Mokapo ya Zomi na Mitano
Toli ya Yehova mpo na kotɛmɛla bikólo
1. Nsango nini ya kosambisama mpo na kotɛmɛla Asulia Yisaya alobeli?
YEHOVA akoki kosalela bikólo ya bapaya mpo na kopesa basaleli na ye etumbu mpo na mabe na bango. Atako bongo, alimbisaka bikólo yango te oyo bayokelaka losambo ya solo nkanda, basalelaka yango lolendo mpe bayinaka yango. Yango wana, ntango molai liboso mpenza, Yisaya apemami na Nzambe mpo na kokoma “litatoli mpo na [kotɛmɛla Babilone, NW].” (Yisaya 13:1) Kasi, Babilone akozala monguna nde nsima. Na mikolo ya Yisaya, Asulia azali konyokola libota oyo basalaki kondimana na Nzambe. Asulia abebisi bokonzi ya Yisalaele ya nɔrdi mpe abɔtɔli bamboka mingi ya Yuda. Kasi bolongi na ye ezali na ndelo. Yisaya akomi ete: “[Yehova] na bibele akati ndai ete, Lokola mwango mobongisaki ngai, ekozala mpe bongo . . . ete nakobuka Asulia na mokili na ngai, nakonyatela ye na nse na lokolo, likoló na ngomba na ngai; ekangelo na ye ekolongwa na bango, mokumba na ye longwa na mapeka na bango.” (Yisaya 14:24, 25) Mwa moke nsima ya ntango oyo Yisaya alobaki esakweli yango, Baasulia bazalaki lisusu likama te mpo na Yuda.
2, 3. (a) Na ntango ya kala, Yehova asembolaki lobɔkɔ na ye mpo na kotɛmɛla nani? (b) Yehova asemboli lobɔkɔ na ye mpo na kotɛmɛla “bikólo nyonso,” yango elimboli nini?
2 Kasi, tokoloba nini mpo na bikólo mosusu oyo bazali banguna ya bato oyo basalaki kondimana na Nzambe? Bango mpe basengeli kosambisama. Yisaya alobi ete: “Talá toli oyo epesami mpo na kotɛmɛla mabele mobimba mpe talá lobɔkɔ esembolami mpo na kotɛmɛla bikólo nyonso. Zambi Yehova na bibele ye moko apesi toli, mpe nani akoboya yango? Mpe lobɔkɔ na ye esembolami, nani akozongisa yango nsima?” (Yisaya 14:26, 27, NW) “Toli” ya Yehova ezali kaka te mwa likanisi mpamba mpo na kolakisa nini moto asengeli kosala. Ezali ekateli makasi oyo azwi, elingi koloba mokano na ye. (Yilimia 49:20, 30) “Lobɔkɔ” ya Nzambe ezali nguya na ye oyo asalaka na yango mosala. Na bavɛrsɛ ya nsuka ya Yisaya mokapo 14 mpe mikapo 15 tii 19, toli ya Yehova ezali kotɛmɛla Filisitia, Moaba, Damaseke, Etiopia mpe Ezipito.
3 Nzokande, Yisaya alobi ete lobɔkɔ ya Yehova esembolami mpo na kotɛmɛla “bikólo nyonso.” Yango wana, atako bisakweli yango ya Yisaya ekokisamaki liboso na ntango ya kala, ezali mpe kokokisama na “ntango ya nsuka” wana Yehova asemboli lobɔkɔ na ye mpo na kotɛmɛla bikonzi nyonso ya mabele. (Danyele 2:44; 12:9; Baloma 15:4; Emoniseli 19:11, 19-21) Ntango molai liboso mpenza, Yehova, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, amonisi toli na ye polele. Moto moko te akoki kozongisa nsima lobɔkɔ oyo ye asemboli.—Nzembo 33:11; Yisaya 46:10.
“Nyoka ya mɔ́tɔ oyo ezali kopumbwa” mpo na kotɛmɛla Filisitia
4. Makambo nini ya sikisiki Yehova alobi mpo na kotɛmɛla Filisitia?
4 Balobeli liboso Bafilisitia. “Na mbula oyo Mokonzi Ahaza akufaki liloba oyo ebimaki ete: ‘Sepelá te, Ɛ Filisitia, ata moko te kati na bino, kaka mpo ete lingenda ya moto oyo azalaki kobɛta yo ebukani. Mpamba te nyoka ya ngɛngɛ ekobima na mosisa ya nyoka, mbuma na yango ekozala nyoka ya mɔ́tɔ oyo ezali kopumbwa.’”—Yisaya 14:28, 29, NW.
5, 6. (a) Na lolenge nini Uziya azalaki lokola nyoka mpo na Bafilisitia? (b) Hizikiya amonanaki nani mpo na Filisitia?
5 Mokonzi Uziya azalaki makasi mpe akokaki kobanga makaneli ya Filisitia te. (2 Ntango 26:6-8) Mpo na bango, ye azalaki lokola nyoka, mpe lingenda na ye ezalaki kobɛtabɛta banguna wana ya zingazinga. Nsima ya liwa ya Uziya—‘lingenda na ye ebukanaki’—Yotama, mokonzi ya sembo ayangelaki, kasi “bato balandaki kosala makambo mabe.” Na nsima Ahaza akómaki mokonzi. Makambo ebongwanaki, mpe basoda ya Bafilisitia bazalaki koya kobundisa Yuda mpe bazalaki kolonga. (2 Ntango 27:2, NW; 28:17, 18) Kasi, sikawa, makambo ebongwani lisusu. Na 746 liboso ya ntango na biso, Mokonzi Ahaza akufi mpe elenge Hizikiya azwi kiti ya bokonzi. Soki Bafilisitia bakanisi ete makambo ekokoba kotambola malamu mpo na bango, bazali mpenza komikosa. Hizikiya amonisaki ete azali monguna moko ya nsɔmɔ. Mokitani moko ya Uziya (“mbuma” ya “mosisa”), Hizikiya azali lokola “nyoka ya mɔ́tɔ oyo ezali kopumbwa”—na lombangu mpenza azali kobundisa, azali koswa na lombangu ya mikalikali, mpe azali koyokisa mpasi ya kozika mɔ́tɔ, lokola nde azali kobwakela banguna na ye ngɛngɛ.
