Tósalisa basi oyo bakufelá mibali na mpasi na bango
MOKO na masolo ya basi bakufelá mibali oyo eyebani mingi ezali na kati ya Biblia. Ezali lisolo ya Luta na bokilo na ye Naomi. Bango mibale bazalaki basi oyo bakufelá mibali. Kasi, Naomi akufelaki, na mobali, na bana mibale ya mibali oyo, moko na bango azalaki mobali ya Luta. Lokola na mboka na bango bazalaki mingimingi kosala bilanga, mosala oyo esɛngaka mpenza makasi ya mwana mobali, bomoi na bango ekómaki mpenza mpasi.—Luta 1:1-5, 20, 21.
Atako bongo, Naomi azalaki na moninga mpe mobɔndisi ya solosolo: bokilo na ye Luta, oyo alingaki kokabwana na ye te. Na nsima, Luta ‘alekaki bana mibali nsambo na malamu mpo na [Naomi].’ Ezali mpo ete Luta alingaki Naomi mingi, mpe alingaki Nzambe mingi. (Luta 4:15) Ntango Naomi asɛngaki Luta azonga epai ya bandeko na ye mpe baninga na ye na Moaba, Luta alobaki na ye maloba oyo ezali kosimba motema mpe ezali komonisa bosembo ya solosolo: “Esika ekokenda yo, ngai mpe nakokenda kuna, mpe esika ekolala yo, ngai mpe nakolala wana. Bato na yo bakozala bato na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai. Esika ekokufa yo, ngai mpe nakokufa mpe nakokundama wana. [Yehova] asalela ngai boye mpe mosusu lokola, soko eloko mosusu ekokabola kati na biso na yo, bobele kufa.”—Luta 1:16, 17.
Yehova Nzambe amonaki motema ya Luta. Apambolaki bango mibale, mpe na nsima Boaza, mobali moko Moyisalaele, abalaki Luta. Naomi abɔkɔlaki mwana na bango lokola mwana na ye mpenza mpe na nsima, Yesu Klisto abotamaki na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya mwana yango. Lisolo yango ezali komonisa ete Yehova alingaka mpenza basi bakufelá mibali oyo balukaka ye mpe batyelaka ye motema. Biblia elobi mpe ete Yehova asepelaka na bato oyo balingaka mpe basalisaka basi oyo bakufelá mibali na mpasi na bango. Boye, ndenge nini tokoki kosunga basi bakufelá mibali oyo tozali na bango lelo oyo?—Luta 4:13, 16-22; Nzembo 68:5.
Tópesa lisungi oyo ebongi, kasi na makasi te
Ntango tolingi kosalisa mwasi oyo akufelá mobali, ebongi tósala likambo oyo ebongi mpenza, kasi tósala yango na makasi te. Tózala na maloba ya likolólikoló te, na ndakisa: “Soki ozali na mposa ya eloko moko, kozanga koyebisa ngai te.” Koloba bongo ekoki komonana lokola koloba na moto oyo azali koyoka malili mpe azali na nzala ete, ‘Yoká mɔ́tɔ, tondá,’ kasi opesi ye eloko moko te mpo na kosalisa ye. (Yakobo 2:16) Bato mingi, ata soki bazali na mposa ya eloko, balingaka kosɛnga te, bafandaka na mpasi na bango. Mpo na kosalisa bato ya ndenge wana, esɛngaka kososola bamposa na bango. Kasi, soki mpe ozali kosala makambo oyo yo moko okanisi, obandi kokóma lokola mokonzi ya bomoi ya mwasi oyo akufelá mobali, ekoki kozokisa ye to kotungisa ye. Yango wana, Biblia elobi ete esengeli tókebaka ntango tozali kosalela bato makambo. Ya solo, Biblia ezali kolendisa biso tómibanzabanzaka mpo na bazalani na biso, kasi ezali mpe kokebisa biso ete tókɔtaka na makambo ya bato te.—Bafilipi 2:4; 1 Petelo 4:15.
Luta azalaki na bokɛngi motindo wana epai Naomi. Atako atikaki bokilo na ye te, kasi azalaki kosalela ye makambo na makasi te to kozala lokola mokonzi na ye te. Azalaki kosala makambo ya malamu; na ndakisa, azalaki kokende koluka mwa eloko ya kolya mpo na bango mibale, kasi azalaki mpe kosala ndenge oyo Naomi azalaki koyebisa ye.—Luta 2:2, 22, 23; 3:1-6.
