Mokapo 25
Batatoli mibale bazongi na bomoi
1. Anzelu makasi abengi Yoane ete asala nini?
LIBOSO ete mawa ya mibale eleka, anzelu makasi abengi Yoane kosangana na elakiseli moko ya esakweli, ya mbala oyo na ntina etali tempelo. (Emoniseli 9:12; 10:1) Tala oyo Yoane alobi: “Mokekele lokola lingenda epesami na ngai, mpe alobaki na ngai ete, Telema komeka monene na tempelo na Nzambe, ná etumbelo ná basambeli kati na yango.”—Emoniseli 11:1.
Tempelo
2. (a) Tempelo nini ekoumela kino na mikolo na biso? (b) Nani Nganga Monene na tempelo yango, mpe Esika-Eleki-Bosantu na tempelo yango ezali nini?
2 Tempelo oyo elobelami awa ezali ata moko te kati na oyo nyonso etongamaki na Yelusaleme, mpamba te oyo ya nsuka kati na batempelo yango ebomamaki na Baromé na mobu 70 ya ntango na biso. Nzokande, ntoma Paulo amonisaki ete naino tempelo ya nsuka na Yelusaleme ebomamaki te, tempelo mosusu esalamaki, oyo elingaki koumela kino na mikolo na biso. Ezali bongo tempelo monene ya elimo oyo ezali kokokisa maye nyonso matalisamaki na elilingi na tabernakle mpe na ba tempelo oyo etongamaki na Yelusaleme na nsima. Yango ezali “hema na solo oyo Jéhovah atelemisi kasi moto te,” mpe Nganga Monene na yango ezali Yesu, oyo Paulo alakisi ye ete asili “kofanda na loboko na mobali na kiti na bokonzi na Nguya Monene kuna na makoló.” Esika-Eleki-Bosantu na tempelo yango ezali esika Jéhovah afandaka kati na makoló mpenza.—Baebele 8:1, 2; 9:11, 24.
3. Mpo na oyo etali tabernakle, nini elakisamaki na elilingi na (a) rido oyo ekabolaki Esika-Eleki-Bosantu na Esika ya Bosantu? (b) banyama bapesamaki mbeka (c) etumbelo na mbeka?
3 Ntoma Paulo alimboli ete rido na tabernakle oyo ekabolaki Esika-Eleki-Bosantu na Esika ya Bosantu elakisi mosuni ya Yesu. Ntango Yesu apesaki bomoi na ye mbeka, elamba yango epaswanaki ndambo mibale, komonisaka bongo ete uta ntango yango, mosuni na Yesu ezalaki lisusu epekiseli te mpo na ye koingela epai ya Jéhovah kati na makoló. Na nzela na mbeka na Yesu, banganga mike bapakolami mpe bakufi kati na bosembo, bango mpe bakoki kokota na likoló. (Matai 27:50, 51; Baebele 9:3; 10:19, 20) Paulo alimboli lisusu ete mbeka ya banyama oyo ezalaki kopesama mbala na mbala na hema ezalaki elilingi na mbeka bobele moko, yango bomoi na Yesu lokola moto azangi masumu. Etumbelo na mbeka kati na lakur to libanda ezalaki elilingi ya ebongiseli oyo Jéhovah asalaki, na boyokani na mokano na ye, ete andima mbeka na Yesu mpo na “bato mingi,” liboso naino bapakolami mpe na nsima bampate mosusu, baoyo nde ‘bazeli ye na motema móto, mpo na lobiko na bango.’—Baebele 9:28; 10:9, 10; Yoane 10:16.
4. Nini elakisami na elilingi na (a) Esika ya Bosantu (b) na lakur to libanda oyo ezalaki na kati?
4 Na kotalela engengiseli oyo ya bonzambe, tokoki kolimbola boye ete Esika ya Bosantu kati na tabernakle ezalaki elilingi ya ezalela ya bosantu oyo epesamaki liboso epai na Klisto mpe na nsima epai na ba 144 000 bapakolami na bonganga na bokonzi, naino ezali bango na mabelé, liboso ete bakatisa “elamba” to rido mpo na koleka na ngambo mosusu. (Baebele 6:19, 20; 1 Petelo 2:9) Elakisi kondimama na bango lokola bana na Nzambe na elimo, motindo moko Nzambe andimaki Yesu ete azali Mwana na ye nsima na batisimo na ye kati na ebale Yordani na mobu 29 ya ntango na biso. (Luka 3:22; Baloma 8:15) Ezali boni mpo na lakur ya kati, eteni bobele moko ya tabernakle oyo ezalaki komonana na Bayisraele oyo bazalaki na libota ya bonganga te mpe epai oyo bazalaki kotumba mbeka? Yango ezali elilingi na kokoka na Yesu ntango azalaki moto, kokoka wana nde elingisaki ye kopesa bomoi na ye mpo na bato. Elakisi lisusu boyengebene oyo epesami na bayekoli bapakolami, boyengebene oyo bazwi yango na nzela na mbeka na Yesu mpe mpo na yango batangami babulami naino ezali bango na mabelé.a—Baloma 1:7; 5:1.
Tempelo emekami
5. Kati na bisakweli ya Makomami ya liebele (a) mezire ezwamaki mpo na mboka Yelusaleme elimbolaki nini? (b) mezire ezwamaki mpo na tempelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli elimbolaki nini?
