Bayuda
Ndimbola: Lelo basalelaka liloba yango mpo na kolobela bakitani ya Baebre ná bato mosusu oyo bakɔtá na Lingomba ya Bayuda. Biblia mpe elobi ete bakristo oyo bazali Bayuda na elimo, bango nde “Yisraele ya Nzambe.”
Na ntango na biso, Bayuda nde bato oyo Nzambe aponá?
Bayuda mingi bakanisaka bongo. Buku moko (Encyclopaedia Judaica, Jérusalem, 1971, Vol. 5, kol. 498) elobi: “BATO OYO NZAMBE APONÁ, yango nde ndenge oyo babengaka bato ya Yisraele mpo na komonisa ete libota ya Yisraele ezali na boyokani ya ndenge mosusu mpe ya malamu mingi mpenza na Nzambe ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Yango nde likanisi monene oyo Bayuda nyonso bazalaka na yango banda kala.”—Talá Kolimbola Mibeko 7:6-8; Kobima 19:5.
Bato mingi ya mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba bakanisaka mpe bongo. Zulunalo moko ya Atlanta (Journal and Constitution, 22 Yanuali 1983, lok. 5-B) na eteni na yango oyo elobelaka “Lingomba,” elobaki: “Na boumeli ya bambula mingi, mangomba eteyaki ete Nzambe ‘aboyá bato na ye Yisraele’ mpe aponá ‘Yisraele ya sika,’ kasi Paul M. Van Buren, [profesɛrɛ ya teoloji na Temple University na Philadelphie] alobi ete sikoyo mangomba ezali koloba ete ‘kondimana oyo Nzambe asalaki na Bayuda ezali kondimana ya seko. Baprotesta ná Bakatolike ya Mpoto ná Amerika nde basali mbongwana yango oyo ezali kokamwisa.’” Zulunalo moko (The New York Times, 6 Febwali 1983, lok. 42) ebakisaki: “Timothy Smith, profesɛrɛ ya teoloji na Johns Hopkins University mpe pastɛrɛ na Wesley, alobaki ete: ‘Bapastɛrɛ oyo bamipesi na makambo ya politiki bazali kosepela na Yisraele mpe bazali kondima ete esengeli kopesa Yisraele mabɔkɔ na makambo nyonso oyo Yisraele ezali kosala mpo Nzambe azali na ngámbo ya Yisraele.’” Na mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba, bato mosusu bakanisaka ete bato nyonso ya Yisraele bakobongwana mpe nsukansuka bakozwa lobiko. Bato mosusu mpe bakanisaka ete boyokani ya Nzambe ná Yisraele ezali kaka makasi, na bongo bato ya bikólo mosusu nde basengeli kozongisa boyokani na Nzambe na nzela ya Kristo.
Simbá likambo oyo: Ntango Bayisraele bautaki na Babilone mpe bazongi na mboka na bango, basengelaki kozongisa losambo ya solo na mokili oyo Nzambe apesaki bango. Moko ya makambo ya liboso oyo basalaki ezalaki nde kotonga lisusu tempelo ya Yehova na Yerusaleme. Nzokande, banda Baroma babebisá Yerusaleme na mobu 70 T.B., tempelo yango etongamá lisusu te. Kutu, na esika oyo tempelo ezalaki, okokuta nde moskɛ ya Bamizilma. Soki Bayuda oyo bazali na Yerusaleme, oyo balobaka ete bazali na nse ya Mibeko ya Moize, bázalaka bato oyo Nzambe aponá, mbɛlɛ batongá lisusu tempelo mpo na losambo ya Nzambe, boye te?
Mat. 21:42, 43: “Yesu alobaki na bango [banganga-nzambe bakonzi ná mikóló ya Bayuda na Yerusaleme] ete: ‘Botángá naino na Makomami te ete: “Libanga oyo batongi-ndako babwakaki yango nde ekómi libanga monene ya litumu ya ndako. Likambo yango euti na Yehova, mpe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso”? Yango wana nalobi na bino ete: Bakolongola bokonzi ya Nzambe epai na bino mpe bakopesa yango ekólo moko oyo ekobota mbuma na yango.’”
