Mokanda ya Biblia nimero 19—Nzembo
Mokomi: Davidi mpe basusu
Esika ya bokomi: Eyebani sikisiki te
Nsuka ya bokomi: soko 460 L.T.B.
1. Mokanda ya Nzembo ezali nini, mpe ezali na nini kati na yango?
MOKANDA ya Nzembo mozalaki liboke ya nzembo epemami oyo basambeli ya solo ya Yehova bazalaki kosalela na ntango ya kala, oyo motángo na yango nyonso ezalaki nzembo 150 ya bulɛɛ, etyamaki na miziki mpe ebongisamaki mpo na kosanzola na yango Yehova liboso na bato nyonso kati na tempelo na ye na Yelusaleme. Ezali bongo nzembo mpo na kokumisa Yehova, esuki bobele bongo te, ezalaki mpe na mabondeli ya kosɛnga komonisamelama motema mawa mpe ya kosɛnga lisungi, mpe maloba ya komonisa elikya epai na Nzambe. Ezali na maloba mingi ya kozongisa botɔ́ndi mpe ya kosepela mpe ya konganga na esengo monene, ɛɛ, esengo oyo eleki bisengo nyonso. Mosusu ezali bongo kozongelama ya masoló ya kala, komanyoláká na ntina na motema boboto ya Yehova mpe misala na ye minene. Etondi na bisakweli, oyo mingi na yango esilaki kokokisama na lolenge ya kokamwa. Ezali na batoli mingi oyo ekoki kopesa litomba mpe kolendisa, nyonso wana ebongisami na lolenge ya elobeli malamu, mpe na lisalisi ya bililingi, ezali kotombola mpe kolamwisa mayoki mozindo ya motángi. Mokanda ya Nzembo ezali bilei kitoko ya elimo, elambami malamu mpenza mpe etyami liboso na biso.
2. (a) Nzembo ebéngamaki na nkombo nini, mpe yango elimboli nini? (b) Nzembo ezali nini?
2 Ndimbola ya nkombo ya mokanda yango ezali nini, mpe nani akomaki mokanda ya Nzembo? Kati na Biblia ya Liebele, mokanda yango ebéngami Seʹpher Tehil·limʹ, elimboli “Mokanda ya masanzoli” to bobele Tehil·limʹ, elingi koloba “Masanzoli.” Ezali bongo boíké ya liloba Tehil·lahʹ, oyo elimboli “Lisanzoli” to “Loyembo ya lisanzoli,” oyo ezali bongo motó na likambo ya Nzembo 145. Liloba “Masanzoli” ezali nde oyo ebongi mpenza, mpamba te mokanda yango ezali kolobela mingi mpenza kosanzola Yehova. Liloba “Nzembo” euti na libongoli ya Greke ya Septante, oyo esalelaki liloba Psal·moiʹ, komonisáká bongo nzembo oyo eyembami elongo na bibɛtɛli ya miziki. Liloba yango ezwami mpe na mwa bisika mingi kati na Makomami ya Greke ya boklisto, lokola na Luka 20:42 mpe na Misala 1:20. Ezali bongo loyembo ya bulɛɛ to maloba ya ntɔ́ki oyo esalelami mpo na kosanzola mpe kosambela Nzambe.
3. Makomi oyo matyamaka likoló na nzembo mosusu mayebisaka nini na ntina na baoyo bakomaki yango?
3 Nzembo mingi ezali na mitó na makambo, to makomi matyami likoló na yango oyo, mingimingi, eyebisaka nkombo ya moto oyo akomaki yango. Mitó na makambo ntuku nsambo na misato ezali na nkombo ya Davidi, “moyembi kitoko na Yisalaele.” (2 Sam. 23:1) Na ntembe te, Davidi akomaki mpe Nzembo 2, 72, mpe Nz. 95. (Talá Misala 4:25, Nzembo 72:20, mpe Baebele 4:7.) Lisusu, emonani ete Nzembo 10 mpe 71 ezali bongo kolandana ya Nzembo 9 mpe 70 mpe ekoki kolobama ete Davidi nde akomaki yango. Nzembo zomi na mibale ezali ya Asafa, na ntembe te, bato ya ndako na ye basanganaki mpe na kokoma ndambo mosusu ya Nzembo oyo etángami na nkombo na ye, mpamba te ndambo yango ezali kolobela makambo oyo malekaki na nsima ya eleko ya Asafa. (Nz. 79; Nz. 80; 1 Nta. 16:4, 5, 7; Ez. 2:41) Nzembo zomi na moko etángami ete ezali ya bana na Kola. (1 Nta. 6:31-38) Emonani ete Nzembo 43 ezali bongo kolandana ya Nzembo 42, mpe na yango ekoki mpe kotángama ete bana na Kola nde bakomaki yango. Longolá “bana na Kola,” Nzembo 88 etye mpe Hemana na makomi oyo mazwami likoló na yango, mpe Nzembo 89 etángi Etana lokola mokomi na yango. Nzembo 90 etángami ete ezali ya Mose, mpe emonani mpenza ete Nzembo 91 ezali mpe ya Mose. Nzembo 127 ezali ya Salomo. Bongo eteni monene ya mokanda ya Nzembo ekomamaki na bakomi ndenge na ndenge.
4. Mokanda ya Nzembo ekomamaki na boumeli ya eleko nini?
4 Mokanda ya Nzembo ezali mokanda moleki mikanda nyonso ya Biblia na monene. Lokola emonisami kati na Nzembo 90, 126, mpe Nz. 137, ekomamaki na boumeli ya eleko moko molai, kobanda na ntango oyo Mose akomaki yango (1513-1473 L.T.B.) kino na nsima ya boombo na Babilone mpe kino mbala mosusu na eleko ya Ezela (537–s. 460 L.T.B.). Na yango, emonani ete kokomama ya mokanda ya Nzembo esalemaki na boumeli ya mbula pene na nkóto. Koumela ya lisoló yango ekamataki ntango molai mpenza, ebandi uta na ntango ya kozalisama mpe ezali koyebisa lisoló na ntina na boyokani oyo Yehova azalaki na yango elongo na basaleli na ye kino na ntango eteni ya nsuka ya nzembo ekomamaki.
