Ndenge ekomamá na Matai
25 “Boye Bokonzi ya likoló ezali lokola bangɔndɔ zomi oyo bazwaki miinda+ na bango mpe babimaki mpo na kokutana na mobali ya libala.+ 2 Mitano kati na bango bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele.*+ 3 Bazoba bazwaki miinda na bango kasi bazwaki mafuta te, 4 nzokande baoyo ya mayele bazwaki miinda na bango, bazwaki mpe mafuta na kati ya milangi na bango. 5 Lokola mobali ya libala azalaki koumela, bango nyonso bayokaki mpɔngi mpe balalaki. 6 Na katikati ya butu mongongo moko egangaki: ‘Mobali ya libala ayei! Bóbima kokutana na ye.’ 7 Bongo bangɔndɔ yango nyonso balamukaki mpe babongisaki miinda na bango.+ 8 Bazoba balobaki na baoyo ya mayele boye: ‘Bópesa biso ndambo ya mafuta na bino, mpo miinda na biso elingi kokufa.’ 9 Baoyo ya mayele bayanolaki, balobi: ‘Mbala mosusu ekokoka biso ná bino te. Bókende nde epai ya baoyo batɛkaka yango mpe bósomba ndambo mpo na bino moko.’ 10 Ntango bakendaki kosomba yango, mobali ya libala ayaki. Bangɔndɔ oyo bamibongisaki bakɔtaki na ye na fɛti ya libala,+ mpe porte ekangamaki. 11 Na nsima bangɔndɔ mosusu wana mpe bayaki, balobi: ‘Tata, tata, fungolelá biso!’+ 12 Azongiselaki bango boye: ‘Ya solo nazali koyebisa bino: Nayebi bino te.’
13 “Yango wana, bókoba kosɛnzɛla+ mpo boyebi mokolo te mpe ngonga te.+
14 “Ezali kaka lokola moto moko oyo alingaki kokende mobembo na mboka mopaya. Abengisaki baombo na ye mpe atikaki biloko na ye na mabɔkɔ na bango.+ 15 Apesaki moko talanta* mitano, mosusu talanta mibale, mpe mosusu talanta moko, moto na moto na kotalela makoki na ye. Na nsima akendaki na mboka mopaya. 16 Na mbala moko moto oyo azwaki talanta mitano akendaki, asalaki na yango mombongo mpe ebotaki mosusu mitano. 17 Ndenge moko mpe moto oyo azwaki mibale, ebotaki mosusu mibale. 18 Kasi moombo oyo azwaki kaka moko akendaki, mpe atimolaki libulu na mabele mpe abombaki mbongo* ya nkolo na ye.
19 “Nsima ya ntango molai, nkolo ya baombo wana ayaki mpe atalelaki ná bango makambo ya mbongo na ye.+ 20 Bongo moombo oyo azwaki talanta mitano apusanaki mpe amemaki talanta mosusu mitano, alobi: ‘Nkolo, opesaki ngai talanta mitano; talá, nasali ete ebota talanta mosusu mitano.’+ 21 Nkolo na ye alobaki na ye: ‘Longonya, moombo malamu mpe ya sembo! Ozalaki sembo na biloko moke oyo napesaki yo. Nakotya yo likoló ya biloko mingi.+ Yaká kosepela elongo na nkolo na yo.’+ 22 Na nsima moombo oyo azwaki talanta mibale apusanaki mpe alobaki: ‘Nkolo, opesaki ngai talanta mibale; talá, nasali ete ebota talanta mosusu mibale.’+ 23 Nkolo na ye alobaki na ye: ‘Longonya, moombo malamu mpe ya sembo! Ozalaki sembo na biloko moke oyo napesaki yo. Nakotya yo likoló ya biloko mingi. Yaká kosepela elongo na nkolo na yo.’
