Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yoele mpe ya Amosa
NA NTINA na ye moko, ayebisi biso kaka ete azali “Yoele mwana ya Petuele.” (Yoele 1:1) Na mokanda oyo ezali na nkombo na ye, Yoele alobeli mingi kaka nsango na ye; alobeli makambo mosusu mpenza te, ata ntango oyo akomaki mokanda yango eyebani na bosikisiki te; ekoki kozala ete akomaki yango na bambula soki 820 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), nsima ya mbula libwa ya boyangeli ya Uziya na Yuda. Mpo na nini Yoele alobeli makambo na ye moko te? Ekoki kozala ete alingaki kobenda likebi mingi na nsango oyo azwaki kasi te na ye moko.
Lisusu, na ntango ya Uziya, Nzambe apesaki Amosa, oyo azalaki kofanda na Yuda mpe azalaki “mobateli na bibwɛlɛ mpe mopɛtoli ya nzete ya [figi],” mokumba ya kozala mosakoli. (Amosa 7:14) Na bokeseni na Yoele, oyo azalaki kosakola na Yuda, batindaki Amosa na Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi. Mokanda yango oyo esilaki kokomama soki na mobu 804 L.T.B., nsima ya kozonga ya mosakoli Amosa na Yuda, ekomami na elobeli moko ya pɛtɛɛ, kasi ya kitoko.
“MAWA MPO NA MOKOLO YANGO”—MPO NA NINI?
Yoele amoni na emonaneli mbinzo, mayoyo mpe mpɛsɛ ezali kobebisa mokili ya Yuda. Babengi banyama-nkɛkɛ yango “libota monene mpe ya nguya,” mpe “bato ya etumba.” (Yoele 1:4; 2:2-7) Yoele amileli ete “mawa mpo na mokolo yango! Zambi mokolo ya [Yehova] ebɛlɛmi, ezali koya lokola libebisami uta na Oyo-ya-Nguya-Nyonso.” (Yoele 1:15) Yoele apesi bato ya Siona toli oyo: “Bóbongwana epai na ngai na mitema na bino nyonso.” Soki basali bongo, Yehova ‘akoyokela bato na ye mawa’ mpe akotinda nyama-nkɛkɛ yango mosika mpenza “na epai ya likoló [to nɔrdi].” Na yango, liboso mokolo monene na ye eya, Yehova ‘akosopa elimo na ye likoló ya nzoto nyonso,’ mpe ‘akopesa bikamwiseli na likoló mpe na mokili.’—Yoele 2:12, 18-20, 28-31.
Yehova alobi na bikólo boye: “Bótula bitimweli ete bizala mipanga, mpe bikateli ya nzete ete bizala makɔnga” mpe bómibongisa mpo na etumba. Asɛngi bango “bábuta kino lobwaku ya Yosafata,” epai bakosambisama mpe bakobomama. “Kasi Yuda akozala na bafandi . . . kino libota na libota.”—Yoele 3:10, 12, 20.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:15; 2:1, 11, 31; 3:14—“Mokolo ya [Yehova]” ezali nini? Ezali ntango oyo akopesa banguna na ye bitumbu, oyo ekolimbola kobomama mpo na bango, kasi lobiko mpo na basambeli ya solo. Na ndakisa, mokolo ya ndenge wana eyaki na Babilone na mobu 539 L.T.B, ntango Bamede na Baperse balongaki yango. (Yisaya 13:1, 6) ‘Mokolo mosusu ya Yehova’ ekómi pene, ntango akosambisa “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba.—Emoniseli 18:1-4, 21.
2:1-10, 28—Ndenge nini esakweli oyo elobaki ete mokili ya Yuda ekobebisama na banyama-nkɛkɛ ekokisamaki? Biblia elobi ata na esika moko te ete banyama-nkɛkɛ ebebisaki mokili ya Kanana na ndenge moko ya nsɔmɔ ndenge Mokanda ya Yoele elobeli yango. Na yango, emonani ete kobebisama oyo Yoele alobelaki ezalaki maloba ya elilingi oyo esengelaki kokokisama na mobu 33 T.B., ntango Yehova abandaki kosopa elimo na ye likoló ya bayekoli ya liboso ya Yesu mpe babandaki kosakola nsango oyo etungisaki bakonzi ya mangomba ya lokuta. (Misala 2:1, 14-21; 5:27-33) Biso mpe lelo oyo tozali na libaku malamu ya kosangana na mosala yango.
