Mokapo 17
‘Milimo mikatamaki nkingo’ mizwi mbano
1. Tozali kobika lelo na eleko nini, mpe nini emonisi yango?
BOKONZI na Nzambe esili kobanda koyangela! Mofandi na mpunda mpembe etikali moke akokokisa elonga na ye. Mpunda motane, mpunda moindo mpe mpunda na langi lokola ya mai ya mpondu, balandi kopota mbangu na mokili. Na ntembe te, bisakweli na Yesu na ntina etali koya na ye lokola Mokonzi bizali kokokana. (Matai, mikapo 24 mpe 25; Malako, mokapo 13; Luka, mokapo 21) Ee, tozali kobika na mikolo na nsuka na biloko mabe na ntango oyo. (2 Timote 3:1-5) Na yango, totya likebi na makambo makoleka, wana Mwana na Mpate, Yesu Klisto, afungoli elembo ya mitano ya mokanda yango. Makambo nini mosusu makomonisama na biso sikawa?
2. (a) Yoane amoni nini ntango elembo ya mitano efungwami? (b) Mpo na nini tokoki kokamwa te na kotanga ete Yoane amonaki etumbelo na mbeka na elilingi kuna na likoló?
2 Yoane alobeli awa likambo moko amonaki, oyo epasoli motema: “Wana efungoli ye elembo na mitano, namoni na nse na etumbelo milimo na bango basili kokatama nkingo mpo na liloba na Nzambe mpe mpo na litatoli litatolaki bango.” (Emoniseli 6:9) Etumbelo na mbeka kuna na likoló? Ee. Ya solo, ezali mbala ya liboso Yoane alobeli etumbelo, kasi asili kolobela biso motindo Jéhovah afandaki na kiti na Ye ya bokonzi, bacheribɛ bazingi ye, libeke na talatala, miinda mpe mikóló 24 oyo bazali na mpaka na malasi, nyonso oyo ekundoli biso biloko bizaláká kala kati na tabernakle na mabelé, esika ya bosantu ya Jéhovah, na Yisraele. (Exode 25:17, 18; 40:24-27, 30-32; 1 Ntango 24:4) Na yango, mpo na nini tokokamwa na koyoka ete Yoane amonaki lisusu etumbelo na mbeka na elilingi na likoló?—Exode 40:29.
3. (a) Na tabernakle ya kala ya Bayuda, motindo nini milimo mizalaki kosopama “na nse na etumbelo”? (b) Mpo na nini Yoane amoni milimo na batemwe basili kobomama na nse na etumbelo ya elilingi na likoló?
3 Na nse na etumbelo yango ezali na “milimo na bango basili kokatama nkingo mpo na liloba na Nzambe mpe mpo na litatoli litatolaki bango.” Elingi koloba nini? Ezali milimo mibimi na nzoto te lokola ekokanisaka bato ya mokili, na ndakisa bapakano Bagreke ya kala. (Genese 2:7; Ezekiele 18:4) Te, Yoane ayebi ete molimo, to bomoi, elakisami na elilingi na makila; epai mosusu, na tabernakle ya kala ya Bayuda, ntango banganga bazaláká kopesa nyama lokola mbeka, bazaláká “kobwaka makila na yango likolo na etumbelo, epai na epai,” to bazaláká kosopa yango “na nse na etumbelo na mbeka na moboma.” (Levitike 3:2, 8, 13; 4:7; 17:6, 11, 12) Na yango, molimo na nyama oyo ebomamaki lokola mbeka esopamaki na etumbelo. Kasi mpo na nini Yoane amoni milimo, to makila, na basaleli mosusu na Nzambe na nse na etumbelo ya elilingi kuna na likolo? Mpo ete kufa na bango ezali lokola mbeka.
4. Na ndimbola nini kufa na baklisto bapakolami na elimo ezali lokola mbeka?
4 Baoyo nyonso babotami na elimo lokola bana na Nzambe bazali kokufa liwa ya mbeka. Na ntina na mosala mopesameli bango kati na Bokonzi na Jéhovah na likoló, mokano na Jéhovah ezali ete batika elikya nyonso ya bomoi ya seko awa na mabelé mpe bakaba yango lokola mbeka. Mpo na yango, bazali kondima liwa lokola ya mbeka mpo na kosimba bokonzi ya Jéhovah na molongo mobimba. (Bafilipi 3:8-11; tala 2:17.) Ezali yango esalaki mpenza baoyo Yoane amoni bango na nse na etumbelo. Ezali baklisto bapakolami na elimo, baoyo na ntango na bango, babomamaki mpo na mosala ya molende bazalaki kosala mpo na kobatela Liloba mpe bokonzi ya Jéhovah. ‘Milimo na bango mikatamaki nkingo mpo na liloba na Nzambe mpe mpo na litatoli [marturian] litatolaki bango.’
