NSANGO MALAMU NDENGE EKOMAMÁ NA YOANE
1 Na ebandeli Liloba azalaki,+ mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe,+ mpe Liloba azalaki nzambe.*+ 2 Ye azalaki na ebandeli elongo na Nzambe. 3 Biloko nyonso esalemaki na nzela na ye,+ mpe ata eloko moko te esalemaki soki na nzela na ye te.
Oyo esalemaki 4 na nzela na ye ezalaki bomoi, mpe bomoi ezalaki pole ya bato.+ 5 Mpe pole ezali kongɛnga na molili,+ kasi molili elongi yango te.
6 Moto moko oyo atindamaki lokola momonisi ya Nzambe ayaki; nkombo na ye ezalaki Yoane.+ 7 Moto yango ayaki lokola motatoli, mpo na kopesa litatoli mpo na pole yango,+ mpo ete bato ya ndenge nyonso bándima na nzela na ye. 8 Ye azalaki pole yango te,+ kasi asengelaki nde kopesa litatoli mpo na pole yango.
9 Pole ya solosolo oyo engɛngisaka bato ya ndenge nyonso ekómaki pene ya koya na mokili.+ 10 Azalaki na mokili,+ mpe mokili esalemaki na nzela na ye,+ kasi mokili eyebaki ye te. 11 Ayaki na mboka na ye moko, kasi bato ya ekólo na ye moko bandimaki ye te. 12 Nzokande, apesaki bato nyonso oyo bayambaki ye lotomo ya kokóma bana ya Nzambe,+ mpo bazalaki kondimela* nkombo na ye.+ 13 Mpe babotamaki, na makila te to na mokano ya moto ya mosuni te to na mokano ya mobali moko boye te, kasi na mokano ya Nzambe.+
14 Bongo Liloba akómaki moto*+ mpe afandaki na kati na biso, mpe tomonaki nkembo na ye, nkembo lokola oyo ya mwana se moko oyo auti+ na tata; mpe atondaki na boboto ya Nzambe* mpe na solo. 15 (Yoane apesaki litatoli mpo na ye, ɛɛ, agangaki boye: “Ye nde moto oyo mpo na ye nalobaki, ‘Moto oyo azali koya nsima na ngai aleki liboso na ngai, mpo azalaki liboso na ngai.’”)+ 16 Mpo biso nyonso tozwi na ebele ya biloko oyo atondi na yango, ɛɛ boboto monene likoló ya boboto monene. 17 Mobeko epesamaki na nzela ya Moize;+ boboto monene+ mpe solo eyaki na nzela ya Yesu Kristo.+ 18 Moto ata moko te amoná Nzambe;+ nzambe se moko oyo abotamá,+ oyo azali pene na Tata,*+ nde moto alimboli soki Ye azali nani.+
19 Yango nde litatoli oyo Yoane apesaki ntango Bayuda batindaki banganga-nzambe mpe Balevi longwa na Yerusaleme mpo bátuna ye: “Yo ozali nani?”+ 20 Mpe andimaki yango, awanganaki te; alobaki: “Ngai, nazali Kristo te.” 21 Mpe batunaki ye: “Bongo ozali nani? Ozali Eliya?”+ Ayanolaki: “Nazali ye te.” “Ozali Mosakoli?”+ Mpe ayanolaki: “Te!” 22 Na yango balobaki na ye: “Yo ozali nani? Yebisá biso mpo tópesa eyano na baoyo batindi biso. Olobi nini mpo na yo moko?” 23 Alobaki: “Ngai, nazali mongongo ya moto moko oyo azali koganga na esobe: ‘Bósembola banzela ya Yehova,’*+ kaka ndenge mosakoli Yisaya alobaki.”+ 24 Nzokande baoyo batindamaki bautaki na kati ya Bafarisai. 25 Bongo batunaki ye boye: “Bongo mpo na nini ozali kobatisa, soki ozali Kristo te, Eliya te, Mosakoli mpe te?” 26 Yoane ayanolaki bango: “Ngai, nazali kobatisa na mai. Ezali na moto moko na kati na bino oyo boyebi te, 27 oyo azali koya nsima na ngai, mpe nabongi te kofungola bansinga ya sandale na ye.”+ 28 Makambo wana esalemaki na Betani na ngámbo mosusu ya Yordani, epai Yoane azalaki kobatisa.+
29 Mokolo oyo elandaki, amonaki Yesu azali koya epai na ye, mpe alobaki: “Talá, Mwana-Mpate+ ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu+ ya mokili!+ 30 Ezali mpo na ye nde nalobaki: ‘Nsima na ngai moto moko azali koya oyo aleki liboso na ngai, mpo azalaki liboso na ngai.’+ 31 Ata ngai mpe nayebaki ye te, kasi nayaki kobatisa na mai mpo amonisama na Yisraele.”+ 32 Yoane mpe apesaki litatoli, alobi: “Namonaki elimo ezali kokita lokola ebenga uta na likoló, mpe efandaki likoló na ye.+ 33 Ata ngai mpe nayebaki ye te, kasi Oyo mpenza atindaki ngai nabatisa na mai alobaki na ngai: ‘Moto oyo okomona elimo ekiti likoló na ye mpe efandi,+ ye nde moto oyo abatisaka na elimo santu.’+ 34 Mpe namoni yango, mpe napesi litatoli ete oyo azali Mwana ya Nzambe.”+
35 Lisusu na mokolo oyo elandaki, Yoane atɛlɛmaki wana elongo na bayekoli na ye mibale, 36 mpe wana azalaki kotala Yesu ntango azali kotambola, alobaki: “Bótala, Mwana-Mpate+ ya Nzambe!” 37 Ntango bayekoli wana mibale bayokaki bongo, balandaki Yesu. 38 Bongo Yesu abalukaki, mpe ntango amonaki bango bazali kolanda ye, alobaki na bango: “Bozali koluka nini?” Balobaki na ye: “Rabi (liloba oyo ebongolami “Moteyi”), ofandaka wapi?” 39 Alobaki na bango: “Bóya, mpe bokomona.” Bongo bakendaki mpe bamonaki esika azalaki kofanda, mpe bafandaki elongo na ye mokolo wana; ezalaki soki ngonga ya minei nsima ya midi.* 40 Andre,+ ndeko ya Simo Petro, azalaki moko ya bato mibale oyo bayokaki makambo oyo Yoane alobaki mpe balandaki Yesu. 41 Akendaki liboso kokutana na ndeko na ye Simo, mpe alobaki na ye: “Tomoni Masiya”+ (liloba oyo ebongolami “Kristo”), 42 mpe amemaki ye epai ya Yesu. Ntango Yesu atalaki ye, alobaki: “Ozali Simo+ mwana ya Yoane; okokóma kobengama Kefa” (nkombo oyo ebongolami “Petro”).+
43 Na mokolo oyo elandaki, Yesu alingaki kokende na Galile. Bongo akutanaki na Filipe+ mpe alobaki na ye: “Landá ngai.” 44 Nzokande Filipe azalaki moto ya Betesaida, engumba ya Andre mpe Petro. 45 Filipe akendaki kokutana na Natanaele+ mpe alobaki na ye: “Tomoni moto oyo Moize, na kati ya Mobeko, mpe Basakoli bakomaki mpo na ye: Yesu, mwana ya Yozefe,+ moto ya Nazarete.” 46 Kasi Natanaele alobaki na ye: “Eloko moko ya malamu ekoki nde kobima na Nazarete?” Filipe alobaki na ye: “Yaká komona.” 47 Yesu amonaki Natanaele azali koya epai na ye mpe alobaki mpo na ye ete: “Oyo mpenza Moyisraele ya solo, azali na bokosi te kati na ye.”+ 48 Natanaele alobaki na ye: “Ndenge nini oyebi ngai?” Yesu ayanolaki ye: “Liboso Filipe abenga yo, wana ozalaki na nse ya nzete ya figi, namonaki yo.” 49 Natanaele azongisaki: “Rabi, ozali Mwana ya Nzambe, ozali Mokonzi ya Yisraele.”+ 50 Yesu azongiselaki ye: “Ondimi mpo nayebisi yo ete namonaki yo na nse ya nzete ya figi? Okomona makambo ya minene koleka oyo.” 51 Na nsima alobaki na ye: “Ya solo mpenza nalobi na bino, bokomona likoló efungwami mpe baanzelu ya Nzambe bazali komata mpe kokita epai ya Mwana ya moto.”+
2 Mpe na mokolo ya misato, fɛti moko ya libala esalemaki na Kana ya Galile, mpe mama ya Yesu azalaki wana. 2 Yesu ná bayekoli na ye babengisamaki mpe na fɛti yango ya libala.
3 Ntango vinyo ezangaki, mama ya Yesu alobaki na ye: “Bazali lisusu na vinyo te.” 4 Kasi Yesu alobaki na ye: “Mwasi, yango etali ngai ná yo na nini?* Ngonga na ngai naino ekoki te.” 5 Mama na ye alobaki na bato oyo bazalaki kosala ete: “Bósala nyonso oyo akoyebisa bino.” 6 Nzokande, bilokó motoba ya mabanga efandaki wana, ndenge mibeko ya kopɛtolama ya Bayuda ezalaki kosɛnga;+ mokomoko ekokaki kokɔta bimekeli* mibale to misato. 7 Yesu alobaki na bango: “Bótondisa bilokó wana na mai.” Bongo batondisaki yango mɛkɛ. 8 Na nsima alobaki na bango: “Bózwa sikoyo mwa ndambo mpe bómemela yango mokambi ya fɛti.” Bongo bamemaki yango. 9 Ntango mokambi ya fɛti amekaki mai oyo ebongwanaki sikoyo vinyo, lokola ayebaki te epai yango eutaki (kasi basaleli oyo batokaki mai yango bayebaki), mokambi ya fɛti abengaki mobali ya libala 10 mpe alobaki na ye: “Moto nyonso abimisaka liboso vinyo oyo eleki malamu, mpe ntango bato balangwe, nde abimisaka oyo ya malamu mingi te. Yo obombi vinyo oyo eleki malamu tii sikoyo.” 11 Yesu asalaki yango na Kana ya Galile; ezalaki ebandeli ya makamwisi* na ye, mpe amonisaki nkembo na ye polele,+ mpe bayekoli na ye bakómaki na kondima epai na ye.
12 Nsima na yango, ye, mama na ye, bandeko na ye+ ná bayekoli na ye bakitaki na Kapernaume,+ kasi bafandaki kuna mikolo mingi te.
13 Nzokande Elekeli+ ya Bayuda ekómaki pene, mpe Yesu amataki na Yerusaleme. 14 Na tempelo, akutaki bato oyo bazalaki kotɛka bangɔmbɛ ná bampate ná bibenga,+ mpe bato oyo basenzaka mbongo bafandi na bakiti na bango. 15 Bongo nsima ya kosala fimbo ya bansinga, abenganaki bato wana nyonso na tempelo, ná bampate ná bangɔmbɛ na bango, mpe asopaki mbongo ya bibende ya bato oyo basenzaka mbongo mpe abalolaki bamesa na bango.+ 16 Mpe alobaki na bato oyo bazalaki kotɛka bibenga ete: “Bólongola biloko oyo awa! Bótika kokómisa ndako ya Tata na ngai ndako ya mombongo!”*+ 17 Bayekoli na ye bamikundolaki ete ekomamá: “Molende mpo na ndako na yo ekopela kati na ngai.”+
18 Bongo Bayuda balobaki na ye: “Elembo nini okoki kolakisa biso,+ awa ozali kosala makambo oyo?” 19 Yesu azongiselaki bango: “Bóbuka tempelo oyo, mpe na mikolo misato nakotɛlɛmisa yango.”+ 20 Na yango Bayuda balobaki: “Kotongama ya tempelo oyo esalaki mbula 46, bongo yo okotɛlɛmisa yango na mikolo misato?” 21 Kasi tempelo oyo azalaki kolobela, ezalaki nde nzoto na ye.+ 22 Kasi ntango alamukaki uta na bakufi, bayekoli na ye bayaki kokanisa ete azalaki koloba bongo mbala mingi,+ mpe bandimelaki Makomami mpe makambo oyo Yesu alobaki.
23 Nzokande, ntango azalaki na Yerusaleme na fɛti ya Elekeli, bato mingi bakómaki na kondima epai na ye* ntango bamonaki makamwisi oyo azalaki kosala. 24 Kasi Yesu azalaki kotyela bango motema te mpo ayebaki bango nyonso 25 mpe azalaki na mposa te ete moto moko ayebisa ye likambo etali bato, mpo ayebaki eloko nini ezalaki na kati ya moto.+
3 Ezalaki na moto moko na kati ya Bafarisai na nkombo Nikodeme;+ azalaki mokonzi moko ya Bayuda. 2 Moto yango akendaki epai ya Yesu na butu+ mpe alobaki na ye: “Rabi,+ toyebi ete ozali moteyi oyo auti na Nzambe, mpo moto moko te akoki kosala makamwisi oyo+ ozali kosala soki Nzambe azali na ye te.”+ 3 Bongo Yesu alobaki na ye: “Ya solo mpenza nalobi na yo ete, soki moto abotami lisusu te,*+ akoki komona Bokonzi ya Nzambe te.”+ 4 Nikodeme atunaki ye: “Ndenge nini moto akoki kobotama ntango azali mokóló? Akoki nde kokɔta na libumu ya mama na ye mpo abotama mbala ya mibale?” 5 Yesu ayanolaki: “Ya solo mpenza nalobi na yo, soki moto abotami te na mai+ mpe na elimo,+ akoki kokɔta na Bokonzi ya Nzambe te. 6 Oyo ebotami na mosuni ezali mosuni, mpe oyo ebotami na elimo ezali elimo. 7 Kokamwa te mpo nayebisi yo ete: Bosengeli kobotama lisusu. 8 Mopɛpɛ epɛpaka epai yango elingi, mpe oyokaka makɛlɛlɛ na yango, kasi oyebaka te epai yango euti mpe epai yango ezali kokende. Ezali mpe bongo mpo na moto nyonso oyo abotami na elimo.”+
9 Na yango Nikodeme atunaki ye: “Ndenge nini makambo yango ekoki kosalema?” 10 Yesu azongiselaki ye: “Ozali moteyi ya Yisraele kasi oyebi makambo yango te? 11 Ya solo mpenza nalobi na yo, tozali koloba makambo oyo toyebi mpe tozali kopesa litatoli ya makambo oyo tomoni, kasi bino bozali kondima litatoli na biso te. 12 Nayebisi bino makambo ya mabele kasi bozali kondima te, ndenge nini bokondima soki nayebisi bino makambo ya likoló? 13 Lisusu, moto moko te amatá na likoló+ longola kaka ye oyo autaki na likoló,+ Mwana ya moto. 14 Mpe kaka ndenge Moize atombolaki nyoka na esobe,+ Mwana ya moto mpe asengeli kotombolama ndenge wana,+ 15 mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye azwa bomoi ya seko.+
16 “Mpo Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki,+ mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima epai na ye* abomama te kasi azwa bomoi ya seko.+ 17 Mpo Nzambe atindaki Mwana na ye na mokili, mpo asambisa mokili te, kasi mpo mokili ebika na nzela na ye.+ 18 Moto oyo azali komonisa kondima epai na ye akosambisama te.+ Moto oyo azali komonisa kondima te asili kosambisama, mpo amonisi kondima te na nkombo ya Mwana se moko* ya Nzambe.+ 19 Nzokande lisambisi ezali mpo na ntina oyo: pole eyaki na mokili,+ kasi bato balingaki molili na esika ya pole, mpo misala na bango ezalaki mabe. 20 Mpo moto oyo asalaka makambo ya mabe ayinaka pole mpe ayaka epai ya pole te, mpo misala na ye eyebana te.* 21 Kasi moto oyo asalaka makambo oyo ezali sembo* ayaka epai ya pole,+ mpo emonana polele ete misala na ye esalemi na boyokani na mokano ya Nzambe.”
22 Nsima na yango, Yesu ná bayekoli na ye bakendaki na nsuka mpenza ya Yudea, mpe kuna alekisaki mwa ntango elongo na bango mpe azalaki kobatisa.+ 23 Kasi Yoane mpe azalaki kobatisa na Aenone, pene ya Salime, mpo mai ezalaki mingi kuna,+ mpe bato bazalaki se koya mpe bazalaki kobatisama;+ 24 mpo Yoane abwakamaki naino na bolɔkɔ te.+
25 Nzokande ntembe moko ebimaki kati na bayekoli ya Yoane ná Moyuda moko na likambo etali kopɛtolama. 26 Bongo bayaki epai ya Yoane mpe balobaki na ye: “Rabi, moto oyo azalaki elongo na yo na ngámbo mosusu ya Yordani, oyo opesaki litatoli mpo na ye,+ talá, ye wana azali kobatisa mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.” 27 Yoane azongisaki: “Moto akoki kozwa ata eloko moko te soki yango epesami na ye te uta na likoló. 28 Bino moko bozali batatoli ete nalobaki: ‘Ngai, nazali Kristo te,+ kasi natindamaki liboso na ye.’+ 29 Moto oyo azwi mwasi na libala, ye nde mobali ya libala.+ Kasi moninga ya mobali ya libala, ntango atɛlɛmi mpe azali koyoka ye, azalaka na esengo mingi mpo na mongongo ya mobali ya libala. Yango wana, natondisami mpenza na esengo. 30 Ye asengeli kokoba komata, kasi ngai nasengeli kokoba kokita.”
