Tólendisana ete tózala na bolingo mpe na misala malamu—Lolenge nini?
“Tiká ete tótalanaka kati na biso mpo tólendisana ete tózala na bolingo mpe na misala malamu, . . . tóyikisanaka mpiko, na koleka awa emoni bino ete mokolo yango mozali kobɛlɛma.”—BAEBELE 10:24, 25, NW.
1, 2. (a) Mpo na nini ezalaki na ntina ete baklisto ya liboso bázwa kobɔndisama mpe bilendiseli kati na makita na bango? (b) Wapi toli ezwami na maloba ya Paulo oyo emonisi ntina ya koyangana elongo?
BAYANGANAKI na esika ya kobombama, basanganaki esika moko kati na ndako ekangami na bikuke. Na libándá, likámá ezalaki bipai binso. Yesu, Motambwisi na bango, auti kobomama liboso ya bato banso, mpe akebisaki bayekoli na ye ete bakonyokwama lokola ye moko anyokwamaki. (Yoane 15:20; 20:19) Kasi wana bazalaki koloba na mongongo ya kokita na ntina na Yesu, molingami na bango, na ntembe te, kozala elongo epusaki bango na komiyoka ete bazalaki na libateli.
2 Na nsima ya bambula, baklisto bakutanaki na lolenge nyonso ya komekama mpe ya minyoko. Lokola bayekoli wana ya liboso, bazwaki libɔndisi mpe elendiseli na koyanganáká elongo. Na yango, ntoma Paulo akomaki na Baebele 10:24, 25 (NW) ete: “Tiká ete tótalanaka kati na biso mpo tólendisana ete tózala na bolingo mpe na misala malamu, tótika koyangana elongo moko te, lokola bamoko bazali na momeseno, kasi tóyikisanaka mpiko, na koleka awa emoni bino ete mokolo yango mozali kobɛlɛma.”
3. Mpo na nini tokoki koloba ete Baebele 10:24, 25 ezali te bobele etindá oyo esɛngi na baklisto ete báyanganaka elongo?
3 Maloba wana mazali te bobele etindá ya kolanda koyangana elongo. Mazali kopesa mobeko mopemami na Nzambe mpo na makita nyonso ya boklisto—mpe ezali bongo mpo na mabaku nyonso wana baklisto basangani elongo. Lelo oyo koleka ndenge ezalaki liboso, na ntango tozali mpenza komona ete mokolo ya Yehova mozali kobɛlɛma, mitungisi mpe makámá ya ebongiseli oyo mabe ezali kosala ete makita na biso mázala lokola esika ya libateli, liziba moko ya nguya mpe ya bilendiseli mpo na biso banso. Nini tokoki kosala mpo ete ezala mpenza bongo? Tiká tótalela maloba ya Paulo na likebi nyonso, na kotunáká mituna misato ya ntina: “Kotalana kati na biso” elimboli nini? ‘Kolendisana ete tózala na bolingo mpe na misala malamu’ elimboli nini? Mpo na kosukisa, lolenge nini tokoki ‘koyikisana mpiko’ na mikolo oyo ya mpasi?
“Tótalanaka kati na biso”
4. “Kotalana moko na mosusu” elimboli nini?
4 Wana Paulo alendisaki baklisto ete ‘bátalanaka kati na bango,’ asalelaki likelelo ya Greke ka·ta·no·eʹo, lolenge ya makasi ya liloba oyo eyebani mingi “kososola.” Búku Theological Dictionary of the New Testament elobi ete yango elimboli “kokamba makanisi na yo nyonso likoló na eloko moko.” Engebene W. E. Vine, ekoki lisusu kolimbola “koyeba malamu mpenza, kotalela na mozindo.” Na yango, wana baklisto bazali ‘kotalana kati na bango,’ bazali kosuka te bobele na kotalana likolólikoló, kasi bazali kosalela makoki na bango ya kokanisa mpe bazali komeka kososola na mozindo.—Kokanisá na Baebele 3:1.
