Mokanda ya Biblia nimero 30—Amosa
Mokomi: Amosa
Esika ya bokomi: Yuda
Nsuka ya bokomi: soko 804 L.T.B.
1. Amosa azalaki nani?
AZALAKI mosakoli te soko mpe mwana na mosakoli te, kasi mobɔkɔli na mpate mpe mopɛtoli na figi to misuke na nzeté ya sikomore—moto yango ezalaki bongo Amosa ntango Yehova abyangaki ye mpe atindaki ye mpo na kosakola bobele na libota na ye ya Yuda te, kasi mingimingi epai na bokonzi ya Yisalaele oyo ezalaki na nɔ́rdi. Azalaki moko kati na basakoli oyo balobelami na 2 Mikonzi 17:13, 22, 23. Autaki na Tekoa kati na Yuda, soko bakilomɛtɛlɛ zomi na motoba na súdi ya Yelusaleme mpe soko kotambola ya mokolo mobimba longwa na ndelo ya súdi ya bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele.—Amo. 1:1; 7:14, 15.
2. Lolenge nini tokoki koyeba ntango oyo esakweli ya Amosa epesamaki?
2 Vɛrsɛ́ ya ebandeli ya esakweli na ye elobi ete ezalaki na boumeli ya mikolo ya Uziya, mokonzi ya Yuda mpe ya Yelobama II, mwana ya Yoasa, mokonzi na Yisalaele, nde abandaki mosala na ye lokola mosakoli, mbula mibale liboso ya koningana monene ya mabelé oyo esalemaki. Yango emonisi ete esakweli elobeli makambo masalemaki na boumeli ya mbula 26 kobanda na mobu 829 kino mobu 804 L.T.B., elingi koloba na boumeli ya boyangeli ya bakonzi wana mibale. Mosakoli Zekalia alobeli koningana monene ya mabelé oyo esalemaki na mikolo ya Uziya, na ntango oyo bato bakimaki na ntina na kobanga. (Zek. 14:5) Josèphe, mokomi na lisoló ya Bayuda, alobi ete koningana ya mabelé esalemaki na ntango Uziya amekaki na lolendo nyonso kopesa mpaka ya malasi kati na tempelo. Nzokande, emonani ete koningana ya mabelé oyo Amosa alobeli esalemaki liboso na boyangeli ya Uziya.
3. (a) Mpo na nini nsango ya mawa oyo esakolamaki na Amosa ebongaki mpenza na ntango wana? (b) Lolenge nini akumisaki lotómo oyo Yehova azali na yango ya kozala mokonzi?
3 Nkombo Amosa elimboli “Kozala bozito” to “Komema bozito.” Atako azalaki komema nsango ya bozito ya mawa mpo na Yisalaele mpe Yuda (mpe lisusu mpo na ebele ya mabota ya bapakano), azalaki mpe komema nsango ya kobɔndisa na ntina na kobongisama lisusu ya libota ya Yehova. Ntina mpenza ezalaki ya kosakola nsango ya bozito ya mawa kati na Yisalaele. Bozwi, bomoi ya bisengo, mpe etamboli ya mbindo ezalaki makambo malobelamaki kati na nsango yango. Bato babosanaki Mobeko ya Yehova. Bozwi na bango ya lokuta ezipaki bango miso kino bayebaki te ete lokola mbuma oyo ekɔmeli mingi, basilaki kokóma pene na kopɔla oyo ekomema bango kino na libebi. Amosa asakolaki ete bobele nsima na mwa bambula, bokonzi ya mabota zomi esengelaki komemama na boombo mosika na Damaseke. Na bongo, akumisaki boyengebene mpe lotómo oyo Yehova azali na yango ya kozala mokonzi, alobeli Yehova mbala 21 lokola “Nkolo Mokonzi.”—Amo. 1:8, NW.
4. Bosolo ya mokanda ya Amosa emonisami na kokokisama ya bisakweli nini?
4 Kokokisama ya esakweli oyo mpe ya bisakweli mosusu emonisi bosolo ya mokanda ya Amosa. Mosakoli asakolaki mpe ete mabota ya banguna oyo mazalaki zingazinga na Yisalaele—Basulia, Bafilisitia, Batulo, Baedome, Baamona, mpe Bamoaba—bango nyonso bakobomama na mɔ́tɔ ya libebi. Lisoló ya bato lindimisi ete moko na moko na bisika makasi wana ya banguna bikweisamaki. Etamboli ya Yuda mpe Yisalaele ezalaki kútu mabe mingi koleka mpamba te batikaki Yehova mpo na kosalela losambo ya lokuta. Esika makasi ya nsuka ya Yisalaele, engumba ekembisamaki ya Samalia, nsima ya kozingelama na mampinga ya Asulia oyo matambwisamaki na Salamanesele V, ekweaki na mobu 740 L.T.B. (2 Mik. 17:1-6) Yuda ezwaki liteya te na makambo oyo makómelaki libota oyo lizalaki ndeko na ye ya mwasi, na bongo yango mpe ebebisamaki na mobu 607 L.T.B.