5. (a) Lolenge nini mokanda ya Nzembo emonisi ete ebongiseli malamu ezalaki kati na basaleli ya Nzambe? (b) Maloba oyo matyamaka likoló na Nzembo mamonisi nini lisusu? (c) Mpo na nini tosengisami te kotánga liloba “Sela” wana tozali kotánga Nzembo?
5 Mokanda ya Nzembo ezali komonisa ete ebongiseli malamu ezalaki kati na basaleli ya Nzambe. Ye moko Davidi alobaki na ntina na “kotambola na Nzambe Mokonzi na ngai kino na esika na bulɛɛ. Bayembi liboso mpe babɛti na [miziki] na nsima, mpe kati na bango baseka bazali kobɛta ngɔmɔ. Bókumisa [Yehova Nzambe,NW] kati na koyangana.” (Nz. 68:24-26) Yango ezali kolimbola ntina ya liloba “epai na mokóló na bayembi” oyo etyamaka mbala na mbala kati na maloba oyo mazalaka likoló na Nzembo, mpe na maloba mingi ya ntɔ́ki mpe ya miziki. Maloba mosusu oyo matyamaka likoló malimbolaka lolenge ya kosalela nzembo to mokano ya nzembo to epesaka malako na ntina na miziki. (Talá maloba oyo mazwami likoló na Nzembo 6, 30, 38, 60, 88, 102 mpe Nz. 120.) Ezali soko na nzembo 13 ya Davidi, na ndakisa Nzembo 18 mpe 51, oyo makambo oyo mapusaki kokomama na yango mayebisami na mokuse. Nzembo ntuku misato na minei mobimba ezali na maloba te likoló na yango. Mwa liloba moke “Sela” oyo esalelami mbala 71 na katikati ya nzembo yango ekanisami ete ezali liloba mpenzampenza ya zébi ya miziki to ya mwango ya kokanga makambo na motó, atako ndimbola na yango ya sikisiki eyebani te. Basusu balobaka ete emonisaka ntango ya kopema mpo na komanyola mwa moke wana moto azali koyemba, ezala na maloba to elongo na ebɛtɛli ya miziki. Na yango, ezali na ntina te ete etángama wana moto azali kotánga.
6. (a) Mokanda ya Nzembo ekabolami na biteni boni? (b) Emonani ete nani nde ayanganisaki mokanda ya Nzembo na lolenge ezali kino lelo?
6 Uta kalakala, mokanda ya Nzembo ekabolamaki na babúku, to bavolimi mitano, na motindo oyo: (1) Nzembo 1-41; (2) Nzembo 42-72; (3) Nzembo 73-89; (4) Nzembo 90-106; (5) Nzembo 107-150. Emonani ete Davidi nde azalaki moto ya liboso ya kosangisa nzembo nyonso esika moko. Na ntembe te, Ezela, nganga mpe “mokomeli monene ya mibeko ya Mose,” azalaki moko kati na bato oyo Yehova asalelaki mpo na kobongisa mokanda ya Nzembo ete ekóma na lolenge ezali kino lelo.—Ezl. 7:6, NW.
7. Makambo nini mosusu matali Nzembo tosengeli koyeba yango?
7 Lokola nzembo yango ezalaki kosangisama mokemoke, ekoki kozala mpo na ntina wana nde nzembo mosusu ezongelami na biteni bikeseni, na ndakisa Nzembo 14 mpe 53; 40:13-17 mpe Nz. 70; 57:7-11 mpe Nz. 108:1-5. Mokomoko na biteni oyo mitano ezali kosuka na maloba ya mapamboli elobami mpo na Yehova, to likumisi—biteni minei na yango ya liboso esangisi biyano ya libota kati na yango mpe oyo ya nsuka ezali bongo Nzembo 150 na mobimba na yango.—Nz. 41:13.
8. Limbolá lolenge ya kokoma ebéngami acrostiche mpe pesá ndakisa.
8 Lolenge moko ya kokoma ya sikisiki esalelami kati na nzembo libwa; lolenge yango ebéngami acrostiche mpo ete vɛrsɛ́ mokomoko ezalaki kolandana engebene lɛ́tɛlɛ mokomoko ya alfabɛ́. (Nzembo 9, 10, 25, 34, 37, 111, 112, 119, mpe Nz. 145) Kati na lolenge yango vɛrsɛ́ to bavɛrsɛ́ ya liboso mpenza ya liboke moko ebandi na lɛ́tɛlɛ ya liboso ya alfabɛ́ ya Liebele, ʼaʹleph (א), vɛrsɛ́ to bavɛrsɛ́ oyo elandi ezali na lɛ́tɛlɛ ya mibale, behth (ב), mpe bongo na bongo, kino na balɛ́tɛlɛ nyonso to pene na nyonso ya alfabɛ́ ya Liebele. Yango ekokaki mbala mosusu kosunga mpo na komikundola makambo na motó—kanisá naino bayembi na tempelo oyo basengelaki komikundola nzembo milai, lokola Nzembo 119! Likambo ya kobenda likebi ezali ete acrostiche moko ya nkombo ya Yehova ezwami kati na Nzembo 96:11. Ndambo ya liboso ya vɛrsɛ́ yango ezali na maloba minei na Liebele, mpe balɛ́tɛlɛ ya ebandeli ya maloba yango, wana etángami kobanda na lobɔkɔ ya mobali kino na lobɔkɔ ya mwasi, ezali mileli minei ya Liebele ya tetragrami YHWH (יהוה).
