“Yesu Klisto azali Nkolo”—Lolenge nini mpe ntango nini?
“NKOLO alobaki na Nkolo na ngai, Fandá na yo na lobɔkɔ na ngai ya mobali, kino nakotya bayini na yo lokola etɛmɛlɔ ya makolo na yo.” Oyo ezali lolenge Nzembo 110:1 ebongolami engebene King James Version. Nani azali “NKOLO” oyo alobelami awa, mpe azali koloba na nani?
Tokoki koyanola nokinoki na motuna ya liboso na kotaleláká libongoli ya sikisiki ya makomi ya Liebele. “[Yehova] alobelaki Nkolo na ngai ete: . . . ” “NKOLO” azali bongo Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, Yehova ye moko. Atako libongoli ya King James Version endimi nkombo ya Nzambe na kosaleláká balɛtɛ́lɛ ya minene “NKOLO” mpo na kokesenisa yango na “Nkolo”, ezalaki mbala ya yambo te ya kokutana na mobulungano na ntina na bibéngeli wana, mpamba te libongoli La Septante ya Greke ya kala, oyo libongolamaki uta na Liebele, lisalelaki “Nkolo” kati na bakopi na yango ya nsima. Mpo na nini? Mpo ete biyambayamba ya Bayuda bibombaki balɛtɛ́lɛ minei ya Tétragramme ( יהוה), oyo ezali nkombo ya Nzambe, mpe ekitanyaki yango na ebéngeli “Nkolo.” Moto ya mayele A. E. Garvie alobi ete: “Kosalela ebéngeli Nkolo [kyʹri·os] ekoki mbala mosusu kolimbolama kozanga mpasi uta kosalelama ya ebéngeli yango kati na biyanganelo ya Bayuda na esika ya kosalela nkombo ya kondimana Yahveh [Yehova], wana Makomami mazalaki kotángama.”
Biblia ezali komonisa Yehova lokola “Nkolo Moyangeli.” (Genese 15:2, 8; Misala 4:24; Emoniseli 6:10) Abéngami lisusu ete “Nkolo ya solo” mpe “Nkolo na mokili mobimba.” (Esode 23:17; Yosua 3:13; Emɔnisɛli 11:4) Bongo, nani azali “Nkolo” mosusu oyo alobelami na Nzembo 110:1, mpe lolenge nini ayaki kondimama na Yehova lokola “Nkolo?”
Yesu Klisto lokola “Nkolo”
Yesu abéngami “Nkolo” kati na Baevanzile minei, mbala mingi mpenza kati na Luka mpe Yoane. Na ekeke ya liboso T.B., ebéngeli wana ezalaki ya limemya mpe ya bonkondé, lokola “Monsieur.” (Yoane 12:21; 20:15, Kingdom Interlinear) Kati na Evanzile ya Malako liloba “Moteyi,” to Rab·boʹni, esalelami mingi koleka “Nkolo” mpo na kolobela Yesu. (Kokanisá Malako 10:51 na Luka 18:41.) Ata motuna ya Saulo na nzela ya Damaseke, ete: “Yɔ nani, Nkolo?” ezalaki na ndimbola bobele moko oyo eyebanaki na bato nyonso mpo na kotuna motuna na bonkondé nyonso. (Misala 9:5) Kasi ntango bayekoli na Yesu bakómaki koyeba Molakisi na bango, ezali polele ete esaleli na bango ya ebéngeli “Nkolo” ekómaki na ndimbola mozindo koleka oyo ya limemya.