6 Elobeli oyo ebongi mpenza mpo na mokonzi yango ya sika. “[Hizikiya] abɛtaki Bafilisitia kino Gaza mpe [na bamboka, NW] na yango.” (2 Mikonzi 18:8) Mikanda ya Saneheliba, mokonzi ya Asulia elobi ete, Bafilisitia bakómaki bato oyo Hizikiya ayangelaki. “Babola”—elingi koloba bokonzi ya Yuda oyo elɛmbi—ezwi kimya mpe bozwi, nzokande Filisitia azali konyokwama na nzala.—Tángá Yisaya 14:30, 31.
7. Maloba nini ya kondima Hizikiya asengeli koloba liboso ya batindami oyo bayei na Yelusaleme?
7 Emonani ete batindami bazali wana na Yuda—mbala mosusu koluka kosala boyokani mpo na kobundisa Asulia. Esengeli koloba na bango nini? “Tokozongisela bamemi-nsango ya libota liloba nini?” Hizikiya asengeli kosala boyokani na bapaya mpo na koluka libateli? Te! Asengeli koyebisa bamemi-nsango ete: “Yehova ye moko atii moboko ya Siona, mpe na kati na yango bato na ye oyo banyokwami bakozwa esika ya kokima.” (Yisaya 14:32, NW) Mokonzi yango asengeli kotyela mpenza Yehova motema. Moboko ya Siona ezali makasi. Engumba yango ekotikala lokola ekimelo ya kimya mpenza mpo na komibomba liboso ya matata ya Asulia.—Nzembo 46:1-7.
8. (a) Ndenge nini bikólo mosusu lelo oyo bazali lokola Filisitia? (b) Yehova asalaka nini mpo na kosunga basaleli na ye lelo lokola asalaki yango na ntango ya kala?
8 Lokola Filisitia, lelo oyo bikólo bazali kotɛmɛla basambeli ya Nzambe makasi mpenza. Bakangaki baklisto Batatoli ya Yehova na bolɔkɔ mpe na bakaa ya bakangami. Bapekisaki mosala na bango ya kosakola. Babomaki bamosusu. Banguna bazali kokoba “kokweisa makila na moto na likambo te.” (Nzembo 94:21) Na miso ya banguna na bango, baklisto yango bakoki komonana lokola “babola.” Nzokande, na lisalisi ya Yehova, bazali na bilei ebele ya elimo, kasi banguna na bango bazali konyokwama na nzala. (Yisaya 65:13, 14; Amosa 8:11) Ntango Yehova akosembola lobɔkɔ na ye mpo na kotɛmɛla Bafilisitia ya mikolo na biso, “babola” yango bakozala na kimya. Epai wapi? Na kati ya “ndako ya Nzambe,” oyo Yesu azali mpenza libanga ya litumu. (Baefese 2:19, 20) Mpe bakozala na nse ya libateli ya “Yelusaleme ya Likoló,” bokonzi ya Yehova na likoló, oyo Yesu azali mokonzi na yango.—Baebele 12:22; Emoniseli 14:1.
Bakangi Moaba monɔkɔ
9. Liloba oyo elandi elobami mpo na kotɛmɛla nani, mpe ndenge nini bato yango bamonisaki ete bazali banguna ya basaleli ya Nzambe?
9 Na ɛsti ya Mbu Ekufá, mboka mosusu ezali wana penepene na Yisalaele—Moaba. Na bokeseni na Bafilisitia, Bamoaba bazali bandeko ya Bayisalaele, mpamba te bazali bakitani ya Lota, mwana ya ndeko ya Abalayama. (Genese 19:37) Atako bazali bandeko, Moaba azali monguna monene ya Yisalaele banda kala. Na ndakisa, na mikolo ya Mose, mokonzi ya Moaba afutaki mosakoli Balama na elikya ete alakela Bayisalaele mabe. Ntango alongaki te, Moaba atyelaki Bayisalaele motambo ya losambo ya Baala mpe pite. (Mituya 22:4-6; 25:1-5) Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ndenge Yisaya apemami sikawa na Yehova mpo na kokoma “litatoli mpo na [kotɛmɛla, NW] Moaba.”—Yisaya 15:1a.
10, 11. Nini ekokómela Moaba?
10 Esakweli ya Yisaya elobeli bingumba mingi mpe bisika mingi ya Moaba, kati na yango Ale, Kili (to Kili-halesete), mpe Dibono. (Yisaya 15:1b, 2a) Bamoaba bakolela mpo na mikate ya mbuma ya vinyo ya Kili-halesete, oyo mbala mosusu ezali mpenza eloko ya ntina ya engumba yango. (Yisaya 16:6, 7) Sibima mpe Yazele, oyo eyebani mingi mpo na bilanga ya vinyo, ekobebisama. (Yisaya 16:8-10) Egelata-Selisiya, oyo nkombo na yango mbala mosusu elimboli “Mwana ya ngɔmbɛ ya mwasi ya mbula misato,” ekozala lokola ngɔmbɛ ya mwasi oyo ebandi kobota oyo ezali koganga na kobanga. (Yisaya 15:5) Matiti ya mokili yango ekokauka wana “mai ya Dimono” ekotonda na makila mpo na kobomama ya Bamoaba. “Mai ya Nimilimi” ekokóma “eloko ya mpamba,” ezala na lolenge ya elilingi to na lolenge ya solo mpenza—mbala mosusu mpo basoda banguna bakokanga mai na bango.—Yisaya 15:6-9.