Mat. 23:37, 38: “Yerusaleme, Yerusaleme, engumba oyo ebomaka basakoli mpe ebambaka baoyo batindami epai na yango mabanga,—mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko, ndenge nsoso ya mwasi eyanganisaka bana na yango na nse ya mapapu na yango! Kasi bolingaki yango te. Talá! basundoleli bino ndako na bino.”
Kondimana oyo Nzambe asalaki na Abrahama, yango nde endimisi ete Bayuda bazali kaka bato oyo Nzambe aponá?
Gal. 3:27-29: “Mpo bino nyonso oyo bobatisamaki na kati ya Kristo bolati Kristo. Moyuda azali te, Mogrɛki mpe te, moombo azali te, moto ya bonsomi mpe te, mobali azali te, mwasi mpe te; mpo bozali bino nyonso moto kaka moko na bomoko na Kristo Yesu. Lisusu, soki bozali bato ya Kristo, bozali mpenza momboto ya Abrahama, bazwi-ya-libula ya elaka.” (Na yango, na likanisi ya Nzambe, esɛngi lisusu te ete moto azala mokitani ya Abrahama mpo azala momboto ya Abrahama.)
Bayuda nyonso bakokóma bakristo mpo na kozwa lobiko ya seko?
Rom. 11:25, 26: “Bandeko, nalingi te ete bino bózanga boyebi ya sekele mosantu oyo, mpo bózala bato ya mayele na miso na bino moko te: ete motema ya bato mosusu ya Yisraele ekómi makasi tii motángo mobimba ya bato ya bikólo ekokɔta, mpe na ndenge yango [“mpe bongo,” hf; “bongo,” LNz; na Grɛki, houtos] Yisraele mobimba ekobika.” (Simbá ete Yisraele mobimba ekobika na ‘kokɔta’ ya bato ya bikólo, kasi te na kobongwana ya Bayuda nyonso. Babiblia mosusu ebongoli vɛrsɛ 26 boye: “Mpe bongo nsima na yango bato ya Yisraele oyo batikali bakobika.” Kasi diksionɛrɛ moko [Dictionnaire grec-français ya Bailly (1950, Hachette, lok. 1428)] elobi ete houtos elimboli “na ndenge yango, bongo, yango wana.”)
Mpo tóyeba mpenza ndimbola ya Baroma 11:25, 26, tosengeli mpe kotalela bavɛrsɛ mosusu na mokanda yango: “Mpo Moyuda ezali te moto oyo azali bongo na libándá, ndenge moko mpe kokatama ngenga ezali te oyo ezali komonana na libándá na nzoto. Kasi Moyuda ezali nde moto oyo azali bongo na kati, mpe kokatama ngenga na ye ezali oyo ya motema na elimo, kasi te na mibeko oyo ekomami.” (2:28, 29) “Ezali te bato nyonso oyo bazali kobotama na Yisraele nde bazali mpenzampenza ‘Bayisraele.’”—9:6.
Bayuda basengeli nde kondimela Yesu Kristo mpo bábika?
Yisaya 53:1-12 (LNz) esakolaki ete Masiya akokufa mpo ‘amema masumu ya bato ebele, mpe abondela Nzambe mpo ya basumuki.’ Danyele 9:24-27 (hf) emonisi ete Masiya akoya mpe akokufa mpo na “kosilisa lisumu, mpe mpo na kolimbisa mabe.” Bavɛrsɛ yango mibale emonisi ete Bayuda bazali na mposa ya molobeli mpe kolimbisama ya masumu. Soki baboyi Masiya, bakoki nde kokanisa ete Moto oyo atindaki ye akondima bango?