5 Yoane azwi etinda ya komeka to ‘kokamata mezire ya tempelo ya Nzambe mpe etumbelo mpe baoyo bakosambelaka wana.’ Yango elimboli nini? Engebene bisakweli ya Makomami ya liebele, kokamata bamezire ezalaki ndanga ete boyengebene ekosalelama engebene mitinda ya kokoka ya Jéhovah. Na mikolo ya mokonzi mabe Manasé, kokamata bamezire ya Yelusaleme ezalaki litatoli ete ekateli ya koboma mboka wana ekokaki koleka mpamba te. (2 Mikonzi 21:13; Bileli 2:8) Nzokande na nsima, ntango Jérémie amonaki kokamatama ya bamezire ya Yelusaleme, ezalaki ndanga ete mboka ekotongama lisusu. (Yilimia 31:39; tala lisusu Zakari 2:2-8.) Bobele bongo, lisolo molai ya bamezire ya tempelo oyo Ezekiele amonaki kati na emonaneli ezalaki ndanga epai na bakangami Bayuda na Babilone ete losambo ya solo ekozongisama kati na mokili na bango. Ekundolaki mpe na Bayisraele ete na ntina na mabunga na bango basengelaki “komimekisa” na mitinda na bulee na Nzambe.—Ezekiele 40:3, 4; 43:10.
6. Lokola esengamaki na Yoane ete akamata bamezire ya tempelo mpe ya banganga oyo bakosambelaka wana, yango ezali elembo ya nini? Limbola.
6 Na yango, ntango Yoane azwi etinda ya kokamata bamezire ya tempelo mpe banganga oyo bakosambelaka wana, ezali elembo ete eloko moko te ekoki kopekisa kokokisama ya mikano ya Jéhovah na ntina etali tempelo mpe na ntina na baoyo bakosalaka mosala wana, mpe kokokisama na mikano yango esili kobelema. Sikawa lokola biloko nyonso bityami na nse na makolo na anzelu makasi ya Jéhovah, ntango ekoki mpo ete “ngomba na ndako na Jéhovah epikama makasi mpe etombwama likoló koleka ngomba nyonso.” (Yisaya 2:2-4) Losambo na peto na Jéhovah esengeli kotombwama nsima na bikeke mingi ya lipengwi na boklisto ya mokili oyo. Yango ezali mpe ntango ekoki mpo na bandeko na sembo na Yesu oyo balali kati na kufa ete bakoka kosekwisama kati na “Esika-Eleki-Bosantu.” (Danyele 9:24; 1 Batesaloniki 4:14-16; Emoniseli 6:11; 14:4) Mpe “baombo na Nzambe na biso” awa na mabelé, oyo bazwi bilembo na mikolo oyo ya nsuka basengeli “komekama” to kozwa bango mezire engebene masengami na Nzambe mpo ete bakoka kozwa esika ya libela oyo ebombami mpo na bango kati na tempelo lokola bana na Nzambe babotami na elimo. Kelasi na Yoane bayebi malamumalamu masengami yango ya bulee, mpe bazwi ekateli ya kotosa yango.—Emoniseli 7:1-3; Matai 13:41, 42; Baefese 1:13, 14; tala Baloma 11:20.
Libanda enyatami
7. (a) Mpo na nini epekisami na Yoane ete akamata bamezire ya lakur te? (b) Ntango nini mboka mosantu enyatamaki na makolo na boumeli ya sanza 42? (c) Ndenge nini, na boumeli ya sanza 42, bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo bazangaki kotosa masengami ya boyengebene ya Jéhovah?
7 Mpo na nini bapekisi Yoane ete akamata bamezire ya lakur te? Alobeli biso yango na maloba oyo: “Mpo na lopango ezali na libanda na tempelo, tika yango, komeka yango te, mpo ete epesami na bapakano, mpe bakonyata mboka mosantu sanza ntuku minei na mibale.” (Emoniseli 11:2) Tosilaki kolimbola ete lakur ya kati elakisi boyengebene ya baklisto babotami na elimo, wana ezali naino bango awa na mabelé. Lokola tokomona yango, elobelami awa mpo na sanza 42 ya solo, etangami kobanda na Décembre 1914 kino na Juin 1918, ntango baoyo nyonso bazalaki komibenga baklisto bamekamaki makasi. Balingaki kotosa masengami ya boyengebene na Jéhovah na boumeli ya bambula wana ya bitumba? Ntalo eleki monene basalaki yango te. Kelasi mobimba ya bakonzi na mangomba na boklisto ya lokuta batyaki na esika ya liboso makambo ya nationalisme, na esika ete batosa mibeko na Nzambe. Epai na babundi ya ngambo nyonso mibale, bakonzi na mangomba balendisaki bilenge mibali ete bakota na mosala ya soda. Bamilió mingi kati na bango babomamaki. Wana eyaki kosambisama oyo ebandaki na ndako na Nzambe na 1918, Etats-Unis ekotaki na bitumba oyo na kobomáká bato mingi, mpe kelasi mobimba na bakonzi na mangomba na boklisto ya lokuta ekumbaki nyongo ya makila, oyo ezali kolela kino lelo ete Nzambe alandela yango. (1 Petelo 4:17) Bakonzi na mangomba babwakami libanda mpo na libela, ekateli oyo ekoki kobongwana te.—Yisaya 59:1-3, 7, 8; Yilimia 19:3, 4.
8. Na boumeli na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, eloko nini Bayekoli mingi ya Biblia bayebaki, kasi eloko nini bakangaki ntina na yango mpenza te?