5. Wapi mwa makambo mosusu ya moto oyo makoki te komonana na libándá, mpe mpo na nini tosengeli kotalela yango?
5 Tosengeli komikundola ete ezali na makambo mingi kati na moto koleka oyo ekoki komonana na libándá na ye, na misala na ye, soko mpe na bomoto na ye. (1 Samwele 16:7) Mbala mingi moto oyo azali komonana lokola ete alobaka mingi te akoki kozala na mayoki na ye mpenza ya mozindo mpe ezaleli kitoko ya kosɛkisa bato. Na bongo, ezalela ya makambo na biso ekeseni mpe mingi. Bamoko bakutanaki na mikakatano makasi kati na bomoi na bango; basusu bazali koyika mpiko na mikakatano oyo mikoki kozala mpasi mpo na biso kokanisa yango. Mbala mingi kosilika na biso na ntina na ezaleli moko mabe ya ndeko na biso mobali to mwasi ekolimwa soki toyekoli mingi ezaleli to makambo matali ndeko yango.—Masese 19:11.
6. Wapi mwa makambo oyo kati na yango tokoki koyebana malamu moko na mosusu, mpe litomba nini malamu ekoki kozwama?
6 Ya solo, yango elimboli te ete tosengeli komikɔtisa na makambo ya moto kozanga ete tópesamela ndingisa. (1 Batesaloniki 4:11) Nzokande, tokoki mpenza komonisa bosepeli moko na mosusu. Yango esɛngi makambo mingi, esuki te bobele na kopesana mbote kati na Ndako ya Bokonzi. Mpo na nini te kopona moto oyo okoki koyeba ye malamu mpe komityela mokano ya kosolola na ye mwa miniti moke liboso mpe nsima ya makita? Ekozala malamu “kolanda ezaleli ya boyambi” na kobyangáká moninga moko to baninga mibale na ndako na yo mpo na kolya mwa bilei mikemike. (Baloma 12:13) Monisá bosepeli. Yoká. Bobele kotunáká lolenge ndeko moko akómaki koyeba mpe kolinga Yehova ekoki komonisa makambo mingi. Nzokande, okoki koyekola makambo mingi na kosaláká elongo na bango kati na mosala ya ndako na ndako. Kotalanáká kati na biso motindo wana ezali kosalisa biso na kokólisa mayoki ya boninga ya solosolo, to koyeba komitya na esika na ye.—Bafilipi 2:4; 1 Petelo 3:8.
“Tólendisana”
7. (a) Lolenge nini mateya ya Yesu mazalaki na bopusi likoló na bato? (b) Nini esalaki ete mateya na ye mázala na nguya mingi?
7 Ntango tozali kotalana kati na biso, tobongisami malamu mpo na kolendisana mpe koyikisana mpiko kati na biso mpo na kosala likambo moko. Mingimingi bankulutu baklisto bazali kokokisa mokumba monene kati na likambo yango. Na ntango oyo Yesu asilisaki koloba liboso na bato, tozali kotánga ete: “Ebele bakamwi mateyo na ye.” (Matai 7:28) Na libaku mosusu, ata basusu kati na basodá oyo batindamaki mpo na kokanga ye, wana bazongaki balobaki ete: “Kino ntango oyo moto alobi lokola moto oyo tɛ.” (Yoane 7:46) Nini esalaki ete mateya ya Yesu mázala na nguya mingi? Bomonisi ya mayoki ya makasi? Te; Yesu azalaki koloba na lokumu nyonso. Nzokande, azalaki ntango nyonso koluka kosimba mitema ya bayoki na ye. Mpamba te azalaki kotala bato, ayebaki lolenge nini kozala na bopusi likoló na mayoki na bango. Azalaki kosalela masese ya nguya mpe ya pɛtɛɛ oyo ezalaki komonisa makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo. (Matai 13:34) Bobele bongo, baoyo bazwi mikumba na makita na biso basengeli komekola Yesu na kopesáká masoló ya mɔ́tɔ mpe ya kosepelisa oyo mazali kopusa mayoki ya bato. Lokola Yesu, tokoki komipesa na koluka masese oyo mayokani na bayoki na biso mpe oyo mazali kosimba mitema na bango.