5. Lolenge nini arkeoloji endimisi makambo oyo mazali kati mokanda ya Amosa?
5 Amosa akweisaki Yisalaele na ntina na bomoi na yango ya bisengo, mpamba te bazwi bazalaki kobɔtɔla babólá biloko mpo na kotonga “ndako na mpɛmbɛ na nzoku,” kati na yango bazalaki komela vinyo mpe kolya na lokoso nyonso. (Amo. 3:15; 5:11, 12; 6:4-7) Bakundoli na biloko ya kala basili komona bilembeteli ya bozwi yango. Biloko mingi oyo bisalemaki na mpɛmbɛ ya nzoku ekundolamaki na mabulu ya Samalia. Búku Encyclopedia of Archaeological Excavations in the Holy Land elobi ete: “Lolenge mibale ya biloko ya ntina ekoki kokesenisama: 1. Bitánda oyo bizali na mayemi ya makasi, . . . 2. Bitánda oyo bizali na mayemi ya makasi te, mpe ikɛmbisami na elilingi ya mabanga ya ntalo, na talatálá ya lángi, mpe na mompanga ya wolo, mpe bongo na bongo. . . . Mpɛmbɛ ya nzoku italelami lokola biloko oyo biuti na ntɔ́ki ya Foenike, mpe esalelamaki mbala mosusu lokola ekɛmbiseli ya biloko oyo bizalaki na ndako ya bakonzi ya Yisalaele. Biblia elobeli ‘ndako ya mpɛmbɛ na nzoku’ oyo Ahaba atongaki (1 Mik. 22:39) mpe ‘mbeto ya mpɛmbɛ na nzoku,’ oyo emonisi bomoi ya bisengo oyo ezalaki na Samalia engebene maloba ya kopamela oyo Amosa abimisaki (6:4).”a
6. Nini ezali mpenza komonisa bosolo ya mokanda ya Amosa?
6 Ntembe ezali te ete mokanda ya Amosa ezali kati na kanɔ́ ya Biblia. Bosolo na yango emonisami na bavɛrsɛ́ misato etángamaki na Setefano na Misala 7:42, 43 mpe na lolenge Yakobo atángaki maloba ya mokanda oyo na Misala 15:15-18.—Amo. 5:25-27; 9:11, 12.
MAKAMBO MAZALI KATI NA AMOSA
7. Mabota nini Amosa akebisi na ntina na kosambisama na Yehova?
7 Kosambisama ya mabota (1:1–2:3). “[Yehova]—akongala longwa na Siona.” (1:2) Amosa abandi kokebisa mabota na ntina na kosambisama monene na Ye. Damaseke (Sulia) esili kotuta Gileadi na bitutelo ya bibendé. Gaza (Filisitia) mpe Tulo basili kotɛkisa Bayisalaele na boombo epai na Edome. Edome yango moko ezali na motema mawa te mpe na bolingo mpo na bandeko te. Amona esili kobundisa Gileadi. Moaba esili kotumba mikuwa ya mokonzi ya Edome mpo ete ikóma bobele mputulu mpo na kosala mpɛmbɛ (chaux). Lobɔkɔ ya Yehova etɛmɛli mabota oyo nyonso, mpe alobi ete: “Nakopɛngola etumbu na bango te.”—1:3, 6, 8, 9, 11, 13; 2:1.
8. Mpo na nini kosambisama na Yehova esakolami mpe na ntina na Yuda mpe Yisalaele?
8 Kosambisama ya Yuda mpe Yisalaele (2:4-16). Yehova akolongola nkanda na ye epai na Yuda te. Basalaki mabe mpo “baboyi Mobeko na [Yehova].” (2:4) Ezali boni mpo na Yisalaele? Yehova asilisaki bilombe Baamola mpo na bango mpe apesaki bango mokili ya malamu. Abimisaki Banasili mpe basakoli kati na bango, kasi bapusaki Banasili ete bábuka ndai na bango mpe bapesaki etindá na basakoli ete: “Sakolá te”! (2:12) Na yango Yehova azali kotetemisa miboko na bango lokola likalo litondi na bibimba na masangu. Ezala bato na bango ya nguya, bakokima bolumbu.