8 Tokoloba boni mpo na etuluku moke ya Bayekoli na Biblia? Balingaki “kozwama mezire” nokinoki na 1914 mpo na oyo etali bokangami na bango na masengami na Nzambe? Te. Lokola mpo na baklisto ya nkombo mpamba ya boklisto na lokuta, bango mpe basengelaki komekama. ‘Babwakamaki libanda, bapesami na bato na mabota’ mpo ete bamekama makasi mpe banyokwama. Mingi kati na bango bakomaki na boyebi ete basengelaki te koboma bazalani na bango; nzokande, naino basimbaki mpenza te nyonso esengami na ezaleli ya boklisto ya kozanga kokota na makambo ya mokili. (Mika 4:3; Yoane 17:14, 16; 1 Yoane 3:15) Mpo na kopusama na bato ya mokili, bamoko kati na bango bakweaki.
9. Nini mboka mosantu oyo enyatamaki na makolo ya bapakano, mpe nani amonisami na mboka yango awa na mabelé?
9 Kasi ndenge nini mboka mosantu enyatamaki na makolo na bato na mokili to bapakano? Yelusaleme oyo ebomamaki mibu soko 25 liboso na kokomama ya Emoniseli, ezali yango te mboka oyo elobelami awa. Mboka mosantu ezali nde Yelusaleme ya Sika oyo elobelami mwa mosika kati na Emoniseli, mpe emonisami lelo awa na mabelé na batikali na baklisto bapakolami oyo batelemi na lakur oyo na kati ya tempelo. Na nsima, baklisto wana mpe bakosangana kati na mboka mosantu. Na yango, konyata baklisto oyo ezali nde konyata mboka oyo mpenza.—Emoniseli 21:2, 9-21.
Batatoli mibale
10. Atako banyatami na makolo, eloko nini batatoli na sembo na Jéhovah bakosala yango?
10 Ata banyatami na nse na makolo, nzokande basembwi oyo batiki te kozala batatoli na sembo ya Jéhovah. Yango wana esakweli elandami lisusu boye ete: “Nakopesa batatoli na ngai mibale nguya, mpe bakosakola mikolo nkoto na nkama mibale na ntuku motoba, na kolata ngoto. Bango wana bazali bilaya mibale mpe bitemelo na miinda mibale bikotelemaka liboso na Nkolo na mokili.”—Emoniseli 11:3, 4.
11. Mpo na baklisto na sembo bapakolami, likambo ya kosakola na “kolata ngoto” elimbolaki nini?
11 Baklisto oyo na sembo bapakolami bazalaki na mposa na koyika mpiko, mpamba te esengelaki na bango kosakola “na kolata ngoto.” Elimboli nini? Na kala, kolata ngoto to sáki ezalaki elembo ya matanga. Kolata ngoto elimbolaki ete moto azalaki na mawa monene to na mpasi mingi. (Genese 37:34; Yobo 16:15, 16; Ezekiele 27:31) Ngoto ezalaki kolatama wana nsango na kokweisama to ya mpasi ezalaki kosakolama uta epai na Jéhovah na nzela na basakoli na ye. (Yisaya 3:8, 24-26; Yilimia 48:37; 49:3) Kolata ngoto ekokaki kozala elembo na komikitisa to ya kobongola motema nsima na kozwa likebisi uta epai na Nzambe. (Yona 3:5) Ngoto oyo batatoli mibale balataki emonani ete ezali elembo na kolendendela na bango kati na mosala ya kosakola bikateli ya Jéhovah. Bazalaki batatoli bapesameli mokumba ya kosakola mokolo na kobukanisa na ye, oyo ezali mpe ntina na mawa mpo na mabota.—Deteronome 32:41-43.
12. Mpo na nini eleko oyo na boumeli na yango mboka mosantu esengelaki konyatama na makolo, emonani ete ezali eleko ya elilingi te?
12 Kelasi na Yoane esengelaki kosakola nsango oyo na boumeli na ntango moko ya sikisiki: mikolo 1260 to sanza 42; boumeli ya ntango oyo ekokani na oyo mboka mosantu esengelaki konyatama. Emonani lokola ete eleko yango ezali ya elilingi te mpamba te eyebisami na mitindo mibale mikeseni, ya liboso na kotangáká yango na basanza, mpe ya mibale na kotangáká yango na mikolo. Epai mosusu, na ebandeli ya mokolo na Nkolo, ezalaki na eleko esilaki kokatama, ya mbula misato na ndambo oyo na boumeli na yango makambo na mpasi oyo basaleli na Nzambe bakutanaki na yango ekokanaki na makambo masakolami awa; eleko yango ebandaki na Décembre 1914 mpe elandanaki kino na Juin 1918. (Emoniseli 1:10) Baklisto ya kelasi na Yoane basakolaki nsango etali ekateli ya Jéhovah likoló na boklisto ya lokuta mpe likoló na mokili oyo, nsango oyo na ntina na yango ngoto elatamaki.
13. (a) Likambo oyo ete baklisto bapakolami bamonisamaki na elilingi na batatoli mibale elakisi nini? (b) Esakweli nini ya Zakari oyo Yoane akundoli biso yango na kobengaka batatoli mibale na liloba oyo ete “bilaya mibale mpe bitemelo na miinda mibale”?
13 Likambo oyo ete bamonisamaki na batatoli mibale ezali ndanga mpo na biso ete nsango na bango ezali solo mpe na ntina malamu. (Tala Deteronome 17:6; Yoane 8:17, 18.) Yoane abengi bango “bilaya mibale mpe bitemelo na miinda mibale,” kolobáká ete “bakotelemaka liboso na Nkolo na mokili.” Yango etindi biso na kokanisa esakweli ya Zakari, oyo amonaki etemelo na miinda nsambo mpe bilaya mibale (nzete ya olive). Eyebisami sikisiki ete bilaya elakisi “bapakolami mibale,” elingi koloba guvernere Zorobabele mpe nganga monene Yosua, ‘baoyo batelemi penepene na Nkolo na mokili mobimba.’—Zakari 4:1-3, 14.