5. Na ndimbola nini milimo na basembwi, atako misili kokufa, mizali konganga mpo na kosenga etumbu likoló na babomi na bango?
5 Elandani lisusu boye: “Bangangi na mongongo makasi ete, kino ntango nini, e Nkolo mosantu mpe na solo? Okosambisa te mpo na kobukanisa bango bafandi na mokili na ntina na makila na biso?” (Emoniseli 6:10) Ndenge nini milimo na bango, makila na bango, ekoki konganga mpo na kosenga etumbu, nzokande engebene Biblia bakufi bayebi eloko moko lisusu te? (Mosakoli 9:5) Tokanisa naino. Makila ya mosembwi Abele mazalaki konganga te nsima wana ye abomamaki na Kaïna? Jéhovah alobaki ntango yango na Kaïna ete: “Osali nini? Yoka! Mongongo na makila na ndeko na yo engangeli ngai longwa na mabelé.” (Genese 4:10, 11; Baebele 12:24) Awa ekoki te kokanisa ete makila ya Abele mazalaki solo koloba, kasi elimboli ete Abele abomamaki mpamba, mpe na yango, boyengebene esengelaki kokokisama, mpo na kopesa etumbu epai na mobomi na ye. Bobele bongo, babomami baklisto oyo Yoane amonaki, babomamaki se mpamba; mpo na kokokisa boyengebene, babomi na bango basengeli kofuta makila na bango. (Luka 18:7, 8) Konganga wana mpo na kosenga etumbu ezali makasi, mpamba te bazali bankoto mingi oyo babomamaki motindo yango.—Tala Yilimia 15:15, 16.
6. Mpo na makila nini Jéhovah ayeisaki etumbu likoló na Bayuda na mobu 607 liboso na ntango na biso?
6 Tokoki mpe kotalela makambo malobelami na Yoane mpe kokokisa yango na makambo masalemaki kati na bokonzi na Yuda oyo esilaki kopengwa, ntango mokonzi Manasé abandaki koyangela, na mobu 716 liboso na ntango na biso. Mokonzi wana asopaki makila ya bato mingi se mpamba; ekoki kozala ete abomaki mosakoli Yisaya na ‘mosumani to scie.’ (Baebele 11:37; 2 Mikonzi 21:16) Ya solo, abongolaki motema mpe na nsima abongolaki etamboli na ye, kasi asilaki koboma bato mingi mpenza. Yango wana, ntango bato na Babilone babebisaki bokonzi na Yuda na mobu 607 liboso na ntango na biso, “solo, likambo oyo eyelaki Bayuda mpo na liloba na Jéhovah ete alongola bango na miso na ye mpo na masumu na Manasé, yango nyonso esalaki ye, mpe mpo na makila oyo ye asopaki mpamba, mpo ete atondisaki Yelusaleme na makila na mpamba. Jéhovah ayebaki kolimbisa yango te.”—2 Mikonzi 24:3, 4.
7. Nani azali mpenza na nyongo mpo na “makila na babulami” oyo masili kosopama?
7 Lokola na ntango oyo Biblia ezalaki kokomama, ekoki kozala ete mingi kati na baoyo babomaki batemwe na Nzambe na eleko na biso basila kokufa uta kala, kasi lisangá oyo ebomisaki bango ezali naino mpe ezali na nyongo ya makila. Ezali bongo lisangá ya Satana awa na mabelé, libota na ye awa na mabelé. Moko kati na biteni minene na lisangá yango ezali Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta.a Elobami mpo na yango ete “alangwi mpo na makila na babulami mpe makila na batemwe na Yesu.” Ee, “kati na ye makila na basakoli mpe na babulami mazwami, mpe makila na bango nyonso babomamaki na mokili.” (Emoniseli 17:5, 6; 18:24; Baefese 4:11; 1 Bakolinti 12:28) Kanisa mpo na bibele mpe bibele na bato basili kobomama! Ntango nyonso oyo Babilone Monene ekoumela, makila na bato oyo ye asili koboma makolanda konganga ete boyengebene elandela yango.—Emoniseli 19:1, 2.
