MOKAPO 16
Tɛmɛlá Zabolo mpe mayele mabe na ye
“Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”—YAKOBO 4:7.
1, 2. Batisimo epesaka banani esengo?
SOKI ozali mosaleli ya Yehova banda bambula mingi, na ntembe te osilá kokende na mayangani mingi epai oyokaki masukulu ya batisimo. Kasi, ata soki okendá na mayangani yango mbala boni, na ntembe te ozalaka na nsai mbala nyonso oyo omonaka etuluku ya bandeko batɛlɛmi mpo na komonisa ete bamipesi mpe balingi kozwa batisimo. Na ntango wana, bayangani nyonso bazalaka na esengo mingi mpe na nsima, babɛtaka mabɔkɔ makasi. Mbala mosusu kutu okoki kotangisa mpisoli ntango omoni bato mosusu ya sika bamipesi epai ya Yehova. Toyokaka esengo mingi na mabaku yango!
2 Biso tomonaka bato bazali kozwa batisimo mbala soki misato na mbula mobimba; nzokande baanzelu bamonaka likambo yango mbala na mbala. Kanisá ‘esengo oyo ezalaka na likoló’ pɔsɔ na pɔsɔ ntango bankóto ya bato bazali kobakisama na lisangá ya Yehova. (Luka 15:7, 10) Na ntembe te, baanzelu basepelaka komona bokoli yango!—Hagai 2:7.
ZABOLO “AZALI KOTAMBOLA EPAI NA EPAI LOKOLA NKƆSI OYO EZALI KONGULUMA”
3. Mpo na nini Satana azali kotambola “lokola nkɔsi oyo ezali koganga,” mpe mposa na ye ezali nini?
3 Nzokande, soki baanzelu basepelaka, ezali na bikelamu mosusu ya elimo oyo bayokaka mpenza nkanda ntango bato bazali kozwa batisimo. Satana ná bademo basepelaka te ntango bamonaka bankóto ya bato bazali kopesa mokili oyo mabe mokɔngɔ. Satana alobaki ete moto moko te akosalela Yehova na bolingo ya solosolo mpe ete moto moko te akotikala sembo soki amekami makasi. (Tángá Yobo 2:4, 5.) Mbala nyonso oyo moto azwi ekateli ya komipesa na Yehova, emonanaka ete Satana alobaki lokuta. Yango ezalaka lokola mbata na elongi ya Satana. Tokoki kokamwa te ete Satana “azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto”! (1 Petro 5:8) “Nkɔsi” yango ezali koluka kolya biso, elingi koloba kobebisa boyokani na biso ná Nzambe to mpe kokata yango mpenza.—Nzembo 7:1, 2; 2 Timote 3:12.
Mbala nyonso oyo moto amipesi epai ya Yehova mpe azwi batisimo, Satana amonanaka moto ya lokuta
4, 5. (a) Wapi makambo mibale oyo Yehova asali, oyo ezali kopekisa Satana asala nyonso oyo alingi? (b) Mokristo nyonso ya solo akoki kozala na elikya nini?
4 Atako tozali na banguna ya mabe mpenza, tosengeli kobangabanga te. Mpo na nini? Mpamba te Yehova asali makambo mibale oyo ezali kopekisa “nkɔsi” yango “oyo ezali koganga” esala nyonso oyo elingi. Makambo nini? Ya liboso, Yehova asakolaki ete “ebele mpenza ya bato” oyo bazali bakristo ya solo bakobika na “bolɔzi monene.” (Emoniseli 7:9, 14) Bisakweli ya Nzambe ezangaka te kokokisama. Yango wana, Satana ye moko ayebi ete akoki te kobebisa lisangá mobimba ya basaleli ya Nzambe.
