ya kala bazalaki kopesa mosolo ya moseka, mpe yango ezalaki kokitisa basi?
11 Kofuta mosolo ya moseka: Búku Ancient Israel—Its Life and Institutions (Yisraele ya kala—bomoi mpe bibongiseli na yango) elobi ete: “Mobeko wana ya kopesa mbongo, to eloko oyo ekokani na motuya yango, epai na libota ya elenge mwasi ezali mpenza kopesa na libala ya Yisraele elilingi ya kosomba eloko. Kasi emonani ete [mosolo ya moseka] ezalaki te mpo na kosomba ye, kasi ezalaki nde mbano epesamaki na libota na ye.” (Biso nde totɛngisi.) Na yango kopesa mosolo ya moseka ezalaki nde kozongisela na libota ya mwasi mpo na misala oyo akosalela bango lisusu te mpe mpo na milende mpe mosolo oyo libota na ye ebimisaki mpo na kobɔkɔla ye. Na esika ete ekitisa mwasi, kosala bongo, ezalaki nde kotombola motuya na ye na miso ya libota na ye.—Genese 34:11, 12; Exode 22:16; talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuáli 1989, nkasa 21-24 (na Lifalansé).
12. (a) Lolenge nini kati na Makomami bazalaki mbala mosusu kobénga mibali mpe basi oyo babali, mpe maloba yango mazalaki kofinga basi? (b) Likambo nini lizali kobenda likebi na ntina na maloba oyo Yehova asalelaki na Edene? (Talá maloba na nsé ya paragrafe.)
12 Mibali lokola “Bankolo”: Likambo moko oyo lisalemaki kati na bomoi ya Abalayama mpe Sara penepene na mobu 1918 L.T.B. lizali komonisa ete na ntango na bango ekómaki momeseno ya kotalela mobali oyo abali lokola “nkolo” (na Liebele, baʹʽal) mpe mwasi ya libala lokola ‘mwasi oyo azali na nkolo na ye’ (na Liebele, beʽu·lahʹ). (Genese 20:3) Na yango, na bantango mosusu maloba wana masalelamaki kati na Makomami, mpe eloko moko te emonisi ete basi ya ntango ya liboso ya ntango ya boklisto bazalaki komona yango lokola likambo ya kokitisama.b (Deteronome 22:22, talá Traduction du monde nouveau.) Nzokande, basi ya libala basengelaki te kotalelama lokola biloko. Moto akokaki kosomba, koteka, mpe kosangola biloko to mabelé, kasi ezalaki bongo te mpo na mwasi. Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Ndako mpe bozwi izali libula uta na batata; kasi mwasi na mayele auti na [Yehova].”—Masese 19:14; Deteronome 21:14.
Esika ya lokumu
13. Ntango mibali ya kobanga Nzambe bazalaki kolanda ndakisa ya Yehova mpe batosaki Mibeko na ye, yango epesaki bolamu nini mpo na basi?
13 Bongo, nini ezalaki esika ya basi kati na basaleli ya Nzambe ya kala liboso na ntango ya boklisto? Bazalaki kotalelama lolenge nini? Na mokuse, wana mibali oyo bazalaki kobanga Nzambe balandaki ndakisa ya Yehova mpe batosaki Mibeko na ye, basi bazalaki na lokumu lobongi na bango mpe bazalaki na lotómo mingi mpe na makoki mingi.
14, 15. Bilembeteli nini bizali komonisa ete basi bazalaki kopesamela limemya na Yisraele, mpe mpo na nini Yehova azalaki na lotómo ya komizela ete basaleli na ye oyo bazalaki mibali bápesa basi limemya yango?
14 Basi basengelaki kopesamela limemya. Mibeko ya Nzambe epai na Yisraele misɛngaki ete batata mpe bamama bápesamela limemya. (Exode 20:12; 21:15, 17) Levitike 19:3 elobi ete: “Moto na moto na bino akobanga mama na ye mpe tata na ye.” Ntango Bata-seba akendeki epai na mwana na ye Salomo na libaku moko, “mokonzi atɛlɛmaki mpo na kozwana na ye, akumbamaki liboso na ye” na elembo ya limemya. (1 Mikonzi 2:19) Búku Encyclopaedia Judaica emonisi ete: “Bokokanisi ya esakweli oyo ezali kati na bolingo ya Nzambe mpo na Yisraele mpe bolingo ya mobali mpo na mwasi na ye ekokaki kosalelama bobele esika basi bazalaki kopesamela limemya.”
15 Yehova azali komizela ete basaleli na ye oyo bazali mibali bámemya basi, mpamba te ye moko akomemyaka bango. Bilembeteli na yango bizwami kati na mikapo epai Yehova azali kosalela makambo ya bomoi ya basi lokola elilingi mpe azali kokokanisa maoki na ye na oyo ya basi. (Yisaya 42:14; 49:15; 66:13) Likambo yango lizali kosalisa batángi na kososola lolenge Yehova aokaka. Likambo ya kobenda likebi lizali ete, liloba ya Liebele oyo elimboli “ngɔlu” to “mawa,” oyo Yehova asalelaka mpo na ye moko lizali na boyokani ya penepene elongo na liloba “matrice” mpe ekoki kolobela “maoki ya mama.”—Exode 33:19; Yisaya 54:7.