14. (a) Emonaneli na Zakari ekundolaki nini na ntina na bilaya mibale mpe na bitemelo na miinda? (b) Baklisto bapakolami bazwaki libaku nini na boumeli na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?
14 Zakari azalaki na bomoi na eleko ya kotonga lisusu tempelo, mpe emonaneli na ye ya bilaya mibale elimbolaki ete Zorobabele mpe Yosua nde bazwi elimo ya Jéhovah mpo na kolendisa bato na bango ete bamipesa na mosala. Emonaneli ya etemelo na miinda oyo Zakari azwaki ekundolaki ye ete asengeli te ‘kotyola mokolo na makambo mike,’ mpamba te mikano na Jéhovah mikokokana “na nzela na makasi te, na nzela na nguya mpe te nde na elimo na ngai. Jéhovah na bibele alobi bongo.” (Zakari 4:6, 10; 8:9) Mwa etuluku moke ya baklisto oyo, na kolendendela, bamemaki kongenga ya solo epai ya bato na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bango mpe bapesamelaki mosala ya kotonga lisusu. Bango mpe bazalaki liziba na koyikisama mpiko, mpe atako bazalaki mingi te, batyaki motema na makasi ya Jéhovah mpe batyolaki te mokolo na makambo mike.
15. (a) Likambo oyo ete baklisto bapakolami balakisami na batatoli mibale ekundoli biso lisusu nini? Limbola. (b) Bilembo ya motindo nini batatoli mibale bazwi lotomo ya kosala yango?
15 Likambo oyo ete baklisto oyo balakisamaki na elilingi na batatoli mibale ekundoli biso lisusu kobongwana na Yesu. Kati na emonaneli yango, bantoma misato na Yesu bamonaki ye kati na nkembo ya Bokonzi, esika moko na Moïse mpe na Elie. Ezalaki elilingi na Yesu ntango asengelaki kofanda na kiti na bokonzi na ye ya nkembo na 1914 mpo na kokokisa mosala oyo emonisamaki na elilingi na mosala ya basakoli oyo mibale. (Matai 17:1-3) Mpo na yango batatoli oyo mibale basali bikamwiseli oyo bitindi biso kokanisa bikamwiseli bisalamaki na Moïse mpe Elie. Na ndakisa, Yoane alobi na ntina na bango: “Soko moto moko azali na mposa ya kozokisa bango, mɔ́to ekobima na minoko na bango kosilisa bayini na bango. Soko moto moko azali na mposa na kozokisa bango, akokufa se na lolenge wana. Bango wana bazali na nguya na kozipa likoló, ete mbula enoka na mikolo na kosakola na bango te.”—Emoniseli 11:5, 6a.
16. (a) Ndenge nini elembo ya móto ekundoli biso ntango oyo bokonzi na Moïse etyamelaki ntembe na Yisraele? (b) Ndenge nini bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo batyolaki Bayekoli na Biblia mpe babimiselaki bango mikakatano na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpe ndenge nini Bayekoli na Biblia bamonisaki ete bazali solo baministre ya Nzambe?
16 Yango ekundoli biso ntango oyo bokonzi ya Moïse etyamelaki ntembe na Yisraele. Mosakoli Moïse alobaki maloba makasi ya kokweisa, mpe Jéhovah abomaki batomboki, kati na bango 250 bakufaki na móto eutaki na likoló. (Mituya 16:1-7, 28-35) Bobele bongo, bakonzi na mangomba na boklisto ya lokuta batyolaki Bayekoli ya Biblia, kolobaka ete bakotaki na biteyelo ya teoloji te mpo na kozwa badiplome kuna. Kasi batemwe na Nzambe bazalaki kopesa bilembo bileki na motuya mpo na komonisa ete bazali solo baministre ya Nzambe, bilembo yango ezalaki bongo bato oyo bandimaki nsango na bango euti na Biblia. (2 Bakolinti 3:2, 3) Na 1917, Bayekoli ya Biblia babimisaki mokanda Le mystère accompli, oyo ezalaki kolimbola na maloba na nguya mokanda ya Emoniseli mpe mokanda ya Ezekiele. Mwa moke nsima, bakabolaki 10 000 000 ya trakte L’Etudiant de la Bible. Motó na likambo na mikolo wana ezalaki “Kokwea ya Babilone—Mpo na nini boklisto ya mokili oyo esengeli kozwa mpasi sikawa—Ekosuka ndenge nini.” Na Etats-Unis, bakonzi na mangomba basilikaki makasi mpe bamonaki libaku malamu na yikiyiki ya bitumba mpo na kopekisa mokanda yango. Na mikili misusu, balongolisaki ndambo na maloba kati na yango. Kasi basaleli na Nzambe balandaki kobunda na nzela na batrakte ya móto mpe ya nkasa minei, oyo ezalaki na titre Nouvelles du Royaume (Nsango ya Bokonzi). Mikanda misusu mimonisaki polele ete boklisto ya mokili oyo ezali na maladi ya kufa na elimo.—Tala Yilimia 5:14.
17. (a) Mpo na oyo etali móto mpe kozanga mbula, makambo nini mabimaki na mikolo ya Elie? (b) Ndenge nini móto ebimaki na monoko na batatoli mibale, mpe bazali kobenda likebi likoló na kokauka ya motindo nini?