5 Tokoki komona likambo ya mibale na maloba oyo mosaleli moko ya sembo ya Nzambe na ntango ya kala alobaki. Mosakoli Azaria ayebisaki Mokonzi Asa boye: “Yehova azali na bino elongo ntango nyonso oyo bozali na ye.” (2 Ntango 15:2; tángá 1 Bakorinti 10:13.) Ebele ya bandakisa oyo eleká emonisi ete Satana alongaki te kolya mosaleli ya Nzambe oyo atikalaki penepene na Nzambe. (Baebre 11:4-40) Lelo oyo, soki mokristo atikali penepene na Nzambe, akokoka kotɛmɛla Zabolo, ata mpe kolonga ye. Kutu, Liloba ya Nzambe elendisi biso na maloba oyo: “Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”—Yakobo 4:7.
“TOZALI KOBUNDA LÍBANDA . . . NÁ MAMPINGA YA BILIMO MABE”
6. Ndenge nini Satana abundisaka mokristo mokomoko?
6 Satana akoki te kolonga etumba ya elimo, kasi akoki kolonga bamosusu kati na biso soki batiki kosɛnzɛla. Satana ayebi ete ekozala mpasi te alya biso soki alɛmbisi boyokani na biso ná Yehova. Ndenge nini Satana asalaka yango? Abimiselaka biso ebele ya mikakatano, abundisaka mokomoko na biso, mpe asalelaka mayele mabe. Tótalela sikoyo mokomoko ya makambo yango.
7. Mpo na nini Satana azali kobimisela basaleli ya Yehova ebele ya mikakatano?
7 Ebele ya mikakatano. Ntoma Yoane alobaki ete: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Maloba wana ezali likebisi mpo na bakristo nyonso ya solo. Lokola Satana azimbisi bato nyonso oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ, sikoyo likebi na ye ezali epai ya bato oyo azwi bango naino te, elingi koloba basaleli ya Yehova mpe mpo na yango, azali kobimisela bango ebele ya mikakatano. (Mika 4:1; Yoane 15:19; Emoniseli 12:12, 17) Azali na nkanda makasi mpo ayebi ete mikolo na ye etikali ya kotánga. Yango wana azali kobakisa mikakatano yango. Lelo oyo, abimisi manzaka nyonso mpo na kobebisa boyokani na biso ná Yehova. Yango wana, sikoyo mpenza nde esengeli ‘tóyeba kososola ntango mpo na koyeba nini oyo tosengeli kosala.’—1 Ntango 12:32.
8. Ntoma Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete tozali “kobunda líbanda” ná bilimo mabe?
8 Azali kobundisa mokomoko na biso. Ntoma Paulo ayebisaki bandeko na ye bakristo boye: “Tozali kobunda líbanda . . . ná mampinga ya bilimo mabe na bisika ya likoló.” (Baefese 6:12) Mpo na nini Paulo asalelaki maloba “kobunda líbanda”? Mpo yango ezali kopesa likanisi ya bato mibale oyo basimbani mpenza na nzoto ntango bazali kobunda. Na yango, Paulo asalelaki maloba wana mpo na komonisa ete mokomoko na biso azali mpenza kobunda ná bilimo mabe. Ezala tofandi na mboka oyo bato mingi bandimaka ete bilimo mabe ezali to te, tosengeli kobosana te ete ntango tomipesaki epai ya Yehova, ezalaki lokola nde tobandaki etumba. Mokristo nyonso, kobanda na mokolo oyo amipesaki epai ya Yehova, azali kobunda etumba yango. Yango wana, Paulo amonaki ete ezalaki na ntina apesa bakristo ya Efese toli ete ‘bátɛlɛma ngwi’ mpe azongelaki toli yango mbala misato!—Efese 6:11, 13, 14.
9. (a) Mpo na nini Satana ná bademo basalelaka “mayele mabe” ndenge na ndenge? (b) Mpo na nini Satana alukaka kobebisa makanisi na biso, mpe ndenge nini tokoki kotɛmɛla ye? (Talá etanda “Kebá na mayele mabe ya Satana.”) (c) Mayele mabe nini tokolobela sikoyo?
