Mokapo 20
Ebele monene oyo moto akoki kotanga motuya na bango te
1. Nsima na komonisa motindo ba 144 000 bazwi bilembo, etuluku nini mosusu Yoane amoni?
NSIMA na komonisa motindo ba 144 000 bazwi bilembo, Yoane akoyebisa biso sikawa moko na bimoniseli bileki kitoko na Makomami. Boye motema na ye esepelaki mingi wana ekomaki ye makambo oyo amonaki: “Nsima na makambo oyo natalaki, mpe namoni ebele monene, oyo moto te akoki kotanga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bikolo nyonso, na minoko nyonso; batelemi liboso na kiti na bokonzi mpe liboso na Mwana na Mpate, Balati bilamba mpembe, mpe basimbi bitape na mbila na maboko na bango.” (Emoniseli 7:9) Lokola baanzelu basimbi mipepe minei, etuluku mosusu ya bato bakoki kozwa lobiko, longola ba 144 000 Bayisraele ya elimo; ezali bongo ebele monenea ya bato bauti na mikili nyonso, mpe na minoko nyonso.—Emoniseli 7:1.
2. Balimboli mosusu na mokili balobaki ete ebele monene ezali banani? Bayekoli na Biblia bazaláká kokanisa kala ete ebele monene ezali banani?
2 Balimboli mosusu ya mokili balobaki ete ebele monene wana ezali bato oyo bazalaki Bayuda te kasi babongwanaki na losambo ya boklisto to lisusu bamartiru baklisto oyo basengeli kokenda likoló. Na kala, ata Bayekoli na Biblia, bazalaki kokanisa ete ezali kelasi mosusu kuna na likoló. Na ndakisa, tala ndimbola epesamaki kati na mokanda Le divin plan des âges (volume I na mikanda Etudes des Ecritures) oyo ebimisamaki na Lingelesi na 1886: “Kelasi na bato wana bazwi libaku te ya kozala mikonzi mpe kozala na motindo na Nzambe, nzokande bakobotama lokola bikelamu na elimo, bakozala na nse na baoyo bazwi motindo na bonzambe. Ezali solo ete basangani na kelasi oyo babulisami mpenza, nzokande elimo [ya mokili] ekotela bango mingi, mpe babosani kopesa bomoi na bango lokola mbeka.” Likanisi oyo ezongelamaki lisusu na eteni ya liboso ya mokanda Lumière, oyo ebimaki na 1930: “[Ebele monene oyo] bandimaki te minyoko lokola endimaki yango bamonisi na Nkolo oyo bazali koyika mpiko na minyoko, lokola bamonisi na sembo mpe na molende.” Bazalaki kokanisa ete ebele monene ezali etuluku na bato bazali komitalela bango moko ete bazali sembo, oyo bazali na mwa ndambo na boyebi na solo, kasi bazalaki mpenza kotya molende te mpo na kosakola yango. Kala Bayekoli na Biblia bazalaki kokanisa ete ebele monene na bato yango bakokende na likoló kasi bakozwa libaku te ya koyangela elongo na Klisto; bakozala nde kelasi mosusu pembeni.
3. (a) Elikya nini ezalaki na bato na sembo oyo na nsima bakomaki basakoli ya molende? (b) Na 1923, ndimbola nini La Tour de Garde epesaki mpo na lisese ya bampate mpe bantaba?
3 Nzokande, na nsima, bato mosusu basanganaki na baklisto bapakolami mpe babandaki kosakola na molende mingi. Bazalaki na mposa ya kokende na likoló te. Elikya na bango ezalaki nde na boyokani na motó na likambo na diskur piblike oyo basaleli ya Jéhovah basalaki yango kobanda 1918 kino 1922; titre na yango ezalaki boye na ebandeli: “Mokili ekomi na nsuka na yango—Bamilió na bato bazali lelo na bomoi bakokufa lisusu te.”b Mwa moke nsima, La Tour de Garde ya Lingelesi ya 15 Octobre 1923 (Français ya Mars 1924) epesaki ndimbola oyo na ntina na lisese na bampate mpe na bantaba oyo Yesu alobaki (Matai 25:31-46): “Bampate bazali elilingi na bato na mabota nyonso, oyo babotami na Elimo te, kasi balingi boyengebene, baoyo kati na makanisi na bango bandimi Yesu Klisto lokola Nkolo, baoyo bazali kolikya mpe bazali kozela eleko malamu na nse na bokonzi na ye.”
4. Mpo na oyo etali kelasi ya bato bakofanda na mabelé, ndenge nini pole engengaki lisusu mpe lisusu na 1931? na 1932? mpe na 1934?