8. Lolenge nini Yesu azalaki kolendisa na kopesáká ndakisa, mpe lolenge nini tokoki komekola ye kati na likambo yango?
8 Wana ezali biso kosalela Nzambe na biso, tokoki biso banso kolendisana kati na biso na nzela ya ndakisa na biso. Na ntembe te, Yesu azalaki kolendisa bayoki na ye. Alingaki mosala ya boklisto mpe akumisaki yango. Alobaki ete ezalaki lokola bilei mpo na ye. (Yoane 4:34; Baloma 11:13) Bosepeli motindo wana ekoki koyambela basusu. Okoki mpe kosala ete esengo na yo kati na mosala ya kosakola emonana epai na basusu? Wana ozali kosala nyonso mpo na kobwaka ezaleli ya lolendo, lobelá baeksperianse na yo ya malamu epai na basusu kati na lisangá. Na ntango obyangi basusu ete básakola elongo na yo, talá soki okoki kosalisa bango ete bázwa bosepeli wana ezali bango kolobela basusu na ntina na Yehova, Mozalisi na biso Monene.—Masese 25:25.
9. (a) Wapi myango misusu oyo tosengeli kopɛngola mpo na kozala na bopusi likoló na basusu, mpe mpo na nini? (b) Nini esengeli kopusa biso mpo na komipesa kati na mosala ya Yehova?
9 Atako bongo, tosengeli kozala na likebi, kolendisa basusu na lolenge ya mabe te. Na ndakisa, kozanga koyeba, tokoki kopesa bango mayoki ya komema ngambo mpo ete bazali kosala mingi te. Kozanga koyeba, tokoki koyokisa bango nsɔ́ni na kokokanisáká bango na lolenge mabe na basusu oyo bazali kosangana mingi na mosala ya kosakola, to tokoki ata kobimisa mitindá makasi mpe komona mpamba baoyo bazali kokokisa yango te. Myango motindo oyo mikoki kozala na bopusi likoló na basusu mpo na mwa ntango, kasi Paulo akomaki te ete, ‘tólendisana na kopesáká bato liyoki ya komema ngambo mpe na misala malamu.’ Te, tosengeli kolendisana ete tózala na bolingo, na nsima misala mikolanda mikosalema na mikano ya malamu. Moto moko te asengeli kopusama bobele na ntina na oyo basusu kati na lisangá bakokanisa mpo na ye soki akokokisa te makambo masɛngami na ye.—Kokanisá na 2 Bakolinti 9:6, 7.
10. Mpo na nini tosengeli komikundola ete tozali te bankolo likoló na kondima ya basusu?
10 Kolendisana kati na biso elimboli te kozala bapolisi kati na biso. Atako azalaki na bokonzi mingi oyo Nzambe apesaki ye, na komikitisa nyonso ntoma Paulo akundwelaki lisangá ya Kolinti ete: ‘Tozali te bankolo likoló na kondima na bino.’ (2 Bakolinti 1:24, NW) Soki na komikitisa nyonso, na ndakisa na ye, toyebi ete ezali mokumba na biso te ya kokata lolenge nini basusu basengeli kosala kati na mosala ya Yehova, to koyangela lisosoli na bango mpo na makambo oyo bango moko basengeli kozwa bikateli, tokopɛngola ete tókóma “bayengebene na koleka” te, bato bazangi esengo, bato na makambo makasi, bato oyo bamonaka makambo nyonso mabe, to bato oyo bakangami bobele na mitindá. (Mosakoli 7:16) Bizaleli wana bilendisaka basusu te, kasi bizali nde konyokola bango.
11. Eloko nini epusaki bato na kopesa makabo na ntango ya botongi hema ya Yisraele, mpe lolenge nini yango ekoki kosalema na mikolo na biso?
11 Tolingi ete milende na biso nyonso kati na mosala ya Yehova misalema na elimo motindo moko lokola oyo ezalaki na Yisraele ya kala ntango makabo mapesamaki mpo na kotonga hema. Tozali kotánga na Esode 35:21 ete: “Na nsima babutwaki, moto na moto na mposa na motema na ye mpe moto na moto akanaki boye na makanisi na ye, bayaki na makabo na [Yehova] mpɔ na kobɔngisa.” Moto moko te atindaki bango na makasi kasi bapusamaki bango moko, uta na motema na bango moko. Ya solo, awa ezali mpenza kotángama na Liebele ete “moto na moto oyo motema mopusaki ye” apesaki makabo wana. (Biso nde totɛ́ngamisi yango.) Lisusu, tiká ete tósimbanaka mitema kati na biso ntango nyonso oyo tozali elongo. Elimo ya Yehova ekoki kosala makambo mosusu oyo matikali.