31 Moto oyo auti na likoló aleki basusu nyonso.+ Moto oyo azali na mabele azali moto ya mabele mpe alobaka makambo ya mabele. Moto oyo auti na likoló aleki basusu nyonso.+ 32 Azali kopesa litatoli na makambo oyo amonaki mpe ayokaki,+ kasi moto moko te azali kondima litatoli na ye.+ 33 Moto oyo andimi litatoli na ye, andimi* ete Nzambe alobaka solo.+ 34 Mpo moto oyo Nzambe atindi alobaka maloba ya Nzambe,+ mpo Ye* apesaka elimo mokemoke te. 35 Tata alingaka Mwana+ mpe apesi biloko nyonso na mabɔkɔ na ye.+ 36 Moto oyo azali komonisa kondima epai ya Mwana azali na bomoi ya seko;+ moto oyo azali kotosa Mwana te akozwa bomoi te,+ kasi nkanda ya Nzambe efandi likoló na ye.+
4 Nzokande, ntango Nkolo ayebaki ete Bafarisai bayokaki ete ye* azali kozwa mpe kobatisa+ bayekoli mingi koleka Yoane— 2 atako Yesu ye moko azalaki kobatisa te kasi bayekoli na ye nde bazalaki kobatisa— 3 alongwaki na Yudea mpe akendaki lisusu na Galile. 4 Kasi asengelaki kokatisa Samaria. 5 Bongo akómaki na engumba moko ya Samaria oyo ebengami Sikare, pene na elanga oyo Yakobo apesaki mwana na ye Yozefe.+ 6 Kuna nde esika libulu ya mai ya Yakobo ezalaki.+ Nzokande Yesu, lokola alɛmbaki mingi mpo na mobembo, afandaki pene na libulu yango ya mai.* Ezalaki soki na midi.*
7 Mwasi moko ya Samaria ayaki kotoka mai. Yesu alobaki na ye: “Pesá ngai mai ya komɛla.” 8 (Bayekoli na ye bakendaki na engumba kosomba biloko ya kolya.) 9 Bongo mwasi Mosamaria yango alobaki na ye: “Ndenge nini yo, atako ozali Moyuda, ozali kosɛnga ngai mai ya komɛla, nzokande ngai nazali mwasi Mosamaria?” (Mpo Bayuda bayokanaka te na Basamaria.)+ 10 Yesu azongiselaki ye: “Soki oyebaki likabo ya ofele ya Nzambe+ mpe moto oyo azali koloba na yo: ‘Pesá ngai mai ya komɛla,’ yo nde olingaki kosɛnga ye, mpe ye alingaki kopesa yo mai ya bomoi.”+ 11 Mwasi yango alobaki na ye: “Tata, ozali ata na katini ya kotoka mai te, mpe libulu ezali mozindo. Bongo mai yango ya bomoi okozwa wapi? 12 Oleki nde nkɔkɔ na biso Yakobo, oyo apesaki biso libulu oyo mpe oyo amɛlaki mai na yango, ye ná bana na ye mpe bibwɛlɛ na ye?” 13 Bongo Yesu azongiselaki ye: “Moto nyonso oyo amɛli mai oyo akoyoka lisusu mposa ya mai. 14 Moto oyo akomɛla mai oyo ngai nakopesa ye akoyoka lisusu mposa ya mai ata moke te,+ kasi mai oyo nakopesa ye ekokóma na kati na ye liziba ya mai oyo ezali kobimabima mpo na kopesa bomoi ya seko.”+ 15 Mwasi yango alobaki na ye: “Tata, pesá ngai mai yango, mpo nayoka lisusu mposa ya mai te mpe nayaka lisusu na esika oyo te mpo na kotoka mai.”
16 Yesu alobaki na ye: “Kende kobenga mobali na yo mpe yaká na ye awa.” 17 Mwasi yango azongisaki: “Nazali na mobali te.” Yesu alobaki na ye: “Ezali bongo ndenge olobi: ‘Nazali na mobali te.’ 18 Mpo ozwá mibali mitano, mpe oyo ozali na ye sikoyo azali mobali na yo te. Na likambo yango olobi solo.” 19 Mwasi yango alobaki na ye: “Tata, namoni ete ozali mosakoli.+ 20 Bankɔkɔ na biso basambelaki na ngomba oyo, kasi bino bolobaka ete na Yerusaleme nde esika oyo bato basengeli kosambela.”+ 21 Yesu alobaki na ye: “Mwasi, ndimelá ngai, ngonga ezali koya wana bokosambela Tata na ngomba oyo te, na Yerusaleme mpe te. 22 Bino bosambelaka oyo boyebi te;+ biso tosambelaka oyo toyebi, mpo lobiko ebandi na Bayuda.+ 23 Kasi ngonga ezali koya, mpe ezali sikoyo, wana basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpamba te Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye.+ 24 Nzambe azali Elimo,+ mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela ye na elimo mpe na solo.”+ 25 Mwasi yango alobaki na ye: “Nayebi ete Masiya azali koya, oyo abengami Kristo. Ntango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso polele.” 26 Yesu alobaki na ye: “Ngai oyo nazali koloba na yo, nazali ye.”+
27 Kaka na ntango wana bayekoli na ye bayaki, mpe babandaki kokamwa mpo azalaki kosolola na mwasi. Kasi, moko te alobaki: “Ozali koluka nini?” to, “Mpo na nini ozali kosolola na ye?” 28 Bongo mwasi yango atikaki elokó na ye, akendaki na engumba mpe ayebisaki bato ete: 29 “Bóya kotala moto moko oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalá. Mbala mosusu ye nde Kristo te?” 30 Babimaki na engumba mpe babandaki koya epai ya Yesu.
31 Na ntango yango, bayekoli bazalaki kobondela ye ete: “Rabi,+ lyá.” 32 Kasi alobaki na bango: “Nazali na bilei oyo bino boyebi te.” 33 Bongo bayekoli balobanaki bango na bango: “Moto moko amemeli ye nde eloko ya kolya?” 34 Yesu alobaki na bango: “Bilei na ngai ezali kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai+ mpe kosilisa mosala na ye.+ 35 Bolobi ete etikali sanza minei mpo mosala ya kobuka mbuma ebanda, boye te? Talá! Nalobi na bino: Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na kobuka mbuma.+ Sikoyo 36 mobuki-mbuma azali kozwa lifuti mpe azali koyanganisa mbuma mpo na bomoi ya seko, mpo moloni ná mobuki-mbuma básepela elongo.+ 37 Mpamba te na likambo yango maloba oyo ezali solo: Moko azali moloni mpe mosusu azali mobuki-mbuma. 38 Natindaki bino bóbuka mbuma oyo bosalelaki mosala makasi te. Basusu basalaki mosala makasi, mpe bino bozwi litomba na mosala na bango ya makasi.”
39 Basamaria mingi ya engumba wana bakómaki kondimela ye mpo na maloba ya mwasi oyo apesaki litatoli ete: “Ayebisaki ngai makambo nyonso oyo nasalá.”+ 40 Bongo ntango Basamaria bayaki epai na ye, basɛngaki ye ete afanda elongo na bango, mpe afandaki kuna mikolo mibale. 41 Na yango, bato mingi lisusu bandimaki mpo na makambo oyo alobaki, 42 mpe balobaki na mwasi yango: “Ezali lisusu te kaka mpo na makambo oyo olobaki nde tozali kondima; mpo toyoki biso moko mpe toyebi ete moto oyo azali mpenza mobikisi ya mokili.”+
43 Nsima ya mikolo yango mibale, alongwaki wana mpe akendaki na Galile. 44 Nzokande, Yesu ye moko alobaki ete mosakoli azalaka na lokumu te na mboka na ye moko.+ 45 Na yango, ntango akómaki na Galile, bato ya Galile bayambaki ye, mpo bamonaki makambo nyonso oyo asalaki na Yerusaleme na fɛti,+ mpo bango mpe bakendaki na fɛti.+
46 Bongo akómaki lisusu na Kana ya Galile, epai abongolaki mai vinyo.+ Nzokande, ezalaki na mosali moko ya mokonzi na Kapernaume oyo mwana na ye azalaki kobɛla. 47 Ntango moto yango ayokaki ete Yesu autaki na Yudea mpe akómaki na Galile, akendaki epai na ye mpe asɛngaki ye akende kobikisa mwana na ye, mpo etikalaki moke akufa. 48 Kasi Yesu alobaki na ye: “Soki bomoni bilembo mpe makamwisi te, bokondima ata moke te.”+ 49 Mosali ya mokonzi alobaki na ye: “Nkolo, yaká elongo na ngai liboso ete mwana na ngai ya moke akufa.” 50 Yesu alobaki na ye: “Zongá epai na yo; mwana na yo azali na bomoi.”+ Moto yango andimaki maloba oyo Yesu alobaki na ye, mpe akendaki. 51 Kasi ntango azalaki naino na nzela, baombo na ye bayaki kokutana na ye mpo na koyebisa ye ete mwana na ye ya mobali azali na bomoi.* 52 Bongo atunaki bango na ngonga nini akómaki malamu. Bayanolaki ye: “Fiɛvrɛ na ye esilaki lobi na ngonga ya liboso ya nsima ya midi.”* 53 Bongo tata wana ayebaki ete ezalaki na ngonga wana nde Yesu alobaki na ye: “Mwana na yo azali na bomoi.”+ Na yango ye ná ndako na ye mobimba bakómaki bandimi. 54 Yango ezalaki likamwisi ya mibale+ oyo Yesu asalaki ntango autaki na Yudea mpe akómaki na Galile.
5 Nsima na yango, ezalaki na fɛti+ moko ya Bayuda, mpe Yesu amataki na Yerusaleme. 2 Nzokande na Yerusaleme, pene na Porte ya Bampate+ ezali na pisini moko oyo ebengami na Ebre Betezata; pisini yango ezalaki na veranda ya makonzí mitano. 3 Na veranda yango, ebele ya bato ya maladi, bato bakufá miso, batɛngumi, mpe bato oyo mabɔkɔ to makolo ekauká* balalaki wana na nse. 4 *—— 5 Kasi ezalaki na moto moko oyo azalaki wana, oyo aumeli na maladi mbula 38. 6 Ntango amonaki moto yango alali wana, mpe lokola ayebaki ete aumeli na maladi ntango molai, Yesu alobaki na ye: “Olingi kobika?”+ 7 Moto yango ya maladi ayanolaki ye: “Tata, nazali na moto te oyo akotya ngai na pisini ntango mai eningani; kasi ntango nazali kokende na mai, moto mosusu akiti liboso na ngai.” 8 Yesu alobaki na ye: “Tɛlɛmá! Zwá litɔkɔ* na yo mpe tambolá.”+ 9 Mpe na mbala moko moto yango abikaki; alɔkɔtaki litɔkɔ na ye mpe abandaki kotambola.
Mokolo yango ezalaki Sabata. 10 Bongo Bayuda babandaki koloba na moto oyo abikaki: “Ezali Sabata, ozali na ndingisa te ya komema litɔkɔ oyo.”+ 11 Kasi azongiselaki bango: “Moto oyo abikisaki ngai nde alobaki na ngai: ‘Zwá litɔkɔ na yo mpe tambolá.’” 12 Batunaki ye: “Moto yango nani oyo ayebisaki yo: ‘Zwá litɔkɔ mpe tambolá’?” 13 Kasi moto oyo abikaki ayebaki te soki nani moto abikisaki ye, mpo Yesu akɔtaki na kati ya ebele ya bato oyo bazalaki wana.
14 Nsima na yango, Yesu amonaki ye na tempelo mpe alobaki na ye: “Yo wana okómi malamu. Kosala lisusu lisumu te, mpo likambo ya mabe koleka ekómela yo te.” 15 Moto yango akendaki mpe ayebisaki Bayuda ete ezalaki Yesu nde abikisaki ye. 16 Ezalaki mpo na ntina yango nde Bayuda babandaki konyokola Yesu, mpo azalaki kosala makambo wana na Sabata. 17 Kasi azongiselaki bango: “Tata na ngai akobi kosala tii sikoyo, ngai mpe nazali kokoba kosala.”+ 18 Yango wana, Bayuda balukaki lisusu makasi koboma ye, kaka te mpo azalaki kotosa Sabata te, kasi mpe mpo azalaki kobenga Nzambe Tata na ye mpenza,+ mpe na bongo azalaki komikokanisa na Nzambe.+
19 Yango wana Yesu alobaki na bango: “Ya solo mpenza nalobi na bino, Mwana akoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ye moko, kasi asalaka kaka makambo oyo amonaka Tata azali kosala.+ Mpo makambo nyonso oyo Ye asalaka, Mwana mpe asalaka yango kaka bongo. 20 Mpo Tata alingi Mwana mingi+ mpe alakisi ye makambo nyonso oyo ye moko asalaka, mpe akolakisa ye makambo ya minene koleka oyo, mpo bókamwa.+ 21 Mpo, kaka ndenge Tata alamwisaka bakufi mpe apesaka bango bomoi,+ ndenge moko mpe Mwana apesaka bomoi na moto oyo ye alingi.+ 22 Mpo Tata asambisaka ata moto moko te, kasi apesi mokumba nyonso ya kosambisa epai ya Mwana,+ 23 mpo bato nyonso bákumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo azali kokumisa Mwana te azali mpe kokumisa Tata te, oyo atindaki ye.+ 24 Ya solo mpenza nalobi na bino, moto oyo ayoki liloba na ngai mpe andimeli Ye oyo atindaki ngai azali na bomoi ya seko,+ mpe akosambisama te, kasi alongwe na liwa, akómi na bomoi.+
25 “Ya solo mpenza nalobi na bino, ngonga ezali koya, mpe ezali sikoyo, ntango bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana ya Nzambe, mpe baoyo bakotya likebi bakozwa bomoi. 26 Mpo kaka ndenge Tata azali na bomoi na kati na ye moko,*+ apesi mpe Mwana nzela ya kozala na bomoi na kati na ye moko.+ 27 Mpe apesi ye bokonzi ya kosambisa,+ mpo azali Mwana ya moto.+ 28 Bókamwa te mpo na yango, mpo ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita* bakoyoka mongongo na ye+ 29 mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, mpe baoyo basalaki makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.+ 30 Nakoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ngai moko. Nasambisaka na kolanda oyo nayoki, mpe lisambisi na ngai ezali sembo,+ mpo nalukaka kosala mokano na ngai moko te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.+
31 “Soki ngai moko kaka nazali kopesa litatoli mpo na ngai moko, litatoli na ngai ezali solo te.+ 32 Ezali na moto mosusu oyo azali kopesa litatoli mpo na ngai, mpe nayebi ete litatoli oyo azali kopesa mpo na ngai ezali solo.+ 33 Botindaki bato epai ya Yoane, mpe ye apesaki litatoli mpo na solo.+ 34 Nzokande, nandimaka te litatoli oyo euti na moto, kasi nalobi makambo wana mpo bino bóbika. 35 Moto yango azalaki mwinda oyo ezali kopela mpe kongɛnga, mpe mpo na ntango moke, bondimaki kosepela mingi na pole na ye.+ 36 Kasi nazali na litatoli oyo eleki oyo ya Yoane, mpo kaka makambo oyo Tata na ngai apesaki ngai nasala, yango nde nazali kosala, makambo yango oyo nazali kosala ezali kopesa litatoli ete Tata atindaki ngai.+ 37 Mpe Tata, ye oyo atindaki ngai, ye moko apesi litatoli mpo na ngai.+ Boyoká mongongo na ye ata mbala moko te mpe bomoná lolenge na ye te,+ 38 mpe bobateli te liloba na ye na mitema na bino, mpo bozali kondima te moto oyo ye atindi.
39 “Bozali koyekola Makomami na likebi+ mpo bokanisi ete bokozwa bomoi ya seko na nzela na yango; mpe yango* mpenza nde ezali kopesa litatoli mpo na ngai.+ 40 Mpe atako bongo bolingi koya epai na ngai te+ mpo bózwa bomoi. 41 Nandimaka nkembo oyo euti na bato te, 42 kasi nayebi malamu ete bozali na bolingo ya Nzambe te na kati na bino. 43 Nayei na nkombo ya Tata na ngai, kasi boyambi ngai te. Soki moto mosusu ayaka na nkombo na ye moko, mbɛlɛ boyambi moto yango. 44 Ndenge nini bokoki kondima, bino bato bozali kondima nkembo oyo bino na bino bopesanaka mpe bozali koluka te nkembo oyo euti na Nzambe kaka moko?+ 45 Bókanisa te ete nakofunda bino epai ya Tata; moto oyo azali kofunda bino ezali Moize,+ oyo botyeli elikya. 46 Kutu, soki bozalaki kondimela Moize, bolingaki mpe kondimela ngai, mpo akomaki makambo etali ngai.+ 47 Kasi soki bozali kondimela makomi na ye te, ndenge nini bokondimela makambo oyo nazali koloba?”
6 Nsima na yango, Yesu akatisaki na ngámbo mosusu ya mbu ya Galile, to ya Tiberiase.+ 2 Mpe ebele mpenza ya bato bakobaki kolanda ye,+ mpo bazalaki komona makamwisi oyo azalaki kosala, ya kobikisa bato ya maladi.+ 3 Bongo Yesu amataki na ngomba moko, mpe afandaki kuna elongo na bayekoli na ye. 4 Nzokande Elekeli,+ fɛti ya Bayuda, ekómaki pene. 5 Ntango Yesu atombolaki miso mpe amonaki ete ebele ya bato bazali koya epai na ye, alobaki na Filipe boye: “Epai wapi tokosomba mampa mpo na koleisa bato oyo?”+ 6 Nzokande, azalaki koloba bongo mpo na komeka ye, mpo ye moko ayebaki likambo oyo alingaki kosala. 7 Filipe ayanolaki ye: “Mampa ya denari* nkama mibale ekokoka te mpo ete mokomoko na bango azwa ata mwa eteni.” 8 Moyekoli mosusu, na nkombo Andre, ndeko ya Simo Petro, alobaki na ye: 9 “Mwana mobali moko ya moke azali na mampa mitano ya ɔrje ná mbisi mibale ya mike. Kasi yango ezali eloko nini mpo na bato ebele boye?”+
10 Yesu alobaki: “Bófandisa bato.” Lokola matiti ezalaki mingi na esika yango, bato bafandaki; mibali bazalaki soki 5 000.+ 11 Yesu azwaki mampa yango, mpe nsima ya kobondela mpo na kopesa matɔndi, akabolelaki yango baoyo bafandaki wana; asalaki mpe bongo na mbisi wana ya mike, mpe bato bazwaki ndenge balingaki. 12 Kasi ntango balyaki mpe batondaki, alobaki na bayekoli na ye: “Bóyanganisa biteni oyo etikali, mpo ata eloko moko te ebebisama.” 13 Bongo bayanganisaki yango mpe batondisaki kitunga 12 na biteni oyo bato balyaki mampa mitano ya ɔrje batikaki.
14 Ntango bato bamonaki likamwisi oyo asalaki, babandaki koloba: “Oyo azali mpenza mosakoli oyo asengelaki koya na mokili.”+ 15 Bongo Yesu, lokola ayebaki ete balingi koya kokanga ye mpo na kotya ye mokonzi, alongwaki akei+ lisusu na ngomba, kaka ye moko.+
16 Ntango mpokwa ekómaki, bayekoli na ye bakitaki na mbu,+ 17 bamataki na masuwa moko mpe babandaki kokatisa mbu mpo na kokende na Kapernaume. Na ntango wana, molili esilaki kokɔta mpe Yesu ayaki naino epai na bango te.+ 18 Lisusu, mai ya mbu ezalaki koningana mingi mpo mopɛpɛ moko makasi ezalaki kopɛpa.+ 19 Nzokande, ntango balúkaki bakilomɛtrɛ soki mitano to motoba,* bamonaki Yesu azali kotambola likoló ya mai ya mbu mpe kopusana pene na masuwa, mpe bakómaki kobanga. 20 Kasi alobaki na bango: “Ezali ngai; bóbanga te!”+ 21 Bongo bandimaki kokɔtisa ye na masuwa, mpe na mbala moko masuwa yango ekómaki na mokili, na esika bazalaki kokende.+
22 Na mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo batikalaki na ngámbo mosusu ya mbu bamonaki ete masuwa ezalaki wana te. Liboso masuwa moko ya moke ezalaki wana, kasi Yesu amataki na masuwa yango te elongo na bayekoli na ye, mpo bayekoli na ye bakendaki bango moko. 23 Nzokande bamasuwa oyo eutaki na Tiberiase ekómaki pene na esika oyo bato balyaki mampa nsima ya libondeli oyo Nkolo asalaki mpo na kopesa matɔndi. 24 Bongo ntango ebele ya bato bamonaki ete ezala Yesu to bayekoli na ye bazalaki wana te, bamataki na bamasuwa na bango mpe bayaki na Kapernaume mpo na koluka Yesu.