Nsima ya kufa mpe ya lisekwa na ye mpe liboso na komata na ye na likoló, Yesu abimelaki bayekoli na ye mpe ayebisaki bango likambo oyo ya kokamwisa ete: “Bokonji yɔnsɔ esili kopɛsama na ngai na likolo mpe na nse.” (Matai 28:18) Na nsima, na mokolo ya Pantekote, na nsé ya bopusi ya elimo santu oyo esopamelaki bango, Petelo atángaki Nzembo 110:1 mpe alobaki ete: “Na bongo tika ete libota mobimba na Yisalaele bayeba sɔlɔ ete Njambe ajalisi ye Nkolo mpe Klisto, ye Yesu oyo [bokakisaki na nzeté, NW].” (Misala 2:34-36) Na ntina na bosembo na ye kino kufa ya nsoni likoló na nzeté ya mpasi, Yesu asekwisamaki mpe apesamelaki mbano oyo eleki monene. Akɔtaki bongo kati na bonkolo na ye na makoló.
Ntoma Paulo andimisaki maloba ya Petelo wana akomaki ete Nzambe “[afandisi, NW] ye [klisto] na lobɔkɔ na ye na mobali na bisika na likolo, mosika likolo na lokumu mpe bokonji mpe nguya mpe bankolo yɔnsɔ mpe likolo na nkombo yɔnsɔ oyo ikolobama bobɛlɛ na ntango oyo tɛ kasi na ntango ekoya lokola.” (Baɛfɛsɛ 1: 20, 21) Bonkolo ya Yesu Klisto etombwami likoló na bonkolo nyonso mosusu, mpe ekolandana kino na mokili ya sika. (1 Timoté 6:15) Atombwamaki “mingi” mpe apesameli “nkombo koleka nkombo mosusu nyonso” ete moto nyonso ayambola ete “Yesu Klisto ajali Nkolo mpɔ na nkembɔ na Njambe Tata.” (Bafilipi 2:9-11) Na yango, eteni ya liboso ya Nzembo 110:1 ekokanaki, mpe “baanze mpe bakonzi mpe bato na nguya” batyamaki na nsé na bonkolo ya Yesu.—1 Petelo 3:22, NW; Baebele 8:1.
Kati na Makomami ya Liebele, maloba “Nkolo na bankolo” masalelami bobele mpo na Yehova. (Deteronome 10:17; Nzembo 136:2, 3) Kasi, Petelo wana apemamaki na elimo na Nzambe alobelaki Klisto Yesu ete: “Ye wana Nkolo na yɔnsɔ [to, “Nkolo na biso banso,” Goodspeed],” (Misala 10:36) Ye azali solo “Nkolo na bakufi mpe na bato na bomɔi lokola.” (Baloma 14:8, 9) Baklisto bazali kondima mpenza Yesu Klisto lokola Nkolo na bango mpe bazali komitalela ete bazali bato na ye mpe bazali kotosa ye na bolingo na bango mpenza lokola bayangelami na ye, baoyo basombami na makila na ye ya motuya mingi. Mpe Yesu Klisto azali koyangela lokola Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo likoló na lisangá na ye kobanda Pantekote ya mobu 33 T.B. Kasi sikawa, uta 1914, asili kotyama mokonzi mpe asili kobanda koyangela, wana bayini na ye batyamaki lokola ‘etɛmɛlo na makolo na ye.’ Ntango esikalaki kokoka mpo na ye na ‘kozala na bokonzi kati na bayini na ye,’ nyonso wana mpo na kokokisama ya Nzembo 110:1, 2.—Baebele 2:5-8; Emoniseli 17:14; 19:16.
Bongo, lolenge nini esengeli kososola maloba oyo ya Yesu ete “makambo yɔnsɔ mapɛsami na ngai na Tata na ngai,” oyo alobaki yango liboso na kufa mpe lisekwa na ye? (Matai 11:25-27; Luka 10:21, 22) Oyo ezali moko na maloba minene te lokola oyo touti kolobela. Kati na Matai mpe Luka, maloba ya zingazinga mamonisi ete Yesu azalaki kolobela boyebi oyo ebombami na bato ya bwanya ya mokili oyo mpe emonisami na nzela na ye mpo ete ye “ayebi mpenza” soko Tata azali nani. Ntango azwaki batisimo kati na mai mpe abotamaki lokola Mwana na Nzambe ya elimo, Yesu azalaki na makoki ya komikundola bomoi na ye ya kala kati na makoló elongo na boyebi nyonso oyo ekangisami na yango, kasi likambo yango ekeseneki na bonkolo oyo alingaki kozwa nsima.—Yoane 3:34, 35.