17 Tokoloba boni mpo na Elie? Na mikolo na bakonzi na Yisraele, Elie asakolaki ete mbula ekonoka te, mpamba te Jéhovah asilikaki mpo na Bayisraele oyo bazalaki kosambela Baala. Mibu misato na ndambo mbula enokaki te. (1 Mikonzi 17:1; 18:41-45; Luka 4:25; Yakobo 5:17) Na nsima, ntango mokonzi mabe Akazia atindaki basoda mpo na kokanga Elie, mosakoli asambelaki, mpe móto ekitaki longwa na likoló, oyo ezikisaki basoda. Bobele ntango mokonzi moko ya basoda amonisaki limemya lokola esengeli epai ya mosakoli, na mbala wana nde Elie andimaki kokende na bango elongo kino epai na mokonzi. (2 Mikonzi 1:5-16) Bobele bongo, kolongwa 1914 kino 1918, batikali bapakolami babendaki makasi likebi ya bato nyonso likoló na kokauka ya elimo kati na boklisto ya lokuta mpe basakolaki koya na ekweli makasi na “mokolo monene mpe na nsomo na Jéhovah.”—Malako 4:1, 5; Amos 8:11.
18. (a) Nguya nini epesami na batatoli mibale, mpe na nini nguya yango ekokani na oyo epesamaki na Moïse? (b) Batatoli mibale bamonisaki nini na ntina na “mai” ya boklisto ya mokili oyo?
18 Yoane alobaki lisusu na ntina na batatoli mibale ete: “Bazali mpe na nguya ya kobongola mai na makila, mpe na kobola mokili na bolozi mbala na mbala, na ntango elingi bango.” (Emoniseli 11:6b) Mpo na kolonga Faraon ete atika libota na ye Yisraele, Jéhovah asalelaki Moïse mpo na koyeisa bitumbu likoló na mokili na Ezipito; kati na bitumbu yango, moko ebongolaki mai na makila. Bikeke mingi na nsima, Bafilistia, banguna ya Yisraele, bamikundolaki malamumalamu misala ya Jéhovah ndenge asalaki epai na bato ya Ezipito, yango wana balobaki ete: “Nani akobikisa biso na maboko ya Nzambe oyo makasi? Ye azali Nzambe oyo abetaki Baezipito na ndenge mingi na bolozi kati na esobe.” (1 Samwele 4:8; Nzembo 105:29) Moïse azalaki elilingi na Yesu, oyo azalaki na bokonzi mpo na koyebisa bikateli na Nzambe likoló na bakonzi ya mangomba ya ntango na ye. (Matai 23:13; 28:18; Misala 3:22) Mpe na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bandeko ya Klisto, elingi koloba batatoli mibale, bamonisaki polele ete “mai” oyo boklisto ya mokili oyo ezali komelisa bato na yango ezali nde pwázó.
Batatoli mibale babomami
19. Engebene lisolo na Emoniseli, eloko nini esalami ntango batatoli mibale basilisi kosakola?
19 Bolozi oyo ezalaki makasi mingi mpo na boklisto ya mokili oyo. Na yango, nsima wana batatoli mibale basakolaki na kolataka ngoto, na boumeli ya sanza 42, boklisto ya mokili oyo esalelaki bopusi na yango mpo na ‘koboma’ bango. Yoane akomaki: “Wana ekosilisa bango litatoli na bango, nyama na yauli oyo akobuta na libulu ya bozindo akobundisa bango na etumba, akoleka bango, mpe akoboma bango. Bibembe na bango bikolala na balabala na mboka yango monene, oyo ebyangami na lisese ete, Sodome na Ezipito, kuna Nkolo na bango abakisamaki na nzete. Bamosusu na bikolo, na mikili, na minoko, na mabota bakotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo, mpe bakopesa nzela te ete bikundama na lilita. Bango bafandi na mokili bakosepela na ntina na bango, mpe bakoyoka esengo, bakokabana makabo, mpo ete basakoli yango mibale batungisaki bafandi na mokili.”—Emoniseli 11:7-10.
20. “Nyama na yauli oyo ebimi na libulu mozindo” ezali nini?
20 Oyo mbala ya liboso kati na mbala 37 oyo nyama na yauli elobelami kati na Emoniseli. Mwa mosika kati na mikapo mikolanda, tokolimbola nini wana nyama na yauli mpe banyama mosusu oyo batangami. Mpo na sikawa, tolobi bobele ete “nyama na yauli oyo abuti na libulu mozindo” ezali eloko oyo Satana asali yango; ezali bongo ebongiseli na politike.b—Tala Emoniseli 13:1; Danyele 7:2, 3, 17.
21. (a) Ndenge nini bakonzi na mangomba, banguna na batatoli mibale bazwaki libaku na yikiyiki ya etumba? (b) Likambo oyo ete bibembe na batatoli mibale ekundami te elimboli nini? (c) Ndimbola nini tosengeli kosimba mpo na eleko oyo ya mikolo misato na ndambo? (Tala note na nse ya paragrafe 21.)
21 Kobanda 1914 kino 1918, mabota bazalaki kobunda Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Lokola bolingo makasi mpo na ekolo elamusamaki, na ebandeli ya mobu 1918, bakonzi na mangomba, banguna na batatoli mibale bamonaki ete ezalaki libaku malamu mpo na bango. Bapusaki bazuzi mpo na kokangisa na boloko bandeko oyo bazalaki kotambwisa misala ya Bayekoli ya Biblia, likoló na bifundeli ya lokuta ete bazalaki kozimbisa bato. Bandeko mosusu ya sembo oyo batikalaki kuna na esika ya kotambwisa mosala, balembaki nzoto. Tokoki koloba ete mosala ya Bokonzi esalemaki lisusu te. Mosala ya kosakola ezalaki lokola ekufi. Na ntango ya kala, soko nzoto na mowei ekundami te, ezalaki likambo na nsoni. (Nzembo 79:1-3; 1 Mikonzi 13:21, 22) Na yango, ezalaki kofingama mpo na batatoli mibale na kozanga kokundama. Na moi molunge ya Palestine, ebembe oyo elali na balabala ekolumba nsolo mabe nsima na mikolo misato na ndambo.c (Tala Yoane 11:39.) Maloba oyo na esakweli mamonisi makasi kofingama mpe kotyolama ezwaki batatoli oyo mibale. Bandeko bakangamaki bakokaki kobimisama na boloko te ata na kosimbisa mbongo ntango likambo na bango efundamaki na cour d’appel. Batyamaki lokola eloko ya kotala mpo na bato nyonso, ntango molai kino balumbaki nsolo mabe mpo na bafandi na “mboka yango monene.” Kasi “mboka yango monene” ezali mboka nini?