25 Ntango bakutaki ye na ngámbo mosusu ya mbu, balobaki na ye: “Rabi,+ ntango nini okómi awa?” 26 Yesu azongiselaki bango: “Ya solo mpenza nalobi na bino: Bozali koluka ngai, ezali te mpo bomonaki makamwisi, kasi mpo bolyaki mampa mpe botondaki.+ 27 Bósalaka mosala, ezala te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi mpo na bilei oyo eumelaka mpo na bomoi ya seko,+ bilei oyo Mwana ya moto akopesa bino; mpo epai na ye nde Tata, Nzambe ye moko, atye elembo na ye ete andimi ye.”+
28 Bongo balobaki na ye: “Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa misala ya Nzambe?” 29 Yesu azongiselaki bango: “Oyo ezali mosala ya Nzambe, ete bómonisa kondima na moto oyo ye atindaki.”+ 30 Bongo balobaki na ye: “Likamwisi nini okosala,+ mpo ete tómona yango mpe tóndima yo? Mosala nini ozali kosala? 31 Bankɔkɔ na biso balyaki mana na esobe,+ ndenge ekomamá ete: ‘Apesaki bango limpa oyo euti na likoló mpo bálya.’”+ 32 Bongo Yesu alobaki na bango: “Ya solo mpenza, nalobi na bino: Moize apesaki bino limpa oyo euti na likoló te, kasi Tata na ngai azali kopesa bino limpa ya solosolo oyo euti na likoló. 33 Mpo limpa ya Nzambe ezali oyo euti na likoló mpe oyo ezali kopesa mokili bomoi.” 34 Bongo balobaki na ye: “Nkolo, pesáká biso limpa yango ntango nyonso.”
35 Yesu alobaki na bango: “Ngai nazali limpa ya bomoi. Moto oyo ayei epai na ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto oyo azali komonisa kondima epai na ngai akoyoka lisusu mposa ya mai ata moke te.+ 36 Kasi ndenge nalobaki na bino, bomoni ngai, kasi bozali kondima te.+ 37 Baoyo nyonso Tata apesi ngai bakoya epai na ngai, mpe ngai nakobengana ata moke te moto oyo ayei epai na ngai;+ 38 mpo nautaki na likoló+ nakiti awa mpo na kosala, mokano na ngai moko te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.+ 39 Talá mokano ya moto oyo atindaki ngai: ete nabungisa ata moto moko te na kati ya bato oyo apesaki ngai, kasi ete nasekwisa+ bango na mokolo ya nsuka. 40 Mpo oyo ezali mokano ya Tata na ngai: ete moto nyonso oyo andimi Mwana mpe azali komonisa kondima epai na ye azwa bomoi ya seko,+ mpe nakosekwisa+ ye na mokolo ya nsuka.”
41 Bongo Bayuda babandaki koimaima mpo na ye mpamba te alobaki: “Ngai nazali limpa oyo euti na likoló.”+ 42 Mpe bazalaki koloba: “Oyo Yesu mwana ya Yozefe te, oyo toyebi tata na ye ná mama na ye?+ Ndenge nini azali sikoyo koloba ete: ‘Nauti na likoló’?” 43 Bongo Yesu alobaki na bango: “Bótika koimaima na kati na bino. 44 Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te;+ mpe ngai nakosekwisa ye na mokolo ya nsuka.+ 45 Ekomamá na Basakoli ete: ‘Bango nyonso bakoteyama na Yehova.’*+ Moto nyonso oyo ayoki Tata mpe ayekoli ayaka epai na ngai. 46 Moto moko te amoná Tata,+ longola kaka moto oyo auti epai ya Nzambe, ye nde moto amoná Tata.+ 47 Ya solo mpenza nalobi na bino: Moto oyo andimi azali na bomoi ya seko.+
48 “Ngai nazali limpa ya bomoi.+ 49 Bankɔkɔ na bino balyaki mana na esobe mpe atako bongo bakufaki.+ 50 Kasi oyo ezali limpa oyo euti na likoló, mpo ete moto nyonso alya yango mpe akufa te. 51 Ngai nazali limpa ya bomoi oyo euti na likoló. Soki moto alei limpa yango, akozala na bomoi libela na libela; mpe ya solo, limpa oyo nakopesa ezali mosuni na ngai mpo na bomoi ya mokili.”+
52 Bongo Bayuda babandaki kotyana ntembe bango na bango, balobi: “Ndenge nini moto oyo akoki kopesa biso mosuni na ye mpo tólya?” 53 Na yango Yesu alobaki na bango: “Ya solo mpenza nalobi na bino: Soki bolei mosuni ya Mwana ya moto te mpe bomɛli makila na ye te, bozali na bomoi te na kati na bino.+ 54 Moto oyo alei mosuni na ngai mpe amɛli makila na ngai azali na bomoi ya seko, mpe nakosekwisa+ ye na mokolo ya nsuka; 55 mpo mosuni na ngai ezali bilei ya solosolo mpe makila na ngai ezali eloko ya komɛla ya solosolo. 56 Moto oyo alei mosuni na ngai mpe amɛli makila na ngai azali na bomoko elongo na ngai, mpe ngai na bomoko elongo na ye.+ 57 Kaka ndenge Tata ya bomoi atindaki ngai mpe ngai nazali na bomoi mpo na Tata, ndenge moko mpe moto oyo alei mosuni na ngai akozala na bomoi mpo na ngai.+ 58 Oyo ezali limpa oyo euti na likoló. Ezali te lokola ntango bankɔkɔ na bino balyaki kasi bakufaki. Moto oyo alei limpa oyo akozala na bomoi libela na libela.”+ 59 Alobaki makambo wana ntango azalaki koteya na sinagoga moko* na Kapernaume.
60 Ntango bayokaki yango, mingi kati na bayekoli na ye, balobaki: “Maloba oyo ezali makasi! Nani akoki koyoka yango?” 61 Kasi lokola Yesu ayebaki na kati na ye moko ete bayekoli na ye bazalaki koimaima mpo na yango, alobaki na bango: “Yango ebɛtisi bino libaku? 62 Bongo ekozala ndenge nini soki bomoni Mwana ya moto azali komata epai azalaki liboso?+ 63 Ezali elimo nde epesaka bomoi;+ mosuni ezali ata na ntina moko te. Maloba oyo nalobi na bino ezali elimo mpe ezali bomoi.+ 64 Kasi ezali na basusu na kati na bino oyo bazali kondima te.” Mpo Yesu ayebaki banda na ebandeli baoyo bazalaki kondima te mpe moto oyo alingaki kotɛka ye.+ 65 Alobaki lisusu: “Yango wana nalobaki na bino: Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata apesi ye nzela te.”+
66 Mpo na yango, bayekoli na ye mingi bazongelaki biloko oyo ezalaki na nsima+ mpe balingaki lisusu kotambola elongo na ye te. 67 Bongo Yesu alobaki na bantoma zomi na mibale: “Bongo bino, bolingi kokende te?” 68 Simo Petro azongiselaki ye: “Nkolo, tokokende epai ya nani?+ Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.+ 69 Biso tosili kondima mpe tosili koyeba ete ozali Mosantu ya Nzambe.”+ 70 Yesu alobaki na bango: “Naponaki bino zomi na mibale, boye te?+ Kasi moko na bino azali mokoseli-bato-makambo.”*+ 71 Azalaki kolobela nde Yudasi mwana ya Simo Mokeriota, mpo ye nde alingaki kotɛka ye, nzokande azalaki moko ya bantoma zomi na mibale.+
7 Nsima na yango, Yesu akobaki kotambola na Galile mobimba, mpo alingaki kosala bongo te na Yudea mpamba te Bayuda bazalaki koluka koboma ye.+ 2 Nzokande, fɛti ya Bayuda, fɛti ya Batabernakle,*+ ekómaki pene. 3 Bongo bandeko na ye+ balobaki na ye: “Longwá awa mpe kende na Yudea, mpo bayekoli na yo mpe bámona misala oyo ozali kosala. 4 Mpo moto moko te asalaka makambo na kobombana soki azali koluka koyebana epai ya bato nyonso. Lokola ozali kosala makambo oyo, omimonisa na mokili.” 5 Ya solo, bandeko na ye bazalaki kondimela ye te.*+ 6 Bongo Yesu alobaki na bango: “Ntango na ngai ekoki naino te,+ kasi mpo na bino ntango nyonso ezali malamu. 7 Mokili ezali na ntina moko te ya koyina bino, kasi ezali koyina ngai, mpo nazali kopesa litatoli ete misala na yango ezali mabe.+ 8 Bino bómata na fɛti; ngai nakomata naino na fɛti yango te, mpo ntango na ngai ekoki naino mpenza te.”+ 9 Nsima ya koyebisa bango makambo wana, atikalaki na Galile.
10 Kasi ntango bandeko na ye bamataki na fɛti, na nsima ye mpe amataki, na polele te kasi na kobombana. 11 Na yango Bayuda babandaki koluka ye na fɛti mpe koloba: “Moto yango azali wapi?” 12 Mpe na kati ya ebele ya bato, bazalaki kolobaloba na nse nse mpo na ye. Basusu bazalaki koloba: “Azali moto malamu.” Basusu bazalaki koloba: “Te. Azali nde kokosa ebele ya bato.”+ 13 Atako bongo, moto moko te azalaki koloba polele mpo na ye, mpo bazalaki kobanga Bayuda.+
14 Ntango fɛti ekómaki na katikati, Yesu amataki na tempelo mpe abandaki koteya. 15 Mpe Bayuda bakamwaki, balobi: “Ndenge nini moto oyo ayebi Makomami*+ malamu boye, nzokande atángá kelasi te?”*+ 16 Bongo Yesu ayanolaki bango: “Makambo oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ezali ya moto oyo atindaki ngai.+ 17 Soki moto azali na mposa ya kosala mokano na Ye,* akoyeba soki liteya yango euti na Nzambe+ to soki makambo oyo nazali koloba euti na ngai moko. 18 Moto oyo alobaka makambo oyo euti na ye moko azali koluka nkembo na ye moko; kasi moto oyo alukaka nkembo ya moto oyo atindi ye,+ moto yango alobaka solo, mpe kozanga bosembo ezali na kati na ye te. 19 Moize apesaki bino Mobeko,+ boye te? Kasi moko te kati na bino atosaka Mobeko yango. Mpo na nini bozali koluka koboma ngai?”+ 20 Ebele ya bato bayanolaki: “Ozali na demo. Nani azali koluka koboma yo?” 21 Yesu azongiselaki bango: “Nasalaki kaka mosala moko, mpe bino nyonso bokamwe. 22 Yango wana Moize apesaki bino mobeko ya kokata ngenga+—ezali te ete euti na Moize, kasi euti nde na bankɔkɔ+—mpe bino bokataka moto ngenga na sabata. 23 Soki moto akatamaka ngenga na mokolo ya sabata mpo na kotosa Mobeko ya Moize, mpo na nini bozali kosilikela ngai makasi mpo nabikisi mpenza moto na mokolo ya sabata?+ 24 Bótika kosambisa na kolanda oyo ezali komonana libándá, kasi bósambisa na lisambisi oyo ezali sembo.”+
25 Bongo bafandi mosusu ya Yerusaleme babandaki koloba: “Moto oyo bazali koluka koboma, ye oyo te?+ 26 Kasi, talá! azali koloba na miso ya bato, mpe bazali koloba na ye eloko te. Boye bankumu bandimi sikoyo ete ye nde Kristo? 27 Nzokande, biso toyebi epai moto oyo auti;+ kasi ntango Kristo akoya, moto moko te akoyeba epai auti.” 28 Bongo, wana Yesu azalaki koteya na tempelo, abelelaki boye: “Bino boyebi ngai mpe boyebi epai nauti. Mpe nayei na ndenge na ngai moko te,+ kasi Moto oyo atindaki ngai azali mpenza, mpe boyebi ye te.+ 29 Ngai nayebi ye,+ mpo nazali momonisi na ye, mpe ye Moto atindaki ngai.” 30 Na yango babandaki koluka kokanga ye;+ kasi ata moto moko te atyaki ye mabɔkɔ, mpo ngonga na ye ekokaki naino te.+ 31 Nzokande, mingi na kati ya ebele ya bato bandimelaki ye,+ mpe bazalaki koloba: “Ntango Kristo akoya, akosala te makamwisi* mingi koleka oyo moto oyo asali, boye te?”
32 Bafarisai bayokaki ebele ya bato bazali koloba makambo na nse nse mpo na ye, mpe banganga-nzambe bakonzi ná Bafarisai batindaki bakɛngɛli bákanga ye. 33 Bongo Yesu alobaki: “Nakozala na bino lisusu mwa ntango moke, na nsima nakokende epai ya Moto oyo atindaki ngai.+ 34 Bokoluka ngai, kasi bokomona ngai te, mpe epai ngai nakozala bino bokoki koya te.”+ 35 Na yango Bayuda balobanaki bango na bango: “Moto oyo alingi kokende wapi, mpo biso tómona ye te? Alingi nde kokende epai ya Bayuda oyo bapalanganá na kati ya Bagrɛki mpe koteya Bagrɛki? 36 Alingi koloba nini na maloba na ye oyo: ‘Bokoluka ngai, kasi bokomona ngai te, mpe epai ngai nakozala bino bokoki koya te’?”
37 Na mokolo ya nsuka, mokolo monene ya fɛti yango,+ Yesu atɛlɛmaki mpe abelelaki: “Soki moto azali na mposa ya mai, aya epai na ngai mpe amɛla!+ 38 Moto oyo azali na kondima epai na ngai, kaka ndenge Makomami elobi: ‘Na kati na ye mpenza bibale ya mai ya bomoi ekotíyola.’”+ 39 Nzokande, alobaki bongo mpo na elimo oyo baoyo bazalaki na kondima epai na ye balingaki kozwa; mpo elimo ezalaki naino te,+ mpamba te Yesu azwaki naino nkembo te.+ 40 Na kati ya ebele ya bato, bato mosusu oyo bayokaki maloba yango, babandaki koloba: “Oyo azali mpenza Mosakoli yango.”+ 41 Basusu bazalaki koloba: “Azali Kristo.”+ Kasi basusu bazalaki koloba: “Kristo akouta na Galile te, boye te?+ 42 Makomami elobi te ete Kristo akouta na kati ya bana ya Davidi,+ mpe na Beteleme,+ mboka oyo Davidi autaki?”+ 43 Bongo bokabwani ekɔtaki na kati ya ebele ya bato mpo na ye. 44 Nzokande basusu kati na bango balingaki kokanga ye, kasi moto moko te atyaki ye mabɔkɔ.
45 Na yango bakɛngɛli bazongaki epai ya banganga-nzambe bakonzi ná Bafarisai, mpe bango balobaki na bango: “Mpo na nini boyei na ye te?” 46 Bakɛngɛli bayanolaki: “Naino moto moko te alobá lokola moto yango.”+ 47 Bongo Bafarisai bazongisaki: “Bino mpe bokosami nde? 48 Moko te kati na bankumu to Bafarisai andimeli ye, boye te?+ 49 Kasi ebele ya bato wana oyo bayebi Mobeko te, bazali bato oyo balakelamá mabe.” 50 Nikodeme, oyo liboso akendaki epai ya Yesu mpe oyo azalaki moko ya Bafarisai yango, alobaki na bango: 51 “Mibeko na biso esambisaka moto te liboso ya koyoka ye mpe koyeba oyo azali kosala, boye te?”+ 52 Bayanolaki ye: “Yo mpe ozali nde moto ya Galile? Salá bolukiluki mpe okomona ete ata mosakoli moko te akobima na Galile.”*
8 12 Bongo Yesu alobaki na bango lisusu boye: “Ngai nazali pole ya mokili.+ Moto oyo azali kolanda ngai akotambola na molili soki moke te, kasi akozala na pole+ ya bomoi.” 13 Bafarisai balobaki na ye: “Ozali kopesa litatoli mpo na yo moko; litatoli na yo ezali solo te.” 14 Yesu azongiselaki bango: “Ata soki nazali kopesa litatoli mpo na ngai moko, litatoli na ngai ezali solo, mpo nayebi epai nauti mpe epai nazali kokende.+ Kasi bino boyebi te epai nauti mpe epai nazali kokende. 15 Bino bozali kosambisa na ndenge ya mosuni;*+ ngai nazali kosambisa ata moto moko te. 16 Mpe ata soki nasambisi, lisambisi na ngai ezali solo, mpo nazali ngai moko te, kasi Tata oyo atindaki ngai azali elongo na ngai.+ 17 Lisusu, na Mobeko na bino moko ekomamá boye: ‘Litatoli ya bato mibale ezali solo.’+ 18 Nazali kopesa litatoli mpo na ngai moko, mpe Tata oyo atindaki ngai azali kopesa litatoli mpo na ngai.”+ 19 Bongo balobaki na ye: “Wapi Tata na yo?” Yesu ayanolaki: “Boyebi ngai te, boyebi mpe Tata na ngai te.+ Soki boyebaki ngai mpenza, bolingaki koyeba mpe Tata na ngai.”+ 20 Alobaki maloba yango na esika ya kobomba makabo,+ wana azalaki koteya na tempelo. Kasi moto moko te akangaki ye, mpo ngonga na ye ekokaki naino te.+
21 Bongo alobaki na bango lisusu boye: “Ngai nazali kokende, mpe bokoluka ngai, nzokande bokokufa na lisumu na bino.+ Epai nazali kokende bino bokoki koya te.”+ 22 Na yango Bayuda babandaki koloba: “Boye akokende komiboma te? Mpo alobi ete: ‘Epai nazali kokende bino bokoki koya te.’” 23 Alobaki na bango lisusu: “Bino bozali bato ya nse; ngai nazali moto ya likoló.+ Bino bozali bato ya mokili oyo; ngai nazali moto ya mokili oyo te. 24 Yango wana nalobaki na bino: Bokokufa na masumu na bino. Mpo soki bozali kondima te ete ngai nazali moto yango, bokokufa na masumu na bino.” 25 Na yango babandaki koloba na ye: “Yo ozali nani?” Yesu azongiselaki bango: “Mpo na nini kutu nazali koloba na bino? 26 Nazali na makambo mingi ya koloba mpo na bino mpe ya kosambisa. Kasi, Moto oyo atindaki ngai alobaka solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na ye, yango nde nazali koloba na mokili.”+ 27 Bakangaki ntina te ete azalaki koloba na bango mpo na Tata. 28 Bongo Yesu alobaki: “Ntango bokotombola Mwana ya moto,+ nde bokoyeba ete ngai nazali ye,+ mpe ete nasalaka eloko moko te na likanisi na ngai moko;+ kasi kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ngai mpe nazali koloba makambo oyo. 29 Mpe Moto oyo atindaki ngai azali elongo na ngai; atiki ngai ngai moko te, mpo nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.”+ 30 Ntango azalaki koloba makambo yango, bato mingi bakómaki kondimela ye.