Kokesenisa Yesu Klisto lokola Nkolo
Mabongoli mosusu ya Makomami ya Greke ya boklisto mazali kobimisa mikakatano wana esengeli kobongola maloba matángami na Makomami ya Liebele oyo mazali kolobela polele “NKOLO,” Yehova Nzambe. Kokanisá, na ndakisa, Luka 4:19 na Yisaya 61:2 na Biblia ya Lifalansé Traduction Œcuménique de la Bible. Bato mosusu bazali koloba ete Yesu azwaki ebéngeli “Nkolo” na esika ya Yehova mpe ete Yesu kati na mosuni azalaki mpenza Yehova, kasi likanisi motindo yango lindimami soko moke te na Makomami. Yehova Nzambe mpe Mwana na ye, Yesu Klisto, bakesenisami ntango nyonso polele moko na mosusu kati na Makomami. Yesu ayebisaki nkombo ya Tata na ye mpe azalaki momonisi na ye.—Yoane 5:36, 37.
Kati na bandakisa oyo elandi, talá maloba mauti na Makomami ya Liebele lolenge mazali komonana kati na Makomami ya Greke. Yehova Nzambe mpe Mopakolami na ye, to Masiya, balobelami kati na Misala 4:24-27, oyo atángi Nzembo 2:1, 2. Maloba ya zingazinga ya Baloma 11:33, 34 mazali kolobela polele Nzambe, Eutelo ya bwanya mpe ya boyebi, oyo elobelamaki na Yisaya 40:13, 14. Wana akomelaki lisangá ya Kolinti, Paulo azongelaki maloba yango oyo matángamaki ete, “‘Jambi nani ayebi makanisi na [Yehova]?’” mpe na nsima alandisi ete: “Kasi biso tojali na makanisi na Klisto.” Nkolo Yesu amonisaki makanisi ya Yehova epai na bayekoli na ye kati na makambo mingi ya ntina.—1 Bakɔlinti 2:16.
Mbala mosusu mikapo ya Makomami ya Liebele oyo mizali kolobela Yehova, mikokisami epai na Yesu Klisto, na ntina na mokumba mpe bokonzi oyo Yehova apesi na ye. Na ndakisa, Njembo 34:8 ezali kobyanga biso ete “meka mpe sɔsɔla ete [Yehova] ajali malamu.” Kasi Petelo asaleli yango epai na Nkolo Yesu Klisto wana alobi ete: “Sɔkɔ na sɔlɔ bosili kosɔsɔla ete Nkolo ajali na boboto.” (1 Pɛtɛlɔ 2:3) Petelo akamati etindá moko mpe amonisi lolenge nini yango ezali kosalelama epai na Yesu Klisto. Na koyekoláká koyeba Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto mpe kosala engebene boyebi yango, baklisto bakoki kozwa mapamboli mingi uta na Tata mpe na Mwana na ye. (Yoane 17:3) Lolenge oyo Petelo asaleli maloba wana mazali kokómisa Yehova Nzambe mpe Nkolo Yesu Klisto moto moko te.—Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na 1 Petelo 2:3, na Libongoli ya Mokili ya Sika, ebimeli ya Lingelesi.