11 Bamoaba bakolata basaki, bilamba ya matánga. Bakokolola nsuki ya mitó na bango lokola elembo ya nsɔni mpe ya kolela. Mandɛfu na bango ‘ekatami,’ yango ekomonisa mpenza ete bakómi na mpasi mingi mpe basambwisi bango. (Yisaya 15:2b-4) Yisaya, ye moko, lokola andimi mpenza ete bikateli yango ekokokisama, ayoki mawa mpenza. Lokola nsinga ya nzɛnzɛ ezali koningana, misɔpɔ na ye eningani na mawa, mpo na nsango ya mawa oyo bayebisi mpo na Moaba.—Yisaya 16:11, 12.
12. Ndenge nini maloba ya Yisaya mpo na kotɛmɛla Moaba ekokisamaki?
12 Esakweli yango ekokokisama ntango nini? Ekoumela te. ‘Oyo ezali liloba lilobaki [Yehova] mpo na Moaba na ntango eleki. Nde sasaipi, [Yehova] alobi ete, Na [mbula, NW] misato, lokola [bambula, NW] na mosali na kofutama, nkembo na Moaba ekokóma na nsɔni, [na makɛlɛlɛ ya lolenge nyonso, NW]; mpe baoyo bakotikala bakozala na motuya moke mpe na nguya te.’ (Yisaya 16:13, 14) Biloko oyo bato ya arkeoloji bazali kokundola endimisi mpenza maloba yango mpo emonisi ete na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso, Moaba anyokwamaki mingi mpe bisika na yango mingi etikalaki lisusu na bato te. Tigalata-pilesele III atángaki Salamanu ya Moaba kati na bayangeli oyo bazalaki kofuta mpako epai na ye. Kamusunadabi, mokonzi ya Moaba azalaki kofuta mpako epai ya Saneheliba. Bakonzi ya Asulia, Esala-Hadona mpe Asulubanipala, balobaki ete Musuri mpe Kamasalutu bazalaki bato oyo bazalaki na nse ya bokonzi na bango. Esili koleka bikeke mingi, libota ya Bamoaba ezali lisusu te. Mitika ya bingumba oyo bakanisaka ete ezalaki ya Bamoaba emonani, kasi kino sikawa bamoni bilembeteli mingi te ya monguna yango makasi ya Yisalaele.
“Moaba” ya mikolo na biso akómi na nsuka
13. Ebongiseli nini ekokani lelo na Moaba?
13 Lelo oyo, ebongiseli moko ya mokili mobimba ezali lokola Moaba ya kala. Ezali lisangá ya mangomba ya boklisto, eteni monene ya “Babilone Monene.” (Emoniseli 17:5) Ezala Moaba to Yisalaele bautaki na Tela, tata ya Abalayama. Ndenge moko mpe, lisangá ya mangomba ya boklisto, ezala mpe lisangá ya baklisto bapakolami lelo oyo, elobaka ete euti na lisangá ya baklisto ya ekeke ya liboso. (Bagalatia 6:16) Nzokande, lisangá ya mangomba ya boklisto—ndenge moko na Moaba—ebebi, elendisaka pite na elimo mpe losambo ya banzambe mosusu kasi ya Yehova te, Nzambe kaka moko ya solo. (Yakobo 4:4; 1 Yoane 5:21) Lokola etuluku, bakonzi ya mangomba ya boklisto batɛmɛlaka baoyo basakolaka nsango malamu ya Bokonzi.—Matai 24:9, 14.
14. Atako toli ya Yehova ezali kotɛmɛla “Moaba” ya mikolo na biso, elikya nini ezali mpo na moto na moto oyo azali na kati ya ebongiseli yango?
14 Nsukansuka, bakangaki Moaba monɔkɔ. Ekozala mpe ndenge wana mpo na lisangá ya mangomba ya boklisto. Lokola akosalela ebongiseli moko oyo na mikolo na biso ekokani na Asulia, Yehova akosala ete ebebisama. (Emoniseli 17:16, 17) Kasi, elikya ezali mpo na bato oyo bazali na kati ya “Moaba” ya mikolo na biso. Na katikati ya esakweli na ye oyo etali Moaba, Yisaya alobi ete: “Na boboto akotɛlɛmisa kiti na bokonzi makasi, mpe moto moko asengeli kofanda likoló na yango na bosolo na kati ya hema ya Davidi; akosambisa mpe akoluka bosembo mpe akosala noki mpenza na kati ya boyengebene.” (Yisaya 16:5, NW) Na 1914, Yehova atɛlɛmisaki makasi kiti ya bokonzi ya Yesu, Moyangeli oyo auti na molɔngɔ ya Mokonzi Davidi. Bokonzi ya Yesu ezali komonisa motema boboto ya Yehova mpe, mpo na kokokisama ya kondimana oyo Nzambe asalaki na Mokonzi Davidi, yango ekoumela seko. (Nzembo 72:2; 85:10, 11; 89:3, 4; Luka 1:32) Ebele ya bato ya komikitisa batiki “Moaba” ya mikolo na biso mpe bandimi kotambwisama na Yesu mpo na kozwa bomoi. (Emoniseli 18:4) Ezali mpenza likambo ya kobɔndisa koyeba ete Yesu ‘akomonisa bikólo bosembo ya solosolo’!—Matai 12:18; Yilimia 33:15, NW.
Damaseke akómi libebi
15, 16. (a) Makambo nini ya mabe Damaseke na Yisalaele basaleli Yuda, mpe yango ebimiseli Damaseke nini? (b) Litatoli mpo na kotɛmɛla Damaseke etali mpe nani? (c) Liteya nini baklisto bakoki kozwa lelo na ndakisa mabe ya Yisalaele?
15 Na nsima, Yisaya alobi “litatoli mpo na [kotɛmɛla, NW] Damaseke.” (Tángá Yisaya 17:1-6.) Damaseke, ezali na nɔrdi ya Yisalaele mpe ezali “motó ya Sulia.” (Yisaya 7:8) Na boyangeli ya Ahaza, mokonzi ya Yuda, Lesini mokonzi ya Dameseke asalaki boyokani na Peka mokonzi ya Yisalaele mpe babundisaki Yuda. Kasi, lokola Ahaza asɛngaki, Moasulia Tigalati-pilesala III abundisi Damakese, alongi ye mpe amemi bato na ye mingi na boombo. Nsima na yango, Damaseke atungisi lisusu Yuda te.—2 Mikonzi 16:5-9; 2 Ntango 28:5, 16.
