BITANDA
1 YEHOVA
Nkombo ya Nzambe ezali Yehova mpe elimboli “Akómisaka.” Yehova azali Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe asalá biloko nyonso. Azali na nguya ya kosala eloko nyonso oyo alingi.
Na monɔkɔ ya Ebre, nkombo ya Nzambe ekomamaki na balɛtrɛ minei. Na Lingala, balɛtrɛ yango ezali YHWH. Na makomi ya Ebre, nkombo ya Nzambe ezali mbala soki 7 000. Na mokili mobimba, nkombo Yehova ekomamaka na ndenge mingi, mpe bato na bato babengaka yango na ndenge eyebani na monɔkɔ na bango.
2 BIBLIA “EKOMAMI NA LITAMBWISI YA ELIMO YA NZAMBE”
Biblia ezali buku ya Nzambe, kasi asalelaki bato mpo bákoma yango. Ezali ndenge moko na mobange moko oyo alobi na mwana na ye akomela ye mokanda. Nzambe asalelaki elimo santu na ye mpo na kotambwisa bato oyo bakomaki Biblia bákoma makanisi na ye. Elimo ya Nzambe etambwisaki bango na ndenge mingi, ntango mosusu ezalaki komonisa bango bimonaneli, kolɔtisa bango bandɔtɔ, bongo bazalaki kokoma makambo yango.
3 MITINDA
Ezali mateya ya Biblia oyo ezali kolimbola likambo moko ya ntina mingi. Na ndakisa, etinda oyo elobi ete “baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu” eteyi biso ete bato oyo tozali kosangana na bango bakoki kobebisa biso to kobongisa biso. (1 Bakorinti 15:33) Etinda oyo elobi ete “nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka” eteyi biso ete tokoki kokima mbuma ya misala na biso te.—Bagalatia 6:7.
4 ESAKWELI
Ezali nsango oyo euti na Nzambe. Ekoki kozala ndimbola ya mokano ya Nzambe, liteya moko boye, mobeko to lisambisi. Ekoki mpe kozala likambo moko oyo ekosalema na nsima. Biblia ezali na bisakweli ebele oyo ekokisamá.
5 BISAKWELI OYO ELOBELI MASIYA
Yesu azali moto oyo akokisá bisakweli mingi oyo etali Masiya. Talá etanda “Bisakweli oyo elobeli Masiya.”
▸ Mok. 2, par. 17, Msl.
6 MOKANO YA YEHOVA MPO NA MABELE
Yehova akelaki mabele ezala paradiso, esika bato oyo balingi ye bakofanda. Mokano na ye ebongwani te. Etikali moke Nzambe alongola mabe mpe apesa basaleli na ye bomoi ya seko.
7 SATANA ZABOLO
Satana azali anzelu ya liboso oyo aboyaki kotosa Nzambe. Babengi ye Satana, oyo elakisi “Motɛmɛli,” mpo aboyaki kondima makambo ya Yehova. Babengi ye mpe Zabolo, oyo elakisi “Mokosi.” Bapesá ye nkombo wana mpo akoselaki Nzambe makambo mpe akosaka bato.
8 BAANZELU
Yehova akelaki baanzelu liboso mpenza akela mabele. Akelaki bango mpo báfanda na likoló. Baanzelu bazali ebele koleka milio 100. (Danyele 7:10) Bazali na bankombo mpe anzelu mokomoko azali na bomoto na ye, mpe baanzelu ya sembo bazali na komikitisa mpe baboyaka ete bato básambela bango. Baanzelu nyonso bazali nivo moko te mpe na misala ndenge moko te. Basusu basalaka liboso ya kiti ya bokonzi ya Yehova, basusu bazali bamemi-nsango, basusu babatelaka basaleli na ye awa na mabele mpe batambwisaka bango, basusu bapesaka bitumbu mpe basusu bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kosakola. (Nzembo 34:7; Emoniseli 14:6; 22:8, 9) Na mikolo ezali koya, bakosalisa Yesu na etumba Armagedone.—Emoniseli 16:14, 16; 19:14, 15.