9 Mayele mabe. Paulo apesi bakristo toli ete bátɛlɛma ngwi liboso ya “mayele mabe” ya Satana. (Efese 6:11) Bilimo mabe basalelaka mitindo ndenge na ndenge ya mayele mabe mpe bayebi ntina oyo basalaka bongo. Bakristo mosusu oyo batikalaki sembo liboso ya komekama moko, bakweaki ntango bakutanaki na komekama ya ndenge mosusu. Yango wana, Zabolo ná bademo batalaka malamu mpenza ezaleli ya mokomoko na biso mpo na koyeba esika oyo tozali na bolɛmbu. Na nsima, soki bamoni bolɛmbu na biso, balukaka kosalela yango mpo na kokweisa biso. Kasi, tokoki koyeba mayele mingi oyo Zabolo asalelaka, mpamba te Biblia emonisi yango polele. (2 Bakorinti 2:11) Na buku oyo, tosili kolobela mayele mabe lokola motambo ya kolinga biloko ya mokili, baninga mabe mpe pite. Sikoyo, tólobela mayele mabe mosusu oyo Satana asalelaka—misala ya bilimo mabe.
KOYOKANA NA BILIMO MABE EZALI KOWANGANA YEHOVA
10. (a) Misala ya bilimo mabe ezali nini? (b) Ndenge nini Yehova atalelaka misala ya bilimo mabe, mpe ndenge nini yo otalelaka yango?
10 Moto oyo asalaka misala ya bilimo mabe azalaka nde na boyokani ná bademo. Misala ya bilimo mabe esangisi makambo lokola koyebisa makambo oyo ekoya, bondɔki, kosala nkisi, mpe kosolola na bakufi. Ndenge toyebi yango malamu, Yehova “ayiná” boyokani na bilimo mabe. (Kolimbola Mibeko 18:10-12; Emoniseli 21:8) Lokola biso mpe tosengeli ‘koyina oyo ezali mabe,’ tosengeli te kozala na boyokani ná bilimo mabe. (Baroma 12:9) Kozala na boyokani ná bilimo mabe ezali mpenza kowangana Yehova, Tata na biso ya likoló!
11. Mpo na nini Satana akomona mpenza ete alongi soki amemi biso na kosala misala ya bilimo mabe? Pesá ndakisa.
11 Nzokande, lokola komipesa na misala ya bilimo mabe ezali mpenza kowangana Yehova, Satana alukaka ete bamosusu kati na biso bákwea na motambo yango. Mbala nyonso oyo Satana abendi mokristo moko na misala ya bilimo mabe, amonaka ete alongi mpenza. Mpo na nini? Tózwa ndakisa moko: soki banguna balongi kondimisa soda moko mpo asundola baninga na ye mpe akóma na ngámbo na bango, mokonzi ya basoda ya banguna asepelaka mingi. Kutu, akoki kolakisa na miso ya bato nyonso soda oyo ayei na ngámbo na bango mpo na komonisa mokonzi ya basoda mosusu ete alongi ye. Ndenge moko mpe, soki mokristo moko amipesi na misala ya bilimo mabe, yango emonisaka ete andimi kotika Yehova mpe amitye na ngámbo ya Satana. Kanisá esengo oyo Satana akozala na yango mpo na kolakisa ete alongi! Ezali na moto moko kati na biso oyo akolinga kopesa Zabolo libaku ya kolonga? Te, biso tolingaka te kowangana Nzambe na biso!
ABIMISAKA MITUNA MPO NA KOLONA NTEMBE NA MITEMA YA BATO
12. Mayele nini Satana asalelaka mpo na kobongola ndenge na biso ya kotalela misala ya bilimo mabe?
12 Satana akolonga te kozwa biso na motambo ya misala ya bilimo mabe soki tozali ntango nyonso koyina yango. Yango wana, ayebi ete asengeli naino kobongola ndenge na biso ya kotalela makambo. Na ndenge nini? Alukaka ndenge oyo akoki kobulunganisa bakristo mpo bamosusu kati na bango bákóma kokanisa ete “malamu ezali mabe mpe mabe ezali malamu.” (Yisaya 5:20) Banda kala Satana asalelaka mingi mayele moko mpo na kokokisa mokano yango: abimisaka mituna mpo na kolona ntembe na mitema ya bato.