4 Mwa bambula na nsima, na 1931, kolimbolaka mokapo 9 na esakweli ya Ezekiele, eteni ya liboso ya mokanda Justification emonisaki ete bato oyo batyami bilembo mpo na kobika na nsuka na mokili oyo ezali bango wana bampate na lisese oyo touti kolobela. Eteni ya misato ya mokanda wana moko, oyo ebimaki na Lingelesi na 1932, elobelaki motema malamu ya Yonadaba, mobali oyo azalaki Moyisraele te, kasi amataki na likalo esika moko na Yehu, mokonzi mopakolami na Yisraele, mpe amonaki molende na Yehu esika abomaki bato bazalaki kosalela losambo ya lokuta. (2 Mikonzi 10:15-17) Ekomamaki boye kati na mokanda yango: “Yonadaba azalaki elilingi na kelasi na bato oyo bazali lelo na mabelé, na eleko oyo mosala na Yehu [oyo ya kosakola bikateli ya Jéhovah] ezali naino kolandana. Bazali bato ya bolingo malamu oyo babimi na lisangá ya Satana mpe bamitii na ngambo na boyengebene. Ezali bango nde Nkolo akobatela na Armagedon; akobikisa bango na etumba oyo mpe akopesa bango bomoi ya seko na mabelé. Bango bazali kelasi ya ‘bampate.’” Na 1934, La Tour de Garde elimbolaki polele ete baklisto oyo bazali na elikya na mabelé, basengeli mpe komipesa epai na Jéhovah mpe kozwa batisimo. Kongenga na ntina na kelasi wana na mabelé ezalaki kokoma polele koleka.—Masese 4:18.
5. (a) Na 1935, bakokisaki ebele monene ete bazali banani? (b) Na assemblée esalemaki na 1935, nini elekaki ntango Joseph Rutherford asengaki na bayangani oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé ete batelema?
5 Boyebi ya Emoniseli 7:9-17 elingaki kobima na kongenga na yango nyonso. (Nzembo 97:11) Zulunalo La Tour de Garde elobaki mbala mingi ete tozali na mposa ete assemblée oyo ebongisamaki mpo na le 30 Mai kino le 3 Juin 1935 na Washington (Etats-Unis) ‘elendisa mpe epesa bolamu ya solo’ epai na baoyo bamonisamaki na elilingi na Yonadaba. Mpe ezalaki bongo! Na diskur moko ya ntina mingi oyo asalaki likoló na “Ebele monene,” Joseph Rutherford, oyo na ntango wana azalaki kokamba mosala ya kosakola na mokili mobimba, alakisaki epai na bayangani soko 20 000 bilembo bizwami na Biblia oyo bizali komonisa ete bampate mosusu ya ntango na biso ezali se bango wana ebele monene oyo elobelami na Emoniseli 7:9. Ekomaki ye na nsuka na diskur na ye, molobi asengaki boye ete: “Baoyo nyonso bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé, tosengi bango ete batelema.” Lokola ebele monene kati na bato bazalaki wana batelemaki, molobi angangaki na mongongo makasi ete: “Botala ebele monene!” Bato bafandaki naino nyee, na nsima babetaki maboko makasi. Oyo nde esengo mpo na kelasi na Yoane, mpe mpo na etuluku na bato oyo Yonadaba azaláká elilingi na bango! Na mokolo elandaki, Batemwe ya sika 840 bazwaki batisimo, kati na bango baoyo balekaki mingi ezalaki basangani na ebele monene.
Ebele monene bayebani lisusu
6. (a) Nini esalisi biso na kososola polele ete ebele monene ezali etuluku ya baklisto oyo, na mikolo na biso, bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé? (b) Barobe ya mpembe oyo ebele monene balati ezali elilingi ya nini?
6 Nini epesi biso nzela na kolimbola kozanga ntembe ete ebele monene ezali baklisto nyonso bamipesi, baoyo, na eleko na biso, bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé mazalisami na Nzambe? Liboso, Yoane amonaki kati na emonaneli etuluku ya likoló oyo “esombami mpo na Nzambe . . . uta na bikolo nyonso, mpe na minoko nyonso, mpe na mabota nyonso, mpe na mikili nyonso.” (Emoniseli 5:9, 10) Ebele monene bauti mpe na minoko nyonso, na mabota nyonso, na bikolo nyonso mpe na mikili nyonso, kasi bango bakokende na likoló te. Na kokesena na Yisraele na Nzambe, motuya na ebele monene eyebisami te. Moto moko te akoki koloba soki bakozala boni. Ebele monene oyo basukoli barobe na bango mpe bayeisi yango mpembe kati na makila na Mwana na Mpate, oyo emonisi na elilingi ete bazali sembo na miso na Jéhovah na ntina na kondima na bango kati na mbeka na Yesu. (Emoniseli 7:14) Epai mosusu, bazali kopepa mandalala, komonisaka bongo ete bayambi Masiya lokola Mokonzi na bango.
7, 8. (a) Mandalala boye ekundolaki nini epai na Yoane? (b) Lokola ebele monene bazali kopepa mandalala, yango ezali elilingi ya nini?
7 Na kotalaka emonaneli oyo, boye Yoane akanisaki makambo malekaki mbula 60 liboso, na boumeli ya poso ya nsuka ya bomoi ya Yesu na mabelé. Na le 9 Nisan ya mobu 33, ebele na bato oyo bayanganaki mpo na koyamba Yesu na Yelusaleme “bakamataki bitape na mbila mpe babimaki kozwana na ye. Bangangaki ete, Osana! Ye oyo azali koya na nkombo na Jéhovah apambwama, ye mokonzi na Yisraele.” (Yoane 12:12, 13) Bobele bongo, lokola ezali bango kopepa mandalala mpe bazali konganga, ebele monene bazali komonisa esengo nsuka te oyo bazali kooka na ndenge bandimi Yesu lokola Mokonzi na bango oyo Jéhovah apesi bango.