22. (a) Mboka monene ezali nini? Limbola. (b) Ndenge nini bato ebele basanganaki esika moko na bakonzi na mangomba mpo na kosepela na ndenge batatoli mibale bapekisamaki ete basakola te? (Tala maloba mazali na encadré.)
22 Yoane apesi biso mwa makambo makoki kosalisa biso na koyeba yango. Alobi ete Yesu abomamaki kati na mboka yango monene. Na yango, mboka Yelusaleme ebimeli biso mbala moko na makanisi. Kasi alobi lisusu ete mboka yango monene ebengami Sodome na Ezipito. Mboka Yelusaleme ebengamáka kala ete ezali Sodome na ntina na misala na yango ya mbindo. (Yisaya 1:8-10; tala Ezekiele 16:49, 53-58.) Mpo na oyo etali Ezipito, mokili ya Liboso oyo elekaki Makasi na mokili mobimba, emonanaka mbala mosusu lokola elilingi na mokili na lelo to ebongiseli na biloko na ntango oyo. (Yisaya 19:1, 19; Yoele 3:19) Na yango, mboka oyo monene elakisi “Yelusaleme” ya kobeba, oyo ezali komikumisa ete ezali kosambela Nzambe, kasi esili kokoma mbindo mpe ezali kosalaka masumu lokola Sodome, mpe esangani mpenza na mokili ya lelo to ebongiseli ya Satana, lokola Ezipito. Ezali bongo elilingi na boklisto ya lokuta, yango ekokani na Yelusaleme ya kala ezangi botosi. Boklisto ya lokuta ezali lisangá oyo basangani na yango basepelaki mingi na ntango babomaki mosala ya kosakola ya batatoli mibale, mpamba te ezalaki kotungisa bango mingi.
Batelemi lisusu!
23. (a) Eloko nini ekomelaki batatoli mibale nsima na mikolo misato na ndambo, mpe yango esalaki nini likoló na banguna na bango? (b) Emoniseli (11:11, 12) mpe esakweli ya Ezekiele oyo emonisi ndenge Jéhovah atindi mopepe na lobwaku ya mikuwa mikauki, ekokanaki mbula nini na eleko na biso?
23 Bazulunalo esanganaki na bakonzi ya mangomba mpo na koloba mabe na ntina na basaleli na Nzambe; tala oyo zulunalo moko ekomaki: “Esili mpo na ‘Mystère accompli.’” Kasi bamikosaki mpenza kokosama! Batatoli mibale bakufaki libela te. Totangi: “Kasi na nsima na mikolo misato na ndambo elimo na bomoi, oyo euti na Nzambe, ekoteli bango, mpe batelemi na makolo na bango, mpe nsomo monene ekweli bato nyonso oyo batalaki bango. Bayokaki mongongo makasi na likoló koloba na bango ete, bobuta awa! Babuti na likoló kati na lipata, mpe bayini na bango bamoni bango.” (Emoniseli 11:11, 12) Na motindo yango, bakutanaki na makambo lokola emonaki yango mosakoli Ezekiele kati na emonaneli na lobwaku na mikuwa mikauki. Jéhovah atyaki mpema kati na mikuwa wana mikauki mpe bazongaki na bomoi, elilingi na kobotama lisusu ya libota ya Yisraele nsima na mibu 70 ya boombo na Babilone. (Ezekiele 37:1-14) Bisakweli oyo mibale, ya Ezekiele mpe ya Emoniseli, ekokanaki mpenza na ntango na biso na 1919, ntango Jéhovah azongisaki na bomoi batatoli na ye oyo “bakufaki.”
24. Ntango batatoli mibale bazongaki na bomoi, yango esalaki nini likoló na bakonzi na mangomba oyo bazalaki konyokola bango?
24 Kanisa kokamwa na banyokoli! Bibembe ya batatoli mibale etelemi mbala moko mpe bakomi bato ya bomoi oyo bazali kosala mosala. Ezalaki lokola bimeli ya bololo mpo na bakonzi ya mangomba, mpamba te baministre baklisto oyo bango basalelaki likita mabe mpo na kokangisa bango na boloko, babimaki mpe na nsima basambisi balongolaki bifundeli nyonso oyo bafundaki bango na yango. Esalaki bango lisusu mpasi koleka ntango Bayekoli na Biblia basalaki assemblée na Cedar Point (Etats-Unis) na 1919. Na libaku yango, Joseph Rutherford, oyo autaki kobima sika na boloko, apelisaki móto kati na mitema na bayangani na diskur oyo asalaki na motó na likambo “Bosakola Bokonzi,” diskur oyo ezwamaki na Emoniseli 15:2 mpe na Yisaya 52:7. Baklisto ya kelasi na Yoane babandaki lisusu “kosakola” polele na miso na bato nyonso. Kokendáká ntango nyonso liboso, bazali kobimisa polele mpe na mpiko nyonso mateya ya lokuta mpe misala mabe ya boklisto ya mokili oyo.