9 LISUMU
Likambo nyonso oyo tokanisi to tosali, oyo ezali mabe na miso ya Yehova to eyokani na mokano na ye te, ezali lisumu. Lokola lisumu ebebisaka boninga na biso na Nzambe, apesá biso mibeko mpe mitinda mpo tósala lisumu na nko te. Na ebandeli, Yehova asalaki biloko nyonso ya kokoka, kasi ntango Adama ná Eva baboyaki kotosa Yehova, basalaki lisumu mpe bazalaki lisusu bato ya kokoka te. Bakómaki mibange mpe bakufaki, mpe lokola tozwá lisumu na Adama, biso mpe tokómaka mibange mpe tokufaka.
10 ARMAGEDONE
Ezali etumba ya Nzambe oyo ekoboma mokili ya Satana mpe ekolongola mabe nyonso.
11 BOKONZI YA NZAMBE
Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema oyo Yehova atyá na likoló. Yesu azali Mokonzi na Bokonzi yango. Na mikolo ezali koya, Yehova akolongola mabe nyonso na nzela ya Bokonzi yango. Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele mobimba.
12 YESU KRISTO
Nzambe akelaki Yesu liboso ya biloko nyonso. Yehova atindaki Yesu awa na mabele mpo akufela bato. Ntango Yesu akufaki, na nsima Yehova asekwisaki ye. Sikoyo Yesu azali Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, mpe azali koyangela na likoló.
13 ESAKWELI YA PƆSƆ 70
Biblia esakolaki ntango oyo Masiya asengelaki komonana. Asengelaki komonana na nsuka ya eleko oyo babengi pɔsɔ 69, oyo ebandaki na mobu 455 L.T.B. mpe esukaki na mobu 29 T.B.
Ndenge nini toyebi ete eleko yango esukaki na mobu 29 T.B.? Pɔsɔ 69 ebandaki na mobu 455 L.T.B., ntango Nehemia akómaki na Yerusaleme mpe abandaki kotonga lisusu engumba yango. (Danyele 9:25; Nehemia 2:1, 5-8) Soki toyoki liloba “pɔsɔ,” tomonaka mbala moko mikolo 7. Kasi, na kolanda esakweli oyo elobi ete “mokolo moko mpo na mbula moko,” pɔsɔ oyo balobeli na esakweli oyo ezali pɔsɔ ya mikolo 7 te, ezali nde pɔsɔ ya bambula 7. (Mitángo 14:34; Ezekiele 4:6) Yango elingi koloba ete pɔsɔ moko ezali mbula 7 mpe pɔsɔ 69 ezali mbula 483 (69 x 7). Soki totángi mbula 483 banda na mobu 455 L.T.B., ekomema biso na mobu 29 T.B. Yango ezali mpenza mobu oyo Yesu azwaki batisimo mpe akómaki Masiya!—Luka 3:1, 2, 21, 22.
Esakweli yango elobelaki mpe pɔsɔ mosusu, oyo ezali mpe mbula 7. Na boumeli ya ntango yango, na mobu 33 T.B., Masiya asengelaki kobomama, mpe banda mobu 36 T.B., nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe esengelaki kosakolama kaka epai ya Bayuda te, kasi na bikólo nyonso.—Danyele 9:24-27.
14 BOSATO (TRINITÉ) EZALI LITEYA YA LOKUTA
Biblia elobi ete Yehova Nzambe azali Mozalisi mpe akelaki Yesu liboso ya biloko nyonso. (Bakolose 1:15, 16) Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te. Alobá ata mbala moko te ete akokani na Nzambe. Kutu, alobaki: “Tata aleki ngai.” (Yoane 14:28; 1 Bakorinti 15:28) Kasi, mangomba mosusu eteyaka liteya ya Bosato to Trinité, elobaka ete Nzambe moko na bapersona misato: Tata, Mwana ná elimo santu. Liloba “Bosato” to “Trinité” ezali na Biblia te. Ezali liteya ya lokuta.
Elimo santu ezali nguya ya Nzambe oyo emonanaka te mpe esalaka mosala, asalelaka yango mpo na kokokisa mokano na ye. Ezali moto te. Na ndakisa, bakristo ya liboso “batondaki na elimo santu” mpe Yehova alobaki ete: “Nakosopela bato ya ndenge nyonso ndambo ya elimo na ngai.”—Misala 2:1-4, 17.