31 Bongo Yesu alobaki lisusu na Bayuda oyo bandimelaki ye ete: “Soki botikali na kati ya maloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, 32 mpe bokoyeba solo,+ mpe solo ekopesa bino bonsomi.”+ 33 Bayanolaki ye: “Biso tozali bana ya Abrahama mpe tokómá baombo ya moto ata mokolo moko te. Ndenge nini ozali koloba ete: ‘Bokozwa bonsomi’?” 34 Yesu ayanolaki bango: “Ya solo mpenza, nalobi na bino, moto nyonso oyo asalaka lisumu azali moombo ya lisumu.+ 35 Lisusu, moombo atikalaka moto ya libota mpo na libela te; mwana atikalaka mpo na libela. 36 Na yango, soki Mwana apesi bino bonsomi, bokozala mpenza na bonsomi. 37 Nayebi ete bozali bana ya Abrahama. Kasi bozali koluka koboma ngai, mpo maloba na ngai ezali kosala mosala te epai na bino. 38 Nazali koloba makambo oyo namonaki ntango nazalaki na Tata na ngai,+ kasi bino bozali kosala makambo oyo boyokaki epai ya tata na bino.” 39 Bazongiselaki ye: “Tata na biso ezali Abrahama.” Yesu alobaki na bango: “Soki bozalaki bana ya Abrahama,+ bolingaki kosala misala ya Abrahama. 40 Kasi sikoyo bozali koluka koboma ngai, ngai moto nayebisi bino solo oyo nayoki epai ya Nzambe.+ Abrahama asalaki bongo te. 41 Bozali kosala misala ya tata na bino.” Balobaki na ye: “Biso tobotamá na pite* te; tozali na Tata kaka moko, Nzambe.”
42 Yesu alobaki na bango: “Soki Nzambe azalaki Tata na bino, mbɛlɛ bolingi ngai,+ mpo nautaki epai ya Nzambe mpe nazali awa. Nayei na ndenge na ngai moko te, kasi Moto wana nde atindaki ngai.+ 43 Mpo na nini bozali kokanga ntina te ya makambo oyo nazali koloba? Ezali mpo bokoki koyoka maloba na ngai te. 44 Bino bouti na tata na bino Zabolo, mpe bolingaka kokokisa mposa ya tata na bino.+ Ye azalaki mobomi-bato ntango abandaki,*+ mpe akangamaki makasi te na solo, mpo solo ezali na kati na ye te. Ntango alobaka lokuta, amonisaka ndenge azali mpenza, mpo azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.+ 45 Kasi ngai, lokola nayebisi bino makambo ya solo, bozali kondimela ngai te. 46 Nani na kati na bino akoki kotángela ngai lisumu oyo nasali? Soki nazali koloba solo, mpo na nini bozali kondimela ngai te? 47 Moto oyo auti na Nzambe ayokaka maloba ya Nzambe.+ Yango wana bino bozali koyoka te, mpo bouti na Nzambe te.”+
48 Bayuda bazongiselaki ye: “Tolobaki nde solo te ete: ‘Ozali Mosamaria+ mpe ozali na demo’?”+ 49 Yesu ayanolaki: “Nazali na demo te, kasi nazali kokumisa Tata na ngai, mpe bino bozali kotyola ngai. 50 Kasi ngai nazali koluka nkembo mpo na ngai moko te;+ ezali na Moto moko oyo azali koluka mpe kosambisa. 51 Ya solo mpenza nalobi na bino, soki moto azali kotosa maloba na ngai, akomona liwa ata mokolo moko te.”+ 52 Bayuda balobaki na ye: “Sikoyo toyebi ete yo ozali na demo. Abrahama akufá, basakoli mpe bakufá, kasi yo olobi: ‘Soki moto azali kotosa maloba na ngai, akoyoka nsolo ya liwa ata mokolo moko te.’ 53 Yo oleki nde tata na biso Abrahama, oyo akufá? Basakoli mpe bakufá. Ozali kokanisa yo nde nani?” 54 Yesu ayanolaki: “Soki nazali komipesa nkembo ngai moko, nkembo na ngai ezali mpamba. Tata na ngai moto azali kopesa ngai nkembo,+ oyo bino bolobi ete azali Nzambe na bino. 55 Nzokande bino boyebi ye te,+ kasi ngai nayebi ye.+ Mpe soki nalobaki ete nayebi ye te, nalingaki kozala moto ya lokuta, lokola bino. Kasi nayebi ye mpe natosaka liloba na ye. 56 Abrahama tata na bino asepelaki mingi na elikya ya komona mokolo na ngai, mpe amonaki yango mpe asepelaki.”+ 57 Na yango Bayuda balobaki na ye: “Naino okokisi ata mbula 50 te, bongo omoná Abrahama?” 58 Yesu alobaki na bango: “Ya solo mpenza nalobi na bino, liboso ete Abrahama abotama, ngai nazalaki.”+ 59 Bongo balɔkɔtaki mabanga mpo na kobamba ye, kasi Yesu abombanaki mpe abimaki na tempelo.
9 Ntango Yesu azalaki koleka, amonaki moto moko oyo akufá miso banda kobotama na ye. 2 Mpe bayekoli na ye batunaki ye: “Rabi,+ nani asalaki lisumu, moto oyo to baboti na ye, mpo abotama moto akufá miso?” 3 Yesu ayanolaki: “Moto oyo asalaki lisumu te, baboti na ye mpe te, kasi ezali mpo misala ya Nzambe emonana polele na likambo na ye.+ 4 Tosengeli kosala misala ya Moto oyo atindaki ngai wana moi ezali naino;+ butu ezali koya mpe moto moko te akokoka kosala mosala. 5 Ntango nazali naino na mokili, nazali pole ya mokili.”+ 6 Nsima ya koloba makambo wana, Yesu abwakaki nsoi na mabele, asalaki pɔtɔpɔtɔ ya mabele na nsoi yango, mpe apakolaki yango na miso ya moto yango+ 7 mpe alobaki na ye: “Kende kosukola na mai ya Siloame”* (liloba oyo ebongolami “Motindami”). Bongo moto yango akendaki, asukolaki, mpe azongaki akómi komona.+
8 Na yango bato oyo bazalaki kofanda penepene mpe baoyo liboso bamonaki ye azali kosɛnga biloko babandaki koloba: “Oyo ezali moto oyo azalaki kofanda mpe kosɛngasɛnga, boye te?” 9 Bato mosusu bazalaki koloba: “Ezali ye.” Basusu bazalaki koloba: “Ye te, akokani nde na ye.” Moto yango azalaki se koloba: “Ezali ngai.” 10 Na yango batunaki ye: “Bongo ndenge nini miso na yo efungwami?” 11 Ayanolaki: “Moto oyo babengi Yesu asalaki pɔtɔpɔtɔ ya mabele mpe apakolaki ngai yango na miso, mpe alobaki na ngai: ‘Kende kosukola na Siloame.’+ Bongo nakendaki, nasukolaki mpe nakómaki komona.” 12 Na yango, balobaki na ye: “Wapi moto yango?” Ye alobaki: “Nayebi te.”
13 Bamemaki moto yango oyo azalaki liboso miso ekufá epai ya Bafarisai. 14 Nzokande mokolo oyo Yesu asalaki pɔtɔpɔtɔ wana ya mabele mpe afungolaki ye miso,+ ezalaki Sabata.+ 15 Na ntango yango, Bafarisai mpe babandaki kotuna moto yango ndenge nini akómaki komona. Alobaki na bango: “Atyaki ngai pɔtɔpɔtɔ ya mabele na miso, nasukolaki mpe nazali komona.” 16 Bongo Bafarisai mosusu babandaki koloba: “Moto oyo auti epai ya Nzambe te, mpo azali kotosa Sabata te.”+ Basusu balobaki: “Ndenge nini moto oyo azali mosumuki akoki kosala makamwisi ya boye?”+ Bongo bokabwani ekɔtaki na kati na bango.+ 17 Mpe balobaki lisusu na moto yango ete: “Lokola afungolaki nde miso na yo, olobi nini mpo na ye?” Moto yango alobaki: “Azali mosakoli.”
18 Nzokande, Bayuda bandimaki te ete ye azalaki liboso moto akufá miso mpe akómaki komona, tii babengaki baboti ya moto yango oyo akómaki komona. 19 Mpe batunaki bango: “Oyo nde mwana na bino, oyo bolobi ete abotamaki miso ekufá? Bongo ndenge nini azali komona sikoyo?” 20 Baboti na ye bazongisaki: “Toyebi ete azali mwana na biso mpe ete abotamaki miso ekufá. 21 Kasi ndenge nini azali sikoyo komona, toyebi te, to nani afungoli ye miso, toyebi te. Bótuna ye. Azali mokóló. Ye moko aloba.” 22 Baboti na ye balobaki makambo wana mpo bazalaki kobanga Bayuda,+ mpamba te Bayuda basilaki koyokana ete, soki moto andimi ete Yesu azali Kristo, moto yango bakobengana ye na sinagoga.+ 23 Yango wana baboti na ye balobaki: “Azali mokóló. Bótuna ye.”
24 Bongo mpo na mbala ya mibale, babengaki moto yango oyo azalaki liboso moto akufá miso mpe balobaki na ye: “Pesá Nzambe nkembo; biso toyebi ete moto wana azali mosumuki.” 25 Bongo ayanolaki: “Soki azali mosumuki, ngai nayebi te. Likambo kaka moko oyo nayebi ezali ete, nazalaki moto akufá miso, kasi sikoyo nazali komona.” 26 Na yango balobaki na ye: “Asalaki yo nini? Ndenge nini afungolaki miso na yo?” 27 Ayanolaki bango: “Nasilaki koyebisa bino, kasi boyokaki te. Mpo na nini bolingi koyoka yango lisusu? Bino mpe bolingi nde kokóma bayekoli na ye?” 28 Na yango balobaki na ye na kotyola ete: “Yo moto ozali moyekoli ya moto wana, kasi biso tozali bayekoli ya Moize. 29 Biso toyebi ete Nzambe alobaki na Moize, kasi moto wana, toyebi te soki auti wapi.” 30 Moto yango azongiselaki bango: “Ezali mpenza likambo ya kokamwa ndenge bino boyebi te soki auti wapi, nzokande afungolaki ngai miso. 31 Toyebi ete Nzambe ayokaka basumuki te,+ kasi soki moto abangaka Nzambe mpe asalaka mokano na ye, ye ayokaka moto yango.+ 32 Banda na ntango ya kala toyoká ata mokolo moko te ete moto moko afungolá miso ya moto oyo abotamá miso ekufá. 33 Soki moto wana autaki epai ya Nzambe te, akokaki kosala ata eloko moko te.”+ 34 Bazongiselaki ye: “Yo obotamá mobimba na kati ya lisumu, kasi ozali koteya biso?” Mpe babwakaki ye libándá!+
35 Yesu ayokaki ete babwakaki moto wana libándá, mpe ntango amonaki ye, atunaki ye: “Ozali kondimela Mwana ya moto?” 36 Moto yango ayanolaki: “Tata, ye azali nani mpo nandimela ye?” 37 Yesu alobaki na ye: “Omoni ye. Kutu, ye nde moto oyo azali koloba na yo.” 38 Bongo alobaki: “Nandimeli ye, Nkolo.” Mpe agumbamelaki* ye. 39 Na yango Yesu alobaki: “Nayaki na mokili mpo na lisambisi oyo: ete baoyo bamonaka te bámona+ mpe baoyo bamonaka bákóma bato bakufá miso.”+ 40 Baoyo na kati ya Bafarisai oyo bazalaki elongo na ye bayokaki makambo wana, mpe balobaki na ye: “Biso mpe tozali bato bakufá miso te, boye te?” 41 Yesu alobaki na bango: “Soki bozalaki bato bakufá miso, bolingaki kozala na lisumu te. Kasi sikoyo bozali koloba ete: ‘Tomonaka.’ Lisumu na bino ezali kaka.”+
10 “Ya solo mpenza nalobi na bino, moto oyo akɔti na lopango ya bampate na porte na yango te kasi amateli na esika mosusu, moto wana azali moyibi mpe mopunzi.+ 2 Kasi moto oyo akɔti na porte azali mobateli ya mpate.+ 3 Mokɛngɛli ya porte afungolelaka ye,+ mpe bampate eyokaka mongongo na ye.+ Abengaka bampate na ye na nkombo mpe amemaka yango na libándá. 4 Ntango abimisi oyo ya ye nyonso, atambolaka liboso na yango, mpe bampate elandaka ye, mpo eyebi mongongo na ye. 5 Bampate ekolanda mopaya soki moke te kasi ekokima ye, mpo eyebi mongongo ya bapaya te.” 6 Yesu apesaki bango ndakisa wana, kasi bakangaki ntina te ya makambo oyo azalaki koloba na bango.
7 Bongo Yesu alobaki lisusu boye: “Ya solo mpenza nalobi na bino, ngai nazali porte mpo na bampate.+ 8 Baoyo nyonso bayaki na esika na ngai bazali miyibi mpe bapunzi; kasi bampate eyokaki bango te. 9 Ngai nazali porte; moto nyonso oyo akɔteli epai na ngai akobika, mpe akokɔta mpe akobima mpe akomona esika ya matiti.+ 10 Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa.+ Ngai nayei mpo bázala na bomoi mpe bázala na yango mingi. 11 Ngai nazali mobateli ya mpate oyo aleki malamu;+ mobateli ya mpate oyo aleki malamu apesaka bomoi* na ye mpo na bampate.+ 12 Moto oyo bazwá na mosala, oyo azali mobateli ya mpate te, mpe oyo bampate ezali ya ye te, ntango amoni mbwa ya zamba ezali koya, asundolaka bampate mpe akimaka—mpe mbwa ya zamba ekangaka yango mpe epanzaka yango— 13 mpo azali moto oyo bazwá na mosala mpe amitungisaka te mpo na bampate. 14 Ngai nazali mobateli ya mpate oyo aleki malamu. Nayebi bampate na ngai mpe bampate na ngai eyebi ngai,+ 15 kaka ndenge Tata ayebi ngai mpe ngai nayebi Tata;+ mpe nazali kopesa bomoi* na ngai mpo na bampate.+
16 “Mpe nazali na bampate mosusu, oyo ezali ya lopango oyo te;+ yango mpe nasengeli komema yango na kati, mpe ekoyoka mongongo na ngai; ekokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.+ 17 Yango wana Tata alingaka ngai,+ mpo nazali kopesa bomoi*+ na ngai, mpo nazwa yango lisusu. 18 Moto moko te abɔtɔli ngai yango, kasi nazali kopesa yango na likanisi na ngai moko. Nazali na lotomo ya kopesa yango, mpe nazali na lotomo ya kozwa yango lisusu.+ Yango nde mitindo oyo nazwi epai ya Tata na ngai.”
19 Bokabwani ekɔtaki lisusu na kati ya Bayuda+ mpo na maloba wana. 20 Mingi na bango bazalaki koloba: “Azali na demo mpe abɛli ligboma. Mpo na nini bozali koyoka ye?” 21 Bato mosusu bazalaki koloba: “Wana ezali te maloba ya moto oyo azali na demo. Demo akoki te kofungola miso ya bato bakufá miso, boye te?”
22 Na ntango yango, fɛti ya Bofungoli ezalaki kosalema na Yerusaleme. Ezalaki eleko ya malili makasi, 23 mpe Yesu azalaki kotambola na kati ya tempelo, na veranda ya Salomo.+ 24 Bongo Bayuda bazingaki ye mpe babandaki koloba na ye: “Tii ntango nini okotika biso mitema* likoló? Soki ozali Kristo, yebisá biso polele.” 25 Yesu ayanolaki bango: “Nayebisaki bino, kasi bozali kondima te. Misala oyo nazali kosala na nkombo ya Tata na ngai, yango nde ezali kopesa litatoli mpo na ngai.+ 26 Kasi bino bozali kondima te, mpo bozali bampate na ngai te.+ 27 Bampate na ngai eyokaka mongongo na ngai, mpe ngai nayebi yango, mpe elandaka ngai.+ 28 Napesi yango bomoi ya seko,+ mpe ekobebisama soki moke te, mpe moto moko te akobɔtɔla yango na lobɔkɔ na ngai.+ 29 Oyo Tata na ngai apesi ngai ezali na motuya koleka biloko mosusu nyonso, mpe moto moko te akoki kobɔtɔla bampate na lobɔkɔ ya Tata.+ 30 Ngai ná Tata tozali moko.”*+
31 Na mbala oyo lisusu, Bayuda balɔkɔtaki mabanga mpo na kobamba ye. 32 Yesu azongiselaki bango: “Nalakisaki bino misala mingi ya malamu oyo euti epai ya Tata. Na misala wana, mpo na oyo wapi bozali kobamba ngai mabanga?” 33 Bayuda bayanolaki ye: “Tozali kobamba yo mabanga, mpo na mosala moko ya malamu te, kasi mpo na kofinga;+ mpo yo, atako ozali moto, ozali komikómisa nzambe.” 34 Yesu ayanolaki bango: “Ekomamá te na Mobeko na bino ete: ‘Nalobaki: “Bino bozali banzambe”’?*+ 35 Soki abengaki ‘banzambe’+ baoyo liloba ya Nzambe epamelaki—nzokande likomami ekoki kolongolama te— 36 ngai moto oyo Tata asantisaki mpe atindaki na mokili, bozali koloba na ngai ete: ‘Ozali kofinga,’ mpo nalobi: ‘Nazali Mwana ya Nzambe’?+ 37 Soki nazali kosala misala ya Tata na ngai te, bóndimela ngai te. 38 Kasi soki nazali kosala yango, ata soki bozali kondimela ngai te, bóndimela misala yango,+ mpo bóyeba mpe bókoba koyeba ete Tata azali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na Tata.”+ 39 Bongo balukaki lisusu kokanga ye, kasi akimaki bango.
40 Mpe akendaki lisusu na ngámbo mosusu ya Yordani na esika oyo Yoane azalaki kobatisa na ebandeli,+ mpe afandaki kuna. 41 Mpe bato mingi bayaki epai na ye mpe babandaki koloba: “Yoane asalaki ata likamwisi moko te, kasi makambo nyonso oyo Yoane alobaki mpo na moto oyo ezalaki ya solo.”+ 42 Mpe kuna bato mingi bakómaki na kondima epai na ye.
11 Nzokande moto moko na nkombo Lazare azalaki kobɛla; azalaki moto ya Betani, mboka ya Maria ná ndeko na ye ya mwasi Marta.+ 2 Ezalaki Maria wana nde asopaki mafuta ya nsolo kitoko na makolo ya Nkolo mpe apangwisaki ye makolo na nsuki na ye.+ Ndeko na ye ya mobali Lazare nde azalaki kobɛla. 3 Na yango bandeko na ye ya basi batindelaki Yesu nsango ete: “Nkolo, talá! moto oyo olingaka mingi azali kobɛla.” 4 Kasi ntango Yesu ayokaki yango, alobaki: “Maladi wana ezali mpo esuka na liwa te, kasi ezali mpo na nkembo ya Nzambe,+ mpo Mwana ya Nzambe azwa nkembo na nzela na yango.”