Mis. 4:11, 12: “[Na nzela ya elimo santu, ntoma Petro alobelaki bakonzi ya Bayuda mpe mikóló na bango na Yerusaleme mpo na Yesu Kristo ete:] Ye azali ‘libanga oyo bino batongi-ndako bomonaki mpamba, mpe oyo ekómi motó ya litumu ya ndako.’ Lisusu, lobiko ezali na moto mosusu te, mpo nkombo mosusu ezali te na nse ya lola, oyo epesami na kati ya bato, oyo tosengeli kobika na nzela na yango.” (Atako Nzambe azali lisusu komonisela ekólo ya Bayuda boboto monene na ye te, nzela efungwami mpo Moyuda mokomoko azala na likoki ya kozwa lobiko na nzela ya Yesu Masiya, ndenge ezali mpe mpo na bato ya bikólo mosusu.)
Makambo oyo ezali kosalema na ekólo Yisraele ezali nde kokokisa bisakweli ya Biblia?
Ezk. 37:21, 22, hf: “Nkolo Yawe alobi boye ete, Talá, nakolongola bato na Yisalaele na kati na mabota, kuna ekendaki bango, mpe nakoyanganisa bango longwa na bipai nyonso, mpe nakokamba bango na kati na mokili na bango mpenza; mpe nakozalisa bango libota moko na kati na mokili na likoló na Yisalaele; mpe mokonzi moko akozala mokonzi na bango nyonso.” (Lelo oyo, Yisraele ezali ekólo oyo etambwisami na mokonzi oyo azali mokitani ya Davidi te. Ekólo yango ekómi nde repibliki.)
Yis. 2:2-4, hf: “Ekozala ete na mikolo na nsuka, ngomba na ndako na Yawe ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwa likoló na nkeka; mpe mabota nyonso bakokenda wana. Bikolo mingi bakokenda mpe bakoloba ete, Yakani, tobuta na ngomba na Yawe, epai na ndako na Nzambe na Yakobo, ete alakisa biso nzela na ye mpe ete tótambola na bipai bikokendaka ye . . . . Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” (Lelo oyo na Yerusaleme, na esika oyo tempelo ezalaki, “ndako na Nzambe na Yakobo” ezali te; na esika yango Bamizilma batongá moskɛ na bango. Mpe eloko moko te emonisi ete Yisraele mpe bikólo ya zingazinga balingi ‘kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli.’ Kutu, bazali kotya elikya na basoda na bango oyo bazali komilɛngɛla ntango nyonso mpo na etumba.)
Yis. 35:1, 2, hf: “Lisobe mpe esika ekauki ekosepela, lisobe ekoyoka esengo, ekobimisa felele na habasɛlɛtɛ. Ekobimisa felele mingi mpenza, ekosepela na esengo mpe na nzembo; nkembo na Lebanona ekopesamela yango, lokumu na Kalɛmɛlɛ mpe Salono. Bakomona nkembo na Yawe, bokonzi na Nzambe na biso.” (Na Yisraele, mikano ya kolona banzete mpe kosopela yango mai elongi mpenza, kasi bakonzi ya Yisraele bazali kopesa Nkolo Nzambe lokumu te mpo na yango. Ntango David Ben-Gurion azalaki ministre-mokonzi, alobaki boye: “Yisraele ezali kosala nyonso . . . na mayele ya siansi mpe na mayele ndenge na ndenge mpo na kosilisa esobe mpe kofandisa demokrasi na ekólo.”)