8. (a) Banani babomamaki na mikolo na Yoane? (b) Minyoko nini bakonzi ya Loma babimisaki?
8 Na ekeke ya Liboso, Yoane ye moko amonaki motindo nyoka mabe mpe libota na ye awa na mabelé banyokolaki mpe babundisaki lisanga ya baklisto bapakolami oyo ezalaki naino kokola. Amonaki Nkolo abakisamaki likoló na nzete mpe amonaki liwa ya Etienne, ya Yakobo, ndeko na ye, ya Pierre, ya Paulo mpe ya baninga na ye mosusu oyo babomamaki. (Yoane 19:26, 27; 21:15, 18, 19; Misala 7:59, 60; 8:2; 12:2; 2 Timote 1:1; 4:6, 7) Na mobu 64, mokonzi na Loma Néron akoselaki baklisto makambo ete batumbaki mboka Loma, nzokande nsango esilaki koyokana ete ezalaki ye nde atumbaki mboka. Tacite, mokomi na makambo na kala akomaki boye: “Minyoko na bango [oyo ya baklisto] ekomaki lisano: bamoko, bazipamaki na mposo na nyama, balyamaki na bambwa; mingi, [bakangisamaki na banzete]b bazalaki kotumbama na butu, mpo na kongengisa mboka.” Na nsima, na boumeli ya eleko mosusu ya minyoko makasi oyo ebimaki na boyangeli ya empereur Domitien (81 kino 96 ya ntango na biso), ntoma Yoane akangamaki na boloko na esanga ya Patamo. Makambo yango mamonisaki bosolo ya maloba oyo ya Yesu: “Soko basili konyokola ngai, bakonyokola bino lokola.”—Yoane 15:20; Matai 10:22.
9. (a) Lisangá nini ya kokosa bato Satana abimisaki yango pene na ekeke ya minei, mpe lisangá yango ezali ndambo monene ya nini? (b) Kati na mikili mibengami ete ya boklisto, bakonzi mosusu basalaki nini epai na ba Témoins de Jéhovah na boumeli na Etumba ya Liboso mpe Etumba ya Mibale ya mokili mobimba?
9 Na ekeke ya minei, nyoka na kalakala, Satan le Diable, abimisaki lisangá na ye monene ya bozimbisi, boklisto ya mokili oyo, losambo ya kopengwa—losambo loutaki na Babilone kasi epakolami vernis ya “boklisto.” Boklisto ya mokili oyo, eteni eleki monene ya libota ya Nyoka, esili kobimisa ebele na bituluku na mangomba oyo ezali na boyokani te. Lokola bokonzi ya kala ya Yuda oyo ezangaki sembo, boklisto ya mokili oyo ezali na nyongo na makila na bato mingi basili kobomama, mpamba te amikotisaki mpenza kati na bitumba na ngambo nyonso mibale na boumeli na Etumba ya Liboso mpe Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na kati na mikili na boklisto ya lokuta oyo, bakonzi mosusu basalelaki libaku ya bitumba yango mpo na koboma basaleli na Nzambe bapakolami na elimo. Na ntina na monyokoli oyo ekwelaki ba Témoins de Jéhovah mpo na Hitler, tokoki kotanga maloba oyo kati na mokanda Kirchenkampf in Deutschland (Etumba ya Mangomba na Alemanye), mokanda mokomamaki na Friedrich Zipfel: “Ndambo na misato kati na bango [ba Témoins de Jéhovah] babomamaki kobomama to bakufaki mpo na minyoko, nzala, maladi to misala makasi. Minyoko oyo makasi mibimisamaki mpo nakondima makai ya bato wana, kondima oyo ezalaki koyokana te na mateya ya national-socialiste.” Na ntembe te, tokoki koloba mpo na boklisto ya mokili oyo mpe mingimingi mpo na bakonzi na yango ete: “Makila na bato na sembo mamonani na bilamba na yo.”—Yilimia 2:34.c
10. Minyoko nini bilenge baklisto, basangani na ebele monene, bazwi yango kati na mikili mingi?
10 Uta 1935, bilenge baklisto ya sembo, basangani na ebele monene, banyokwamaki makasi na mikili mingi. (Emoniseli 7:9) Pene na nsuka na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bilenge ba Témoins de Jéhovah 14 babomamaki na nsinga na nkingo na mboka se moko na Mpoto. Mabe nini basalaki? Mpo baboyaki ‘koyekola etumba.’ (Yisaya 2:4) Eleki kala mingi te, bobele na ntina oyo moko, bilenge babomamaki na kobetama to na masasi, na Asie mpe na Afrike. Bilenge oyo basili kobomama, oyo bapesaki maboko na bandeko na Yesu bapakolami na elimo, na ntembe te bakosewisama kati na mokili ya sika elakami na Nzambe.—2 Petelo 3:13; tala Nzembo 110:3; Matai 25:34-40; Luka 20:37, 38.