“Tóyikisanaka mpiko”
12. (a) Wapi mwa bandimbola ya liloba ya Greke oyo ebongolami na “kolendisa”? (b) Lolenge nini baninga ya Yobo bazangaki kolendisa ye? (c) Mpo na nini tosengeli kopɛngola ezaleli ya kosambisana moko na mosusu?
12 Ntango Paulo akomaki ete tosengeli ‘koyikisanaka mpiko,’ asalelaki lolenge moko ya liloba ya Greke pa·ra·ka·leʹo, oyo ekoki mpe kolimbola ‘kopesa makasi, kobɔndisa.’ Kati na libongoli ya Greke oyo ete La Septante, liloba wana lisalelamaki mpe kati na Yobo 29:25, epai kuna Yobo alobelami lokola moto oyo abɔndisaka baleli. Nzokande, likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete, ntango Yobo ye moko azalaki na nsé ya komekama makasi, azwaki kolendisama motindo wana te. “Babɔndisi” na ye misato bamipesaki nde na kosambisa ye mpe na kolobeláká ye maloba ya kopamela na boye ete bazangaki kososola ye to mpe komitya na esika na ye. Ya solo, kati na maloba nyonso oyo babimisaki, ata mbala moko te babéngaki Yobo na nkombo na ye. (Kokanisá na Yobo 33:1, 31.) Emonani ete batalelaki ye mingi lokola likambo kasi lokola moto te. Likambo ya kokamwa ezali te soki Yobo alobaki na bango na maloba ya mawa ete: “Sɔkɔ molimo na bino ejalaki na esika na ngai”! (Yobo 16:4) Bobele bongo lelo oyo, soki olingi kolendisa moto moko, ezali malamu komitya na esika na ye! Kosambisa ye te. Lokola Baloma 14:4 eyebisi yango, “yɔ ojali nani wana [okosambisa, NW] mosali na moto mosusu? Ye akotɛlɛma sɔkɔ akokwea bobɛlɛ na miso na nkolo na ye mɔkɔ. Nde akotɛlɛma mpenja, jambi [Yehova] ayebi kotɛmisa ye.”
13, 14. (a) Likoló na solo nini ya moboko tosengeli kondimisa bandeko na biso, mibali mpe basi, mpo na kobɔndisa bango? (b) Lolenge nini Danyele akembisamaki na anzelu?
13 Liloba pa·ra·ka·leʹo mpe nkombo oyo ezali na boyokani na yango ebongolami mpe na “kobɔndisa” na 2 Batɛsalɔniki 2:16, 17: “Tika ete Nkolo na biso Yesu Klisto mpe Njambe Tata na biso oyo alingi biso mpe apɛsi biso kobɔndisama na seko mpe elikia malamu na njela na ngɔlu, abɔndisa mitema na bino mpe alendisa bino na misala yɔnsɔ mpe na maloba yɔnsɔ malamu.” Tomoni ete Paulo asangisi likanisi ya kozala na mitema mibɔndisami elongo na solo ya moboko oyo ete Yehova alingi biso. Na yango tokoki koyikisana mpiko mpe kobɔndisana moko na mosusu na komonisáká solo wana ya ntina.
14 Na libaku moko, mosakoli Danyele abulunganaki nsima ya kozwa emonaneli moko ya nsɔ́mɔ oyo ememaki ye na koloba ete: “Bonjɛnga na ngai ebebisamaki, mpe najalaki na nguya lisusu tɛ.” Yehova atindaki anzelu moko oyo akundwelaki Danyele mbala mingi ete azalaki “moto molingami mingi” na miso ya Nzambe. Litomba ezalaki nini? Danyele ayebisaki anzelu ete: “Okembisi ngai.”—Danyele 10:8, 11, 19.