9. Nini emonisi ete Yehova nde asilaki koloba, mpe na ntina na nani Amosa azali mpenza kosakola?
9 Yisalaele ekozongisa monɔkɔ (3:1–6:14). Na kosaleláká bandakisa ya kosimba motema, Amosa azali komonisa polele ete likambo oyo ye azali kosakola, ezali yango nde Yehova asili koloba. “Nkolo [Mokonzi Yehova] akosala likambo te bobele ete akoyebisa mwango na ye epai na baombo na ye, bango basakoli. . . . Nkolo [Mokonzi Yehova] alobi, nani akosakola te?” (3:7, 8) Amosa azali kosakola mpenza na ntina na bapunzi, balingi-bisengo, oyo bafandi na Samalia. Yehova akolongola bango na mbeto na bango ya motuya, mpe bandako na bango ya mpɛmbɛ ya nzoku ikobebisama.
10. Yehova akundweli Yisalaele likambo nini, mpe mokolo ya mawa nini esengeli koya?
10 Yehova alobeli lisusu bitumbu mpe kosembolama oyo apesaki na Yisalaele. Mbala mitano akundweli bango ete: “Bobutwi epai na ngai te.” Na yango, ɛ Yisalaele, “omibongisa mpo na kozwana na Nzambe na yo.” (4:6-12) Amosa abandi bileli ya esakweli: “Moseka na Yisalaele akwei, akotɛlɛma lisusu te; abwakami na mabelé na ye, moto mpo na kotombola ye azali te.” (5:2) Nzokande, Yehova, Mokeli na makambo ya kokamwa na likoló mpe na mabelé, akóbi kobyanga Yisalaele ete eluka ye mpe ekóba kozala na bomoi. Ɛɛ, “bóluka malamu, bóluka mabe te, ete bóbika.” (5:4, 6, 14) Kasi mokolo ya Yehova ekolimbola nini mpo na bango? Ekozala mokolo ya mawa. Lokola na ebale na ntango ya mpela, yango ekomema bango kino na boombo mosika na Damaseke, mpe bandako na bango oyo ikɛmbisami na mpɛmbɛ ya nzoku na bilambo na bango ya mbindo ikokóma bandako ebukanibukani mpe ya bitenibiteni.
11. Na lotómo ya nani Amosa azali kosakola na ntina na Yisalaele?
11 Amosa asakoli atako botɛmɛli (7:1-17). Yehova amonisi mosakoli na ye nivo oyo etyami katikati na Yisalaele. Kolimbisama ekozala lisusu te. Akobebisa bisika ya bulɛɛ na Yisalaele mpe akotɛmɛla ndako na Yelobama II na mompanga. Amasia, nganga ya Betele, atindeli Yelobama maloba ete: “Amosa asili koyangela yo mwango.” (7:10) Amasia ayebisi Amosa ete akende na Yuda mpo na kosakola kuna. Amosa amonisi polele lotómo oyo azali na yango, na kolobáká ete: “[Yehova] akamataki ngai nsima na bitongá, mpe [Yehova] alobaki na ngai ete, Kendá, sakwelá bato na ngai Yisalaele.” (7:15) Na nsima, Amosa asakoli bampasi oyo ekokwela Amasia mpe ndako na ye.
12. Nzala nini esakolami mpo na Yisalaele, kasi esakweli esuki na elaka kitoko nini?
12 Monyoko, etumbu, mpe kobongisama lisusu (8:1–9:15). Yehova amonisi Amosa ekɔlɔ ya mbuma na ntango na moi. Akweisi monyoko oyo Yisalaele azali komonisa babólá mpe akati ndai “na nkembo na Yakobo” ete basengeli kolela na ntina na misala mabe na bango. ‘Nkolo Mokonzi Yehova alobi ete, Talá, mikolo ikoya wana nakotinda nzala kati na mokili. Ekozala nzala na limpa te, kozanga na mai mpe te; ekozala nzala na koyoka maloba na Yehova.’ (8:7, 11) Bakokwea mpe bakotɛlɛma lisusu te. Ata soki bakotimola na nsé kati na Sheol to bakomata kino na makoló, lobɔkɔ ya Yehova ekokamata bango. Basumuki kati na bato na ye bakobomama na mompanga. Na nsima, apesi elaka moko ya kosepelisa! “Na mokolo yango nakotɛlɛmisa ndako na Davidi oyo esili kokwea, mpe nakozipa mpota na yango; . . . mpe nakotonga yango lokola na mikolo na kala.” (9:11) Na bongo, bakangami oyo bakoyanganisama lisusu bakokóma na bozwi mingi na boye ete motimoli akoya liboso ete mobuki akoka koyanganisa mbuma kitoko na ye. Mapamboli wana oyo mauti na Yehova makozala mpo na libela!