16 Mbala mosusu mpo na boyokani oyo Yisalaele asali na Damaseke, makambo oyo Yehova alobi mpo na kotɛmɛla Damaseke ezali mpe na kati ya bikateli oyo etali bokonzi ya nɔrdi oyo ezali sembo te. (Yisaya 17:3) Yisalaele ekokóma lokola elanga na ntango ya kobuka mbuma mpe etikali kaka na mwa mbuma moke, to lokola nzete ya olive oyo babuki mbuma na yango mingi. (Yisaya 17:4-6) Oyo mpenza ndakisa monene mpo na bato oyo bamipesi na Yehova! Nzambe azali kosɛnga ete bámipesa kaka na ye moko mpe andimaka mosala mosantu kaka oyo esalemi na motema mobimba. Lisusu, ayinaka bato oyo babalukelaka bandeko na bango.—Exode 20:5; Yisaya 17:10, 11; Matai 24:48-50.
Tyelá Yehova motema mobimba
17, 18. (a) Bayisalaele mosusu basalaki nini na maloba ya Yehova, kasi mingi kati na bango bamonisi ezaleli nini? (b) Makambo oyo ezali koleka lelo ekokani na oyo ya mikolo ya Hizikiya na nini?
17 Yisaya alobi sikawa ete: “Na mokolo yango, moto akotala epai na Mozalisi na ye mpe miso na ye ekomona Oyo [Mosantu, NW] ya Yisalaele. Akotalaka na bitumbelo te oyo mosala ya mabɔkɔ na ye, akomona mpe te yango esili misapi na ye kosala, soko [makonzí mosantu, NW] soko bitumbelo ya mpaka.” (Yisaya 17:7, 8) Na ntembe te, bato mosusu na Yisalaele batyaki likebi na maloba ya kokebisa oyo Yehova alobi. Na ndakisa, ntango Hizikiya atindaki maloba epai ya bato ya Yisalaele ete básangana na Yuda mpo na kosala elambo ya Elekeli, Bayisalaele mosusu bandimaki mpe basalaki mobembo na sudi mpo na kosangana na bandeko na bango na losambo ya pɛto. (2 Ntango 30:1-12) Nzokande, bato ya Yisalaele mingi batyolaki bato oyo bayaki kopesa nsango yango. Lipɛngwi ya mokili yango ekoki kosila te. Yango wana, toli ya Yehova mpo na kotɛmɛla ye ekokisami. Asulia abebisi bingumba ya Yisalaele, mokili yango etikali mpamba, bisobe ya matiti ezali lisusu na eloko ya malonga te.—Tángá Yisaya 17:9-11.
18 Ezali boni lelo oyo? Yisalaele ezalaki libota ya bapɛngwi. Na yango, ndenge Hizikiya azalaki komeka kosalisa bato mosusu na kati ya libota yango mpo bázongela losambo ya solo, yango ezali kokundolela biso ndenge mpenza baklisto lelo bazali kosala makasi mpo na kosalisa bato ya lisangá ya lipɛngwi ya mangomba ya boklisto. Kobanda 1919, batindami bautaki na “Yisalaele ya Nzambe” bakendaki kobyanga bato ya lisangá ya mangomba ya boklisto mpo báya kosangana na bango na losambo ya solo. (Bagalatia 6:16) Mingi baboi. Mingi batyoli bamemi nsango yango. Nzokande, ndambo bandimi. Bazali sikawa bamilio, mpe bazali kosepela ‘komona Mosantu ya Yisalaele,’ mpe bazali kosepela ateya bango. (Yisaya 54:13) Batiki losambo oyo bazalaki kosala na bitumbelo ya mbindo—kokangama na banzambe oyo basalami na mabɔkɔ ya bato—mpe bamipesi mobimba na Yehova. (Nzembo 146:3, 4) Ndenge moko na Mika, oyo azalaki na mikolo ya Yisaya, mokomoko na bango azali koloba ete: “Ngai nakotalela [Yehova. Nakozela, NW] Nzambe na kobika na ngai. Nzambe na ngai akoyoka ngai.”—Mika 7:7.
19. Yehova akopamela banani, mpe yango ekolimbola nini mpo na bango?
19 Oyo nde bokeseni na baoyo batyaka motema na bango na moto! Na mikolo oyo ya nsuka, mobulu mpe yikiyiki ezali kobima mingi kati na bato. “Mai-na-monana” oyo ezali komonisa bato ya yikiyiki mpe batomboki ezali kobimisa koimaima mpe botomboki. (Yisaya 57:20; Emoniseli 8:8, 9; 13:1) Yehova “akopamela” bibele yango ya makɛlɛlɛ. Bokonzi na ye ya likoló ekoboma ebongiseli nyonso oyo ezali kotya mobulu mpe moto nyonso ya mobulu, mpe “bakokima mosika . . . lokola matiti makaoki na ngomba liboso ya mopɛpɛ.”—Yisaya 17:12, 13; Emoniseli 16:14, 16.
20. Atako bato ya bikólo ‘bapunzi biloko’ na bango, elikya nini baklisto ya solo bazali na yango?
20 Yango ekosala nini? Yisaya alobi ete: ‘Na ntango ya mpokwa, talá nsɔmɔ [eyei pwasa, NW]! Liboso na ntɔngɔ, ezali lisusu te. Oyo ezali libonza na bango bazali [kobebisa biloko na, NW] biso mpe likambo na bango bazali [kopunza, NW] epai na biso.’ (Yisaya 17:14) Bato mingi bazali kopunza basaleli ya Yehova, bazali kosalela bango makambo na makasi mpe komonisela bango limemya te. Mpo ete bazali te—mpe balingaka te kozala—bato ya mangomba minene ya mokili oyo, batɛmɛli mpe banguna bazali konyokola baklisto ya solo. Kasi basaleli ya Nzambe bazali na elikya ete “ntɔngɔ,” ntango oyo minyoko na bango ekosila ekómi mpenza pene.—2 Batesaloniki 1:6-9; 1 Petelo 5:6-11.