8 Mandalala mpe konganga na esengo, na ntembe te ekundolaki lisusu epai na Yoane fête moko ya kala ya Bayuda, oyo ebengamaki ete elambo na Mingombo. Mpo na elambo yango, Jéhovah apesaki etinda oyo: “Na mokolo na liboso bokokamata mbuma na nzete kitoko mpe bitape na mbila, mpe bitape na nzete na nkasa mingi, mpe nkasa na libongo na mai, mpe bokosepela liboso na Jéhovah Nzambe na bino mikolo nsambo.” Mandalala ezalaki elembo na esengo. Mpo na mingombo mitongamaki mpo na mwa ntango, yango ezalaki kokundola ete Jéhovah asikolaki libota na ye na boombo na Ezipito mpe na nsima afandisaki bango kati na bandako na kapo kuna na esobe. “Mopaya, etike mpe mwasi-akufeli-mobali” bazalaki mpe kosepela na elambo yango. Yisraele mobimba “bazalaki na esengo solo.”—Levitike 23:40; Deteronome 16:13-15.
9. Ebele monene basangisi mingongo na bango mpo na konganga maloba nini na esengo nyonso?
9 Ata batangami kati na Yisraele ya elimo te, nzokande ebongi ete ebele monene bapepa mandalala, mpamba te bandimi na esengo nyonso mpe na botondi nyonso ete kolonga mpe lobiko euti na Nzambe mpe na Mwana na Mapte. Ezali yango Yoane alobi sikawa boye ete: “Batiki te konganga na mongongo makasi ete, Lobiko euti na Nzambe na biso oyo afandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate.” (Emoniseli 7:10) Atako ebele monene oyo bauti na bikolo bikeseni, bazali konganga na ‘mongongo se moko mpe makasi.’ Ndenge nini bazali kokoka kosala bongo, awa euti bango na mikili mikeseni mpe na minoko mikeseni?
10. Ndenge nini ebele monene bakoki konganga bango nyonso elongo na ‘mongongo se moko mpe makasi’ atako bazali na minoko mikeseni mpe na mikili mikeseni?
10 Ebele monene oyo bazali basangani ya lisangá se moko ya mokili mobimba oyo ezali solo na bomoko na mikolo na biso. Bazali na mitinda ya bokeseni te engebene mikili epai bazali kofanda, kasi bipai nyonso mpe ntango nyonso bazali kolanda mitinda ya sembo ya Biblia. Bazali kokotisa nzoto na bango te na makambo na botomboki na mokili; basili nde ‘kobongola mipanga na bango mpo na kosala na yango kongo.’ (Yisaya 2:4) Bakabwani na mangomba mikemike te, mpamba te soki boye, mbele nsango na bango oyo bazali kosakola ekozala na mobulu, lokola ezali kosala yango mangomba ya boklisto ya mokili oyo. Ebele monene oyo bazali mpe na etuluku na mikonzi te oyo mbele bobele bango nde bapesameli mokumba ya kosakola mpo na kokumisa Nzambe. Bangangi te ete bakozwa lobiko na elimo santu, mpamba te bakosambelaka Nzambe na bosato te. Kati na mikili soko 200, bazali kobelela nkombo ya Jéhovah na mongongo moko, kolobaka monoko na solo bobele moko mpe na peto. (Sofoni 3:9) Lokola esengeli, bandimi polele ete lobiko na bango euti na Jéhovah, Nzambe na lobiko, na nsima na Yesu Klisto, Mosaleli na ye na liboso mpo na kopesa lobiko epai ya bato.—Nzembo 3:8; Baebele 2:10.
11. Motindo nini mayele ya teknoloji ya lelo esalisi ebele monene na kongalisa lisusu mongongo na bango makasi koleka?
11 Mayele ya lelo esungi mpo ete mongongo makasi ya ebele monene na bomoko eyokana lisusu makasi koleka. Lingomba mosusu ezali te oyo ezali kobimisa mikanda mikolimbolaka Biblia na minoko koleka 400, mpamba te lingomba moko te ezali na mposa ya kosakola nsango se moko epai na mabota nyonso na mokili. Kasi ba Témoins de Jéhovah bazali na mposa na kosala mosala oyo; ntina wana, na kotambwisama na baklisto bapakolami oyo bazali kati na Collège central na bango, babimisaki masini mabengami MEPS (système électronique de photocomposition multilingue) mpo na mosala ya kobongisa mikanda misengeli konyatama na minoko ebele. Ntango mokanda oyo enyatamaki, na bisika koleka 125 na mokili mobimba bazalaki kosalela bamasini wana MEPS; ezali yango nde epesi nzela na basaleli na Jéhovah na kobimisa zulunalo na bango ya liboso Mosenzeli, na minoko koleka 130, nyonso mbala moko. Bazali mpe kobimisa mikanda na minoko mingi mbala moko, lokola mokanda oyo. Na motindo yango, ba Témoins de Jéhovah, oyo motuya moleki monene kati na bango bazali basangani na ebele monene, bakoki kokabola mbula nyonso bamilió mingi ya mikanda kati na minoko minene nyonso ya mokili, yango epesi nzela na ebele na bato mosusu bauti na bikolo nyonso mpe na minoko nyonso bayekola Liloba na Nzambe mpe basangisa mingongo na bango na mongongo makasi ya ebele monene.—Yisaya 42:10, 12.
Na likoló to na mabelé?
12, 13. Elimboli nini ete ebele monene “batelemi liboso na kiti na bokonzi mpe liboso na Mwana na Mpate”?