15 EKULUSU
Mpo na nini bakristo ya solo basalelaka ekulusu te ntango basambelaka Nzambe?
Mangomba ya lokuta ebandá kosalela ekulusu banda kala. Na ntango ya kala, bazalaki kosalela yango mpo na kosambela biloko Nzambe asalá mpe na losambo ya bapakano na makambo ya kosangisa nzoto. Mbula 300 nsima ya liwa ya Yesu, bakristo bazalaki kosalela ekulusu na losambo na bango te. Na nsima, Constantin, amperɛrɛ ya Roma akómisaki ekulusu elembo ya losambo ya bokristo. Bazalaki kosalela elembo yango mpo losambo ya bokristo eyebana mingi. Kasi ekulusu eyokani ata na likambo moko te na Yesu Kristo. Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete: “Bato bazalaki kosalela ekulusu liboso kutu Kristo abotama mpe ata na bisika oyo bato bayebi Kristo te.”
Yesu akufaki na ekulusu te. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ekulusu” elakisi “likonzí ya semba,” “libaya,” to “nzete.” Buku moko (The Companion Bible) elobi: “Na makomi ya Grɛki oyo basaleli na [Boyokani ya Sika], eloko ata moko te emonisi ete ezalaki mabaya mibale.” Yesu akufaki na likonzí moko ya semba.
Yehova alingi tósalela bikeko te to bilembo na losambo na biso.—Kobima 20:4, 5; 1 Bakorinti 10:14.
16 EKANISELI
Yesu atindaki bayekoli na ye básala Ekaniseli ya liwa na ye. Basalaka yango mbula nyonso na mokolo ya 14 Nisana, dati oyo Bayisraele bazalaki kosala fɛti ya Elekeli. Na Ekaniseli yango, balekisaka epai ya moto nyonso limpa, oyo emonisi nzoto ya Yesu mpe vinyo, oyo emonisi makila na ye. Bato oyo bakoyangela na Yesu na likoló nde balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo yango. Baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele bakendaka na Ekaniseli mpo na komonisa limemya, kasi balyaka limpa ya Ekaniseli te mpe bamɛlaka vinyo na yango te.
17 MOLIMO
Na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika, liloba “molimo” esalelami mpo na kolobela (1) moto, (2) nyama, to (3) bomoi ya moto to ya nyama. Tózwa mwa bandakisa:
Moto. “Na mikolo ya Noa, . . . bato moke, elingi koloba, milimo mwambe, babikaki na mai.” (1 Petro 3:20) Awa liloba “milimo” emonisi bato, elingi koloba Noa ná mwasi na ye, bana na bango misato, mpe basi ya bana na bango.
Nyama. “Nzambe alobaki lisusu ete: ‘Mai etondana mpenza kotondana na milimo ya bomoi mpe bikelamu oyo epumbwaka epumbwa likoló ya mabele na etando ya likoló.’ Nzambe alobaki lisusu ete: ‘Mabele ebimisa milimo ya bomoi na mitindo na yango, nyama ya mboka mpe nyama mikemike mpe nyama ya zamba oyo ezali na mabele na motindo na yango.’ Mpe esalemaki bongo.”—Ebandeli 1:20, 24.
Bomoi ya moto to ya nyama. Yehova ayebisaki Moize ete: “Bato nyonso oyo bazalaki kolukaluka molimo na yo basili kokufa.” (Kobima 4:19) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, alobaki ete: “Ngai nazali mobateli ya mpate oyo aleki malamu; mobateli ya mpate oyo aleki malamu apesaka molimo na ye mpo na bampate.”—Yoane 10:11.
Lisusu, ntango moto asali likambo moko na “molimo na ye mobimba,” elakisi ete asali yango na motema moko mpe asaleli makoki na ye nyonso. (Matai 22:37; Kolimbola Mibeko 6:5) Liloba “molimo” ekoki mpe kosalelama mpo na kolobela mposa makasi oyo ekelamu moko ya bomoi ezali na yango. Moto oyo akufi to ebembe ekoki kobengama molimo oyo ekufi.—Mitángo 6:6; Masese 23:2; Yisaya 56:11; Hagai 2:13.