15. Lolenge nini bankulutu mpe bakɛngɛli-batámboli bakomonisa bokatikati kati na makumisi mpe kosembola?
15 Na bongo, talá sikawa lolenge mosusu mpo na koyikisa basusu mpiko. Kokumisa bango! Ezalaka mpasi te mpo na kokwea na ezaleli ya kotɔngatɔnga, to ya kozala na makambo makasi. Ya solo, ezali na bantango oyo kosembola ekoki kozala na ntina, mingimingi na bankulutu mpe bakɛngɛli-batámboli. Kasi ekozala malamu mpo na bango soki bakomikundola ete basengeli kopesa bilendiseli oyo bizali kosimba motema na esika ya kozala na ezaleli ya koluka kokweisa.
16. (a) Wana tozali koyikisa mpiko epai na baoyo bazali konyokwama na makanisi, mpo na nini esengeli te bobele kosuka na kosɛnga bango ete básala mingi kati na mosala ya Yehova? (b) Lolenge nini Yehova asalisaki Eliya na ntango oyo azalaki konyokwama na makanisi?
16 Mingimingi baoyo bazali konyokwama na makanisi basengeli koyikisama mpiko mpe Yehova azali komizela ete biso baninga na bango baklisto tózala liziba ya lisalisi—mingi mpenza soki tozali bankulutu. (Masese 21:13) Tokoki kosala nini? Eyano ekoki kosuka te bobele na koyebisa bango ete básala mingi kati na mosala ya Yehova. Mpo na nini? Mpamba te yango ekoki kotinda na kokanisa ete konyokwama na bango na makanisi euti na ezaleli na bango ya kozanga kosala mingi. Yango ezalaka ntango nyonso bongo te. Na ntango moko boye mosakoli Eliya atungisamaki makasi na boye ete akómaki kolinga kokufa; nzokande yango esalemaki na ntango oyo amipesaki mingi kati na mosala ya Yehova. Lolenge nini Yehova asalaki epai na ye? Atindaki anzelu moko mpo na kopesa ye lisalisi oyo ebongi. Eliya afungolaki motema na ye epai na Yehova, komonisáká ete azalaki komiyoka ete azalaki na ntina te lokola bankɔ́kɔ na ye oyo basilá kokufa, ete azalaki bobele kosala mosala ya mpunda, mpe ete azalaki bobele ye moko. Yehova ayokaki ye mpe abɔndisaki ye na lisalisi ya bilakiseli ya nsɔ́mɔ ya nguya na Ye mpe andimisaki ye ete azalaki ye moko te mpe ete mosala oyo abandisaki elingaki kokóma na nsuka na yango. Yehova alakaki mpe kopesa na Eliya moninga oyo ye asengelaki kobongisa, oyo na nsima alingaki kokitana ye.—1 Mikonzi 19:1-21.
17. Lolenge nini nkulutu akoki kolendisa moto oyo azali na makanisi mabe na ntina na ye moko?
17 Oyo nde elendiseli! Tiká ete biso mpe tólendisa baoyo kati na biso batungisami na mayoki. Tóluka kososola bango na koyokáká! (Yakobo 1:19) Tópesa libɔndisi liuti na Makomami oyo liyokani na mposa ya moto na moto. (Masese 25:11; 1 Batesaloniki 5:14) Mpo na kosalisa baoyo bazali na makanisi mabe na ntina na bango moko, bankulutu bakoki, na boboto nyonso, kopesa bilembeteli na Makomami oyo bimonisi ete Yehova alingi bango mpe azali kotalela bango na motuya.a Kosolola na ntina na lisiko ekoki kozala mwango ya nguya mpo na koyikisa mpiko epai na baoyo bazali komimona ete bazali na ntina te. Moto oyo azali komitungisa mingi na ntina na masumu mosusu oyo asalaki kala akoki kozala na mposa ete bámonisa ye ete lisiko esilaki kopɛtola ye soki amonisaki solo kobongola motema mpe kotika misala motindo wana ya mabe.—Yisaya 1:18.