12 Ebele monene batelemi “liboso na kiti na bokonzi”; ndenge nini toyebi ete eteni oyo elobeli likoló te? Bilembo mingi bimonisi polele likambo yango. Na ndakisa, liloba ya greke ebongolami awa ete “liboso” (énôpion) elimboli mpenzampenza “na miso ya,” mpe esalelami mbala mingi mpo na bato oyo, awa na mabelé, bazali “na miso ya” to “liboso” ya Jéhovah. (1 Timote 5:21; 2 Timote 2:14; Baloma 14:22; Bagalatia 1:20) Na libaku moko, ntango Bayisraele bazalaki kati na esobe, Moïse alobaki na Aaron: “Lobela lingomba mobimba na bato na Yisraele ete, Belema liboso na Jéhovah, mpo ete ye ayoki koimaima na bino.” (Exode 16:9) Esengamaki te na Bayisraele ete bakende na likoló mpo na kotelema liboso na Jéhovah na libaku yango. (Tala Levitike 24:8.) Bobele na esika wana oyo bazalaki, kati na esobe, batelemaki liboso na Jéhovah, Ye oyo azalaki kotala bango.
13 Epai mosusu, totangi: “Ekoya Mwana na moto na nkembo na ye, . . . Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye.”c Bato nyonso bakozala na likoló te ntango esakweli oyo ezali kokokana. Baoyo ‘bakei na libebi ya seko,’ bakozala na likoló te. (Matai 25:31-33, 41, 46) Nzokande Yesu azali komona bato awa na mabelé, mpe abaloli likebi na ye epai na bango to azali kotala bango mpo na kosambisa bango. Bobele bongo, ebele monene batelemi “liboso na kiti na bokonzi mpe liboso na Mwana na Mpate” na ntina boye ete Jéhovah mpe Mokonzi Yesu Klisto bazali kotyela bango likebi, bazali kotala bango na miso malamu.
14. (a) Mpo na banani elobami ete bafandi “zongazonga na kiti na bokonzi” mpe batelemi “likoló na ngomba Siona [na likoló]”? (b) Atako ebele monene bazali kosalela Nzambe “kati na temple” na ye, mpo na nini bazali kelasi ya banganga te?
14 Mikóló 24 mpe etuluku na baklisto 144 000 bapakolami balakisami na biso ete bafandi “zongazonga na kiti na bokonzi” na Jéhovah mpe “na likoló na ngomba Siona [kuna na likoló].” (Emoniseli 4:4; 14:1) Ebele monene bazali banganga te mpe bakotombwama te kino esika wana. Solo, engebene maloba mosusu na Emoniseli 7:15, bazali kosalela Nzambe “kati na temple na ye.” Nzokande, awa elobelami mpo na Esika-Eleki-Bosantu te kasi elobelami nde mpo na libanda (la cour) ya temple ya Nzambe na elimo, libanda oyo ezali awa na mabelé. Liloba ya greke na·osʹ, oyo ebongolami awa ete “temple,” elimbolaka mbala mingi ndako mobimba oyo etongami mpo na losambo ya Jéhovah. Lelo oyo, ezali ebongiseli moko ya elimo oyo esangisi biloko bizali na likoló mpe biloko bizali na mabelé.—Tala Matai 26:61; 27:5, 39, 40; Malako 15:29, 30; Yoane 2:19-21, Traduction du monde nouveau, oyo ya références, na Lingelesi, note na nse na lokasa.
Konganga kati na molongo mobimba
15, 16. (a) Nini esalami na likoló ntango ebele monene bamonani? (b) Bikelamu ya elimo ya Jéhovah bazali kosala nini mbala nyonso oyo likambo ya sika eyebisami mpo na oyo etali mokano na ye? (c) Ndenge nini biso baoyo tozali na mabelé, tokoki kosangisa mongongo na biso na loyembo oyo ezali koyembama mpo na kokumisa Nzambe?
15 Longola ebele monene, bikelamu mosusu bazali kokumisa Jéhovah. Na ntina yango Yoane alobi ete: “Baanzelu nyonso batelemi epai na epai na kiti na bokonzi, mpe na mikóló yango, mpe na bikelamu na bomoi yango minei, mpe bakwei na bilongi na bango liboso na kiti na bokonzi, kosambela Nzambe ete, Amen! Masanzoli, na nkembo, na mayele, na matondi na lokumu, na nguya, na makasi, mpo na Nzambe na biso libela na libela! Amen!”—Emoniseli 7:11, 12.
16 Ntango Jéhovah azalisaki mabelé, baanzelu na ye nyonso basantu ‘bangangaki na esengo mpe bana nyonso na Nzambe babetaki maboko.’ (Yobo 38:7) Basalaki boye mpo na kokumisa Nzambe mbala nyonso oyo likambo ya sika eyebisamaki kati na mokano na ye. Na motindo yango, ntango mikóló 24 (ba 144 000 kati na nkembo na bango na likoló) bazali kokumisa Mwana na Mpate, bikelamu nyonso mosusu ya Nzambe na likoló basangani na bango mpo na kokumisa Yesu mpe kokumisa Jéhovah. (Emoniseli 5:9-14) Bikelamu oyo basilaki kooka esengo mingi ntango bamonaki Jéhovah akokisaki mokano na ye na kosekwisaka baklisto na sembo bapakolami mpe na kopesaka bango esika ya nkembo kuna na likoló. Sikawa lokola ebele monene emonani, bikelamu nyonso ya sembo na likoló bazali koyemba mpo na kokumisa Nzambe. Na ntembe te, mokolo na Nkolo ezali eleko kitoko mingi mpo na basaleli nyonso ya Jéhovah. (Emoniseli 1:10) Oyo nde libaku malamu tozali na yango, awa na mabelé, ya kosangisa mingongo na biso na oyo ya baoyo bazali koyemba nzembo oyo ya makumisi, na kotatolaka mpo na Bokonzi ya Jéhovah!
