Okotya likebi na makebisi ya polele ya Yehova?
“Nzela yango oyo. Bótambola na yango.”—YIS. 30:21.
1, 2. Mokano ya Satana ezali nini, mpe ndenge nini Liloba ya Nzambe esalisaka biso?
NA NZELA, elembo oyo elakisi esika ya malamu te ekobungisa bato nzela, mpe ekoki kozala likama monene. Kanisá ete moninga moko akebisi yo ete moto moko ya motema mabe abalolaki na nko elembo moko mpe atalisaki yango epai mosusu mpo na kobungisa bato oyo bazali ekɛngɛ te. Okotya likebi na likebisi yango te?
2 Satana azali lokola moto wana ya motema mabe mpe azali koluka kobungisa biso nzela. (Em. 12:9) Makama nyonso oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki ezali makambo oyo Satana asalelaka mpo na kolongola biso na nzela ya bomoi ya seko. (Mat. 7:13, 14) Nzokande, tozali na esengo mpo Nzambe na biso ya boboto akebisaka biso mpo tólanda te mayele mabe ya Satana. Tólobela sikoyo makama mosusu misato oyo Satana asalelaka. Wana tozali kotala ndenge Liloba ya Nzambe esalisaka biso mpo tókosama te, tómona lokola nde Yehova azali kotambola na nsima na biso mpe koloba na biso ete: “Nzela yango oyo. Bótambola na yango.” (Yis. 30:21) Koyekola makebisi ya polele ya Yehova ekolendisa ekateli na biso ya kotyela yango likebi.
Kolanda “bateyi ya lokuta” te
3, 4. (a) Na ndenge nini bateyi ya lokuta bazali lokola mabulu ya mai oyo ekauká? (b) Bateyi ya lokuta bautaka mbala mingi wapi, mpe mposa na bango ezalaka nini?
3 Kanisá ete ozali kosala mobembo na mokili moko oyo ekauká mpe oyoki mposa ya mai. Na mosika, omoni libulu ya mai, mpe opusani kuna na elikya ya kozwa mwa mai ya komɛla. Kasi ntango okómi kuna, omoni ete libulu yango ekauká. Olɛmbi mpenza nzoto! Bateyi ya lokuta bazali lokola mabulu ya mai oyo ekauká. Moto nyonso oyo akei epai na bango mpo na kozwa solo akolɛmba mpenza nzoto. Na nzela ya ntoma Paulo mpe ntoma Petro, Yehova akebisi biso mpo na bateyi ya lokuta. (Tángá Misala 20:29, 30; 2 Petro 2:1-3.) Bateyi ya lokuta nde banani? Maloba ya Paulo mpe ya Petro esalisi biso tóyeba esika bateyi ya lokuta bautaka mpe ndenge basalaka.
4 Paulo alobaki na bankulutu ya lisangá ya Efese boye: “Na kati na bino mpenza, mibali bakobima mpe bakoloba makambo ya mbilingambilinga.” Mpe na mokanda oyo Petro akomelaki masangá ndenge na ndenge, alobaki boye: “Ekozala na bateyi ya lokuta na kati na bino.” Na yango, bateyi ya lokuta bautaka wapi? Bakoki kouta na kati ya lisangá. Bazali bapɛngwi.a Balukaka nini? Basukaka kaka te na kolongwa na lisangá oyo mbala mosusu bazalaki kolinga kala. Paulo alobaki ete mposa na bango ezalaka ya “kobenda bayekoli bálanda bango.” Bayekoli yango ezali bayekoli ya Yesu Kristo. Na esika bákende koluka bayekoli na bango moko, bapɛngwi balukaka kozwa bayekoli ya Kristo. Ndenge moko na “bambwa ya zamba ya lokoso,” bateyi ya lokuta balukaka kolya bampate, kobebisa kondima ya bato ya lisangá mpe kolongola bango na kati ya solo.—Mat. 7:15; 2 Tim. 2:18.