18 ELIMO
Maloba ya Ebre mpe ya Grɛki oyo babongoli na yango liloba “elimo” na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ekoki kolimbola makambo mingi. Kasi, emonisaka ntango nyonso eloko moko oyo bato bamonaka te, lokola mopɛpɛ to mpema ya bato to ya banyama. Maloba yango ekoki mpe komonisa bikelamu ya elimo mpe elimo santu, oyo ezali nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala. Biblia eteyi te ete eteni moko ya nzoto ya moto ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa.—Kobima 35:21; Nzembo 104:29; Matai 12:43; Luka 11:13.
19 GEHENA
Gehena ezali nkombo ya lobwaku moko pene na Yerusaleme, esika bazalaki kotumba bosɔtɔ. Eloko moko te emonisi ete na mikolo ya Yesu bazalaki konyokola to kotumba bato to banyama na bomoi na lobwaku yango. Yango wana, Gehena elimboli te esika moko oyo emonanaka te, epai bato oyo bakufá banyokwamaka mpe bazikaka libela na libela. Ntango Yesu alobelaki baoyo bakoki kobwakama na Gehena, azalaki nde kolobela liwa ya libela.—Matai 5:22; 10:28.
20 LIBONDELI YA NKOLO
Ezali libondeli oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye ntango ateyaki bango ndenge ya kobondela. Babengaka yango mpe libondeli ya Tata wa biso to libondeli ya ndakisa. Na ndakisa, Yesu ateyaki biso tóbondelaka boye:
“Nkombo na yo esantisama”
Tobondelaka mpo Yehova apɛtola nkombo na ye na makambo nyonso ya lokuta, mpo ete ekelamu nyonso na likoló mpe na mabele ekoka kokumisa nkombo ya Nzambe mpe ememya yango.
“Bokonzi na yo eya”
Tobondelaka mpo guvɛrnema ya Nzambe eboma mokili mabe ya Satana, eyangela mabele mobimba mpe ekómisa yango paradiso.
“Mokano na yo esalema . . . na mabele”
Tobondelaka mpo mokano ya Nzambe mpo na mabele ekokisama mpo bato ya sembo, bato ya kokoka bákoka kofanda libela na libela na paradiso, kaka ndenge Yehova alingaki ntango akelaki bato.
21 LISIKO
Yehova apesaki lisiko mpo na kobikisa bato na lisumu mpe na liwa. Lisiko ezali motuya oyo esengelaki mpo na kosomba lisusu bomoi ya kokoka oyo Adama, moto ya liboso abungisaki mpe mpo na kozongisa boyokani ya bato na Yehova. Nzambe atindaki Yesu na mabele mpo akufela bato nyonso ya masumu. Mpo na liwa yango, bato nyonso bazwi libaku ya kozala na bomoi ya seko mpe ya kokóma bato ya kokoka.
22 MPO NA NINI MOBU 1914 EZALI NA NTINA?
Esakweli ya Danyele mokapo 4 emonisi ete Nzambe atyaki Bokonzi na ye na mobu 1914.
Esakweli: Yehova alɔtisaki Mokonzi Nebukadenezare ndɔtɔ moko ya nzete monene oyo bakataki, mpe ndɔtɔ yango ezali esakweli. Na ndɔtɔ yango, bakangaki ekumu ya nzete yango bansinga ya ebende mpe ya motako mpo ekola te na boumeli ya “ntango nsambo.” Nsima ya ntango yango, nzete yango esengelaki kokola lisusu.—Danyele 4:1, 10-16.