Ebele monene emonani
17. (a) Moko kati na mikóló 24 atuni motuna nini, mpe lokola apesi eyano na motuna yango ekoki kolakisa nini? (b) Ntango nini eyano epesamaki na motuna oyo mokóló atunaki?
17 Uta eleko na ntoma Yoane kino na boumeli na mokolo na Nkolo, baklisto bapakolami bazalaki koluka koyeba banani wana oyo babengami ete ebele monene. Ebongaki mpenza ete moko kati na mikóló 24 (elakisi baklisto bapakolami oyo basili kokoma na likoló) abenda likebi na Yoane na nzela na motuna moko. “Moko na mikóló alobi na ngai ete, Baoyo balati bilamba mpembe bazali banani, mpe bauti wapi? Nalobi na ye ete, Nkolo na ngai, yo oyebi.” (Emoniseli 7:13, 14a) Mokóló oyo akoki kozwa eyano na motuna motunami mpe koyebisa yango na Yoane. Yango emonisi ete basekwi kati na etuluku ya mikóló 24, mbala mosusu bazali mpe kosala mosala ya koyebisa epai ya bato na mikolo na biso, solo oyo ezali kouta epai na Nzambe. Mpo na basangani na kelasi na Yoane oyo bazali naino awa na mabelé, bango basili kozwa ndimbola na ntina na ebele monene na kotyaka likebi na makambo oyo Jéhovah azalaki kokokisa kati na bango. Bakangaki ntina noki mpo na engengiseli makasi na pole eutaki na Nzambe mpe engengelaki lisangá ya teokratike na 1935, na ntango oyo Jéhovah asilaki kobongisa.
18, 19. (a) Elikya nini kelasi na Yoane balobelaki yango mingi na ba 1920 mpe ba 1930, kasi bato nini bakomaki kondima mingi nsango oyo esakolamaki? (b) Lokola na 1935 ebele monene eyebanaki polele, yango emonisaki nini mpo na ba 144 000? (c) Mituya na bayangani na Ekaniseli mizali komonisa nini?
18 Na ba 1920 mpe na ebandeli ya ba 1930, kelasi ya Yoane elobelaki mingi elikya ya likoló, ezala kati na mikanda to mpe kati na mosala ya kosakola. Na eleko yango, emonanaki ete motuya ya 144 000 ekokaki naino te. Nzokande, nsima na bambula, motuya monene na bato oyo bazalaki kondima nsango malamu mpe bazalaki kosangana na molende na mosala ya kosakola, babandaki kosepela mingi mpo na bomoi ya seko kati na Paradis na mabelé. Bazalaki na mposa ya kokende likoló te. Babyangamaki mpo na yango te. Batangamaki kati na bampate mosusu, kasi kati na etonga moke te. (Luka 12:32; Yoane 10:16) Lokola na 1935 bakokisaki bato wana na ebele monene ya bampate mosusu, likambo yango emonisaki ete koyanganisama na ba 144 000 ekomaki bongo pene na nsuka na yango.
19 Ba rapports endimi likanisi oyo? Ee. Na 1938, ba Témoins de Jéhovah 59 047 bazalaki kosangana na mosala ya kosakola kati na mokili mobimba. Na kati na motuya oyo, 36 732 bazalaki kolya limpa mpe komela vinyo na Ekaniseli ya liwa ya Yesu mbula na mbula, komonisaka bongo ete babyangami mpo na kokende na likoló. Uta ntango yango, motuya na bango ezali se kokita, ntina na yango mpenza ezali ete ba Témoins de Jéhovah mingi ya sembo basili kokufa, kosukisaka bongo kurse na bango awa na mabelé. Na 2005, bobele bato 8 524 balyaki limpa mpe bamelaki vinyo na Ekaniseli, elingi koloba bobele 0,05 % kati na bato 16 390 116 oyo bayanganaki na ekaniseli yango na mokili mobimba.
20. (a) Na boumeli na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Joseph Rutherford alobaki nini pembeni mpo na oyo etalaki ebele monene? (b) Makambo nini mamonisi sikawa ete ebele monene ezali solo monene?
20 Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebimaki, Satana asalaki nyonso mpo na koboma mosala ya koyanganisa ebele monene. Mosala ya Jéhovah epekisamaki na mikili mingi. Na boumeli ya mikolo wana ya molili, mpe mwa moke liboso na liwa na ye na Janvier 1942, Joseph Rutherford alobaki na pembeni ete: “Namoni lokola ete ebele monene ekozala mpenza monene te koleka oyo.” Kasi lipamboli na Nzambe etambwisaki makambo ndenge mosusu. Na 1946, motuya na Batemwe oyo bazalaki kosangana na mosala ya kosakola kati na mokili mobimba ekomaki 176 456, kati na bango ntalo eleki monene bazalaki basangani na ebele monene. Na 2005, Batemwe 6 390 022 bazalaki kosalela Jéhovah na bosembo nyonso kati na mikili 235. Ezali solo EBELE MONENE! Mpe elandi kobakisama.