Etiopia amemeli Yehova likabo
21, 22. Mpo na ekólo nini lisusu maloba ya kosambisa eyaki, mpe ndenge nini maloba ya Yisaya oyo epemamaki ekokisamaki?
21 Mbala soki mibale, Etiopia, oyo ezali na sudi ya Ezipito, amikɔtisaki na bitumba mpo na kobundisa Yuda. (2 Ntango 12:2, 3; 14:1, 9-15; 16:8) Yisaya asakoli sikawa etumbu oyo ezali kozela libota yango: “Mawa mpo na mokili ya makɛlɛlɛ ya mapapu [ya nyamankɛkɛ, NW], oyo ezali na ngámbo na bibale na Etiopia” (Tángá Yisaya 18:1-6.)a Yehova azwi ekateli ete Etiopia ‘akolongolama mpe akokatama.’
22 Masolo ya kala ezali koyebisa biso ete na nsuka ya ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso, Etiopia alongaki Ezipito mpe ayangelaki ye na boumeli ya mbula 60. Na nsima, Esala-Hadona na Asulubanipala, bakonzi ya Asulia, bayaki mpe kolonga ye. Ntango Asulubanipala abebisaki Thèbes, Asulia atyaki Ezipito na nse ya boyangeli na ye, yango esukisaki boyangeli ya Etiopia na etúká ya Nil. (Talá mpe Yisaya 20:3-6.) Tokoloba nini mpo na eleko na biso?
23. Mokumba nini “Etiopia” ya mikolo na biso azali na yango, mpe mpo na nini akómi na nsuka?
23 Na esakweli ya Danyele oyo elobeli “ntango ya nsuka,” emonisami ete “mokonzi ya nɔrdi,” oyo atondi na matata, Etiopia mpe Libya bazali “na matambe na ye,” elingi koloba, bazali na nse ya bokonzi na ye. (Danyele 11:40-43, NW) Etiopia mpe atángami kati na babundi ya “Gog ya mokili ya Magog.” (Ezekiele 38:2-5, 8, NW) Mampinga ya Gog, bakisa mpe mokonzi ya nɔrdi, bakobebisama ntango bakobundisa ekólo mosantu ya Yehova. Yango wana, lobɔkɔ ya Yehova ekosembolama mpe mpo na kotɛmɛla “Etiopia” ya mikolo na biso mpamba te azali kotɛmɛla boyangeli ya Yehova.—Ezekiele 38:21-23; Danyele 11:45.
24. Na lolenge nini Yehova azali kozwa “makabo” ya mabota?
24 Kasi, esakweli yango elobi mpe ete: “Na ntango yango makabo makoyeisamela [Yehova] na bibele longwa na libota na bato milai mpe bazangi [nsuki ya nzoto, NW], longwa na libota na kopesa nsɔmɔ na penepene mpe na mosika . . . epai na esika na nkombo na [Yehova] na bibele, yango ngomba na Siona.” (Yisaya 18:7) Atako bato ya bikólo mosusu bazali kondima bokonzi ya Yehova te, na bantango mosusu basalaki makambo mosusu mpo na bolamu ya basaleli ya Yehova. Na mikili mosusu, bakonzi babimisaki mibeko mpe bakataki makambo oyo epesaki basambeli ya sembo ya Yehova ntomo ya kosambela na bonsomi mpenza. (Misala 5:29; Emoniseli 12:15, 16) Makabo mosusu mpe ezali. “Mikonzi bakokumba makabo epai na yo . . . [Biloko ya bronze ekolongwa, NW] na Ezipito, Etiopia bakopota mbango mpo na kosembola mabɔkɔ na bango [na makabo, NW] epai na Nzambe.” (Nzembo 68:29-31) Lelo oyo, bamilio ya ‘bato ya Etiopia’ ya mikolo na biso oyo bazali kobanga Yehova bazali komema “makabo” na motindo ya losambo. (Malaki 1:11) Bazali kopesa mabɔkɔ na mosala monene ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mabele mobimba. (Matai 24:14; Emoniseli 14:6, 7) Yango ezali mpenza likabo malamu ya kopesa Yehova!—Baebele 13:15.
Motema ya Ezipito ebebi
25. Na kokokisama ya Yisaya 19:1-11, nini ekómeli Ezipito ya kala?
25 Ezipito ezali mboka ya penepene oyo ezali mpenza na sudi ya Yuda, monguna ya kala ya bato oyo basalaki kondimana na Nzambe. Yisaya mokapo 19 emonisi yikiyiki oyo ezali na Ezipito na mikolo ya Yisaya. Etumba moko ya bana-mboka ezali kotɔkɔ na Ezipito, “mboka ekotɛmɛla mboka, bokonzi ekotɛmɛla bokonzi.” (Yisaya 19:2, 13, 14) Bato ya mayele ya masolo ya kala bazali komonisa elembeteli oyo ezali kolakisa ete mabota ya bakonzi oyo bazalaki banguna bazalaki koyangela bamboka ndenge na ndenge ya mokili yango na mbala moko. Mayele ya Ezipito oyo bakumisaka, bakisa mpe ‘banzambe oyo bazangi ntina mpe banganga’ na ye, bakobikisa ye te na “lobɔkɔ ya mokonzi mabe.” (Yisaya 19:3, 4, NW) Asulia, Babilone, Perse, Grèce, mpe Rome balongaki Ezipito, mboka na mboka na ngala na yango. Makambo wana nyonso ekokisi bisakweli oyo ezali na Yisaya 19:1-11.
26. Na kokokisama ya monene, ndenge nini bato ya “Ezipito” ya mikolo na biso bakosala liboso ya misala ya kosambisa ya Yehova?