9. (a) Mpo na ntina nini nzembo mingi ezali kosimba mbala moko elimo mpe motema ya motángi? (b) Nini lisusu ezali kopesa yango nguya mpe bonzengá?
9 Maloba wana ya ntɔ́ki ya bulɛɛ makomami na milɔngɔ́ mikeseni ya Liebele mpe mazali komonisa bonzengá na kolandana ya makanisi na lolenge oyo mosusu ekokani na yango te. Ezali kokɔtela motángi mbala moko kati na elimo mpe kati na motema. Ezali na bililingi ya kobenda likebi. Bonene mpe bozindo na yango ya kokamwa, ezala na makambo oyo malobami kati na yango to na mayoki makasi oyo emonisami, ezali mpe mpo na makambo minene oyo Davidi asilaki kokutana na yango na bomoi na ye, yango epesaki nzela na kokomama ya nzembo mingi. Ezali na bato mingi te oyo bazalaki na lolenge ya bomoi etondi na mbongwana ndenge na ndenge lokola oyo ya Davidi—azalaki elenge mobɔkɔli na mpate, abundaki na Goliata bobele ye moko, moyembi kati na ndako ya mokonzi, baninga ya sembo mpe bayini na ye basundolaki ye, mokonzi mpe molóngi na bitumba, tata ya bolingo kati na libota oyo ezalaki na bokabwani, ye oyo amonaki mpasi mpo na masumu minene mibale oyo ye asalaki mpe atako bongo azalaki mosambeli ya Yehova na molende mpe azalaki kolinga Mibeko na Ye. Na kotaleláká bomoi ya lolenge wana, ezali likambo ya kokamwa te na komona ete mokanda ya Nzembo ezali kosangisa mayoki ya bato ya lolenge nyonso! Bokokanisi mpe bokeseni ya elobeli ya ntɔ́ki oyo emonani polele kati na milɔngɔ́ ya Liebele, ezali yango nde epesi mokanda ya nzembo nguya mpe bonzengá.—Nz. 1:6; 22:20; 42:1; 121:3, 4.
10. Nini emonisi bosolo ya mokanda ya Nzembo?
10 Bosolo ya nzembo oyo esilá koumela koleka nzembo nyonso ya kosanzola Yehova emonisami polele mpamba te ezali na boyokani makasi na mikanda mosusu ya Makomami. Bakomi ya Makomami ya Greke ya boklisto basalelaki mingi mokanda ya Nzembo. (Nz. 5:9 [Lom. 3:13]; Nz. 10:7 [Lom. 3:14]; Nz. 24:1 [1 Kol. 10:26]; Nz. 50:14 [Mat. 5:33]; Nz. 78:24 [Yoa. 6:31]; Nz. 102:25-27 [Ebe. 1:10-12]; Nz. 112:9 [2 Kol. 9:9]) Ye moko Davidi alobaki kati na loyembo na ye ya nsuka ete: “[Elimo na Yehova elobi, NW] na nzela na ngai, liloba na ye ezali na lolemo na ngai.” Ezalaki bongo elimo wana nde etambwisaki ye uta na ntango oyo Samwele apakolaki ye. (2 Sam. 23:2; 1 Sam. 16:13) Lisusu, bantoma bazalaki kotánga maloba ya Nzembo. Petelo alobelaki “makomi . . . oyo [elimo santu elobaki, NW] liboso, na monɔkɔ na Davidi,” mpe kati na maloba mingi oyo ye atángaki uta na Nzembo, mokomi na mokanda epai na Baebele alobelaki yango lokola maloba oyo mautaki na Nzambe to mpe liboso ya kotánga yango azalaki koloba ete, “pelamoko elobi [“elimo santu,” NW].”—Mis. 1:16; 4:25; Ebe. 1:5-14; 3:7; 5:5, 6.
11. Maloba nini ya Yesu mazali kondimisa bosolo ya mokanda yango?
11 Mpo na kolobela elembeteli oyo ekoki kokweisama soko moke te ya bosolo ya mokanda ya Nzembo, tokoki kozongela maloba oyo ya Yesu, Nkolo oyo atombwani, wana alobaki na bayekoli na ye ete: “Oyo makambo ngai nasololaki na bino . . . ete ekoki na makambo nyonso masili kokomama kati na mibeko na Mose, na basakoli, na nzembo, na ntina na ngai mákokisama.” Awa Yesu azalaki bongo kolobela Makomami ya Liebele na mobimba na yango engebene lolenge oyo Bayuda bazalaki kondima yango mpe na lolenge oyo eyebanaki na bango. Lolenge alobaki na ntina na Nzembo etalelaki mpe etuluku ya misato ya Makomami na mobimba na yango, oyo ebéngami Hagiographes (to Makomi na bulɛɛ), oyo kati na yango Nzembo ezalaki mokanda ya liboso. Yango endimisami na maloba oyo ayebisaki epai na bayekoli na ye mwa moke liboso, wana ezalaki bango kokende na Emau, na ntango “alimbolaki mpo na bango makambo na ntina na ye mpenza na kati na makomi nyonso.”—Luka 24:27, 44.