21. (a) Ndenge nini koyanganisama na libota na Nzambe na boumeli na mokolo na Nkolo esalamaki na boyokani mpenza na emonaneli na Yoane? (b) Motindo nini bisakweli ya ntina mingi bibandi kokokana?
21 Koyanganisama na libota na Nzambe na boumeli na mokolo na Nkolo esalami bongo na boyokani mpenza na emonaneli na Yoane: ya liboso, batikali kati na ba 144 000 bayanganisamaki, na nsima ebele monene. Lokola Yisaya asakolaki yango, sikawa, “na mikolo na nsuka oyo,” bato bauti na mabota nyonso basopani epai na losambo na peto na Jéhovah. Na ntembe te, tozali na botondi mingi epai na Jéhovah na ndenge asili kozalisa “makoló ya sika mpe mabelé ya sika.” (Yisaya 2:2-4; 65:17, 18) Nzambe azali koyanganisa “biloko nyonso kati na Klisto, biloko bizali na makoló mpe biloko bizali na mabelé.” (Baefese 1:10) Baklisto bapakolami oyo bakozwa libula na Bokonzi na likoló mpe baponamaki na boumeli ya bikeke bileki uta eleko ya Yesu, bango nde ‘biloko bizali kati na makoló.’ Lelo oyo, ebele monene ya bampate mosusu babimi lokola baoyo na liboso kati na ‘biloko bizali na mabelé.’ Soki ozali kosalela Nzambe na boyokani na ebongiseli oyo, okoki kozwa bolamu ya seko.
Mapamboli mapesami na ebele monene
22. Yoane ayokaki lisusu nini na ntina na ebele monene?
22 Na nzela oyo Nzambe abongisaki, Yoane azwi bandimbola mosusu na ntina na ebele monene: “[Mokóló] alobi na ngai ete, Bazali baoyo babimi na bolozi monene. Basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpembe na makila na Mwana na Mpate; yango wana bazali liboso na kiti na bokonzi na Nzambe, mpe bakosalelaka ye butu na moi kati na temple na ye, mpe Mofandi na kiti na bokonzi akozipa bango na hema na ye.”—Emoniseli 7:14b, 15.
23. Nini bolozi monene oyo ebele monene ‘babimi’ na yango?
23 Bambula mingi liboso na yango, Yesu alobaki ete koya na ye lokola Mokonzi na nkembo ekokamba kino “bolozi monene, lokola emonani naino te longwa na ebandeli na mokili kino lelo, mpe ekomonana lisusu te.” (Matai 24:21, 22) Na kokokisama na esakweli oyo, baanzelu bakotika mipepe minei koboma ebongiseli oyo mabe ya Satana na mokili mobimba. Eloko ekobomama liboso ezali Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta. Na nsima, ntango bolozi monene ekokoma na esika oyo ekondongwana makasi, Yesu akobikisa batikali ya ba 144 000 oyo bakozala naino awa na mabelé, akobikisa mpe ebele monene oyo eyebani motuya te.—Emoniseli 7:1; 18:2.
24. Ebele monene bazali kosala nini mpo ete bakoka kobika?
24 Ebele monene basengeli kosala nini mpo ete bakoka kobika? Mokóló alobaki na Yoane ete “basukoli bilamba na bango mpe bayeisi yango mpembe na makila na Mwana na Mpate.” Na maloba mosusu, bandimelaki Yesu, Mosikoli na bango, bamipesi epai na Jéhovah, bamonisi elembo na yango na nzela na batisimo na mai mpe ‘babateli lisosoli malamu’ na nzela na etamboli ya sembo. (1 Petelo 3:16, 21; Matai 20:28) Bazali bongo peto mpe sembo na miso na Jéhovah mpe bazali komibatela ‘ete bazwa litono te na mokili.’—Yakobo 1:27.
25. (a) Motindo nini ebele monene bazali kosalela Jéhovah “mosala ya bosantu, butu na moi, kati na temple na ye”? (b) Elimboli nini ete Jéhovah ‘atandi hema na ye’ likoló na ebele monene?
25 Epai mosusu, basili kokoma batemwe ya molende ya Jéhovah, Nzambe oyo bazali “kosalela ye mosala ya bosantu, butu na moi, kati na temple na ye.” Ozali moko kati na ebele monene oyo ya bato bamipesi epai na Nzambe? Soki ee, ozali na libaku malamu ya kosalela Jéhovah ntango nyonso kati na libanda (la cour) ya mabelé ya temple na ye monene ya elimo. Na mikolo na biso, na kotambwisama na baklisto bapakolami, ebele monene nde bazali kosala ndambo eleki monene na mosala ya kosakola. Atako bazali na misala ya mosuni, nkoto mingi kati na bango babongisi ntango na bango mpo na kosala mosala ya pionnier. Kasi ata ozali moko na ba pionniers yango to te, soki ozali mosangani na ebele monene na bato oyo bamipesi na Nzambe, okoki kosepela mpo ete na nzela na kondima na yo mpe na misala na yo Jéhovah atangi yo moyengebene lokola moninga mpe ayambi yo lokola mopaya na ye kati na hema na ye. (Nzembo 15:1-5; Yakobo 2:21-26) Jéhovah ‘atandi hema’ na ye likoló na baoyo balingaka ye, mpe, lokola moyambi malamu, azali kobatela bango.—Masese 18:10.