5 Nzokande, Yesu azalaki kolinga Marta ná ndeko na ye ya mwasi ná Lazare. 6 Kasi, ntango ayokaki ete Lazare azali kobɛla, atikalaki lisusu mikolo mibale na esika oyo azalaki. 7 Bongo nsima na yango, alobaki na bayekoli: “Tókende lisusu na Yudea.” 8 Bayekoli balobaki na ye: “Rabi,+ kala mingi te bato ya Yudea bazalaki koluka kobamba yo mabanga,+ mpe olingi kokende lisusu kuna?” 9 Yesu ayanolaki: “Moi ezalaka na ngonga 12 na mokolo, boye te?+ Soki moto azali kotambola na moi abɛtaka libaku na eloko moko te, mpo azali komona pole ya mokili oyo. 10 Kasi soki moto azali kotambola na butu, abɛtaka libaku, mpo pole ezali na ye te.”
11 Nsima ya koloba makambo wana, abakisaki: “Moninga na biso Lazare alali mpɔngi,+ kasi nazali kokende kuna mpo na kolamwisa ye.” 12 Bongo bayekoli balobaki na ye: “Nkolo, soki alali mpɔngi, akoyoka malamu.” 13 Nzokande, Yesu alobelaki liwa na ye. Kasi bango bakanisaki ete azalaki koloba ete Lazare alali mpɔngi, azali kopema. 14 Na yango Yesu alobaki na bango polele ete: “Lazare akufi,+ 15 mpe nasepeli mpo na bino ndenge nazalaki kuna te, mpo ete bino bóndima. Kasi tókende epai na ye.” 16 Bongo Toma, oyo bazalaki kobenga Lipasa, alobaki na bayekoli mosusu ete: “Biso mpe tókende, mpo tókufa elongo na ye.”+
17 Ntango Yesu akómaki, akutaki ete Lazare asili kosala mikolo minei na lilita.* 18 Nzokande Betani ezalaki pene na Yerusaleme, na kilomɛtrɛ soki misato.* 19 Mpe Bayuda mingi bayaki epai ya Marta ná Maria mpo na kobɔndisa bango mpo na ndeko na bango ya mobali. 20 Ntango Marta ayokaki ete Yesu azali koya, akendaki kokutana na ye; kasi Maria+ afandaki kaka na ndako. 21 Bongo Marta alobaki na Yesu: “Nkolo, soki ozalaki awa mbɛlɛ ndeko na ngai alingaki kokufa te. 22 Kasi ata sikoyo, nayebi ete nyonso oyo okosɛnga Nzambe, Nzambe akopesa yo.” 23 Yesu alobaki na ye: “Ndeko na yo akosekwa.” 24 Marta alobaki na ye: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa+ na mokolo ya nsuka.” 25 Yesu alobaki na ye: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi.+ Moto oyo azali komonisa kondima epai na ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi; 26 mpe moto nyonso oyo azali na bomoi mpe azali komonisa kondima epai na ngai, akokufa ata mokolo moko te.+ Ondimi yango?” 27 Marta alobaki na ye: “Ɛɛ, Nkolo, nandimaka ete yo ozali Kristo Mwana ya Nzambe, oyo azali koya na mokili.” 28 Ntango asilisaki koloba bongo, akendaki kobenga ndeko na ye Maria, mpe alobaki na ye na pembeni ete: “Moteyi+ azali awa mpe azali kobenga yo.” 29 Ntango Maria ayokaki bongo, atɛlɛmaki noki mpe akendaki epai ya Yesu.
30 Yesu akɔtaki naino na mboka te, kasi azalaki kaka na esika oyo Marta akutanaki na ye. 31 Ntango Bayuda oyo bazalaki elongo na Maria na ndako mpo na kobɔndisa ye bamonaki ye atɛlɛmi noki mpe abimi, balandaki ye, bakanisaki ete azali kokende na lilita*+ mpo na kolela kuna. 32 Ntango Maria akómaki na esika oyo Yesu azalaki mpe amonaki ye, akweaki na makolo na ye, mpe alobaki na ye: “Nkolo, soki ozalaki awa, mbɛlɛ ndeko na ngai alingaki kokufa te.” 33 Ntango Yesu amonaki Maria azali kolela mpe Bayuda oyo bayaki elongo na ye bazali kolela, ayokaki mpasi mingi na kati na ye* mpe abulunganaki. 34 Alobaki: “Bolalisi ye wapi?” Balobaki na ye: “Nkolo, yaká kotala.” 35 Yesu alelaki, abimisi mai ya miso.+ 36 Na yango Bayuda babandaki koloba: “Talá ndenge alingaki ye mingi!” 37 Kasi basusu na kati na bango balobaki: “Moto oyo afungolaki miso ya moto akufá miso,+ akokaki te kosala ete Lazare akufa te?”
38 Yesu ayokaki lisusu mpasi na kati na ye moko, na nsima ayaki na lilita* yango. Ezalaki nde mobenga, mpe libanga moko etyamaki na monɔkɔ na yango. 39 Yesu alobaki: “Bólongola libanga.” Marta, ndeko ya mowei, alobaki na ye: “Nkolo, sikoyo asengeli kolumba nsolo, mpo esali mikolo minei.” 40 Yesu alobaki na ye: “Nayebisaki yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe?”+ 41 Na yango balongolaki libanga. Na nsima Yesu atombolaki miso na likoló+ mpe alobaki: “Tata, natɔndi yo na ndenge oyoki ngai. 42 Ya solo, nayebaki ete oyokaka ngai ntango nyonso; kasi nalobaki bongo mpo na ebele ya bato oyo batɛlɛmi awa, mpo bákoka kondima ete yo otindaki ngai.”+ 43 Ntango asilisaki koloba makambo wana, agangaki na mongongo makasi ete: “Lazare, bimá!”+ 44 Moto oyo akufaki abimaki, makolo ná mabɔkɔ elíngami na bilamba, mpe elongi na ye ezipamá elamba. Yesu alobaki na bango: “Bófungola ye mpe bótika ye akende.”
45 Bongo Bayuda mingi oyo bayaki epai ya Maria mpe oyo bamonaki likambo oyo Yesu asalaki, bandimelaki ye,+ 46 kasi basusu na kati na bango bakendaki epai ya Bafarisai mpe bayebisaki bango makambo oyo Yesu asalaki. 47 Na yango, banganga-nzambe bakonzi ná Bafarisai bayanganisaki Sanedrina mpe balobaki: “Tósala nini, mpo moto oyo azali kosala makamwisi mingi?+ 48 Soki totiki ye akoba kaka boye, bango nyonso bakondimela ye, mpe Baroma bakoya kobɔtɔla esika na biso* mpe ekólo na biso.” 49 Kasi moko na bango, Kaifa,+ oyo azalaki nganga-nzambe monene na mbula wana, alobaki na bango: “Boyebi ata eloko moko te, 50 mpe bososoli te ete ezali mpo na litomba na bino ete moto moko akufa mpo na bato ya ekólo na esika ete ekólo mobimba ebebisama.” 51 Nzokande, makambo oyo alobaki eutaki epai na ye moko te; kasi lokola azalaki nganga-nzambe monene na mbula wana, azalaki nde kosakola ete Yesu asengelaki kokufa mpo na ekólo, 52 mpe kaka mpo na ekólo te, kasi mpe mpo na koyanganisa na bomoko bana ya Nzambe oyo bapalanganaki epai na epai. 53 Na yango banda mokolo wana, basalaki likita mpo na koboma Yesu.
54 Yango wana, Yesu azalaki lisusu kotambola na miso ya bato te na kati ya Bayuda, kasi alongwaki wana mpe akendaki na etúká moko pene na esobe, na engumba ebengami Efraime,+ mpe afandaki kuna elongo na bayekoli. 55 Nzokande Elekeli+ ya Bayuda ekómaki pene, mpe bato mingi balongwaki na mboka ya pembeni mpo na komata na Yerusaleme liboso ya Elekeli mpo na komipɛtola ndenge milulu ezalaki kosɛnga. 56 Bazalaki koluka Yesu mpe bazalaki kolobana bango na bango wana batɛlɛmaki na kati ya tempelo, ete: “Bokanisi nini? Ya solo mpenza akoya na fɛti te?” 57 Kasi banganga-nzambe bakonzi ná Bafarisai bapesaki mitindo ete soki moto moko ayebi esika Yesu azali, asengeli koyebisa yango, mpo bákanga ye.
12 Mikolo motoba liboso ya Elekeli, Yesu akómaki na Betani, epai Lazare+ oyo Yesu asekwisaki azalaki kofanda. 2 Bongo babongiselaki ye bilei ya mpokwa kuna, mpe Marta azalaki kotyela bango bilei na mesa,+ kasi Lazare azalaki moko ya baoyo bazalaki kolya* elongo na ye. 3 Na yango, Maria azwaki litra* moko ya mafuta ya nsolo kitoko, narda ya solosolo, ya ntalo mingi. Asopaki yango na makolo ya Yesu mpe apangwisaki ye makolo na nsuki na ye. Ndako etondaki na nsolo ya mafuta yango ya nsolo kitoko.+ 4 Kasi Yudasi Mokeriota,+ moko ya bayekoli ya Yesu, oyo azalaki pene ya kotɛka ye, alobaki: 5 “Mpo na nini te mafuta yango ya nsolo kitoko etɛkamaki denari* 300 mpe mbongo yango epesama na babola?” 6 Nzokande soki alobaki bongo, ezalaki te mpo azalaki komitungisa mpo na babola, kasi nde mpo azalaki moyibi. Azalaki kosimba kɛsi ya mbongo mpe azalaki koyiba mbongo oyo ezalaki kotyama kuna. 7 Bongo Yesu alobaki: “Bótika ye kimya, mpo ete abatela momeseno wana mpo na mokolo ya kokundama na ngai.+ 8 Mpo babola, bokozala na bango ntango nyonso,+ kasi ngai bokozala na ngai ntango nyonso te.”+
9 Na ntango yango, ebele mpenza ya Bayuda bayokaki ete Yesu azalaki kuna mpe bayaki, kaka mpo na ye te, kasi mpe mpo na komona Lazare, oyo ye asekwisaki.+ 10 Banganga-nzambe bakonzi basalaki sikoyo likita mpo na koboma mpe Lazare, 11 mpamba te ezalaki mpo na ye nde Bayuda mingi bazalaki kokende kuna mpe bazalaki kondimela Yesu.+
12 Na mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na fɛti bayokaki ete Yesu azali koya na Yerusaleme. 13 Bongo bazwaki mandalala mpe babimaki mpo na kokutana na ye, mpe babandaki koganga: “Tobondeli yo, bikisá! Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova,*+ Mokonzi ya Yisraele, apambwama!”+ 14 Ntango Yesu amonaki mwana ya mpunda moko, afandaki likoló na yango,+ kaka ndenge ekomamá ete: 15 “Kobanga te, mwana mwasi ya Siona. Talá! Mokonzi na yo azali koya, afandi likoló ya mwana ya mpunda.”+ 16 Na ntango wana, bayekoli na ye bakangaki ntina ya makambo yango te, kasi ntango Yesu azwaki nkembo+ nde bamikundolaki ete makambo yango ekomamaki mpo na ye, mpe ete basalaki makambo yango mpo na ye.+
17 Nzokande, ebele ya bato oyo bazalaki elongo na ye ntango abengaki Lazare ete abima na lilita*+ mpe asekwisaki ye bakobaki kopesa litatoli.+ 18 Yango wana mpe ebele ya bato bayaki kokutana na ye, mpo bayokaki ete asalaki likamwisi wana. 19 Bongo Bafarisai balobanaki bango na bango: “Bomoni? Bozali kokoka kosala ata eloko moko te. Talá! Mokili mobimba elandi ye.”+
20 Nzokande ezalaki na Bagrɛki mosusu na kati ya bato oyo bayaki mpo na kosambela na fɛti wana. 21 Bango bakendaki epai ya Filipe,+ oyo azalaki moto ya Betesaida ya Galile, mpe babandaki kosɛnga ye, balobi: “Tata, tolingi komona Yesu.” 22 Filipe ayaki koyebisa Andre. Andre ná Filipe bakendaki koyebisa Yesu.
23 Kasi Yesu azongiselaki bango: “Ngonga ekoki mpo Mwana ya moto azwa nkembo.+ 24 Ya solo mpenza nalobi na bino: Soki mbuma ya blé ekwei na mabele te mpe ekufi te, ekotikala kaka mbuma moko; kasi soki ekufi,+ nde ekobota mbuma mingi. 25 Moto oyo alingaka bomoi* na ye azali kobebisa yango, kasi moto oyo ayinaka bomoi*+ na ye na mokili oyo akobatela yango mpo na bomoi ya seko.+ 26 Soki moto alingi kosalela ngai, alanda ngai, mpe epai ngai nazali, mosaleli na ngai mpe akozala wana.+ Soki moto alingi kosalela ngai, Tata akokumisa ye. 27 Sikoyo nabulungani,*+ mpe naloba nini? Tata, bikisá ngai naleka ngonga oyo.+ Atako bongo, ezali mpo na yango nde nakómi na ngonga oyo. 28 Tata, pesá nkombo na yo nkembo.” Bongo mongongo moko+ eutaki na likoló ete: “Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango nkembo lisusu.”+
29 Ebele ya bato oyo batɛlɛmaki wana bayokaki yango mpe babandaki koloba ete nkake ebɛti. Basusu balobaki: “Anzelu moko alobi na ye.” 30 Yesu azongisaki: “Mongongo oyo ebimi mpo na ngai te, kasi mpo na bino. 31 Sikoyo kosambisama ya mokili oyo ezali kosalema; sikoyo mokonzi ya mokili oyo+ akobwakama libándá.+ 32 Kasi ngai, soki natombolami na mabele,+ nakobenda bato ya ndenge nyonso epai na ngai.” 33 Azalaki koloba bongo nde mpo na komonisa lolenge ya liwa oyo asengelaki kokufa.+ 34 Na yango, ebele ya bato bayanolaki ye: “Toyokaki na Mobeko ete Kristo akoumela libela na libela.+ Kasi ndenge nini ozali koloba ete Mwana ya moto asengeli kotombolama?+ Mwana ya moto yango nde nani?” 35 Bongo Yesu alobaki na bango: “Pole ekozala kati na bino mpo na mwa ntango moke lisusu. Bótambola ntango bozali naino na pole, mpo molili elonga bino te; moto oyo azali kotambola na kati ya molili ayebaka te epai azali kokende.+ 36 Wana bozali na pole, bómonisa kondima na kati ya pole yango, mpo ete bókóma bana ya pole.”+
Yesu alobaki makambo wana, na nsima akendaki komibomba mosika na bango. 37 Atako asalaki makamwisi* mingi na miso na bango, bandimelaki ye te, 38 mpo ete liloba ya mosakoli Yisaya ekokisama, oyo alobaki: “Yehova,* nani andimeli likambo oyo ayoki epai na biso?*+ Bongo lobɔkɔ ya Yehova,* emonisami epai ya nani?”+ 39 Ntina oyo bazalaki kokoka kondima te ezali ete, Yisaya alobaki lisusu boye: 40 “Abomi miso na bango mpe akómisi mitema na bango makasi, mpo ete bámona te na miso na bango mpe bákanga ntina te na mitema na bango mpe bázongela ngai te, mpo nabikisa bango.”+ 41 Yisaya alobaki makambo wana mpo amonaki nkembo na ye, mpe alobaki mpo na ye.+ 42 Nzokande, na kati ya bankumu, mingi na bango bandimelaki ye mpenza,+ kasi bazalaki kondima ye polele te mpo na Bafarisai, mpo bábengana bango te na sinagoga;+ 43 mpo balingaki nkembo ya bato koleka ata nkembo ya Nzambe.+
44 Nzokande, Yesu abelelaki: “Moto oyo andimeli ngai, andimeli kaka ngai moko te, kasi mpe moto oyo atindaki ngai;+ 45 mpe moto oyo azali komona ngai azali mpe komona Moto oyo atindaki ngai.+ 46 Nayei lokola pole na mokili,+ mpo ete moto nyonso oyo azali kondimela ngai atikala na kati ya molili te.+ 47 Kasi soki moto azali koyoka maloba na ngai mpe azali kotosa yango te, ngai nakosambisa ye te; mpo nayaki kosambisa mokili te, kasi kobikisa mokili.+ 48 Moto oyo aboyi ngai mpe ayambi maloba na ngai te mosambisi na ye azali. Liloba oyo nalobi nde ekosambisa ye na mokolo ya nsuka. 49 Mpo nalobi na ndenge na ngai moko te, kasi Tata moto atindaki ngai apesi ngai mitindo mpo na makambo oyo nasengeli koloba mpe koteya.+ 50 Mpe nayebi ete mitindo na ye elakisi bomoi ya seko.+ Na yango, makambo oyo nazali koloba, nazali koloba yango ndenge kaka Tata ayebisaki ngai.”+
13 Nzokande, lokola ayebaki liboso ya fɛti ya Elekeli ete ngonga na ye esilaki kokoka+ mpo alongwa na mokili oyo akende epai ya Tata,+ Yesu, lokola alingaki baoyo ya ye oyo bazalaki na mokili, alingaki bango tii na nsuka.+ 2 Bazalaki kolya bilei ya mpokwa, mpe Zabolo asilaki kotya na motema ya Yudasi Mokeriota,+ mwana ya Simo, likanisi ya kotɛka Yesu.+ 3 Mpe Yesu, lokola ayebaki ete Tata asilaki kopesa biloko nyonso na mabɔkɔ na ye mpe ete autaki epai ya Nzambe mpe azalaki kokende epai ya Nzambe,+ 4 atɛlɛmaki ntango bazalaki kolya bilei ya mpokwa mpe alongolaki bilamba na ye ya likoló. Azwaki esume mpe akangaki yango na loketo na ye.+ 5 Nsima na yango, atyaki mai na saani mpe abandaki kosukola makolo ya bayekoli mpe kopangwisa yango na esume oyo akangaki na loketo na ye. 6 Bongo akómaki epai ya Simo Petro, mpe ye alobaki na ye: “Nkolo, olingi osukola ngai makolo?” 7 Yesu azongiselaki ye: “Likambo oyo nazali kosala, oyebi ntina na yango sikoyo te, kasi okoyeba ntina na yango nsima.” 8 Petro alobaki na ye: “Te, okosukola ngai makolo ata mokolo moko te.” Yesu azongiselaki ye: “Soki nasukoli yo te,+ ozali na likabo elongo na ngai te.” 9 Bongo Simo Petro alobaki na ye: “Nkolo, kosukola ngai kaka makolo te, kasi mpe mabɔkɔ ná motó.” 10 Yesu alobaki na ye: “Moto oyo asukoli nzoto azalaka na mposa básukola ye kaka makolo, mpo nzoto na ye mobimba ezali pɛto. Bino mpe bozali pɛto, kasi bino nyonso te.” 11 Mpo ayebaki moto oyo alingaki kotɛka ye.+ Yango wana alobaki: “Bino nyonso te nde bozali pɛto.”