5. Bateyi ya lokuta basalaka ndenge nini?
5 Bateyi ya lokuta basalaka ndenge nini? Basalaka na mayele mpenza. Bapɛngwi bakɔtisaka makanisi ya mabe na lisangá na “mayele.” Kaka ndenge bato mabe bakɔtisaka biloko na mboka na ndenge ya kobombana, bapɛngwi mpe bakɔtisaka makanisi na bango ya lipɛngwi na mayele. Mpe kaka ndenge moto moko ya mayele mabe asalaka ete mikanda ya lokuta emonana lokola ya solo, bapɛngwi basalelaka “maloba ya bokosi,” to bandimbola ya lokuta, mpo makanisi na bango emonana lokola ezali solo. Bapanzaka “mateya na bango ya bokosi” mpe ‘babongolaka Makomami,’ mpo eyokana na makanisi na bango. (2 Pe. 2:1, 3, 13; 3:16) Emonani polele ete bapɛngwi balukaka bolamu na biso te. Soki tolandi bango, tokolongwa na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko.
6. Biblia epesi biso likebisi nini ya polele na ntina etali bateyi ya lokuta?
6 Ndenge nini tokoki komibatela na bateyi ya lokuta? Biblia eyebisi biso polele oyo tosengeli kosala. (Tángá Baroma 16:17; 2 Yoane 9-11.) Liloba ya Nzambe elobi polele ete: “Bóboya kozala elongo na bango.” Libongoli mosusu elobi boye: “Bókima bango.” Toli wana ezali polele mpenza. Kanisá naino soki monganga ayebisi yo ete oboya kozala elongo na moto oyo azali na maladi moko mabe oyo ekoki kozwa yo, mpe koboma yo. Okobunga te likambo oyo monganga ayebisi yo, mpe okosala kaka ndenge alobi. Bapɛngwi bango mpe ‘babɛli motó’ mpe balukaka kobebisa makanisi ya bato mosusu na nzela ya mateya na bango ya mabe. (1 Tim. 6:3, 4) Yehova, Monganga monene, ayebisi biso ete tóboya kozala elongo na bango. Toyebi malamu soki alingi koloba nini, kasi tozali mpenza na ekateli ya koyoka likebisi yango?
7, 8. (a) Koboya kozala elongo na bateyi ya lokuta elimboli nini? (b) Mpo na nini ozali na ekateli ya kokima bateyi ya lokuta?
7 Koboya kozala elongo na bateyi ya lokuta elimboli nini? Tosololaka na bango te mpe toyambaka bango na bandako na biso te. Totángaka mpe babuku na bango te, totalaka bango na televizyo te, tokɔtaka na basite ya Internet na bango te, mpe tobakisaka te makanisi na biso na makambo oyo bakomi na Internet. Mpo na nini ekateli makasi ndenge wana? Libosoliboso mpo tolingaka “Nzambe ya solo.” Yango wana tolingaka te koyoka mateya ya lokuta oyo eyokani te na solo ya Liloba na ye. (Nz. 31:5; Yoa. 17:17) Tolingaka mpe ebongiseli oyo Yehova asalelaka mpo na koteya biso mateya kitoko ya solo, na ndakisa, nkombo ya Yehova mpe ndimbola na yango, mokano na ye mpo na mabele, ndenge moto akómaka soki akufi, mpe elikya ya lisekwa. Oyebi lisusu ndenge oyokaki mbala ya liboso oyo oyekolaki mateya yango mpe mateya mosusu? Sikoyo, mpo na nini otika moto oyo azali kofinga ebongiseli oyo eteyá yo makambo yango ya solo abebisa makanisi na yo?—Yoa. 6:66-69.
8 Ata soki bateyi ya lokuta balobi nini, tokolanda bango te! Mpo na nini tókende na mabulu wana ya mai oyo ekauká, kaka mpo tókosama mpe tólɛmba nzoto? Tózwa nde ekateli ya kotikala sembo epai ya Yehova mpe na ebongiseli oyo banda kala esilisaka mposa na biso ya mai na ndenge epesaka biso mai ya pɛto mpe oyo ekitisaka motema, elingi koloba mateya ya solo oyo euti na Liloba ya Nzambe.—Yis. 55:1-3; Mat. 24:45-47.
Kolanda “masapo ya lokuta” te
9, 10. Likebisi nini Paulo apesaki Timote mpo na “masapo ya lokuta,” mpe mbala mosusu Paulo azalaki kokanisa nini? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
9 Na bantango mosusu, okoki kososola ete babaloli elembo mpo etalisa na nzela ya mabe. Kasi na bantango mosusu, ekoki kozala mpasi koyeba yango. Ezali ndenge moko na makama oyo euti na Satana; mosusu emonanaka polele, mosusu emonanaka mpenza te. Ntoma Paulo akebisi biso na motambo moko ya Satana oyo emonanaka polele te—“masapo ya lokuta.” (Tángá 1 Timote 1:3, 4.) Mpo tótikala na nzela ya bomoi, tosengeli koyeba soki masapo yango ya lokuta ezali nini, mpe ndenge nini tokoki koboya kotyela yango likebi.