Etɛmɛlo oyo emonisi esika ya Yehova Nzambe mpe ya Mwana na ye Yesu Klisto, emonisami polele wana Ntoma Paulo alobi ete: “Njambe mɔkɔ ajali, ye Tata; bilɔkɔ yɔnsɔ bijalisamaki na ye, biso mpe tojali uta na ye. Mpe Nkolo mɔkɔ ajali, ye Yesu Klisto; bilɔkɔ yɔnsɔ bijalisamaki [na nzela na ye mpe biso tozalisamaki na nzela na ye, NW].” (1 Bakɔlinti 8:6; 12:5, 6) Ntango akomelaki lisangá ya Efese, Paulo amonisaki “Nkolo mɔkɔ,” Yesu Klisto, lokola moto oyo akeseni mpenza na “Njambe mɔkɔ, ye oyo ajali Tata na yɔnsɔ.”—Baefese 4:5, 6.
Yehova azali likoló na nyonso
Uta mobu 1914, maloba ya Emoniseli 11:15 makokanaki solo: “Bokonji ya mokili oyo esili kokoma bokonji na Nkolo na biso [Yehova Nzambe] mpe na Klisto na ye, mpe akojala mokonji libela na libela.” Búku The New International Dictionary of New Testament Theology (Diksionere ya sika ya Teoloji ya Kondimana ya Sika mpo na mikili mingi) (Volimi 2, lokasa 514) elobi ete: “Wana Klisto asili kolónga nguya nyonso (1 Kol. 15:25), akomikitisa ye moko na nsé ya Nzambe Tata. Na yango, bonkolo ya Yesu ekosila kokokisa mokano na yango mpe Nzambe akozala nyonso kati na nyonso (1 Kol. 15:28).” Na nsuka ya Boyangeli na ye ya Mbula Nkóto, Klisto Yesu akozongisa nguya mpe bokonzi oyo epesamaki na ye epai na Tata na ye, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Na yango, nkembo mpe losambo nyonso ekopesama na lolenge lobongi epai na Yehova, “Njambe na Nkolo na biso Yesu Klisto.”—Baɛfɛsɛ 1:17.
Atako Yesu azali sikawa Nkolo na bankolo, abéngami soko moke te ete Nzambe na banzambe. Yehova azali ntango nyonso likoló na nyonso. Na lolenge yango, Yehova akozala “yɔnsɔ kati na bato yɔnsɔ.” (1 Bakɔlinti 15:28) Bonkolo na Yesu epesi ye lotómo ya kozala Motó ya lisangá ya boklisto. Atako tokoki komona “bankolo” mingi ya nguya kati na bisika bitombwami ya mokili oyo, tozali kobatela elikya na biso kati na ye oyo azali Nkolo na bankolo. Nzokande, kati na etɛmɛlo na ye oyo etombwami, azali ntango nyonso na nsé ya Tata na ye, “ete Nzambe ázala Mokonzi wa bikelámo bínso.” (1 Bakolinti 15:28, Liloba ya Nzambe.) Oyo nde ndakisa kitoko ya komikitisa Yesu atikeli bayekoli na ye ete bálanda, baoyo bazali kondima ye lokola Nkolo na bango!
[Etanda na lokasa 30]
“Wana bakomi ya Kondimana ya Sika bazali kolobela Nzambe balingi komonisa Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto. Wana bazali kolobela Yesu Klisto, bazali koloba te ete azali Nzambe, mpe bazali kokanisa te ete azali Nzambe. Azali Klisto ya Nzambe, Mwana ya Nzambe, Bwanya ya Nzambe, Liloba ya Nzambe. Ata maloba ya ebandeli ya Evanzile ya Santu Yoane, oyo makomamaki penepene na eleko ya Liteya ya engumba Nice, masengeli kotángama na kotalela Evanzile na mobimba na yango oyo emonisi Yesu na nsé ya Nzambe; mpe Maloba ya ebandeli mazali mpenza na ndimbola ya kondimisa makasi te na Greke epai basaleli liloba ya komonisa ezaleli [the·osʹ], lokola ezali komonana na Lingelesi.”—“The Divinity of Jesus Christ,” ya John Martin Creed.