LITOMBA NA YANGO
13. Lolenge nini tokoki kozwa litomba lelo oyo na makebisi ya Amosa?
13 Batángi ya Biblia bakoki lelo oyo kozwa litomba na kososoláká ntina ya makebisi oyo Amosa asakolaki epai na Yisalaele, Yuda, mpe mabota oyo mazalaki zingazinga na yango. Baoyo bazali kobwaka mobeko ya Yehova, bazali kobuba mpe konyokola babólá, bazali na lokoso mpe na etamboli ya mbindo, mpe bazali kosambela bikeko; bakoki te kondimama epai na Yehova. Kasi Yehova alimbisaka baoyo bazali kotika makambo wana mpe bazali kobongola motema, mpe epai na bango azali komonisa motema mawa. Tokomonisa ete tozali bato na mayele soki tomikaboli na baninga ya mbindo kati na mokili mabe oyo mpe soki tozali kolanda toli oyo ya Yehova: “Luká ngai mpe bokobika.”—5:4, 6, 14.
14. Bayuda ya ntango na Setefano bazwaki mpenza litomba na makebisi mazwami na mokanda ya Amosa?
14 Na ntango oyo abomamaki lokola martíru, Setefano atángaki Amosa. Akundwelaki Bayuda ete ezalaki losambo ya bikeko oyo Yisalaele emipesaki na banzambe ya bapaya, lokola Molɛkɛ mpe Lefana, nde ememaki bango na boombo. Bayuda wana bazwaki litomba na koyokáká maloba ya Amosa oyo mazongelamaki? Te! Lokola batondaki na nkanda, babomaki Setefano na mabanga, na bongo bamonisaki ete babongi kozwa likámá ya libebi oyo ekwelaki Yelusaleme na mobu 70 T.B.—Amo. 5:25-27; Mis. 7:42, 43.
15. Bisakweli nini bitali kobongisama lisusu bibongi kotalelama?
15 Ezali na litomba kotalela kokokisama ya bisakweli mingi ya Amosa, ezali te bobele oyo ekokisamaki na nzela ya bitumbu oyo bipesamaki na Yisalaele, Yuda, mpe na mabota mosusu, kasi mpe bisakweli oyo bitali kobongisama lisusu. Mpo na komonisa bosolo ya maloba ya Yehova na nzela ya Amosa, bakangami ya Yisalaele bazongaki na mobu 537 L.T.B. mpo na kotonga mpe kofanda na bingumba na bango oyo bitikalaki mpamba mpe kolóna miwiti na bango mpe kosala bilanga.—Amo. 9:14; Ezl. 3:1.
16. Lolenge nini Yakobo amonisaki kokokisama ya Amosa 9:11, 12 na kotalela lisangá ya boklisto?
16 Nzokande, kokokisama ya nkembo mpe ya kobɔndisa ya esakweli ya Amosa esalemaki na mikolo ya bantoma. Wana ezali ye kolobela koyanganisama ya bato oyo bazalaki Bayuda te kati na lisangá ya boklisto, Yakobo, na kopemama na Nzambe, amonisi polele ete likambo yango lisilaki kosakolama kati na esakweli oyo ezali na Amosa 9:11, 12. Amonisi ete ‘kotongama lisusu ya ndako ya Davidi oyo esilaki kokwea’ ezwi kokokisama na yango na lisangá ya boklisto, “na ntina ete bato nyonso mosusu bálukaka [Yehova], bobele bapakano nyonso baoyo nkombo na ngai esili kobyangama na likoló na bango, [Yehova alobi bongo, NW].” Ya solo, maloba oyo mazalaki moboko ya Makomami mpo na oyo etali likambo ya sika, lokola Simeona Petelo amonisaki yango—ete Nzambe azalaki kokamata longwa na mabota “bato mpo na nkombo na ye.”—Mis. 15:13-19.
17. Bolamu nini mpe makambo nini makoumela libela na libela Amosa asakoli na boyokani na Bokonzi ya Nzambe?
17 Yesu Klisto, Mokonzi ya lisangá wana ya boklisto, amonisami lisusu lokola “mwana na Davidi” oyo asangoli “kiti na bokonzi na Davidi tata na ye” mpe akoyangela libela na libela. (Luka 1:32, 33; 3:31) Na yango, esakweli ya Amosa esakoli na liboso kokokisama ya kondimana elongo na Davidi mpo na bokonzi. Maloba ya nsuka ya Amosa mapesi te bobele emonaneli moko kitoko ya bolamu mingi oyo ekozala na ntango ya kotɛlɛmisama ya “ndako na Davidi” kasi yango ezali lisusu komonisa kozala ya libela na libela ya Bokonzi ya Nzambe: “[Yehova] Nzambe na yo alobi ete, Nakokóna bango likoló na mabelé na bango mpenza; bakobikolama lisusu te na mabelé na bango oyo epesaki ngai bango.” Mabelé makotonda na mapamboli ya seko ntango Yehova akobongisa lisusu “ndako na Davidi”!—Amo. 9:13-15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a 1978, Yelusaleme, lokasa 1046.