26 Nzokande, na Biblia, mbala mingi Ezipito ezalaka elilingi ya mokili ya Satana. (Ezekiele 29:3; Yoele 3:19; Emoniseli 11:8) Na bongo, “Litatoli mpo na [kotɛmɛla, NW] Ezipito” oyo Yisaya apesaki esengeli nde kokokisama na ndenge ya monene? Ɛɛ, ezali bongo mpenza! Maloba ya ebandeli ya esakweli yango esengeli kotinda moto nyonso atya likebi: ‘Talá, [Yehova] azali kopumbwa likoló na lipata na mbango; akoya epai na Ezipito; [banzambe ya Ezipito oyo bazangi, NW] bakolɛnga liboso na ye mpe mitema na Baezipito ekonangwa na kati na bango.’ (Yisaya 19:1) Ekoumela te, Yehova akotya likebi na ye na ebongiseli oyo ya Satana. Na ntango wana, banzambe ya mokili oyo bakomonana ete bazali na ntina te. (Nzembo 96:5; 97:7) “Mitema ya Baezipito ekonangwa na kati na bango” mpo na nsɔmɔ. Yesu asakolaki eleko wana: “Mitema na mabota mikozala na likoló mpo na mikakatano na konguluma na kotomboka na mai monene. Bato bakosenzwa na nsɔmɔ na kotalela makambo makobima kati na mikili.”—Luka 21:25, 26.
27. Bokabwani nini esakolamaki na kati ya bato ya “Ezipito” bango na bango, mpe ndenge nini yango ezali kokokisama lelo?
27 Mpo na eleko oyo ekokóma kino kokokisama ya mokano na ye, Yehova asakoli ete: “Nakoyeisa etumba epai na Ezipito na nzela na Ezipito mpenza; bakobunana, moto na moto kotɛmɛla ndeko na ye; moto na moto kotɛmɛla mozalani na ye. Mboka ekotɛmɛla mboka, bokonzi ekotɛmɛla bokonzi.” (Yisaya 19:2) Kobanda Bokonzi ya Nzambe etyamaki na 1914, “elembo ya kozala ya [Yesu]” emonani ndenge ekólo moko ezali kotɛmɛla ekólo mosusu mpe bokonzi moko ezali kotɛmɛla bokonzi mosusu. Makambo lokola kobomana kati na bituluka, mabomi minene mpe koluka kosilisa bato ya ekólo moko, ebomi bamilio ya bato na mikolo oyo ya nsuka. “Bolɔzi” ya ndenge wana ekokóma lisusu makasi koleka awa nsuka ekómi pene.—Matai 24:3, 7, 8, NW.
28. Na mokolo ya kosambisa, lingomba ya lokuta ekokoka kobikisa mokili oyo?
28 “[Elimo ya Ezipito ekotelengana na kati na ye, NW], nakobulunganisa myango na bango, bakoluka toli epai na [banzambe oyo bazangi ntina, NW] mpe na banganga, epai na basololi na [bilimo, NW] mpe na banganga-nkisi.” (Yisaya 19:3) Ntango Mose akendaki kokutana na Falo, banganga ya Ezipito bayokaki nsɔni, bakokaki te kotya ntembe na makasi ya Yehova. (Exode 8:18, 19; Misala 13:8; 2 Timote 3:8) Ndenge wana mpe, na mokolo ya kosambisa, lingomba ya lokuta ekokoka te kobikisa mokili oyo esili kobeba. (Kokanisá na Yisaya 47:1, 11-13.) Nsukansuka, Ezipito ayangelamaki na “mokonzi mabe,” Asulia. (Yisaya 19:4, NW) Yango ezali komonisa bwale oyo ekokómela mokili oyo.
29. Ntango mokolo ya Yehova ekoya, bakambi ya politiki bakozala na ntina nini?
29 Kasi, nini ekokómela bakambi ya politiki? Bakoki kosalisa bato? “Solo bankumu ya Soana bazali bazoba. Mpe bato ya bwanya kati na bapesi-toli ya Falo, toli na bango ezali eloko mpamba.” (Tángá Yisaya 19:5-11, NW.) Oyo nde bozoba kolikya ete bapesi-toli bakozala na ntina na mokolo ya kosambisa! Ata bazali na boyebi nyonso ya mokili, bazangi bwanya oyo euti na Nzambe. (1 Bakolinti 3:19, NW) Babwaki Yehova mpe bamipesi nde epai ya oyo babengaka siansi, filozofi, mbongo, bisengo mpe biloko mosusu oyo bapesi yango esika ya banzambe. Yango wana, bazali na boyebi moko te ya mikano ya Nzambe. Bakosami mpe babulungani. Misala na bango ezali ya mpamba. (Tángá Yisaya 19:12-15.) “Bato ya bwanya bakoyoka nsɔni, nsɔmɔ ekosimba bango, mpe bakokangama; talá baboi liloba ya Yehova. Bwanya nini ezali epai na bango?”—Yilimia 8:9, NW.
Elembo mpe motatoli mpo na Yehova
30. Na lolenge nini ‘mokili ya Yuda ekokóma eloko ya nsɔmɔ mpo na Baezipito’?
30 Kasi, ata soki bakambi ya “Ezipito” bazali na makasi te, “lokola basi,” bato oyo bazali naino koluka bwanya ya Nzambe bazali. Bapakolami ya Yehova mpe baninga na bango bazali ‘koyebisa malamu ya Nzambe.’ (Yisaya 19:16; 1 Petelo 2:9) Bazali kosala oyo ekoki na bango mpo na kokebisa bato ete kobebisama ya ebongiseli ya Satana ekómi pene. Ntango azalaki kotala likambo yango na mosika, Yisaya alobi ete: “Mokili ya Yuda ekokóma eloko ya nsɔmɔ mpo na Baezipito; moto na moto oyo [bakolobela ye yango, NW] akobanga kati na ye moko mpo na [toli ya Yehova na bibele oyo ye akopesa mpo na kotɛmɛla ye, NW].” (Yisaya 19:17) Bamemi-nsango ya sembo ya Yehova bazali koyebisa bato solo—bakisa mpe malɔzi oyo Yehova asakolaki. (Emoniseli 8:7-12; 16:2-12) Yango ezali kotungisa bakonzi ya mangomba ya mokili.