26. Mapamboli mosusu nini ebele monene bakozwa?
26 Mokóló abakisi lisusu: “Bakoyoka nzala lisusu te, soko mposa na mai lisusu te. Moi ekobola bango soko moke te, na móto makasi mpe te, mpo ete Mwana na Mpate oyo azali na kati na kiti na bokonzi akobatela bango, mpe akokamba bango epai na maziba na mai na bomoi. Nzambe mpe akopangusa mpisoli nyonso na miso na bango.” (Emoniseli 7:16, 17) Jéhovah azali solo moyambi! Kasi wapi ndimbola mozindo na maloba oyo?
27. (a) Esakweli nini ya Yisaya ekundoli biso maloba oyo mokóló alobaki? (b) Nini emonisi ete esakweli yango ebandaki kokokana na mikolo na Paulo?
27 Totalela esakweli mosusu oyo maloba na yango makokani na oyo touti kotanga: “Jéhovah alobi boye ete, Na ntango na ngolu nazongiseli yo liloba; na mokolo na kobikisama nasungi yo. . . . Bakoyoka nzala te to mposa na mai te; kokaoka makasi mpe moi ekobeta bango te; ye oyo ayokeli bango mawa akokamba bango mpe akotambolisa bango epai na maziba na mai.” (Yisaya 49:8, 10; tala mpe Nzembo 121:5, 6.) Ntoma Paulo akamataki ndambo na maloba na esakweli yango mpe asalelaki yango mpo na “mokolo na lobiko” oyo ebandaki na Pantekote ya mobu 33. Akomaki: “Mpo ete [Jéhovah] alobi ete, Na ntango ebongi, nayoki yo, mpe na mokolo na kobika nasungi yo. Tala, ntango ebongi ezali sikawa; tala mokolo na kobika ezali sikawa.”—2 Bakolinti 6:2.
28, 29. (a) Motindo nini maloba na Yisaya makokanaki na ekeke ya liboso? (b) Ndenge nini maloba na Emoniseli 7:16 makokani likoló na ebele monene? (c) Bolamu nini ebele monene bakozwa ntango Mwana na Mpate akokamba bango epai na “maziba na mai na bomoi”? (d) Mpo na nini ebele monene bakokesena na bato mosusu?
28 Ndenge nini elaka oyo endimisi basaleli na Nzambe ete bakoyoka nzala te, mposa na mai te mpe moi makasi te, ekokanaki na eleko oyo? Na ntembe te, baklisto na ekeke na liboso bayokaki nzala mpe mposa na mai na mosuni. (2 Bakolinti 11:23-27) Kasi, bazalaki na bilei mingi na elimo. Bamposa na bango na elimo ekokisamaki nyonso, mpe bazalaki na nzala na elimo te soko mpe mposa na mai na elimo te. Epai mosusu, nkanda makasi ya Jéhovah ekweaki likolo na bango te ntango abomaki ebongiseli ya Bayuda na mobu 70. Na mikolo na biso, maloba makomami na Emoniseli 7:16 mazali kokokana bongo na elimo likolo na ebele monene. Esika moko na baklisto bapakolami, bazali na ebele na bilei na elimo.—Yisaya 65:13; Nahumu 1:6, 7.
29 Soki ozali mosangani na ebele monene oyo, na ntembe te ozali ‘koyemba mpo na esengo na motema,’ atako mbala mosusu ozali kokelela na mosuni soki mpe kokutana na mimekamo mosusu na boumeli ya mwa bambula oyo etikali na biloko mabe oyo ya Satana. (Yisaya 65:14) Na ndimbola oyo, uta sikawa, Jéhovah akoki ‘kopangusa mpisoli nyonso na miso na yo.’ “Moi” makasi uta na Nzambe, elingi koloba ekweli, ezali lisusu kokanela yo te, mpe ntango “mipepe minei” ya koboma mokili mikotikama ete mipepa, mbala mosusu okobikisama na “móto makasi” ya nkanda ya Jéhovah. Nsima wana mokili ekosila kobomama, Mwana na Mpate akokamba yo mpo ete ozwa litomba mpenza na “maziba na mai na bomoi” na lobiko, oyo elakisi bibongiseli nyonso bikamatami na Jéhovah mpo ete okoka kozwa bomoi ya seko. Kondima na yo kati na makila na Mwana na Mpate ekolongisama, mpamba te okotombwama mokemoke kino kokoma na ezalela na moto ya kokoka. Ebele monene oyo yo osangani na bango ekozala etuluku moko ya bato oyo ekokokana na mosusu te. Mpamba te, “bamilió” na bato oyo basangani na yango bakoleka na liwa te. Nzambe akopangusa mpenza mai na miso na yo.—Emoniseli 21:4.