13. Ndenge nini Satana asalelaki mayele ya kobimisa mituna mpo na kolona ntembe na motema ya moto?
13 Talá ndenge oyo Satana asalelaki mayele yango na ntango ya kala. Na Edene, atunaki Eva boye: “Ezali mpenza solo ete Nzambe alobaki na bino ete bosengeli te kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga?” Na ntango ya Yobo, na likita moko ya baanzelu na likoló, Satana atunaki motuna oyo: “Yobo abangi Nzambe nde mpamba?” Mpe ntango Yesu abandaki mosala na ye awa na mabele, Satana amekaki ye ntango alobaki na ye boye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, yebisá mabanga oyo ekóma mampa.” Omoni ete Satana atyolaki mpenza maloba oyo Yehova ye moko alobaki bapɔsɔ motoba liboso ete: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi”!—Ebandeli 3:1; Yobo 1:9; Matai 3:17; 4:3.
14. (a) Ndenge nini Satana azali kosalela mayele mabe mpo na kolona ntembe na oyo etali misala ya bilimo mabe? (b) Tokotalela nini sikoyo?
14 Lelo oyo, Zabolo azali kosalela mayele yango mpo na kotinda bato bákóma kotya ntembe ete misala ya bilimo mabe ezali mpenza likama. Ezali mawa na komona ete alongi kolona ntembe na mitema ya basaleli mosusu ya Yehova. Bandeko yango bakómi komituna soki misala mosusu ya bilimo mabe ezali mpenza likama. (2 Bakorinti 11:3) Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko yango bázongela makanisi ya malamu? Tokoki kosala nini mpo Satana abebisa makanisi na biso te na mayele mabe na ye? Mpo na kozwa eyano, tótalela makambo mibale oyo, kati na yango, Satana akɔtisi misala ya bilimo mabe. Makambo yango ezali masano mpe mayele ya kosalisa nzoto.
SATANA ASALELAKA BAMPOSA NA BISO
15. (a) Ndenge nini bato mingi na mikili ya Mpoto bakómi kotalela misala ya bilimo mabe? (b) Ndenge nini bakristo mosusu bakómi na makanisi ya bato ya mokili na oyo etali misala ya bilimo mabe?
15 Mingimingi na mikili ya Mpoto, bato mingi bakómi kozwa maji, bondɔki, mpe mitindo mosusu ya misala ya bilimo mabe lokola makambo oyo ezali na likama moko te. Bafilme, babuku, baemisyo ya televizyo, mpe masano mingi ya ordinatɛrɛ ekómi komonisa boyokani ná bademo lokola lisano, likambo ya mayele, mpe likambo oyo ezangi likama. Bato mingi bazali kosepela na bafilme mpe babuku mosusu oyo ezali kolobela makambo ya maji mpe bakómi kutu kosala masangá to bamoziki ya bato oyo balingaka makambo yango. Ezali polele ete bademo balongi kokɔtisa na mitó ya bato ete misala ya maji ezali na likama te. Ezali nde na bakristo mosusu oyo bakómi kotalela misala ya bilimo mabe lokola lisano? Ɛɛ. Na ndenge nini? Na ndakisa, mokristo moko atalaki filme moko oyo ezalaki na makambo ya maji; na nsima, alobaki boye, “Natalaki filme yango, kasi nasalaki misala ya bilimo mabe te.” Mpo na nini makanisi ya ndenge wana ezali likama?