12 Bongo ntango asilisaki kosukola bango makolo mpe kolata bilamba na ye ya likoló, afandaki lisusu na mesa mpe alobaki na bango: “Bokangi ntina ya likambo oyo nasali bino? 13 Bobengaka ngai, ‘Moteyi’ mpe ‘Nkolo,’ mpe bolobaka solo, mpo nazali Moteyi mpe Nkolo.+ 14 Na yango, soki ngai, Nkolo mpe Moteyi, nasukoli bino makolo,+ bino mpe bosengeli* kosukolana makolo.+ 15 Mpo napesi bino ndakisa, mpo ete ndenge nasali bino, bino mpe bósalaka bongo.+ 16 Ya solo mpenza nalobi na bino, moombo aleki nkolo na ye te, mpe moto oyo atindami aleki te moto oyo atindaki ye. 17 Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango.+ 18 Nazali koloba mpo na bino nyonso te; nayebi baoyo naponi. Kasi ezali bongo mpo likomami oyo ekokisama:+ ‘Moto oyo azalaki kolya limpa ná ngai abalukeli ngai.’*+ 19 Banda sikoyo nazali koyebisa bino yango liboso ete esalema, mpo ntango ekosalema bóndima ete ngai nazali ye.+ 20 Ya solo mpenza nalobi na bino, moto oyo ayambi moto oyo ngai natindi, ayambi mpe ngai.+ Mpe moto oyo ayambi ngai ayambi mpe Moto oyo atindaki ngai.”+
21 Nsima ya koloba makambo wana, Yesu abulunganaki makasi* mpe apesaki litatoli, alobi: “Ya solo mpenza nalobi na bino, moko na bino akotɛka ngai.”+ 22 Bayekoli babandaki kotalana bango na bango; bayebaki te soki azalaki koloba yango mpo na nani.+ 23 Moko ya bayekoli, oyo Yesu azalaki kolinga mingi,+ afandaki pene na* Yesu. 24 Na yango, Simo Petro asalaki ye elembo na motó mpe alobaki na ye: “Yebisá biso soki azali kolobela nani.” 25 Bongo moyekoli yango alalisaki nzoto nsima, na ntolo ya Yesu, mpe atunaki ye: “Nkolo, ezali nani?”+ 26 Yesu ayanolaki: “Ezali moto oyo nakopesa eteni ya limpa oyo nakɔtisi na saani.”+ Mpe bongo, nsima ya kokɔtisa limpa yango, azwaki yango mpe apesaki yango Yudasi, mwana ya Simo Mokeriota. 27 Ntango Yudasi azwaki eteni yango ya limpa, Satana akɔtelaki ye.+ Bongo Yesu alobaki na ye: “Oyo ozali kosala, salá yango noki mpenza.” 28 Nzokande, moko te kati na baoyo bazalaki na mesa ayebaki ntina oyo alobaki na ye bongo. 29 Kutu basusu bazalaki kokanisa ete, lokola Yudasi azalaki kosimba kɛsi ya mbongo,+ Yesu azalaki koyebisa ye: “Sombá biloko oyo tozali na yango mposa mpo na fɛti,” to ete apesa mwa eloko na babola. 30 Na yango, ntango azwaki eteni ya limpa, abimaki mbala moko. Ezalaki na butu.+
31 Bongo ntango abimaki, Yesu alobaki: “Sikoyo Mwana ya moto azwi nkembo,+ mpe Nzambe azwi nkembo na nzela na ye. 32 Nzambe ye moko akopesa ye nkembo,+ mpe akopesa ye nkembo na mbala moko. 33 Bana, nazali elongo na bino mwa ntango moke lisusu. Bokoluka ngai; mpe kaka ndenge nalobaki na Bayuda, nalobi na bino mpe ndenge wana sikoyo: ‘Epai nazali kokende bino bokoki koya te.’+ 34 Nazali kopesa bino mobeko ya sika, ete bólinganaka bino na bino; kaka ndenge ngai nalingi bino,+ bino mpe bólinganaka.+ 35 Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai: soki bozali na bolingo na kati na bino.”+
36 Simo Petro alobaki na ye: “Nkolo, ozali kokende wapi?” Yesu azongisaki: “Epai nazali kokende, okoki kolanda ngai sikoyo te, kasi okolanda ngai nsima.”+ 37 Petro alobaki na ye: “Nkolo, mpo na nini nakoki kolanda yo sikoyo te? Nakopesa bomoi* na ngai mpo na yo.”+ 38 Yesu ayanolaki: “Okopesa bomoi* na yo mpo na ngai? Ya solo mpenza nalobi na yo, liboso nsoso elela, okowangana ngai mbala misato.”+
14 “Mitema na bino etungisama te.+ Bómonisa kondima epai ya Nzambe;+ bómonisa mpe kondima epai na ngai. 2 Na ndako ya Tata na ngai bisika ya kofanda ezali mingi. Soki ezalaki bongo te, nalingaki koyebisa bino, mpo nazali kokende kobongisela bino esika.+ 3 Lisusu, soki nakei mpe nabongiseli bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai, mpo ete esika oyo ngai nazali, bino mpe bózala.+ 4 Mpe epai nazali kokende, boyebi nzela.”
5 Toma+ alobaki na ye: “Nkolo, toyebi epai ozali kokende te. Ndenge nini tokoki koyeba nzela?”
6 Yesu azongiselaki ye: “Ngai nazali nzela,+ solo+ mpe bomoi.+ Moto moko te akoki koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.+ 7 Soki boyebaki ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na ngai; kobanda sikoyo boyebi ye mpe bomoni ye.”+
8 Filipe alobaki na ye: “Nkolo, lakisá biso Tata, mpe yango ekoki mpo na biso.”
9 Yesu alobaki na ye: “Ata ndenge nalekisi na bino ntango molai boye, Filipe, oyebi ngai kaka te? Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.+ Ndenge nini ozali koloba: ‘Lakisá biso Tata’? 10 Ozali kondima te ete nazali na bomoko elongo na Tata mpe ete Tata azali na bomoko elongo na ngai?+ Makambo oyo nazali koloba na bino ezali kouta epai na ngai moko te;+ kasi Tata, oyo azalaka na bomoko elongo na ngai, azali kosala misala na ye. 11 Bóndimela ngai ntango nalobi ete nazali na bomoko elongo na Tata mpe ete Tata azali na bomoko elongo na ngai; soki te, bóndima mpo na misala yango moko.+ 12 Ya solo mpenza nalobi na bino, moto oyo azali komonisa kondima epai na ngai akosala mpe misala oyo nazali kosala; mpe akosala misala ya minene koleka oyo,+ mpo nazali kokende epai ya Tata.+ 13 Lisusu, nyonso oyo bokosɛnga na nkombo na ngai, nakosala yango, mpo Tata azwa nkembo na nzela ya Mwana.+ 14 Soki bosɛngi eloko na nkombo na ngai, nakosala yango.
15 “Soki bolingaka ngai, bokotosa mitindo na ngai.+ 16 Mpe ngai nakosɛnga Tata mpe ye akopesa bino mosungi* mosusu mpo azala elongo na bino mpo na libela,+ 17 elimo ya solo,+ oyo mokili ekoki kozwa te mpo emonaka yango te mpe eyebi yango te.+ Bino boyebi yango, mpo efandi elongo na bino mpe ezali na kati na bino. 18 Nakotika bino bino moko te.* Nakozonga epai na bino.+ 19 Etikali moke mokili ekomona ngai lisusu te, kasi bino bokomona ngai,+ mpamba te nazali na bomoi mpe bokozala na bomoi. 20 Na mokolo yango, bokoyeba ete ngai nazali na bomoko elongo na Tata, mpe ete bino bozali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na bino.+ 21 Moto oyo andimi mitindo na ngai mpe azali kotosa yango, moto yango alingaka ngai. Mpe moto oyo alingaka ngai, Tata na ngai akolinga ye, mpe ngai nakolinga ye mpe nakomimonisa polele epai na ye.”
22 Yudasi,+ kasi Mokeriota te, alobaki na ye: “Nkolo, likambo nini esalemi mpo olinga komimonisa polele epai na biso kasi na mokili te?”
23 Yesu azongiselaki ye: “Soki moto alingi ngai, akotosa liloba na ngai,+ mpe Tata na ngai akolinga ye, mpe tokoya epai na ye mpe tokosala esika na biso ya kofanda epai na ye.+ 24 Moto oyo alingaka ngai te atosaka maloba na ngai te. Liloba oyo bozali koyoka ezali ya ngai te, kasi ezali ya Tata, oyo atindaki ngai.+
25 “Nalobi na bino makambo wana ntango nazali naino elongo na bino. 26 Kasi mosungi, elimo santu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye nde akoteya bino makambo nyonso mpe akozongisa na makanisi na bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino.+ 27 Natikeli bino kimya; napesi bino kimya na ngai.+ Napesi bino yango ndenge mokili epesaka yango te. Mitema na bino etungisama te mpe elɛmba na kobanga te. 28 Boyokaki ndenge nalobaki na bino ete: ‘Nazali kokende mpe nakozonga epai na bino.’ Soki bolingaki ngai, bolingaki kosepela na ndenge nazali kokende epai ya Tata, mpo Tata aleki ngai.+ 29 Mpe sikoyo nayebisi bino yango liboso ete esalema, mpo ete ntango ekosalema, bóndima.+ 30 Nakoloba na bino lisusu mingi te, mpo mokonzi ya mokili+ oyo azali koya, kasi azali na bokonzi te likoló na ngai.*+ 31 Kasi, mpo mokili eyeba ete ngai nalingaka Tata, nazali kosala kaka ndenge Tata apesi ngai mitindo ete nasala.+ Bótɛlɛma, tólongwa awa.
15 “Ngai nazali nzete ya vinyo ya solosolo, mpe Tata na ngai azali mosali-bilanga. 2 Alongolaka epai na ngai etape nyonso oyo ebotaka mbuma te, mpe apɛtolaka etape nyonso oyo ebotaka mbuma, mpo ebota lisusu mbuma mingi.+ 3 Bino bosili kopɛtolama mpo na liloba oyo nalobaki na bino.+ 4 Bótikala na bomoko elongo na ngai, ngai mpe nakotikala na bomoko elongo na bino. Ndenge kaka etape ekoki kobota mbuma yango moko te soki etikali te na nzete ya vinyo, bino mpe bokoki kobota mbuma te, soki botikali te na bomoko elongo na ngai.+ 5 Ngai nazali nzete ya vinyo; mpe bino bozali bitape. Moto oyo atikali na bomoko elongo na ngai mpe ngai na bomoko elongo na ye, moto yango abotaka mbuma mingi;+ mpo soki botiki ngai, bokoki kosala eloko moko te. 6 Soki moto atikali na bomoko elongo na ngai te, akozala lokola etape oyo babwaki mpe ekauki. Mpe bato basangisaka bitape yango, babwakaka yango na mɔtɔ mpe ezikaka. 7 Soki botikali na bomoko elongo na ngai mpe soki maloba na ngai etikali na kati na bino, bokoki kosɛnga nyonso oyo bolingi mpe ekosalema mpo na bino.+ 8 Tata na ngai azwaka nkembo soki bozali kokoba kobota mbuma mingi mpe soki bozali komonisa ete bozali bayekoli na ngai.+ 9 Kaka ndenge Tata alingi ngai,+ ngai mpe nalingi bino; bótikala na kati ya bolingo na ngai. 10 Soki bozali kotosa mitindo na ngai, bokotikala na kati ya bolingo na ngai, kaka ndenge ngai natosi mitindo ya Tata mpe natikali na kati ya bolingo na ye.
11 “Nalobi na bino makambo wana, mpo ete esengo na ngai ezala na kati na bino mpe ete esengo na bino etonda mpenza.+ 12 Mobeko na ngai yango oyo: ete bólinganaka bino na bino kaka ndenge ngai nalingi bino.+ 13 Moto moko te azali na bolingo koleka moto oyo apesi bomoi* na ye mpo na baninga na ye.+ 14 Bozali baninga na ngai soki bozali kosala makambo oyo napesi bino mitindo.+ 15 Nazali kobenga bino lisusu baombo te, mpo moombo ayebaka te oyo nkolo na ye asalaka. Kasi nabengi bino baninga, mpo nayebisi bino makambo nyonso oyo nayoki epai ya Tata na ngai. 16 Bino boponi ngai te, ngai nde naponi bino, mpe natye bino mpo bókende mpe bókoba kobota mbuma mpe ete mbuma na bino ekoba kozala, mpo nyonso oyo bokosɛnga Tata na nkombo na ngai, akoka kopesa bino yango.+
17 “Napesi bino mitindo na makambo wana, mpo bólinganaka bino na bino.+ 18 Soki mokili eyini bino, bóbosana te ete eyinaki ngai liboso eyina bino.+ 19 Soki bozalaki bato ya mokili, mokili elingaki kokangama na eloko na yango. Sikoyo lokola bozali bato ya mokili te,+ kasi naponi bino na kati ya mokili, yango wana mokili ezali koyina bino.+ 20 Bóbatela na makanisi liloba oyo nalobaki na bino, ete: Moombo aleki nkolo na ye te. Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino;+ soki batosaki liloba na ngai, bakotosa mpe oyo ya bino. 21 Kasi bakosala bino makambo nyonso wana mpo na nkombo na ngai, mpo bayebi te Moto oyo atindaki ngai.+ 22 Soki nayaki te mpe nalobaki na bango te, mbɛlɛ bazali na lisumu te.+ Kasi sikoyo bazali na likambo ya koloba te mpo na lisumu na bango.+ 23 Moto oyo ayini ngai ayini mpe Tata na ngai.+ 24 Soki nasalaki te na kati na bango misala oyo ata moto moko te asalá, balingaki kozala na lisumu te;+ kasi sikoyo bamoni ngai mpe bayini ngai, ezala mpe Tata na ngai. 25 Kasi esalemaki bongo mpo liloba oyo ekomamá na Mobeko na bango ekokisama, ete: ‘Bayinaki ngai kaka mpamba.’+ 26 Ntango mosungi oyo nakotinda uta na Tata akoya, elimo ya solo,+ oyo euti na Tata, ye akopesa litatoli mpo na ngai;+ 27 mpe bino, na ngala na bino, bosengeli kopesa litatoli,+ mpo bozali elongo na ngai banda na ebandeli.
16 “Nalobi na bino makambo yango mpo bóbɛta libaku te. 2 Bakobengana bino na sinagoga.+ Kutu, ngonga ezali koya ntango moto nyonso oyo akoboma bino+ akokanisa ete asaleli Nzambe mosala mosantu. 3 Kasi bakosala makambo wana mpo bayekoli koyeba Tata te, ngai mpe te.+ 4 Nzokande, nalobi na bino makambo yango mpo ntango ngonga oyo yango ekosalema ekokoka, bómikundwela ete nayebisaki bino yango.+
“Nayebisaki bino makambo yango na ebandeli te, mpo nazalaki elongo na bino. 5 Kasi sikoyo nazali kokende epai ya Moto oyo atindaki ngai;+ nzokande moko te na kati na bino atuni ngai: ‘Ozali kokende wapi?’ 6 Kasi mitema na bino etondi na mawa+ mpo nalobi na bino makambo yango. 7 Nzokande nazali koyebisa bino solo ete: Ezali mpo na litomba na bino nde nazali kokende. Mpo soki nakei te, mosungi+ akoya epai na bino te; kasi soki nakei, nakotindela bino ye. 8 Mpe ntango akoya, akopesa mokili elembeteli ya kondimisa na ntina etali lisumu, na ntina etali bosembo mpe na ntina etali lisambisi: 9 ya liboso na ntina etali lisumu+ mpo bazali kondimela ngai te;*+ 10 na nsima na ntina etali bosembo, mpo nazali kokende epai ya Tata mpe bokomona ngai lisusu te; 11 mpe lisusu na ntina etali lisambisi, mpo mokonzi ya mokili oyo asambisami.+
12 “Nazali naino na makambo mingi ya koloba na bino, kasi bokoki kokanga ntina na yango sikoyo te. 13 Nzokande, ntango ye* akoya, elimo ya solo,+ akokamba bino na kati ya solo nyonso, mpo akoloba na ndenge na ye moko te, kasi makambo oyo ye ayoki nde akoloba, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya.+ 14 Ye akopesa ngai nkembo,+ mpo akozwa na kati ya oyo ezali ya ngai mpe akoyebisa bino yango.+ 15 Biloko nyonso oyo Tata azali na yango ezali ya ngai.+ Yango wana nalobaki ete mosungi akozwa na kati ya oyo ezali ya ngai mpe akoyebisa bino yango. 16 Etikali moke bokomona ngai lisusu te,+ mpe lisusu, etikali moke bokomona ngai.”
17 Bongo bayekoli na ye mosusu balobanaki bango na bango: “Alingi koloba nini ndenge alobi na biso ete: ‘Etikali moke bokomona ngai lisusu te, mpe lisusu, etikali moke bokomona ngai,’ mpe, ‘mpo nazali kokende epai ya Tata’?” 18 Na yango bazalaki koloba: “Alingi mpenza koloba nini ndenge alobi ete ‘etikali moke’? Toyebi te soki azali kolobela nini.” 19 Yesu ayebaki ete balingaki kotuna ye mituna, bongo alobaki na bango: “Bozali kotunana bongo mpo nalobi: ‘Etikali moke bokomona ngai lisusu te, mpe lisusu, etikali moke bokomona ngai’? 20 Ya solo mpenza nalobi na bino: Bokolela mpe bokoganga na kolela, kasi mokili ekosepela; bokozala na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo.+ 21 Ntango mwasi azali kobota, azalaka na mawa mpo ngonga na ye ekoki; kasi ntango aboti mwana, akanisaka lisusu mpasi* yango te mpamba te ayokaka esengo mpo moto abotami na mokili. 22 Bino mpe ndenge moko, sikoyo bozali na mawa; kasi nakomona bino lisusu, mpe mitema na bino ekosepela,+ mpe moto moko te akolongola bino esengo na bino. 23 Na mokolo yango bokotuna ngai ata motuna moko te. Ya solo mpenza nalobi na bino, soki bosɛngi Tata eloko+ akopesa bino yango na nkombo na ngai.+ 24 Tii sikoyo, naino bosɛngi ata eloko moko te na nkombo na ngai. Bósɛnga mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.