Baklisto basengeli kolendisa ebyangeli na bango
30. Emonaneli na Yoane efungoli elikya nini kitoko liboso na biso, mpe nani akokoka “kotelema”?
30 Maloba oyo mafungoli solo elikya kitoko liboso na biso! Jéhovah ye moko afandi likolo na kiti na ye ya bokonzi mpe basaleli na ye nyonso, na likoló lokola na mabelé, bazali kokumisa ye na bomoko. Basaleli na ye na mabelé bazali komona libaku malamu mpe monene bazali na yango ya kosangisa mingongo na bango na oyo ya bayembi ya loyembo oyo ya makumisi oyo lokito na yango ezali se kobakisama. Mosika te, Jéhovah mpe Yesu Klisto bakokokisa ekateli mpe maloba oyo makoyokama: “Mpo ete mokolo monene na nkanda na bango eyei, mpe nani akoki kotelema?” (Emoniseli 6:17) Na mokili mobimba, bobele mwa bato moke nde bakokoka: bamoko kati na baklisto 144 000, oyo basili kotyama elembo, oyo bakozala ntango mosusu awa na mabelé, mpe, ebele monene ya bampate mosusu oyo ‘bakokoka kotelema,’ elingi koloba bakobika na bango elongo.—Yilimia 35:19; 1 Bakolinti 16:13.
31. Kokokisama na emonaneli na Yoane esengeli kozala na bopusi nini likoló na baklisto, ezála baoyo bapakolami na elimo to baoyo kati na ebele monene?
31 Koyebaka bongo, baklisto bapakolami, kelasi na Yoane bazali kobunda makasi mpo na ‘kolanda kurse na bango kino bakokoma na mokano etyami liboso, lifuta na ebyangeli na Nzambe, ebyangeli mpo na likolo, na nzela na Klisto Yesu.’ (Bafilipi 3:14) Bazali kokanga ntina ete makambo ya lelo esengi bamonisa ete bazali koyika mpiko mpenza. (Emoniseli 13:10) Nsima na kosalela Jéhovah na boumeli na mbula mingi ya bosembo, basimbi kondima na bango makasi mpe bazali kosepela na komona ete nkombo na bango “ekomami na likoló.” (Luka 10:20; Emoniseli 3:5) Ebele monene bayebi mpe ete bobele ‘ye oyo akoyika mpiko kino nsuka nde akobika.’ (Matai 24:13) Atako ebele monene, lokola liboke bandimisami ete bakobika na bolozi monene, moto na moto kati na yango asengeli kobunda mpo na kobatela bopeto na ye mpe molende na ye.
32. Lokola bobele bituluku mibale ya bato nde ‘bakokoka kotelema’ na mokolo na nkanda na Jéhovah, eloko nini esengami epai ya bato ete basala yango nokinoki?
32 Longola bituluku oyo mibale, ekomami esika moko te ete bato mosusu ‘bakokoka kotelema’ na mokolo na nkanda na Jéhovah. Yango elimboli nini mpo na bamilió ya bato oyo mbula na mbula bazali komonisa mwa limemya mpo na mbeka na Yesu na koyanganaka na Ekaniseli ya liwa na ye, kasi bandimeli naino mbeka yango te mpo bakoka komipesa epai ya Jéhovah, kozwa batisimo mpe kosalela Nzambe na bango na molende? Mpe tokoloba boni mpo na baoyo basalelaki Jéhovah na kala, kasi batiki mitema na bango ‘miyei kilo mpo na bitungiseli ya bomoi’? Tika ete bato yango nyonso balamuka, mpe balala lisusu te, mpo ete ‘bakoka kokima makambo oyo nyonso malingi koya, mpe kotelema liboso na Mwana na móto,’ Yesu Klisto! Ntango ekomi mokuse!—Luka 21:34-36.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelesi ezali na mitindani, liloba na nse na lokasa.
b La Tour de Garde, ebimeli na Lingelesi ya le 1er Avril 1918, page 98.
c Soko tobongoli liloba mokomoko, ekozala boye, “liboso na ye,” The Kingdom Interlinear Translation of the Greek Scriptures.
[Etanda na lokasa 119]
Kolimbola ntina ezali mpo na Nzambe
Na boumeli na bambula mingi, kelasi na Yoane balukaki koyeba banani oyo ebele monene, kasi bazwaki ndimbola ya malonga te. Mpo na nini bongo? Tokomona ntina na yango na maloba malandi na Yosefe, mobali na kondima: “Kolimbola ntina ezali mpo na Nzambe te?” (Genese 40:8) Ntango nini mpe ndenge nini Nzambe azali kolimbola bisakweli na ye? Mingimingi, alimbolaka yango soko ekomi pene na kokokana to esili kobanda kokokana, mpo ete basaleli na ye, oyo bazali koluka kokanga ntina na yango, basosola na polele nyonso ndimbola na yango. Mayele yango epesameli biso “mpo na kolakisa biso ete tozala na elikya na nzela na koyika mpiko mpe na kolendisama na Makomami.”—Baloma 15:4.
[Etanda na lokasa 124]
Basangani na ebele monene
▪ bauti na bikólo nyonso, na mabota nyonso mpe na minoko nyonso
▪ batelemi liboso na kiti na bokonzi na Jéhovah
▪ bapetoli barobe na bango, basili koyeisa yango mpembe na makila na Mwana na Mpate
▪ bandimi ete lobiko na bango euti na Jéhovah mpe na Yesu
▪ babimi na bolozi monene
▪ bazali kosalela Jéhovah na tempelo na ye butu mpe moi
▪ babatelami mpe bazali koleisama na bolingo nyonso epai na Jéhovah
▪ batambwisami na Yesu kino maziba na mai na bomoi
[Elilingi na lokasa mobimba 121]
[Elilingi na lokasa 127]
Ebele monene bayebi ete lobiko na bango euti na Nzambe mpe na Mwana na Mpate
[Elilingi na lokasa 128]
Mwana na Mpate akokamba ebele monene kino maziba na mai na bomoi