Elamba mpembe mpe molai
11. Na ndimbola nini baklisto bapakolami oyo babomamaki mpo na kondima na bango bazwi “elamba mpembe mpe molai”?
11 Nsima na kolobela misala na kondima ya bato ya sembo ya kala, ntoma Paulo alobi: “Baoyo [wana] nyonso bazwi yango elakami te ata batatolami ete bazali na kondima. Nzambe abombeli biso eloko eleki malamu ete bango bakoka bobele nsima na biso.” (Baebele 11:39, 40) Nini wana “eloko eleki malamu” oyo Paulo mpe baklisto mosusu bapakolami basili kobanda kosepela na yango? Yoane amoni yango sikawa kati na emonaneli na ye: “Elamba mpembe mpe molai epesami na bango moko moko, mpe elobami na bango ete naino mwa ntango moke bakopema, kino ekokoka motuya na baninga na bango baombo, na bandeko na bango baoyo bakobomama lokola esili bango mpenza kobomama.” (Emoniseli 6:11) Elamba mpembe mpe molai oyo bazwi ezali na boyokani na lisekwa na bango lokola bikelamu ya elimo bakoki kokufa lisusu te. Bazali lisusu milimo na kobomama na nse na etumbelo te, kasi basekwisami mpo na kozala na molongo ya mikóló 24 oyo bazali kosambela liboso na kiti ya bokonzi ya Nzambe na likoló. Kuna, bapesi bango bakiti ya bokonzi, oyo emonisi ete balatisami lotomo lokola mikonzi. Mpe ‘balatisami bilamba mpembe,’ oyo elimboli ete batangami bayengebene, babongi mpo na kozwa esika ya lokumu liboso na Jéhovah, na libanda na ye kuna na likoló. Yango ekokisi mpe elaka oyo Yesu apesaki epai ya baklisto ya sembo bapakolami na lisangá ya Saladesi: “Mpo na molongi, ye akolatisama bongo na bilamba mpembe.”—Emoniseli 3:5; 4:4; 1 Petelo 1:4.
12. Na ndimbola nini baklisto bapakolami mpe basekwi basengeli “kopema naino mwa ntango,” mpe kino ntango nini?
12 Makambo nyonso mamonani mapusi biso na kondima ete lisekwa yango na likoló ebandaki na 1918, nsima wana Yesu afandaki na kiti ya bokonzi na 1914 mpe abandaki kotambola likoló na mpunda mpembe mpo na kolonga, na kobenganaka na makóló Satana mpe badémo na ye. Nzokande, baklisto bapakolami mpe basekwisami bazwi etinda ete ‘bapema naino mwa ntango moke, kino ekokoka motuya na baninga na bango baombo.’ Batikali na kelasi na Yoane oyo bazali naino awa na mabelé basengeli komonisa bosembo na bango kati na komekama mpe minyoko; mpe ekoki kozala ete bamoko kati na bango bakobomama. Kasi na nsuka na likambo, Babilone Monene mpe mibali na ye bakonzi na politike bakofuta makila nyonso oyo basili kosopa. Na kozelaká, basekwi bazali na misala bazali kosala kuna na likoló. Soki elobami ete bazali kopema, elimboli te ete bafandi mpamba, kasi elingi bobele koloba ete bazali na motema petee mpo na kozela mokolo ya nkanda ya Jéhovah. (Yisaya 34:8; Baloma 12:19) Kopema na bango ekosila ntango bakomona na miso na bango kobomama ya losambo ya lokuta, mpe lokola bazali “babiangami, mpe baponami, mpe basembwi,” bakosangana na Nkolo Yesu mpo na koboma libota mabe mobimba ya Satana awa na mabelé.—Emoniseli 2:26, 27; 17:14; Baloma 16:20.