16. Bandakisa nini ezali komonisa ete toli ya basi ya kobanga Nzambe ezalaki na motuya mingi?
16 Toli ya basi ya kobanga Nzambe etalelamaki na motuya mingi. Na ntango mobali ya kobanga Nzambe Abalayama akakatanaki mpo na kolanda toli ya Sara, mwasi na ye oyo azalaki mwasi ya kobanga Nzambe, Yehova ayebisaki ye ete: “Yoká maloba na ye.” (Genese 21:10-12, NW) Basi Bahiti oyo Esau abalaki “batungisaki Yisaka mpe Lɛbɛka mingi.” Na nsima, Lɛbɛka amonisaki mpasi oyo ye akooka soki mwana na bango Yakobo asengelaki kobala mwasi Mohiti. Yisaka asalaki nini? Lisoló yango lilobi ete, “Yisaka abyangaki Yakobo mpe apambolaki ye mpe alakaki ye ete, Obala mwasi Mokanana te.” Ee, atako Lɛbɛka apesaki toli ya polele te, mobali na ye azwaki ekateli oyo etalelaki mpe maoki na ye. (Genese 26:34, 35; 27:46; 28:1) Ntango mingi na nsima Mokonzi Davidi apekisamaki na kotangisa makila mpamba te ayokaki lilɔmbɔ ya Abigaili.—1 Samwele 25:32-35.
17. Nini ezali komonisa ete basi bazalaki na mwa bokonzi kati na libota?
17 Basi bazalaki na mwa bokonzi kati na libota. Bana balendisamaki ete: “Mwana na ngai, yoká mateyo na tata na yo mpe tiká mibeko na mama na yo te.” (Masese 1:8) Bizaleli ya “mwasi oyo abongi” kati na Masese mokapo 31 bizali komonisa ete mwasi ya libala oyo azali kosala mosala makasi asukaki te bobele na kosala misala ya ndako kasi akokaki lisusu kosomba mabelé, kosala elanga, kosala mwa mombongo, mpe koyebana mpo na maloba na ye ya mayele. Eloko oyo elekaki mosusu nyonso ezalaki ezaleli ya kobanga Yehova oyo mwasi asengelaki kozala na yango. Na ntembe te, mwasi motindo yango “aleki mabángá na penini na motuya”! Mabángá motane ya penini mazalaki kotekisama na motuya mingi mpo na kosala mayaka mpe biloko mosusu ya kokɛmbisa.—Masese 31:10-31.
Basi oyo bazwaki mabaku malamu epai na Nzambe
18. Na lolenge nini mabaku malamu mapesamelaki basi mosusu ya ntango ya kala?
18 Likebi oyo Yehova azali kotya epai na basi emonisamaki kati na lolenge oyo apesaki mabaku malamu epai na basi mosusu ya ntango ya kala. Baanzelu bakendeki epai na Agala, Sara mpe mwasi ya Manoa mpo na koyebisa bango malako euti na Nzambe. (Genese 16:7-12; 18:9-15; Basambisi 13:2-5) Ezalaki na “basáli basi” na mongombo mpe na bayembi basi kati na ndako ya Salomo.—Exode 38:8; 1 Samwele 2:22; Mosakoli 2:8.
19. Na bantango mosusu, Yehova asalelaki basi mpo na komonisa ye na lolenge nini?
19 Mbala mingi kati na lisoló ya Yisraele Yehova asalelaki basi mpo na komonisa ye to mpo na koloba na nkombo na ye. Tozali kotánga na ntina na mosakoli mwasi Debola ete: “Bato na Yisalaele babutaki epai na ye mpo na ekateli.” (Basambisi 4:5) Nsima ya elónga ya Yisraele likoló na mokonzi Yabini mokanana, Debola azwaki mpenza libaku moko kitoko. Emonani polele ete ye asalaki ndambo na loyembo ya kokumisa elónga, oyo na nsima ekómaki eteni ya Liloba lipemami ya Yehova.c (Basambisi, mokapo 5) Bikeke mingi na nsima, mpo na kotuna Yehova, Mokonzi Yosiya atindaki bato elongo na nganga monene epai na mosakoli mwasi Huluda. Na bokonzi nyonso Huluda akokaki koloba ete: “[Yehova] Nzambe na Yisalaele alobi boye.” (2 Mikonzi 22:11-15) Na libaku wana mokonzi apesaki etindá ete bato bákende epai na mosakoli mwasi, kasi yango ezalaki mpo na kotuna Yehova.—Kokanisá na Malaki 2:7.