Zek. 8:23, hf: “Yawe na bibele alobi boye ete, Na mikolo yango, bato zomi longwa na mabota na maloba nyonso, bakosimba elamba na moto oyo azali Moyuda, bakoloba ete, Tokokenda na yo elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Esakweli oyo elobeli Nzambe oyo wapi? Na Ebre nkombo na ye [יהוה, oyo ebongolamaka mbala mingi Yehova] emonani koleka mbala 130 kaka na mokanda oyo ya Makomami Mosantu. Lelo oyo, soki moto atángi nkombo yango, bato balobaka nde ete azali Moyuda? Te; banda basiɛklɛ mingi, Bayuda batiká mpenza kosalela nkombo ya Nzambe mpo bazalaki kokanisa ete kosala bongo ezali lisumu. Ndenge oyo bakonzi ya mangomba bakómi kosepela lelo na bato ya Yisraele eyokani na esakweli yango te.)
Bongo, ndenge nini tosengeli kotalela makambo oyo ezali koleka na Yisraele na mikolo na biso? Ezali kaka makambo oyo ezali koleka na mokili mobimba oyo Biblia esakolaki, na ndakisa bitumba, kobuka mibeko, bolingo mpo na Nzambe ekokita, mpe kolinga mbongo.—Mat. 24:7, 12; 2 Tim. 3:1-5.
Lelo oyo, banani bazali kokokisa bisakweli oyo etali kozongisama ya Yisraele?
Gal. 6:15, 16: “Kokatama ngenga ezali na ntina te ndenge moko mpe kokatama ngenga te, kasi kozala ekelamu ya sika nde ezali na ntina. Bato nyonso oyo bakolanda mpenza mitindo oyo, kimya mpe motema mawa ezala na bango, ɛɛ na Yisraele ya Nzambe.” (Na yango, mpo moto azala na “Yisraele ya Nzambe,” esɛngi lisusu te ete atosa mobeko oyo Nzambe apesaki Abrahama ete mibali nyonso ya ndako na ye bákatama ngenga. Kasi, ndenge Bagalatia 3:26-29 elobi, baoyo bazali bato ya Kristo mpe bazali bana ya Nzambe oyo babotami na elimo nde ‘bazali mpenza momboto ya Abrahama.’)
Yir. 31:31-34: “‘Talá! Mikolo ezali koya,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe nakosala kondimana ya sika ná ndako ya Yisraele mpe ná ndako ya Yuda . . . Mpe bakoteyana lisusu te moto na moto moninga na ye mpe moto na moto ndeko na ye ete: “Bóyeba Yehova!” mpo bango nyonso bakoyeba ngai, kobanda na oyo aleki moke kati na bango kino na oyo aleki monene kati na bango,’ yango nde liloba ya Yehova.” (Kondimana ya sika yango esalemaki te na ekólo ya Yisraele, kasi nde na bayekoli ya sembo ya Yesu Kristo oyo bazwi elikya ya kozala na bomoi na likoló. Ntango Yesu abandisaki ekaniseli ya liwa na ye, apesaki bango kɔpɔ ya vinyo mpe alobaki boye: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai.” [1 Ko. 11:25])
Em. 7:4: “Nayokaki motángo ya bato oyo batyamaki elembo, nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000), oyo batyamaki elembo na mabota nyonso ya bana ya Yisraele.” (Kasi na bavɛrsɛ oyo elandi, batángi “libota ya Levi” ná “libota ya Yozefe.” Mabota yango etángamaki kati na mabota 12 ya Yisraele te. Kutu, ntango Biblia elobi ete bato “batyamaki elembo na mabota nyonso,” libota ya Dani ná Efraime etángami te. [Talá Mitángo 1:4-16.] Yisraele oyo vɛrsɛ yango elobeli ezali Yisraele ya elimo, Yisraele ya Nzambe, oyo Emoniseli 14:1-3 elobi ete bakoyangela elongo na Kristo na Bokonzi ya likoló.)
Ebr. 12:22: “Bopusani nde penepene na Ngomba Siona mpe na engumba ya Nzambe ya bomoi, Yerusaleme ya likoló, mpe na bamiriade ya baanzelu.” (Na yango, bakristo ya solo bazali kozela kokokisama ya bilaka ya Nzambe na “Yerusaleme ya likoló,” kasi na Yerusaleme ya mabele te.)