2:32—‘Kobelela nkombo ya Yehova’ elimboli nini? Kobelela nkombo ya Nzambe elimboli koyeba nkombo yango, komemya yango makasi, mpe kotyela nkolo nkombo yango motema.—Baloma 10:13, 14.
3:14—“Lobwaku ya kokata likambo” ezali nini? Ezali esika ya elilingi, epai Yehova akosambisa bato. Na ntango ya Yosafata, mokonzi ya Yuda, oyo nkombo na ye elimboli “Yehova azali mosambisi,” Nzambe asikolaki Yuda na mabɔkɔ ya mabota oyo ezalaki zingazinga na yango mpe atyaki mobulungano kati na basoda ya mabota yango. Yango wana, esika yango ebengami mpe “lobwaku ya Yosafata.” (Yoele 3:2, 12) Na ntango na biso, ezali komonisa esika ya elilingi, epai bikólo ekonyatama lokola ekamwelo ya vinyo.—Emoniseli 19:15.
Mateya mpo na biso:
1:3, 14. Kobongola mpenza motema mpe kondima ete Yehova azali Nzambe ya solo ezali na ntina mpo na kozwa lobiko.
2:12, 13. Kobongola motema ya solo ezali likambo ya motema. Elimboli ‘kopasola mitema na biso,’ kasi te ‘kopasola bilamba.’
2:28-32. Kaka “moto oyo akobelela nkombo ya [Yehova nde] akobika” na “mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya [Yehova].” Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova azali kosopa elimo santu na ye likoló ya bato nyonso: bilenge, mikóló, basi mpe mibali, mpe azali kotinda bango na mosala ya kosakola, elingi koloba, koyebisa “makambo minene ya Nzambe”! (Misala 2:11) Awa mokolo ya Yehova ezali kobɛlɛma, tosengeli te kotonda na “misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe”?—2 Petelo 3:10-12.
3:4-8, 19. Yoele asakolaki ete bikólo oyo ezali zingazinga na Yuda bakozongisa monɔkɔ mpo bamonisaki basaleli ya Nzambe bwale. Esakweli yango ekokisamaki ntango Nebukadanesala, Mokonzi ya Babilone abebisaki engumba Tulo. Na nsima, ntango engumba oyo ezalaki na esanga ekweaki na mabɔkɔ ya Alesandala Monene, ebele ya basoda mpe bato minene na yango babomamaki mpe bato mosusu 30 000 ya esanga batɛkamaki na boombo. Bafilistia mpe banyokwamaki ndenge wana na mabɔkɔ ya Alesandala mpe bakitani na ye. Na ekeke ya minei L.T.B., Edome etikalaki mpamba. (Malaki 1:3) Bisakweli wana oyo ekokisamaki ezali kolendisa kondima na biso ete Yehova azali Mokokisi ya bilaka. Ezali mpe komonisa ndenge oyo Yehova akosala bikólo oyo ezali konyokola basambeli na ye lelo.
3:16-21, NW. “Likoló mpe mabelé ekoningana,” mpe Yehova akopesa bikólo bitumbu. ‘Kasi Yehova akozala ekimelo mpo na bato na ye,’ mpe akopesa bango bomoi ya malamu na paladiso. Lokola mokolo oyo akopesa mokili mabe oyo etumbu ezali kokóma pene, tosengeli te kozala na ekateli makasi ya kotikala penepene na ye?
‘OMIBONGISA MPO NA KOKUTANA NA NZAMBE NA YO’
Amosa azali na nsango mpo na banguna ya Yisalaele oyo bazalaki zingazinga na bango, mpo na Yuda mpe Yisalaele. Libebi esengelaki kokómela Sulia, Filistia, Tulo, Edome mpe Moaba mpo bamonisaki basaleli ya Nzambe mpasi. Etikali moke bato ya Yuda bábebisama mpo ‘baboyaki Mobeko ya [Yehova].’ (Amosa 2:4) Ezali boni mpo na Bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele? Masumu na ye ezalaki kolyela babola, pite mpe konyokola basakoli ya Nzambe. Amosa akebisaki bango ete Yehova ‘akopesa mpe bitumbelo ya Betele etumbu’ mpe ‘akobɛta ndako ya ntango ya mpiɔ mpe ndako ya ntango ya moi makasi.’—Amosa 3:14, 15.