10 Likebisi ya Paulo mpo na masapo ya lokuta ezali na mokanda ya liboso oyo akomelaki Timote, oyo azalaki nkulutu na lisangá mpe azwaki mokumba ya kobatela bopɛto ya lisangá mpe kosalisa baninga na ye bakristo bátikala sembo. (1 Tim. 1:18, 19) Liloba ya Grɛki oyo Paulo asalelaki mpo na “masapo ya lokuta” elimboli lokuta to masolo oyo babimisá kobimisa. Buku moko (The International Standard Bible Encyclopaedia) elobi ete lisapo ya lokuta ezali lisolo moko ya makambo ya losambo oyo eyokani te na solo. Mbala mosusu Paulo azalaki kokanisa mateya ya lokuta oyo ezalaki kouta na masolo ya kala oyo bato babimisá mpe oyo ezalaki kokamwisa bato.b Masolo ya ndenge wana ezali likama mpo “ebimisaka nde mituna oyo ekotinda na kolukaluka mpamba”—elingi koloba ete bato oyo bayokaka yango bakómaka komituna mituna mpo na makambo oyo ezali solo te mpe balekisaka ntango mingi mpo na koluka kozwa biyano. Satana, mokosi monene, asalelaka masolo yango mpe mateya ya lokuta mpo na kokosa bato oyo bazali ekɛngɛ te. Toli ya Paulo ezali polele: Kotya likebi na masapo ya lokuta te!
11. Ndenge nini Satana asalelaka lingomba ya lokuta mpo na kokosa bato, mpe mpo tókosama te, tosengeli kolanda likebisi nini?
11 Wapi mwa masapo ya lokuta oyo ekoki kobungisa biso nzela soki tokebi te? Na mokuse, masapo ya lokuta ezali liteya to lisolo nyonso ya lokuta na makambo etali losambo oyo ekoki kotinda matoi na biso ‘eboya koyoka solo.’ (2 Tim. 4:3, 4) Satana, oyo amibimisaka lokola “anzelu ya pole,” asalelaka lingomba ya lokuta mpo na kokosa bato. (2 Ko. 11:14) Atako mangomba ya bokristo elobaka ete elandaka Kristo, eteyaka, na ndakisa Bosato, lifelo ya mɔtɔ, mpe ete molimo ekufaka te—mateya oyo etondi na masapo mpe na lokuta. Mangomba ya bokristo elendisaka mpe bato básalaka bafɛti lokola Noele ná Pasika, oyo emonanaka lokola esepelisaka Nzambe, nzokande eutá na masapo mpe na mangomba ya lokuta. Masapo ya lokuta ekobungisa biso nzela te soki tolandi likebisi oyo Nzambe apesi ete tókabwana mpe ‘tótika kosimba eloko ya mbindo.’—2 Ko. 6:14-17.
12, 13. (a) Wapi makanisi misato ya lokuta oyo Satana abimisaka, mpe solo ezali nini mpo na mokomoko na yango? (b) Tosengeli kosala nini mpo masapo ya lokuta ya Satana ebungisa biso nzela te?
12 Ezali na makanisi mosusu ya lokuta oyo Satana abimisaka mpe ekoki kobungisa biso nzela soki tokebi te. Tózwa mwa bandakisa. Salá nyonso oyo olingi—malamu to mabe. Etali kaka yo moko. Televizyo, bafilme, bazulunalo ya mokili, mpe Internet elendisaka likanisi wana. Lokola lokuta yango elobamaka mingi, tokoki kobanda kokanisa ete mibeko ya Nzambe ezali mabe mpe kolanda makanisi ya mbindo ya mokili oyo. Kasi, likambo ya solo ezali ete tozali mpenza na mposa Nzambe alakisa biso etamboli ya malamu. (Yir. 10:23) Nzambe akobongola eloko moko te awa na mabele. Kolanda likanisi wana oyo emonisi ete ‘buká ndika ntango ozali naino na mino,’ ekoki kokómisa biso “bato oyo basalaka mosala te to bato oyo babotaka mbuma te” na mosala ya Yehova. (2 Pe. 1:8) Likambo ya solo ezali ete mokolo ya Yehova ekómi pene mpenza mpe tosengeli kokoba kozela yango. (Mat. 24:44) Nzambe akipaka yo te. Kondima lokuta wana ya Satana ekoki kotinda biso tótika kosalela Yehova, tókanisa tobongi te mpo alinga biso. Likambo ya solo ezali ete Yehova alingaka mosaleli na ye mokomoko, mpe ete bango nyonso bazali na ntina na miso na ye.—Mat. 10:29-31.