18. Lolenge nini liteya ya lisiko esengeli kosalelama mpo na koyikisa mpiko epai na moto oyo abebisami na moto mosusu?
18 Ya solo, nkulutu akopesa likanisi likoló na likambo moko ya sikisiki mpo na kosala ete liteya lizala ya malamu. Tókamata ndakisa moko: Mbeka ya lisiko ya Klisto emonisamaki liboso na bambeka ya banyama na Mibeko ya Mose, oyo esɛngamaki mpo na mbɔndi ya masumu nyonso. (Levitike 4:27, 28) Nzokande, ezalaki na mobeko moko te oyo esɛngaki ete mwasi oyo babebisi ye apesa mbeka motindo wana mpo na lisumu. Mobeko moyebisaki ete “basengelaki kosala eloko te” mpo na kopesa ye etumbu. (Deteronome 22:25-27, NW) Na yango, lelo soki ndeko mwasi moko abundisami mpe abebisami, mpe yango esali ete amiyoka ete azali mbindo mpe azali na ntina te, ekozala malamu kolobela ye mposa ya lisiko ete ekopɛtola ye na lisumu wana? Soko moke te! Lokola babebisaki ye na makasi, ye asali lisumu te. Ezali mobebisi nde asalaki lisumu mpe azali na mposa ya kopɛtolama. Atako bongo, bolingo oyo Yehova mpe Klisto bamonisaki na kopesáká lisiko ekoki kosalelama lokola elembeteli ete akómi mbindo te na miso ya Nzambe na ntina ya lisumu ya moto mosusu kasi ete azali na motuya na miso ya Yehova mpe azali kati na bolingo na ye.—Kokanisá na Malako 7:18-23; 1 Yoane 4:16.
19. Mpo na nini tosengeli te komizela ete bokutani na biso nyonso elongo na bandeko na biso mibali mpe basi ezala ntango nyonso ya kolendisa, kasi nini esengeli kozala ekateli na biso?
19 Ee, atako nini ekoki kozala ezalela ya bomoi ya moto na moto, kozanga kotalela makambo ya mpasi oyo ekómelaki ye na ntango ya kala, moto yango azali na likoki ya kozwa elendiseli kati na lisangá ya basaleli ya Yehova. Mpe akozwa mpenza elendiseli yango soki tozali kotalana kati na biso, kolendisana mpe koyikisana mpiko ntango nyonso oyo tozali elongo. Nzokande, lokola tozali bato bazangi kokoka, biso nyonso tozangaka kosala bongo na bantango mosusu. Ya solo, tokoki koyokisana mawa mpe ata kopesana mpasi na motema na bantango mosusu. Tómeka te kotɛlɛmisa makanisi likoló na mabungá ya basusu kati na likambo yango. Soki otɛlɛmisi makanisi likoló na mabungá mikemike, ozali na likámá ya kozala moto oyo azali kotɔnga mingi lisangá mpe okoki ata kokwea kati na motambo oyo Paulo asalaki makasi na kolendisa biso ete tópɛngola yango, oyo ya kotika koyangana elongo. Tiká ete yango esalema soko moke te! Lokola ebongiseli oyo enuni ekómi na makámá mingi mpe na makambo mingi ya mpasi, tiká ete tózwa ekateli makasi ya kosala oyo tokoki kosala mpo ete bokutani na biso elongo kati na makita ezala ya kotonga—mpe esalema bongo na koleka awa tozali komona ete mokolo ya Yehova mobɛlɛmi!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkulutu akoki kopona koyekola masoló ya kolendisa oyo mazali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! elongo na moto motindo wana—na ndakisa, “Olingi kozwa litomba malamu na ngolu na Nzambe?” mpe “Ndenge nini okoki kolónga ntango onyokwami na makanisi.”—Mosenzeli ya 15 Febwáli mpe ya 1 Mársi 1990.
Lolenge nini okoki koyanola?
◻ Mpo na nini ezali na ntina ete makita na biso mpe bokutani na biso ezala ya koyikisa mpiko na mikolo oyo ya nsuka?
◻ Kotalana kati na biso elimboli nini?
◻ Kolendisana kati na biso elimboli nini?
◻ Esengeli nini mpo na koyikisana mpiko?
◻ Lolenge nini baoyo bazali konyokwama na makanisi mpe baoyo balɛmbi na motema basengeli koyikisama mpiko?
[Elilingi na lokasa 16]
Ezaleli ya boyambi ezali kosalisa biso na koyebana malamu moko na mosusu
[Elilingi na lokasa 18]
Ntango Eliya azalaki konyokwama na makanisi, Yehova abɔndisaki ye na boboto nyonso