31. Ndenge nini esalemi ete “monɔkɔ ya Kanana” elobama na bingumba ya Ezipito (a) na ntango ya kala? (b) na mikolo na biso?
31 Likambo nini ya kokamwa emonani na mosala yango ya kosakola? “Na mokolo yango, mboka mitano ekozala kati na mokili ya Ezipito oyo ekoloba [monɔkɔ ya Kanana, NW] mpe oyo ekokata [seleka na Yehova, NW] na bibele. Nkombo na moko na yango ekozala: [Engumba ya Kokweisa, NW].” (Yisaya 19:18) Na ntango ya kala, emonani ete esakweli yango ekokisamaki ntango Bayuda oyo bakimaki na bingumba ya Ezipito bazalaki koloba Liebele kuna. (Yilimia 24:1, 8-10; 41:1-3; 42:9–43:7; 44:1) Lelo oyo, bato oyo bafandi na bamboka ya “Ezipito” ya mikolo na biso bayekoli koloba “monɔkɔ ya pɛto” ya makambo ya solo ya Biblia. (Sefania 3:9, NW) Moko ya bingumba yango mitano ebengami “Engumba ya Kokweisa,” yango ezali komonisa ete eteni moko ya “monɔkɔ ya pɛto” ezali mpo na kotɔndɔla mpe “kokweisa” ebongiseli ya Satana.
32. (a) “Etumbelo” nini ezali na katikati ya mokili ya Ezipito? (b) Na lolenge nini bapakolami bazali lokola “likonzí” pene na ndelo ya Ezipito?
32 Na lisalisi ya mosala ya kosakola ya basaleli ya Yehova, na ntembe te nkombo na ye monene ekoyebana na mokili oyo. “Na mokolo yango, etumbelo ya [Yehova] ekozala kati na mokili ya Ezipito mpe likonzí epai na [Yehova] na ndelo na yango.” (Yisaya 19:19) Maloba yango ezali komonisa ezalela ya baklisto bapakolami, oyo bazali na boyokani ya kondimana elongo na Nzambe. (Nzembo 50:5) Lokola “etumbelo,” bazali kopesa bambeka na bango, lokola bazali mpe “likonzí mpe eloko oyo esimbi solo,” bazali kotatola mpo na Yehova. (1 Timote 3:15, NW; Baloma 12:1; Baebele 13:15, 16) Bazali na “kati ya mokili,” bazwami—elongo na baninga na bango “bampate mosusu”—na mikili mpe na bisanga koleka 230. Kasi, bazali “bato ya mokili te.” (Yoane 10:16; 17:15, 16) Ezali lokola nde bazali na ndelo oyo ekaboli mokili oyo na Bokonzi ya Nzambe, bamibongisi mpo na kokatisa ndelo yango mpe kozwa lifuti na bango ya likoló.
33. Na makambo nini bapakolami bazali “elembo” mpe “litatoli” na “Ezipito”?
33 Yisaya alobi lisusu ete: “Ekozala elembo mpe litatoli na [Yehova] na bibele kati na mokili ya Ezipito; zambi bakolela epai na [Yehova] mpo na banyokoli mpe akotindela bango mobikisi, [ɛɛ mobikisi monene, oyo akosikola bango mpenza, NW].” (Yisaya 19:20) Lokola bazali “elembo” mpe “litatoli,” bapakolami bazali na esika ya liboso na mosala ya kosakola mpe bazali kokumisa nkombo ya Yehova na mokili oyo. (Yisaya 8:18; Baebele 2:13) Na mokili mobimba, koganga ya bato oyo bazali konyokwama ezali koyokana, kasi ezala ata ndenge nini, biyangeli ya bato ezali kokoka te kosalisa bango. Nzokande, Yehova akotinda Mobikisi Monene, Mokonzi Yesu Klisto, mpo na kosikola bato nyonso ya komikitisa. Ntango mikolo oyo ya nsuka ekokóma na nsuka na yango na etumba ya Armagedon, Yesu akobɔndisa bato oyo bazali kobanga Nzambe mpe akopesa bango mapamboli ya seko.—Nzembo 72:2, 4, 7, 12-14.
34. (a) Ndenge nini Yehova akoyebana epai ya “Baezipito,” mpe mbeka ya makabo nini bazali kopesa ye? (b) Ntango nini Yehova akobɛta “Ezipito,” mpe kobikisama ya ndenge nini ekolanda?
34 Kino ntango wana ekóma, Nzambe alingi ete bato ya ndenge nyonso bázwa boyebi ya solosolo mpe bábika. (1 Timote 2:4, NW) Yango wana, Yisaya akomi ete: ‘[Yehova] akomiyebisa ye moko epai na Baezipito mpe Baezipito bakoyeba [Yehova] na mokolo yango; [bakopesa ye mbeka mpe likabo, NW] mpe bakokata ndai epai na [Yehova] mpe bakokokisa yango. Mpe [Yehova] akobɛta Ezipito kobɛta yango mpe kobikisa; mpe [bakozonga epai na Yehova, NW] mpe ye akoyoka mabondeli na bango mpe akobikisa bango.’ (Yisaya 19:21, 22) Bato ya bikólo nyonso ya mokili ya Satana, “Baezipito,” bazali koyeba Yehova mpe kopesa ye likabo, elingi koloba “mbuma ya bibɛbu bizali koyambola nkombo na ye.” (Baebele 13:15) Bakataka ndai epai ya Yehova wana bamipesaka na ye, mpe bakokisaka ndai na bango na kosalela ye na bosembo mpenza na bomoi na bango mobimba. Nsima ya “kobɛta” mokili oyo na Armagedon, Yehova akosalela Bokonzi na ye mpo na kobikisa bato. Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu, elimo ya bato, makanisi na bango, bizaleli na bango mpe nzoto na bango ekokóma ya kokoka!—Emoniseli 22:1, 2.