20. Bandakisa nini ezali komonisa ete Yehova azali komibanzabanza mpo na maoki mpe bolamu ya basi?
20 Komibanzabanza ya Yehova mpo na bolamu ya basi ezali komonana polele kati na bandakisa wana asalaki makambo malamu mpo na basaleli na ye ya basi. Mbala mibale abatelaki Sara, mwasi kitoko ya Abalayama, ete bábebisa ye te. (Genese 12:14-20; 20:1-7) Nzambe amonisaki ngɔlu epai na Lea mwasi oyo Yakobo alingaki mingi te, wana ‘afungolaki libumu na ye’ na boye ete ye abotaki mwana mobali. (Genese 29:31, 32) Ntango basi babotisi mibale ya Yisraele batyaki bomoi na bango na likámá mpo na kobikisa bana mibali ya Baebele na kobomama ya bana na Ezipito, na botɔ́ndi nyonso Yehova “apesaki bango mabota.” (Exode 1:17, 20, 21) Ye ayanolaki mpe na libondeli oyo Hana asalaki na motema na ye mobimba. (1 Samwele 1:10, 20) Mpe ntango mwasi moko oyo akufelaki mobali na ye mosakoli azalaki na mikakatano mpamba te modefisi moko alingaki kokamata bana na ye mpo na nyongo na ye, Yehova atikaki ye te. Na bolingo nyonso, Nzambe apesaki mosakoli Elisé makoki ya koyikanisa mafuta na ye mpo ete ye akoka kofuta nyongo yango. Na yango abatelaki libota na ye mpe lokumu na ye.—Exode 22:22, 23; 2 Mikonzi 4:1-7.
21. Makomami ya Liebele mazali kopesa elilingi nini ya bokatikati na ntina na ezalela oyo basi bazalaki na yango?
21 Na yango, na esika ya kokitisa basi, Makomami ya Liebele mazali komonisa na bosembo nyonso esika na bango kati na basaleli ya Nzambe. Atako Yehova abatelaki te basaleli na ye ya basi na kokokisama ya Genese 3:16, mibali oyo bazalaki kolanda ndakisa ya Yehova mpe bazalaki kotosa Mibeko na ye basalelaki basi na lokumu lobongi na bango mpe na limemya.
22. Na ntango oyo Yesu azalaki na mabelé, lolenge nini ezalela ya basi ebongwanaki, mpe mituna nini mizali kotunama?
22 Na bikeke oyo bilandaki bosukisi ya Makomami ya Liebele, lolenge ya kotalela basi ebongwanaki kati na Bayuda. Na ntango oyo Yesu ayaki awa na mabelé, mitindo ya bateyi ya mangomba misilaki mpenza kopekisa basi mabaku kitoko ya losambo mpe na bomoi na bango kati na bato. Mitindo yango mizalaki na bopusi likoló na lolenge oyo Yesu atalelaki basi? Lolenge nini basi baklisto basengeli kotalelama? Mituna oyo mikoyanolama kati na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Engebene diksionere Webster’s Ninth New Collegiate Dictionary, “polygamy” ezali kolobela “libala oyo kati na yango mwasi moko akoki kobala mibali mingi to mobali moko akoki kobala basi mingi.” Liloba ya sikisiki “polygyny (ndɔngɔ́)” elimbolami lokola “ezalela to momeseno ya kozala na basi mingi na mbala moko.”
b Kati na Makomami ya Liebele mobimba, mibali mpe basi oyo babali balobelami mbala mingi mpenza lokola “mobali” (na Liebele, ʼish) mpe “mwasi” (na Liebele, ʼish·shahʹ). Na ndakisa, na Edene Yehova asalelaki te maloba “nkolo” mpe ‘mwasi oyo azali na nkolo na ye,’ kasi “mobali” mpe “mwasi.” (Genese 2:24; 3:16, 17) Esakweli ya Hoseya ezalaki kosakola ete nsima ya kozonga na boombo, na kobongola motema nyonso Yisraele esengelaki kobénga Yehova “Mobali na ngai,” kasi lisusu te “Nkolo na ngai.” Yango ekoki komonisa ete liloba “mobali” ezalaki na boboto mingi koleka liloba “nkolo.”—Hoseya 2:16.
c Lolenge Debola asaleli liloba je kati na Basambisi 5:7 (NW), ezali mpenza kobenda likebi.
Okopesa eyano nini?
◻ Liloba “mosungi mobongi” lizali komonisa nini na ntina na esika oyo Nzambe apesaki na mwasi?
◻ Wana tozali kotalela mimeseno ya makambo matali basi na ntango ya kala, makambo nini tosengeli kobosana te?
◻ Nini ezali komonisa ete basi bazalaki na esika ya lokumu kati na basaleli ya Nzambe na ntango ya kala?
◻ Mabaku malamu nini Yehova apesaki epai na basi mosusu liboso ya ntango ya boklisto?