MAKAMBO MAZALI KATI NA NZEMBO
12. Lolenge nini uta ebandeli Nzembo ezali kolobela bolamu, mpe motó na likambo na Bokonzi?
12 Mokanda ya liboso (Nzembo 1-41). Nzembo oyo nyonso etángami ete ezali ya Davidi, longolá bobele Nzembo 1, 2, 10, mpe Nz. 33. Nzembo 1 emonisi polele, uta na ebandeli na yango, likanisi ya moboko ya mokanda mobimba ya Nzembo, wana esakoli ete moto oyo asepelaka na mibeko ya Yehova azali moto na esengo, amanyolaka yango butu na moi mpo ete akoka kosalela yango, na bokeseni na bato ya masumu, oyo batukaka Nzambe. Ezali bongo bolamu oyo elobelami liboso kati na Nzembo. Nzembo 2 ebandi na likambo moko ya kobimisa ntembe mpe ezali koyebisa ndenge bakonzi mpe bankumu ya mokili basangani mpo na “kotɛmɛla Yehova mpe mopakolami na ye.” Yehova ayokisi bango nsɔ́ni mpe alobi na bango na nkanda makasi ete: “Ngai nafandisi mokonzi na ngai likoló na Siona, na ngomba na ngai na bulɛɛ.” Azali ye oyo akopanza mpe akobukabuka botɛmɛli nyonso. Bino bakonzi mpe bankumu mosusu, ‘bósalela [Yehova] mosala na botosi, bósepela nde na kolɛngalɛnga’ mpe bóyamba Mwana na Ye, soki te bokokufa! (Vɛrsɛ́ Nz. 2:2, 6, 11) Na yango, Nzembo emonisi nokinoki Bokonzi lokola motó na likambo ya Biblia.
13. Likambo nini mosusu elobelami polele kati na liboke ya liboso ya nzembo?
13 Na liboke oyo ya liboso, ezala mabondeli ya malɔ́mbɔ to mpe ya kozongisa matɔ́ndi, mazali mingi mpenza. Nzembo 8 ekesenisi bonene ya Yehova na boke ya moto, mpe Nzembo 14 emonisi bolema ya bato oyo baboyaka kotosa bokonzi ya Nzambe. Nzembo 19 emonisi lolenge nini bozalisi ya kokamwa ya Yehova Nzambe esakolaka nkembo na ye, mpe vɛrsɛ́ 7-14 ezali kolobela matomba malamu oyo mazwamaka na kotosáká mobeko ya kokoka ya Nzambe, oyo elobelami lisusu na bozindo kati na Nzembo 119. Nzembo 23 endimami na mokili mobimba lokola moko na misala ya ntɔ́ki mileki bonene, kasi ezali lisusu ya kokamwa mingi mpo na lolenge na yango ya pɛtɛɛ etondi na bonzengá, wana ezali kolobela kotya elikya na bosembo nyonso epai na Yehova. Ah, tiká ete biso banso ‘tófanda na ndako na [Yehova], Mobateli monene na mpate, mpo na mikolo mingi’! (23:1, 6, NW) Nzembo 37 ezali kopesa toli malamu epai na bato oyo babangaka Nzambe, oyo bazingelami na basáli na mabe, mpe Nzembo 40 ezali kolobela esengo oyo ezwamaka na kosaláká mokano ya Nzambe, lokola Davidi asalaki yango.
14. Nini elobami na ntina na lisiko kati na Mokanda ya mibale ya Nzembo, mpe mabondeli nini ya Davidi mamonisami kuna?
14 Mokanda ya mibale (Nzembo 42-72). Eteni oyo ebandi na nzembo mwambe ya bana na Kola. Nzembo 42 mpe 43 etángami ete ezali ya bana na Kola, mpamba te nyonso mibale ezali bongo nzembo moko oyo ezali na maboke misato, ekangani moko na mosusu na lisalisi ya vɛrsɛ́ moko oyo ezali kozongelama mbala na mbala. (42:5, 11; 43:5) Nzembo 49 ezali kolobela makasi likambo oyo ete moto akoki soko moke te komisikola, mpe ezali komonisa ete Nzambe nde akoki kosikola moto “uta na lobɔkɔ ya Shéol.” (Vɛrsɛ́ Nz. 49:15, NW) Nzembo 51 ezali libondeli ya Davidi, oyo asalaki na nsima ya lisumu na ye monene elongo na Bata-seba, mpe amonisi ezaleli ya solosolo ya kobongola motema. (2 Sam. 11:1–12:24) Eteni oyo esuki na nzembo ‘na ntina na Salomo,’ libondeli mpo na boyangeli na ye ya kimya mpe mpo ete lipamboli na Yehova elanda kozala na ye.—Nz. 72.
15. Mokanda ya misato elobi nini na ntina na lisoló ya Yisalaele, bikateli ya Yehova, mpe kondimana ya Bokonzi na ye?
15 Mokanda ya misato (Nzembo 73-89). Mibale kati na nzembo yango, Nzembo 74 mpe 79, ekomamaki nsima ya kobomama ya Yelusaleme na 607 L.T.B. Bazali kolela na ntina na libebi wana monene mpe bazali kolɔmba na Yehova ete asunga bato na ye ‘mpo na lokumu ya nkombo na ye.’ (79:9) Nzembo 78 ezali koyebisa lisoló ya Yisalaele uta na ntango ya Mose kino ntango oyo Davidi “abatelaki bango na motema na sembo” (vɛrsɛ́ Nz. 78:72), mpe Nzembo 80 emonisi Yehova lokola “Mobateli na Yisalaele” ya solosolo. (Vɛrsɛ́ Nz. 80:1) Nzembo 82 mpe 83 ezali bongo malɔ́mbɔ makasi epai na Yehova mpo na kosɛnga ete akokisa bikateli na ye likoló na banguna na ye mpe likoló na banguna ya bato na ye. Malɔmbɔ wana masɛngami mpo na kobukanisa te, masɛngami mpo ete “[bato] báluka nkombo na yo ɛ [Yehova]. . . , [mpe] báyeba ete ezali bobele yo oyo ozali na nkombo [Yehova] Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.” (83:16, 18) Eteni oyo esuki bongo na Nzembo 89, kolobeláká bongo “boboto na [Yehova],” lokola emonisami polele kati na kondimana na ye elongo na Davidi. Kondimana yango esalemi mpo na kotya mosangoli na libula na kiti ya bokonzi ya Davidi, ye oyo akoyangela libela na libela liboso na Yehova!—Vɛrsɛ́ Nz. 89:1, 34-37.