13 Tosengeli kokeba ntango nyonso, mpo makanisi mpe maloba ya bato ya mokili ya Satana ekoki komonana lokola solo. Nzokande, tóbosana te ete Satana azali mokosi monene. Mpo tókosama te na “masapo ya lokuta oyo esalemi na mayele” [to “masese malobami na mayɛlɛ,” haut fleuve], tosengeli kolanda toli mpe makebisi ya Liloba ya Nzambe.—2 Pe. 1:16.
‘Kolanda Satana te’
14. Likebisi nini Paulo apesaki bilenge basi mosusu oyo mibali bakufá, mpe mpo na nini biso nyonso tosengeli kotya likebi na maloba na ye?
14 Kanisá ete na nzela, okuti elembo oyo bakomi: “Oyo nzela mpo na kolanda Satana.” Nani kati na biso akondima kolanda yango? Nzokande, ata bakristo ya solo bakoki “kolanda Satana.” Paulo alobelaki ndenge ekoki kosalema. (Tángá 1 Timote 5:11-15.) Paulo akomaki makambo yango mpo na “bilenge basi oyo mibali bakufá,” kasi biso nyonso tokoki kozwa mateya na maloba na ye. Mbala mosusu bakristo wana ya basi na ekeke ya liboso bayebaki te ete bazali kolanda Satana, kasi misala na bango emonisaki ete yango nde bazalaki kosala. Ndenge nini tokoki kokeba mpo tólanda Satana te kozanga tóyeba yango? Tólobela likebisi oyo Paulo apesaki na oyo etali bilobaloba, to matongi ya mabe.
15. Satana alukaka nini, mpe ndenge nini Paulo amonisaki mayele ya Satana?
15 Satana alingi tótika kolobela kondima na biso, elingi koloba tótika kosakola nsango malamu. (Em. 12:17) Mpo na yango, alukaka tóbebisa ntango na biso na makambo ya mpambampamba to oyo ekokɔtisa bokabwani. Talá ndenge Paulo amonisaki mayele oyo Satana asalelaka. Alobaki boye: “Balingaka lisusu kosala mosala te, batambolatambolaka.” Na mikolo na biso oyo tokómá na baaparɛyi ndenge na ndenge, ezali mpasi te tóbebisa ntango na biso mpe ya basusu, na ndakisa na kotindela basusu bamesaje oyo ezangá ntina, mbala mosusu mpe ya lokuta oyo batindeli biso na Internet. “Bato ya bilobaloba.” Kolobaloba ekoki kotinda moto akosela moninga makambo mpe mbala mingi ebimisaka kowelana. (Mas. 26:20) Báyeba yango to te, bato oyo bakoselaka basusu makambo bamekolaka nde Satana Zabolo.c “Bamikɔtisaka na makambo ya bato.” Moto moko te kati na biso azali na lotomo ya koyebisa basusu ndenge basengeli kotambwisa bomoi na bango. Makambo wana nyonso ekoki kotinda biso tóbosana mosala oyo Nzambe apesi biso: kosakola Bokonzi. Soki totiki kopesa mabɔkɔ na mosala ya Yehova, tobandi kolanda Satana. Tokoki kozala na katikati te.—Mat. 12:30.
16. Batoli nini ekosalisa biso ‘tópɛngwa te mpo na kolanda Satana’?
16 Kotya likebi na batoli ya Biblia ekosalisa biso ‘tópɛngwa te mpo na kolanda Satana.’ Talá batoli mosusu ya bwanya oyo Paulo apesaki. Bózala “na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.” (1 Ko. 15:58) Komipesa na mosala ya Bokonzi ekopekisa biso tókóma gɔigɔi mpe tólekisaka ntango na makambo ezangá ntina. (Mat. 6:33) Bóloba makambo oyo ezali “malamu mpo na kotonga.” (Ef. 4:29) Zwá ekateli: koyoka matongi ya mabe te mpe kopanza yango te.d Yekolá komemya mpe kotyela bandeko na yo bakristo motema. Na ndenge yango, okokóma na momeseno ya koloba makambo oyo ekotonga baninga na esika ya oyo ekolɛmbisa bango. Paulo alobaki mpe ete tosengeli “komityela mokano ya . . . kokɔta na makambo ya bato te.” (1 Tes. 4:11) Tyeláká basusu likebi, kasi kokɔta te na makambo oyo etali kaka bango moko mpe batelá lokumu na bango. Tóbosana mpe te ete tosengeli te kotya basusu mbamba bándima makanisi na biso na makambo oyo basengeli kozwa bikateli bango moko.—Gal. 6:5.