25 “Nalobi na bino makambo yango na bandakisa. Ngonga ezali koya wana nakoloba na bino lisusu na bandakisa te, kasi nakoyebisa bino polele makambo ya Tata. 26 Na mokolo yango, bokosɛnga Tata eloko na nkombo na ngai; ndenge nalobi bongo, nalingi koloba te ete ngai nakosɛngɛla bino. 27 Mpo Tata ye moko alingi bino mingi, mpo bino bolingaki ngai mingi+ mpe bondimi ete nayaki lokola momonisi ya Nzambe.+ 28 Nayaki lokola momonisi ya Tata mpe nayei na mokili. Sikoyo nazali kotika mokili mpe nazali kokende epai ya Tata.”+
29 Bayekoli na ye balobaki: “Omoni! Sikoyo ozali koloba polele, mpe ozali kosalela bandakisa te. 30 Sikoyo toyebi ete oyebi makambo nyonso mpe ntina ezali te ete moto atuna yo mituna. Na yango, tondimi ete outaki epai ya Nzambe.” 31 Yesu ayanolaki bango: “Bondimi sikoyo? 32 Talá! Ngonga ezali koya, kutu esili koya, wana bokopanzana, moto na moto na ndako na ye, mpe bokotika ngai kaka ngai moko.+ Kasi nazali ngai moko te, mpo Tata azali elongo na ngai.+ 33 Nalobi na bino makambo oyo mpo na nzela na ngai bózala na kimya.+ Na mokili bokozala na mpasi,* kasi bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.”+
17 Yesu alobaki makambo wana, na nsima atombolaki miso na likoló, mpe alobaki: “Tata, ngonga ekoki. Pesá mwana na yo nkembo mpo mwana na yo apesa yo nkembo,+ 2 kaka ndenge opesi ye bokonzi likoló ya bato nyonso,*+ mpo apesa bomoi ya seko+ na baoyo nyonso opesi ye.+ 3 Oyo elakisi bomoi ya seko:+ báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko,+ mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.+ 4 Napesi yo nkembo na mabele,+ nasilisi mosala oyo opesaki ngai.+ 5 Bongo sikoyo, Tata, pesá ngai nkembo penepene na yo na nkembo oyo nazalaki na yango pembeni na yo liboso ete mokili ezala.+
6 “Namonisi* nkombo na yo polele epai ya baoyo ozwaki na mokili mpe oyo opesaki ngai.+ Bazalaki ya yo, mpe opesaki ngai bango, mpe batosi* liloba na yo. 7 Bayebi sikoyo ete makambo nyonso oyo opesi ngai euti epai na yo, 8 mpamba te nayebisi bango maloba oyo opesaki ngai,+ bango mpe bandimi yango mpe bayebi mpenza ete nayaki lokola momonisi na yo,+ mpe bandimi ete otindaki ngai.+ 9 Nazali kosɛnga mpo na bango; nazali kosɛnga, mpo na mokili te, kasi mpo na baoyo opesi ngai, mpo bazali ya yo; 10 mpe biloko na ngai nyonso ezali ya yo mpe oyo ya yo ezali ya ngai,+ mpe nazwi nkembo na kati na bango.
11 “Ngai nazali lisusu na mokili te, kasi bango bazali na mokili,+ mpe ngai nazali koya epai na yo. Tata mosantu, kɛngɛlá bango+ mpo na nkombo na yo, oyo opesi ngai, mpo bázala moko* kaka ndenge biso tozali moko.*+ 12 Ntango nazalaki elongo na bango,+ nazalaki kokɛngɛla bango mpo na nkombo na yo, oyo opesi ngai; mpe nabateli bango, mpe moko te na kati na bango abebaki,+ longola kaka mwana ya libebi,+ mpo Makomami ekokisama.+ 13 Kasi sikoyo nazali koya epai na yo, mpe nazali koloba makambo oyo na mokili mpo bango bázala na esengo na ngai mpe bátonda na yango.+ 14 Napesi bango liloba na yo, kasi mokili eyini bango, mpo bazali bato ya mokili te,+ ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.
15 “Nazali kosɛnga yo olongola bango na mokili te, kasi nde okɛngɛla bango mpo na moto mabe.+ 16 Bazali bato ya mokili te,+ ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.+ 17 Santisá bango* na nzela ya solo;+ liloba na yo ezali solo.+ 18 Kaka ndenge otindaki ngai na mokili, ngai mpe natindi bango na mokili.+ 19 Mpe nazali komisantisa mpo na bango, mpo bango mpe básantisama na nzela ya solo na yo.
20 “Nazali kosɛnga kaka mpo na bango te, kasi mpe mpo na baoyo bazali kondimela ngai na nzela ya liloba na bango, 21 mpo ete bango nyonso bázala moko,+ ndenge yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na yo,+ mpo ete bango mpe bázala na bomoko elongo na biso, mpo mokili endima ete otindaki ngai. 22 Napesi bango nkembo oyo opesi ngai, mpo bango mpe bázala moko ndenge biso tozali moko.+ 23 Ngai na bomoko elongo na bango mpe yo na bomoko elongo na ngai, mpo bázala ya kokoka na kati ya bomoko,* mpo mokili eyeba ete otindaki ngai mpe olingaki bango ndenge olingaki ngai. 24 Tata, nalingi ete baoyo opesi ngai bázala elongo na ngai esika ngai nazali,+ mpo bámona nkembo na ngai oyo opesi ngai, mpamba te olingaki ngai liboso ya ebandeli ya mokili.+ 25 Tata ya sembo, ya solo mokili eyekoli koyeba yo te,+ kasi ngai nayebi yo,+ mpe baoyo, bango bayebi ete otindaki ngai. 26 Nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango,+ mpo bolingo oyo olingaki ngai na yango ezala na kati na bango mpe ngai na bomoko elongo na bango.”+
18 Nsima ya koloba makambo wana, Yesu abimaki elongo na bayekoli na ye mpe bakendaki na ngámbo ya Lobwaku ya Kidrone*+ epai elanga moko ezalaki, mpe ye ná bayekoli na ye bakɔtaki kuna.+ 2 Nzokande Yudasi, moto oyo alingaki kotɛka ye, ayebaki mpe esika yango, mpo Yesu azalaki mbala mingi koyangana kuna elongo na bayekoli na ye. 3 Na yango, Yudasi azwaki etuluku ya basoda mpe bakɛngɛli oyo banganga-nzambe bakonzi ná Bafarisai batindaki mpe ayaki kuna ná mwa banzete ya mɔtɔ oyo ezali kopɛla ná miinda mpe bibundeli.+ 4 Bongo Yesu, lokola ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki koyela ye, apusanaki mpe atunaki bango: “Bozali koluka nani?” 5 Bayanolaki ye: “Yesu moto ya Nazarete.”+ Alobaki na bango: “Ezali ngai.” Nzokande Yudasi, motɛki na ye, azalaki mpe elongo na bango.+
6 Kasi, ntango Yesu alobaki na bango ete: “Ezali ngai,” bazongaki nsima mpe bakweaki na mabele.+ 7 Bongo atunaki bango lisusu: “Bozali koluka nani?” Bayanolaki: “Yesu moto ya Nazarete.” 8 Yesu alobaki: “Nayebisi bino ete ezali ngai. Na yango, soki ezali ngai nde bozali koluka, bótika mibali oyo bákende.” 9 Yango ezalaki mpo makambo oyo alobaki ekokisama, ete: “Nabungisi ata moko te kati na bato oyo opesaki ngai.”+
10 Bongo Simo Petro, oyo azalaki na mopanga, abimisaki yango, abɛtaki moombo ya nganga-nzambe monene, bongo akataki ye litoi ya mobali.+ Nkombo ya moombo yango ezalaki Malakusi. 11 Nzokande, Yesu alobaki na Petro: “Kɔtisá mopanga na libenga na yango.+ Nasengeli te komɛla kɔpɔ oyo Tata apesi ngai?”+
12 Bongo basoda ná komanda ya basoda mpe bakɛngɛli oyo Bayuda batindaki batyaki Yesu mabɔkɔ mpe bakangaki ye minyɔlɔlɔ. 13 Mpe bamemaki ye liboso epai ya Anasi, mpo azalaki bokilo ya Kaifa,+ oyo azalaki nganga-nzambe monene na mbula wana.+ 14 Nzokande Kaifa nde apesaki Bayuda toli ete ezali mpo na litomba na bango ete moto moko akufa mpo na bato ya ekólo.+
15 Simo Petro azalaki kolanda Yesu,+ ye ná moyekoli mosusu. Moyekoli yango ayebanaki na nganga-nzambe monene, mpe akɔtaki elongo na Yesu na lopango ya nganga-nzambe monene, 16 kasi Petro atɛlɛmaki libándá, na porte.* Bongo moyekoli wana mosusu, oyo ayebanaki na nganga-nzambe monene, abimaki mpe asololaki na mokɛngɛli ya porte mpe akɔtisaki Petro. 17 Bongo, mosali ya mwasi oyo azalaki mokɛngɛli ya porte alobaki na Petro ete: “Yo mpe ozali te moko ya bayekoli ya moto wana?” Ye alobaki: “Te, ngai te.”+ 18 Nzokande baombo mpe bakɛngɛli bazalaki zingazinga ya mɔtɔ ya makala oyo bapelisaki mpo malili ezalaki, mpe bazalaki koyɔta mɔtɔ. Petro mpe azalaki wana elongo na bango mpe azalaki koyɔta mɔtɔ.
19 Bongo nganga-nzambe mokonzi atunaki Yesu mituna mpo na bayekoli na ye mpe mpo na mateya na ye. 20 Yesu ayanolaki ye: “Nalobaki na mokili polele. Nazalaki ntango nyonso koteya na basinagoga mpe na tempelo,+ epai Bayuda nyonso bayanganaka, mpe nalobaki likambo moko te na kobombana. 21 Mpo na nini ozali kotuna ngai mituna? Tuná baoyo bayokaki makambo oyo nayebisaki bango. Bango bayebi makambo oyo nalobaki.” 22 Nsima ya koloba makambo wana, moko ya bakɛngɛli oyo azalaki wana abɛtaki Yesu mbata na elongi+ mpe alobaki: “Ndenge wana nde ozali koyanola nganga-nzambe mokonzi?” 23 Yesu azongiselaki ye: “Soki nalobi likambo ya mabe, monisá* mabe yango; kasi soki makambo oyo nalobi ezali solo, mpo na nini obɛti ngai?” 24 Bongo Anasi atindaki ye epai ya Nganga-nzambe monene Kaifa; azalaki kaka na minyɔlɔlɔ.+
25 Nzokande Simo Petro azalaki wana mpe azalaki koyɔta mɔtɔ. Bongo balobaki na ye: “Yo mpe ozali te moko ya bayekoli na ye?” Awanganaki mpe alobaki: “Te, ngai te.”+ 26 Moko ya baombo ya nganga-nzambe monene, oyo azalaki ndeko ya moto oyo Petro akataki litoi,+ alobaki: “Yo te nde namonaki na elanga elongo na ye?” 27 Kasi Petro awanganaki lisusu mpe na mbala moko nsoso elelaki.+
28 Bongo balongolaki Yesu epai ya Kaifa mpe bakendaki na ye na ndako ya guvɛrnɛrɛ.+ Ezalaki sikoyo ntɔngɔntɔngɔ. Kasi Bayuda bango moko bakɔtaki na ndako ya guvɛrnɛrɛ te, mpo bákóma mbindo te,+ mpe bákoka kolya Elekeli. 29 Na yango, Pilate abimaki libándá epai na bango mpe alobaki: “Bozali kofunda moto oyo na likambo nini?” 30 Bazongiselaki ye: “Soki moto oyo azalaki mosali-mabe* te, tolingaki kokaba ye te na lobɔkɔ na yo.” 31 Bongo Pilate alobaki na bango: “Bino moko bózwa ye mpe bósambisa ye na kolanda mibeko na bino.”+ Bayuda balobaki na ye: “Topesami nzela te ya koboma moto.”+ 32 Yango ezalaki mpo na kokokisa liloba oyo Yesu alobaki mpo na komonisa liwa ya ndenge nini asengelaki kokufa.+
33 Bongo Pilate akɔtaki lisusu na ndako ya guvɛrnɛrɛ; abengaki Yesu mpe alobaki na ye: “Yo ozali Mokonzi ya Bayuda?”+ 34 Yesu ayanolaki: “Ozali kotuna bongo na ndenge na yo moko, to bato mosusu nde bayebisi yo yango mpo na ngai?” 35 Pilate ayanolaki: “Ngai nazali nde Moyuda? Ekólo na yo moko mpe banganga-nzambe bakonzi nde bakabi yo epai na ngai. Osali nini?” 36 Yesu ayanolaki:+ “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.+ Soki Bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama te epai ya Bayuda.+ Kasi Bokonzi na ngai ezali ya awa te.” 37 Na yango Pilate alobaki na ye: “Boye ozali mokonzi?” Yesu ayanolaki: “Yo moko olobi ete nazali mokonzi.+ Ezali mpo na yango nde nabotamaki, mpe ezali mpo na yango nde nayei na mokili, mpo napesa litatoli na ntina etali solo.+ Moto nyonso oyo azali na ngámbo ya solo ayokaka mongongo na ngai.” 38 Pilate alobaki na ye: “Solo ezali nini?”
Nsima ya koloba bongo, abimaki lisusu epai ya Bayuda mpe alobaki na bango: “Namoni ntina te ya kokatela ye etumbu.+ 39 Lisusu, bozalaka na momeseno ete nabimisela bino moto moko na Elekeli.+ Na yango, bolingi nabimisela bino Mokonzi ya Bayuda?” 40 Bagangaki lisusu: “Moto wana te, bimisá Barabasi!” Nzokande Barabasi azalaki mosali-mabe.*+
19 Bongo Pilate azwaki Yesu mpe abɛtaki ye fimbo.+ 2 Mpe basoda batongaki motole ya nzubɛ, balatisaki ye yango na motó mpe balatisaki ye elamba moko molai ya motane-bulé,+ 3 mpe babandaki koya epai na ye mpe koloba: “Mbote,* yo Mokonzi ya Bayuda!” Bazalaki mpe kobɛtabɛta ye bambata na elongi.+ 4 Pilate abimaki lisusu libándá mpe alobaki na bango: “Namemi ye epai na bino na libándá mpo bóyeba ete ngai namoni likambo moko ya mabe epai na ye te.”+ 5 Na yango, Yesu abimaki libándá, alati motole ya nzubɛ mpe elamba molai ya motane-bulé. Mpe Pilate alobaki na bango: “Bótala, moto!” 6 Kasi ntango banganga-nzambe bakonzi mpe bakɛngɛli bamonaki ye, bagangaki: “Baká ye na nzete! Baká ye na nzete!”*+ Pilate alobaki na bango: “Bózwa ye bino moko mpe bóboma ye,* mpo ngai namoni likambo moko ya mabe epai na ye te.”+ 7 Bayuda bayanolaki ye: “Tozali na mobeko moko, mpe na kolanda mobeko yango, asengeli kokufa,+ mpo amikómisi mwana ya Nzambe.”+
8 Ntango Pilate ayokaki makambo oyo bazalaki koloba, abangaki lisusu makasi koleka, 9 mpe akɔtaki lisusu na ndako ya guvɛrnɛrɛ mpe alobaki na Yesu: “Yo ozali moto ya wapi?” Kasi Yesu apesaki ye eyano te.+ 10 Bongo Pilate alobaki na ye: “Oboyi koloba na ngai? Oyebi te ete nazali na bokonzi ya kobimisa yo mpe nazali na bokonzi ya koboma yo?”* 11 Yesu ayanolaki ye: “Olingaki kozala na bokonzi ata moke te likoló na ngai soki bapesaki yo yango te uta na likoló. Yango wana moto oyo apesi ngai na mabɔkɔ na yo azali na lisumu oyo eleki monene.”
12 Mpo na ntina yango, Pilate azalaki kaka koluka ndenge ya kobimisa ye. Kasi Bayuda bagangaki: “Soki obimisi moto oyo, ozali moninga ya Kaisala te. Moto nyonso oyo amikómisi mokonzi azali kotɛmɛla Kaisala.”*+ 13 Bongo nsima ya koyoka maloba wana, Pilate amemaki Yesu na libándá, mpe afandaki na kiti ya kosambisa na esika ebengami Pavema ya Mabanga, na Ebre, Gabata. 14 Nzokande ezalaki mokolo ya Bolɛngɛli+ Elekeli; ezalaki soki na midi.* Mpe alobaki na Bayuda: “Bótala mokonzi na bino!” 15 Kasi bagangaki: “Longolá ye! Longolá ye! Baká ye na nzete!”* Pilate alobaki na bango: “Naboma mokonzi na bino?” Banganga-nzambe bakonzi bayanolaki: “Tozali na mokonzi mosusu te kaka Kaisala.” 16 Na yango, akabaki ye epai na bango mpo bábaka ye na nzete.+
Bongo bazwaki Yesu mpe bakendaki na ye. 17 Ye moko amemaki nzete ya mpasi,* abimaki akei na esika oyo babengi Esika ya Mokuwa ya Motó,+ oyo ebengami Golgota na Ebre;+ 18 kuna babakaki ye na nzete+ na bansɛtɛ elongo na bato mosusu mibale, moko na ngámbo oyo, mosusu na ngámbo oyo, mpe Yesu na katikati.+ 19 Pilate akomaki mpe mwa maloba mpe atyaki yango likoló ya nzete ya mpasi.* Ekomamaki boye: “Yesu moto ya Nazarete Mokonzi ya Bayuda.”+ 20 Bayuda mingi batángaki likomi yango, mpo esika oyo Yesu abakamaki na nzete na bansɛtɛ ezalaki pene ya engumba; mpe ekomamaki na Ebre, na Latin, mpe na Grɛki. 21 Nzokande, banganga-nzambe bakonzi ya Bayuda balobaki na Pilate: “Kokoma te: ‘Mokonzi ya Bayuda,’ kasi komá ete alobaki: ‘Nazali Mokonzi ya Bayuda.’” 22 Pilate ayanolaki: “Oyo nakomi, nakomi.”
23 Ntango basoda babakaki Yesu na nzete na bansɛtɛ, bazwaki bilamba na ye ya likoló mpe bakabolaki yango na biteni minei. Soda mokomoko azwaki eteni moko, mpe bazwaki lisusu elamba na ye ya kati. Kasi elamba yango ya kati etongamaki na biteni te, bakangisá yango banda na likoló tii na nse. 24 Bongo balobanaki bango na bango ete: “Tópasola yango te, kasi tóbwaka mbɛsɛ mpo na koyeba soki ekozala ya nani.”+ Yango ezalaki mpo na kokokisa eteni oyo ya Makomami ete: “Bakabolaki bilamba na ngai kati na bango, mpe babwakaki mbɛsɛ mpo na elamba na ngai.”+ Basoda basalaki mpenza makambo yango.
25 Nzokande, pene ya nzete ya mpasi* ya Yesu, mama na ye+ mpe ndeko ya mama na ye ya mwasi, bazalaki wana; Maria mwasi ya Klopasi mpe azalaki wana, ná Maria Magadalene.+ 26 Ntango Yesu amonaki mama na ye mpe moyekoli oyo ye azalaki kolinga mingi+ batɛlɛmi pembeni wana, alobaki na mama na ye: “Mwasi, talá mwana na yo!” 27 Na nsima alobaki na moyekoli yango: “Talá mama na yo!” Mpe banda na ngonga wana, moyekoli yango azwaki ye epai na ye.