16. Lolenge nini Mokanda ya minei ezali kokumisa bokonzi ya Yehova mpe bosembo na ye mpo na oyo etali kobatela kondima?
16 Mokanda ya minei (Nzembo 90-106). Lolenge moko na mokanda ya misato, ezali na nzembo 17. Ebandi na losambo ya Mose, emonisi bokeseni monene oyo ezali kati na boseko ya Nzambe mpe bomoi mokuse ya moto. Nzembo 92 ezali kokumisa bizaleli minene ya Yehova. Mpe na nsima ezali bongo na liboke moko monene, Nzembo 93-100, oyo ebandi na maloba oyo ya kobenda likebi: “Yehova ye moko asili kokóma mokonzi!” Na yango, “bino bato na mokili mobimba” bobyangami ete “bóyembela [Yehova], bókumisa nkombo na ye, . . . Zambi [Yehova] azali monene mpe akoki na kokumisama.” “[Yehova] azali monene kati na Siona.” (93:1, NW; 96:1, 2, 4; 99:2) Nzembo 105 mpe 106 ezali kozongisa matɔ́ndi epai na Yehova mpo na lolenge abateli na bosembo nyonso kondimana na ye elongo na Abalayama na kopesáká mokili ya ndaka epai na mombóto na ye, atako bazalaki koimaima ntango nyonso mpe atako bazalaki kosala mabungá mingi.
17. Mpo na nini Nzembo 104 esengeli mpenza kobenda likebi na biso, mpe motó na likambo nini ezongelami uta na nzembo yango kino na nsuka?
17 Nzembo 104 esengeli mpenza kobenda likebi na biso. Yango ezali kosanzola Yehova mpo na lokumu mpe nkembo oyo asili komilatisa na yango, mpe ezali kolobela mayele na ye lokola emonisami kati na misala mpe makambo na ye mingi awa na mabelé. Na yango, motó na likambo ya mokanda mobimba ya Nzembo emonisami polele na nguya nyonso, lokola liloba oyo esalelami mpo na mbala ya liboso: “Sanzolá [Yehova]!” (Vɛrsɛ́ Nz. 104:35) Yango esɛngi na basambeli ya solo ya Yehova ete básanzola Yehova na lokumu lobongi na nkombo na ye, na Liebele, elimbolami bobele liloba moko ha·lelu–Yahʹ to “Aleluya,” oyo bato kati na mokili mobimba bayebi yango. Uta na vɛrsɛ́ oyo kino na nsuka, liloba yango esalelami mbala 24, nzembo mingi ezali kobanda mpe kosuka na liloba yango.
18. (a) Maloba nini mazongelami mingi na Nzembo 107? (b) Nzembo oyo ebéngami Hallel ezali nini?
18 Mokanda ya mitano (Nzembo 107-150). Nzembo 107 ezali kolobela makambo oyo Yehova asalaki mpo na kosikola bato na ye, na bozongeli ya maloba oyo mbala na mbala: “Tiká ete básanzola [Yehova] mpo na boboto na ye; mpo na misala na ye na kokamwa epai na bana na bato.” (Vɛrsɛ́ Nz. 107:8, 15, 21, 31) Nzembo 113 kino 118 ebéngami Nzembo na Hallel. Engebene Mishnah, Bayuda nde bazalaki koyemba nzembo yango na ntango ya Elekeli mpe na ntango ya bilambo ya Pantekote, ya Mingombo mpe ya Bofungoli.
19. Bokeseni nini ezali kati na Nzembo 117 mpe 119, mpe makambo nini mosusu malobelami kati na Nzembo 119?
19 Nzembo 117 ezali na nguya mpo na maloba na yango ya polele, nzembo yango ezali mokuse koleka nzembo nyonso mosusu mpe koleka mikapo nyonso ya Biblia. Nzembo 119 ezali molai koleka Nzembo nyonso mosusu mpe koleka mikapo nyonso ya Biblia, ezali na bavɛrsɛ́ 176 kati na moboke na yango 22 oyo elandani engebene alfabɛ́, mpe mokomoko na yango ezali na bavɛrsɛ́ 8. Longolá bobele bavɛrsɛ́ mibale (119:90 mpe 122), na lolenge moko to mosusu, bavɛrsɛ́ nyonso mosusu oyo etikali ezali kolobela liloba to mibeko ya Yehova Nzambe, kozongeláká maloba mingi to mbala nyonso (mobeko, bokundoli, mitindá, lilako, bikateli) kati na liboke mokomoko lokola tozali kokuta yango na Nzembo 19:7-14 (NW). Liloba ya Nzambe ezongelami mbala koleka 170 kati na moko to mosusu na maloba mwambe oyo malandi: lilako (to malako); ekateli (to bikateli), mibeko, mitindá, bipekiseli, bokundoli (to makundoli), eyambweli (to biyambweli), mpe liloba (to maloba).
20, 21. (a) Nzembo nini ezali bongo nzembo ya kobuta? (b) Lolenge nini ezali komonisa ete Davidi asosolaki ntina ya bomoko ya losambo?