Esakweli yango etaleli biso na nini? Nzete yango emonisi boyangeli ya Nzambe. Na boumeli ya bambula ebele, Yehova atyaki bakonzi na Yerusaleme mpo báyangela ekólo Yisraele. (1 Ntango 29:23) Kasi, bakonzi yango bazalaki lisusu sembo te mpe boyangeli na bango esukaki. Yerusaleme ebebisamaki na mobu 607 L.T.B. Yango ezalaki ebandeli ya “ntango nsambo.” (2 Bakonzi 25:1, 8-10; Ezekiele 21:25-27) Ntango Yesu alobaki “Yerusaleme ekonyatama na bikólo, tii bantango oyo etyamá ya bikólo ekokoka,” azalaki nde kolobela “ntango nsambo.” (Luka 21:24) “Ntango nsambo” yango esilaki te ntango Yesu azalaki naino awa na mabele. Yehova alakaki ete akotya Mokonzi na nsuka ya “ntango nsambo.” Boyangeli ya Yesu, Mokonzi yango ya sika, ekomemela basaleli ya Nzambe na mabele mobimba mapamboli minene, libela na libela.—Luka 1:30-33.
“Ntango nsambo” eumelaki mbula boni? “Ntango nsambo” eumelaki mbula 2 520. Soki totángi mbula 2 520 banda mobu 607 L.T.B., tokosuka na mobu 1914. Ezali mobu oyo Yehova akómisaki Yesu Masiya, Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na likoló.
Tozwi motángo 2 520 ndenge nini? Biblia elobi ete ntango misato na ndambo ezali mikolo 1 260. (Emoniseli 12:6, 14) Na yango, “ntango nsambo” ezali mikolo 1 260 mbala mibale (1 260 x 2), to mikolo 2 520. Soki tolandi ndenge mikolo etángamaka na bisakweli, elingi koloba “mokolo moko mpo na mbula moko,” mikolo 2 520 ezali mbula 2 520.—Mitángo 14:34; Ezekiele 4:6.
23 MIKAELE, ANZELU-MOKONZI
Biblia elobeli kaka anzelu-mokonzi moko mpe nkombo na ye Mikaele.—Danyele 12:1; Yuda 9.
Mikaele azali Mokambi ya limpinga ya baanzelu ya sembo ya Nzambe. Emoniseli 12:7 elobi: “Mikaele ná baanzelu na ye babundaki na dragɔ . . . ná baanzelu na yango.” Mokanda ya Emoniseli elobi ete Mokambi ya limpinga ya baanzelu ya Nzambe ezali Yesu, boye Mikaele ezali nkombo mosusu ya Yesu.—Emoniseli 19:14-16.
24 MIKOLO YA NSUKA
Maloba oyo emonisi eleko oyo makambo ya minene ekosalema na mabele liboso ete Bokonzi ya Nzambe eboma mokili ya Satana. Biblia esaleli mpe maloba mosusu oyo ekokani na yango, na ndakisa “bosukisi ya makambo ya ntango oyo” mpe “kozala ya Mwana ya moto” mpo na kolobela kaka eleko wana. (Matai 24:3, 27, 37) “Mikolo ya nsuka” ebandaki ntango Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló na mobu 1914 mpe ekosuka ntango mokili ya Satana ekobomama na Armagedone.—2 Timote 3:1; 2 Petro 3:3.
25 LISEKWA
Ntango Nzambe azongisi moto oyo akufi na bomoi, yango nde lisekwa. Biblia elobeli bato libwa oyo basekwaki. Eliya, Elisha, Yesu, Petro mpe Paulo basekwisaki bato. Basalaki makamwisi wana kaka na nguya ya Nzambe. Yehova alaki ete akosekwisa ‘bayengebene mpe bato oyo bazangi boyengebene’ mpo báfanda na mabele. (Misala 24:15) Biblia elobeli mpe lisekwa mpo na kokende na likoló. Yango esalemaka ntango baoyo Nzambe aponi to atye mafuta na elimo basekwaka mpo bákende kofanda na likoló elongo na Yesu.—Yoane 5:28, 29; 11:25; Bafilipi 3:11; Emoniseli 20:5, 6.