“Bápambolama, bato na ngai”
35, 36. Na kokokisama ya Yisaya 19:23-25, boyokani nini ya ntango ya kala ezalaki kati na Ezipito, Asulia mpe Yisalaele?
35 Na nsima mosakoli yango amoni mbongwana monene: ‘Na mokolo yango, balabala ekozala longwa na Ezipito kino Asulia; Asulia akoya na Ezipito mpe Ezipito epai na Asulia. [Na ntembe te bakosala mosala mosantu, Ezipito elongo na Asulia, NW]. Na mokolo yango, Yisalaele akozala moto na misato elongo na Ezipito mpe Asulia, lipamboli na kati ya mokili, [mpamba te Yehova] na bibele asili kopambola ete, [Bápambolama, bato na ngai, Ezipito, mpe mosala na mabɔkɔ na ngai, Asulia, mpe libula na ngai, Yisalaele, NW].’ (Yisaya 19:23-25) Ɛɛ, mokolo mosusu Ezipito na Asulia bakokóma baninga. Ndenge nini?
36 Ntango Yehova abikisaki basaleli na ye na mabɔkɔ ya bikólo mosusu na ntango ya kala, ezalaki lokola nde asalelaki bango banzela oyo ezalaki komema na bonsomi. (Yisaya 11:16; 35:8-10; 49:11-13; Yilimia 31:21) Esakweli yango ekokisamaki mwa moke nsima ya kokwea ya Babilone ntango baombo oyo bautaki na Asulia mpe na Ezipito, bakisa mpe na Babilone, bazongaki na Mokili ya Ndaka. (Yisaya 11:11) Kasi tokoloba nini mpo na eleko na biso?
37. Na lolenge nini bamilio ya bato lelo bazali lokola balabala moko monene ebandi na “Asulia” mpe ekei tii “Ezipito”?
37 Lelo oyo, batikali bapakolami ya Yisalaele ya elimo bazali “lipamboli na kati ya mokili.” Bazali kotombola losambo ya solo mpe bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya bato ya bikólo nyonso. Kati na bikólo yango, mosusu ezali lokola Asulia, na bibundeli makasi mpenza. Bikólo mosusu bazali kopesa bonsomi mingi, mbala mosusu lokola Ezipito—oyo na eleko moko azalaki “mokonzi ya sudi” na esakweli ya Danyele. (Danyele 11:5, 8) Bamilio ya bato bauti na bikólo oyo etondi na bibundeli ya makasi mpe na bikólo oyo ezali kopesa bonsomi mingi, bazwi nzela ya losambo ya solo. Yango wana, bato ya bikólo nyonso basangani mpo na ‘kosala mosala.’ Bokabwani ya bikólo ezali te kati na bango. Balinganaka, mpe ekoki mpenza kolobama ete ‘Asulia ayei na Ezipito mpe Ezipito na Asulia.’ Ezali lokola nde balabala moko monene ebandi na mboka moko mpe ekei kino na mboka mosusu.—1 Petelo 2:17.
38. (a) Ndenge nini Yisalaele “akozala moto na misato elongo na Ezipito mpe na Asulia”? (b) Mpo na nini Yehova alobi ete “Bápambolama, bato na ngai”?
38 Kasi, na lolenge nini Yisalaele “akozala moto na misato elongo na Ezipito mpe na Asulia”? Na ebandeli ya “ntango ya nsuka,” bato mingi kati na baoyo bazalaki kosalela Yehova awa na mabele bazalaki basangani ya “Yisalaele ya Nzambe.” (Danyele 12:9; Bagalatia 6:16) Kobanda na bambula ya 1930, ebele monene ya “bampate mosusu,” oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele, bamonanaki. (Yoane 10:16a; Emoniseli 7:9) Bauti na mabota—bamonisamaki na elilingi ya Ezipito mpe Asulia—bazali kosopana na ndako ya losambo ya Yehova mpe bazali kobyanga bato mosusu mpo na kosangana na bango. (Yisaya 2:2-4) Bazali kokokisa mosala ya kosakola ndenge moko na bandeko na bango bapakolami, bazali koyikela mikakatano mpiko ndenge moko na bango, bazali komonisa bosembo ndenge moko na bango, mpe bazali kolya na mesa ya elimo kaka moko elongo na bango. Ya solo mpenza, bapakolami mpe “bampate mosusu” bazali “etonga moko mpe na mobateli moko.” (Yoane 10:16b) Moto moko akoki kobɛta ntembe ete ntango Yehova azali komona molende na bango mpe mpiko na bango, azali kosepela na mosala na bango? Ezali likambo ya kokamwa te ndenge alobeli lipamboli moko mpo na bango, ete: “Bápambolama, bato na ngai.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Banganga-mayele mosusu ya Biblia balobaka ete elobeli “mokili ya makɛlɛlɛ ya mapapu ya nyamankɛkɛ” ezali mbala mosusu komonisa mayoyo oyo ebotamaka ebele mpe ebandaka kopumbwa na Etiopia. Basusu bamonisi ete liloba ya Liebele oyo ebongolami na “makɛlɛlɛ,” tselatsal, ezali koyokana lokola nkombo oyo bapesá na etuna, tsaltsalya, na Ba-Galla, bato bauti na libota ya Hama oyo bafandaka lelo na Etiopia.
[Elilingi na lokasa 191]
Basoda Bafilisitia bazali kolanda banguna na bango (liyemi ya Baezipito ya ekeke ya 12 L.T.B.)
[Elilingi na lokasa 192]
Liyemi na libanga ezali komonisa soda to nzambe moko ya Moaba (kobanda na ekeke ya 11 tii ekeke ya 8 L.T.B.)
[Elilingi na lokasa 196]
Soda Moasulia azali kotambwisa kamela (ekeke ya libwa L.T.B.)
[Elilingi na lokasa 198]
“Mai-na-monana” oyo ezali komonisa batomboki ya mokili oyo ezali kobimisa koimaima mpe kotomboka
[Elilingi na lokasa 203]
Banganga ya Ezipito bakokaki te komikokanisa na nguya ya Yehova