20 Na nsima, tozali komona etuluku mosusu ya nzembo, nzembo 15 ya Kobutwa, ebandi na Nzembo 120-134. Babongoli nkótá babongolaki liloba yango na ndenge mingi mpamba te ndimbola na yango eyebani na bosikisiki te. Basusu balobaka ete etaleli makambo ya nkembo oyo mazwami kati na nzembo wana, atako ezali na ntina emonani polele te mpo na yango epesameli nkembo mingi koleka nzembo mosusu. Bato mingi bakanisaka ete nkombo yango euti na lolenge nzembo yango ezalaki kosalama wana basambeli bazalaki kokende, to “kobuta,” na Yelusaleme mpo na bilambo ya mbula na mbula, mobembo mpo na kokende na mboka-mokonzi ezalaki lokola kobuta mpamba te engumba yango etongamaki likoló na bangomba ya Yuda. (Kokanisá na Ezela 7:9.) Davidi asosolaki mpenza na mozindo ntina oyo mpo na yango basaleli ya Nzambe basengelaki kozala na bomoko kati na losambo. Asepelaki na ntango ayokaki libyangi oyo ete: “Tiká tókende na ndako na [Yehova]”; mpe mabota bakendaki, “ete básanzola nkombo na [Yehova].” Ezalaki mpo na ntina wana nde alukaki kimya, libateli, mpe bolamu ya Yisalaele na molende nyonso, kobondeláká ete: “Na ntina na ndako na [Yehova], Nzambe na biso, nakoluka malamu na yo.”—Nz. 122:1, 4, 9.
21 Nzembo 132 ezali kolobela ndai oyo Davidi amisalelaki, ete asengelaki kopema te liboso ete azwa epemelo ebongi mpo na Yehova, lokola emonisami na lisalisi ya Sanduku ya kondimana. Nsima wana sanduku yango etyamaki na Siona, na maloba kitoko ya ntɔ́ki, eyebisamaki na ntina na Yehova ete asilaki kopona Siona, “awa ezali epemelo na ngai lobiko na lobiko, nakofanda awa mpo ete nalingi yango.” Andimaki yango lokola esika ya moboko mpo na losambo, “mpamba te Yehova atyaki mapamboli na ye kuna.” “Tiká ete [Yehova] apambola yo longwa na Siona.”—132:1-6, 13, 14; 133:3, NW; 134:3; talá mpe Nzembo 48.
22. (a) Lolenge nini Yehova akumisami lokola Nzambe oyo abongi kosanzolama? (b) Lolenge nini motó na likambo ya nkembo ya mokanda ya Nzembo etombwani kati na nzembo ya nsuka?
22 Nzembo 135 ezali kokumisa Yehova ete azali Nzambe oyo abongi na kosanzolama, ye oyo akosalaka makambo nyonso oyo makosepelisaka ye, na kokesana na bikeko ya mpambampamba, oyo basáli na yango bakokóma lokola yango. Nzembo 136 etondi na kozongelama ya maloba motindo moko, vɛrsɛ́ mokomoko na yango ezali kosuka na maloba oyo ete: “Boboto na ye ekoumela seko.” Emonani ete maloba wana oyo mazongelami mazalaki kosalelama na mabaku mingi. (1 Nta. 16:41; 2 Nta. 5:13; 7:6; 20:21; Ezl. 3:11) Nzembo 137 ezali kolobela lolenge Bayuda bazalaki na mitema likoló mpo na kozonga na Siona wana bazalaki na boombo na Babilone mpe ezali komonisa polele ete babosanaki te nzembo ya Siona atako bazalaki mosika na mboka na bango mpenza. Nzembo 145 ezali kokumisa bolamu mpe bokonzi ya Yehova, komonisáká ete “akobatela baoyo nyonso bakolinga ye kasi akoboma bato nyonso mabe.” (145 Vɛrsɛ́ 20) Na nsima, Nzembo 146-150 esukisi na maloba ya kopusa moto na kosala eloko, ezali komonisa motó na likambo ya nkembo ya mokanda yango, nzembo mokomoko na yango ezali kobanda mpe kosuka na maloba oyo ete: “Aleluya!” Nzembo yango ya masanzoli emati mingi mpenza kino esuki na Nzembo 150, epai kuna bikɛlamu nyonso ebyangami mbala 13 kati na bavɛrsɛ́ motoba ete básanzola Yehova.
LITOMBA NA YANGO
23. (a) Nsango nini ya nguya ezwami kati na Nzembo? (b) Lolenge nini nkombo ya Yehova mpe boyangeli na ye ekumisami?
23 Mpo na bonzenga mpe ezalela ya kokoka ya lolenge mokanda yango ekomamaki, nzembo ya Biblia esengeli kotángama kati na mikanda ya ntɔ́ki mileki bonene na nkótá nyonso. Nzokande, mizali bobele ntɔ́ki te. Ezali nsango ya nguya euti na Mokonzi aleki monene na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, Yehova Nzambe ye moko. Ezali kopesa biso nzela ya kozwa bososoli mozindo likoló na mateya ya moboko ya Biblia, kolobeláká liboso mpe mingi mpenza Yehova, Mobandisi na yango. Amonisami polele ete azali Mozalisi ya mɔlɔ́ngɔ́ mpe ya biloko nyonso bizali kati na yango. (8:3-9; 90:1, 2; 100:3; 104:1-5, 24; 139:14) Nkombo Yehova ekembisami mpenza kati na mokanda ya Nzembo, epai kuna esalelami mbala soko 700. Lisusu, bokuse na yango “Yah,” emonani mbala 43; na yango, na nyonso nkombo ya Nzambe elobelami na mwayene mbala 5, kati na Nzembo mokomoko. Mpe, Yehova alobelami mbala soko 350 lokola ʼElo·himʹ, to Nzambe. Boyangeli monene ya Yehova emonisami wana nzembo mingi ezali kobénga ye ‘Nkolo Moyangeli.’—68:20; 69:6; 71:5; 73:28; 140:7; 141:8.