Ya solo, bato nyonso bakoki kozala na bamposa ndenge moko te. Sandra, mwasi oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki, alobi boye: “Nazalaki na nyonso oyo nasengelaki na yango na mpasi na ngai: baninga ya solosolo mpe ya bolingo oyo bazalaki ntango nyonso pene na ngai.” Nzokande, Elaine, mwasi oyo tolobelaki liboso, azalaki na mposa ete ntango mosusu azalaka ye moko. Yango wana, mpo na kosalisa, ezali kosɛnga kososola mpe kokeba ete tókɔta na makambo ya bato te mpe tósalisaka na ntango mposa ezali.
Lisalisi ya bandeko na libota
Soki bandeko ya boboto mpe ya bolingo bazali, bakoki kosala makambo mingi mpo na komonisa mwasi oyo akufelá mobali ete akoki kolonga na mokakatano na ye. Atako bandeko nyonso bazalaka na makoki ndenge moko te mpo na kosalisa moto, bango nyonso bakoki kosala mwa eloko. “Nde soko mwasi-akufeli-mobali azali na bana to bana na bana na ye, bango báyekola kosalela Nzambe kati na ndako na bango mpenza liboso mpe bázongisa mwa makabo epai na baboti. Zambi oyo ekosepelisa Nzambe.”—1 Timote 5:4.
Kutu, ntango mosusu ‘kozongisa mwa makabo,’ to kosalisa na mwa mbongo, ezalaka na ntina te. Basi mosusu oyo bakufelá mibali bazalaka na mbongo oyo ekoki kosalisa bango na bamposa na bango, mpe bamosusu bakoki kozwa lisalisi ya Leta, ndenge esalemaka na mikili mingi. Kasi, na bisika oyo basi bakufelá mibali bazali na bosɛnga, bandeko na bango basengeli kosalisa bango. Soki mwasi oyo akufelá mobali azali na bandeko te oyo bakoki kosalisa ye to soki bandeko yango bazali na makoki ya kosalisa ye te, Makomami ezali kolendisa bandeko na ye baklisto básalisa ye: “Losambo ya pɛto mpe lobongi epai ya Nzambe Tata na biso ezali boye: kotalaka bitike mpe basi-bakufeli-mibali kati na mpasi na bango.”—Yakobo 1:27.
Bato oyo balandaka toli yango ya Biblia ‘bapesaka basi oyo bakufelá mibali lokumu.’ (1 Timote 5:3, NW) Kopesa moto lokumu elimboli kopesa ye limemya. Moto oyo bazali kopesa lokumu amimonaka ete bazali kozwa ye na valɛrɛ, balingi ye mpe bazali kopesa ye kilo. Amonaka te ete bazali kosalisa ye kaka mpo basengeli kosala yango. Atako Luta ye moko azalaki mpe mwasi oyo akufelá mobali tii ntango babalaki ye lisusu, azalaki mpenza kokumisa Naomi na ndenge azalaki kosunga ye na biloko ya mosuni mpe kobɔndisa ye mpe kolinga ye. Kutu, eumelaki te mpo bato mingi básepela na Luta; yango wana, mobali oyo abalaki ye nsima alobaki na ye ete: “Bato na ngai nyonso na mboka bayebi ete ozali mwasi malamu.” (Luta 3:11, NW, maloba na nse ya lokasa) Epai mosusu, ndenge oyo Naomi alingaki Nzambe, ezaleli na ye ezangi mindɔndɔ, mpe botɔndi mingi oyo azalaki na yango mpo na milende nyonso oyo Luta azalaki kosala mpo na ye, esalaki ete Luta alɛmba nzoto te, kasi asepelaka ntango nyonso kosalisa ye. Naomi azali ndakisa malamu mpenza mpo na basi oyo bakufelá mibali!
Luká kozala moninga ya Nzambe
Ya solo, bandeko na baninga bakoki kopesa yo eloko moko te oyo ekosilisa mposa ya molongani na yo. Yango wana, ezali na ntina mingi ete moto oyo akufeli molongani aluka mpenza boninga ya “Tata ya mawa mpe Nzambe ya kobɔndisa nyonso. Ye [oyo] akobɔndisa biso kati na bolɔzi na biso.” (2 Bakolinti 1:3, 4) Tókamata ndakisa ya Ana, mwasi moko akufelá mobali oyo amipesaki na losambo mpe azalaki na mbula 84 ntango Yesu abotamaki.
Mobali ya Ana akufaki nsima ya mbula nsambo mpamba ya libala; kobanda wana, Ana alukaki libɔndisi epai ya Yehova. “Abimaki na Tempelo te, nde azalaki wana butu na moi kosalelaka Nzambe na kokila mpe na kobondela.” (Luka 2:36, 37) Yehova azongiselaki Ana bolamu na ndenge oyo amipesaki mpo na kosalela ye? Ɛɛ! Asalaki likambo moko mpo na kolakisa ye ete alingaki ye: apesaki ye libaku malamu ya komona mwana oyo akokóma Mobikisi ya bato. Likambo yango esepelisaki Ana mpe ebɔndisaki ye mpenza! Amonaki mpenza bosolo ya maloba ya Nzembo 37:4, ete: “Omisepelisa na [Yehova] mpe ye akopesa yo mposa nyonso ya motema na yo.”