Atako Yehova asilaki kopesa basambeli bikeko wana ya Yisalaele bitumbu ebele, bazalaki kaka matoi mangbongi. Amosa ayebisaki bango ete: ‘Omibongisa mpo na kokutana na Nzambe na yo.’ (Amosa 4:12) Mpo na Bayisalaele, mokolo ya Yehova elimbolaki ‘kokende na boombo na Damasi,’ elingi koloba na Asulia. (Amosa 5:27, NW) Nganga moko ya Betele atɛmɛlaki Amosa, kasi Amosa abangaki te. Yehova ayebisaki Amosa ete: “Nsuka eyei epai na bato na ngai Yisalaele. [Nakokoba kolimbisa bango te, NW].” (Amosa 8:2) Sheole to bangomba milai ekokaki kobikisa bango te na bitumbu ya Nzambe. (Amosa 9:2, 3) Atako bongo, Nzambe alakaki ete bakozonga epai na bango. Alobaki ete: “[Nakozongisa bana na ngai Yisalaele epai na bango, NW] mpe bakotonga mboka ebebisami mpe bakofanda wana. Bakokona [nzete ya vinyo, NW] mpe bakomɛla vinyo na yango; bakokona mpe bilanga mpe bakolya mbuma na yango.”—Amosa 9:14.
Biyano na mituna ya Biblia:
4:1—“[Bangɔmbɛ, NW] basi ya Basana” ezalaki elilingi ya banani? Ngomba molai ya Basana, oyo ezalaki na ɛsti ya Mai ya Galilai, eyebanaki mpo na banyama na yango ya kitokokitoko, ná bangɔmbɛ. Banyama yango ezalaki kitoko mpo matiti ezalaki mingi na esika yango. Amosa akokanisaki basi ya Samalia oyo balingaki lipombo na bangɔmbɛ ya Basana. Na ntembe te, basi yango batyaki “bankolo” to mibali na bango mbamba, mpo bályelaka bato mpamba mpo na kobakisa bomɛngo na bango.
4:6—Maloba “mino ya pɛto” elimboli nini? Lokola maloba yango esalelami esika moko na maloba “Kozanga [mampa, NW],” ekoki kozala ete esalelamaki mpo na kolobela nzala, ntango oyo mino etikalaka pɛto mpo na kozanga bilei.
5:5—Na ndimbola nini Yisalaele ‘esengelaki koluka Betele te’? Yeloboama abimisaki losambo ya ekeko ya ngɔmbɛ na Betele. Banda wana, engumba yango ekómaki esika ya losambo ya lokuta. Gilegale mpe Bele-seba ezalaki mpe bisika ya losambo ya lipɛngwi. Mpo bitumbu oyo elakamaki ekómela bango te, Bayisalaele basengelaki kotika kokende kosambela na bisika wana mpe kobanda koluka Yehova.
7:1—“Biloko ya mokonzi” ezali nini? Ezali biloko oyo basengelaki kopesaka mokonzi mpo na batambwisi-mpunda mpe banyama na ye. Bazalaki kopesa biloko yango ‘na ntango matiti ebandaki kokola lisusu.’ Na nsima, bato bakokaki kobanda kobuka bambuma ya bilanga na bango. Kasi, liboso básala yango, mayoyo eyaki mpe ebebisaki biloko ya bilanga na bango ná banzete mpe matiti mosusu.
8:1, 2—“Ekolo ya mbuma ya ntango ya moi” ezalaki na ndimbola nini? Elimbolaki ete mokolo ya Yehova ekómi pene. Mbuma ya ntango ya moi ebukamaka pene na nsuka ya eleko ya kobuka mbuma, elingi koloba pene na nsuka ya eleko ya bilanga. Lokola Yehova alakisaki Amosa “ekolo ya mbuma ya ntango ya moi,” yango emonisaki ete nsuka ya Yisalaele ekómi pene. Na ndenge yango, Nzambe alobaki na Amosa ete: “Nsuka eyei epai ya bato na ngai Yisalaele. [Nakokoba kolimbisa bango te, NW].”