25. (a) Ntango nini elobamaki na batatoli mibale: “Bobuta awa,” mpe ndenge nini yango ekokanaki? (b) Kotelema ya batatoli mibale esalaki nini likoló na mboka yango monene?
25 Mbala mingi boklisto ya lokuta elukaki elongá lokola oyo bazwaki na 1918. Basalelaki batomboki, matongi epai ya bakonzi, kokangisa na boloko mpe ata koboma, kasi nyonso oyo se mpamba! Kobanda 1919, batatoli mibale bakotaki kati na efandelo na bango ya elimo, mpe boklisto ya mokili ekokaki kokoma wana te. Na mbula wana Jéhovah alobaki na bango: “Bobuta awa.” Yango etombolaki bango mpo na oyo etali ezaleli na bango ya elimo, mpe banguna na bango bakokaki komona bango kozanga ete bakoka kosimba bango. Tala motindo Yoane ayebisi kobulungana ya mboka monene ntango batatoli oyo mibale bazongaki na bomoi: “Na ntango yango mokili eningani mingi, mpe ndambo na zomi na mboka yango ekwei. Bato nkoto nsambo bakufi na koningana na mabelé, mpe baoyo batikalaki babangaki mingi, mpe bakumisaki Nzambe na Likoló.” (Emoniseli 11:13) Yikiyiki makasi ekotaki solo kati na mangomba. Bakonzi ya mangomba bayebaki lisusu esika ya kotya makolo te. Kasi baklisto oyo bazongaki na bomoi bamipesaki na mosala. Ndambo na zomi na mboka na bakonzi na mangomba, motuya na bato 7 000 na elilingi, batungisamaki makasi mpo na yango, mpe Makomami malobi na biso ete babomamaki.
26. “Ndambo na zomi na mboka” mpe “bato nkoto nsambo” engebene Emoniseli 11:13, elakisi nini? Limbola.
26 Liloba “ndambo na zomi na mboka” ekundoli biso ete Yisaya asakolaki na ntina na Yelusaleme ya kala ete ndambo na zomi bakobika na kobomama na mboka yango lokola libota na bulee. (Yisaya 6:13) Bobele bongo, motuya 7 000 ekundoli biso ete ntango mosakoli Elie akanisaki ete azalaki bobele ye moko oyo atikalaki sembo epai na Jéhovah na mokili na Yisraele, Jéhovah alobaki na ye ete bato 7 000 batikalaki naino, oyo bafukamelaki Baala te. (1 Mikonzi 19:14, 18) Na ekeke ya liboso ntoma Paulo alobaki ete bato wana 7 000 bazalaki elilingi na batikali ya Bayuda oyo bandimaki nsango malamu na ntina na Klisto. (Baloma 11:1-5) Biteni oyo na Makomami bizali kosalisa biso na kokanga ntina ete “bato nkoto nsambo” mpe “ndambo na zomi na mboka” (Emoniseli 11:13) elakisi baoyo bazali koyoka batatoli mibale oyo batelemi lisusu, mpe babimi na mboka monene oyo ya masumu. Boklisto ya mokili oyo ezali kotalela bango ete bakufi. Nkombo na bango elongolami na mikanda ya mangomba epai kuna bakomaka nkombo ya bandimi na bango. Mpo na boklisto ya mokili oyo, bango bazali lisusu te.d
27, 28. (a) Motindo nini ‘baoyo batikalaki bakumisaki Nzambe ya likoló’? (b) Bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo basengisamaki na kondima nini?
27 Kasi ndenge nini ‘baoyo batikalaki [na kati ya boklisto ya mokili oyo] bakumisaki Nzambe’? Ezalaki te ete batiki losambo oyo ya kopengwa mpe babandi kosalela Nzambe, kasi ezalaki nde na lolenge oyo elimbolami kati na mokanda moko (Word Studies in the New Testament, de Vincent) epai oyo, na ntina na liloba “bakumisaki Nzambe na likoló,” tokoki kotanga: “Liloba oyo elakisi te ete babongoli bizaleli, babongoli motema to mpe bazali na botondi, kasi elakisi bobele ete bandimi likambo moko lokola ekozalaka bongo mbala mingi kati na Makomami. Tala Yosua 7:19 (Libongoli ya Septante); Yoane 9:24; Misala 12:23; Baloma 4:20.” Na bololo na motema, boklisto ya lokuta esengelaki kondima ete Nzambe ya Bayekoli na Biblia akokisaki likambo monene na ndenge atelemisaki bango ete bazongela mosala na bango ya boklisto.
28 Ekoki kozala ete bakonzi na mangomba bandimaki likambo yango bobele kati na makanisi na bango. Etangama naino esika moko te ete episkopo moko to pastere moko alobaki na miso na bato nyonso ete andimi Nzambe na batatoli oyo mibale. Nzokande, esakweli ya Jéhovah oyo Yoane akomaki esalisi biso na kososola makanisi na bango mabombami mpe komona ete bakitisamaki makasi na 1919. Kobanda na mobu wana, ntango “bato nkoto nsambo” babandaki kobima na boklisto ya mokili oyo atako mangomba yango ezalaki koluka kokangisa bango kuna na kati lokola bampate na bango, bakonzi na mangomba basengelaki kondima ete Nzambe ya kelasi na Yoane aleki oyo ya bango na nguya. Na bambula elandaki, bamonaki likambo yango lisusu polele koleka, mpamba te ebele ya bandimi na bango basili kobima na etonga na bango, kozongelaka maloba malandi oyo bato (na Yisraele) balobaki yango ntango Elie azwaki elonga likóló na basambeli ya Baala na ngomba Kalemele: “Jéhovah azali Nzambe na solo! Jéhovah azali Nzambe na solo!”—1 Mikonzi 18:39.