26 MISALA YA BADEMO (MISALA YA BILIMO MABE)
Misala ya bademo to misala ya bilimo mabe ezali misala mabe ya koluka kosolola mpenza na bademo bango moko, to kosolola na bango na nzela ya nganga-nkisi to ya moto ya maji. Bato oyo basalaka misala ya bilimo mabe basalaka yango mpo bandimaka mateya ya lokuta oyo elobaka ete bilimo ya bato ekobaka kozala na bomoi mpe ekómaka bilimo ya nguya. Lisusu, bademo balukaka kotinda bato báboya kotosa Nzambe. Misala lokola koluka koyeba makambo oyo ekoya, kosakola makambo oyo ebombamá, maji, bonganga-nkisi, biyambayamba (superstition), misala ya molili, mpe bimonaneli ezali mpe misala ya bademo. Babuku mingi, bazulunalo, kotala minzoto mpo na koyeba makambo ekoya, bafilme, bafɔtɔ oyo emonisaka misala ya maji, ata mpe nzembo oyo elobelaka bademo, maji, to bimonaneli emonanaka lokola nde ezali mabe te to ezali kaka mpo na kosepelisa. Milulu mingi oyo bato basalaka soki moto akufi, na ndakisa, kotya biloko na lilita, milulu ya kokunda ebembe, kokanisa mokolo oyo moto moko akufaki, konyokola mwasi to mobali oyo molongani na ye akufi, kolata pili, to kosala milulu liboso to nsima ya kokunda ebembe ezali mpe na boyokani na bademo. Bato basalelaka mingimingi nkisi ntango balingi kosalela nguya ya bademo.—Bagalatia 5:20; Emoniseli 21:8.
27 BOYANGELI YA YEHOVA
Yehova azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe akelá molɔ́ngɔ́ mobimba. (Emoniseli 15:3) Yango wana, biloko nyonso ezali ya ye mpe azali na lotomo nyonso ya koyangela yango. (Nzembo 24:1; Yisaya 40:21-23; Emoniseli 4:11) Atyelá biloko nyonso oyo asalá mibeko. Yehova azali mpe na lotomo mpenza ya kopona bato mosusu bázala bakonzi. Topesaka mabɔkɔ na boyangeli ya Nzambe ntango tolingaka ye mpe tótosaka ye.—1 Ntango 29:11.
28 KOSOPA ZEMI
Moto oyo asopi zemi asalaka yango na nko mpo na koboma mwana oyo azali na libumu. Yango esalemaka na mbalakaka te mpe nzoto ya moto esopaka zemi yango moko te. Ntango kaka mama azwi zemi, mwana oyo azali na libumu na ye azali mpenza moto.
29 KOKƆTISA TO KOTYA MAKILA NA NZOTO
Ezali lisalisi ya minganga oyo esɛngaka ete bázwa makila to moko ya biloko minene minei ya makila ya moto, to makila oyo babombaki esika moko boye mpe bákɔtisa to bátya yango na nzoto ya moto mosusu. Biloko minene minei yango ezali plasma, globule rouge, globule blanc, mpe plaquette.
30 DISIPLINI
Na Biblia, liloba “disiplini” emonisaka kaka etumbu te. Ntango bapesi moto disiplini, bateyi ye, basemboli ye mpe bazongisi ye na nzela. Yehova alekisaka ndelo te ntango azali kopesa moto disiplini mpe asalaka yango na nkanda te. (Masese 4:1, 2) Yehova apesá baboti ndakisa ya malamu mpenza. Apesaka disiplini oyo ebongi mpe esalaka ete nsukansuka moto yango akóma kolinga disiplini. (Masese 12:1) Yehova alingaka basaleli na ye mpe apesaka bango formasyo. Ateyaka bango mpo bátika makanisi ya mabe mpe asalisaka bango bákanisaka malamu mpe básalaka makambo oyo ekosepelisa ye. Mpo na baboti, disiplini elimboli mpe kosalisa bana báyeba malamu ntina oyo basengeli kotosaka. Elimboli mpe koteya bango bálinga Yehova mpe Liloba na ye, Biblia, mpe báyeba malamu mitinda ya Biblia.
31 BADEMO
Bamonanaka te, bazali bikelamu ya mabe ya elimo mpe bazali na nguya oyo eleki oyo ya bato. Bademo bazali baanzelu ya mabe. Bakómaki mabe ntango baboyaki kotosa Nzambe mpe bamikómisaki banguna na ye. (Ebandeli 6:2; Yuda 6) Balandaki Satana oyo aboyaki kotosa Yehova.—Kolimbola Mibeko 32:17; Luka 8:30; Misala 16:16; Yakobo 2:19.