24 “Nsukansuka moombo oyo azwaki talanta moko apusanaki mpe alobaki: ‘Nkolo, nayebaki ete ozalaka moto ya matata, ete obukaka epai olonaki te mpe oyanganisaka epai opupolaki te.+ 25 Bongo nabangaki, yango wana nakendaki kobomba talanta na yo na mabele. Talá eloko na yo yango oyo.’ 26 Nkolo na ye azongiselaki ye: ‘Moombo mabe mpe ya gɔigɔi! Oyebaki malamu ete nabukaka epai nalonaki te mpe nayanganisaka epai napupolaki te. 27 Boye osengelaki kotya mbongo* na ngai na banki, mpe ntango nakoya nalingaki nakende kozwa mbongo na ngai ná benefisi.
28 “‘Sikoyo bóbɔtɔla ye talanta wana mpe bópesa yango moto oyo azali na talanta zomi.+ 29 Mpo moto nyonso oyo azali na eloko, bakobakisela ye mosusu mpe akokóma na mingi mpenza; kasi moto oyo azali na eloko te, bakobɔtɔla ye ata oyo azali na yango.+ 30 Mpe bóbwaka moombo oyo ya mpambampamba na libándá, na molili. Kuna nde akolela mpe akolya mino.’
31 “Ntango Mwana ya moto+ akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye,+ akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. 32 Bikólo nyonso ekoyangana liboso na ye, mpe akokabola bato na bituluku mibale, kaka ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate ná bantaba. 33 Akotya bampate+ na lobɔkɔ na ye ya mobali, kasi bantaba na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+
34 “Bongo Mokonzi akoloba na baoyo bakozala na lobɔkɔ na ye ya mobali: ‘Bóya, bino baoyo Tata na ngai apamboli, bózwa* Bokonzi oyo babongiselá bino banda na ebandeli ya mokili. 35 Mpo nayokaki nzala mpe bopesaki ngai eloko ya kolya; nazalaki na mposa ya mai mpe bopesaki ngai eloko ya komɛla. Nazalaki mopaya mpe boyambaki ngai malamu;+ 36 nazalaki bolumbu,* mpe bolatisaki ngai bilamba.+ Nazalaki na maladi mpe bosalisaki ngai. Nazalaki na bolɔkɔ mpe boyaki kotala ngai.’+ 37 Bongo bato ya sembo bakozongisela ye boye: ‘Nkolo, ntango nini tomonaki yo ozali na nzala mpe toleisaki yo, to na mposa ya mai, mpe topesaki yo mwa eloko ya komɛla?+ 38 Ntango nini tomonaki yo mopaya mpe toyambaki yo malamu, to bolumbu, mpe tolatisaki yo? 39 Ntango nini tomonaki yo ozali na maladi to na bolɔkɔ mpe toyaki kotala yo?’ 40 Mpe mokonzi akozongisela bango boye: ‘Ya solo nalobi na bino, ntango nyonso oyo bosalaki yango epai ya moko ya bato oyo baleki mike na kati ya bandeko na ngai oyo, bosalaki yango epai na ngai.’+
41 “Bongo akoloba mpe na baoyo bazali na lobɔkɔ na ye ya mwasi ete: ‘Bólongwa na miso na ngai,+ bino baoyo bolakelamá mabe, bókende na mɔtɔ ya seko+ oyo ebongisamá mpo na Zabolo ná baanzelu na ye.+ 42 Mpo nayokaki nzala, kasi bopesaki ngai eloko ya kolya te, mpe nazalaki na mposa ya mai, kasi bopesaki ngai eloko ya komɛla te. 43 Nazalaki mopaya, kasi boyambaki ngai malamu te; nazalaki bolumbu, kasi bolatisaki ngai bilamba te; nazalaki na maladi mpe na bolɔkɔ, kasi bosalisaki ngai te.’ 44 Bongo bango mpe bakozongisa boye: ‘Nkolo, ntango nini tomonaki yo ozali na nzala to na mposa ya mai to mopaya to bolumbu to na maladi to na bolɔkɔ mpe tosalisaki yo te?’ 45 Ye akozongisela bango boye: ‘Ya solo nalobi na bino, ntango nyonso oyo bosalaki yango te epai ya moko ya bato oyo baleki mike, bosalaki yango te epai na ngai.’+ 46 Bango bakokufa* liwa ya seko,+ kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.”+