24. Nini elobami kati na Nzembo na ntina na moto, mpe toli nini malamu epesami?
24 Na bokeseni na Nzambe ya seko, moto amonisami ete abotami na lisumu mpe azali na mposa ya mosikoli, mpe amonisami ete asengeli kokufa mpe kozonga “mputulu,” kokitáká bongo kino na Shéol, nkunda ya bato nyonso. (6:4, 5; 49:7-20; 51:5, 7; 89:48; 90:1-5; 115:17; 146:4) Mokanda ya Nzembo ezali kolobela makasi ntina ya kolanda mibeko mpe ya kotya elikya epai na Yehova. (1:1, 2; 62:8; 65:5; 77:12; 115:11; 118:8; 119:97, 105, 165) Ezali kokebisa na ntina na ezaleli ya lolendo mpe na ntina na “mabungá mabombami” (19:12-14; 131:1) mpe ezali koyikisa biso mpiko ete tózala na baninga ya sembo mpe oyo bakoki kolendisa biso. (15:1-5; 26:5; 101:5) Ezali komonisa ete moto oyo azali na etamboli malamu andimami na Yehova. (34:13-15; 97:10) Ezali komonisa biso elikya moko kitoko wana ezali koloba ete “kobikisa ezali na [Yehova]” mpe ete mpo na baoyo bakobangaka ye, “akolongola bango epai na liwa.” (3:8; 33:19) Yango ememi biso na kotalela bisakweli oyo bizwami kati na mokanda yango.
25. (a) Mokanda ya Nzembo etondi na makambo nini? (b) Lolenge nini Petelo asalelaki Nzembo mpo na komonisa Davidi Monene?
25 Mokanda ya Nzembo etondi na bisakweli oyo etaleli Yesu Klisto, “mwana na Davidi,” mpe mokumba oyo akokokisa lokola Mopakolami mpe Mokonzi oyo Yehova asilá kopona.a (Mat. 1:1) Wana lisangá ya boklisto ebotamaki na mokolo ya Pantekote na mobu 33 T.B., elimo santu ebandaki kopesa bantoma bingɛngiseli likoló na kokokisama ya bisakweli yango. Bobele na mokolo yango, Petelo azongelaki mbala mingi maloba ya Nzembo wana azalaki kosala lisukúlu na ye oyo eyebani mingi. Yango etalelaki moto moko: “Yesu moto na Nasalete.” Kati na bandimbola oyo apesaki na nsima, alobelaki mingi mpenza maloba mauti na Nzembo mpo na kondimisa ete Yesu Klisto azali Davidi Monene mpe ete Yehova asengelaki te kotika molimo ya Yesu kati na Hades kasi asengelaki kosekwisa ye kati na bakufi. Te, “Davidi anetwaki [“amataki,” NW] na likoló te,” kasi lokola asakolaki yango kati na Nzembo 110:1, Nkolo na ye amataki na likoló. Nani azali Nkolo ya Davidi? Na nsuka ya lisukúlu na ye, Petelo ayanoli na nguya nyonso ete: “Ye Yesu oyo bino bobakisi ye na [nzeté, NW]”!—Mis. 2:14-36; Nz. 16:8-11; 132:11.
26. Nini emonisi ete lisukúlu ya Petelo ebimisaki matomba?
26 Lisukúlu ya Petelo, oyo ezwaki moboko na kati na Nzembo, ebimisaki litomba nini? Bato soko 3 000 babatisamaki mpe babakisamaki na lisangá ya boklisto.—Mis. 2:41.
27. Lolenge nini “elimo santu” elimbolaki Nzembo 2?
27 Mwa moke na nsima, na liyangani moko ya ntina mingi, bayekoli balɔmbaki Yehova mpe basalelaki maloba mazwami kati na Nzembo 2:1, 2. Balobaki ete maloba yango makokisami na lolenge boye ete bakonzi bayanganaki mpo na kotɛmɛla ‘Yesu mosaleli mosantu oyo [Nzambe] apakolaki.’ Mpe lisoló yango ekóbi na koyebisáká ete “bango nyonso batondaki na [elimo santu, NW].”—Mis. 4:23-31.
28. (a) Na lisalisi na Nzembo, likambo nini Paulo alobeli kati na Baebele mikapo 1 kino 3? (b) Lolenge nini toyebi ete lisoló ya Paulo na ntina na bonganga ya Melikisedeke ezwaki moboko na yango na Nzembo 110:4?
28 Tótala sikawa na mokanda epai na Baebele. Na mikapo mibale ya liboso, tozali kokuta maloba mingi oyo mauti na Nzembo, na ntina na bonene ya Yesu, lokola Mwana oyo Nzambe asili kotya ye mokonzi na likoló, na koleka baanzelu. Paulo amonisi uta na Nzembo 22:22 mpe uta na biteni mosusu ya mokanda ya Nzembo ete Yesu azali na lisangá ya “bandeko,” oyo bazali bongo basangani ya mombóto ya Abalayama mpe “basangani na kobyangama na Likoló.” (Ebe. 2:10-13, 16; 3:1) Na nsima, kobanda na Baebele 6:20 mpe kino na Ebe. mokapo 7, ntoma Paulo alobeli mokumba mosusu oyo Yesu azali kokokisa yango lokola “Nganga Monene libela kobila molɔngɔ́ na Melikisedeke.” Yango etaleli ndai oyo Yehova akataki ya kokokisa maloba oyo mazwami kati na Nzembo 110:4, oyo Paulo alobeli yango mbala na mbala na komonisáká bonene ya bonganga ya Yesu likoló na oyo ya Alona. Paulo alimboli ete, na nzela ya ndai oyo asalaki, Yesu azali nganga, awa na mabelé te, kasi na likoló mpe ‘akoumela nganga libela’—matomba ya mosala na ye ya bonganga makoumela seko.—Ebe. 7:3, 15-17, 23-28.