28 Nsima na yango, ntango Yesu ayebaki ete sikoyo makambo nyonso ekokisami, mpo likomami ekokisama, alobaki: “Nayoki mposa ya mai.”+ 29 Mbɛki moko ezalaki wana etondi na vinyo ya ngayi. Bongo batyaki linyuka oyo etondi na vinyo yango ya ngayi na nzete ya izope* mpe batombolaki yango tii na monɔkɔ na ye.+ 30 Nsima ya komeka vinyo yango ya ngayi, Yesu alobaki: “Ekokisami!”+ agumbaki motó na ye, mpe akataki mpema.*+
31 Lokola ezalaki mokolo ya Bolɛngɛli,+ Bayuda basɛngaki Pilate ete bábuka bango makolo mpe bálongola bibembe yango, mpo bibembe etikala te likoló ya banzete ya mpasi+ na Sabata, (mpo Sabata yango ezalaki ya monene).+ 32 Bongo basoda bayaki mpe babukaki makolo ya moto ya liboso mpe oyo ya moto mosusu wana, oyo abakamaki na nzete pembeni ya Yesu. 33 Kasi ntango bakómaki epai ya Yesu, bamonaki ete asilaki kokufa, na yango babukaki makolo na ye te. 34 Kasi moko ya basoda atɔbɔlaki ye mopanzi na likɔnga,+ mpe na mbala moko makila ná mai ebimaki. 35 Mpe moto oyo amonaki yango apesi litatoli oyo mpo bino mpe bóndima; litatoli na ye ezali solo, mpe ayebi ete makambo oyo azali koloba ezali solo.+ 36 Ya solo, makambo wana esalemaki mpo eteni ya Makomami ekokisama: “Ata mokuwa na ye moko te ekobukama.”*+ 37 Mpe lisusu, eteni mosusu ya Makomami elobi: “Bakotala epai ya moto oyo batɔbɔlaki.”+
38 Nzokande, nsima ya makambo yango, Yozefe ya Arimatea, oyo azalaki moyekoli ya Yesu kasi na kobombana mpo azalaki kobanga Bayuda,+ asɛngaki Pilate soki akoki kolongola nzoto ya Yesu. Pilate apesaki ye ndingisa. Bongo Yozefe ayaki mpe alongolaki nzoto ya Yesu.+ 39 Nikodeme,+ moto oyo ayaki epai na ye mbala ya liboso na butu, ye mpe ayaki; amemaki mire basangisá ná aloe* oyo ezalaki litra soki nkama moko.*+ 40 Bongo bazwaki nzoto ya Yesu mpe balíngaki yango na bilamba ya lini ná matiti ya nsolo kitoko,+ na kolanda momeseno ya Bayuda ya kokunda bibembe. 41 Nzokande, elanga moko ezalaki na esika oyo abomamaki,* mpe na elanga yango ezalaki na lilita* moko ya sika,+ oyo na kati na yango balalisá naino moto te. 42 Lokola ezalaki mokolo ya Bolɛngɛli+ ya Bayuda mpe lilita wana ezalaki pembeni, balalisaki Yesu kuna.
20 Na mokolo ya liboso ya pɔsɔ, Maria Magadalene ayaki ntɔngɔntɔngɔ na lilita,*+ wana molili ezalaki naino, mpe amonaki ete libanga esili kolongolama na lilita.*+ 2 Bongo akimaki mbangu epai ya Simo Petro mpe epai ya moyekoli wana mosusu, oyo Yesu azalaki kolinga mingi,+ mpe alobaki na bango: “Balongoli Nkolo na lilita,+ mpe toyebi te soki balalisi ye wapi.”
3 Na yango, Petro ná moyekoli wana mosusu bakendaki na lilita. 4 Bango mibale babandaki kokima mbangu elongo, kasi moyekoli wana mosusu alekaki Petro na mbangu mpe akómaki na lilita liboso. 5 Agumbamaki mpo na kotala na kati mpe amonaki bilamba ya lini elali wana,+ kasi akɔtaki te. 6 Bongo Simo Petro mpe, oyo azalaki kolanda ye na nsima, akómaki mpe akɔtaki na kati ya lilita. Amonaki bilamba ya lini elali wana. 7 Elamba oyo ezalaki na motó ya Yesu ezalaki esika moko te na biteni mosusu ya elamba, kasi ezalaki ya kolíngama na esika na yango moko. 8 Bongo moyekoli wana mosusu oyo akómaki na lilita liboso, ye mpe akɔtaki na kati mpe amonaki mpe andimaki. 9 Mpo bakangaki naino ntina te ya likomami oyo elobaki ete asengeli kosekwa uta na bakufi.+ 10 Bongo bayekoli yango bazongaki epai na bango.
11 Kasi Maria atɛlɛmaki kaka na libándá pene na lilita, azali kolela. Wana azalaki kolela, agumbamaki mpo na kotala na kati ya lilita, 12 mpe amonaki baanzelu mibale+ balati bilamba ya mpɛmbɛ bafandi esika nzoto ya Yesu elalaki, moko na motó mpe mosusu na makolo. 13 Mpe balobaki na ye: “Mwasi, mpo na nini ozali kolela?” Alobaki na bango: “Balongoli Nkolo na ngai, mpe nayebi te soki balalisi ye wapi.” 14 Nsima ya koloba bongo, abalukaki mpe amonaki Yesu atɛlɛmi wana, kasi azalaki koyeba te ete ezalaki Yesu.+ 15 Yesu alobaki na ye: “Mwasi, mpo na nini ozali kolela? Ozali koluka nani?” Ye, lokola akanisaki ete ezali mobateli ya elanga, alobaki na ye: “Tata, soki yo moto olongoli ye, yebisá ngai esika olalisi ye, mpe nakokende kozwa ye.” 16 Yesu alobaki na ye: “Maria!” Maria abalukaki, mpe alobaki na ye na Ebre: “Rabuni!” (oyo elakisi “Moteyi!”) 17 Bongo Yesu alobaki na ye: “Tiká kokangama na ngai, mpo namati naino epai ya Tata te. Kasi kende epai ya bandeko na ngai+ mpe lobá na bango boye: ‘Nazali komata epai ya Tata na ngai+ mpe Tata na bino, mpe epai ya Nzambe na ngai+ mpe Nzambe na bino.’” 18 Maria Magadalene akendaki mpe apesaki bayekoli nsango ete: “Namoni Nkolo!” Mpe ayebisaki bango makambo oyo Yesu alobaki na ye.+
19 Ntango ngonga epusanaki, na mokolo yango ya liboso ya pɔsɔ, mpe wana baporte ya esika oyo bayekoli bazalaki ekangamaki makasi mpo na kobanga Bayuda, Yesu ayaki mpe atɛlɛmaki na katikati na bango mpe alobaki na bango: “Kimya ezala na bino.”+ 20 Nsima ya koloba bongo alakisaki bango mabɔkɔ na ye mpe mopanzi na ye.+ Na yango, bayekoli basepelaki ntango bamonaki Nkolo.+ 21 Yesu alobaki na bango lisusu: “Kimya ezala na bino.+ Kaka ndenge Tata atindi ngai,+ ngai mpe nazali kotinda bino.”+ 22 Nsima ya koloba bongo, afulaki bango mpema mpe alobaki na bango: “Bózwa elimo santu.+ 23 Soki bolimbisi masumu ya moto, masumu yango elimbisami; soki bolimbisi masumu ya moto te, masumu yango elimbisami te.”
24 Kasi Toma,+ moko ya bantoma zomi na mibale, oyo bazalaki kobenga Lipasa, azalaki elongo na bango te ntango Yesu ayaki. 25 Na yango bayekoli mosusu bayebisaki ye ete: “Tomoni Nkolo!” Kasi ye alobaki na bango: “Soki namoni elembo ya nsɛtɛ te na mabɔkɔ na ye, soki natye mosapi na ngai na elembo ya nsɛtɛ yango te, mpe soki natye lobɔkɔ na ngai na kati ya mopanzi na ye te,+ nakondima ata moke te.”
26 Mikolo mwambe na nsima, bayekoli na ye bazalaki lisusu na kati ya ndako, mpe Toma azalaki elongo na bango. Yesu ayaki, atako baporte ekangamaki makasi, atɛlɛmaki na katikati na bango mpe alobaki: “Kimya ezala na bino.”+ 27 Na nsima alobaki na Toma: “Tyá mosapi na yo awa, mpe talá mabɔkɔ na ngai, mpe zwá lobɔkɔ na yo mpe tyá yango na kati ya mopanzi na ngai; mpe tiká kotya ntembe,* kasi ndimá.” 28 Toma azongiselaki ye: “Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!” 29 Yesu alobaki na ye: “Mpo omoni ngai, yango wana ondimi? Esengo na baoyo bamoni te mpe atako bongo bazali kondima.”
30 Ya solo mpenza, Yesu asalaki mpe makamwisi mosusu mingi liboso ya bayekoli, mpe yango ekomami te na rulo oyo.+ 31 Kasi makambo oyo ekomami mpo bóndima ete Yesu azali Kristo Mwana ya Nzambe, mpe bózwa bomoi na nzela ya nkombo na ye, mpo bozali kondima.+
21 Nsima na yango, Yesu amimonisaki lisusu epai ya* bayekoli, na Mbu ya Tiberiase. Amimonisaki na ndenge oyo: 2 Simo Petro, Toma (oyo bazalaki kobenga Lipasa),+ Natanaele+ moto ya Kana ya Galile, bana ya Zebede,+ mpe bayekoli mosusu mibale bazalaki bango nyonso elongo. 3 Simo Petro alobaki na bango: “Nakei koluka mbisi.” Bango balobaki na ye: “Biso mpe tokokende na yo.” Babimaki mpe bamataki na mwa masuwa, kasi na butu yango bakangaki eloko te.+
4 Nzokande, ntango ntɔngɔ ekómaki kotana, Yesu atɛlɛmaki na libongo, kasi bayekoli bazalaki koyeba te ete ezalaki Yesu.+ 5 Bongo Yesu alobaki na bango: “Bana, bozali na eloko* ya kolya te, boye te?” Bayanolaki: “Ɛɛ!” 6 Alobaki na bango: “Bóbwaka monyama na lobɔkɔ ya mobali ya masuwa mpe bokozwa.” Bongo babwakaki yango, kasi bakokaki kobenda yango te mpo etondaki na mbisi.+ 7 Na yango moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi+ alobaki na Petro ete: “Ezali Nkolo!” Ntango Simo Petro ayokaki ete ezali Nkolo, alataki* elamba na ye ya likoló, mpo azalaki bolumbu,* mpe amibwakaki na mai ya mbu. 8 Kasi bayekoli mosusu bayaki na mwa masuwa yango ya moke, bazali kobenda monyama yango oyo etondaki na mbisi, mpo bazalaki mosika te na mokili, kaka mɛtrɛ soki 90.*
9 Ntango bakómaki na libongo, bamonaki mɔtɔ ya makala ezali kopela wana ná mbisi likoló na yango, mpe mampa. 10 Yesu alobaki na bango: “Bóya na ndambo ya mbisi oyo bouti kokanga sikoyo.” 11 Bongo Simo Petro amataki na masuwa mpe abendaki na libongo monyama oyo etondaki na mbisi ya minene; nyonso ezalaki 153. Mpe atako mbisi ezalaki ebele mpenza, monyama epasukaki te. 12 Yesu alobaki na bango: “Bóya kolya.”* Moko te na kati ya bayekoli azalaki na mpiko ya kotuna ye: “Yo ozali nani?” mpo bayebaki ete ezalaki Nkolo. 13 Yesu ayaki, azwaki limpa mpe apesaki bango yango; asalaki mpe ndenge moko mpo na mbisi. 14 Oyo ezalaki mbala ya misato+ Yesu abimela bayekoli nsima ya kosekwa.*
15 Ntango basilisaki kolya, Yesu alobaki na Simo Petro boye: “Simo mwana ya Yoane, olingaka ngai koleka baoyo?” Azongiselaki ye: “Ɛɛ, Nkolo, oyebi ete nalingaka yo mingi.” Alobaki na ye: “Leisá bana-mpate na ngai.”+ 16 Alobaki na ye lisusu mpo na mbala ya mibale: “Simo mwana ya Yoane, olingaka ngai?” Azongiselaki ye: “Ɛɛ, Nkolo, oyebi ete nalingaka yo mingi.” Alobaki na ye: “Batelá bampate na ngai ya mike.”+ 17 Alobaki na ye mpo na mbala ya misato: “Simo mwana ya Yoane, olingaka ngai mingi?” Petro ayokaki mawa na ndenge atunaki ye mpo na mbala ya misato ete: “Olingaka ngai mingi?” Na yango alobaki na ye: “Nkolo, oyebi makambo nyonso; oyebi ete nalingaka yo mingi.” Yesu alobaki na ye: “Leisá bampate na ngai ya mike.+ 18 Ya solo mpenza nalobi na yo: Ntango ozalaki elenge mpenza, ozalaki kolata yo moko mpe kotambola epai nyonso olingi. Kasi ntango okokóma mobange okosembola mabɔkɔ na yo mpe moto mosusu akolatisa yo mpe akomema yo epai oyo yo olingi te.” 19 Alobaki bongo mpo na komonisa motindo ya liwa oyo Petro akopesa na yango Nzambe nkembo. Nsima na yango, alobaki na ye: “Kobá kolanda ngai.”+
20 Petro abalukaki mpe amonaki moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga+ azali koya, oyo na bilei ya mpokwa alalisaki nzoto nsima na ntolo ya Yesu mpe alobaki: “Nkolo, nani akotɛka yo?” 21 Na yango, ntango Petro amonaki ye, alobaki na Yesu: “Nkolo, bongo ye, nini ekokómela ye?” 22 Yesu alobaki na ye: “Soki nalingi ete aumela tii ntango nakoya, etali yo na nini? Yo kobá kolanda ngai.” 23 Bongo maloba yango etambolaki na kati ya bandeko ete moyekoli yango akokufa te. Nzokande, Yesu alobaki na ye te ete akokufa te, kasi alobaki: “Soki nalingi ete aumela tii ntango nakoya, etali yo na nini?”
24 Ezali moyekoli wana+ nde azali kopesa litatoli mpo na makambo oyo mpe ye nde akomaki makambo oyo, mpe toyebi ete litatoli na ye ezali solo.
25 Ya solo, ezali mpe na makambo mosusu mingi oyo Yesu asalaki; soki nyonso ekomamaki tii na makambo ya mikemike, nakanisi mokili yango moko elingaki kokoka te barulo oyo ekomami.+
To, “na lolenge ya nzambe.”
To, “komonisa kondima na.”
Lil., “mosuni.”
To, “boboto monene.”
To, “na ntolo ya Tata.” Yango emonisi esika moko ya lokumu mingi.
Talá Ap. A5.
Lil., “soki ngonga ya zomi.”
Lil., “Mwasi, ngai ná yo likambo nini?” Yango ezali maloba ya elilingi mpo na koboya likambo. Ndenge asaleli liloba “mwasi” ezali te kozanga limemya.
Na ntembe te, emekeli oyo ezalaki bati, oyo ekokani na 22 L. Talá Ap. B14.
Lil., “bilembo.”
To, “zando.”
Lil., “na nkombo na ye.”
To mbala mosusu, “abotami na likoló.”
To, “akondimela ye.”
Lil., “Mwana se moko oyo abotamaki.”
To, “epamelama te.”
Lil., “solo.”
Lil., “atye elembo na ye likólo na yango.”
Elingi koloba, Nzambe.
Lil., “Yesu.”
To, “liziba.”
Lil., “soki ngonga ya motoba.”
Lil., “ayoki malamu.”
Lil., “na ngonga ya nsambo.”
To, “ekufá.”
Talá Ap. A3.
To, “mbeto.”
To, “azali na likabo ya bomoi na kati na ye moko.”
Lil., “malita ya kokanisama.”
Elingi koloba, Makomami.
Talá Ap. B14.
Lil., “bastade soki 25 to 30.” Talá Ap. B14.
Talá Ap. A5.
To mbala mosusu, “liyangani ya bato nyonso.”
To, “zabolo moko.”
To, “fɛti ya Bandako ya matiti.”
To, “komonisa kondima te epai na ye.”
Lil., “makomi.”
Elingi koloba, atángá na biteyelo ya Barabi te.
Elingi koloba, Nzambe.
Lil., “bilembo.”
Bamaniskri ebele ya kala oyo ebongi kotyelama motema, ezali te na vɛrsɛ 53 tii na mokapo 8 vɛrsɛ 11.
To, “na kolanda mibeko ya bato.”
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “uta na ebandeli.”
To, “pisini ya Siloame.”
To, “akumisaki.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
To, “milimo.”
To, “na bomoko.”
To, “na lolenge ya nzambe.”
To, “lilita ya kokanisama.”
Lil., “soki stade 15.” Talá Ap. B14.
To, “lilita ya kokanisama.”
Lil., “na elimo na ye.”
To, “lilita ya kokanisama.”
Elingi koloba, tempelo.
To, “batandamaki na mesa.”
Elingi koloba, litra moko ya Baroma, soki 327 g. Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
Talá Ap. A5.
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
To, “molimo na ngai ebulungani.”
Lil., “bilembo.”
Talá Ap. A5.
To, “na maloba na biso.”
Talá Ap. A5.
To, “bino mpe bozali na mokumba ya.”
Lil., “atomboleli ngai litindi na ye.”
To, “abulunganaki na elimo na ye.”
Lil., “na ntolo ya.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
To, “mobɔndisi.”
To, “Nakotika bino bitike te.”
To, “akoki kosala ngai eloko te.”
To, “molimo.”
To, “komonisa kondima te epai na ngai.”
Liloba “ye” na vɛrsɛ 13 mpe 14 elobeli kaka “mosungi” oyo vɛrsɛ 7 elobeli. Yesu asaleli liloba “mosungi” (oyo ezali liloba ya mobali na Grɛki) mpo na kolobela elimo santu (oyo liloba na yango na Grɛki ezali mobali te mwasi mpe te), lokola nde elimo santu ezali moto, nzokande ezali nguya moko boye.
To, “bolɔzi.”
To, “bolɔzi.”
Lil., “mosuni nyonso.”
To, “Nayebisi.”
To, “babateli.”
To, “na bomoko.”
To, “na bomoko.”
To, “Tyá bango pembeni; Kómisá bango basantu.”
To, “bázala mpenza na bomoko.”
To, “mokɛli ya eleko ya malili makasi ya Kidrone.”
To, “ya ekɔteli.”
To, “tatolá.”
To, “moto mabe.”
To, “moyibi monene.”
To, “Losako.”
To, “Bomá ye na nzete! Bomá ye na nzete.”
To, “bóboma ye na nzete.”
To, “koboma yo na nzete?”
To, “azali koloba mabe mpo na Kaisala.”
Lil., “soki na ngonga ya motoba.”
To, “Bomá ye na nzete.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “azongisaki elimo na ye.”
To, “ekonikama.”
To mbala mosusu, “rulo ya mire mpe ya aloe.”
Elingi koloba, litra ya Baroma. Talá Ap. B14.
To, “na nzete oyo abomamaki.”
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “lilita ya kokanisama.”
Lil., “tiká koboya kondima.”
To, “abimelaki lisusu.”
To, “mwa mbisi.”
To, “amikangaki.”
To, “alataki kaka mwa elamba moko ya kati.”
Lil., “mapeko soki 200.” Talá Ap. B14.
Lil., “kolya bilei ya ntɔngɔ.”
Lil., “kolamuka uta na bakufi.”