29. Engebene Yoane, nini ezali koya noki, mpe bampasi nini mosusu ezali liboso na boklisto ya mokili oyo?
29 Kasi toyoka naino! Yoane alobi na biso: “Mawa na mibale eleki; mawa na misato ekoya noki.” (Emoniseli 11:14) Soki boklisto ya mokili oyo eningisami na makambo masili kobima kino lelo, akosala nini ntango mawa ya misato ekosakolama, ntango anzelu ya nsambo akobeta kelelo mpe libombami mosantu na Nzambe ekokokana nyonso?—Emoniseli 10:7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo manso matali tempelo monene oyo ya elimo, tala lisolo “Tempelo monene ya Yehova na elimo,” oyo ebimaki na Mosenzeli ya 1 Yuli 1996, mpe “Tempelo ya solo mpo na losambo,” oyo ebimaki na Mosenzeli ya le 1er Juillet 1974, na Lingala (1er Mars 1973, na Lifalanse).
b “Libulu mozindo” (na greke abyssos; na hébreu tehohm) elakisi na ndenge ya elilingi, esika oyo ezangi mosala. (Tala Emoniseli 9:2.) Kasi ekoki mpe kolakisa mai monene. Liloba na hébreu ebongolami mingimingi na “[mai] na bozindo na mabelé,” “bozindo,” “mai na bozindo”; (Nzembo 71:20; 106:9; Yona 2:5) Na yango, “nyama na yauli oyo abuti na libulu mozindo” akoki kokokisama na ‘nyama na yauli oyo abuti na mai monene.’—Emoniseli 11:7; 13:1.
c Makambo oyo masili kokomela libota na Nzambe mamonisi ete soko sanza 42 elakisi mbula misato na ndambo mpenza, nzokande mikolo misato na ndambo mikoumela ngonga 84 te. Soko eleko na sikisiki ya mikolo misato na ndambo etangami mbala mibale (na versets 9 mpe 11) ezali mpo na komonisa ete eleko yango ekoumela ntango mokuse na kokokisa yango na mbula misato na ndambo ya mosala oyo ezalaki liboso na yango.
d Tala motindo maloba “liwa,” “bawei” mpe kozala na bomoi esalelami na mikapo na Biblia oyo milandi: Baloma 6:2, 10, 11; 7:4, 6, 9; Bagalatia 2:19; Bakolose 2:20; 3:3.
[Etanda na lokasa 168]
Basepelaki engebene Emoniseli 11:10
Na mokanda na ye Les prédicateurs présentent les armes (Angl.), oyo ebimisamaki na 1933, Ray Abrams alobeli botemeli makasi oyo ebimaki mpo na mokanda Le mystère accompli oyo ebimisamaki na Bayekoli na Biblia. Ezali komonisa ndenge bakonzi na mangomba bazalaki komeka kolimwisa Bayekoli na Biblia mpe “bindimeli na bango oyo ezalaki kosala bango mpasi.” Yango etumolaki kosambisa oyo nsima na yango Joseph Rutherford mpe baninga na ye nsambo bakangamaki mpo na mibu mingi kati na boloko. Ray Abrams alobi lisusu boye: “Soko totali likambo yango nyonso, tokomona ete Mangomba mpe bakonzi na mangomba bazalaki babandisi ya mopepe oyo elingaki kosilisa bato ya Russell. Na canada, na Février 1918, bakonzi na mangomba babandaki kobundisa bango mpe mikanda na bango, mingimingi mokanda Le mystère accompli. Engebene zulunalo la Tribune de Winnipeg, . . . mokanda yango epekisamaki mpo ‘bakonzi na mangomba baboyaki yango.’”
Ray Abrams abakisi boye: “Ntango bakomi na bazulunalo ya mangomba bazwaki nsango etalaki etumbu na boloko ya mbula 20, bango nyonso basepelaki. Namonaki ata liloba moko te ya mawa kati na bazulunalo ya mangomba. Bongo Upton Sinclair asukisaki na maloba oyo: ‘Na ntembe te monyoko . . . ebimaki mpo ete bamibendelaki koyinama na mangomba oyo ya kala.’ Makambo oyo Mangomba makokaki kosala yango te, Leta ekokisaki yango na esika na bango. Nsima na kobimisa maloba mabe ya bazulunalo mosusu ya mangomba, mokomi ayebisaki ndenge la Cour d’appel eboyaki bitumba yango mpe alobaki: “Mangomba balobelaki ata ekateli yango te.”
[Elilingi na lokasa 163]
Yoane azali kozwa mezire ya tempelo ya elimo—Banganga na Nzambe bapakolami basengeli kotosa mibeko na Nzambe
[Bililingi na lokasa 165]
Mosala ya kotonga oyo ekokisamaki na Zorobabele mpe Yosua ezalaki komonisa ete na mokolo na Nkolo, biloko oyo bizalaki mike na ebandeli bikolandana na kokola monene epai na ba Témoins de Jéhovah. Bandako lokola oyo emonisami na bililingi oyo, na Brooklyn, na Etats-Unis, esengaki ete bayeisa yango minene mpo na kokokisa bamposa
[Bililingi na lokasa 166]
Nsango na bikateli ekokani na móto mpe esakolami na batatoli mibale emonisamaki na elilingi na mosala ya mosakoli Moïse mpe mosakoli Elie
[Bililingi na lokasa 169]
Lokola mikwa mikauki oyo milobelami na esakweli na Ezekiele mokapo 37, batatoli mibale bazongi na bomoi mpo na mosala ya kosakola na ntango na biso