16. Mpo na nini kosepela na masano oyo ezali kolobela misala ya bilimo mabe ezali likama?
16 Atako kotala misala ya bilimo mabe ekeseni na kosala yango, elingi koloba te ete kotala makambo ya maji ezali na likama te. Mpo na nini? Tókanisa naino likambo oyo: Liloba ya Nzambe emonisi ete ezala Satana to bademo na ye bakoki te kotánga na makanisi na biso.a Yango wana, ndenge tolobaki yango liboso, mpo na koyeba makanisi na biso mpe bolɛmbu na biso, bilimo mabe balandelaka misala na biso, ata mpe masano oyo tosepelaka na yango. Ntango mokristo moko azali kosepela na bafilme to babuku oyo ezali kolobela makambo lokola maji, ndenge oyo bademo bakɔtelaka bato, mpe makambo mosusu ya ndenge wana, azali kosalisa bademo. Azali komonisa bango bolɛmbu na ye! Na nsima, bademo bakoki kosalela bolɛmbu oyo mokristo yango amonisi mpe kobakisa milende na etumba oyo bazali kobunda na ye tii bakokweisa ye. Kutu, bato mosusu oyo basukaki na komipesa na misala ya bilimo mabe babandaki na masano oyo ezali kolobela yango.—Tángá Bagalatia 6:7.
17. Mayele mabe nini Satana akoki kosalela mpo na kolɛmbisa baoyo bazali na maladi?
17 Satana asukaka kaka te na kosalela mposa na biso ya kotala masano; alukaka mpe kosalela mposa na biso ya kosalisa nzoto ntango tobɛli. Na ndenge nini? Mokristo oyo azali na maladi mpe azali koluka lisalisi oyo ebongi, kasi azali kaka koyoka malamu te, akoki kolɛmba nzoto. (Marko 5:25, 26) Satana ná bademo bakoki kosalela libaku yango mpo na kokweisa ye. Bademo bakoki komema ye aluka lisalisi na nzela ya mayele oyo esangani na “misala ya maji,” to misala ya bilimo mabe. (Yisaya 1:13) Soki bademo balongi moto ndenge wana, boyokani na ye ná Nzambe ekoki kolɛmba. Na ndenge nini?
18. Lolenge nini ya lisalisi mokristo asengeli koboya, mpe mpo na nini?
18 Yehova akebisaki Bayisraele oyo bazalaki kosala “misala ya maji” na maloba oyo: “Ntango bozali kosembola mabɔkɔ na bino, nazali kozipa miso na ngai liboso na bino. Ata bozali kobondela mingi, nazali koyoka te.” (Yisaya 1:15) Ya solo, tosengeli koboya eloko nyonso oyo ekoki kosala ete Nzambe aboya koyoka mabondeli na biso mpe oyo ekoki kolɛmbisa lisungi ya Yehova, mingimingi ntango tozali na maladi. (Nzembo 41:3) Yango wana, ntango mokristo ya solo amoni elembo ata moke ya misala ya bilimo mabe na ndenge oyo moto oyo alingi kosalisa ye azali koluka maladi to kopesa ye nkisi, asengeli mbala moko koboya yango.b (Matai 6:13) Soki asali bongo, Yehova akotika te kosunga ye.—Talá etanda “Ezali mpenza misala ya bilimo mabe?”
SOKI BATO MINGI BABƐTAKA MASOLO YA BADEMO
19. (a) Zabolo andimisi bato mingi makanisi nini na ntina etali nguya na ye? (b) Bakristo ya solo basengeli koboya masolo ya ndenge nini?
19 Na mikili ya Mpoto, bato mingi bamonaka ete nguya ya Satana ezali na likama moko te mpo na bango; nzokande, na bamboka mosusu bato bakanisaka ete nguya ya Satana ezali mpenza likama. Zabolo andimisi bato mingi ete azali na nguya mingi koleka, nzokande ezali bongo te. Bato mosusu bazalaka na nsɔmɔ ya bilimo mabe na makambo nyonso oyo basalaka. Masolo mingi elobelaka makambo ya kokamwa oyo bademo basalaka. Mbala mingi, bato babɛtaka masolo yango na esengo; mpe bato mingi basepelaka na yango. Kasi, ezali malamu ete biso mpe tóbɛtaka masolo ya ndenge wana? Te, basaleli ya Nzambe ya solo baboyaka yango mpo na bantina mibale.