Nzambe azali kosala na nzela ya bandeko baklisto
Elaine alobi boye: “Nsima ya liwa ya David, nabɛlaki ntango molai, nazalaki koyoka lokola nde bazali kobalola ngai mbeli moko na kati ya ntolo. Nakanisaki ezali mwa kwokɔsɔ na estoma. Mokolo mosusu mpasi elekaki makasi, yango wana nalukaki nakutana na monganga. Ndeko mwasi moko moklisto oyo azali moninga na ngai mpe azali na bososoli mingi alobaki na ngai ete ekoki kozala komitungisa nde ezali kopesa ngai mpasi mpe alendisaki ngai nasɛnga Yehova asalisa ngai mpe abɔndisa ngai. Nalandaki toli na ye mbala moko: nabondelaki na nse ya motema, nasɛngaki Yehova asunga ngai. Mpe Yehova ayokaki ngai!” Elaine abandaki koyoka malamu, mpe mwa moke na nsima mpasi na ye esilaki.
Bankulutu na lisangá bakoki mpenza kosalisa basi oyo bakufelá mibali oyo bazali kotungisama soki bazali na boboto mpe na boninga epai na bango. Soki bankulutu bazali ntango nyonso kosunga mpe kobɔndisa na elimo, mpe bazali kosala yango na bokɛngi mpe bososoli, bakoki kosalisa basi oyo bakufelá mibali bázala ntango nyonso pene na Yehova ata na kati ya mpasi na bango. Soki esɛngami bongo, bankulutu bakoki mpe kokanisa ndenge oyo bakoki kosunga na mwa biloko. Bankulutu ya ndenge wana oyo bazali na motema mawa mpe na bososoli bazali mpenza ‘ebombamelo mpo na mopɛpɛ.’—Yisaya 32:2; Misala 6:1-3.
Libɔndisi ya ntango nyonso oyo ekouta epai ya Mokonzi ya sika ya mabele
Eleki sikoyo mbula nkóto mibale, mobange Ana asepelaki mingi ntango amonaki mwana oyo azali lelo Masiya mpe Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. Etikali moke boyangeli yango esukisa makambo nyonso oyo ezali kopesa mawa, oyo moko na yango ezali liwa. Yango wana, Emoniseli 21:3, 4 elobi ete: “Talá! Efandelo ya Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te, mpo ete makambo ya liboso masili koleka.” Omoni ete vɛrsɛ oyo elobeli “bato”? Ya solo, liwa na kolela oyo yango ememaka ekozala lisusu te epai ya bato.
Kasi, ezali mpe na nsango mosusu ya malamu! Biblia elaki mpe ete bato oyo bakufá bakosekwa. “Ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na [Yesu], mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Lokola kaka Lasalo, moto oyo Yesu asekwisaki, baoyo bakufá bakosekwa na nzoto lokola bato, kasi lokola bikelamu ya elimo te. (Yoane 11:43, 44) Na nsima, baoyo ‘bakosala makambo ya malamu’ bakokóma bato ya kokoka mpe Yehova ye moko akobatela bango lokola bana na ye, ‘akozipola lobɔkɔ na ye mpe akosilisa mposa ya nyonso oyo ezali na bomoi.’—Nzembo 145:16.
Baoyo bakufelá bandeko, mpe bazali kondima elaka yango oyo ekokokisama solo, bazali mpenza kobɔndisama. (1 Batesaloniki 4:13) Yango wana, soki ozali mwasi oyo akufelá mobali, ‘bondeláká ntango nyonso’ mpo ozwa libɔndisi mpe lisalisi oyo osengeli na yango mokolo na mokolo mpo na kolonga komema bozito na yo ndenge na ndenge. (1 Batesaloniki 5:17; 1 Petelo 5:7) Mokolo na mokolo, zwáká ntango ya kotánga Liloba ya Nzambe mpo ete makanisi ya Nzambe ebɔndisa yo. Soki ozali kosala bongo, okomona ndenge oyo Yehova akosalisa yo ozala na kimya atako bomoi na yo lokola mwasi akufelá mobali ezali na mpasi mpe na mikakatano mingi.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Mpo na kosalisa, ezali kosɛnga bososoli mpo na kokɔta na makambo ya moto te mpe kosalisa na ntango moto azali na mposa ya lisalisi
[Elilingi na lokasa 7]
Nzambe apambolaki Ana, mobange mwasi oyo akufelá mobali