‘Bakufi bakosekwa liboso’
13, 14. (a) Engebene ntoma Paulo, ntango nini lisekwa ya likoló esengelaki kobanda, mpe mpo na banani? (b) Ntango nini baklisto bapakolami oyo bazali na bomoi na mokolo na Nkolo bazali kosekwisama na likoló?
13 Kongenga oyo tozwi na kofungwama ya elembo ya mitano eyokani mpenza na biteni mosusu ya Makomami oyo bitali lisekwa ya likoló. Na ndakisa, ntoma Paulo akomaki: “Mpo na yango tokolobaka na bino na liloba na Nkolo ete biso bato na bomoi baoyo totikali kino [koya] na Nkolo, tokoleka liboso na balali te. Mpo ete Nkolo ye moko akokita longwa na likolo na konganga makasi mpe na mongongo na mokolo na baanzelu mpe na kobeta na kelelo na Nzambe, mpe bakufi kati na Klisto bakosekwa liboso. Na nsima biso bato na bomoi baoyo totikali, tokotombwama kati na mapata mpo na kozwana na Nkolo kati na mopepe esika moko na bango. Mpe bongo tokozala libela esika moko na Nkolo.”—1 Batesaloniki 4:14-17.
14 Oyo nde makambo ya esengo mpe ya kokamwa! Bandeko na Yesu bapakolami oyo bakozala naino na bomoi kino koya na ye, elingi koloba bazali naino awa na mabele na mikolo oyo ya bozongi na ye, batikali naino nsima mpamba te baninga na bango bakufa basili kosekwisama mpe kokenda na likolo. Bango wana bakufaki kati na Klisto, bazali kosekwa liboso. Yesu akiti, to atii likebi na ye epai na bango, mpe asekwisi bango mpo na bomoi ya elimo, kopesaka bango “elamba mpembe mpe molai.” Nsima na yango, baoyo bazali naino na bomoi lokola bato, bazali kosilisa bomoi na bango awa na nse, mingi na bango na kobomama na maboko ya banguna na bango. Nzokande bazali kolala kati na kufa te lokola baoyo bakufáká liboso na bango. Na kufa na bango, bazali nde kobongwana nokinoki, “na kobweta liso,” mpe bakumbami kuna na likoló mpo na kozwana na Yesu mpe na basangani mosusu na nzoto na Klisto. (1 Bakolinti 15:50-52; tala Emoniseli 14:13.) Kosekwa na baklisto bapakolami ebandaki bongo mwa ntango moke nsima wana bafandi na mpunda minei ya Emoniseli babandaki kotambola.
15. (a) Kofungwama na elembo na mitano ememi nsango malamu nini? (b) Ndenge nini Mofandi na mpunda mpembe akosukisa kotambola na ye?
15 Kofungwama na elembo na mitano na mokanda wana epesi nsango malamu mpo na baklisto ya sembo bapakolami baoyo basili kolonga, mpo ete batikalaki sembo kino na kufa. Nzokande, ezali nsango malamu te mpo na Satana mpe libota na ye. Mofandi na mpunda mpembe alandi kotambola mpe kolonga; eloko moko te ekoki kokangisa ye. Akosukisa kotambola na ye na ntango akoboma mokili oyo “ezali kolala kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Ezali yango emonisami polele ntango Mwana na Mpate afungoli elembo ya motoba.
[Maloba na nse ya lokasa]
b Tala Les Saintes Ecritures—Traduction du monde nouveau, ebimeli na makomi minene, page 1648, appendice 8, “Poteau de supplice” (nzete na mpasi).
c Okomona bilembeteli mingi bimonisi ete lingomba ezali na nyongo na makila na mokapo 36 ya mokanda oyo.
[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 102]
‘Milimo mikatamaki nkingo’
Encyclopédie biblique ya McClintock mpe Strong (Angl.) ezongeli maloba malandi ya John Jortin, ye moprotesta mpe moto na Angleterre na ekeke na 18, abotami na baboti Bafransé ba huguenots: “Esika monyoko ebandi, losambo na boklisto esuki wana . . . Ezali bobele nsima wana losambo na boklisto ekomaki lingomba na Boyangeli na Baromé, mpe nsima wana bozwi mpe lokumu epesamaki na bakonzi na yango, ete bolozi na nsomo oyo ya monyoko ekomaki na nguya makasi mpe ebwakaki mpema na yango ya mabe likolo na lingomba oyo eteyami na Evanzile.”
[Elilingi na lokasa 103]
“Elamba mpembe mpe molai epesami na bango mokomoko”