29. Ndakisa nini monene ya ezaleli ya komiboya tosengeli kolanda, lokola eyebisamaki na Nzembo mpe elimbolamaki na Baebele 10:5-10?
29 Lisusu, Baebele 10:5-10, ezali koyebisa biso ete Yesu asepelaki mingi na bomoi na ye ya komiboya, oyo ezalaki bongo mokano ya Nzambe mpo na ye, ezali koyebisa biso mpe ekateli na ye makasi ya kokokisa mokano yango. Oyo nyonso ezwi moboko na yango kati na maloba ya Nzembo 40:6-8. Ndakisa motindo oyo ya elimo ya komipesa ezali na litomba monene mpenza mpo na biso nyonso ete tókoka kotalela yango mpe tómekola yango mpo ete tókoka kondimama na Nzambe.—Talá mpe Nzembo 116:14-19.
30. Lolenge nini Nzembo esakolaki na mozindo bomoi ya Yesu, mpe lolenge nini azwaki libɔndisi kati na yango?
30 Lolenge ya bomoi Yesu alandaki, oyo esukaki na komekama makasi oyo ayikelaki yango mpiko likoló na nzeté ya mpasi, eyebisamaki na bozindo mpenza kati na mokanda ya Nzembo. Elobelaki lolenge bapesaki ye mai ya ngaí ete amela yango, lolenge babɛtaki mbɛsɛ mpo na kokabola bilamba na ye, lolenge batɔbɔlaki ye mabɔkɔ mpe makolo, lolenge batyolaki ye mpe lolenge, na mawa na ye monene, angangaki na mpasi nyonso ete: “Ɛ Nzambe na ngai, Ɛ Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai?” (Mat. 27:34, 35, 43, 46; Nz. 22:1, 7, 8, 14-18; 69:20, 21) Lokola Yoane 19:23-30 emonisi yango, ata na boumeli ya ngonga wana, Yesu azwaki libɔndisi monene mpe litambwisi kati na Nzembo, koyebáká ete mikapo oyo nyonso misengelaki kokokisama na bosikisiki mpenza. Yesu ayebaki ete Nzembo elobelaki lisusu lisekwa mpe kokembisama na ye. Na ntembe te, ayebaki malamu makambo yango wana azalaki ‘koyemba masanzoli’ to nzembo, elongo na bantoma na ye na butu, mokolo ya nsuka liboso ya kobomama na ye.—Mat. 26:30.
31. Mokanda ya Nzembo ezali kosakola nini na ntina na Mombóto ya Bokonzi mpe lisangá ya Yesu?
31 Na yango Nzembo ezali komonisa polele ete “mwana na Davidi” mpe Mombóto ya Bokonzi ezali bongo Yesu Klisto, ye oyo akembisami sikawa lokola Mokonzi mpe Nganga monene kati na Siona ya likoló. Esika ezali te mpo na kolobela na mozindo mikapo nyonso ya Nzembo oyo mizongelami kati na Makomami ya Greke ya boklisto lokola ekokisamaki epai na Mopakolami ya Yehova, kasi mwa bandakisa mosusu epesami awa: Nz. 78:2—Mat. 13:31-35; Nz. 69:4—Yoa. 15:25; Nz. 118:22, 23—Mko. 12:10, 11 mpe Mis. 4:11; Nz. 34:20—Yoa. 19:33, 36; Nz. 45:6, 7—Ebe. 1:8, 9. Lisusu, lisangá ya bayekoli ya solo ya Yesu esakolamaki kati na mokanda ya Nzembo, na kotalela moto mokomoko te, kasi lokola etuluku ya bato oyo bazwi ngɔlu ya Nzambe mpo na kosangana na mosala ya kosanzola nkombo ya Yehova.—Nz. 117:1—Lom. 15:11; Nz. 68:18—Ef. 4:8-11; Nz. 95:7-11—Ebe. 3:7, 8; 4:7.
32. (a) Boyekoli ya Nzembo ezali komonisa nini na ntina na kolóngisama ya Yehova mpe mikano ya Bokonzi? (b) Mpo na komonisa bosepeli na biso epai na Bokonzi na ye, lolenge nini tokoki komonisa bosembo mpe botɔ́ndi na biso?
32 Boyekoli na biso ya mokanda ya Nzembo esungi biso mpo na kososola lisusu malamu mingi bokonzi ya Yehova Nzambe, oyo azali kokokisa na nzela ya Mombóto molakami mpe Mosangoli na libula ya Bokonzi, mpo na nkembo na Ye mpe kolóngisama na Ye. Tiká ete tólanda ntango nyonso kozala bato ya sembo oyo bazali kokumisa ‘nkembo monene ya Bokonzi ya Yehova’ mpe balobelami kati na Nzembo 145, oyo ebéngami “loyembo na kosanzola na Davidi”: “Bakoloba mpo na nkembo na bokonzi na yo, bakosakola mpo na nguya na yo, mpo na koyebisa bato misala na ye na nguya mpe nkembo na bokonzi na ye. Bokonzi na yo ezali bokonzi na seko, mpe nguya na yo ekoumela na mabota na mabota.” (Nz. 145:5, 11-13) Bosolo ya bisakweli oyo bizwami kati na Nzembo emonani na nkembo ya Bokonzi ya Nzambe oyo esili kotyama na nzela ya Klisto mpe ezali uta sikawa kosakolama epai na bana na bato na mabota nyonso. Oyo nde botɔ́ndi tosengeli kozala na yango mpo na Bokonzi yango mpe Mokonzi na yango! Maloba oyo ya nsuka ya mokanda ya Nzembo mabongi mpenza: “Tiká ete nyonso na mpema básanzola [Yah, NW]. Aleluya!”—150:6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 710-711.