20. Ndenge nini moto akoki, mbala mosusu kozanga ete ayeba yango, kosala piblisite ya Satana?
20 Ya liboso, ntango moto azali kobɛta masolo ya makambo ya kokamwa oyo bademo basalaka, azali nde kopesa Satana mabɔkɔ. Na ndenge nini? Liloba ya Nzambe emonisi ete Satana azali na nguya ya kosala makambo ya kokamwa, kasi elobi mpe ete Satana asalelaka “bilembo ya lokuta” mpe “bokosi.” (2 Batesaloniki 2:9, 10) Lokola Satana azali mokosi monene, ayebi ndenge ya kobebisa makanisi ya bato oyo basepelaka na misala ya bilimo mabe mpe kondimisa bango makambo oyo ezali solo te. Bato yango bakoki mpenza kondima ete bamonaki to bayokaki makambo boye to boye; bakoki mpe kobɛta masolo yango mpe koloba ete ezali mpenza solo. Ntango masolo yango ezali kotambola na minɔkɔ ya bato, babakisaka yango makambo mosusu. Soki mokristo azali kobɛta masolo ya ndenge wana, azali nde kosala mokano ya Zabolo—“tata ya lokuta.” Azali kosala piblisite ya Satana.—Yoane 8:44; 2 Timote 2:16.
21. Makambo nini tosengeli kolobelaka mingi na masolo na biso?
21 Ya mibale, ata soki moto moko azalaki na boyokani ná bilimo mabe liboso akóma mokristo, ezali malamu te abɛtelaka bandeko na ye bakristo masolo ya makambo oyo azalaki kosala. Mpo na nini? Biblia epesi biso toli ete: ‘Tótala na likebi mpenza Kapita mpe Mokokisi ya kondima na biso, Yesu.’ (Baebre 12:2) Ya solo, tosengeli kotya likebi na biso epai ya Kristo, kasi epai ya Satana te. Tosengeli koyeba ete ntango Yesu azalaki awa na mabele, abɛtelaki bayekoli na ye te masolo oyo etali bilimo mabe, atako akokaki koyebisa bango makambo mingi oyo Satana akoki kosala to te. Yesu abendaki nde likebi na bango na nsango ya Bokonzi. Yango wana, na ndakisa ya Yesu ná bantoma na ye, esengeli tólobelaka mingi “makambo minene ya Nzambe.”—Misala 2:11; Luka 8:1; Baroma 1:11, 12.
22. Ndenge nini tokoki kokoba kosala ete ‘esengo ezala na likoló’?
22 Ya solo, Satana asalelaka lolenge mingi ya mayele mabe, ata mpe misala ya bilimo mabe, mpo na kobebisa boyokani na biso ná Yehova. Kasi, soki tozali koyina oyo ezali mabe mpe kokangama na oyo ezali malamu, tokopesa Zabolo nzela te ete alɛmbisa ekateli na biso ya koboya lolenge nyonso ya misala ya bilimo mabe. (Tángá Baefese 4:27.) Kanisá ndenge oyo ‘esengo ekozala mingi na likoló’ soki tozali kokoba “kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo” tii na ntango oyo akozala lisusu te!—Luka 15:7; Baefese 6:11.
a Bankombo oyo Satana abengami na yango mpo na komonisa misala na ye (Motɛmɛli, Motɔngi, Mozimbisi, Momeki, Mokosi) ezali komonisa te ete azali na likoki ya kotánga na mitema mpe na makanisi. Nzokande, Yehova abengami “moto oyo atalaka mitema malamumalamu,” mpe Yesu azali moto oyo ‘atalaka bangɛi mpe mitema.’—Masese 17:3; Emoniseli 2:23.
b Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Omekami mpo na oyo etali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/12/1994, nkasa 19-22, mpe lisolo “Engebene Biblia: Kopona nkisi ya monganga ezali mpenza na ntina?” na Lamuká! ya Aprili–Yuni 2001.