17. (a) Mpo na nini Yehova akebisi biso na makambo oyo tosengeli kolanda te? (b) Ozali na ekateli nini na oyo etali nzela oyo Yehova alingi tólanda?
17 Topesi Yehova matɔndi mpo ayebisi biso polele makambo oyo tosengeli kolanda te! Nzokande, tóbosana ata moke te ete Yehova apesaka biso makebisi oyo tolobeli na lisolo oyo mpe na oyo eleki mpo alingaka biso mingi. Alingi te tólanda ‘bilembo ya lokuta’ oyo Satana atyá na nzela bongo tómona mpasi. Ya solo, nzela oyo Yehova alingi tólanda ezali nkaka, kasi ezali komema na esika oyo eleki malamu—na bomoi ya seko. (Mat. 7:14) Na yango, tókangama kaka na ekateli ya kolanda likebisi oyo Yehova apesi biso ete: “Nzela yango oyo. Bótambola na yango.”—Yis. 30:21.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lipɛngwi elimboli kotombokela losambo ya solo mpe kotika yango.
b Na ndakisa, mokanda ya Tobie, to Tobit, oyo bato mosusu bakanisaka ete ezalaka moko ya mikanda ya Biblia, ezalaki na ntango ya Paulo mpo ekomamaki soki na ekeke ya misato L.T.B. Etondi na biyambayamba mpe na masapo ya lokuta oyo etali maji mpe bondɔki kasi elakisi yango lokola makambo ya solo.—Talá buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 1, lokasa 135.
c Liloba ya Grɛki diabolos oyo ebongolami “zabolo” elimboli “mokoseli-bato-makambo.” Liloba yango ezali titre mosusu ya Satana, mokoseli-bato-makambo ya libosoliboso.—Yoa. 8:44; Em. 12:9, 10.
d Talá etanda “Kopanza nsala na mopɛpɛ.”
Okopesa eyano nini?
Ndenge nini okoki kosalela makebisi oyo ezali na mikapo oyo?
[Etanda/Bililingi na lokasa 19]
Kopanza nsala na mopɛpɛ
Bayuda bazalaka na lisolo moko ya kala oyo emonisi mpenza mabe oyo matongi ya mabe esalaka. Lisolo yango ebɛtamaka na ndenge ebele, kasi na mokuse elobi boye:
Mobali moko azalaki kopanza lokuta mpo na moto oyo alekaki bwanya na mboka na bango. Na nsima, moto wana ya bilobaloba amonaki ete asali mabe, mpe akendaki epai ya moto ya bwanya mpo na kosɛnga bolimbisi, mpe alobaki ete akosala nyonso oyo esengeli mpo alimbisama. Moto ya bwanya asɛngaki ye likambo moko. Ayebisaki ye akende kozwa kuse moko oyo etondi na nsala, afungola yango mpe apanza nsala na mopɛpɛ. Atako asosolaki likambo yango mpenza te, moto yango asalaki ndenge moto ya bwanya asɛngaki ye, mpe na nsima, azongaki epai ya moto yango ya bwanya mpe atunaki ye boye:
“Sikoyo olimbisi ngai?”
Moto ya bwanya alobaki ete: “Kende naino kosangisa nsala nyonso.”
Moto yango alobaki ete: “Ndenge nini nakomona yango? Nsala nyonso epanzani na mopɛpɛ.”
Na nsima moto ya bwanya azongisaki boye: “Kobongisa mabe oyo maloba na yo esali ezali mpasi, ekokani na kosangisa lisusu nsala.”
Liteya ezali polele. Tokoki te kozongisa maloba oyo tosili koloba, mpe na bantango mosusu, tokoki te kobongisa mabe oyo maloba yango esali. Na yango, liboso ya kopanza moto nsango, tóbosana te ete tolingi nde kopanza nsala na mopɛpɛ.
[Elilingi na lokasa 16]
Ndenge nini bato mosusu bakoki kobenga bapɛngwi na ndako na bango?