Mateya mpo na biso:
1:3, 6, 9, 11, 13; 2:1, 4, 6. Yehova alobaki maloba wana mpo na nkanda oyo azalaki na yango mpo na Yisalaele, Yuda mpe bikólo motoba oyo ezalaki zingazinga na bango. Alobaki ete: “Nakopɛngola etumbu na bango te.” Moto moko te akoki kokima bitumbu ya Yehova.—Amosa 9:2-5.
2:12. Tosengeli te koyebisaka babongisi-nzela, bakɛngɛli-batamboli, bamisionɛrɛ, to bandeko oyo basalaka na Betele ete bátika mosala na bango mpo na koluka “bomoi ya malamu.” Tosengeli nde kolendisaka bango bákoba na mosala na bango wana ya malamu.
3:8. Ndenge kaka moto abangaka ntango ayoki nkɔsi ezali konguluma, Amosa amonaki ete asengeli kosakola ntango Yehova alobaki na ye ete: “Kendá, sakwelá bato na ngai Yisalaele.” (Amosa 7:15) Kobanga Nzambe esengeli kotinda biso tózala basakoli ya Bokonzi ya molende.
3:13-15; 5:11. Na lisalisi ya Yehova, Amosa, oyo azalaki moto mpamba mpe mobɔkɔli ya bibwɛlɛ, akokaki ‘kosakwela’ bato ya bomɛngo, oyo bazalaki kosepela na nsango yango te. Ndenge moko, Yehova akoki kopesa biso makoki ya kosakola nsango ya Bokonzi atako tozali na teritware moko ya mpasi.
4:6-11; 5:4, 6, 14. Atako Bayisalaele bazalaki ntango nyonso koboya ‘kozongela Yehova,’ balendisaki bango ete: “Bóluka Yehova mpe bokobika.” Lokola Yehova na motema molai na ye azali kotika mokili mabe oyo ezala naino, biso tosengeli kolendisa baoyo bazali naino na kati ya mokili ete báya epai ya Nzambe.
5:18, 19. ‘Kozala na mposa ya mokolo ya Yehova’ kozanga komibongisa ezali bozoba. Moto oyo azali kosala bongo azali lokola moto oyo azali kokima nkɔsi, kasi akei kokutana na ngombolo, mpe akimi ngombolo, kasi akei kokutana na nyoka mpe nyoka eswi ye. Ekozala malamu ‘tólala mpɔngi te’ na elimo mpe tósɛnzɛlaka ntango nyonso.—Luka 21:36.
7:12-17. Tosengeli kobanga te mpe kozala na mpiko mpo na kosakola nsango malamu.
9:7-10. Atako bazalaki bana ya bato ya sembo ya ntango ya kala mpe ya bato ya Nzambe oyo asikolaki na boombo ya Ezipito, yango epekisaki te Bayisalaele oyo bapɛngwaki kozala na etamboli oyo Nzambe aboyaki lokola oyo ya bana ya Kusi. Nzambe oyo aponaponaka bilongi te andimaka moto te mpo abotamá na libota moko boye, kasi mpo ‘abangaka ye mpe asalaka boyengebene.’—Misala 10:34, 35.
Oyo tosengeli kosala
Mokolo oyo Nzambe akosambisa mokili oyo ya Satana ekómi pene. Nzambe asopeli basambeli na ye elimo na ye mpe apesi bango likoki ya kokebisa bato na koya ya mokolo na ye. Tosengeli te komipesa na kosalisa basusu mpo báyeba Yehova mpe ‘bábelela nkombo na ye’?—Yoele 2:31, 32.
Amosa alendisi bango ete: “Bóyina mabe mpe bólinga malamu, bóbongisa kosambisa-sembo kati na ekuke.” (Amosa 5:15) Lokola mokolo ya Yehova ezali kokóma pene, ekozala malamu tópusana penepene na Nzambe mpe tókabwana na mokili oyo mabe ná etamboli na yango ya mbindo. Mpo na kokokisa mokano wana, tokoki kozwa mateya oyo ebongi mpenza na Mokanda ya Yoele mpe oyo ya Amosa!—Baebele 4:12.
[Elilingi na lokasa 12]
Yoele asakolaki ete: “Mokolo ya Yehova ebɛlɛmi!”
[Bililingi na lokasa 15]
Lokola Amosa, tosengeli kozala basakoli ya molende mpe ya mpiko ya nsango ya Nzambe